Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Septembre 2015

Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingaka Yehova?

Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingaka Yehova?

“Tozali kolinga, mpo ye alingaki biso liboso.”​—1 YOANE 4:19.

NZEMBO: 56,  138

1, 2. Likambo nini Yehova asalaki oyo etindi biso tólinga ye?

LOLENGE malamu oyo tata akoki koteya bana na ye ezali ya kotikela bango ndakisa. Ntango amonisaka bolingo epai ya bana na ye, ateyaka bango ndenge ya kolinga basusu. Tata na biso Yehova alingaka biso mingi koleka moto mosusu nyonso. Na yango, toyekolaka ndenge ya kolinga basusu “mpo ye alingaki biso liboso.”​—1 Yoane 4:19.

2 Ndenge nini Yehova amonisaki ete “alingaki biso liboso”? Biblia elobi ete: “Ntango tozalaki naino basumuki, Kristo akufelaki biso.” (Baroma 5:8) Yehova, Tata na biso ya bolingo apesaki Mwana na ye lokola lisiko mpo na kobikisa biso na lisumu mpe liwa. Likabo yango ya motuya esali ete tókóma baninga ya Yehova mpe tómonisa ye bolingo na biso. Yehova atikelá biso mpenza ndakisa na ndenge asalaki likambo monene wana. Ateyi biso ete mpo na komonisa ete tolingaka basusu, tosengeli komipimela makambo mosusu mpe kokabaka.​—1 Yoane 4:10.

3, 4. Ndenge nini tomonisaka ete tolingaka Nzambe?

3 Bolingo ezali ezaleli ya Yehova ya libosoliboso. Yango wana, tokoki komona ntina oyo Yesu alobaki ete mobeko oyo eleki ntina ezali: “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na  motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso mpe na makasi na yo nyonso.” (Marko 12:30) Yehova alingi ete tólinga ye na ‘motema na biso mobimba.’ Yehova ayokaka mpasi mingi soki tokómi kolinga moto to eloko mosusu koleka ye. Kasi bolingo na biso mpo na ye esengeli kosuka kaka na motema te. Yehova asepelaka mpe tólinga ye na ‘makanisi na biso nyonso’ mpe na ‘makasi na biso nyonso.’ Yango elingi koloba ete bolingo na biso mpo na Yehova etaleli mpe lolenge oyo tokanisaka mpe makambo oyo tosalaka.​—Tángá Mika 6:8.

4 Na yango, tosengeli kolinga Yehova bomoi na biso mobimba mpe na biloko nyonso oyo tozali na yango. Soki tozali kotya ye na esika ya liboso na bomoi na biso, tokomonisa ye ete tolingaka ye mpenza. Na lisolo oyo eleki, tolobelaki lolenge minei oyo Yehova amonisaka bana na ye bolingo na ye monene. Tótalela sikoyo ndenge oyo tokoki kokómisa makasi bolingo na biso mpo na Yehova mpe komonisa ete tolingaka ye.

MONISÁ YEHOVA ETE OZALI NA BOTƆNDI

5. Ntango tokanisaka nyonso oyo Yehova asalelaka biso, yango etindaka biso tósala nini?

5 Soki moto apesi yo kado moko, na ntembe te okomonisa ete ozali na botɔndi. Mpe lokola kado yango ezali na valɛrɛ na miso na yo, okosalela yango. Yakobo akomaki ete: “Likabo nyonso ya malamu mpe libonza nyonso oyo ekoki mpenza eutaka na likoló, mpo eutaka na Tata ya miinda ya likoló, mpe ye abongwanaka te lokola elili.” (Yakobo 1:17) Tozali mpenza na botɔndi ndenge Yehova apesaka biso biloko nyonso oyo tosengeli na yango mpo tózala na bomoi mpe na esengo. Tomonaka mpenza bolingo monene oyo azalaka na yango mpo na biso, yango wana tolingaka mpe komonisa ye ete tolingaka ye. Yo mpe oyokaka bongo?

6. Bayisraele basengelaki kosala nini mpo Yehova akoba kopambola bango?

6 Yehova apesaki Bayisraele biloko mingi ya malamu. Na boumeli ya bankama ya bambula, apesaki bango mibeko mpo etambwisaka bango mpe biloko mingi oyo basengelaki na yango mpo bátikala na bomoi. (Kolimbola Mibeko 4:7, 8) Mpe mpo na komonisa botɔndi na bango epai ya Yehova, Bayisraele basengelaki kotosa mibeko yango. Na ndakisa, ntango bazalaki kopesa Yehova bambeka, basengelaki kopesa ye “mbuma oyo eleki malamu kati na mbuma ya liboso oyo eteli” na mokili yango. (Kobima 23:19) Bayisraele bayebaki ete Yehova akokoba kopambola bango soki batosi ye mpe bapesi ye biloko na bango oyo eleki malamu.​—Tángá Kolimbola Mibeko 8:7-11.

7. Ndenge nini tokoki kosalela ‘biloko na biso ya motuya’ mpo na komonisa Yehova ete tolingaka ye?

7 Biso mpe tokomonisa Yehova ete tolingaka ye soki tozali kopesa ye ‘biloko na biso ya motuya.’ (Masese 3:9) Tomonisaka yango na ndenge tosalelaka biloko nyonso oyo tozali na yango mpo na kokumisa ye. Na ndakisa, tokoki kotya makabo mpo matomba ya bokonzi na lisangá na biso mpe na mokili mobimba ekende liboso. Ata soki tozali na yango mingi to moke, biso nyonso tokoki kosalela oyo tozali na yango mpo na komonisa Yehova ete tolingaka ye. (2 Bakorinti 8:12) Kasi, ezali mpe na makambo mosusu oyo tokoki kosala mpo na komonisa Yehova ete tolingaka ye.

Soki tozali kotyela Yehova motema mingi, tokomonisa ete tolingaka ye mingi

8, 9. Wapi lolenge mosusu oyo tomonisaka Yehova ete tolingaka ye? Likambo nini ndeko Mike ná libota na ye basalaki?

 8 Yesu ateyaki biso ete tókoba koluka liboso bokonzi mpe tótika komitungisa mpo na kolya mpe kolata. Tata na biso alaki kopesa biso oyo tosengeli na yango. (Matai 6:31-33) Totyelaka Yehova motema mpe toyebi ete akokokisa elaka wana. Kutu, soki olingaka mpenza moto, okotyela ye motema. Ndenge moko mpe, soki tozali kotyela Yehova motema mingi, tokomonisa ete tolingaka ye mingi. (Nzembo 143:8) Na yango, tokoki komituna boye: ‘Mikano na ngai mpe lolenge oyo nasalelaka ntango mpe makasi na ngai emonisaka ete nalingaka mpenza Yehova? Mokolo na mokolo natyelaka Yehova motema ete akokokisa bamposa na ngai?’

9 Ndeko Mike ná libota na ye batyelaki Yehova motema. Ntango ndeko Mike azalaki elenge, azalaki ntango nyonso na mposa ya kokende kosakola na ekólo mosusu. Ata ntango abalaki mpe akómaki na bana mibale, azalaki kaka na mposa wana. Ntango ndeko Mike ná libota na ye batángaki masolo ya bandeko oyo bakendaki kosakola na esika oyo mposa ezali monene, bazwaki ekateli ya kokómisa bomoi na bango pɛpɛlɛ. Batɛkaki ndako na bango mpe bakendaki kofanda na ndako moko ya moke. Ndeko Mike akitisaki motángo ya bakiliya ya mosala na ye ya kotya bopɛto mpe alukaki mayele ya kotambwisa mosala yango na nzela ya internet ntango akokende na mboka mosusu. Yango esalaki ete ndeko Mike ná libota na ye bákende na ekólo mosusu, mpe basepelaki mingi na mosala ya kosakola oyo basalaki kuna. Ndeko Mike alobaki ete: “Tomonaki mpenza bosolo ya maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 6:33.”

MANYOLÁKÁ NA MAKAMBO OYO YEHOVA AZALI KOTEYA YO

10. Na ndakisa ya Davidi, mpo na nini ezali malamu tómanyolaka na makambo oyo toyekolaka mpo na Yehova?

10 Mokolo moko mokonzi Davidi akomaki ete: “Likoló ezali kosakola nkembo ya Nzambe; mpe etando ezali koyebisa mosala ya mabɔkɔ na ye.” Abakisaki ete: “Mobeko ya Yehova ezali ya kokoka, ezongisaka molimo. Bokundoli ya Yehova ebongi kotyelama motema, ekómisaka moto oyo azangi mayele moto ya bwanya.” Lokola Davidi azalaki komanyola na mibeko ya Yehova oyo etondi na bwanya mpe na biloko kitoko oyo akelá, boyokani na ye ná Yehova ekómaki lisusu makasi mpe akómaki na mposa ya komonisa ye ete alingaka ye mingi. Davidi alobaki ete: “Maloba ya monɔkɔ na ngai mpe komanyola ya motema na ngai ekóma elɛngi liboso na yo, ee Yehova Libanga na ngai mpe Mosikoli na ngai.”​—Nzembo 19:1, 7, 14.

11. Ndenge nini tokoki kosalela boyebi oyo Yehova apesaka biso mpo na komonisa ete tolingaka ye? (Talá elilingi ya ebandeli.)

11 Lelo oyo, Yehova ateyaka biso makambo mingi oyo etali ye, mokano na ye, biloko oyo akelá mpe Liloba na ye. Mokili elendisaka bato báyekolaka, kasi mbala mingi bakelasi milaimilai esalaka ete bálinga lisusu Nzambe te. Nzokande, Yehova apesaka biso kaka boyebi te, kasi asalisaka  biso mpe tózala na bwanya. Alingaka ete tósalela makambo oyo toyekoli mpo na bolamu na biso mpe mpo na kosalisa basusu. (Masese 4:5-7) Na ndakisa alingaka ete tóyebisa basusu “boyebi ya sikisiki ya solo” mpe tósalisa bango bábika. (1 Timote 2:4) Tomonisaka bolingo na biso mpo na Yehova mpe bato na ndenge toteyaka bato ebele makambo etali Bokonzi ya Nzambe mpe oyo yango ekosala mpo na bato.​—Tángá Nzembo 66:16, 17.

12. Ndeko mwasi moko ya elenge alobaki nini mpo na likabo moko oyo Yehova apesaki ye?

12 Bilenge mpe bakoki komanyola na makambo nyonso oyo Yehova apesá mpe ateyá bango. Shannon akanisaka ntango nyonso ndenge amiyokaki na liyangani moko oyo akendaki ntango azalaki na mbula 11 mpe leki na ye ya mwasi azalaki na mbula 10. Na boumeli ya liyangani ya etúká “Bizaleli ya moto na Nzambe,” basɛngaki bilenge nyonso ata mpe Shannon ná leki na ye, bákende kofanda na esika moko oyo babongisaki mpo na bango. Liboso, abangaki. Kasi na nsima akamwaki ntango bapesaki elenge nyonso buku Mituna oyo bilenge batunaka. Likabo oyo ya kitoko esalaki ete atalela Yehova ndenge nini? Alobi boye: “Ezalaki na ntango wana nde namonaki mpenza ete Yehova azalaka mpenza mpe alingaka ngai mingi mpenza. Tozali mpenza na botɔndi ndenge Yehova, Nzambe na biso monene apesaka biso makabo ya kitoko mpe ya malamu boye ofele!”

NDIMÁ DISIPLINI OYO EUTI EPAI YA YEHOVA

13, 14. Tosengeli kosala nini ntango Yehova apesi biso disiplini mpe mpo na nini?

13 Biblia eteyaka biso boye: “Yehova apamelaka moto oyo ye alingaka, kaka  ndenge tata apamelaka mwana oyo ye asepelaka na ye.” (Masese 3:12) Ntango tozali kondima disiplini oyo euti epai ya Yehova mpe kondima ete ateya biso, tozali koyekola kosala oyo ezali malamu mpe tokozala na kimya. Ya solo, “disiplini moko te ezalaka likambo ya esengo na ntango oyo bapesi yango, kasi ezalaka nde mawa.” (Baebre 12:11) Na yango, ndenge nini tokosala ntango Yehova apesi biso disiplini? Tosengeli soki moke te koboya batoli ya Yehova to kosilika ntango tosepeli te na makambo oyo tozali koyoka. Tolingaka Yehova, yango wana tolingaka koyoka ye mpe kosala mbongwana oyo ye alingaka.

Soki tosali bambongwana mpo na kosepelisa Yehova, tomonisaka ete tolingaka ye mpenza

14 Na eleko ya Malaki, Bayuda mingi bazalaki koyoka Yehova te. Atako Yehova azalaki te kosepela na bambeka na bango, yango ezalaki kosala bango eloko te. Yehova apesaki bango toli moko ya makasi mpo na likambo yango. (Tángá Malaki 1:12, 13.) Kutu, Yehova apesaki bango toli mbala na mbala, kasi baboyaki koyoka. Yango wana, ayebisaki bango ete: “Nakotindela bino elakeli mabe, mpe nakolakela mapamboli na bino mabe.” (Malaki 2:1, 2) Emonani polele ete soki tozali koboya koyoka toli ya Yehova to tozali komona ete ezali na ntina te, tokozala lisusu baninga na ye te.

Kanisáká na makambo oyo Yehova alingaka na esika ya makambo oyo mokili emonaka malamu (Talá paragrafe 15)

15. Makambo nini tosengeli koboya?

15 Mokili ya Satana elendisaka bato bázala lolendo mpe moimi. Bato mingi balingaka te bápesa bango toli to báyebisa bango makambo oyo basengeli kosala. Basusu bayokaka toli kaka mpo esɛngi bongo. Tosengeli kozala bongo te. Biblia eyebisi biso ‘tótika kolanda makambo ya ntango oyo.’ Kutu, tosengeli nde koyeba oyo Yehova azali kosɛnga biso mpe kosala oyo esepelisaka ye. (Baroma 12:2) Asalelaka ebongiseli na ye mpo na kopesa toli na ntango oyo ebongi. Na ndakisa, bapesaka biso toli na oyo etali bizaleli oyo tosengeli komonisela bandeko basi to mibali, ndenge ya kopona baninga, mpe makambo oyo tosengeli kosala to te na ntango ya kominanola. Soki tozali mpenza kondima disiplini ya Yehova mpe tosali  bambongwana mpo na kosepelisa ye, tomonisaka ete tozali na botɔndi mpo na litambwisi na ye mpe ete tolingaka ye mpenza.​—Yoane 14:31; Baroma 6:17.

TYÁ MOTEMA ETE YEHOVA AKOSALISA MPE AKOBATELA YO

16, 17. (a) Mpo na nini tosengeli koluka likanisi ya Yehova liboso ya kozwa bikateli? (b) Na esika ya kotyela Yehova motema, Bayisraele basalaki nini?

16 Bana mike batyelaka baboti na bango motema ete bakosunga mpe bakobatela bango. Ata mpe mikóló bakoki kosɛnga baboti na bango lisalisi. Bamonaka ete atako bakoki kozwa bikateli bango moko, baboti na bango bakoki kopesa bango toli ya malamu. Tata na biso, Yehova atikaka biso tózwa bikateli biso moko. Kasi lokola totyelaka ye mpenza motema mpe tolingaka ye, tosɛngaka ye lisalisi ntango nyonso mpe tosalaka nyonso tóyeba makanisi na ye liboso ya kozwa ekateli moko. Soki totyeli Yehova motema, akopesa biso elimo santu na ye mpo esalisa biso tósala oyo ezali malamu.​—Bafilipi 2:13.

17 Na eleko ya Samwele, Bayisraele balongaki te etumba ná Bafilistia. Na esika ya kotuna Yehova likambo oyo basengelaki kosala na nsima, balobaki ete: “Tiká tózwa sanduku ya kondimana ya Yehova na Shilo, mpo eya na katikati na biso mpe ebikisa biso na lobɔkɔ ya banguna na biso.” Ekateli wana ememelaki bango nini? “Babomaki bango na koboma moko monene, bongo na Yisraele, mibali nkóto ntuku misato (30 000) bakweaki, babundi oyo batambolaka na makolo. Mpe babɔtɔlaki sanduku ya Nzambe.” (1 Samwele 4:2-4, 10, 11) Bayisraele bakanisaki ete soki kaka bamemi sanduku wana, Yehova akosalisa mpe akobatela bango. Kasi, basɛngaki Yehova lisalisi te mpe balukaki te koyeba likanisi na ye. Kutu, basalaki nde oyo bakanisaki ete ezali malamu, mpe yango ememelaki bango mpasi mingi.​—Tángá Masese 14:12.

18. Biblia eteyi yo nini na likambo etali kotyela Yehova motema?

18 Mokomi moko ya nzembo oyo azalaki kolinga Yehova mingi mpe kotyela ye motema akomaki boye: “Zelá Nzambe, Mpo nakokumisa ye lisusu, azali lobiko monene na ngai. Ee Nzambe na ngai, na kati na ngai molimo na ngai ezangi elikya. Yango wana nazali kokanisa yo.” (Nzembo 42:5, 6) Yo mpe oyokaka bongo mpo na Yehova? Omonaka ete ozali penepene na ye mpe otyelaka ye motema? Okoki koyekola kotyela ye motema lisusu mingi. Biblia eyebisi biso ete: “Tyelá Yehova motema na yo mobimba mpe kondimela mayele na yo moko te. Na banzela na yo nyonso, kanisá ye, mpe ye akosembola banzela na yo.”​—Masese 3:5, 6.

19. Ndenge nini okoki komonisa Yehova ete olingaka ye?

19 Lokola Yehova alingaki biso liboso, ateyi biso ndenge ya kolinga ye. Tókanisaka ntango nyonso makambo mingi oyo asalelaka biso mpe bolingo monene oyo azalaka na yango mpo na biso. Tiká ete tómonisaka ye ete tolingaka ye na motema na biso mobimba, molimo na biso mobimba mpe na makasi na biso nyonso.​—Marko 12:30.