Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Septembre 2015

Ozali koluka kokóma moto oyo akoli na bokoli ya Kristo?

Ozali koluka kokóma moto oyo akoli na bokoli ya Kristo?

“Tokokóma . . . na motindo ya moto oyo akoli mpenza, na bokoli mobimba ya Kristo.”​—BAEFESE 4:13.

NZEMBO: 69, 70

1, 2. Mokano ya mokristo mokomoko ezali nini? Pesá ndakisa.

MPOSA ya mama ya libota ezalaka nini ntango azali kopona bambuma na zando? Alandaka te mpo mbuma boye to boye ezali monene to ntalo moke. Kasi, alukaka nde bambuma oyo ezali na nsolo kitoko, oyo babuki sika mpe oyo esengeli kolyama mbala moko. Akolinga mbuma oyo ekɔmɛlá to etelá.

Mokristo oyo akɔmɛli alukaka mitinda ya Biblia oyo ekoki kosalisa ye ayeba oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe

2 Soki moto ayekoli makambo etali Yehova mpe azwi ekateli ya kozwa batisimo, boyokani na ye ná Nzambe ekobaka kokóma makasi. Mokano na ye ezali ya kokóma mokristo oyo akɔmɛli. Kokɔmɛla oyo tozali kolobela awa ezali te ya kokóma mokóló na bambula. Ezali nde kokola na elimo, elingi koloba, kokóma na boyokani ya malamu mpenza ná Yehova. Mposa ya ntoma Paulo ezalaki ete bakristo ya Efese bákɔmela. Alendisaki bango bázala na bomoko na kondima mpe bákoba koyekola makambo etali Yesu mpo bákóma “na motindo ya moto oyo akoli mpenza, na bokoli mobimba ya Kristo.”​—Baefese 4:13.

3. Bokokani nini ezali kati na lisangá ya Efese ná basaleli ya Yehova lelo oyo?

 3 Ntango ntoma Paulo akomelaki bakristo ya Efese, lisangá yango eumelaki mwa bambula. Bakristo mingi ya lisangá yango bakɔmɛlaki, bakómaki bakristo oyo bateli. Kasi, bakristo mosusu basengelaki kokómisa lisusu boyokani na bango ná Yehova makasi mpenza. Ndenge moko lelo, bandeko mingi basaleli Yehova na boumeli ya mbula mingi mpe bakómi bakristo oyo bakɔmɛli. Nzokande, bamosusu na kati ya masangá bateli naino te. Na ndakisa, bankóto ya bato bazali kobatisama mbula na mbula; na yango, bamosusu basengeli naino kokola mpo na kokɔmɛla. Tokoloba nini mpo na yo?​—Bakolose 2:6, 7.

NDENGE NINI MOKRISTO AKOKI KOKOLA NA ELIMO?

4, 5. Bakristo oyo bakɔmɛli bakeseni na nini, kasi bango nyonso bakokani na nini? (Talá elilingi ya ebandeli.)

4 Soki ozali kotala bambuma oyo eteli na zando, okomona ete yango nyonso ezali na bilembo ya kotela ndenge moko te. Kasi, ezali na bilembo mosusu ya ndenge moko oyo ezali komonisa ete bambuma yango nyonso ekɔmɛli. Ezali mpe bongo mpo na bakristo oyo bakɔmɛli. Bango nyonso bazali ndenge moko te. Bauti na mikili mpe mimeseno ndenge na ndenge. Bazali bato ya bambula ekeseni mpe makambo oyo balingaka ná oyo balingaka te ezali ndenge moko te. Kasi, bakristo nyonso oyo bakɔmɛli bazali na bizaleli mosusu ndenge moko oyo ezali komonisa ete bakɔmɛli. Bizaleli yango mosusu ezali nini?

‘Ezali nde na bambongwana oyo nakoki kosala mpo namekola Yesu malamumalamu?’

5 Mokristo oyo akɔmɛli amekolaka Yesu mpe alandaka “matambe na ye malamumalamu.” (1 Petro 2:21) Yesu alobaki ete ezali na ntina mingi moto alinga Yehova na motema, molimo mpe makanisi na ye mobimba mpe alinga mozalani na ye ndenge ye moko amilingaka. (Matai 22:37-39) Mokristo oyo akɔmɛli asalaka makasi atosa toli yango. Na bomoi na ye, amonisaka ete boyokani na ye elongo na Yehova mpe bolingo makasi mpo na basusu ezali na ntina mingi mpo na ye.

Bakristo oyo bakómi mibange bakoki kolanda ezaleli ya komikitisa ya Yesu mpe kosunga bilenge oyo bazali sikoyo kotambwisa makambo (Talá paragrafe 6)

6, 7. (a) Wapi bizaleli mosusu oyo emonisaka ete moto azali mokristo oyo akɔmɛli? (b) Tosengeli komituna mituna nini?

6 Bolingo ezali kaka moko ya ebele ya bizaleli oyo mokristo oyo akɔmɛli amonisaka. (Bagalatia 5:22, 23) Amonisaka mpe motema pɛtɛɛ, komipekisa mpe motema molai. Bizaleli yango ekoki kosalisa ye ayika mpiko na minyoko kozanga kosilika  mpe alonga makambo oyo ekoki kolɛmbisa ye nzoto kozanga kobungisa elikya. Na boyekoli na ye moko, mokristo oyo akɔmɛli alukaka mitinda ya Biblia oyo ekosalisa ye ayeba oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe. Na nsima, ntango azali kosalela lisosoli na ye oyo eteyami na Biblia, akozala na likoki ya kozwa bikateli ya bwanya. Mokristo oyo akɔmɛli amikitisaka, na yango andimaka ete litambwisi ya Yehova mpe mitinda na ye ezalaka ntango nyonso malamu mingi koleka oyo ya ye. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Asakolaka nsango malamu na molende mpe asalaka nyonso oyo akoki mpo na kosalisa lisangá ezala na bomoko.

7 Ezala tosaleli Yehova bambula boni, mokomoko na biso akoki komituna boye: ‘Ezali nde na bambongwana oyo nakoki kosala mpo namekola Yesu malamumalamu? Ezali na makambo oyo nakoki kobongisa?’

“BILEI YA MAKASI EZALI YA BATO OYO BAKƆMƐLI”

8. Nini endimisi biso ete Yesu ayebaki mpe asosolaki Biblia malamumalamu?

8 Yesu Kristo ayebaki mpe asosolaki Makomami malamu. Ata ntango azalaki  na mbula 12, asalelaki Makomami ntango azalaki kosolola na bateyi na tempelo. “Baoyo nyonso bazalaki koyoka ye bazalaki se kokamwa na mayele na ye mpe na biyano na ye.” (Luka 2:46, 47) Na nsima, ntango azalaki kosakola, asalelaki malamumalamu Liloba ya Nzambe mpo na kokangisa banguna na ye monɔkɔ.​—Matai 22:41-46.

9. (a) Mokristo oyo akɔmɛli asengeli kozala na programɛ nini ya boyekoli? (b) Mpo na nini toyekolaka Biblia?

9 Moto oyo alingaka kokóma mokristo oyo ateli alandaka ndakisa ya Kristo mpe alingaka kososola Biblia malamu. Alukaka ntango nyonso koyeba mateya mozindo ya Makomami, mpo ayebi ete “bilei ya makasi ezali ya bato oyo bakɔmɛli.” (Baebre 5:14) Mokristo oyo akɔmɛli alingaka kozala na “boyebi ya solosolo” ya Biblia. (Baefese 4:13) Na yango, omituna boye: ‘Natángaka Biblia mokolo na mokolo? Nazali na programɛ ya boyekoli na ngai moko? Natambwisaka losambo na kati ya libota pɔsɔ nyonso?’ Ntango ozali koyekola Biblia, luká mitinda oyo ekoki kosalisa yo oyeba makanisi ya Yehova mpe ndenge amiyokaka. Na nsima, salelá mitinda yango ntango ozali kozwa bikateli. Yango ekosalisa yo opusana mpenza penepene na Yehova.

10. Ndenge nini mokristo oyo akɔmɛli atalelaka toli mpe mitinda ya Nzambe?

10 Mokristo oyo akɔmɛli asengeli kosuka te kaka na koyeba oyo Biblia elobi. Asengeli kolinga toli ya Nzambe mpe mitinda na ye. Na nsima, amonisaka bolingo yango na mposa oyo azali na yango ya kosala mokano ya Yehova na esika ya kosala oyo ya ye moko. Kutu, abongolaka bizaleli, makanisi mpe misala na ye. Na ndakisa, amekolaka Yesu mpe amonisaka bomoto ya sika, oyo “ezalisamaki na boyokani na mokano ya Nzambe na boyengebene mpe bosembo ya solo.” (Tángá Baefese 4:22-24.) Ezali na ntina mpenza tóbosana te ete Nzambe asalelaki elimo santu na ye mpo na kotambwisa bakomi ya Biblia. Na yango, ntango mokristo azali koyekola Biblia, elimo santu ya Nzambe esalisaka ye akóma na boyebi mingi, bolingo mpe boyokani na ye elongo na Yehova ekómaka makasi.

LUKÁKÁ ETE BOMOKO EZALA

11. Makambo nini Yesu akutanaki na yango ntango azalaki awa na mabele?

11 Yesu azalaki moto ya kokoka. Kasi, ntango azalaki awa na mabele, azalaki ná bato ya kozanga kokoka. Baboti mpe bandeko na ye nyonso bazalaki bato ya kozanga kokoka. Ata bandeko ya Yesu ya makila bamonisaki bizaleli lokola lolendo mpe moimi. Na ndakisa, na butu oyo ezalaki liboso ya liwa na ye, bayekoli na ye batyanaki ntembe mpo na koyeba “nani na kati na bango amonani ete aleki bango nyonso.” (Luka 22:24) Atako bazalaki na makanisi mabe, Yesu ayebaki ete mosika te, bayekoli na ye bakokóma bakristo oyo bakɔmɛli mpe bakosala lisangá oyo ezali na bomoko. Kaka na butu yango, Yesu abondelaki mpo na bango mpo bázala na bomoko. Asɛngaki Tata na ye ete bango nyonso bázala na bomoko. Alobaki boye: “Ndenge yo, Tata, ozali na bomoko elongo na ngai mpe ngai nazali na bomoko elongo na yo.” Abakisaki ete: “Mpo bango mpe bázala na bomoko ndenge biso tozali moko.”​—Yoane 17:21, 22.

12, 13. (a) Mokano na biso bakristo ezali nini? (b) Nini esalisaki ndeko mobali moko alukaka kotya bomoko?

 12 Mokristo oyo akɔmɛli alukaka ete bomoko ezala na lisangá. (Tángá Baefese 4:1-6, 15, 16.) Mokano na biso bakristo ezali ya ‘kosangana liboke moko na boyokani mpenza,’ elingi koloba, kosala na bomoko. Mpo na kozala na bomoko ya ndenge wana, esengeli mokristo azala na komikitisa. Na yango, ata ntango makambo mabe ya basusu esali ye mpasi, mokristo oyo akɔmɛli asalaka makasi abatela ntango nyonso bomoko ya lisangá. Mpo na ntina wana, omituna boye: ‘Nasalaka nini ntango ndeko moko asali libunga? Namiyokaka ndenge nini soki moto moko asali likambo oyo epesi ngai mpasi na motema? Mbala mingi, natikaka kosolisa ye? To nalukaka nde kobongisa boyokani elongo na ye?’ Mokristo oyo akɔmɛli alingaka kosilisa likambo na esika ya kozala moto oyo alukelaka basusu makambo.

13 Tólobela ndakisa ya ndeko Uwe. Liboso, azalaki kotika ete ezaleli ya kozanga kokoka ya bandeko epesa ye mpasi. Na nsima, azwaki ekateli ya kosalela Biblia mpe buku Étude perspicace des Écritures mpo na koyekola bomoi ya Davidi. Mpo na nini aponaki koyekola bomoi ya Davidi? Mpo Davidi mpe, akutanaki na mikakatano ná basaleli mosusu ya Nzambe. Na ndakisa, mokonzi Saulo alukaki koboma Davidi, bato mosusu balingaki kobamba ye mabanga, mpe ata mwasi na ye moko asɛkaki ye. (1 Samwele 19:9-11; 30:1-6; 2 Samwele 6:14-22) Kasi atako bato basalaki ye makambo ya ndenge wana, Davidi alingaki Yehova mpe azalaki kotyela ye motema. Davidi amonisaki mpe motema mawa. Ndeko Uwe amonaki ete esengeli mpe asala bongo. Na lisalisi ya boyekoli oyo asalaki, amonaki ete esengeli abongola lolenge oyo azalaki kotalela mabunga ya bandeko na ye. Asengelaki kotika kokanisaka mabunga na bango mpe koluka ete bomoko ezala na lisangá. Yo mpe ozali na mokano ya kosala bongo?

LUKÁ BANINGA NA KATI YA BAOYO BASALAKA MOKANO YA NZAMBE

14. Yesu aponaki baninga na ye ndenge nini?

14 Yesu Kristo azalaki moninga ya bato. Mibali, basi, bilenge mpe mikóló, ata mpe bana bazalaki kobanga te kopusana pene na Yesu. Kasi aponaki baninga na ye malamumalamu. Ayebisaki bantoma na ye ete: “Bozali baninga na ngai soki bozali kosala makambo oyo nazali kopesa bino mitindo.” (Yoane 15:14) Yesu aponaki baninga na ye ya motema na kati ya bato oyo balandaki ye na bosembo, balingaki mpe basalelaki Yehova. Oponaka baninga oyo balingaka Yehova na motema na bango mobimba? Mpo na nini kosala bongo ezali na ntina mingi?

Oponaka baninga oyo balingaka Yehova na motema na bango mobimba?

15. Litomba nini bilenge bakoki kozwa soki bakómi baninga ya bakristo oyo bakɔmɛli?

15 Bambuma mingi etelaka na molunge ya moi. Ndenge moko, bolingo makasi ya bandeko na biso ekoki kosalisa yo okóma mokristo oyo akɔmɛli. Ozali elenge mpe ozali koluka kozwa ekateli soki okosala  nini na bomoi na yo? Soki ezali bongo, ezali malamu kopona baninga oyo basaleli Yehova mwa bambula mpe balingaka ete bomoko ezala na lisangá. Ekoki kozala ete bakutanaki na mikakatano na bomoi na bango mpe bayikaki mpiko na mikakatano wana bazali kosalela Yehova. Bakoki kosalisa yo opona lolenge ya bomoi oyo eleki malamu. Soki ozali kolekisa ntango ná bango, bakoki kosalisa yo ozwa bikateli ya malamu mpe okóma mokristo oyo akɔmɛli.​—Tángá Baebre 5:14.

16. Ndenge nini bandeko ya mikóló na lisangá basalisaki ndeko mwasi moko ntango azalaki elenge?

16 Ndeko Helga, azali koyeba ete na mbula ya nsuka ya kelasi na ye, baninga na ye mingi ya kelasi bazalaki kolobela mikano na bango. Mingi kati na bango bazalaki na mposa ya kokende na iniversite mpo bázala na bomoi ya malamu na nsima. Kasi, ndeko Helga asololaki ná baninga na ye ya lisangá oyo bakɔmɛli. Alobi ete: “Mingi na bango balekaki ngai mosika na bambula, mpe basalisaki ngai mingi. Balendisaki ngai nabanda mosala ya ntango nyonso. Na nsima, nalekisaki mbula mitano na mosala ya mobongisi-nzela. Lelo oyo, bambula na nsima, nazali na esengo ete nalekisi bolenge na ngai mingi na mosala ya Yehova. Ezali ata na ntina te ya koyoka mawa mpo na ekateli oyo nazwaki.”

17, 18. Ntango nini moto akoki kosalela Yehova malamu?

17 Ntango tozali komekola Yesu, tokokóma bakristo oyo bakɔmɛli. Tokopusana penepene na Yehova, mpe mposa na biso ya kosalela ye ekokola. Moto asalelaka Yehova malamu ntango akɔmɛli. Yesu alendisaki bayekoli na ye ete: “Tiká pole na bino engɛnga liboso ya bato, mpo bámona misala na bino ya malamu mpe bápesa Tata na bino oyo azali na likoló nkembo.”​—Matai 5:16.

18 Tomoni ndenge mokristo oyo akɔmɛli akoki kozala lisalisi monene mpo na lisangá. Mokristo amonisaka mpe ete akɔmɛli na ndenge asalelaka lisosoli na ye. Ndenge nini lisosoli na biso ekoki kosalisa mpo na kozwa bikateli ya malamu? Mpe ndenge nini tokoki kotosa lisosoli ya basusu? Tokoyanola na mituna wana na lisolo oyo elandi.

^ par. 6 Na ndakisa, bakoki kosɛnga na bandeko mibali oyo bakómi mibange to baumeli mingi mpenza bátika mokumba moko mpe básalisa bandeko mibali ya bilenge oyo bazwi mokumba yango.