Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Octobre 2015

Omonaka lobɔkɔ ya Nzambe na bomoi na yo?

Omonaka lobɔkɔ ya Nzambe na bomoi na yo?

“Lobɔkɔ ya Yehova ekoyebana epai ya basaleli na ye.”​—YISAYA 66:14.

NZEMBO: 65, 26

1, 2. Bato mosusu bazalaka na makanisi nini mpo na Nzambe?

BATO mingi balobaka ete makambo oyo basalaka ezalaka na ntina te na miso ya Nzambe. Bakanisaka ete Nzambe atyaka mpenza likebi te na makambo oyo ekómelaka bango. Na ndakisa, ntango mopɛpɛ moko makasi ebebisaki eteni monene ya ekólo Philippines na sanza ya 11/2013, mokonzi ya engumba moko monene alobaki ete: “Namoni ete Nzambe azalaki kolala mpɔngi.”

2 Bato mosusu bakanisaka ete Nzambe akoki komona te makambo oyo bazali kosala. (Yisaya 26:10, 11; 3 Yoane 11) Bato mosusu na ntango ya ntoma Paulo bakanisaki mpe bongo. Alobaki na bango boye: “Bandimaki te kozwa boyebi ya solosolo ya Nzambe.” Bazalaki sembo te, bazalaki bato mabe mpe bato ya lokoso.​—Baroma 1:28, 29.

3. (a) Mituna nini tosengeli komituna? (b) Na Biblia, mbala mingi liloba “lobɔkɔ” ya Nzambe elimbolaka nini?

3 Tokoloba nini mpo na biso? Toyebi ete Yehova amonaka makambo nyonso oyo tosalaka. Kasi tondimaka ete Yehova atyelaka biso likebi? Tomonaka lobɔkɔ na ye na bomoi na biso? Na kati ya Biblia, liloba “lobɔkɔ” ya Nzambe esalelamaka mpo  na kolobela ndenge asalelaka nguya na ye. Asalelaka nguya na ye mpo na kosalisa basaleli na ye mpe mpo na kokweisa banguna na ye. (Tángá Kolimbola Mibeko 26:8.) Yesu alobaki ete bato mosusu “bakomona Nzambe.” (Matai 5:8) Tozali na kati ya bato yango? Ndenge nini tokoki ‘komona Nzambe’? Tótalela bandakisa oyo Biblia elobeli mpo na bato oyo bamonaki lobɔkɔ ya Nzambe na bomoi na bango mpe baoyo bamonaki yango te. Tokomona mpe ndenge kondima esalisaka biso tómona lobɔkɔ ya Nzambe.

BABOYAKI KOMONA LOBƆKƆ YA NZAMBE

4. Mpo na nini banguna ya Yisraele baboyaki komona lobɔkɔ ya Nzambe?

4 Na ntango ya kala, bato mingi bazalaki na libaku ya komona mpe koyoka ndenge Nzambe asalisaki Yisraele. Yehova asalaki makamwisi mpo na kosikola basaleli na ye na Ezipito mpe mpo na kokweisa ebele ya bakonzi na Mokili ya Ndaka. (Yosua 9:3, 9, 10) Atako bakonzi mosusu bayokaki mpe bamonaki ndenge Yehova abikisaki basaleli na ye, “babandaki koyangana bango nyonso na likanisi se moko ya kobunda na Yosua mpe Yisraele.” (Yosua 9:1, 2) Ntango babundisaki Yisraele, bakonzi yango bazalaki na libaku ya komona lobɔkɔ ya Nzambe. Yehova amonisaki nguya na ye monene na ndenge “moi etɛlɛmaki, mpe sanza etɛlɛmaki, tii ntango ekólo ya Yisraele ezongisaki mabe na banguna na yango.” (Yosua 10:13) Kasi Yehova atikaki ete mitema ya banguna ya Yisraele “ekóma makasi,” mpo ete bábundisa Yisraele. (Yosua 11:20) Banguna ya Yisraele bazalaki kolonga te mpo bazalaki koboya kondima ete Yehova azalaki kobunda mpo na basaleli na ye.

Tosengeli koluka lobɔkɔ ya Nzambe na bomoi na biso

5. Likambo nini mokonzi mabe Ahaba aboyaki kondima?

5 Na nsima, mokonzi mabe Ahaba, azalaki na libaku ya komona lobɔkɔ ya Nzambe mbala ebele. Eliya alobaki ete: “Mamwɛ to mbula ekozala te, longola kaka na etinda ya liloba na ngai!” (1 Bakonzi 17:1) Lobɔkɔ ya Nzambe nde esalaki ete likambo yango esalema, kasi Ahaba aboyaki kondima yango. Kasi, Eliya abondelaki Yehova, mpe Nzambe ayanolaki ye na ndenge atindaki mɔtɔ uta na likoló. Ahaba amonaki yango. Bongo, Eliya ayebisaki Ahaba ete Yehova akosukisa elanga mpe akonɔkisa mbula makasi. (1 Bakonzi 18:22-45) Ahaba amonaki makamwisi wana nyonso mpe akobaki kaka koboya kondima ete amonaki lobɔkɔ ya Yehova. Bandakisa oyo eteyi biso nini? Tosengeli koluka lobɔkɔ ya Nzambe na bomoi na biso.

BAMONAKI LOBƆKƆ YA YEHOVA

6, 7. Bato ya Gibeone mpe Rahaba bayebaki likambo nini?

6 Bato ya Gibeone basalaki te lokola bikólo oyo ezalaki zingazinga na bango. Bamonaki lobɔkɔ ya Nzambe. Na esika ya kobundisa Bayisraele, bato ya Gibeone basepelaki nde koluka kozala na kimya ná bango. Mpo na nini? Balobaki ete ezali mpo bayokaki makambo etali Yehova mpe nyonso oyo asalaki. (Yosua 9:3, 9, 10) Basalaki mpenza malamu ndenge  bamonaki ete Yehova azalaki kobundela Yisraele.

7 Rahaba mpe amonaki lobɔkɔ ya Yehova. Azalaki Moyisraele te, kasi ayokaki ndenge Yehova asalaki mpo na kosikola basaleli na ye na Ezipito. Ntango banɔngi mibale bayaki epai na ye, ayebisaki bango boye: “Nayebi mpenza ete Yehova akozanga te kopesa bino mokili oyo.” Rahaba andimaki ete Yehova akoki kobikisa ye mpe libota na ye. Amonisaki kondima na ye epai ya Yehova atako ayebaki ete kosala bongo ezali likama mpenza.​—Yosua 2:9-13; 4:23, 24.

8. Ndenge nini Bayisraele mosusu bamonaki lobɔkɔ ya Nzambe?

8 Na kokesana na mokonzi mabe Ahaba, Bayisraele mosusu oyo bamonaki mɔtɔ euti na likoló mpo na eyano na libondeli oyo Eliya asalaki, bayebaki ete Nzambe nde asali likambo wana. Bagangaki ete: “Yehova azali Nzambe ya solo!” (1 Bakonzi 18:39) Emonani polele ete bamonaki nguya ya Nzambe.

9. Ndenge nini tokoki komona Yehova mpe lobɔkɔ na ye lelo oyo?

9 Totaleli bandakisa ya malamu ná ya mabe oyo esalisi biso tóyeba malamu ndimbola ya maloba ‘komona Nzambe’ to komona lobɔkɔ na ye. Lokola toyebi Yehova mpe bizaleli na ye, tomoni lobɔkɔ na ye na ‘miso ya motema na biso.’ (Baefese 1:18) Yango elendisi biso tómekola bato ya sembo ya ntango ya kala mpe ya mikolo na biso oyo bamonaki ndenge Yehova asalisaki basaleli na ye. Kasi, biso mpe tozali na makambo oyo emonisi ete Nzambe azali kosalisa basaleli na ye lelo oyo?

 MAKAMBO OYO EZALI KOMONISA LOBƆKƆ YA NZAMBE LELO OYO

10. Ndakisa nini emonisi ete Yehova azali kosalisa basaleli na ye lelo oyo? (Talá elilingi ya ebandeli.)

10 Tozali na ebele ya makambo oyo emonisi ete Yehova azali kokoba kosalisa bato lelo oyo. Mbala mingi, toyokaka masolo ya bato oyo babondelaki mpo Nzambe asalisa bango mpe Nzambe ayanolaki na mabondeli na bango. (Nzembo 53:2) Na ndakisa, Batatoli bazalaki koyekola Biblia na mwasi moko ntango azalaki elenge. Ntango mwasi yango abalaki, akendaki kofanda na esanga moko na Philippines mpe azalaki lisusu koyekola te. Nzokande, mokolo moko na ntɔngɔ, abondelaki Yehova atindela ye Batatoli na ye. Kaka mokolo yango, ndeko Allan ayaki epai na ye mpe mwasi yango abandaki kolela. Eumelaki te mpo Nzambe ayanola na libondeli na ye mpe yango esimbaki motema na ye. Ata mbula moko ekokaki te, amipesaki epai ya Yehova.

Olukaka mabaku oyo ekoki kosalisa yo omona lobɔkɔ ya Yehova na bomoi na yo? (Talá paragrafe 11-13)

11, 12. (a) Ndenge nini Yehova azali kosalisa basaleli na ye? (b) Lobelá ndenge oyo Yehova asalisaki ndeko mwasi moko.

11 Basaleli mingi ya Yehova bamonaki lobɔkɔ na ye ntango batikaki mimeseno mosusu ya mabe lokola komɛla makaya, kosalela drɔgɛ to kotala pornografi. Basusu balobi ete balukaki kotika na ndenge na bango moko kasi bakokaki te. Kasi, ntango basɛngaki Yehova asalisa bango, apesaki bango “nguya oyo eleki makasi,” mpe batikaki bizaleli na bango wana ya mabe.​—2 Bakorinti 4:7; Nzembo 37:23, 24.

Yehova asalisaka basaleli na ye báyika mpiko na mikakatano na bango

12 Yehova asalisaka mpe basaleli na ye báyika mpiko na mikakatano na bango. Yango nde esalemaki epai ya ndeko mwasi Amy. Basɛngaki ye apesa mabɔkɔ na mosala ya kotonga ndako moko ya Bokonzi mpe ya bamisionɛrɛ na mwa esanga moko na Mbu ya Pasifike. Mimeseno ezalaki ndenge moko te, mbala mingi kura to mai ezalaki te, babalabala ezalaki kotonda na mai, libota na ye etikalaki mosika, mpe azalaki kofanda na shambre moko ya moke na otɛlɛ. Mokolo moko, agangelaki ndeko mwasi moko oyo bazalaki kosala ná ye. Ayokaki mabe na likambo oyo asalaki. Ntango azongaki na shambre na ye oyo ezalaki molili, abondelaki Yehova mpo na kosɛnga ye lisalisi. Na nsima, ntango kura ezongaki, atángaki lisolo moko na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo elobelaki ndenge bapesaki badiplome na kelasi moko ya Gileadi. Lisolo yango elobelaki kaka mikakatano oyo azalaki na yango. Alobi boye: “Na butu wana, namonaki lokola Yehova azali kosolola na ngai. Yango epesaki ngai makasi ya kokoba na mosala na ngai.”​—Nzembo 44:25, 26; Yisaya 41:10, 13.

13. Makambo nini emonisi ete Yehova asalisi basaleli na ye mpo bákɔtela lotomo oyo bazali na yango ya kosakola?

13 Yehova asalisaka mpe basaleli na ye mpo bákɔtela nsango malamu mpe báfandisa yango na nzela ya mibeko. (Bafilipi 1:7) Na ndakisa, ntango baguvɛrnema mosusu elukaki kopekisa mosala ya kosakola, tokendaki kosamba na tribinale. Na mokili mobimba, tolongaki makambo soki 268 oyo tosambaki na batribinale minene, mpe na makambo yango, kobanda na  mobu 2000, tolongaki makambo 24 na Tribinale monene ya Mpoto mpo na ntomo ya bato. Emonani polele ete moto moko te akoki kopekisa lobɔkɔ ya Nzambe!​—Yisaya 54:17; tángá Yisaya 59:1.

14. Makambo nini mosusu emonisi ete Nzambe azali elongo na basaleli na ye?

14 Kosakolama ya nsango malamu na mokili mobimba ezali likambo mosusu oyo emonisi ete lobɔkɔ ya Nzambe ezali kosalisa. (Matai 24:14; Misala 1:8) Mpe Yehova nde azali kosalisa mpo ete bomoko ezala na kati ya basaleli na ye na bikólo nyonso. Bomoko yango ezali esika mosusu te! Ata bato oyo basambelaka Yehova te bandimaka ete: ‘Nzambe azali mpenza na kati na biso.’ (1 Bakorinti 14:25) Tozali mpenza na ebele ya makambo oyo emonisi ete Nzambe azali elongo na basaleli na ye. (Tángá Yisaya 66:14.) Bongo yo, olobi nini? Yo mpe omonaka lobɔkɔ ya Yehova na bomoi na yo?

OMONAKA LOBƆKƆ YA YEHOVA NA BOMOI NA YO?

15. Na ntango mosusu, nini ekoki kosala ete tómona te lobɔkɔ ya Yehova na bomoi na biso?

15 Ntango mosusu tokoki komona te lobɔkɔ ya Nzambe na bomoi na biso. Mpo na nini? Ntango tokutani na mikakatano ebele, tokoki kobosana ete Yehova asalisá biso na makambo mingi liboso. Yango nde ekómelaki Eliya. Azalaki mobali ya mpiko, kasi ntango mokonzi mwasi Yezabele alingaki koboma ye, abangaki makasi. Na ntango moko boye, abosanaki ndenge Yehova asalisaki ye liboso. Biblia elobi ete Eliya azalaki na mposa akufa. (1 Bakonzi 19:1-4) Epai wapi akokaki kozwa lisalisi mpe mpiko? Asengelaki kotalela Yehova!​—1 Bakonzi 19:14-18.

16. Ndenge nini tokoki komona Nzambe ntango tozali na mikakatano?

16 Yobo atyaki makanisi na ye nyonso kaka na mitungisi na ye mpe yango esalaki  ete atalela te mpasi na ye ndenge Yehova azalaki kotalela yango. (Yobo 42:3-6) Ntango mosusu, mikakatano na biso ekoki mpe kosala ete tómona te lobɔkɔ ya Nzambe. Nini ekoki kosalisa biso tómona oyo Nzambe asalaka mpo na biso? Tosengeli kokanisaka na mozindo na oyo Biblia elobi mpo na mikakatano na biso. Na nsuka, Yehova akokóma mpenza moto ya solo epai na biso, mpe biso tokoloba ete: “Nayokaki yo na nsango, kasi sikoyo liso na ngai emoni yo.”

Yehova azali kosalela yo mpo na kosalisa bato mosusu mpo bámona ye? (Talá paragrafe 17, 18)

17, 18. (a) Ndenge nini okoki komona lobɔkɔ ya Yehova na bomoi na yo? (b) Lobelá ndakisa moko oyo emonisi ndenge Nzambe azali kosalisa biso lelo.

17 Ndenge nini okoki komona lobɔkɔ ya Yehova na bomoi na yo? Tólobela bandakisa mitano. Ya liboso, okoki komona ete Yehova asalisá yo oyeba solo. Ya mibale, okoki komona na makanisi ete ozali kokende na makita, ozali koyoka diskur moko mpe koloba: “Yango nde nazalaki na mposa na yango!” Ya misato, ekoki kozala ete omoná ndenge Yehova ayanolá na moko ya mabondeli na yo. Ya minei, ekoki kozala ete ozalaki na mposa ya kosalela Yehova mingi mpe omonaki ndenge asalisaki yo mpo okokisa mokano yango. Ya mitano, ntango mosusu otikaki mosala mpo ezalaki kozwa yo ntango ya kosalela Yehova mpe omonaki ndenge akokisaki elaka na ye oyo: “Nakosundola yo ata moke te.” (Baebre 13:5) Soki tozali na boyokani makasi ná Yehova, tokoki komona polele lobɔkɔ na ye na bomoi na biso.

18 Ndeko mwasi moko na Kenya, na nkombo Sarah, alobi boye: “Nabondelaki mpo na moyekoli moko ya Biblia oyo namonaki ete azalaki kosepela te na boyekoli na ye ya Biblia. Nasɛngaki Yehova soki nakoki kokata boyekoli yango. Ntango kaka nalobaki ‘Amen,’ telefone na ngai elelaki. Moyekoli yango ya Biblia abengaki mpo na kosɛnga soki akoki koyangana na makita elongo na ngai. Elekelaki ngai!” Soki tozali koluka koyeba oyo Nzambe azali kosala mpo na biso, tokomona ndenge lobɔkɔ na ye esalisaka biso. Ndeko mwasi moko na nkombo Rhonna, oyo afandaka na Asie, alobi ete esɛngaka ntango mpo na komona ndenge Yehova asalisaka biso na bomoi. Abakisi ete: “Kasi soki osali bongo, okokamwa mpenza komona ete akipaka biso!”

19. Eloko nini mosusu tosengeli kosala mpo na komona Nzambe?

19 Yesu alobaki ete baoyo “bakomona Nzambe” basengeli kozala “bato ya motema pɛto.” (Matai 5:8) Yango elimboli nini? Tosengeli kobatela makanisi na biso pɛto mpe kotika kosala likambo nyonso oyo ezali mabe. (Tángá 2 Bakorinti 4:2.) Na lisolo oyo, tomoni ete mpo na komona Nzambe, tosengeli kokoba kobongisa boyokani na biso elongo na ye. Na lisolo oyo elandi, tokolobela ndenge kondima ekoki kosalisa biso tómona polele lobɔkɔ ya Yehova na bomoi na biso.