“Ntina ya etinda oyo ezali mpo tózala na bolingo oyo euti na motema ya pɛto mpe na lisosoli ya malamu.”​—1 TIMOTE 1:5.

NZEMBO: 57, 48

1, 2. Nani apesá biso lisosoli, mpe mpo na nini tokoki kozala na botɔndi mpo na yango?

YEHOVA NZAMBE akelá bato na bonsomi ya kopona, elingi koloba kozwaka bikateli bango moko. Mpo na kosalisa biso tózwa bikateli ya malamu, Yehova apesá biso motambwisi moko. Motambwisi yango ebengami lisosoli, mpe ezali likoki ya koyeba malamu ná mabe oyo ezalaka na kati na biso. Ntango tozali kosalela lisosoli na biso na lolenge ya malamu, ekoki kosalisa biso tósala oyo ezali malamu mpe tóboya oyo ezali mabe. Lisosoli na biso ezali elembeteli oyo emonisi ete Yehova alingaka biso mpe azali na mposa ete tólonga.

2 Bato mosusu lelo oyo, basalaka oyo ezali malamu mpe bayinaka oyo ezali mabe atako bayebi te mitinda ya Biblia. (Tángá Baroma 2:14, 15.) Mpo na nini? Ezali mpo ete bazali na lisosoli. Epekisaka ebele ya bato mpo na kosala makambo ya mabe. Kanisá ndenge mokili elingaki mpenza kozala mabe soki ata moto moko te azalaka na lisosoli! Tolingaki kutu koyoka makambo mingi ya mabe mpenza koleka oyo toyoká. Tosengeli kozala na botɔndi epai ya Yehova ndenge apesá bato lisosoli!

Ndenge nini lisosoli oyo eteyami malamu ekoki kosalisa biso ntango tosengeli kozwa bikateli?

3. Ndenge nini lisosoli na biso ekoki kosalisa biso na lisangá?

 3 Bato mingi bakanisaka te mpo na likambo etali koteya lisosoli na bango. Nzokande, basaleli ya Yehova balingaka ete lisosoli na bango esala malamu mpenza mpo ekoki kozala lisalisi oyo ebongi mpo bomoko ezala na lisangá. Tolingaka lisosoli na biso ekundwela biso mitinda ya Biblia oyo etali makambo mabe ná malamu. Nzokande, mpo na koteya mpe kosalela lisosoli na biso, tosengeli kosuka te kaka na koyekola oyo Biblia elobaka. Tosengeli kolinga mitinda ya Nzambe mpe kozala na kondima ete ezali mpo na bolamu na biso. Ntoma Paulo akomaki ete: “Ntina ya etinda oyo ezali mpo tózala na bolingo oyo euti na motema ya pɛto mpe na lisosoli ya malamu mpe na kondima oyo ezali na bokosi te.” (1 Timote 1:5) Ntango tozali koteya lisosoli na biso mpe kolanda yango, bolingo mpe kondima na biso epai ya Yehova ekokola. Lolenge oyo tosalelaka lisosoli na biso emonisaka ete tozali na boyokani ya malamu mpenza elongo na Yehova mpe emonisaka ete tolingaka kosepelisa ye mingi. Lisosoli na biso emonisaka mpe lolenge ya moto oyo tozali mpenza.

4. Ndenge nini tokoki koteya lisosoli na biso?

4 Kasi ndenge nini tokoki koteya lisosoli na biso? Tosengeli koyekola Biblia mokolo na mokolo, komanyola na makambo oyo tozali kotánga, mpe kosɛnga Yehova asalisa biso tósalela makambo oyo toyekoli. Yango elingi koloba ete tosengeli kosuka te kaka na koyekola makambo to mibeko ebeleebele. Ntango tozali koyekola Biblia, mokano na biso esengeli kozala ya koyeba Yehova malamu mpenza. Toyebaka ndenge azali, makambo oyo alingaka mpe alingaka te. Ntango tozali koyekola makambo etali Yehova, lisosoli na biso ekómaka koyeba nokinoki nini amonaka ete ezali malamu to mabe. Soki tozali koteya lisosoli na biso mingi, tokokóma na makanisi ya Yehova.

5. Tokolobela nini na lisolo oyo?

5 Kasi, tokoki komituna boye: Ndenge nini lisosoli oyo eteyami malamu ekoki kosalisa biso ntango tosengeli kozwa bikateli? Ndenge nini tokoki kotosa lisosoli ya mokristo mosusu? Mpe ndenge nini lisosoli na biso ekoki kotinda biso tósala oyo ezali malamu? Tótalela makambo misato oyo esɛngi tózala na lisosoli oyo eteyami malamu: (1) kosalisa nzoto, (2) kominanola, mpe (3) mosala na biso ya kosakola.

ZALÁ NA BOKATIKATI

6. Bikateli nini tozwaka na likambo etali kosalisa nzoto na biso?

6 Biblia eyebisi biso ete tóboya makambo oyo ekopesa biso mpasi mpe tózala na bokatikati na bizaleli na biso, na makambo lokola kolya mpe komɛla. (Masese 23:20; 2 Bakorinti 7:1) Ntango tozali kotosa toli ya Biblia, ekoki kosalisa biso mpo na kobatela nzoto na biso. Kasi tobɛlaka mpe tokómaka mibange. Bikateli nini tokoki kozwa? Na bikólo mosusu, okoki kokuta minganga oyo basalisaka na nkisi ya mindɛlɛ mpe baoyo basalisaka na nkisi ya bonkɔkɔ. Babiro ya filiale ezwaka mikanda mbala na mbala ya bandeko oyo batunaka mituna ndenge na ndenge mpo na likambo etali kosalisa nzoto. Mingi batunaka, “Mosaleli  ya Yehova akoki kondima nkisi boye to boye?”

7. Ndenge nini tokoki kozwa bikateli mpo na likambo etali makila?

7 Biro ya filiale to bankulutu ya lisangá bazali te na bokonzi ya kozwa bikateli na esika ya mokristo na likambo etali lisalisi ya monganga, ata soki atuni nini asengeli kosala. (Bagalatia 6:5) Kasi, bankulutu bakoki komonisa oyo Yehova alobaka mpo na kosalisa mokristo yango azwa ekateli ya malamu. Na ndakisa, Nzambe apesá biso etinda ya kokoba koboya makila. (Misala 15:29) Etinda yango esalisaka mokristo asosola polele ete akoki soki moke te kondima lisalisi ya minganga oyo ekosɛnga kozongisa makila yango moko to ata moko ya biloko na yango minei ya minene. Likanisi yango ekoki kutu kotungisa to te lisosoli ya mokristo ntango asengeli kozwa ekateli ya kondima to te biloko ya mikemike, oyo eutaka na biloko minei ya minene ya makila. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Wapi toli mosusu ya Biblia oyo ekoki kosalisa biso tózwa bikateli ya malamu na likambo etali kozwa lisalisi ya monganga?

8. Ndenge nini Bafilipi 4:5 ekoki kosalisa biso tóyeba kozwa bikateli na likambo etali kosalisa nzoto?

8 Mokanda ya [Batoli] Masese 14:15 elobi ete: “Zoba andimaka makambo nyonso oyo balobelaka ye; kasi moto ya ekenge akanisaka liboso ya kosala likambo, Bible na lingala ya lelo oyo.” Lelo oyo, ekoki kozala ete lolenge ya kosilisa bamaladi mosusu eyebani te. Na yango, tosengeli kokeba na bankisi mosusu oyo emonanaka lokola ekoki kosilisa maladi moko kasi ata eloko moko te emonisi ete ekoki kosala yango. Ntoma Paulo akomaki ete: “Bato nyonso báyeba ezaleli na bino ya makambo makasimakasi te.” (Bafilipi 4:5) Koboya kozala makambo makasimakasi ekosalisa biso tótya makanisi mobimba na kosambela Yehova na esika ya kolekisa ntango mingi ya bomoi na biso kaka na likambo etali kolɔngɔnɔ ya nzoto. Soki likambo etali kosalisa nzoto ekómi likambo eleki ntina na bomoi na biso, tokobanda koluka kaka matomba na biso moko. (Bafilipi 2:4) Toyebi ete tokoki soki moke te kozala na nzoto ya kokoka na ebongiseli oyo. Na yango, omindimisa ete kosalela Yehova nde likambo eleki ntina na bomoi na yo.​—Tángá Bafilipi 1:10.

Otindaka basusu na makasi bálanda likanisi na yo? (Talá paragrafe 9)

9. Ndenge nini makanisi oyo ezali na Baroma 14:13, 19 etaleli mpe bikateli na biso na likambo etali kolɔngɔnɔ ya nzoto, mpe ndenge nini bomoko na biso ekoki kotyama na likama?

 9 Mokristo oyo azali makambo makasimakasi te alukaka te kotinda basusu na makasi básala makambo oyo ye azali kokanisa ete ezali malamu. Na ekólo moko, ndeko mobali moko ná mwasi na ye bazalaki kolendisa bandeko mosusu ete bályaka mpe báboyaka biloko mosusu (régime). Bandimisaki bandeko mosusu básala bongo, kasi bamosusu baboyaki. Ntango régime yango ebimisaki matomba ya malamu te, bandeko mingi batungisamaki. Ndeko mobali yango ná mwasi na ye basalaki mabe te ndenge bazwaki ekateli bango moko mpo na kolanda régime wana. Kasi, ezalaki mpenza malamu ete báluka kotya bomoko ya lisangá na likama mpo na likambo etali kosalisa nzoto? Na Roma ya kala, bakristo mosusu bazalaki na makanisi ekeseni na likambo etali bilei mpe bafɛti mosusu. Ntoma Paulo apesaki bango toli nini? Alobaki ete: “Moto mosusu azali komona ete mokolo boye eleki mokolo boye; moto mosusu azali komona ete mokolo boye ezali lokola mikolo mosusu nyonso; moto na moto amindimisa mpenza na makanisi na ye moko.” Tókeba ete tóbɛtisa basusu libaku te.​—Tángá Baroma 14:5, 13, 15, 19, 20.

Omindimisa ete kosalela Yehova nde likambo eleki ntina na bomoi na yo

10. Mpo na nini tosengeli kotosa bikateli oyo basusu bazwi na makambo oyo etali bango moko? (Talá elilingi ya ebandeli.)

10 Na ntango mosusu, tokoki koyeba te ntina oyo ndeko moko na kati ya lisangá azwi ekateli boye to boye na likambo oyo etaleli ye moko. Tosengeli kosala nini? Tosengeli kowela te kosambisa ye to kotinda ye na makasi abongola likanisi na ye. Ntango mosusu esengeli ateya lisusu lisosoli na ye mingi, to ekoki kozala ete lisosoli na ye etungisamaka mpambampamba. (1 Bakorinti 8:11, 12) To mpe ekoki kozala ete lisosoli na biso moko nde eteyami malamumalamu te. Soki ekómi likambo etali kosalisa nzoto to makambo mosusu, mokomoko na biso asengeli kozwa ekateli na ye mpe kondima mabe ná malamu na yango.

OMINANOLAKA

11, 12. Ndenge nini Biblia esalisaka biso tópona lolenge oyo tokoki kominanola?

11 Yehova akelá biso na likoki ya kominanolaka mpe kozwa litomba na yango. Mokonzi Salomo akomaki ete ezali na “ntango ya kosɛka” mpe “ntango ya kobina.” (Mosakoli 3:4) Kasi, lolenge nyonso te ya kominanola nde epesaka moto litomba to makasi. Tosengeli mpe koboya kolekisa ntango mingi na kominanola. Ndenge nini lisosoli na biso esalisaka biso tósepela mpe tózwa litomba na lolenge ya kominanola oyo Yehova andimaka?

‘Lisosoli na ngai ekebisaka ngai ntango namekami?’

12 Biblia ekebisi biso na “misala ya nzoto.” Na kati ya misala yango, tokoki kotánga “pite, mbindo, etamboli ya nsɔni, losambo ya bikeko, misala ya bilimo mabe, koyinana, koswana, zuwa, nkanda makasimakasi, kowelana, bokabwani, mwa mangomba, likunya, kolangwa masanga, bafɛti ya lokoso mpe makambo oyo ekokani na oyo wana.” Ntoma Paulo akomaki  ete “baoyo basalaka makambo ya ndenge wana bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te.” (Bagalatia 5:19-21) Na yango, tokoki komituna boye: ‘Lisosoli na ngai esalisaka ngai naboya masano oyo elendisaka bitumba, kowelana, bolingo ya ekólo to mobulu? Lisosoli na ngai ekebisaka ngai ntango namekami mpo na kotala filme oyo ezali na pornografi to oyo elendisaka pite to ekobo, kolangwa masangá, to misala ya bilimo mabe?’

13. Ndenge nini toli oyo ezali na 1 Timote 4:8 mpe Masese 13:20 ekoki kosalisa biso na likambo etali kominanola?

13 Mitinda ya Biblia ekoki kosalisa biso tóteya lisosoli na biso na likambo etali kominanola. Na ndakisa, Biblia elobi ete “ngalasisi ya nzoto ezali na litomba na mwa makambo moke.” (1 Timote 4:8) Bato mingi bakanisaka ete kosalaka ngalasisi mbala na mbala epesaka makasi mpe ezali malamu mpo na nzoto na bango. Kasi, tokoloba nini soki tolingi kosala ngalasisi elongo na etuluku moko ya bato? Ezali mabe te ata soki tosali ngalasisi ná moto nini? Mokanda ya Masese 13:20 eyebisi biso ete: “Ye oyo atambolaka na bato ya bwanya akokóma na bwanya, kasi ye oyo azalaka na boyokani na bazoba akosuka mabe.” Emonani polele ete ezali na ntina tósalela lisosoli na biso oyo eteyami na Biblia ntango tolingi kopona lolenge ya kominanola.

14. Ndenge nini libota moko esalelaki makanisi oyo ezali na Baroma 14:2-4?

14 Ndeko Christian ná Daniela bazali na bana mibale ya basi oyo bazali naino bilenge. Ndeko Christian alobi ete: “Ntango tosalaki losambo na kati ya libota, tolobelaki likambo etali kominanola. Tondimaki ete lolenge mosusu ya komisepelisa ezali malamu kasi mosusu ezali malamu te. Banani bakoki kozala baninga ya malamu? Moko ya bana na biso ya basi amilelaki ete na ntango ya bopemi na bango na eteyelo, bilenge Batatoli mosusu bamonisaki bizaleli oyo ye amonaki ete ezali malamu te. Mpe batyaki ye mosukusuku ete asala mpe bongo. Tomonisaki ye ete mokomoko na biso azali na lisosoli, mpe tosengeli komitambwisa na yango mpo na kopona makambo oyo tokosala mpe bato oyo tokozala ná bango.”​—Tángá Baroma 14:2-4.

Lisosoli na yo oyo eteyami na Biblia ekoki kosalisa yo okima makama (Talá paragrafe 14)

15. Ndenge nini makanisi ya Matai 6:33 ekoki kosalisa biso ntango tozali kokana kominanola?

 15 Olekisaka ntango boni na kominanola? Otyaka makambo lokola makita, mosala ya kosakola mpe koyekola Biblia na esika ya liboso na bomoi na yo, to kominanola nde ezalaka na esika ya liboso? Likambo nini eleki ntina mpo na yo? Yesu alobaki ete: “Boye, bókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene na ye, mpe bakobakisela bino biloko nyonso wana mosusu.” (Matai 6:33) Ntango ozali kozwa ekateli na likambo etali ndenge ya kosalela ntango na yo, lisosoli na yo ekundwelaka yo toli oyo ya Yesu?

TOLENDISAMI ETE TÓSAKOLAKA

16. Ndenge nini lisosoli na biso elendisaka biso tósakola?

16 Lisosoli oyo eteyami, ekebisaka biso te kaka tóboya kosala makambo ya mabe, kasi etindaka biso mpe tósala makambo ya malamu. Moko ya makambo yango ezali kosakola ndako na ndako mpe epai ya bato oyo tokutanaka na bango na libaku malamu. Yango nde ntoma Paulo asalaki. Akomaki ete: “Ezali nde mokumba oyo batye likoló na ngai. Ya solo, mawa na ngai soki nasakoli nsango malamu te!” (1 Bakorinti 9:16) Soki tomekoli ntoma Paulo, tokozala na lisosoli ya malamu, mpo toyebi ete tozali kosala oyo ezali malamu. Mpe ntango tozali kosakwela basusu nsango malamu, ezali lokola tosɛngaka lisosoli na bango esala. Ntoma Paulo alobaki ete: “Na ndenge tozali komonisa solo polele, na miso ya Nzambe tozali kokóma ndakisa ya malamu mpo na lisosoli ya bato nyonso.”​—2 Bakorinti 4:2.

17. Ndenge nini ndeko mwasi moko ya elenge alandaki lisosoli na ye oyo eteyami na Biblia?

17 Ntango ndeko Jacqueline azalaki na mbula 16, ayekolaki bioloji na kelasi. Bana-kelasi bazalaki koyekola liteya ya evolisyo. Alobi boye: “Lisosoli na ngai ekokaki kotinda ngai te napesa makanisi mingi na kelasi ndenge namesanaki kosala ntango bazali kolobela mateya mosusu. Nakoki te kokɔtela liteya ya evolisyo. Nakutanaki na profesɛrɛ mpe namonisaki ye likanisi na ngai. Likambo ya kokamwa, asalelaki ngai makambo na boboto mpe apesaki ngai libaku ya kolobela lisolo oyo etali bozalisi liboso ya kelasi mobimba.” Ndeko Jacqueline asepelaki lokola ayebaki ete ayokelaki lisosoli na ye oyo eteyami na Biblia mpe alandaki yango. Lisosoli na yo etindaka yo osala oyo ezali malamu?

18. Mpo na nini tosengeli kozala na lisosoli ya malamu to oyo ebongi?

18 Mokano na biso ezali ya kotosa mitinda ya Yehova. Mpe lisosoli na biso ekoki kosalisa biso tókokisa mokano yango. Soki tozali koyekola Liloba ya Nzambe mpe komanyola na yango, mpe tozali kosalela makambo oyo tozali koyekola, tokoteya lisosoli na biso. Na bongo, likabo wana kitoko mingi ekozala litambwisi moko malamu na bomoi na biso bakristo!

^ par. 7 Talá “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/06/2004, na nkasa 29-31.