Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Juillet 2015

Kobá kozala sembo na Bokonzi ya Nzambe

Kobá kozala sembo na Bokonzi ya Nzambe

“Bazali bato ya mokili te.”​—YOANE 17:16.

NZEMBO: 63, 129

1, 2. (a) Boyokani nini ezali kati na kozala sembo epai ya Yehova mpe koboya kokɔtela bato ya ngambo moko boye na matata ya mokili oyo? (Talá elilingi ya ebandeli.) (b) Bato mingi bakangamaka makasi na likambo nini, kasi yango ebimisi nini?

BASALELI ya Yehova bakɔtaka te na makambo ya mokili mpe bamikɔtisaka te na mindɔndɔ oyo ekabolaka bato, na ndakisa bolingo ya ekólo, mposo to makambo mosusu. Mpo na nini? Mpo tolingaka Yehova, tozalaka sembo epai na ye mpe totosaka ye. (1 Yoane 5:3) Ezala tozali wapi to touti wapi, tolandaka mitinda ya Nzambe. Komonisa bosembo epai ya Yehova mpe na Bokonzi na ye ezali likambo ya ntina mingi koleka makambo mosusu nyonso. (Matai 6:33) Yango wana tokoki koloba ete tozali bato ya “mokili te.”​—Tángá Yoane 17:11, 15, 16; Yisaya 2:4.

2 Bato mingi lelo na mokili bakangamaka na bikólo, mboka, mimeseno to mpe baekipi na bango ya ndembo. Likambo ya mawa, yango esali ete mingi ya bato yango bákóma kowelana, koyinana mpe na ntango mosusu koboma bato ya ekólo to ekipi mosusu. Atako tokɔtaka te na kowelana yango,  kasi ekoki komemela biso to mabota na biso makambo ya mabe, mpe bakoki kosalela biso makambo na ndenge mpenza ya kozanga bosembo. Ekoki kozala mpenza pɛtɛɛ komitya na ngambo moko boye soki baguvɛrnema ezwi bikateli ya malamu te, mpo Nzambe akelá biso na likoki ya koyeba soki likambo ezali malamu to te. (Ebandeli 1:27; Kolimbola Mibeko 32:4) Oyokaka ndenge nini ntango likambo moko ya mabe esalemi? Ozalaka na likoki ya koboya komikɔtisa na ngambo moko, to okɔtelaka bato ya ngambo moko boye?

Bakristo ya solo bakanisaka te ete ebongiseli moko ya mokili oyo ya Satana ezali malamu mingi koleka mosusu

3, 4. (a) Mpo na nini tomikɔtisaka na ngambo moko te ntango kowelana ezali? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?

3 Bato mingi bakɔtelaka bato ya ngambo moko ntango kowelana ebimi mpo baguvɛrnema endimisaka bango ete yango nde likambo oyo bana-mboka ya malamu basengeli kosala. Kasi biso tolandaka Yesu. Na yango, tomikɔtisaka na makambo ya politiki te mpe tokendeke na bitumba te. (Matai 26:52) Bakristo ya solo bakanisaka te ete ebongiseli moko ya mokili oyo ya Satana ezali malamu mingi koleka mosusu. (2 Bakorinti 2:11) Tolingaka soki moke te kokɔta na makambo oyo ezali koleka na mokili.​—Tángá Yoane 15:18, 19.

4 Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, bamosusu kati na biso bakoki kozala na makanisi mabe mpo na bato oyo bakeseni na biso. (Yirimia 17:9; Baefese 4:22-24) Na lisolo oyo, tokoyekola mitinda oyo ekosalisa biso tóbundisa mpe tólonga makanisi mabe wana oyo ekabolaka bato. Tokolobela mpe lolenge oyo tokoki kozala sembo na Bokonzi mpe ndenge oyo tokoki kosala makasi tózala na makanisi lokola Yehova mpe Yesu.

NTINA OYO TOKƆTAKA TE NA MAKAMBO YA MOKILI

5, 6. Ntango Yesu azalaki awa na mabele, ndenge nini azalaki kotalela bato ndenge na ndenge, mpe mpo na nini?

5 Soki okómi na mokakatano ya koboya kokɔta na makambo ya mokili to kokɔtela bato ya ngambo moko, omituna boye, ‘Yesu alingaki kosala nini?’ Ntango Yesu azalaki awa na mabele, kowelana mpe kozanga koyokana ezalaki kati na bato ya Yudea, Galile mpe Samaria. Kanisá bandakisa yango mosusu. Bayuda ná Basamaria bazalaki kosolola te. (Yoane 4:9) Bafarisai ná Basadukai bazalaki koyokana te na makambo mingi. (Misala 23:6-9) Bayuda oyo bayekolaki Mobeko bazalaki kokanisa ete bango baleki mosika mpenza baoyo bayekolaki mobeko te. (Yoane 7:49) Mpe mingi bazalaki koyina bakɔngɔli mpako mpe Baroma. (Matai 9:11) Kasi Yesu akɔtaki te na kowelana wana. Atako azalaki ntango nyonso kolobela solo oyo etali Yehova mpe ayebaki ete Yisraele ezalaki mpenza ekólo ya Nzambe, kasi ateyaki ata moke te bayekoli na ye ete baleki bato mosusu. (Yoane 4:22) Kutu, ateyaki nde bango ete bálingaka bato nyonso.​—Luka 10:27.

Yehova ná Yesu bakanisaka te ete loposo, ekólo to monɔkɔ moko boye ezali kitoko mingi koleka mosusu

6 Mpo na nini Yesu azalaki te komona etuluku moko ya bato ete eleki bamosusu? Ezali mpo na lolenge oyo ye ná  Tata na ye batalelaka bato. Yehova akelaki bato mpo bátondisa mabele na bato ya mposo ndenge na ndenge. (Ebandeli 1:27, 28) Na yango, Yehova ná Yesu bakanisaka te ete loposo, ekólo to monɔkɔ moko boye ezali kitoko mingi koleka mosusu. (Misala 10:34, 35; Emoniseli 7:9, 13, 14) Tosengeli mpenza kolanda ndakisa na bango.​—Matai 5:43-48.

7, 8. (a) Tozali na ngambo ya nani, mpe mpo na nini? (b) Tosengeli kobosana te ete nini ekosilisa mikakatano nyonso ya bato?

7 Mpo na nini tomikɔtisaka te na ngambo ya moyangeli to guvɛrnema moko boye? Mpo tozali na ngambo ya Yehova. Azali Moyangeli na biso. Na Edene, Satana alobaki ete Yehova azali moyangeli ya malamu te mpo na bato. Satana alingaki bato bándima ete lolenge na ye ya kosala makambo ezali malamu mingi koleka Nzambe. Yehova atikelaka biso bonsomi ya kopona soki tolingi kozala na ngambo nini. Bongo yo? Otosaka Yehova mpo ondimaka ete lolenge na ye ya kosala makambo ezali malamu mingi koleka oyo ya yo? Ondimisami ete kaka Bokonzi na ye nde ekoki kosilisa mikakatano na biso nyonso? To okanisi ete bato bakoki komiyangela malamu kozanga litambwisi ya Nzambe?​—Ebandeli 3:4, 5.

8 Na ndakisa soki batuni yo soki okanisaka nini mpo na lingomba moko ya politiki, bato oyo babundaka mpo na mbongwana, to ebongiseli mosusu, okopesa eyano nini? Bato mosusu ya bibongiseli oyo bakoki kozala na makanisi malamu mpe na mposa ya kosalisa bato. Kasi toyebi ete kaka Bokonzi ya Yehova nde ekoki kosilisa mikakatano ya bato mpe kolongola makambo nyonso ya kozanga bosembo. Tolandaka mpe malako ya Yehova na lisangá, na esika ete moto na moto asalaka makambo ndenge azali komona malamu. Yango wana lisangá ezalaka na bomoko.

9. Likambo nini bakristo mosusu ya siɛklɛ ya liboso bazalaki na yango, mpe basengelaki kosala nini?

9 Na siɛklɛ ya liboso, bakristo mosusu na Korinti bazalaki kowelana mpe koloba: “‘Ngai nazali moto ya Paulo,’ ‘Kasi ngai moto ya Apolosi,’ ‘Kasi ngai moto ya Kefa,’ ‘Kasi ngai moto ya Kristo.’” Ntoma Paulo ayokaki mpasi mingi na motema ntango ayebaki likambo yango. Ezalaki likambo moko monene mpo kimya ya lisangá ekómaki na likama. Na yango, atunaki bandeko na ye boye: “Kristo akabwani?” Ntoma Paulo apesaki bango toli ete: “Nazali kolendisa bino, bandeko, na nkombo ya Nkolo na biso Yesu Kristo ete bólobaka bino nyonso na boyokani, mpe ete bokabwani ezala te na kati na bino, kasi bózala nde liboke moko mpenza na makanisi kaka moko mpe na motindo ya kokanisa kaka moko.” Ezali mpe bongo lelo oyo. Bokabwani esengeli kozala te na lisangá.​—1 Bakorinti 1:10-13; tángá Baroma 16:17, 18.

10. Ntoma Paulo akundwelaki bakristo likambo nini, mpe liteya nini tozwi na likambo yango?

10 Ntoma Paulo akundwelaki bakristo oyo batyami mafuta na elimo ete bazali bana-mboka ya likoló mpe ete basengeli te kotya makanisi na bango na “makambo  ya mabele.” (Bafilipi 3:17-20) * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali baambasadɛrɛ oyo bazali bamonisi ya Nzambe mpe Kristo. Ntango ambasadɛrɛ azali na mokili ya bapaya, amikɔtisaka te na kowelana mpe makambo ya politiki ya mokili yango. Ndenge moko, ekozala malamu te ete bakristo oyo batyami mafuta na elimo bámikɔtisaka na kowelana mpe makambo ya politiki ya mokili oyo. (2 Bakorinti 5:20) Baoyo bazali na elikya ya bomoi ya seko awa na mabele bazalaka mpe sembo na Bokonzi mpe bazalaka te na ngambo moko boye na matata ya mokili oyo.

SALÁ NYONSO OZALA SEMBO NA BOKONZI YA YEHOVA

11, 12. (a) Bizaleli nini tosengeli koboya soki tolingi kotikala sembo na Bokonzi ya Nzambe? (b) Makanisi nini ndeko mwasi moko azalaki na yango mpo na bato mosusu, mpe nini esalisaki ye alongola makanisi yango?

11 Na mikili mingi, bato balingaka kosala boninga mingi ná bato oyo basalá na bango makambo, bazali na mimeseno ndenge moko mpe balobaka monɔkɔ moko. Mbala mingi batutaka ntolo mpo na bamboka na bango. Kasi tosengeli kotika te ete bizaleli ya ndenge wana ebebisa biso. Kutu, tosengeli kobongola lolenge na biso ya kokanisa mpe koteya lisosoli na biso mpo ete tómikɔtisa ata mbala moko te na makambo ya mokili. Ndenge nini tokoki kosala yango?

12 Na ndakisa, Mirjeta * (talá maloba na nse ya lokasa) abotamaki na ekólo oyo ezalaki kobengama liboso Yougoslavie. Esika oyo akolaki, bato bazalaki koyina bato ya Serbie. Ntango ayaki koyeba Yehova, amonaki ete Yehova amonaka te ete loposo moko eleki mosusu mpe ete Satana alingaka bato báyinana. Na yango, asalaki makasi abongola makanisi na ye. Kasi ntango etumba moko ebandaki kati na bituluku ya bato esika oyo azalaki kofanda, Mirjeta abandaki lisusu kokóma na makanisi mabe mpo na bato ya Serbie. Azalaki kutu kolinga te kosakwela bango. Ayebaki ete likambo yango ezali mabe, kasi abondelaki Yehova asalisa ye atika makanisi wana. Asɛngaki mpe ye asalisa ye akóma mobongisi-nzela. Mirjeta alobaki ete: “Namonaki ete komipesa na mosala ya kosakola nde ezali lisalisi oyo eleki kitoko. Na mosala ya kosakola, nasalaka makasi namonisa bolingo, oyo ezali bomoto ya Yehova, mpe namoni makanisi wana ya mabe elimwe.”

13. (a) Likambo nini ndeko Zoila akutanaki na yango, mpe asalaki nini? (b) Liteya nini tokoki kozwa na likambo ya ndeko Zoila?

13 Zoila azali ndeko mwasi moko ya Mexique oyo akendeki na Mpoto. Na lisangá na bango, ezalaki na bandeko oyo bautaki na Amerika ya Sudi, kasi na ekólo mosusu. Ndeko Zoila alobi ete bandeko yango mosusu bazalaki kosala masɛki ya makambo ya ekólo oyo ye autaki, na ndakisa mimeseno mpe miziki na yango. Asilikaki, kasi abondelaki Yehova ete asalisa ye mpo likambo yango esala ye mpasi mingi te na motema. Tolingaki kosala nini soki tokutanaki na likambo ya ndenge wana? Bandeko na biso mosusu bazali naino kobunda etumba mpo na kokanga motema ntango bayoki bato balobi mabe mpo na mboka na bango. Na yango, tokolinga te koloba to kosala likambo moko oyo ekomonisa lokola etuluku moko ya bato eleki basusu. Tokolinga te kobimisa bokabwani na lisangá to na esika nini.​—Baroma 14:19; 2 Bakorinti 6:3.

Sɛngá Yehova asalisa yo otalelaka bato ndenge ye atalelaka bango

14. Nini ekoki kosalisa yo otalelaka bato ndenge Yehova atalelaka bango?

 14 Toyebi ete basaleli ya Yehova bazali na bomoko, na yango tosengeli komona te ete mboka boye to ekólo boye eleki mosusu. Kasi libota na yo mpe bato oyo okolá na bango bakoki kotinda yo olinga mingi mboka na bino. Kasi ekoki kozala ete na ntango mosusu ozali na makanisi mabe mpo na bato ya bikólo mosusu, mimeseno mosusu, minɔkɔ mosusu to mposo mosusu. Nini ekoki kosalisa yo otika makanisi yango? Kanisá na ndenge Yehova atalelaka bato oyo batutaka ntolo mpo na ekólo na bango to bakanisaka ete baleki basusu. Salá bolukiluki ya mozindo na likambo yango na ntango ya boyekoli na yo moko to na losambo na kati ya libota. Na nsima, sɛngá Yehova asalisa yo otalelaka bato ndenge ye atalelaka bango.​—Tángá Baroma 12:2.

Mpo na kozala sembo epai ya Yehova, tosengeli kotosa ye ata soki bato bakoki kosala biso nini (Talá paragrafe 15, 16)

15, 16. (a) Bato mosusu bakosala nini soki bamoni ete tokeseni na bango? (b) Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango bátikala sembo epai ya Yehova?

15 Tolingaka kosalela Yehova na lisosoli ya pɛto, kasi na ntango mosusu ekoki komonana ete tokeseni mpenza na baninga na biso ya mosala, kelasi, kartye mpe bandeko na biso. (1 Petro 2:19) Kutu Yesu akebisaki biso ete bato mosusu bakoyina biso mpo tokeseni na bango. Tóbosana te ete mingi na baoyo batɛmɛlaka biso bayebi Bokonzi ya Nzambe te. Na yango, bayebaka te ntina oyo etindaka biso tókangama kaka na Bokonzi yango na esika ya kokangama na baguvɛrnema ya bato.

16 Mpo na kozala sembo epai ya Yehova, tosengeli kotosa ye ata soki bato bakoki  kosala to koloba na biso likambo nini. (Danyele 3:16-18) Ntango mosusu bilenge bakoki kozala na mokakatano ya koboya kosala makambo oyo basusu bazali kosala. Baboti, bósalisa bana na bino bázala na mpiko na eteyelo. Bana na bino bakoki kobanga mpo na koboya kopesa bendele losako to koboya kosangana na milulu mosusu ya ekólo. Na losambo na kati ya libota, bokoki koyekola ndenge Yehova ayokaka mpo na makambo wana. Teyá bango ndenge bakoki kolimbola makambo yango polele mpe na limemya nyonso. (Baroma 1:16) Lisusu, soki esengeli, mpo na kosalisa bana na yo, sololá na balakisi na bango mpe limbwelá bango mateya na biso.

SEPELÁ NA OYO NYONSO YEHOVA AKELÁ

17. Likanisi nini tosengeli koboya, mpe mpo na nini?

17 Mbala mingi, tosepelaka na bilei, monɔkɔ, zamba to mai mpe mimeseno ya esika oyo tokolá. Kasi tokanisaka ete makambo oyo biso tolingaka ezalaka kitoko mingi koleka oyo bato mosusu balingaka? Yehova alingaka ete tósepela na biloko ndenge na ndenge oyo akelá. (Nzembo 104:24; Emoniseli 4:11) Na yango, mpo na nini kotingama ete lolenge moko ya kosala makambo ezali malamu mingi koleka mosusu?

Yehova alingi ete bato ya lolenge nyonso bázala na bomoi ya seko

18. Mpo na nini ezali malamu kotalela basusu ndenge Yehova atalelaka bango?

18 Yehova alingi ete bato ya lolenge nyonso báyekola koyeba ye, básambela ye mpe bázala na bomoi ya seko. (Yoane 3:16; 1 Timote 2:3, 4) Na yango, soki bandeko na biso bazali na makanisi oyo ekeseni na oyo ya biso, tokosepela koyoka bango soki makanisi yango endimami epai ya Yehova. Soki tozali kosala bongo, bomoi na biso ekozala na esengo mpe tokosepela, mpe tokozala na bomoko ná bandeko na biso. Ndenge tomoni yango, lokola tozali na ngambo ya Yehova mpe Bokonzi na ye, tomimonisaka te ete tozali na ngambo boye to boye na matata ya mokili oyo. Toyinaka ezaleli ya lolendo mpe kowelana ya mokili oyo ya Satana. Tosengeli mpenza kozala na botɔndi lokola Yehova ateyi biso ete tólingaka kimya mpe tózalaka bato ya komikitisa! Tozali komiyoka lokola moko ya bakomi ya nzembo oyo alobaki ete: “Talá! Ezali mpenza malamu mpe ezali mpenza esengo ete bandeko báfanda na bomoko!”​—Nzembo 133:1.

^ par. 10 Ekoki kozala ete bandeko mosusu na lisangá ya Filipi bazalaki na lotomo ya mwana-mboka Moroma, mpo na yango, bazalaki na bonsomi ya makambo mingi koleka bandeko na bango oyo bazalaki bana-mboka ya Roma te.

^ par. 12 Bankombo mosusu topesi bango kopesa.