Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Juin 2015

Kristo azali nguya ya Nzambe

Kristo azali nguya ya Nzambe

“Kristo azali nguya ya Nzambe.”​—1 BAKORINTI 1:24.

1. Mpo na nini ntoma Paulo alobaki ete “Kristo azali nguya ya Nzambe”?

YEHOVA amonisaki nguya na ye na nzela ya Yesu Kristo na balolenge ebele ya kokamwa. Ntango Yesu azalaki awa na mabele, asalaki makamwisi. Tokoki kotánga makamwisi yango mosusu na Biblia, mpe ekoki kolendisa kondima na biso. (Matai 9:35; Luka 9:11) Ya solo, Yehova apesaki Yesu nguya mingi, yango wana ntoma Paulo akokaki koloba ete: “Kristo azali nguya ya Nzambe.” (1 Bakorinti 1:24) Kasi makamwisi oyo Yesu asalaki ezali na ntina nini mpo na biso?

2. Liteya nini tokoki kozwa na makamwisi oyo Yesu asalaki?

2 Ntoma Petro alobaki ete Yesu asalaki “makamwisi.” (Misala 2:22) Makamwisi yango eteyi biso nini? Ezali koteya biso oyo Yesu akosala na boumeli ya boyangeli na ye ya mbula nkóto. Na ntango wana, akosala makamwisi minene oyo ekomemela bato nyonso awa na mabele matomba. Makamwisi na ye ezali mpe kosalisa biso tóyeba mpenza makambo mingi oyo etali bizaleli na ye ná oyo ya Tata na ye. Na lisolo  oyo, tokolobela makamwisi misato ya Yesu, mpe tokomona ndenge ekoki kozala na ntina mpo na biso lelo mpe na mikolo ezali koya.

LIKAMWISI MOKO OYO ETEYI BISO EZALELI YA KOKABA

3. (a) Mpo na nini Yesu asalaki likamwisi na ye ya liboso? (b) Mpo na nini Yesu amonisaki ezaleli ya bokabi na Kana?

3 Yesu asalaki likamwisi na ye ya liboso na fɛti ya libala oyo esalemaki na engumba ya Kana. Toyebi te mpo na nini masanga ezalaki mingi te mpo na bato nyonso oyo babengamaki na fɛti yango. Likambo yango ekokaki kotungisa mpenza bato wana oyo bautaki kobalana, mpo ezalaki mokumba na bango ya koyamba malamu bato oyo babengaki. Maria, mama ya Yesu azalaki mpe na kati ya bato oyo babengamaki. Asɛngaki Yesu asalisa mpo andimisamaki ete azali na nguya ya kosala yango? Na ntembe te, Maria akanisaki na bisakweli nyonso oyo elobamaki mpo na mwana na ye, mpe ayebaki ete akobengama “Mwana ya Oyo-Aleki-Likoló.” (Luka 1:30-32; 2:52) Kasi likambo ya polele ezali ete Maria ná Yesu bazalaki na mposa ya kosalisa bato wana oyo babalanaki. Yango wana, Yesu abongolaki na ndenge ya likamwisi litrɛ 380 ya mai na “vinyo oyo eleki malamu.” (Tángá Yoane 2:3, 6-11.) Esengelaki mpenza Yesu asala likamwisi wana? Te. Asalaki yango mpo azalaki komibanzabanza mpo na bato, mpe amekolaki Tata na ye, oyo azalaka mokabi.

Yesu alobaki ete tosengeli ‘kopesaka’

4, 5. (a) Likamwisi ya Yesu ya liboso eteyi biso nini? (b) Likamwisi ya Yesu na Kana eteyi biso nini mpo na mikolo ezali koya?

4 Yesu abimisaki na ndenge ya likamwisi ebele ya vinyo oyo eleki malamu, oyo ekokaki mpo na ebele ya bato. Omoni liteya oyo tokoki kozwa na likamwisi yango? Liteya ezali ete Yehova ná Yesu bazalaka te mabɔkɔ makasi, kasi bazalaka nde bakabi minene. Likamwisi yango endimisi biso ete bayebaka mpenza mpasi na biso. Ezali mpe komonisa ete Yehova akosalela nguya na ye mpo na kopesa bato bilei beboo na mokili ya sika, ezala tokozala esika nini na mokili.​—Tángá Yisaya 25:6.

5 Kanisá naino! Mosika te Yehova akopesa biso biloko nyonso oyo tosengeli mpenza na yango. Moto nyonso akozala na ndako ya kitoko mpe bilei ya malamu. Tozalaka mpenza na botɔndi soki tokanisi na makambo nyonso kitoko oyo Yehova akopesa biso na Paradiso awa na mabele.

Tomekolaka Yesu ntango tosalelaka ntango na biso mpo na basusu (Talá paragrafe 6)

6. Ndenge nini Yesu asalelaki nguya na ye, mpe ndenge nini tokoki komekola ye?

6 Yesu asalelaki soki moke te nguya na ye mpo na kokokisa kaka bamposa na ye moko. Kanisá na oyo esalemaki ntango Zabolo amekaki Yesu mpo abongola mabanga na mampa. Yesu  aboyaki kosalela nguya oyo azalaki na yango mpo na bolamu na ye moko. (Matai 4:2-4) Kasi Yesu azalaki kosepela kosalela nguya na ye mpo na kosalisa basusu. Ndenge nini tokoki komekola ezaleli na ye ya komipimela? Yesu alobaki ete tosengeli ‘kopesaka.’ (Luka 6:38) Tokoki kosala yango soki tozali kobenga basusu epai na biso mpo na kolya mwa eloko. Tokoki mpe kolekisa ntango nsima ya makita mpo na kosalisa moto moko, na ndakisa koyoka ndeko mobali moko mpo amekameka lisolo na ye liboso na biso. To tokoki mpe mbala mosusu kosalisa mpe kopesa basusu formasyo na mosala ya kosakola. Tokomekola ezaleli ya kokaba ya Yesu soki tozali kosepela mpenza kosalisa basusu ntango nyonso oyo tokoki.

“BANGO NYONSO BALYAKI MPE BATONDAKI”

7. Likambo nini ekozala ntango nyonso na mokili oyo ya Satana?

7 Bobola ebandá lelo te. Yehova ayebisaki Bayisraele ete “mobola akosila ata moke te na mokili na yo.” (Kolimbola Mibeko 15:11) Bankama ya bambula na nsima, Yesu alobaki ete: “Bino bozali na babola ntango nyonso.” (Matai 26:11) Yesu alingaki nde koloba ete babola bakozala awa na mabele libela na libela? Te, alingaki nde koloba ete babola bakozala ntango nyonso oyo tokozala na mokili oyo ya Satana. Makambo ekozala bongo te ntango tokozala na mokili ya sika! Na ntango wana, ata mobola moko akozala te. Moto nyonso akozala na bilei beboo, mpe moto nyonso akotonda!

8, 9. (a) Mpo na nini Yesu aleisaki bankóto ya bato? (b) Likamwisi yango eteyi yo nini?

8 Mokomi moko ya nzembo alobaki mpo na Yehova ete: “Ozali kofungola lobɔkɔ na yo Mpe ozali kokokisa mposa ya ekelamu nyonso oyo ezali na bomoi.” (Nzembo 145:16) Ntango Yesu azalaki awa na mabele, amekolaki Tata na ye na ndenge ya kokoka mpe mbala mingi azalaki kokokisa bamposa ya basusu. Azalaki kosala yango te kaka mpo na komonisa ete azali na nguya. Yesu azalaki mpenza komibanzabanza mpo na bato. Tólobela Matai 14:14-21. (Tángá.) Ebele ya bato bautaki na bingumba mpe balandaki ye na makolo. (Matai 14:13) Na mpokwa, bayekoli bamitungisaki mpo ete bato balɛmbi mpe bazali na nzala. Na yango, basɛngaki Yesu azongisa bato bákende komisombela biloko ya kolya. Yesu asalaki nini?

9 Na mampa mitano mpe mbisi mibale, Yesu aleisaki mibali soki 5 000, basi ná bana. Mpo na nini Yesu asalaki likamwisi yango? Mpo azalaki kolinga bato mpe komibanzabanza mpo na bango. Mpe emonani ete Yesu abimisaki biloko ebele, mpo ebele ya bato “balyaki mpe batondaki.” Ekoki kozala ete biloko oyo balyaki epesaki bango makasi oyo basengelaki na yango mpo básala mobembo wana molai ya kozonga epai na bango. (Luka 9:10-17) Mpe ntango bato nyonso batondaki, bayekoli balɔkɔtaki biloko oyo etikalaki mpe esalaki kitunga zomi na mibale.

10. Bobola ekozala kaka na mikolo ezali koya?

10 Bamilio ya bamilio ya bato bazali lelo oyo babola mpo na lokoso mpe ezaleli mabe ya bato oyo bazali koyangela. Ata mpe bandeko na biso mosusu bazali  na biloko mingi te ya kolya. Kasi mosika te, bato oyo batosaka Yehova bakofanda na mokili oyo makambo mabe to bobola ekozala te. Yehova azali Nzambe Mozwi-ya-nguya-nyonso, mpe azali na nguya mpe mposa ya kosala ete bamposa ya moto nyonso ekokisama. Alaki ete nsima ya mwa ntango moke kaka akosilisa bampasi.​—Tángá Nzembo 72:16.

Makamwisi ya Yesu endimisi biso ete azali na mposa ya kosalela nguya na ye mpo na bolamu ya bato

11. Nini endimisi yo ete mosika te Kristo akosalela nguya na ye na mabele mobimba, mpe mpo na yango, okani kosala nini?

11 Ntango Yesu azalaki awa na mabele, asalaki makamwisi kaka na mwa mikili moke na boumeli ya mbula misato na ndambo. (Matai 15:24) Kasi lokola azali mokonzi, Yesu akosalisa bato nyonso na boumeli ya boyangeli na ye ya mbula nkóto. (Nzembo 72:8) Makamwisi ya Yesu endimisi biso ete azali na mposa ya kosalela nguya na ye mpo na bolamu ya bato. Biso tozali te na nguya ya kosala makamwisi, kasi tokoki kosala nini? Tokoki kosalela ntango mpe makasi na biso mpo na koyebisa basusu makambo kitoko oyo Biblia elaki mpo na mikolo ezali koya. Wana nde mokumba oyo biso Batatoli ya Yehova tozali na yango. (Baroma 1:14, 15) Soki tokanisi na oyo Kristo akosala mosika te, yango ekopesa biso mposa makasi ya koyebisa basusu likambo yango.​—Nzembo 45:1; 49:3.

YEHOVA NÁ YESU BALEKI MOPƐPƐ NÁ MAI NA NGUYA

12. Mpo na nini tokoki kondimisama ete Yesu ayebi malamu biloko lokola mopɛpɛ mpe mai?

12 Ntango Nzambe akelaki mabele mpe biloko nyonso oyo ezali na kati, Yesu azalaki “pembeni na ye lokola mosali ya mayele.” (Masese 8:22, 30, 31; Bakolose 1:15-17) Ayebaki malamu biloko lokola mopɛpɛ mpe mai oyo ezalaka na mabele. Ayebaki ndenge ya kosalela mpe kokitisa biloko wana nyonso.

Nini ekamwisi yo na ndenge Yesu asalelaki nguya na ye ya kosala makamwisi? (Talá paragrafe 13, 14)

13, 14. Pesá ndakisa moko oyo emonisi ete Kristo azali na nguya likoló ya biloko lokola mopɛpɛ to mai?

13 Ntango azalaki awa na mabele, amonisaki ete azali na nguya ya Nzambe na ndenge azalaki na bokonzi likoló ya biloko lokola mai mpe mopɛpɛ. Kanisá na ndakisa ndenge Yesu apekisaki mopɛpɛ makasi. (Tángá Marko 4:37-39.) Moto moko ya mayele oyo alimbolaka maloba ya Biblia alobi ete liloba ya Grɛki oyo basaleli mpo na “mopɛpɛ makasi” elimboli ekumbaki. Ezali mopɛpɛ oyo eyindisaka mapata, ebɛtisaka bankake mpe mbula ya makasi. Mpe soki esili, biloko ebebaka mpenza. Ntoma Matai alobelaki mopɛpɛ yango lokola ‘mbu oyo etomboki makasi.’​—Matai 8:24.

14 Kanisá na likambo oyo: Bambonge ezalaki kobɛta masuwa, mpe ezalaki kobwaka mai mbala na mbala na masuwa. Atako makelele ya mopɛpɛ ezalaki mpe masuwa ezalaki kotepatepa, Yesu alalaki mpo alɛmbaki. Kasi bayekoli babangaki, mpe balamwisaki Yesu mpe balobaki ete: “Nkolo, bikisá biso, tolingi tókufa!” (Matai 8:25) Yesu asalaki nini? Atɛlɛmaki mpe alobaki na mopɛpɛ mpe mbu ete: “Shiii! Fandá nyɛɛ!” (Marko 4:39) Mopɛpɛ makasi wana esilaki, mpe “kimya moko monene ekɔtaki.” Likambo oyo Yesu asalaki ya kokitisa  mopɛpɛ, ezalaki mpenza likamwisi monene!

15. Ndenge nini Yehova amonisi ete azali na nguya likoló ya biloko lokola mai to mopɛpɛ?

15 Nguya ya Kristo ezalaki kouta epai ya Yehova, na yango toyebi ete Nzambe Mozwi-ya-nguya-nyonso akoki kopekisa biloko lokola mai to mopɛpɛ. Na ndakisa, liboso ya Mpela, Yehova alobaki ete: “Etikali kaka mikolo nsambo nanɔkisa mbula na mabele mikolo ntuku minei (40) butu moi.” (Ebandeli 7:4) Lisusu, na mokanda ya Kobima 14:21, tozali kotánga ete: “Yehova abandaki kozongisa mai ya mbu yango nsima na mopɛpɛ makasi ya ɛsti.” Mpe tozali kotánga na mokanda ya Yona 1:4 ete: “Yehova atindaki mopɛpɛ moko makasi na mbu, mpe ekumbaki moko ya makasi eyaki na mbu yango; mpe masuwa elingaki kopanzana.” Ezali mpenza esengo koyeba ete na mokili ya sika, Yehova akozala kaka na nguya likoló ya mai, mopɛpɛ mpe bongo na bongo.

16. Mpo na nini koyeba ete Yehova ná Yesu bazali na nguya likoló ya biloko lokola mopɛpɛ to mai elendisaka biso?

16 Koyeba ete Yehova ná Yesu bazali na nguya likoló na biloko lokola mai to mopɛpɛ elendisaka mpenza. Na boumeli ya mbula nkóto ya boyangeli ya Kristo, moto nyonso oyo akozala awa na mabele akozala na kimya. Moto moko  te akozoka to akokufa mpo na mipɛpɛ lokola ekumbaki, volka to koningana ya mabele. Tokobanga te makama nyonso mpo “hema ya Nzambe” ekozala ná bato. (Emoniseli 21:3, 4) Tokoki mpenza kondimisama ete Yehova akopesa Yesu nguya likoló ya biloko lokola mopɛpɛ to mai na boumeli ya boyangeli na ye ya mbula nkóto.

MEKOLÁ NZAMBE NÁ KRISTO BANDA SIKOYO

17. Wapi lolenge moko oyo tokoki komekola Nzambe mpe Kristo uta sikoyo?

17 Mpo na koloba solo, biso tozali na nguya te ya kopekisa mai to mopɛpɛ. Kaka Yehova ná Yesu nde bazali na nguya ya kosala yango. Kasi ezali na likambo oyo biso tokoki kosala. Tokoki kosalela makanisi oyo ezali na mokanda ya Masese 3:27. (Tángá.) Ntango bandeko na biso bazali konyokwama, tokoki kosalisa bango na bilamba, biloko, koloba na bango maloba ya malamu mpo na kolendisa bango. (Masese 17:17) Na ndakisa tokoki kosalisa bango soki mopɛpɛ, mai to koningana ya mabele esalemi bisika bazali. Mopɛpɛ makasi to ekumbaki ebebisaki ndako ya ndeko mwasi moko. Ndeko yango alobaki boye: “Nazali na botɔndi mingi ndenge nazali na kati ya ebongiseli ya Yehova, ezali te kaka mpo na lisalisi ya mosuni kasi mpe ya elimo.” Ndeko mwasi moko ya monzemba amonaki ete asuki ntango mopɛpɛ makasi ebebisaki ndako na ye. Ntango bandeko basalisaki ye mpo na kobongisa ndako yango, alobaki boye: “Elekeli ngai! Nazangi maloba ya koyebisa bino ndenge nazali komiyoka.” Abakisaki: “Matɔndi Yehova!” Tozali na botɔndi ete bandeko na biso bakokisaka mpenza bamposa ya basusu. Na nyonso, tozali na botɔndi mingi mpo ete Yehova mpe Yesu Kristo bazali mpenza komibanzabanza mpo na biso.

18. Nini esepelisi yo lokola oyebi ntina oyo Yesu azalaki kosala makamwisi?

18 Ntango azalaki kosala mosala na ye awa na mabele, Yesu amonisaki ete azali “nguya ya Nzambe.” Kasi asalelaki soki moke te nguya na ye mpo na kokamwisa basusu to koluka matomba na ye moko. Kutu, Yesu asalelaki nde nguya na ye mpo na kosala makamwisi mpo azalaki mpenza kolinga bato. Tokolobela lisusu likambo yango mingi na lisolo oyo elandi.