Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Juin 2015

Azalaki kolinga bato

Azalaki kolinga bato

‘Nazalaki kolinga mingi bana ya bato.’​—MASESE 8:31.

1, 2. Ndenge nini Yesu amonisaki ete alingaka bato mingi?

MWANA ya liboso ya Nzambe azali ndakisa monene ya bwanya ya Yehova mpe azalaki “mosali ya mayele” ya Tata na ye. Kanisá naino esengo oyo Yesu azalaki na yango ntango Tata na ye “abongisaki likoló” mpe “apesaki mobeko ete ‘miboko ya mabele’ ezala.” Kasi na biloko nyonso oyo Tata na ye akelá, Yesu ‘azalaki kolinga mingi bana ya bato.’ (Masese 8:22-31) Ya solo, alingaki bato banda na ebandeli mpenza.

2 Na nsima, Yesu amonisaki bosembo mpe bolingo epai ya Tata na ye mpe bolingo makasi mpo na bato nyonso ntango andimaki kotika likoló mpe koya awa na mabele lokola moto. Yesu asalaki yango mpo ete akoka kopesa bomoi na ye “lisiko na esika ya bato mingi.” (Matai 20:28; Bafilipi 2:5-8) Ntango Yesu azalaki awa na mabele, Nzambe apesaki ye nguya ya kosala makamwisi. Makamwisi yango emonisaka ete Yesu alingaka bato mingi mpe emonisaka makambo kitoko oyo akosala mpo na bato mosika te.

3. Tokolobela nini na lisolo oyo?

3 Ntango Yesu azalaki awa na mabele, asakolaki “nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe.” (Luka 4:43) Ayebaki ete bokonzi yango ekosantisa nkombo ya tata na ye mpe ete  ekosilisa mikakatano ya bato mpo na libela. Ntango Yesu azalaki kosakola, asalaki makamwisi mingi. Makamwisi yango emonisaki ete azalaki komibanzabanza mingi mpo na bato nyonso. Mpo na nini ezaleli yango ezali na ntina mpo na biso? Mpo makambo oyo asalaki epesi biso elikya mpo na mikolo ezali koya. Tótalela sikoyo makamwisi minei oyo Yesu asalaki.

‘NGUYA EZALAKI WANA MPO YE ABIKISA’

4. Likambo nini esalemaki ntango Yesu akutanaki na mobali moko oyo azalaki kobɛla maladi ya maba?

4 Ntango Yesu azalaki kosala mosala na ye, akendeki na Galile. Na engumba moko kuna, akutanaki na moto moko oyo azalaki kobɛla maladi moko ya mabe mpenza, maladi ya maba. (Marko 1:39, 40) Mobali yango azalaki mpenza kobɛla makasi, mpo Luka, oyo azalaki monganga, alobelaki ye lokola moto oyo “atondá na maba.” (Luka 5:12) Biblia elobi ete ntango mobali yango ya maladi amonaki Yesu, “akweaki elongi na nse, abondelaki ye mpe alobaki ete: ‘Nkolo, soki olingi, okoki kokómisa ngai pɛto.’” Mobali yango ayebaki ete Yesu azalaki na nguya ya kobikisa ye, kasi azalaki na mposa ya koyeba soki alingi kosala yango. Mpo na nini? Mpo ete moto yango ayebaki ete Bafarisai bazalaki komona bato ya maba lokola nkasa ya kwanga. Kasi makanisi ya Yesu ezalaki nini? Likambo nini alingaki kosala epai ya moto wana, oyo ekoki kozala ete mbala mosusu maladi ebebisaki ye? Soki ezalaka yo, olingaki kosala nini?

5. Mpo na nini Yesu asepelaki kobikisa moto ya maba?

5 Emonani ete mobali yango abelelaki te “Mbindo, mbindo!” ndenge Mobeko ya Moize ezalaki kosɛnga. (Balevi 13:43-46) Kasi Yesu asilikaki te. Kutu, amityaki na esika ya mobali yango mpe azalaki na mposa ya kosalisa ye. Toyebi mpenza te soki makanisi ya Yesu ezalaki nini, kasi toyebi ndenge amiyokaki. Ayokelaki mobali yango mawa mpe asalaki likamwisi. Asimbaki mobali yango, likambo oyo moto moko te akokaki kosala. Na motema mobimba mpe na mawa nyonso, Yesu alobaki ete: “Nalingi. Kómá pɛto.” Na nsima, “maba na ye elimwaki.” (Luka 5:13) Emonani polele ete Yehova apesaki Yesu nguya ya kosala likamwisi wana monene mpe komonisa ete alingaka bato mingi.​—Luka 5:17.

6. Nini esepelisi yo na makamwisi oyo Yesu asalaki, mpe emonisi nini?

6 Na lisalisi ya nguya ya Nzambe, Yesu asalaki makamwisi mingi ya minene. Longola bato ya maba, abikisaki mpe bato mosusu. Yesu abikisaki mpe bato oyo bazalaki na bamaladi ndenge na ndenge. Biblia elobi ete bato bakamwaki ntango “bamonaki bato oyo balobaka te bazali koloba mpe batɛngumi bazali kotambola mpe bato oyo bakufá miso bazali komona.” (Matai 15:31) Ntango Yesu azalaki kobikisa bato, azalaki kosɛnga te ete moto oyo azali na nzoto kolɔngɔnɔ apesa enama moko ya nzoto na ye. Ya solo, Yesu azalaki na nguya ya kobikisa biteni ya nzoto oyo ezalaki na maladi. Mpe abikisaki bato mbala moko, ntango mosusu ata mpe bato oyo bazalaki mosika na ye. (Yoane 4:46-54) Bandakisa oyo ya kokamwa emonisi nini? Emonisi ete mokonzi na biso Yesu Kristo azali na nguya mpe mposa ya kolongola maladi nyonso mpo na libela. Soki toyekoli ndenge Yesu abikisaki bato, ekopesa biso elikya makasi ete na mokili ya sika “akoyokela moto oyo azangá ná mobola mawa.” (Nzembo 72:13) Lokola azalaka  mpenza na mposa na yango, Yesu akobikisa bato nyonso oyo bazali na mpasi.

“TƐLƐMÁ, LOKƆTÁ LITƆKƆ NA YO MPE TAMBOLÁ”

7, 8. Lobelá makambo oyo elekaki liboso Yesu akutana na moto ya maladi na Betezata.

7 Mwa basanza nsima ya kobikisa moto ya maba, Yesu alongwaki na Galile mpe akendaki na Yudea, epai akobaki kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Bankóto ya bato bayokaki nsango ya Yesu mpe basepelaki na bolingo oyo amoniselaki bango. Yesu azalaki mpenza na mposa ya kobɔndisa babola, bato ya mawa mpe ya kopesa bango elikya.​—Yisaya 61:1, 2; Luka 4:18-21.

8 Na sanza ya Nisana, Yesu akendeki na Yerusaleme mpo na fɛti ya Elekeli. Engumba ezalaki na loyenge lokola bato bayaki mpo na fɛti wana ya ntina mingi. Na nɔrdi ya tempelo ezalaki na pisini moko oyo bazalaki kobenga Betezata, mpe kuna, Yesu akutanaki na mobali moko oyo azalaki kotambola te.

9, 10. (a) Mpo na nini bato bazalaki kokende na pisini ya Betezata? (b) Yesu asalaki nini na pisini yango, mpe likambo yango eteyi biso nini? (Talá elilingi ya ebandeli.)

9 Bato mingi ya maladi bazalaki kokende na Betezata. Mpo na nini? Mpo bazalaki kokanisa ete moto ya maladi akokaki kobika na ndenge ya likamwisi soki amibwaki na pisini ntango mai ezali koningana. Meká komona na makanisi ndenge makambo ezalaki na ntango wana. Na ntembe te, ebele ya bato oyo bazalaki na elikya lisusu te, bazalaki komitungisa mpe koluka kobikisama. Yesu azalaki moto ya kokoka mpe azalaki na mposa te ya kobikisama, kasi mpo na nini akendeki kuna? Bolingo na ye mpo na bato nde etindaki ye akende kuna. Mpe kuna nde akutanaki na mobali moko oyo aumelaki mingi na maladi koleka bambula oyo Yesu alekisaki awa na mabele.​—Tángá Yoane 5:5-9.

Yesu azalaki koluka baoyo bazalaki na mposa ya lisalisi

10 Yesu atunaki mobali yango soki alingi kotambola lisusu. Kanisá mawa ya mobali yango ntango ayebisaki Yesu ete azali na mposa ya kobikisama kasi azali kokoka te, mpo azali na moto te oyo akoki kosalisa ye akɔta na pisini. Kasi Yesu asɛngaki ye asala likambo moko oyo akokoka te. Ayebisaki ye azwa litɔkɔ na ye mpe atambola. Moto yango azwaki litɔkɔ na ye mpe abandaki kotambola! Likamwisi wana ezali elembeteli ya polele ya makambo oyo Yesu akosala na mokili ya sika. Emonisi mpe ete Yesu alingaka bato mingi. Azalaki koluka baoyo bazalaki na mposa ya lisalisi. Ndakisa ya Yesu esengeli kolendisa biso ete tókoba koluka na teritware na biso bato oyo bazali kotungisama mpo na makambo mabe oyo ezali koleka na mokili oyo.

“NANI ASIMBI BILAMBA NA NGAI YA LIKOLÓ?”

11. Ndenge nini Marko 5:25-34 emonisi ete Yesu azalaki kolinga bato ya maladi?

11 Tángá Marko 5:25-34. Mwasi moko anyokwamaki na maladi moko ya mabe na boumeli ya mbula 12. Maladi yango ebebisaki makambo mingi ya bomoi na ye, mpe ezalaki mpasi mpo asambela Nzambe na ndenge esengeli. Akutanaki na minganga ebele mpe asilisaki mbongo nyonso oyo azalaki na yango mpo na koluka kobika, kasi maladi na ye ezalaki kaka kokóma makasi. Mokolo moko,  mwasi yango alukaki mayele mosusu mpo abika, na yango, atambolaki na kati ya ebele ya bato mpe asimbaki elamba ya Yesu. (Balevi 15:19, 25) Ntango Yesu amonaki ete nguya moko ebimi epai na ye, atunaki soki nani asimbi ye. “Na kobanga mpe na kolɛnga,” mwasi yango “akweaki liboso na ye mpe ayebisaki ye solo nyonso.” Yesu ayebaki ete Yehova abikisi mwasi yango, na boboto nyonso alobaki ete: “Mwana na ngai, kondima na yo ebikisi yo. Kende na kimya, mpe biká na maladi na yo ya mpasi.”

Makamwisi ya Yesu emonisaki ete amibanzabanzaka mpo na biso mpe mikakatano na biso (Talá paragrafe 11, 12)

12. (a) Na makambo oyo tomoni, okoloba ete Yesu azali moto ya ndenge nini? (b) Ndakisa nini Yesu atikelá biso?

12 Komona ndenge Yesu azalaki kolinga bato, mingimingi mpenza bato ya maladi esimbaka mitema na biso. Yango ekeseni mpenza na Satana oyo alukaka kondimisa biso ete tozali na ntina te mpe ete moto moko te alingaka biso. Kasi, makamwisi ya Yesu emonisaki ete amibanzabanzaka mpo na biso mpe mikakatano na biso. Tosengeli mpenza kozala na botɔndi lokola tozali na mokonzi mpe nganga-nzambe monene ya bolingo ndenge wana! (Baebre 4:15) Ekoki kozala mpasi tóyeba mpasi ya moto oyo atungisami na maladi ntango molai, mingimingi soki biso moko tozali kobɛla te. Kasi tóbosana te oyo Yesu asalaki. Azalaki koyokela bato ya maladi motema mawa atako ye moko abɛlá te. Tósala nyonso mpo na komekola bolingo na ye.​—1 Petro 3:8.

“YESU ALELAKI”

13. Lisekwa ya Lazare emonisaki nini na ntina na Yesu?

13 Mpasi oyo bato bazalaki koyoka, ezalaki kotinda Yesu ayokela bango mawa. Na ndakisa, ntango moninga na ye Lazare akufaki, Yesu ‘atungisamaki’ mpe “abulunganaki” ntango amonaki mpasi oyo libota ya Lazare mpe baninga na ye bazalaki na yango. (Tángá Yoane 11:33-36.) Atako ayebaki ete akosekwisa Lazare, Yesu alelaki. Abangaki te ete basusu bámona mawa oyo azalaki na yango. Yesu alingaki Lazare mpe libota na ye mingi, mpe asalelaki nguya ya Nzambe mpo na kozongisa Lazare na bomoi.​—Yoane 11:43, 44.

14, 15. (a) Nini emonisi ete Yehova azali na mposa ya kolongola bampasi ya bato? (b) Maloba “malita ya kokanisama” eteyi biso nini?

 14 Biblia elobaka ete Yesu azali mpenza lokola tata na ye Yehova. (Baebre 1:3) Na yango, makamwisi ya Yesu emonisi ete Yehova alingi mpe kolongola maladi, mpasi mpe liwa. Mosika te, Yehova ná Yesu bakozongisa ebele ya bato na bomoi. Yesu alobaki ete “ngonga ezali koya wana baoyo nyonso bazali na kati ya malita [malita ya kokanisama]” bakosekwa.​—Yoane 5:28, 29.

15 Yesu asalelaki maloba “malita ya kokanisama” mpo na komonisa ete Yehova akokanisa bato oyo bakufá. Nzambe-mozwi-ya-nguya-nyonso, Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, azali na likoki ya kokanisa likambo mokomoko oyo etali bato oyo tozalaki kolinga mingi oyo bakufá, ezala mpe bomoto na bango. (Yisaya 40:26) Ezali te ete Yehova akoki kokanisa bango kasi azali mpenza na mposa ya kokanisa bango. Lisekwa ndenge na ndenge oyo Biblia elobeli ezali bandakisa kitoko ya makambo oyo ekosalema na mokili ya sika.

MATEYA OYO TOZWI NA MAKAMWISI YA YESU

16. Basaleli mingi ya Nzambe bazali na libaku nini?

16 Soki totikali sembo, tokozala na libaku ya komona moko ya makamwisi oyo eleki nyonso, kobika na bolɔzi monene! Mosika te nsima ya Armagedone, tokomona lisusu makamwisi ebele. Na ntango wana, moto nyonso akokóma na nzoto ya kokoka. (Yisaya 33:24; 35:5, 6; Emoniseli 21:4) Meká komona na makanisi ndenge bato bakobwaka manɛti na bango, mwa nzete ya kotambola na yango mpo na koyeba nzela, banzete mpe bavelo ya bibɔsɔnɔ mpe bamasini mosusu mpo na koyoka. Yehova ayebi ete baoyo nyonso bakobika na Armagedone bakosengela na nzoto makasi mpe kolɔngɔnɔ, mpo bakozala na mosala mingi ya kosala. Bango nde bakokómisa mabele mobimba, etando na biso kitoko paradiso.​—Nzembo 115:16.

17, 18. (a) Mpo na nini Yesu asalaki makamwisi? (b) Mpo na nini osengeli kosala nyonso oyo esengeli mpo na kozala na mokili ya sika ya Nzambe?

17 Lelo oyo, “ebele mpenza ya bato” balendisamaka ntango batángaka masolo oyo elobeli ndenge Yesu abikisaki bato ya maladi. (Emoniseli 7:9) Makamwisi yango ekómisaka makasi elikya kitoko oyo tozali na yango ete tokobikisama na makambo nyonso na mikolo ezali koya. Emonisi mpe ete mwana-mobotami se moko ya Nzambe alingaka bato mingi. (Yoane 10:11; 15:12, 13) Motema mawa monene ya Yesu ezali komonisa bolingo monene oyo Yehova azalaka na yango mpo na mosaleli na ye mokomoko.​—Yoane 5:19.

18 Lelo oyo mokili oyo etondi na mitungisi, mpasi mpe liwa. (Baroma 8:22) Yango wana tozali na mposa ya mokili ya sika ya Nzambe. Kuna, bato nyonso bakozala na nzoto ya kokoka, ndenge Nzambe alaki. Mokanda ya Malaki 4:2 epesi biso elikya ete ‘tokobɛtabɛta mabele na makolo na biso lokola bana-ngɔmbɛ ya mafutamafuta,’ tokosepela makasi mpo tobikisami mpe tosikolami na ezaleli ya kozanga kokoka. Tiká ete botɔndi na biso mpo na Yehova mpe kondima na biso mpo na bilaka na ye etinda biso tósala nyonso oyo esengeli mpo tózala na mokili ya sika. Tosengeli mpenza kozwa makasi lokola toyebi ete makamwisi oyo Yesu asalaki ezali ndakisa ya kobikisama ya libela oyo bato bakozwa mosika te na boyangeli na ye!