Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Août 2015

Yebáká kopona baninga na mikolo oyo ya nsuka

Yebáká kopona baninga na mikolo oyo ya nsuka

“Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu.”​—1 BAKORINTI 15:33.

NZEMBO: 73, 119

1. Tozali na eleko nini?

TOZALI na “ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano.” Kobanda na mobu 1914, ntango “mikolo ya nsuka” ebandaki, makambo ebebi na mokili koleka ndenge ezalaki liboso. (2 Timote 3:1-5) Mpe tokoki kondimisama ete mokili ekokoba kokóma se mabe, mpo Biblia esakoli ete “bato mabe mpe bakosi bakosala lisusu mabe koleka.”​—2 Timote 3:13.

2. Bato mingi basepelaka na masano ya ndenge nini? (Talá elilingi ya ebandeli.)

2 Mpo na kominanola, bato mingi lelo oyo batalaka to basalaka makambo ya mobulu, ya mbindo, oyo ezali na boyokani na misala ya maji mpe ya bademo. Na ndakisa, internet, baprogramɛ ya televizyo, bafilme, babuku mpe bazulunalo emonisaka mbala mingi ete mobulu, pite to ekobo ezali mabe te. Mpe bizaleli oyo bato bazalaki komona yango mabe kala ekómi lelo komonana malamu na bisika mosusu. Kasi yango elingi koloba te ete Yehova  andimaka bizaleli yango.​—Tángá Baroma 1:28-32.

3. Bato mingi bakanisaka ete baoyo batosaka mitinda ya Nzambe bazali bato ya ndenge nini?

3 Na siɛklɛ ya liboso, bato bazalaki mpe kotala makambo ya mobulu mpe ya mbindo mpo na kominanola. Kasi bayekoli ya Yesu basalaki bongo te mpo bazalaki kotosa mitinda ya Nzambe. Likambo yango ezalaki ‘kobulunganisa’ bato oyo bazalaki ná bango. Bato yango basalaki nini? Bazalaki kosɛka mpe konyokola bakristo. (1 Petro 4:4) Lelo oyo mpe, bato mingi bakanisaka ete baoyo batosaka mitinda ya Nzambe bazali bato ya mokili oyo te. Kasi, Biblia ekebisi biso ete baoyo bazali kolanda ndakisa ya Kristo Yesu “bango mpe bakonyokwama.”​—2 Timote 3:12.

“BANINGA MABE BABEBISAKA BIZALELI YA MALAMU”

4. Mpo na nini tosengeli kolinga mokili oyo te?

4 Soki tolingi kosala mokano ya Nzambe, tokoki soki moke te kolingaka ‘mokili ná biloko oyo ezali na mokili.’ (Tángá 1 Yoane 2:15, 16.) Satana, “nzambe ya makambo ya ntango oyo,” azali kotambwisa mokili. Asalelaka mangomba, baguvɛrnema, bibongiseli ya mimbongo, baradio to batelevizyo mpo na kobungisa bato nzela. (2 Bakorinti 4:4; 1 Yoane 5:19) Tokolinga te ete mokili ebenda biso, mpo na yango, tosengeli koboya baninga mabe. Biblia ekebisi biso polele ete: “Bómikosa te. Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu.”​—1 Bakorinti 15:33.

5, 6. Banani basengeli te kozala baninga na biso, mpe mpo na nini?

5 Mpo na kobatela boyokani na biso elongo na Yehova, tosengeli te kozala moninga ya moto nyonso oyo azalaka na momeseno ya kosala makambo ya mabe. Yango esangisi mpe bato oyo balobaka ete basambelaka Yehova kasi batosaka ye te. Soki bato ya ndenge wana basali lisumu monene mpe baboyi kobongola motema, tokokata boninga ná bango.​—Baroma 16:17, 18.

6 Bato balingaka mbala mingi kosepelisa baninga na bango mpe balukaka ete bándima bango. Soki tozali kosangana ná bato oyo batosaka Nzambe te, tokoki komekama mpo na kosala makambo oyo bango basalaka. Na ndakisa, soki tozalaka mingi ná bato oyo basalaka pite to ekobo, tokoki kokóma lokola bango. Likambo yango ekómelaki bandeko na biso mosusu. Mpe bamosusu oyo baboyaki kobongola motema, babimisamaki na lisangá. (1 Bakorinti 5:11-13) Soki babongoli motema te, bakoki kozala lokola bato oyo ntoma Petro alobeli.​—Tángá 2 Petro 2:20-22.

7. Banani tosengeli kopona mpo bázala baninga na biso ya motema?

7 Atako tolingaka kozala boboto epai ya moto nyonso, tosengeli te kokóma baninga ya motema ya bato oyo batosaka  Nzambe te. Ekozala mabe soki Motatoli ya Yehova moko ayokani na libala ná moto oyo azali te mosaleli ya Yehova ya sembo oyo azwá batisimo. Ezali malamu mingi kondimama na Nzambe na esika ya kondimama na bato oyo balingaka ye te. Tosengeli kozala kaka na baninga oyo basalaka mokano ya Nzambe. Yesu alobaki ete: “Moto nyonso oyo asalaka mokano ya Nzambe, ye nde ndeko na ngai ya mobali, ndeko na ngai ya mwasi mpe mama na ngai.”​—Marko 3:35.

Ezali malamu mingi kondimama na Yehova na esika ya kondimama na bato oyo balingaka ye te

8. Ndenge nini baninga mabe babebisaki Bayisraele?

8 Kozalaka ná baninga mabe ememaka makama. Tózwa ndakisa ya makambo oyo ekómelaki Bayisraele. Liboso bákɔta na Mokili ya Ndaka, Yehova akebisaki bango na ntina na bato oyo bazalaki kofanda kuna. Alobaki ete: “Osengeli te kogumbamela banzambe na bango to kobendama mpo na kosalela bango, mpe osengeli te kosala eloko oyo ekokani na misala na bango, kasi okobwaka yango mpenza na nse mpe okobuka mpenza makonzí na bango ya losambo. Mpe bosengeli kosalela Yehova Nzambe na bino.” (Kobima 23:24, 25) Kasi Bayisraele mingi batosaki malako ya Nzambe te mpe bazalaki sembo te epai na ye. (Nzembo 106:35-39) Esukaki ndenge nini? Na nsima, Yehova abwakaki ekólo Yisraele, mpe na esika na yango, aponaki lisangá ya bokristo lokola bato na ye.​—Matai 23:38; Misala 2:1-4.

KEBÁ NA MAKAMBO OYO OTÁNGAKA MPE OTALAKA

9. Mpo na nini makambo oyo balakisaka na televizyo to na internet ekoki kozala likama?

9 Makambo mingi oyo mokili oyo elakisaka, na ndakisa baprogramɛ ya televizyo, internet, mpe babuku ekoki kobebisa boyokani na biso elongo na Yehova. Biloko yango esalemi te mpo esalisa bakristo bázala na kondima makasi epai ya Yehova mpe bilaka na ye. Kutu, elendisaka nde bato bátya motema na mokili oyo mabe ya Satana. Na yango tosengeli kozala mpenza ekɛngɛ mpo tópona te kotalaka, kotángaka, to koyokaka eloko nyonso oyo ekoki kotinda biso tókóma na “bamposa ya mokili.”​—Tito 2:12.

10. Nini ekokómela makambo oyo balakisaka na televizyo to na Internet?

10 Mosika te, mokili ya Satana mpe makambo mabe oyo balakisaka na televizyo to na internet ekolongolama. Biblia elobi ete: “Mokili ezali koleka ndenge moko mpe mposa na yango, kasi moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe azali kotikala libela na libela.” (1 Yoane 2:17) Ndenge moko, mokomi moko ya nzembo ayembaki ete: “Basali-mabe bakobomama.” Na nsima abakisaki ete: “Kasi bato ya komikitisa bakozwa mabele, mpe bakosepela mpenza na kimya mingi.” Mpo na ntango boni? “Bayengebene bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko.”​—Nzembo 37:9, 11, 29.

11. Ndenge nini Nzambe asalisaka biso mpo tótikala sembo epai na ye?

11 Na kokesana na mokili ya Satana, ebongiseli ya Yehova ezali kosalisa biso tózala na bizaleli oyo ekomema biso na bomoi ya seko. Yesu abondelaki Yehova  ete: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe ya solo kaka moko, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Kristo.” (Yoane 17:3) Yehova azali kosalela ebongiseli na ye mpo na kopesa biso nyonso oyo tosengeli na yango mpo tóyeba ye. Na ndakisa, tozali na ebele ya bazulunalo, mwa babuku, babuku, bavideo mpe site internet na biso oyo esalisaka biso tókoba kosalela Nzambe. Ebongiseli na ye ebongisaka mpe makita pɔsɔ na pɔsɔ na masangá koleka 110 000 na mokili mobimba. Makambo oyo toyekolaka na Biblia na makita yango mpe mayangani ya minene, ekómisaka kondima na biso makasi epai ya Yehova mpe na bilaka na ye.​—Baebre 10:24, 25.

KOBALA “NA KATI YA NKOLO KAKA”

12. Etinda oyo ya Biblia ya kobala “na kati ya Nkolo kaka” elimboli nini?

12 Mokristo oyo alingi kobala, asengeli mpenza kosala keba mpo na moto oyo azali kopona kofanda na ye. Liloba ya Nzambe ekebisi biso ete: “Bókangana te na ekanganeli ya mabe esika moko na bato oyo bazali bandimi te. Mpo boninga nini ezali na kati ya boyengebene mpe kobuka mibeko? To pole ná molili esanganaka na nini?” (2 Bakorinti 6:14) Biblia eyebisi basaleli ya Nzambe ete bábalana “na kati ya Nkolo kaka,” elingi koloba, kobalana kaka na moto oyo amipesá epai ya Nzambe mpe azwá batisimo mpe atosaka mitinda ya Yehova. (1 Bakorinti 7:39) Soki obalani na moto ya ndenge wana, moto oyo alingaka Yehova, okozala na molongani oyo akosalisa yo otikala sembo epai ya Nzambe.

Soki obalani na moto oyo alingaka Yehova, okozala na molongani oyo akosalisa yo otikala sembo epai ya Nzambe

13. Mobeko nini oyo etali libala Nzambe apesaki Bayisraele?

13 Yehova ayebi oyo ezali malamu mpo na biso, mpe mobeko oyo apesaki ya kobalana “na kati ya Nkolo kaka” ezali likambo ya sika te. Na ndakisa, tótalela oyo Yehova ayebisaki Bayisraele mpo na bato oyo bazalaki kosalela ye te. Na nzela ya Moize, apesaki mobeko oyo: “Osengeli kosala kondimana ata moko te ya libala ná bango. Osengeli te kopesa mwana na yo ya mwasi na mwana na ye ya mobali, mpe osengeli te kozwa mwana na ye ya mwasi mpo na mwana na yo ya mobali. Mpo ye akopɛngwisa mwana na yo ya mobali mpo atika kolanda ngai, mpe bakosalela mpenza banzambe mosusu; mpe nkanda ya Yehova ekongalela mpenza bino, mpe akoumela te koboma yo.”​—Kolimbola Mibeko 7:3, 4.

14, 15. Nini ekómelaki Salomo mpo atosaki te mobeko ya Yehova?

14 Mwa moke nsima ya kokóma mokonzi ya Yisraele, Salomo abondelaki mpo na kosɛnga bwanya, mpe Yehova ayanolaki libondeli na ye. Na yango, Salomo ayebanaki mingi lokola mokonzi ya bwanya mpe oyo makambo ezalaki kotambola malamu na ekólo na ye. Kutu, mokonzi-mwasi ya Sheba akamwaki bwanya ya Salomo mpe alobaki na ye ete: “Bwanya na yo mpe bozwi na yo eleki mpenza makambo oyo nayoká na matoi na ngai.” (1 Bakonzi 10:7)  Kasi ndakisa ya Salomo ezali mpe koteya biso makambo oyo ekoki kokómela moto ntango alandi te mobeko ya Nzambe mpe abali moto oyo asambelaka Yehova te.​—Mosakoli 4:13.

15 Atako Yehova apambolaki ye, Salomo atosaki te mobeko ya polele oyo Nzambe apesaki. Salomo “alingaki basi bapaya mingi” oyo bazalaki kosalela Yehova te, mpe nsukansuka akómaki na basi 700 mpe bamakango 300. Esukaki ndenge nini? Ntango Salomo akómaki mokóló, basi na ye “babendaki motema na ye mpo na kolanda banzambe mosusu, . . . mpe Salomo abandaki kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova.” (1 Bakonzi 11:1-6) Baninga mabe babebisaki ye, mpe atikalaki sembo te epai ya Yehova. Soki likambo ya boye ekómelaki Salomo, ekoki mpe kokómela moto nyonso. Yango wana tokanisaka kutu te kobalana na moto oyo alingaka Yehova te!

16. Biblia epesi toli nini epai ya ndeko oyo molongani na ye azali motatoli te?

16 Tokoloba nini soki moto moko oyo abalaki na mokili akómi mosambeli ya Yehova kasi molongani na ye akómi motatoli te? Biblia elobi ete: “Bino basi, bómikitisaka liboso ya mibali na bino moko, mpo, soki bamosusu batosaka liloba te, bázwama na maloba te kasi na etamboli ya basi na bango.” (1 Petro 3:1) Na ntembe te, etinda oyo etaleli mpe ndeko mobali oyo mwasi na ye asambelaka Yehova te. Liloba ya Nzambe ezali polele ete: Zalá mobali to mwasi malamu, mpe salelá mitinda ya Biblia oyo etali libala. Na yango, soki  molongani na yo amoni ete okómi mpenza na bizaleli malamu, ye mpe akoki kolinga kosalela Yehova. Yango emonanaki epai ya babalani ebele.

ZALÁ MONINGA YA BAOYO BALINGAKA YEHOVA

17, 18. Nini esalisaki Noa mpo abika na Mpela, mpe nini esalisaki bakristo ya siɛklɛ ya liboso bábika ntango Yerusaleme ebomamaki?

17 Baninga mabe bakoki kotinda yo oboya kotosa Yehova, kasi baninga ya malamu bakoki kosalisa yo ozala sembo epai na ye. Noa azali ndakisa malamu mpo na biso. Azalaki na bomoi na eleko oyo “mabe ya moto ezalaki mingi na mabele mpe mposa nyonso ya makanisi ya motema na ye ezalaki kaka mabe ntango nyonso.” (Ebandeli 6:5) Bato bazalaki mabe mpenza mpe Yehova azwaki ekateli ya kobebisa mokili wana mabe. Kasi Noa alandaki bato wana te. Biblia ebengi ye “moyengebene” mpe moto oyo “atambolaki elongo na Nzambe ya solo.”​—Ebandeli 6:7-9.

18 Noa asanganaki te na bato oyo bazalaki kolinga Yehova te. Ye ná libota na ye bakobaki kotonga masuwa, mpe azalaki “mosakoli ya boyengebene.” (2 Petro 2:5) Noa, mwasi na ye, bana na ye misato ná basi na bango basalaki mpenza boninga ya solo. Bakobaki kosala makambo oyo esepelisaka Nzambe, mpe na nsuka, babikaki na Mpela. Biso nyonso lelo tozali bakitani na bango, na yango, tosengeli kozala na botɔndi mpo Noa ná libota na ye batosaki Yehova mpe baboyaki baninga mabe. Ndenge moko, bakristo ya siɛklɛ ya liboso bazalaki te baninga ya bato oyo balingaka Yehova te. Batosaki ye mpe babikaki ntango Yerusaleme ebomamaki na mobu 70 T.B.​—Luka 21:20-22.

Kozala elongo na baoyo balingaka Yehova ekosalisa biso tómona na makanisi ndenge bomoi ekozala na mokili ya sika (Talá paragrafe 19)

19. Nini ekosalisa biso tótikala sembo epai ya Yehova?

19 Ndenge moko na Noa ná libota na ye mpe bakristo ya siɛklɛ ya liboso, tozalaka te baninga ya moto nyonso oyo alingaka Yehova te. Tozali na bamilio ya bandeko mibali mpe basi ya sembo oyo tokoki kopona lokola baninga na biso. Bakosalisa biso ‘tótɛlɛma ngwi na kondima’ na boumeli ya ntango oyo ya mpasi mingi. (1 Bakorinti 16:13; Masese 13:20) Kanisá naino esengo monene oyo okozala na yango soki obiki na nsuka ya mokili mabe oyo mpe okɔti na mokili ya sika ya Yehova! Ezali mpenza na ntina oboya baninga mabe banda sikoyo!