Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Juin 2015

Salá na boyokani ná libondeli ya ndakisa​—Eteni I

Salá na boyokani ná libondeli ya ndakisa​—Eteni I

“Nkombo na yo esantisama.”​—MATAI 6:9.

1. Ntango tozali kosakola, ndenge nini tokoki kosalela libondeli ya Yesu oyo ezali na Matai 6:9-13?

BATO mingi bayebi maloba ya libondeli oyo ezali na Matai 6:9-13. Ntango tosakolaka, tosalelaka maloba ya libondeli yango mpo na koteya bato ete Bokonzi yango ezali guvɛrnema ya Nzambe oyo ekobongola mabele paradiso. Tosalelaka mpe maloba “Nkombo na yo esantisama” mpo na komonisa ete Nzambe azali na nkombo mpe ete tosengeli komona ete ezali mosantu.​—Matai 6:9.

2. Ndenge nini toyebi ete Yesu alingaki te ete tózongelaka kaka maloba wana ntango nyonso oyo tozali kobondela?

2 Yesu alingaki nde ete tózongelaka maloba ya libondeli yango ntango nyonso oyo tozali kobondela, ndenge bato mingi basalaka? Te. Yesu alobaki ete: “Ntango ozali kobondela, kozongela kaka maloba wana mbala na mbala te.” (Matai 6:7) Mokolo moko, ntango azalaki koteya bayekoli na ye ndenge ya kobondela, azongelaki libondeli yango kasi asalelaki te kaka maloba ndenge moko. (Luka 11:1-4) Na yango, Yesu apesaki biso libondeli ya ndakisa mpo na koteya biso makambo oyo tosengeli kobondelaka mpo na yango.

3. Mituna nini okoki komituna ntango ozali koyekola libondeli ya ndakisa?

 3 Na lisolo oyo mpe oyo ekolanda, tokoyekola na mozindo libondeli ya ndakisa. Ntango tokoyekola, omituna boye: ‘Ndenge nini libondeli yango ekoki kosalisa ngai nasalaka mabondeli ya malamu?’ Mpe likambo eleki ntina, ‘Nazali mpenza kosala na boyokani ná libondeli ya ndakisa?’

“TATA NA BISO NA LIKOLÓ”

4. Maloba “Tata na biso” ezali kokundwela biso nini, mpe na ndenge nini Yehova azali Tata na biso?

4 Yesu abandaki libondeli yango na koloba ete: “Tata na biso.” Yango esalisi biso tóbosana te ete Yehova azali Tata ya bandeko na biso nyonso ya mibali mpe basi ya mokili mobimba. (1 Petro 2:17) Baoyo baponami na Yehova mpo na kozala na bomoi na likoló bandimami lokola bana na ye, na yango Yehova azali tata na bango na ndenge moko ya sipesiale. (Baroma 8:15-17) Baoyo bakozala na bomoi libela na libela awa na mabele bakoki mpe kobenga ye “Tata” na bango. Yehova apesaka bango bomoi mpe na bolingo nyonso akokisaka bamposa na bango. Bakobengama “bana ya Nzambe” nsima ya kokóma bato ya kokoka mpe kotikala sembo epai ya Yehova na komekama ya nsuka.​—Baroma 8:21; Emoniseli 20:7, 8.

5, 6. Wapi likabo ya kitoko mingi oyo baboti bakoki kopesa bana na bango, mpe mwana mokomoko asengeli kosala nini na likabo yango? (Talá elilingi ya ebandeli.)

5 Ntango baboti basalisi bana na bango báyeba ete Yehova azali tata na bango ya likoló mpe bateyi bango ete bábondelaka ye, wana ekozala mpenza likabo oyo bakopesa bango. Mokɛngɛli moko ya zongazonga na Afrika ya Sudi alobi ete: “Ntango kaka bana na biso babotamaki, nazalaki kobondela elongo na bango butu nyonso, longola kaka soki nazali na ndako te. Bana na biso balobaka mbala mingi ete bayebaka te na bosikisiki maloba ya mabondeli wana oyo ezalaki kosalema na butu. Kasi, bayebaka eleko wana malamu, ya esengo, ya kimya mpe lisolo ya esengo ya limemya elongo na Yehova, Tata na biso. Ntango nyonso oyo likoki ezalaki, nazalaki kolendisa bango bábondela na mongongo makasi mpo nayoka ndenge bazali kobimisa makanisi na bango mpe koyebisa Yehova ndenge bazali koyoka. Yango ezalaki libaku moko kitoko mpo na koyeba ata moke makambo oyo ezali na mitema na bango. Na nsima, na boboto nyonso, nazalaki kolakisa bango ndenge ya kokɔtisa maloba ya libondeli ya ndakisa mpo mabondeli na bango ezala te ya likolólikoló.”

6 Bana na bango bakobaki kopusana penepene na Yehova ata ntango bakolaki. Lelo oyo babalá mpe bazali kosalela Yehova na mosala ya ntango nyonso elongo na mibali na bango. Likabo ya kitoko mingi oyo baboti bakoki kopesa bana na bango ezali ya koteya bango ete Yehova azali moto ya solo mpenza mpe ete bakoki kokóma baninga na ye ya motema. Kasi mwana mokomoko asengeli kokoba kobatela boyokani na ye ná Yehova.​—Nzembo 5:11, 12; 91:14.

“NKOMBO NA YO ESANTISAMA”

7. Libaku malamu nini tozali na yango, kasi tosengeli kosala nini?

7 Tozali na libaku malamu ya koyeba nkombo ya Nzambe mpe kozala “ekólo moko mpo na nkombo na ye.” (Misala 15:14; Yisaya 43:10) Tobondelaka, “nkombo na yo esantisama,” elingi koloba ezala mosantu. Tosɛngaka mpe Yehova ete asalisa biso tósala te to tóloba te likambo oyo ekoki kobebisa lokumu na ye. Tosengeli te kozala lokola bato mosusu ya siɛklɛ ya liboso oyo bazalaki te kosalela makambo oyo bazalaki  koteya basusu básala. Ntoma Paulo akomelaki bango ete: “Bikólo bazali kofinga nkombo ya Nzambe mpo na bino.”​—Baroma 2:21-24.

8, 9. Pesá ndakisa oyo emonisi ndenge Yehova asalisaka baoyo balingaka kosantisa nkombo na ye.

8 Tosalaka nyonso mpo tókumisa nkombo ya Yehova. Ndeko mwasi moko na Norvège, oyo atikalaki na mwana moko ya mobali ya mbula mibale nsima ya liwa ya mobali na ye alobi boye: “Ezalaki eleko moko ya mpasi mpenza na bomoi na ngai. Nazalaki kobondela mikolo nyonso, pene ya ngonga nyonso, mpo Nzambe apesa ngai makasi ya kozala na bokatikati mpo napesa te Satana libaku ya kotumola Yehova mpo nazwaki ekateli moko ya mabe. Nazalaki na mposa nkombo ya Yehova esantisama, mpe ete mwana na ngai amona tata na ye lisusu na Paradiso.”​—Masese 27:11.

9 Yehova ayanolaki na libondeli na ye? Ɛɛ. Lokola azalaki mbala na mbala elongo na bandeko, yango elendisaki ye. Mbula mitano na nsima, abalanaki na nkulutu moko. Mwana na ye wana azali sikoyo na mbula 20, mpe azwá batisimo. Alobi boye: “Nazali na esengo mpo ete mobali oyo nabali nsima, asalisi ngai na kobɔkɔla mwana yango.”

10. Ndenge nini Nzambe akosantisa nkombo na ye mpo na libela?

10 Yehova akosantisa nkombo na ye mpo na libela ntango akolongola baoyo nyonso bazali kotyola ye mpe koboya kondima ye lokola mokonzi na bango. (Tángá Ezekiele 38:22, 23.) Na ntango wana, bato bakokóma bato ya kokoka, mpe ekelamu nyonso, ezala na likoló mpe awa na mabele akosambela Yehova, mpe akokumisa nkombo na ye mosantu. Na nsuka, Tata na biso ya bolingo ‘akozala makambo nyonso epai ya moto nyonso.’​—1 Bakorinti 15:28.

“BOKONZI NA YO EYA”

11, 12. Na mobu 1876, Yehova asalisaki basaleli na ye báyeba likambo nini?

11 Liboso Yesu azonga na likoló, bayekoli na ye batunaki ete: “Nkolo, ozali kozongisela Yisraele bokonzi na ntango oyo?” Yesu ayanolaki ete ntango ekokaki naino te mpo na bango koluka koyeba ntango oyo Bokonzi ya Nzambe ekobanda koyangela. Ayebisaki bayekoli na ye bátya makanisi mobimba na mosala ya ntina mingi: kosakola. (Tángá Misala 1:6-8.) Kasi ateyaki mpe bango bábondelaka ete Bokonzi ya Nzambe eya mpe bázelaka ntango yango na motema esengo. Yango wana tokobaka kobondela ete Bokonzi yango eya.

12 Wana ntango ekómaki pene mpo Yesu abanda koyangela na likoló, Yehova asalisaki basaleli na ye báyeba na mbula nini likambo yango esengelaki kosalema. Na mobu 1876, ndeko Charles Taze Russell akomaki lisolo oyo ezalaki na motó ya likambo ete, “Ntango ya bapakano: ekosila ntango nini?” Alimbolaki ete “ntango nsambo” ya esakweli ya Danyele ezali ndenge moko na “bantango oyo etyamá ya bikólo” ya esakweli ya Yesu. Lisolo yango elimbolaki ete bantango yango ekosuka na mobu 1914. * (Talá maloba na nse ya lokasa.)​—Danyele 4:16; Luka 21:24.

13. Likambo nini esalemaki na mobu 1914, mpe makambo oyo eleki na mokili kobanda mobu yango emonisi nini?

13 Na mobu  1914, etumba ebandaki na Mpoto mpe mosika te epanzanaki na mokili mobimba. Lokola etumba ezalaki, nzala ezalaki makasi. Mpe ntango etumba esilaki, na mobu 1918, gripɛ moko ya mabe mpenza ebomaki ebele ya  bato na mokili mobimba koleka baoyo bakufaki na etumba. Makambo oyo nyonso ezalaki na kati ya “elembo” oyo Yesu apesaki. Elembo yango emonisaki ete Yesu akómaki mokonzi kuna na likoló na mobu 1914. (Matai 24:3-8; Luka 21:10, 11) Na mbula yango, “abimaki azali kolonga mpe mpo na kolonga tii na nsuka.” (Emoniseli 6:2) Yesu abenganaki Satana mpe bademo na ye na likoló mpe abwakaki bango na mabele. Na nsima, esakweli oyo ebandaki kokokisama: “Mawa na mabele mpe na mbu, mpo Zabolo akiteli bino na nkanda makasi, mpo ayebi ete azali na ntango mokuse.”​—Emoniseli 12:7-12.

14. (a) Mpo na nini tozali kokoba kobondela ete Bokonzi ya Nzambe eya? (b) Mosala nini ya ntina tosengeli kosala sikoyo?

14 Esakweli yango oyo Emoniseli mokapo 12, esalisaka biso tóyeba ntina oyo makambo ya nsɔmɔ ebandaki kosalema awa na mabele kobanda na ntango oyo Yesu akómaki mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe. Atako Yesu azali koyangela na likoló, Satana azali koyangela awa na mabele. Kasi mosika te Yesu ‘akolonga tii na nsuka’ na ndenge akosilisa mabe nyonso awa na mabele. Kino ntango wana ekokoka, tókoba kobondela mpo ete Bokonzi ya Nzambe eya, mpe tókoba komipesa mpo na kosakola na ntina ya Bokonzi yango. Mosala na biso ezali kokokisa esakweli oyo ya Yesu: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka ekoya.”​—Matai 24:14.

“MOKANO NA YO ESALEMA . . . NA MABELE”

15, 16. Esengeli kaka kosuka na kobondela ete mokano ya Nzambe esalema awa na mabele? Limbolá.

15 Eleki mbula soki 6 000, mokano ya Nzambe ezalaki kosalema awa na mabele. Yango wana Yehova alobaki ete eloko nyonso “ezalaki malamu mingi.” (Ebandeli 1:31) Na nsima, Satana  atombokaki mpe kobanda ntango wana, bato mingi basali mokano ya Nzambe te. Kasi lelo oyo ezali na bato soki milio 8 oyo bazali kosalela Yehova. Bazali kobondela mpo mokano ya Nzambe esalema awa na mabele, bazali mpe kosala mokano ya Nzambe. Bazali na bomoi oyo esepelisaka Nzambe mpe na molende nyonso bateyaka basusu makambo etali Bokonzi na ye.

Oteyaka bana na yo básala mokano ya Nzambe? (Talá paragrafe 16)

16 Na ndakisa, ndeko moko ya mbula 80, oyo azali misionɛrɛ na Afrika, mpe azwaki batisimo na mobu 1948 alobi boye: “Nabondelaka ntango nyonso ete bato nyonso oyo bazali lokola bampate báyoka nsango malamu mpe básalisama mpo báyeba Yehova liboso ete nsuka eya. Lisusu, ntango nalingi napesa moto litatoli, nasɛngaka bwanya mpo nasimba motema ya moto yango. Mpe mpo na bampate oyo bazwami, nabondelaka ete Yehova apambola milende oyo tozali kosala mpo na kobatela bango.” Ndeko wana ya mobange ya mwasi asalisi bato mingi báyeba Yehova. Oyebi mibange mosusu oyo bazali kosala mokano ya Yehova na molende?​—Tángá Bafilipi 2:17.

17. Oyoki ndenge nini awa oyebi makambo oyo Yehova akosala na mikolo ezali koya mpo na bato mpe mabele?

17 Tii ntango Yehova akolongola banguna na ye na mabele, tokokoba kobondela mpo mokano na ye esalema. Na nsima, mabele ekobongwana paradiso, mpe bamiliare ya bato bakosekwa. Yesu alobaki ete “ngonga ezali koya wana baoyo nyonso bazali na kati ya malita bakoyoka mongongo na ye mpe bakobima.” (Yoane 5:28, 29) Kanisá esengo oyo tokozala na yango ntango tokoyamba balingami na biso oyo bakozonga lisusu na bomoi! Nzambe “akopangwisa mpisoli nyonso” na miso na biso. (Emoniseli 21:4) Na bato oyo bakosekwa, mingi bakozala “bato oyo bazangi boyengebene,” oyo bayekolá ata moke te solo na ntina na Yehova mpe Yesu. Tokosepela koteya bango mokano ya Nzambe mpo ete bázala na likoki ya kozwa “bomoi ya seko.”​—Misala 24:15; Yoane 17:3.

18. Makambo nini mpenza bato basengeli na yango mingi?

18 Ntango Bokonzi ya Nzambe ekoya, ekosantisa nkombo na ye, mpe bato nyonso na molɔ́ngɔ́ bakosambela Yehova na bomoko. Ya solo, Nzambe akopesa bato biloko oyo balingaka mingi ntango akopesa bato makambo misato ya ebandeli ya libondeli ya ndakisa. Na lisolo oyo elandi, tokolobela makambo mosusu ya ntina oyo Yesu ateyaki biso mpo tosɛngaka na libondeli.

^ par. 12 Mpo na koyeba ndenge toyebi ete esakweli yango ekokisamaki na mobu 1914, talá buku Biblia eteyaka mpenza nini? nkasa 215-218.