Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Août 2015

Kobá kozela!

Kobá kozela!

“Ata soki eumeli, zelá yango kaka.”​—HABAKUKU 2:3.

NZEMBO: 128, 45

1, 2. Makanisi nini basaleli ya Yehova bazali na yango?

BASALELI ya Yehova bazelaka na motema molai mpenza kokokisama ya bisakweli. Na ndakisa, Yirimia azalaki kozela ete bato ya Babilone bábebisa Yuda, mpe yango nde esalemaki na mobu 607 L.T.B. (Yirimia 25:8-11) Yisaya asakolaki ete Yehova akozongisa Bayuda oyo bamemamaki na boombo na mboka na bango mpe alobaki ete: “Esengo na baoyo nyonso bazali kokoba kozela ye.” (Yisaya 30:18) Mika mpe azalaki na elikya ete bilaka ya Yehova ekokisama mpe alobaki ete: “Ezali Yehova nde nakotalela.” (Mika 7:7) Mpe na boumeli ya bankama ya bambula, basaleli ya Nzambe bazalaki mpenza na elikya ete Masiya oyo alakamaki, to Kristo, akoya.​—Luka 3:15; 1 Petro 1:10-12. * (Talá maloba na nse ya lokasa.)

2 Lelo oyo, biso mpe tozali kozela ntango bisakweli oyo etali Bokonzi ya Yehova ekokokisama. Mosika te, Yesu, mokonzi ya Bokonzi yango, akobikisa basaleli ya Nzambe na mokili oyo mabe. Akoboma bato mabe mpe akosilisa  bampasi nyonso. (1 Yoane 5:19) Na yango, tosengeli kokoba kozela ete mokolo ya Yehova eya ata na ntango nini mpe kosala nyonso oyo tokoki mpo tómilɛngɛla mpo na yango.

3. Soki banda bambula ebele tozelaka ete nsuka eya, mbala mosusu tokoki komituna motuna nini?

3 Tozelaka na motema esengo mokolo oyo mokano ya Nzambe ekosalema awa na mabele. (Matai 6:10) Kasi soki tozelaka banda bambula ebele ete nsuka eya, tokoki mbala mosusu kobanda komituna, ‘Mpo na nini tosengeli kokoba kozela ete nsuka ekoya mosika te?’

MPO NA NINI TOSENGELI KOKOBA KONDIMA ETE NSUKA EKOYA MOSIKA TE?

4. Mpo na nini ezali na ntina ete ‘tósɛnzɛlaka’?

4 Yesu apesaki bayekoli na ye mitindo ete ‘básɛnzɛlaka’ mpe ‘bálala mpɔngi te.’ Yango wana ezali mpenza na ntina ete tókoba kozela na elikya ete nsuka ekoya mosika te. (Matai 24:42; Luka 21:34-36) Lisusu, ebongiseli ya Yehova ekobaka kokundwela biso ete ‘tózelaka mpe tóbatelaka na makanisi na biso kozala ya mokolo ya Yehova’ mpe tótya motema mobimba na elaka oyo Yehova apesi ya mokili ya sika.​—Tángá 2 Petro 3:11-13.

5. Likambo mosusu nini esengeli kotinda biso tókoba kozela mokolo ya Yehova?

5 Soki bayekoli ya Yesu na siɛklɛ ya liboso basengelaki kokoba kozela mokolo ya Yehova, yango emonani ete likambo yango ezali mpenza na ntina mingi lelo oyo. Mpo na nini? Mpo elembo oyo Yesu apesaki emonisi ete akómaki mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe kobanda 1914 mpe ete tozali na mikolo ya nsuka, to na “bosukisi ya makambo ya ntango oyo.” Na ndakisa, kaka ndenge Yesu asakolaki, makambo ya mokili ezali kobeba se kobeba mpe nsango malamu ya Bokonzi ezali kosakolama na mabele mobimba. (Matai 24:3, 7-14) Yesu alobaki te soki mikolo ya nsuka ekoumela ntango boni, yango wana tosengeli komilɛngɛla mpo toyebi te ntango nini nsuka ekoya.

6. Ndenge nini toyebi ete makambo ya mokili ekokóma mabe koleka wana tozali kokóma pene na nsuka?

6 Ekoki kozala ete “bosukisi ya makambo ya ntango oyo” etaleli nde eleko moko boye na mikolo ezali koya ntango mokili ekokóma lisusu mabe mpenza? Biblia elobi ete bato bakokóma mabe koleka na “mikolo ya nsuka.” (2 Timote 3:1, 13; Matai 24:21; Emoniseli 12:12) Yango wana, atako lelo oyo makambo ezali mabe mingi, toyebi ete ekokoba kobeba se kobeba.

7. Matai 24:37-39 eteyi biso nini na oyo etali ndenge makambo ekozala na mokili na mikolo ya nsuka?

7 Bato mosusu bakoki kokanisa ete liboso ete “bolɔzi monene” ebanda, bitumba ekozala na bikólo nyonso mpe bato mingi bakobɛla to bakozala na nzala. (Emoniseli 7:14) Kasi soki esalemi bongo, ekomonana polele epai ya moto nyonso ete esakweli ya Biblia ezali kokokisama. Ekomonana polele ata epai ya bato oyo bakipaka makambo ya Biblia te. Kobosana te, Yesu alobaki ete na mikolo ya nsuka bato mingi ‘bakotya likebi te.’ Bakokoba kosala makambo oyo bamesaná kosala mokolo na mokolo mpe bakosepela te ntango mokolo ya Yehova ekoya. (Tángá Matai 24:37-39.) Emonani polele ete tosengeli te kozela ete makambo ya mokili ekóma lisusu mabe mpenza  liboso ete “bolɔzi monene” ebanda, mpo bato bándima ete nsuka ekómi pene.​—Luka 17:20; 2 Petro 3:3, 4.

Tondimisami ete tozali na “bosukisi ya makambo ya ntango oyo”

8. Lokola toyebi mpenza elembo ya Yesu, tondimisami na likambo nini?

8 Elembo oyo Yesu apesaki bayekoli na ye ezalaki likebisi ya polele mpo na kosalisa bango báyeba malamumalamu eleko oyo basengelaki kozala. Bayekoli ya Yesu basengelaki komilɛngɛla. (Matai 24:27, 42) Kobanda mobu 1914, makambo ndenge na ndenge ya elembo ya Yesu ezali kokokisama. Tondimisami ete tozali na mikolo ya nsuka, elingi koloba “bosukisi ya makambo ya ntango oyo.” Yehova asilá kopona ntango oyo akobebisa mokili mabe oyo ya Satana.

9. Mpo na nini tosengeli kokoba kondima ete nsuka ekoya mosika te?

9 Kasi, mpo na nini tosengeli kokoba kondima ete nsuka ekoya mosika te? Mpo totosaka Yesu Kristo. Lisusu, tomoni polele ete elembo oyo Yesu apesaki mpo na mikolo ya nsuka ezali mpenza kokokisama. Soki tondimaka ete nsuka ekómi pene, ezali te mpo tondimaka makambo nyonso oyo toyokaka, kasi nde mpo tondimisami ete bisakweli ya Biblia ezali kokokisama. Lokola nsuka ezali koya, tosengeli kosɛnzɛlaka mpe komilɛngɛlaka.

TOKOZELA TII NTANGO NINI?

10, 11. (a) Mpo na nini Yesu ayebisaki bayekoli na ye ‘básɛnzɛlaka’? (b) Yesu ayebisaki bayekoli na ye básala nini soki bamoni ete nsuka eyei noki te ndenge bazalaki kokanisa? (Talá elilingi ya ebandeli.)

10 Mingi na biso basalelaka Yehova na bosembo mpenza banda bambula mingi, mpe na mposa makasi mpenza bazelaka mokolo na ye eya. Ata soki tobandá kozela banda ntango nini, tosengeli kokoba kotya motema ete mokolo yango ekoya mosika te. Esengeli ntango Yesu akoya kobebisa mokili oyo ya Satana akuta biso tomilɛngɛli. Kobosana te likambo oyo Yesu ayebisaki bayekoli na ye básala: “Bókebaka, bólala mpɔngi te, mpo boyebi te mokolo nini ntango oyo etyamá ekokoka. Ezali lokola moto oyo asali mobembo na mboka mopaya oyo atiki ndako na ye mpe apesi bokonzi na baombo na ye, moto na moto mosala na ye, mpe apesi mokɛngɛli ya porte mitindo ete asɛnzɛlaka. Na yango, bósɛnzɛlaka, mpo boyebi te ntango nini nkolo ya ndako akoya, soki na mpokwa to na katikati ya butu to na ntango nsoso eleli to na ntɔngɔntɔngɔ; mpo ntango akoya na mbalakaka, akuta bino te bozali kolala mpɔngi. Kasi oyo nazali koloba na bino nazali koloba yango na bato nyonso: Bósɛnzɛlaka.”​—Marko 13:33-37.

Kobebisama ya mangomba ya lokuta ekoki kosalema mbangu mpenza mpe ata na ntango nini

11 Ntango bayekoli ya Yesu bayebaki ete abandi koyangela na mobu 1914, bamonaki ete nsuka ekoki koya ata na ntango nini. Mpo na yango, bamilɛngɛlaki na ndenge bamipesaki mingi na mosala ya kosakola. Yesu alobaki ete akoki koya “na ntango nsoso eleli to na ntɔngɔntɔngɔ.” Bayekoli na ye basengelaki kosala nini soki likambo yango esalemi? Yesu alobaki: “Bósɛnzɛlaka.” Na yango, ata soki tomoni ete tozeli banda kala, yango elakisi te ete nsuka ezali mosika to ekoya te na eleko na biso.

12. Habakuku atunaki Yehova nini, mpe eyano nini Nzambe apesaki ye?

 12 Mosakoli Habakuku azelaki na motema molai mpenza ntango azalaki kosakola kobebisama ya Yerusaleme. Basakoli mosusu liboso na ye basakolaki mpe nsango yango na boumeli ya bambula mingi. Habakuku akokaki komona ete makambo ya mabe mpe ya kozanga bosembo ezalaki kosalema mingi koleka liboso. Asɛngaki Yehova lisalisi mpe atunaki boye: “Ee Yehova, kino ntango nini nakobelela mpo na kosɛnga lisalisi?” Atako Yehova ayebisaki Habakuku te ntango oyo nsuka ekoya, alakaki ye ete: “Ekokóma nsima ya ngonga te.” Yehova ayebisaki lisusu Habakuku ete: “Zelá yango kaka.”​—Tángá Habakuku 1:1-4; 2:3.

13. Mbala mosusu Habakuku akokaki kokanisa nini, mpe mpo na nini kosala bongo elingaki kozala likama?

13 Kanisá ete Habakuku alɛmbi kozela nsuka mpe alobi: ‘Nabandá kozela kobebisama ya Yerusaleme bambula mingi. Ekoleka ntango molai liboso nsuka eya. Ezali na ntina te nakoba kosakola mpo na yango. Bato mosusu bakoki kosala mosala yango.’ Nini elingaki kosalema soki akanisaki ndenge wana? Yehova alingaki kondima ye lisusu te. Mpe soki amilɛngɛlaki te ntango nsuka eyaki, alingaki kobungisa bomoi na ye.

14. Mpo na nini tokozala na botɔndi na ndenge Yehova akebisaka biso ete tókoba kozela nsuka?

14 Kanisá ete ozali na mokili ya sika. Makambo nyonso oyo esakolamaki mpo na mikolo ya nsuka ekokisami kaka ndenge Yehova alobaki. Kondima na yo epai ya Yehova ekómi lisusu makasi koleka, mpe okómi na elikya makasi ete akokokisa makambo mosusu nyonso oyo alaki. (Tángá Yosua 23:14.) Ozali na botɔndi ndenge Yehova aponaki ntango oyo ebongi mpo nsuka eya mpe ndenge akebisaki basaleli na ye bákoba kozela yango.​—Misala 1:7; 1 Petro 4:7.

TÓKOBA KOSAKOLA WANA TOZALI KOZELA

Osakolaka nsango malamu na molende? (Talá paragrafe 15)

15, 16. Mpo na nini tosengeli kosala nyonso oyo tokoki na mosala ya kosakola na boumeli ya ntango oyo ya nsuka?

15 Ebongiseli ya Yehova ekokoba kokundwela biso ete tótya makanisi na biso mobimba na mosala ya Yehova. Yango esalisaka biso tósuka te kaka na kosalela Nzambe, kasi tómona polele ete nsango na biso esengeli kosakolama na lombangu. Tondimisami ete elembo oyo Yesu apesaki ezali kokokisama sikoyo mpe  nsuka ezali koya mosika te. Yango wana, totyaka Yehova na esika ya liboso na bomoi na biso mpe tokobaka kosakola nsango malamu ya bokonzi.​—Matai 6:33; Marko 13:10.

16 Ntango tosakwelaka basusu nsango malamu, tosalisaka bango bábika ntango mokili oyo ya Satana ekobomama mosika te. Moko na makama oyo eleki monene na mbu esalemaki na 1945 ntango masuwa moko na nkombo Wilhelm Gustloff ezindaki. Bankóto ya bato bakufaki. Ndeko mwasi moko ná mobali na ye babikaki na likama wana. Amikundolaka ete ata ntango masuwa yango ezalaki kozinda, mwasi moko azalaki koganga boye: “Bavalizi na ngai! Bavalizi na ngai! Babiju na ngai! Babiju na ngai nyonso ezali kuna na kati ya kobe. Biloko na ngai nyonso ekei!” Kasi bato mosusu oyo bazalaki na masuwa bayebaki nini elekaki ntina mpe basalaki makasi bábikisa bomoi ya bato mosusu. Lelo oyo mpe bomoi ya bato ezali na likama. Biso mpe tolingaka kozala lokola bato wana ya masuwa oyo bamipimelaki mpe totyaka makanisi na biso mobimba na mosala na biso ya kosakola mpo toyebi ete esengeli kosalema na lombangu mpenza. Tosengeli kosala nyonso oyo tokoki mpo na kosalisa bato bábika na nsuka ya ebongiseli oyo.

Zwáká bikateli ya malamu mpe kobá kotya makanisi mobimba na mosala ya kosakola mpo esengeli kosalema na lombangu (Talá paragrafe 17)

17. Mpo na nini tosengeli kondima ete nsuka ekoki koya ata na ntango nini?

17 Tokoki komona polele ete  bisakweli ya Biblia ezali kokokisama mpe nsuka ya ebongiseli oyo mabe ekómi mpenza pene. Tozali kozela ete “maseke zomi” mpe “nyama mabe” bábalukela mangomba ya lokuta to Babilone Monene. (Emoniseli 17:16) Tosengeli te koloba ete esengeli ntango mingi eleka liboso likambo yango esalema. Kobosana te ete Nzambe ‘akotya na mitema na bango’ likanisi ya kobebisa mangomba ya lokuta mpe ete likambo yango ekoki kosalema mbangu mpenza mpe ata na ntango nini! (Emoniseli 17:17) Nsuka ya mokili oyo mabe ya Satana ezali koya mbangu mpenza. Yango wana, tosengeli kotosa likebisi oyo ya Yesu ete: “Bókeba ete mitema na bino ekóma kilo te na kolekisa ndelo na kolya mpe na komɛla mingi mpe na mitungisi ya bomoi, noki na ntango wana kaka, mokolo wana ekwela bino pwasa lokola motambo.” (Luka 21:34, 35; Emoniseli 16:15) Tókoba komilɛngɛla mpe tózala na mingi ya kosala na mosala ya Yehova wana tozali na elikya ete “azali kosalela moto oyo azali se kozela ye.”​—Yisaya 64:4.

18. Motuna nini tokoyanola na lisolo oyo elandi?

18 Ntango tozali kozela nsuka ya mokili oyo mabe, tosengeli koyoka toli ya moyekoli Yuda oyo ete: “Bandeko ya bolingo, awa bozali komitonga likoló ya kondima na bino oyo eleki bosantu, mpe lokola bozali kobondela na elimo santu, bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe, wana bozali kozela motema mawa ya Nkolo na biso Yesu Kristo mpo na bomoi ya seko.” (Yuda 20, 21) Kasi ndenge nini tokoki komonisa ete tozali kozela ete mokili ya sika ya Nzambe eya noki mpe ete tozali kozela yango na motema esengo? Tokolobela yango na lisolo oyo elandi.

^ par. 1 Mpo na koyeba bisakweli mosusu ya Biblia oyo elobeli Masiya mpe ndenge ekokisamaki, talá lokasa 200 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini?