Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Septembre 2015

Makambo nini emonisi ete Yehova alingaka biso?

Makambo nini emonisi ete Yehova alingaka biso?

“Bótala motindo ya bolingo oyo Tata amoniseli biso!”​—1 YOANE 3:1.

NZEMBO: 91, 13

1. Ntoma Yoane alendisaki biso tókanisa na nini, mpe mpo na nini?

NTOMA Yoane alendisi biso tókanisa na mozindo na bolingo monene oyo Yehova azali na yango mpo na biso. Na 1 Yoane 3:1, tozali kotánga boye: “Bótala motindo ya bolingo oyo Tata amoniseli biso!” Ntango tozali kokanisa na ndenge Yehova alingaka biso mpe ndenge amonisaka bolingo na ye epai na biso, topusanaka penepene na ye mpe tolingaka ye lisusu mingi koleka.

2. Mpo na nini ezali mpasi bato mosusu báyeba ete Nzambe alingaka bango?

2 Likambo ya mawa, bato mosusu bayebaka te ete Nzambe akoki kolinga bango. Bakanisaka ete Nzambe akipaka bato te. Mbala mosusu, bandimaka ete Nzambe abimisaka kaka mibeko mpe apesaka baoyo batosaka ye te bitumbu. Mpo na mateya ya lokuta, bato mosusu bakanisaka kutu ete Nzambe azali mabe mpenza mpe ekoki kosalema te ete tólinga ye. Basusu bakanisaka ete Nzambe alingaka bato nyonso ata soki basali likambo nini. Kasi, boyekoli na yo ya Biblia esalisi  yo oyeba solo na ntina na Yehova. Oyebi ete bolingo ezali ezaleli na ye oyo eleki monene mpe ete apesaki mwana na ye lisiko mpo na yo. (Yoane 3:16; 1 Yoane 4:8) Kasi, mpo na makambo oyo okutaná na yango na bomoi, ekoki mbala mosusu kozala mpasi oyeba ete Yehova alingaka yo mingi.

3. Nini ekosalisa biso tóyeba ete Yehova alingaka biso?

3 Mpo na kosalisa biso tóyeba ete Yehova alingaka biso, tosengeli liboso koyeba ete Yehova nde akelá biso. Apesá biso bomoi. (Tángá Nzembo 100:3-5.) Yango wana Biblia ebengaka moto ya liboso “mwana ya Nzambe.” (Luka 3:38) Mpe Yesu ateyaki biso tóbengaka Yehova “Tata na biso na likoló.” (Matai 6:9) Na yango, Yehova azali Tata na biso, mpe alingaka biso ndenge tata ya malamu alingaka bana na ye.

4. (a) Yehova azali Tata ya ndenge nini? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo mpe na oyo ekolanda?

4 Ezali mpasi mpo na bato mosusu bándima ete tata azali moto ya bolingo. Bakoki kozongisa na makanisi makambo ya mpasi oyo bamonaki na bomwana mpo tata na bango azalaki mpenza konyokola bango. Yehova akoki soki moke te kosala bongo epai ya bana na ye. Azali Tata oyo aleki batata nyonso. (Nzembo 27:10) Alingaka biso mingi mpe amibanzabanzaka mpo na biso na makambo mingi. Soki tozali komona ete Yehova alingaka biso, biso mpe tokolinga ye mingi. (Yakobo 4:8) Na lisolo oyo, tokolobela makambo minei oyo emonisi ete Yehova alingaka biso. Mpe na lisolo oyo ekolanda, tokomona makambo minei oyo tokoki kosala mpo na komonisa ete tolingaka ye.

YEHOVA AZALI BOLINGO MPE AKABAKA

5. Nzambe apesi moto nyonso nini?

5 Ntango ntoma Paulo azalaki na Atene, na Grɛsi, amonaki ete bikeko ezalaki ebele mpe ete bato bazalaki kondima ete banzambe na bango bapesaki bango bomoi. Na yango, ayebisaki bango makambo etali “Nzambe oyo asalá mokili mpe biloko nyonso oyo ezali na kati na yango.” Alobaki ete Nzambe “apesaka bato nyonso bomoi mpe mpema mpe biloko nyonso” mpe ete “na nzela na ye nde tozali na bomoi mpe totambolaka mpe tozali.” (Misala 17:24, 25, 28) Yehova apesaka biso biloko nyonso oyo tosengeli na yango mpo na kozala na bomoi mpe mpo tósepela na bomoi. Kanisá na biloko mosusu oyo apesá biso mpo kaka alingaka biso.

6. Yehova apesá biso esika ya ndenge nini? (Talá elilingi ya ebandeli.)

6 Na ndakisa, Yehova abongisaki esika moko kitoko mpenza mpo na biso. (Nzembo 115:15, 16) Na baplanɛti nyonso oyo akelá, emonani lokola ete mabele ekeseni mpenza na oyo mosusu nyonso. Bato ya siansi oyo batambolá na likoló mpe bamoná baplanɛti ebele, bamoni naino planɛti moko te oyo ezali na biloko nyonso oyo bato basengeli na yango mpo na kozala na bomoi. Yehova asuki kaka te na kopesa biso biloko nyonso oyo tosengeli na yango mpo na kozala na bomoi, kasi asalá mpe mabele ezala esika moko kitoko mpenza, epai tokoki kozala na esengo, na kimya mpe kosepela na bomoi. (Yisaya 45:18) Soki tokanisi na esika oyo Yehova, Tata na biso apesá biso, tokomona mpenza ete alingaka biso mingi.​—Tángá Yobo 38:4, 7; Nzembo 8:3-5.

7. Ndenge nini lolenge oyo Yehova akelá biso emonisi ete alingaka biso mingi?

7 Likambo mosusu oyo emonisi ete Yehova  alingaka biso ezali ete akelá biso na likoki ya komekola ye. (Ebandeli 1:27) Yango emonisi ete tokoki komiyoka ete alingaka biso mpe biso tokoki kolinga ye. Ayebi ete yango nde epesaka biso esengo makasi. Kutu, bana bazalaka na esengo makasi ntango bazali komiyoka ete baboti na bango balingaka bango. Mpe tóbosana te ete Yesu ateyaki biso ete tokozala na esengo soki topusani penepene na Yehova, Tata na biso. (Matai 5:3) Apesaka biso “biloko nyonso beboo mpo biso tósepela.” Emonani polele ete akabaka mingi mpe alingaka biso mingi mpenza.​—1 Timote 6:17; Nzembo 145:16.

YEHOVA ATEYAKA BISO SOLO

8. Mpo na nini tolingaka ete Yehova ateya biso?

8 Batata balingaka bana na bango mpe basepelaka te ete bábunga nzela to bákosama. Kasi, baboti mingi lelo oyo bandimaka te mitinda ya Biblia oyo etali mabe ná malamu. Na yango, bakokaka te kotambwisa bana na bango na ndenge ebongi, mpe yango ememaka mawa mpe mobulungano. (Masese 14:12) Kasi, Yehova  apesaka bana na ye litambwisi oyo eleki malamu mpenza mpo azali “Nzambe ya solo.” (Nzembo 31:5) Asepelaka koteya biso solo ya makambo etali ye. Ateyaka mpe biso ndenge tokoki kosambela ye mpe alakisaka biso lolenge eleki malamu ya kozala na bomoi. (Tángá Nzembo 43:3.) Na yango, Yehova ateyi biso nini oyo emonisi ete alingaka biso mingi?

Batata ya mabota bamekolaka Yehova na ndenge bateyaka bana na bango solo mpe basalisaka bango bázala na boyokani ya malamu ná Tata na bango ya likoló (Talá paragrafe 8-10)

9, 10. (a) Mpo na nini Yehova ayebisaka biso makambo etali ye? (b) Ndenge nini ateyi biso mokano oyo azali na yango mpo na biso?

9 Libosoliboso, Yehova ayebisaka biso makambo etali ye. Alingaka ete tóyeba ye. (Yakobo 4:8) Na yango, ayebisi biso nkombo na ye. Kutu, Biblia elobeli nkombo na ye mbala ebele koleka nkombo mosusu nyonso. Yehova ayebisaka biso mpe lolenge ya moto oyo azali. Soki totali biloko oyo akelá, tokomona ete azali na nguya mpe na bwanya. (Baroma 1:20) Mpe ntango tozali kotánga Biblia, tomonaka ete azali sembo mpe alingaka biso mingi. Soki toyebi bomoto ya Yehova, tokopusana mpenza penepene na ye.

Soki toyebi bomoto ya Yehova, tokopusana mpenza penepene na ye

10 Yehova ateyaka biso mpe mokano na ye. Ayebisaka biso ete tozali na kati ya libota na ye. Alimbwelaka mpe biso oyo alingi ete tósala mpo tózala na bomoko mpe na kimya elongo na moto nyonso kati na libota na ye. Biblia emonisi polele ete Nzambe akelá biso te na lotomo ya kokata biso moko oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe. (Yirimia 10:23) Yehova ayebi oyo ezali malamu mpo na biso. Mpe tokoki kozala na bomoi ya kimya mpe ya esengo kaka soki tondimi bokonzi na ye mpe totosi ye. Yehova ateyi biso solo kitoko oyo mpo alingaka biso.

11. Tata na biso ya bolingo ayebisi biso nini mpo na mikolo ezali koya?

11 Tata ya bolingo akanisaka na mozindo ndenge bomoi ya bana na ye ekozala lobi to nsima ya lobi. Alingaka bázala na bomoi ya esengo. Likambo ya mawa, bato mingi lelo bazali komitungisa mpo na bomoi na bango ya lobi, mpe mingi babebisaka bomoi na bango na ndenge basalaka mpo na biloko oyo ekoumela te. (Nzembo 90:10) Tozali mpenza na botɔndi mpo ete Yehova, Tata na biso asuki kaka te na koteya biso ndenge tokoki kozala na bomoi ya esengo banda sikoyo, kasi alaki biso mpe bomoi kitoko na mikolo ezali koya!

YEHOVA ATAMBWISAKA MPE APESAKA BANA NA YE DISIPLINI

12. Ndenge nini Yehova alukaki kosalisa Kaina ná Baruke?

12 Ntango Yehova amonaki ete Kaina akómi na likama ya kosala likambo moko ya mabe mingi, alukaki kosalisa ye na mituna oyo: “Mpo na nini oyoki nkanda makasi mpe mpo na nini elongi na yo ekangami? Soki obandi kosala makambo ya malamu, okondimama te?” (Ebandeli 4:6, 7) Kaina aboyaki lisalisi ya Yehova, mpe amonaki mpasi na nsima. (Ebandeli 4:11-13) Na ntango mosusu, Yehova amonaki ete ezaleli mabe oyo Baruke akómaki na yango, ebandaki kolɛmbisa ye to kosilisa ye makasi. Na yango, Yehova ayebisaki Baruke ete makanisi na ye ezali mabe mpe  ete asengelaki kotika yango. Baruke ayokaki toli ya Yehova, mpe yango ebikisaki bomoi na ye.​—Yirimia 45:2-5.

13. Makambo oyo basaleli ya Yehova ya sembo bamonaki na ntango ya mpasi esalisaki bango na nini?

13 Yehova atambwisaka mpe apesaka biso disiplini mpo alingaka biso. Asukaka kaka te na kosembola biso soki esengeli, kasi apesaka biso mpe formasyo. (Baebre 12:6) Na Biblia, totángaka masolo ya basaleli ya sembo oyo Yehova abongisaki mpo bákóma bato oyo babongi. Na ndakisa, Yozefe, Moize mpe Davidi bakutanaki na mikakatano ya makasi mpenza. Na ntango wana ya mpasi, Yehova azalaki ná bango. Mpe makambo oyo bamonaki na ntango wana ya mpasi esalisaki bango ntango Yehova apesaki bango mikumba minene. Ntango tozali kotánga na Biblia ndenge Yehova asungaka mpe abongisaka bato na ye, tomonaka ete Yehova alingaka mpenza biso.​—Tángá Masese 3:11, 12.

14. Soki tosali likambo moko ya mabe, ndenge nini Yehova amonisaka ete alingaka biso?

14 Ata ntango tosali mabe, Yehova akobaka kolinga biso. Soki tondimi disiplini na ye mpe tobongoli motema, akolimbisa biso “mpenza.” (Yisaya 55:7) Yango elingi koloba nini? Maloba oyo Davidi alobaki na ndenge Yehova alimbisaka emonisi biso ete tozali na Tata moko ya motema mawa mpenza. Alobi boye: “Ye moto azali kolimbisa libunga na yo mobimba, ye moto azali kobikisa yo na minyoko na yo nyonso, Oyo azali kosikola bomoi na yo na libulu, Oyo azali kolatisa yo motole ya motema boboto mpe ya motema mawa. Se ndenge epai moi ebimaka ezali mosika mingi na epai moi elalaka, ndenge yango nde atye mosika na biso ebele ya misala na biso ya kobuka mibeko.” (Nzembo 103:3, 4, 12) Yehova apesaka biso disiplini mpe atambwisaka biso na balolenge ekeseni. Osalaka bambongwana mbala moko? Ntango nyonso, kobosanaka te ete Yehova apesaka biso disiplini mpo alingaka biso.​—Nzembo 30:5.

YEHOVA ABATELAKA BISO

15. Wapi lolenge mosusu oyo Yehova amonisaka ete alingaka biso?

15 Tata ya bolingo abatelaka libota na ye na likama. Yango nde Yehova, Tata na biso asalaka mpo na biso. Moko ya bakomi ya nzembo alobaki mpo na Yehova boye: “Ye abatelaka milimo ya bato na ye ya sembo; Abikisaka bango na lobɔkɔ ya bato mabe.” (Nzembo 97:10) Kanisá na likambo oyo: Ndenge kaka osalaka na lombangu mpo na kobatela miso na yo mpo omonaka ete ezali na motuya mingi mpo na yo, Yehova mpe asalaka noki mpo na kobatela basaleli na ye mpo bazali na motuya mpenza na miso na ye.​—Tángá Zekaria 2:8.

Yehova asalaka noki mpo na kobatela basaleli na ye mpo bazali na motuya mpenza na miso na ye

16, 17. Ndenge nini Yehova abatelaki basaleli na ye na ntango ya kala mpe na mikolo na biso?

16 Lolenge moko oyo Yehova abatelaka bato na ye, ezala na ntango ya kala mpe lelo, ezali na nzela ya baanzelu. (Nzembo 91:11) Anzelu moko abomaki basoda ya Asiri 185 000 na butu moko mpe abikisaki basaleli ya Nzambe.  (2 Bakonzi 19:35) Na siɛklɛ ya liboso, baanzelu babikisaki Petro, Paulo mpe bamosusu na bolɔkɔ. (Misala 5:18-20; 12:6-11) Kala mingi te, etumba moko makasi endongbanaki na ekólo moko ya Afrika. Makambo mingi na ekólo yango ekómaki mabe mpo na bitumba, koyiba, kosangisa nzoto na bato na makasi mpe koboma bato. Atako ndeko moko te akufaki, kasi mingi babungisaki biloko na bango. Kasi, bango nyonso bamonaki bolingo ya Yehova mpe bayebaki ete azalaki komibanzabanza mpo na bango. Atako bakutanaki na bampasi ya lolenge nyonso, bazalaki kaka na esengo. Ntango momonisi moko ya biro monene ya Batatoli ya Yehova akendeki kotala bango mpe atunaki bandeko yango soki bazali ndenge nini, balobaki na ye ete: “Makambo nyonso ezali malamu, matɔndi na Yehova!”

17 Ya solo, basaleli mosusu ya Yehova, na ndakisa moyekoli Setefano mpe bamosusu, bakufaki mpo bazalaki sembo. Yehova apekisaka ntango nyonso te ete likambo ya boye esalema. Kasi, abatelaka basaleli na ye nyonso na ndenge akebisaka bango mpo na mayele ndenge na ndenge oyo Satana asalelaka mpo na kokosa bango. (Baefese 6:10-12) Tozwaka makebisi yango na Biblia mpe na mikanda oyo ebongiseli ya Yehova ebimisaka. Na ndakisa, bakebisaka biso na makama ya makambo etali internet, bolingo ya mbongo, bafilme, babuku to masano oyo elakisaka makambo ya mbindo mpe mobulu. Emonani polele ete Yehova alingaka biso mpe asepelaka kobatela biso.

LIBAKU MOKO KITOKO

18. Omiyoki ndenge nini lokola oyebi ete Yehova alingaka yo?

18 Ntango Moize akanisaki na bambula nyonso oyo asalelaki Yehova, andimisamaki ete Yehova alingaki ye. Moize alobaki boye: “Na ntɔngɔ, tondisá biso na motema boboto na yo, mpo tóganga na esengo mpe tósepela mikolo na biso nyonso.” (Nzembo 90:14) Tozali mpenza na botɔndi koyeba ete Yehova alingaka biso. Oyo nde libaku kitoko tozali na yango ndenge Yehova alingaka biso! Tozali komiyoka lokola ntoma Yoane oyo alobaki ete: “Bótala motindo ya bolingo oyo Tata amoniseli biso!”​—1 Yoane 3:1.