Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Juillet 2015

“Kosikolama na bino ekómi pene”!

“Kosikolama na bino ekómi pene”!

“Bótɛlɛma alima mpe bótombola mitó na bino, mpo kosikolama na bino ekómi pene.”​—LUKA 21:28.

NZEMBO: 133, 43

1. Makambo nini elekaki na mobu 66? (Talá elilingi ya ebandeli.)

KANISÁ ete ozali mokristo na Yerusaleme na mobu 66. Likambo moko esalemaki. Mokonzi moko ya basoda ya Roma na nkombo Florus ayibaki batalanta 17 na kɛsi ya tempelo. Bayuda basilikaki mbala moko. Babomaki basoda ebele ya Roma mpe basɛngaki Baroma bápesa bango bonsomi. Kasi Baroma basilikaki mbala moko. Na boumeli ya sanza soki misato, basoda 30 000, oyo batambwisamaki na Cestius Gallus bazingaki Yerusaleme. Batomboki ya Bayuda bamibombaki na kati ya bisika makasi ya tempelo, kasi basoda ya Roma bakendaki libanda ya efelo ya tempelo mpe babandaki koluka kobuka yango. Moto nyonso na kati ya engumba akómaki motema likoló. Olingaki komiyoka ndenge nini soki omonaki makambo nyonso wana?

2. Bakristo basengelaki kosala nini ntango bamoni basoda ya Roma bazingi engumba na bango, mpe nini esalisaki bango?

2 Bambula liboso, Yesu akebisaki bayekoli na ye mpo na likambo yango mpe alobaki na bango ete: “Ntango bokomona mampinga ezingi Yerusaleme na bakaa, bóyeba ete libebi na yango ekómi pene. Na ntango yango, baoyo bazali na Yudea  bábanda kokima na bangomba, mpe baoyo bazali na katikati na yango bálongwa, mpe baoyo bazali na bamboka ya zamba bákɔta na kati na yango te.” (Luka 21:20, 21) Nini ekokaki kosalisa bango mpo bátosa malako oyo Yesu apesaki bango ya kolongwa na Yerusaleme ntango basoda bakozinga engumba yango? Likambo moko ya kokamwa esalemaki. Na mbalakaka, basoda ya Roma balongwaki na Yerusaleme! Ndenge Yesu alobaki yango, etumba yango ‘eyeisamaki mokuse.’ (Matai 24:22) Ntango kaka basoda wana bakendeki, ezalaki sikoyo libaku mpo na bakristo ya sembo bátosa Yesu mpe bákima na bangomba. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Na nsima, na mobu 70 limpinga mosusu ya basoda ya Roma ezongaki lisusu na Yerusaleme. Na mbala oyo, babebisaki engumba yango. Kasi, moto nyonso oyo atosaki malako ya Yesu abikaki.

3. Likambo nini oyo esalemaki liboso oyo biso mpe tokomona mosika te, mpe tokolobela nini na lisolo oyo?

3 Likebisi mpe malako wana ya Yesu ebongi mpe mpo na mikolo na biso. Mosika te biso mpe tokokutana na makambo ya ndenge wana. Yesu asalelaki makambo oyo elekaki na siɛklɛ ya liboso mpo na kolimbola oyo ekosalema ntango “bolɔzi monene” ekobanda na mbalakaka. (Matai 24:3, 21, 29) Ndenge kaka ezalaki mpo na bakristo ya sembo oyo babikaki ntango Yerusaleme ebomamaki, ekozala na “ebele mpenza ya bato” oyo bakobika na libebi monene oyo ekosalema na mokili mobimba na mikolo ezali koya. (Tángá Emoniseli 7:9, 13, 14.) Ezali mpenza na ntina ete tóyeba oyo Biblia ezali koyebisa biso mpo na makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya. Mpo na nini? Mpo bomoi na biso etaleli yango. Na yango, tólobela ndenge makambo yango ekotalela mokomoko na biso.

KOBANDA YA BOLƆZI MONENE

4. Bolɔzi Monene ekobanda ndenge nini?

4 Bolɔzi monene ekobanda ndenge nini? Ekobanda na kobomama ya mangomba nyonso ya lokuta. Na Biblia, mangomba ya lokuta ebengami “Babilone Monene, mama ya basi ya ndumba.” (Emoniseli 17:5-7) Mpo na nini mangomba ya lokuta ebengami mwasi ya ndumba? Mpo ete bakonzi ya mangomba yango bazali sembo te epai ya Nzambe. Na esika ya kopesa Yesu mpe Bokonzi na ye mabɔkɔ, bazali nde kosunga baguvɛrnema ya bato mpe bazali koboya mateya ya Biblia mpo bázala na bokonzi mingi. Losambo na bango ezali te lokola losambo ya pɛto ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo. (2 Bakorinti 11:2; Yakobo 1:27; Emoniseli 14:4) Kasi nani akoboma Babilone Monene? Yehova akosala ete “maseke zomi” ya “nyama mabe moko ya langi ya motane makasi” ‘ekokisa likanisi na ye.’ “Nyama mabe moko ya langi motane makasi” ezali ONU, mpe “maseke zomi” biyangeli ya politiki oyo epesaka ye mabɔkɔ.​—Tángá Emoniseli 17:3, 16-18.

5, 6. Mpo na nini tolobi ete kobomama ya Babilone Monene elimboli te kobomama ya basangani na yango nyonso?

5 Basangani nyonso ya mangomba ya lokuta bakobomama ntango Babilone Monene ekobomama? Te. Na lisalisi ya elimo santu ya Yehova, mosakoli Zekaria akomaki mpo na likambo oyo ekosalema. Na ntango wana, moto oyo azalaki liboso mosangani ya lingomba ya lokuta akoloba ete: “‘Ngai nazali mosakoli te. Nazali nde mosali bilanga, mpamba te moto ya mabele nde azwá ngai banda bolenge na ngai.’ Mpe soki moto moko atuni ye, ‘Bampota oyo ezali na nzoto na yo na mabɔkɔ  na yo ezali nini’ Akoyanola, ‘Bampota oyo bazokisaki ngai na ndako ya bato oyo balingaka ngai mingi.’” (Zekaria 13:4-6) Na yango, ata bakonzi ya mangomba bakoloba ete bazalaki kosambela te mpe bakowangana ete bazalaki bandimi ya mangomba wana ya lokuta.

6 Nini ekokómela basaleli ya Nzambe na ntango wana? Yesu alobi boye: “Kutu, soki mikolo yango eyeisamaka mokuse te, mbɛlɛ ata moto moko abiki te; kasi mpo na bato oyo baponami mikolo yango ekoyeisama mokuse.” (Matai 24:22) Na siɛklɛ ya liboso, bolɔzi na Yerusaleme ‘eyeisamaki mokuse.’ Yango epesaki nzela mpo ete “bato oyo baponami,” bakristo oyo batyami mafuta na elimo bákima. Ndenge moko, eteni ya liboso ya bolɔzi monene ‘ekoyeisama mokuse’ mpo na “bato oyo baponami.” Yehova akopesa nzela te ete banguya ya politiki, to “maseke zomi” eboma basaleli ya Nzambe. Kutu, ekozala na mwa ntango moke ya kimya ntango eteni ya liboso ya bolɔzi monene ekosila.

NTANGO YA KOMEKAMA MPE KOSAMBISAMA

7, 8. Libaku nini bato bakozala na yango nsima ya kobomama ya mangomba ya lokuta, mpe na nini basaleli ya Nzambe bakokesana na bato mosusu nyonso na ntango wana?

7 Likambo nini ekoleka nsima ya kobomama ya mangomba ya lokuta? Ekozala ntango ya komonisa oyo ezali mpenza na mitema na biso. Na ntango wana, bato mingi bakoluka kozwa libateli mpe lisalisi epai ya bibongiseli ya bato, “mabanga ya bangomba.” (Emoniseli 6:15-17) Kasi basaleli ya Yehova bakotalela ye mpo abatela bango. Ntango etumba ya Baroma ‘eyeisamaki mokuse’ na siɛklɛ ya liboso, ezalaki te ntango mpo na Bayuda nyonso bákóma bakristo na mbalakaka. Kasi, ezalaki nde ntango mpo na baoyo bazalaki bakristo bábima na Yerusaleme ndenge Yesu apesaki malako. Ndenge moko, na mikolo ezali koya, ntango etumba mpo na kobebisa Babilone Monene ‘ekoyeisama mokuse,’ tokoki kolikya te ete bato ebele bakokóma bakristo ya solo na mbalakaka. Nzokande, ekozala libaku malamu mpo na basambeli nyonso ya solo mpo na komonisa bolingo na bango mpo na Yehova mpe mpo na kosalisa bakristo oyo batyami mafuta na elimo.​—Matai 25:34-40.

Ekozala libaku ya komonisa bolingo na biso epai ya Yehova mpe kosalisa bakristo oyo batyami mafuta na elimo

8 Toyebi na bosikisiki te nini ekosalema na ntango wana ya komekama. Kasi, tokoki koyeba ete bomoi ekozala mingai mpe ekosengela ete tómipimela makambo mosusu. Na siɛklɛ ya liboso, bakristo basengelaki kotika bandako na bango mpe koyika mpiko na mikakatano mpo bábika. (Marko 13:15-18) Tosengeli komituna boye: ‘Nakokoka kosundola biloko ya mokili? Nazali kondima kosala oyo nakoki mpo na kotikala sembo epai ya Yehova?’ Kanisá naino: Na ntango wana, ndenge kaka mosakoli Danyele azalaki, kaka biso nde tokozala basambeli ya Nzambe na biso ata soki makambo ekozala ndenge nini.​—Danyele 6:10, 11.

Ntango mpo na “nsuka” ekokoka!

9, 10. (a) Nsango nini basaleli ya Nzambe bakoyebisa na boumeli ya bolɔzi monene? (b) Banguna ya Nzambe bakosala nini?

9 Bolɔzi monene ekozala te ntango ya kosakola ‘nsango malamu ya bokonzi.’  Ntango ya kosakola nsango yango ekozala likambo ya kala. Na ntango wana, ntango mpo na “nsuka” ekokoka! (Matai 24:14) Basaleli ya Nzambe bakosakola na molende mpenza nsango ya bitumbu oyo ekokómela bato nyonso. Ekoki kozala ete nsango yango ekomonisa ete mokili mabe ya Satana elingi kobomama mpo na libela. Biblia ekokanisi nsango yango na mbula ya mabanga ntango elobi ete: “Mbula ya mabanga ya monene, oyo libanga mokomoko ezalaki na kilo soki ya talanta moko, eutaki na likoló ekiteli bato, mpe bato yango bafingaki Nzambe mpo na bolɔzi wana ya mbula ya mabanga, mpo bolɔzi yango ezalaki monene mpenza.”​—Emoniseli 16:21.

10 Banguna na biso bakoyoka nsango wana ya makasi. Na lisalisi ya elimo santu, mosakoli Ezekiele alobelaki ndenge etuluku ya bikólo, oyo ebengami Goge ya Magoge, bakoloba ete: “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Mpe ekosalema mpenza boye: na mokolo yango, makanisi ekoyela yo na motema, mpe okokana mpenza mwango ya mabe; mpe okoloba mpenza ete: “Nakomata kobundisa mokili ya mboka oyo ezangi bifelo. Nakokɔta epai ya bato oyo bazali na motungisi moko te, oyo bafandi na kimya, bango nyonso bafandi kozanga efelo, mpe bazali kutu na ekangiseli te, baporte mpe te.” Ekozala mpo na kobɔtɔla biloko ebele mpe mpo na kopunza biloko mingi, mpo na kozongisa lobɔkɔ na yo na bisika oyo ebebisamaki kasi bato bazongelaki kofanda kuna, mpe likoló ya bato oyo bayanganisami uta na bikólo, bato oyo bazali konduka bozwi mpe biloko, baoyo bazali kofanda na katikati ya mabele.’” (Ezekiele 38:10-12) Basaleli ya Nzambe bakokesana mpenza na bato mosusu nyonso, ekozala lokola nde “bazali kofanda na katikati ya mabele.” Mabota ekokoka lisusu te kokanga motema. Ekokóma na mposa makasi ya kobundisa bato ya Yehova oyo batyami mafuta na elimo mpe baoyo bazali kopesa bango mabɔkɔ.

11. (a) Tosengeli na nini mpo tóbosana te ndenge makambo ekolandana na boumeli ya bolɔzi monene? (b) Bato bakosala nini ntango bakomona bilembo?

11 Nini ekoleka na nsima? Biblia eyebisi biso te na bosikisiki ndenge makambo ekolandana, kasi ekoki kozala ete makambo mosusu ekosalema na ntango moko. Na esakweli na ye oyo elobeli bosukisi ya makambo ya ntango oyo, Yesu alobaki ete: “Bilembo ekozala na moi mpe na sanza mpe na minzoto, mpe awa na mabele bikólo bakozala na nsɔmɔ, bakoyeba te ndenge ya kosala mpo mbu ezali konguluma mpe kotomboka, na ntango yango, bato bakolɛmba nzoto na kobanga mpe na kozela makambo oyo ezali koya na mabele esika bato bafandi; mpo banguya ya likoló ekoningana. Bongo bakomona Mwana ya moto azali koya na lipata na nguya mpe na nkembo mingi.” (Luka 21:25-27; tángá Marko 13:24-26.) Kokokisama ya esakweli oyo etaleli mpe bilembo ya nsɔmɔ mpe makambo na likoló? Tosengeli kozela mpo tómona. Kasi, toyebi ete ntango banguna ya Nzambe bakomona bilembo yango, bakobanga mpe bakokóma mitema likoló.

Tokoki mpenza kozala na elikya mpo toyebi ete tokobika! (Talá paragrafe 12, 13)

12, 13. (a) Nini ekosalema ntango Yesu akoya “na nguya mpe na nkembo mingi”? (b) Basaleli ya Nzambe bakosala nini na ntango wana?

12 Nini ekosalema ntango Yesu akoya “na nguya mpe na nkembo mingi”? Akopesa  mbano epai ya baoyo bazali sembo mpe akopesa baoyo bazali sembo te etumbu. (Matai 24:46, 47, 50, 51; 25:19, 28-30) Yesu asalelaki ndakisa moko mpo na kolimbola likambo yango na mozindo. Alobaki ete: “Ntango Mwana ya moto akoya na nkembo na ye mpe baanzelu nyonso elongo na ye, bongo akofanda na kiti na ye ya bokonzi ya nkembo. Mpe bikólo nyonso bakoyangana liboso na ye, mpe akokabola bato, mosusu epai oyo mosusu epai oyo, ndenge mobateli ya mpate akabolaka bampate ná bantaba. Mpe akotya bampate na lobɔkɔ na ye ya mobali, kasi bantaba na lobɔkɔ na ye ya mwasi.” (Matai 25:31-33) Nini ekokómela bampate mpe bantaba? Bakosambisama. Bantaba, to bato ya sembo te, “bakokufa liwa ya seko.” Kasi bampate, to bato ya sembo, bakozwa bomoi ya seko.​—Matai 25:46.

13 Bantaba bakosala nini ntango bakoyeba ete bakobomama? “bakomibɛtabɛta na kolela.” (Matai 24:30) Kasi bakristo oyo batyami mafuta na elimo ná baoyo basalisaka bango bakosala nini? Bakosala oyo Yesu alobaki ete: “Ntango makambo wana ekobanda kosalema, bótɛlɛma alima mpe bótombola mitó na bino, mpo kosikolama na bino ekómi pene.”​—Luka 21:28.

KONGƐNGA NA KATI YA BOKONZI

14, 15. Mosala nini ya koyanganisa ekosalema ntango Goge ya Magoge akobanda matumoli na ye, mpe likambo yango ekosalema ndenge nini?

14 Nini ekosalema ntango Goge ya Magoge akobanda kotya basaleli ya Nzambe mosapi na miso? Biblia elobi ete mwana ya moto “akotinda baanzelu mpe bakoyanganisa baponami na ye esika moko  uta na mipɛpɛ minei, uta na nsuka ya mabele tii na nsuka ya likoló.” (Marko 13:27; Matai 24:31) Mosala yango ya koyanganisa ezali te ntango oyo bakristo oyo batyami mafuta na elimo baponamaka. Ezali mpe te kotyama ya elembo ya nsuka mpo na bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazali naino awa na mabele. (Matai 13:37, 38) Kotyama elembo yango ekosalema liboso mpenza ete bolɔzi monene ebanda. (Emoniseli 7:1-4) Kasi, mosala yango ya koyanganisa ezali nini? Ezali ntango oyo bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazali naino awa na mabele bakozwa mbano na bango mpe bakokende na likoló. (1 Batesaloniki 4:15-17; Emoniseli 14:1) Likambo yango ekosalema mwa moke nsima ya ntango oyo Goge ya Magoge akobanda matumoli na ye. (Ezekiele 38:11) Na nsima, ndenge kaka Yesu alobaki, “bayengebene bakongɛnga makasi lokola moi na kati ya bokonzi ya Tata na bango.”​Matai 13:43. * (Talá maloba na nse ya lokasa.)

15 Yango elingi nde koloba ete bakristo oyo batyami mafuta na elimo bakokende likoló to “bakonɛtwa”? Bandimi mingi ya mangomba ya lokuta bandimaka ete bakristo bakomemama likoló na nzoto ya mosuni. Bakanisaka mpe ete bakomona Yesu na nzoto ya moto azali koya kozonga mpo na koyangela mabele. Kasi, Biblia emonisi polele ete kozonga ya Yesu ekozala ya elilingi: “Elembo ya Mwana ya moto ekomonana na likoló” mpe, Yesu akoya “na mapata ya likoló.” (Matai 24:30) Biblia elobi mpe ete “mosuni ná makila ekoki kozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te.” Na yango, baoyo bakokende na likoló basengeli naino “[kokóma] ndenge mosusu [bango] nyonso, na mbala moko, na kobɛta ya liso, na kelelo ya nsuka.” * (Talá maloba na nse ya lokasa.) (Tángá 1 Bakorinti 15:50-53.) Tosaleli te awa maloba kokende likoló to “konɛtwa” mpo na kolobela likambo yango mpo kosala bongo ekozala na boyokani ná liteya ya mangomba ya lokuta. Kasi, bakristo oyo batyami mafuta na elimo ya sembo oyo bazali naino awa na mabele bakoyanganisama na mbala moko.

16, 17. Nini ekosalema liboso ya libala ya mwana mpate?

16 Ntango bakristo nyonso oyo batyami mafuta na elimo 144 000 bakokoka na likoló, bibongiseli ya nsuka mpo na libala ya mwana mpate ekobanda. (Emoniseli 19:9) Kasi likambo mosusu esengeli kosalema liboso molulu wana ya ntina ebanda. Tóbosana te ete Goge akobundisa basaleli ya Nzambe ntango oyo ndambo ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali naino awa mabele. (Ezekiele 38:16) Basaleli ya Nzambe bakosala nini? Bakotosa malako oyo: “Bokozala na ntina ya kobunda te na mbala oyo. Bótɛlɛma, bóningana te mpe bómona lobiko ya Yehova mpo na bolamu na bino. . . . Bóbanga te, bózala na nsɔmɔ mpe te.” (2 Ntango 20:17) Ntango mosusu nsima ya kobanda ya etumba ya Goge, ndambo ya bakristo nyonso oyo batyami mafuta na elimo oyo bakozala naino awa na mabele bakokende na likoló. Na nsima Emoniseli 17:14 eyebisi biso likambo oyo Yesu akosala ntango Goge akobanda matumoli wana. Banguna ya Nzambe “bakobunda etumba na Mwana-Mpate, kasi lokola azali Nkolo ya bankolo mpe Mokonzi ya bakonzi, Mwana-Mpate akolonga bango.  Lisusu, bato oyo babengami mpe baponami mpe oyo bazali sembo bakolonga elongo na ye.” Na ndenge yango, Yesu ná bato 144 000 oyo batyami mafuta na elimo oyo bakoyangela elongo na ye kuna na likoló, bakobikisa basaleli ya Nzambe awa na mabele.

17 Etumba ya Armagedone, oyo ekokumisa nkombo mosantu ya Yehova nde ekomema lobiko yango. (Emoniseli 16:16) Baoyo bakozala lokola bantaba, to bato bazangi bosembo, bakobomama. Mabe ekozala lisusu te na mabele, mpe “ebele mpenza ya bato” bakobika na Armagedone. Na nsuka, makambo kitoko oyo esukisi mokanda ya Emoniseli, elingi koloba libala ya mwana mpate ekosalema! (Emoniseli 21:1-4) * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Baoyo bakobika awa na mabele bakondimama epai ya Nzambe mpe bakomona mpenza bolingo na ye monene mpe ezaleli na ye ya kokaba. Tozali mpenza kozela ntango yango na motema esengo. Ekozala mpenza fɛti ya libala!​—Tángá 2 Petro 3:13.

18. Na kotalela makambo kitoko oyo ekoya mosika te, tosengeli kozala na ekateli ya kosala nini?

18 Lokola makambo kitoko wana ekosalema mosika te, mokomoko na biso asengeli kosala nini uta sikoyo? Na lisalisi ya elimo santu ntoma Petro akomaki ete: “Lokola biloko nyonso wana esengeli kosilela bongo, bókanisa lolenge ya bato oyo bosengeli kozala. Bosengeli kozala bato ya etamboli ya bosantu mpe kosala misala oyo ezali komonisa ete bokangami na Nzambe, bózela mpe bóbatelaka na makanisi na bino kozala ya mokolo ya Yehova . . . Yango wana, bandeko ya bolingo, lokola bozali kozela makambo wana, bósala nyonso oyo ekoki na bino mpo nsukansuka akuta bino na litɔnɔ te mpe na mbeba te mpe na kimya.” (2 Petro 3:11, 12, 14) Na yango, tiká ete tózala na ekateli ya kobatela losambo na biso pɛto, mpe ezala ata na boyokani te na mateya ya mangomba ya lokuta, mpe tósala elongo na Yesu Kristo, mokonzi ya kimya.

^ par. 2 Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/04/2012, nkasa 25-26.

^ par. 14 Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/07/2013, nkasa 13-14.

^ par. 15 Nzoto ya mosuni ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bakozala na bomoi na ntango wana ekomemama te na likoló. (1 Bakorinti 15:48, 49) Nzoto na bango ya mosuni ekotikala ndenge kaka oyo ya Yesu etikalaki.

^ par. 17 Mokanda ya Nzembo 45 epesi mpe mwa makanisi ndenge makambo ekolandana. Ya liboso, mokonzi akobunda etumba, mpe na nsima libala ekosalema.