Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Août 2015

Manyoláká na bolingo ya Yehova oyo esilaka te

Manyoláká na bolingo ya Yehova oyo esilaka te

“Nakomanyola likoló ya mosala na yo nyonso.”​—NZEMBO 77:12.

NZEMBO: 18, 61

1, 2. (a) Mpo na nini ondimisami ete Yehova alingaka basaleli na ye? (b) Bato bakelamá na mposa nini?

MPO na nini ondimisami ete Yehova alingaka basaleli na ye? Liboso ya koyanola na motuna wana, talelá bandakisa oyo: Na boumeli ya mwa bambula, bandeko mibali mpe basi bazalaki kolendisa na boboto nyonso ndeko mwasi moko na nkombo Taylene. Bayebisaki ye ete amitalelaka te koleka ndelo. Alobi ete: “Soki Yehova alingaka ngai te, alingaki te kopesa ngai toli mbala na mbala.” Ndeko Brigitte, oyo abɔkɔlaki bana mibale nsima ya liwa ya mobali na ye, alobi ete: “Kobɔkɔla bana na ebongiseli oyo ya Satana ezali moko ya mikakatano ya makasi mpenza, mingimingi mpo na moboti oyo azali kaka ye moko. Kasi namoni mpenza bolingo ya Yehova mpo asalisaki ngai ntango nazalaki kolela mpe koyoka mpasi na motema, mpe atikaki ngai te namona mpasi koleka oyo nakokoka.” (1 Bakorinti 10:13) Ndeko Sandra azali na maladi moko oyo esilaka te. Na liyangani moko, ndeko mwasi moko atyelaki Sandra likebi. Mobali ya ndeko Sandra alobi ete: “Atako toyebaki ndeko yango te, komibanzabanza na ye epesaki biso esengo  makasi na motema. Ata mwa makambo ya mikemike ya bolingo oyo bandeko bamonisaka, esalisaka ngai namona ete Yehova alingaka biso mingi.”

2 Yehova akelá bato na mposa ya kolinga mpe ya komiyoka ete balingaka bango. Kasi, tokoki mbala moko kobanda kolɛmba nzoto mpo na maladi, mokakatano ya mbongo to mpo mosala na biso ya kosakola ezali kobota mbuma te. Soki tobandi komiyoka lokola ete Yehova azali kolinga biso lisusu te, tosengeli kobosana te ete tozali na motuya mingi na miso na ye mpe ete azali wana, asimbaka biso na lobɔkɔ ya mobali mpe asalisaka biso. Akobosana biso ata moke te soki tozali sembo epai na ye.​—Yisaya 41:13; 49:15.

3. Nini ekoki kosalisa biso tózala na elikya makasi ete Yehova alingaka biso mingi?

3 Batatoli oyo tolobeli liboso, bandimisami ete Nzambe azalaki ná bango na ntango ya mikakatano. Biso mpe tokoki kondimisama ete azali wana mpo na kosalisa biso. (Nzembo 118:6, 7) Na lisolo oyo, tokolobela makabo minei oyo emonisi ete Yehova alingaka biso. Makabo yango ezali (1) biloko oyo akelá, (2) Biblia, (3) libondeli, mpe (4) lisiko. Kokanisa na mozindo na makambo malamu oyo asalá ekoki kosalisa biso tózala na botɔndi mingi mpo na bolingo na ye oyo esilaka te.​—Tángá Nzembo 77:11, 12.

MANYOLÁKÁ NA BILOKO OYO YEHOVA AKELÁ

4. Biloko oyo Yehova akelá eteyi biso nini?

4 Ntango totalaka biloko oyo Yehova akelá, tomonaka mpenza ete alingi biso na bolingo oyo esilaka te. (Baroma 1:20) Na ndakisa, Yehova asalaki mabele mpo tózala kaka na bomoi te kasi mpe mpo tósala makambo mosusu. Apesá biso nyonso oyo tosengeli na yango mpo tósepela na bomoi. Tozalaka na mposa ya kolya, kasi Yehova apesá biso biloko ndenge na ndenge oyo esalaka ete tósepela na kolya! (Mosakoli 9:7) Ndeko mwasi moko na nkombo Catherine asepelaka na makambo oyo amonaka na biloko oyo Nzambe akelá, mingimingi na eleko ya prɛnta na Canada. Alobi ete: “Ekamwisaka ngai mpenza ntango namonaka ndenge biloko nyonso ebotamaka, na ndakisa ndenge bafololo ebongisamá mpo ebimaka na mabele mpe bandɛkɛ oyo eutaka na mikili mosusu, ata mpe mwa ndɛkɛ babengi colibri, oyo eyebaka nzela ya kokende na esika oyo elyaka libanda ya fɛnɛtrɛ ya kuku na ngai. Makambo kitoko boye emonisi ete Yehova alingaka biso mpenza.” Tata na biso alingaka biloko oyo akelá, mpe alingaka ete biso mpe tósepela na yango.​—Misala 14:16, 17.

Ntango totalaka biloko oyo akelá, tomonaka mpenza bolingo ya Yehova oyo esilaka te oyo azalaka na yango epai na biso

5. Ndenge nini bolingo ya Yehova emonani na lolenge oyo bato bakelamá?

5 Yehova akelá biso na likoki ya kosala mosala mpe kosepela na yango. (Mosakoli 2:24) Apesaki bato mokumba ya kotondisa mabele, kolona biloko, mpe kobatela bambisi, bandɛkɛ, mpe bikelamu mosusu ya bomoi oyo ezalaka na kati. (Ebandeli 1:26-28) Lisusu, akelaki biso na bizaleli kitoko mpo tómekola ye!​—Baefese 5:1.

 LILOBA YA NZAMBE EZALI NA MOTUYA

6. Mpo na nini tosengeli kozala na botɔndi mpenza mpo na Liloba ya Nzambe?

6 Yehova apesá biso Biblia mpo alingaka biso mingi mpenza. Eyebisaka biso makambo oyo tosengeli koyeba mpo na Nzambe mpe ndenge oyo atalelaka bato. Na ndakisa, Biblia eyebisi biso ndenge oyo Yehova ayokaki mpo na Bayisraele, oyo bazalaki koboya kotosa ye mbala na mbala. Nzembo 78:38 elobi ete: “Azalaki na motema mawa; azalaki kozipa libunga mpe azalaki koyeisa libebi te. Mpe mbala mingi, azalaki kozongisa nkanda na ye nsima, mpe azalaki kolinga te kolamwisa nkɛlɛ na ye nyonso.” Komanyola na vɛrsɛ yango ekoki kosalisa yo omona mpenza ndenge oyo Yehova alingaka mpe abatelaka yo. Tokoki kondimisama ete Yehova atyelaka biso mpenza likebi.​—Tángá 1 Petro 5:6, 7.

Biblia eyebisaka biso makambo oyo tosengeli koyeba mpo na Nzambe mpe ndenge oyo atalelaka bato

7. Mpo na nini tosengeli kozwa Biblia na motuya mingi?

 7 Tosengeli kozwa Biblia na motuya mpenza. Mpo na nini? Mpo Yehova asololaka na biso na nzela ya Liloba na ye. Ntango moboti ná mwana bazali kosolola polele, bolingo na bango ekómaka makasi mpe bakómaka kotyelana motema. Yehova azali Tata na biso ya bolingo. Mpe atako tomoná ye soki moke te mpe toyoká mongongo na ye te, ezali lokola nde asololaka na biso mbala moko na nzela ya Biblia. Tosengeli kokoba koyoka ye! (Yisaya 30:20, 21) Ntango totángaka Liloba ya Nzambe, toyekolaka koyeba mpe kotyela Yehova motema, mpo atambwisaka mpe abatelaka biso.​—Tángá Nzembo 19:7-11; Masese 1:33.

Atako Yehu asengelaki kopesa Yehoshafate toli, Yehova amonaki “makambo ya malamu” epai ya mokonzi yango (Talá paragrafe 8, 9)

8, 9. Likambo nini Yehova alingi tóyeba? Pesá ndakisa moko ya Biblia.

8 Yehova alingi tóyeba ete alingaka biso mpe atalaka te kaka mabunga na biso. Alukaka nde malamu oyo tosalaka. (2 Ntango 16:9) Tótalela sikoyo lolenge oyo Yehova amonaki makambo ya malamu epai ya Yehoshafate mokonzi ya Yuda. Yehoshafate azwaki ekateli ya mabe ya kosangana na Ahaba mokonzi ya Yisraele mpo na kobundisa bato ya Siri na Ramote-gileade. Atako basakoli ya lokuta 400 bayebisaki mokonzi mabe Ahaba ete akolonga etumba, Mikaya mosakoli ya solo ya Yehova, ayebisaki Yehoshafate mpe Ahaba ete soki babundi, bakolonga te. Mpe ekokisamaki bobele bongo. Ahaba akufaki na etumba mpe Yehoshafate abikaki na mpasi mpenza. Nsima ya etumba, Yehova asalelaki Yehu mpo na kopesa Yehoshafate toli mpo na libunga oyo asalaki. Yehu ayebisaki ye lisusu ete: “Makambo ya malamu emonani epai na yo.”​—2 Ntango 18:4, 5, 18-22, 33, 34; 19:1-3.

9 Mwa bambula liboso, Yehoshafate ayebisaki bankumu, balevi, mpe banganga-nzambe bátambola na bingumba nyonso ya Yuda mpo na koteya bato mibeko ya Yehova. Basalaki mosala yango malamu mpenza mpo ata bato ya bikólo mosusu bayebaki Yehova. (2 Ntango 17:3-10) Na yango, atako Yehoshafate azwaki ekateli mabe na nsima, Yehova abosanaki te makambo ya malamu oyo asalaki liboso. Ndakisa wana ekoki mpenza kolendisa biso mpo na ntango mosusu tosalaka mabunga. Kasi, soki tosali nyonso mpo na kosalela Yehova, akokoba kolinga biso mpe akobosana te makambo ya malamu oyo tosalá.

ZWÁKÁ LIBONDELI NA MOTUYA MINGI

10, 11. (a) Mpo na nini libondeli ezali likabo moko ya ntina mingi oyo euti na Yehova? (b) Ndenge nini Nzambe akoki koyanola mabondeli na biso? (Talá elilingi ya ebandeli.)

10 Tata ya bolingo azwaka ntango ya koyoka bana na ye ntango balingi kosolola na ye. Alingaka koyeba ndenge bazali komiyoka mpo atyelaka bango mpenza likebi. Tata na biso ya bolingo, Yehova asalaka mpe bongo. Ayokaka biso ntango tobondelaka ye. Kosolola na Tata na biso ezali libaku malamu mpenza!

Yehova ayokaka mabondeli oyo tosalaka na motema moko, mpe amityaka na esika na biso koleka moto mosusu nyonso

11 Tokoki kobondela Yehova ntango nyonso. Azali moninga na biso mpe azalaka ntango nyonso pene ya koyoka mabondeli na biso. Ndeko Taylene oyo tolobelaki liboso, alobi, “Okoki koyebisa [Yehova] likambo nyonso.” Ntango toyebisi Yehova makanisi na biso ya motema, akoki koyanola biso na nzela ya vɛrsɛ moko ya makomami, lisolo moko na mikanda na biso, to toli ya kolendisa ya ndeko moko. Yehova ayokaka mabondeli oyo tosalaka na motema moko, mpe amityaka na esika na biso koleka moto mosusu nyonso. Biyano oyo apesaka na mabondeli  na biso emonisaka ete bolingo na ye epai na biso ezangi nsuka.

12. Mpo na nini tosengeli koyekolaka mabondeli oyo ezali na Biblia? Pesá ndakisa.

12 Tokoki kozwa mateya mingi ya ntina na mabondeli oyo ezali na Biblia. Na ntango mosusu, ekozala malamu mingi koyekola mabondeli yango mosusu na losambo na kati na libota. Tokoki lisusu kobongisa mabondeli na biso soki tozali kokanisa na mozindo na mabondeli ya ntina mingi oyo basaleli ya Nzambe ya ntango ya kala basalaki. Na ndakisa, kanisá na libondeli ya komikitisa oyo Yona asalaki ntango azalaki na kati ya libumu ya mbisi monene. (Yona 1:17–2:10) Talelá mpe libondeli ya motema mobimba oyo Salomo asalaki epai ya Yehova ntango tempelo efungwamaki. (1 Bakonzi 8:22-53) Mpe kanisá na Libondeli ya ndakisa oyo Yesu asalaki. (Matai 6:9-13) Likambo eleki ntina, “kosɛnga na bino eyebana epai ya Nzambe” mbala na mbala. Na yango, “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino.” Botɔndi na biso mpo na bolingo ya Yehova oyo esilaka te ekokoba kobakisama.​—Bafilipi 4:6, 7.

MONISÁKÁ BOTƆNDI MPO NA LISIKO

13. Lisiko epesi biso libaku nini?

13 Yehova apesá biso likabo ya lisiko mpo “tókoka kozwa bomoi.” (1 Yoane 4:9) Ntango ntoma Paulo alobelaki ndenge Nzambe amonisaki bolingo oyo esilaka te, akomaki boye: “Na ntango oyo etyamá, Kristo akufelaki bato oyo batyolaka Nzambe. Mpo ezali mpasi mpenza moto akufela moyengebene; kasi mbala mosusu, moto akoki ata kondima kokufela moto malamu. Kasi Nzambe azali kolakisa biso bolingo na ye na likambo oyo: ntango tozalaki naino basumuki, Kristo akufelaki biso.” (Baroma 5:6-8) Lisiko ezali ndakisa monene ya bolingo oyo Nzambe amonisaki, mpe epesi bato libaku ya kozala na boyokani malamu ná ye.

14, 15. Matomba nini lisiko ememeli (a) bakristo oyo batyami mafuta na elimo? (b) baoyo bazali na elikya ya kofanda awa na mabele?

14 Mwa etuluku moke ya bakristo bamonaka bolingo ya Yehova oyo esilaka te na lolenge moko ya kokamwa. (Yoane 1:12, 13; 3:5-7) Nzambe atyá bango mafuta na elimo santu, mpe mpo na yango bakómi sikoyo bana na ye. (Baroma 8:15, 16) Lokola bamosusu bazali naino awa na mabele, mpo na nini ntoma Paulo alobaki ete bafandisami “na bisika ya likoló na bomoko elongo na Kristo Yesu”? (Baefese 2:6) Ezali mpo ete Yehova apesi bango elikya ya bomoi ya seko na likoló.​—Baefese 1:13, 14; Bakolose 1:5.

Lisiko emonisaka ete Yehova alingaka bato nyonso

15 Baoyo nyonso batyami te mafuta na elimo bakoki kokóma baninga ya Nzambe soki bamonisi kondima na lisiko. Bazali mpe na likoki ya kokóma bana ya Nzambe mpe kofanda libela na libela na paradiso awa na mabele. Lisiko emonisaka ete Yehova alingaka bato nyonso. (Yoane 3:16) Ezali mpenza esengo koyeba ete soki tosaleli Nzambe na bosembo mpenza, akopesa biso bomoi oyo eleki malamu mpenza na mokili ya sika! Na yango, tómonisa  mpenza ete tozwaka na motuya mingi lisiko, elembo monene oyo emonisaka ete Nzambe alingaka biso.

LINGÁKÁ YEHOVA

16. Kokanisa na mozindo na bolingo ya Nzambe ekoki kotinda biso na nini?

16 Soki esɛngi tótánga ebele ya makambo oyo Yehova asalaka mpo na komonisa ete alingaka biso, tokokoka kosilisa yango te. Mokonzi Davidi ayembaki boye: “Makanisi na yo ezali na motuya mingi mpenza na miso na ngai! Ee Nzambe, motángo na yango nyonso ezali monene mpenza! Soki nameki kotánga yango, ekoleka kutu bambuma ya zɛlo.” (Nzembo 139:17, 18) Kokanisa mozindo na ebele ya makambo oyo Yehova asalaka mpo na komonisa ete alingaka biso, ekolendisa biso tólinga ye mpe tópesa ye oyo eleki malamu.

17, 18. Wapi mwa makambo oyo tokoki kosala mpo na komonisa ete tolingaka Nzambe?

17 Makambo ezali mingi oyo tokoki kosala mpo na komonisa Yehova ete tolingaka ye. Na ndakisa, tokoki komonisa ete tolingaka Yehova soki tozali koyebisa basusu nsango malamu ya Bokonzi na molende nyonso. (Matai 24:14; 28:19, 20) Tokoki mpe komonisa Nzambe ete tolingaka ye soki na bosembo mpenza tozali koyika mpiko na mikakatano nyonso oyo etyaka kondima na biso na komekama. (Tángá Nzembo 84:11; Yakobo 1:2-5.) Ata soki mikakatano na biso ezali makasi, tokoki kondimisama ete Yehova amonaka bampasi na biso mpe akosalisa biso mpo tozali na motuya na miso na ye.​—Nzembo 56:8.

18 Bolingo na biso epai ya Yehova etindaka biso tókanisa na mozindo biloko nyonso ya malamu oyo akelá. Tomonisaka Yehova ete tolingaka ye mpe Liloba na ye ntango toyekolaka Biblia malamumalamu. Tobondelaka Yehova mbala na mbala mpo tolingaka ye mpe tolingaka kokómisa boyokani na biso ná ye makasi. Mpe ntango tokanisaka na mozindo likabo ya lisiko, bolingo na biso epai na ye ekómaka lisusu makasi mingi. (1 Yoane 2:1, 2) Oyo ezali kaka mwa ndambo ya makambo oyo tosalaka mpo na komonisa Yehova ete tozwaka na motuya bolingo na ye oyo esilaka te.