Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Octobre 2015

Salelá Yehova kozanga kotya makanisi epai mosusu

Salelá Yehova kozanga kotya makanisi epai mosusu

“Maria . . . azalaki koyoka liloba na ye [Yesu]. Marta azalaki komitungisa na ebele ya misala oyo azalaki kosala.”​—LUKA 10:39, 40.

NZEMBO: 94, 134

1, 2. Mpo na nini Yesu azalaki kolinga Marta, kasi libunga nini asalaki oyo emonisi ete azalaki mpe moto ya kozanga kokoka?

SOKI oyoki batángi nkombo ya Marta, ndeko ya Lazare, eyelaka yo na makanisi ete azalaki moto ya lolenge nini? Biblia elobaka ete Marta azalaki moninga moko malamu mpenza ya Yesu, mpe elobi ete Yesu azalaki kolinga ye. Nzokande, ezali mpe na basi mosusu oyo Yesu azalaki kolinga mpe komemya. Na ndakisa, Maria, ndeko ya Marta azalaki mpe moninga ya Yesu ya motema. Lisusu, Yesu azalaki kolinga mama na ye Maria. (Yoane 11:5; 19:25-27) Kasi mpo na nini Yesu azalaki kolinga Marta?

2 Yesu azalaki kolinga Marta mpo azalaki na boboto, azalaki mokabi, mpe azalaki kolinga misala. Kasi oyo eleki ntina, Yesu azalaki kolinga ye mpo azalaki na kondima makasi. Andimaki makambo nyonso oyo Yesu ateyaki, mpe azalaki na ntembe ata moke te ete Yesu azali Masiya oyo alakamaki. (Yoane 11:21-27) Atako bongo, Marta azalaki te moto ya kokoka. Ndenge biso nyonso tosalaka mabunga, ye mpe azalaki kosala mabunga.  Na ndakisa, na mbala mosusu oyo Yesu akendaki kotala bango, Marta asilikelaki ndeko na ye Maria, mpe ayebisaki Yesu mpo asembola ye. Alobaki boye: “Nkolo, ezali kosala yo eloko te ndenge ndeko na ngai atiki ngai moko nasalaka misala? Yebisá ye aya kosalisa ngai.” (Tángá Luka 10:38-42.) Mpo na nini Marta alobaki bongo, mpe liteya nini tokoki kozwa na eyano oyo Yesu apesaki ye?

MARTA AZALAKI KOMITUNGISA

3, 4. Likambo nini Maria asalaki oyo Yesu asepelaki na yango, mpe liteya nini Marta azwaki? (Talá elilingi ya ebandeli.)

3 Yesu azalaki mpenza na botɔndi ndenge Marta ná Maria babengisaki ye epai na bango, mpe asepelaki kosalela ntango wana mpo na koteya bango makambo ya motuya ya Nzambe. Mbala moko, Maria afandaki liboso na ye, mpe “azalaki koyoka liloba na ye.” Azalaki na mposa ya koyoka makambo nyonso oyo Moteyi monene azalaki koloba. Marta mpe akokaki kosalela libaku wana mpo na koyoka Yesu. Mpe Yesu alingaki kokumisa ye soki andimaka kotika misala na ye mpo na koyoka ye.

4 Kasi Marta azalaki komitungisa. Azalaki kobongisa bilei kitoko mpo na Yesu mpe kosala ebele ya makambo mosusu mpo alekisa ntango malamu elongo na bango. Ntango amonaki ete Maria azali kosalisa ye te, asilikaki mpe ayaki komilela epai ya Yesu. Yesu ayebaki ete Marta azali na mposa ya kosala mingi, kasi ayebisaki ye na boboto nyonso ete: “Marta, Marta, ozali komitungisa mpe komiyokisa mpasi mpo na biloko mingi.” Apesaki mpe likanisi ete kosala kaka mwa biloko moke nde ezali na ntina. Na nsima, Yesu akumisaki Maria na ndenge alandaki ye na likebi mpenza. Alobaki boye: “Maria ye aponi eloko oyo ezali malamu, mpe bakobɔtɔla ye yango te.” Ekoki kozala ete Maria abosanaki biloko oyo alyaki mokolo wana, kasi abosanaki soki moke te makambo oyo ayokaki epai ya Yesu mpe ndenge oyo apesaki ye longonya. Mbula koleka 60 na nsima, ntoma Yoane akomaki ete: “Yesu azalaki kolinga Marta ná ndeko na ye ya mwasi.” (Yoane 11:5) Maloba wana emonisi ete Marta andimaki ndenge Yesu asembolaki ye na bolingo, mpe asalelaki Yehova na bosembo nyonso na boumeli ya mikolo oyo atikalaki na yango.

5. Mpo na nini ezali mpenza na ntina lelo oyo tótya likebi na makambo oyo eleki ntina, mpe tokoyanola na motuna nini?

5 Tomoni ete na mikolo na biso ezali na makambo mingi oyo ekoki kotungisa biso mpo tósalela Yehova te ndenge kaka ezalaki na ntango ya kala. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/09/1958 (na Lingelesi) ekebisaki bandeko ete basengeli te kotika biloko oyo bato bazali kobimisa elongola likebi na bango mpo na kosalela Yehova. Ezala na ntango wana, emonanaki lokola ete eloko ya sika ata moko ezalaki kobima mokolo na mokolo. Biloko lokola bazulunalo ya kitoko, radio, bafilme mpe televizyo ekómaki wenzewenze. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki ete lokola tozali mpenza kokóma na nsuka ya ebongiseli oyo, “biloko oyo ekoki kolongola likebi na biso ekokóma mingi.” Lelo oyo, koleka liboso, ezali na biloko mingi mpenza oyo ekoki kolongola likebi na biso. Tokoki kosala nini mpo tómekola Maria mpe tókoba kosambela Yehova?

KOSALELA MOKILI NA MAKAMBO NYONSO TE

6. Ndenge nini basaleli ya Yehova basalelaki biloko ndenge na ndenge oyo mokili ebimisaka?

6 Basaleli ya Yehova basalelaka biloko ndenge na ndenge oyo mokili ebimisaka  mpo na kosakola nsango malamu. Na ndakisa, liboso ete Etumba ya liboso ya mokili mobimba ebanda mpe na boumeli ya etumba yango, balakisaki “Fɔtɔ-Drame ya Bozalisi.” Lokola bazalaki kosalela bililingi mpe bafilme ya langilangi ná miziki, bateyaki bamilio ya bato na bikólo mingi. Na nsuka, “Fɔtɔ-Drame” ezalaki kolakisa eleko moko ya kimya ntango Yesu Kristo akoyangela mabele. Na nsima, basaleli ya Yehova bakómaki kosalela radio mpo na koyebisa bamilio ya bato na mokili mobimba nsango malamu. Lelo oyo, tosalelaka baordinatɛrɛ mpe Internet mpo na kosakwela bato na bisika nyonso ata baoyo bazalaka mosika mpenza.

Kotika te ete biloko oyo ezangi ntina elongola makanisi na yo mpo na kosambela Yehova (Talá paragrafe 7)

7. (a) Mpo na nini ezali likama kosalela mokili na makambo nyonso? (b) Likambo nini tosengeli kokebaka na yango? (Talá maloba na nse ya lokasa.)

7 Biblia ezali kokebisa biso ete tósalela mokili na makambo nyonso te. Ekebisi mpe ete tólekisaka ntango mingi te na biloko oyo mokili ezali kobimisa. (Tángá 1 Bakorinti 7:29-31.) Biloko yango mosusu ezali mabe te, kasi ekoki kobebisela biso ntango mingi. Na ndakisa, ekoki kozala ete tosepelaka kozwa mopɛpɛ, kotánga babuku, kotala televizyo, kokende kotala bisika ya kitoko, kosomba biloko mpe koluka baaparɛyi oyo euti kobima to oyo ya ntalo. Bato mingi balingaka kosolola na Internet, kotindelana bamesaje na telefone to na Internet, to balukaka koyeba bansango to banani balongi na lisano moko boye. Kasi bato mosusu bakoki kokóma baombo ya makambo yango. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) (Mosakoli 3:1, 6) Soki tozali kosalela ntango na biso mingi na makambo oyo ezangi ntina, tokotya likebi mingi te na makambo oyo eleki ntina, elingi koloba kosambela Yehova.​—Tángá Baefese 5:15-17.

8. Mpo na nini ezali na ntina te ete tólinga biloko ya mokili?

8 Satana azali kosala nyonso mpo abenda biso na biloko oyo ezali na mokili na  ye mpe alongola likebi na biso mpo na kosalela Yehova. Satana asalaki bongo na siɛklɛ ya liboso, mpe azali kosala bongo koleka kutu na mikolo na biso. (2 Timote 4:10) Yango wana, tosengeli ntango nyonso komitalela malamumalamu mpo na koyeba makanisi oyo tozalaka na yango mpo na biloko ya mokili mpe kobongola makambo mosusu soki esengeli. Biblia eteyi biso ete tosengeli te kolinga biloko ya mokili. Kasi, tosengeli nde kolinga Yehova lisusu mingi. Soki tosali bongo, ekozala mpasi te tótosa Yehova mpe tótikala pene na ye.​—1 Yoane 2:15-17.

TÓKOBA KOTYA MAKANISI NA BILOKO OYO ELEKI NTINA

9. Yesu ateyaki bayekoli na ye bátya makanisi nyonso na nini, mpe na ndenge nini atikelá biso ndakisa?

9 Ndenge kaka ateyaki Marta na boboto nyonso ete amitungisa te mpo na biloko mingi, Yesu ateyaki mpe bayekoli na ye kaka liteya yango. Alendisaki bango ete bákoba kotya makanisi na bango mobimba na kosalela Yehova mpe koluka Bokonzi na ye. (Tángá Matai 6:22, 33.) Ye moko Yesu atiká ndakisa ya malamu mpenza. Azalaki na biloko mingi te, azalaki na ndako to lopango te.​—Luka 9:58; 19:33-35.

10. Ndakisa nini ya malamu Yesu atikelá biso?

10 Yesu atikaki te ete eloko moko elongola likebi na ye mpo na mosala ya kosakola. Na ndakisa, mwa moke nsima ya ntango oyo abandaki kosakola, ebele ya bato na Kapernaume balingaki ete alekisa ntango mingi na engumba na bango. Asalaki nini? Akobaki kotya makanisi na ye nyonso na mosala na ye. Alobaki ete: “Nasengeli mpe kosakola nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe na bingumba mosusu, mpamba te natindamaki mpo na yango.” (Luka 4:42-44) Yesu atambolaki bantaka milai mpo na kosakola nsango malamu mpe koteya ebele ya bato. Azalaki moto ya kokoka, kasi azalaki mpe kolɛmba, mpe azalaki na mposa ya kopema nsima ya kosala mosala makasi.​—Luka 8:23; Yoane 4:6.

Yesu ateyá biso ete soki totye makanisi na biso mpo na kozala na ebele ya biloko, tokoki kolongola likebi na biso na mosala ya Nzambe

11. Yesu asalaki nini ntango moto moko atunaki ye likambo oyo etalaki kaka moto yango ye moko? Liteya nini Yesu ateyaki bayekoli na ye?

11 Mokolo moko, ntango Yesu azalaki koteya bayekoli na ye liteya moko ya ntina mingi, moto moko akataki ye maloba mpe alobaki ete: “Moteyi, yebisá ndeko na ngai akabola na ngai libula.” Yesu alukaki te kosilisa likambo wana mpo likambo yango etalaki kaka moto wana. Alingaki te kotika koteya bayekoli na ye mpo na likambo wana. Kutu, asalelaki libaku wana mpo na koteya bango ete soki batye makanisi na bango mpo na kozala na ebele ya biloko, bakoki kolongola likebi na bango na mosala ya Nzambe.​—Luka 12:13-15.

12, 13. (a) Likambo nini Yesu asalaki oyo ekamwisaki Bagrɛki mosusu na Yerusaleme? (b) Yesu asalaki nini ntango Filipe asɛngaki ye akutana na bato yango?

12 Mikolo ya nsuka ya bomoi ya Yesu awa na mabele ezalaki mpasi mpenza. (Matai 26:38; Yoane 12:27) Ayebaki ete akonyokwama makasi mpe akokufa. Ayebaki mpe ete azali na mosala mingi ya kosala liboso  akufa. Na ndakisa, na mokolo ya lomingo, 9 Nisana, Yesu akɔtaki na Yerusaleme likoló ya mwana mpunda. Ebele ya bato bazalaki kokumisa ye lokola mokonzi na bango. (Luka 19:38) Mokolo elandaki, na mpiko nyonso, Yesu abenganaki na tempelo bato ya lokoso oyo bazalaki kotɛka biloko na ntalo makasi mpe na ndenge yango bazalaki koyiba bato.​—Luka 19:45, 46.

13 Bagrɛki mosusu oyo bayaki na Yerusaleme mpo na Elekeli, bamonaki likambo oyo Yesu asalaki mpe bakamwaki. Na yango, batunaki ntoma Filipe soki bakoki kokutana na Yesu. Kasi Yesu azalaki koluka te bato ya kosalisa ye to ya kokɔtela ye liboso ya banguna. Ayebaki eloko nini ezali na ntina mingi. Azalaki kotya makanisi na ye nyonso na mokano ya Yehova mpo na ye, elingi koloba kopesa bomoi na ye lokola mbeka. Na yango, akundwelaki bayekoli na ye ete mosika te akokufa mpe amonisaki ete baoyo nyonso bazali kolanda ye basengeli mpe kondima kopesa bomoi na bango lokola mbeka. Alobaki ete: “Moto oyo alingi molimo na ye azali kobebisa yango, kasi moto oyo ayini molimo na ye na mokili oyo akobatela yango mpo na bomoi ya seko.” Kasi alakaki mpe ete “Tata akokumisa” bayekoli na ye mpe akopesa bango bomoi ya seko. Filipe akokaki kopesa Bagrɛki wana nsango oyo ya kolendisa.​—Yoane 12:20-26.

14. Atako Yesu atyaki mosala ya kosakola na esika ya liboso na bomoi na ye, azalaki kozanga ntango te mpo na makambo nini?

14 Ntango Yesu azalaki awa na mabele, mosala na ye ya libosoliboso ezalaki kosakola nsango malamu. Atako atyaki makanisi na ye mobimba na mosala ya kosakola, azalaki ntango nyonso te kokanisa kaka mosala yango. Na ndakisa, akendaki na fɛti moko ya libala, epai abongolaki mai na vinyo moko kitoko. (Yoane 2:2, 6-10) Alyaki mpe na bandako ya baninga na ye mpe epai ya bato mosusu oyo bazalaki kosepela na nsango malamu. (Luka 5:29; Yoane 12:2) Likambo eleki ntina, mbala na mbala, Yesu azalaki mpe na ntango ya kobondela, kokanisa na mozindo, mpe kopema.​—Matai 14:23; Marko 1:35; 6:31, 32.

‘LONGOLÁ KILO NYONSO’

15. Ntoma Paulo alobaki ete bakristo basengeli kosala nini, mpe na nini atiká ndakisa malamu?

15 Ntoma Paulo alobaki ete bakristo bazali lokola bapoti-mbangu oyo bazali kokima ntaka molai mpe ete mpo na kokóma na nsuka, basengeli bakolongola eloko nyonso oyo ekoki kolɛmbisa bango to kosala ete bátika. (Tángá Baebre 12:1.) Ye moko ntoma Paulo atiká ndakisa moko malamu. Akokaki kokóma mozwi mpe koyebana mingi lokola bakonzi ya mangomba ya Bayuda, kasi asundolaki bomoi yango mpe atyaki nde makanisi na ye nyonso na “makambo oyo eleki ntina.” Asalaki mingi na mosala ya kosakola mpe asalaki mibembo na bisika mingi, na ndakisa, na Siri, na Asie Mineure, na Masedonia mpe na Yudea. Ntoma Paulo azalaki nde kotala mbano na ye ya bomoi ya seko na likoló. Alobaki ete: “Nabosani biloko oyo ezali na nsima mpe nazali kosala nyonso mpo nazwa biloko oyo ezali na liboso, nazali kolanda kopota  mbangu tii na nsuka mpo nazwa libonza.” (Bafilipi 1:10; 3:8, 13, 14) Ntoma Paulo azalaki na mwasi te, mpe yango esalisaki ye na “kosalela Nkolo mosala ntango nyonso kozanga kotya makanisi na makambo mosusu.”​—1 Bakorinti 7:32-35.

Ntoma Paulo asundolaki bomoi oyo azalaki na yango mpo na “makambo oyo eleki ntina”

16, 17. Ezala obalá to te, ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya ntoma Paulo? Ndenge nini ndeko Mark ná Claire basali yango?

16 Na ndakisa ya ntoma Paulo, basaleli mosusu ya Yehova na mikolo na biso baboyaka kobala mpo bámipesa mingi na mosala ya Yehova. (Matai 19:11, 12) Mbala mingi, bato oyo babalá te, bazalaka na mikumba ya libota mingi te lokola bato oyo babalá. Kasi, ezala obalá to te, biso nyonso tokoki ‘kolongola kilo nyonso’ oyo ekoki kosala ete makanisi na biso ezala te na mosala ya Yehova. Ekozala mbala mosusu malamu tóbongola bizaleli na biso mpo tóbebisaka ntango te mpe tózala na likoki ya kosalela Yehova mingi.

17 Na ndakisa, ndeko Mark ná mwasi na ye Claire, oyo bakolá na Pays de Galles, babandaki mosala ya mobongisi-nzela ntango basilisaki kelasi. Nsima ya kobalana, bakobaki mosala ya mobongisi-nzela. Kasi bazalaki na mposa ya kosala lisusu mingi. Ndeko Mark alobi boye: “Tomonaki malamu tótika ndako na biso ya bashambrɛ misato mpe mosala na biso ya ntango mokuse mpo tópesa mabɔkɔ na mosala ya botongi na mokili mobimba.” Na boumeli ya mbula 20 oyo eleki, batamboli na mikili ya Afrika mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi. Na ntango mosusu, bazalaki kaka na mwa mbongo moke mpenza, kasi Yehova azalaki ntango nyonso kosunga bango. Ndeko Claire alobi boye: “Epesaka biso esengo mingi ndenge tolekisaka mokolo na mokolo na mosala ya Yehova. Na ntango oyo tolekisi, tokómi na baninga ebele, tozangi ata eloko moko te. Mwa biloko moke oyo tosundolá, ekoki kokokana ata moke te na esengo oyo eutaka na kosalela Yehova na mosala ya ntango nyonso.” Basali mingi ya ntango nyonso bamiyokaka mpe bongo. *​—Talá maloba na nse ya lokasa.

18. Mituna nini tokoki komituna?

18 Okanisi ete okoki kozala na esengo mingi lisusu na mosala ya Yehova? Ezali na makambo oyo ezali kolongola likebi na yo mpo oyeba te makambo oyo eleki ntina? Soki ezali bongo, okoki kosala nini? Ntango mosusu, okoki kobongisa lolenge na yo ya kotánga mpe koyekola Biblia. Lisolo oyo elandi ekolimbola ndenge okoki kosala yango.

^ par. 17 Talá mpe lisolo ya bomoi ya Hadyn mpe Melody Sanderson na lisolo “Koyeba oyo ezali malamu mpe kosala yango.” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, ya 01/03/2006) Mosala oyo bazalaki kosala na ekólo Australie ezalaki kofuta malamu, kasi batikaki yango mpo na kokɔta na mosala ya ntango nyonso. Tángá lisolo na bango mpo oyeba nini ekómelaki bango ntango bazalaki lisusu na mbongo te ntango bazalaki kosala lokola bamisionɛrɛ na Inde.