Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Juin 2015

Salá na boyokani ná libondeli ya ndakisa​—Eteni II

Salá na boyokani ná libondeli ya ndakisa​—Eteni II

“Tata na bino ayebi makambo oyo bozali na bosɛnga na yango.”​—MATAI 6:8.

1-3. Ndenge nini ndeko mwasi moko amonaki mpenza ete Yehova ayebaki mposa na ye?

NDEKO Lana, oyo azali mobongisi-nzela ya sanza na sanza, akobosana soki moke te likambo oyo elekaki ntango akendeki kotala ekólo Allemagne na mobu 2012. Amonaki ete Yehova ayanolaki na mabondeli na ye mibale. Ntango azalaki na engbunduka mpo na kokende na libándá ya mpɛpɔ, asɛngaki Yehova asalisa ye akutana na moto moko oyo akoki kosakwela ye. Ntango akómaki na libándá ya mpɛpɔ, amonaki ete mpɛpɔ na bango ekokende nde mokolo oyo elandi. Ndeko Lana asɛngaki Yehova lisalisi mpo asalelaki mbongo mingi oyo azalaki na yango mpe azalaki koluka esika ya kolala na butu wana.

2 Ntango kaka ndeko Lana asilisaki kobondela, ayokaki moto moko alobi, “Mbote Lana, ozali kosala nini awa?” Ezalaki moninga na ye ya kelasi. Mama ná nkɔkɔ na ye bayaki kotika ye mpo akende na Afrika ya Sudi. Ntango ndeko Lana ayebisaki bango mokakatano na ye, mama mpe nkɔkɔ wana ya moninga na ye bayebisaki ye ete akende epai na bango.  Batunaki ye mituna ebele oyo etali Batatoli ya Yehova mpe mpo na mosala na ye ya mobongisi-nzela.

3 Na ntɔngɔ, nsima ya komɛla ti ndeko Lana ayanolaki na mituna na bango mingi na Biblia. Ndeko Lana asɛngaki banimero to adrɛsi na bango mpo ete ndeko mosusu abanda koya koyanolaka na mituna na bango. Ndeko Lana azongaki epai na ye na kimya mpe azali kokoba mosala ya mobongisi-nzela. Amoni ete Yehova ayanolaki na libondeli na ye, ayebaki mposa na ye mpe asalisaki ye.​—Nzembo 65:2.

Tosengeli komitungisa te mpo na bamposa na biso ya lobi

4. Makambo boni mosusu ya libondeli ya ndakisa tokolobela?

4 Ntango tokutani na likambo moko na mbalakaka, tosengeli mbala moko kobondela Yehova mpo na kosɛnga lisalisi, mpe asepelaka koyoka mabondeli na biso. (Nzembo 34:15; Masese 15:8) Kasi libondeli ya ndakisa oyo Yesu alakisaki, eteyi biso ete ezali na makambo mingi ya ntina oyo tosengeli kobondelaka mpo na yango. Na lisolo oyo, tokolobela ndenge makambo minei ya nsuka ya libondeli ya ndakisa ekoki kosalisa biso tózala sembo epai ya Yehova.​—Tángá Matai 6:11-13.

“PESÁ BISO LELO BILEI NA BISO MPO NA MOKOLO OYO”

5, 6. Mpo na nini Yesu ateyaki biso tósɛngaka “bilei na biso” ata soki tozali na bilei beboo?

5 Yesu ateyaki biso tosɛngaka mpo na “bilei na biso,” kasi te kaka “bilei na ngai.” Ndeko Victor, mokɛngɛli ya zongazonga moko na Afrika, alobi ete: “Mbala mingi, natɔndaka Yehova mingi mpo ngai ná mwasi na ngai tomitungisaka te soki biloko oyo tokolya mbala ya nsima ekouta wapi, to tomitungisaka mpe te soki nani akofutela biso ndako. Bandeko basalisaka biso na boboto nyonso mokolo na mokolo. Kasi nabondelaka mpo na bandeko oyo basalisaka biso mpo bálonga mikakatano ya nkita oyo bazali kokutana na yango.”

6 Ekoki kozala ete biso tozali na biloko beboo, kasi bandeko na biso mingi bazali babola. Lisusu, ekoki mpe kozala ete bamosusu bakutanaki na makama. Tokoki kosuka te kaka na kobondela mpo na bango kasi tokoki kosala mwa eloko mpo na kosalisa bango. Na ndakisa, tokoki kokabola ná bango mwa ndambo oyo tozali na yango. Tokoki mpe mbala na mbala kopesaka makabo mpo na kosunga mosala ya basaleli ya Yehova na mokili mobimba. Toyebi ete makabo na biso esalisaka bandeko na biso oyo bazali na bosɛnga.​—1 Yoane 3:17.

7. Mpo na nini Yesu ateyaki ete tosengeli ‘komitungisa ata moke te mpo na mokolo oyo ekolanda’?

7 Nsima ya kolakisa libondeli ya ndakisa, Yesu ateyaki biso te ete tótya makanisi na biso mobimba na biloko ya mosuni. Alobaki ete soki Yehova alatisaka matiti ya esobe, “akolatisa bino koleka te, bino bato ya kondima moke? Yango wana, bómitungisa ata moke te mpe bóloba te ete, . . . ‘Tokolata nini?’” Na nsima, azongelaki ete: “Bómitungisa ata moke te mpo na mokolo oyo ekolanda.” (Matai 6:30-34) Tosengeli komitungisa te mpo na bamposa na biso ya lobi. Kasi, tosengeli nde kosepela ntango bamposa na biso ya mokolo na mokolo ezali kokokisama. Na ndakisa, tokoki kobondela mpo na kozala na esika ya kobomba nzoto, mwa mosala mpo na koleisa libota na biso, mpe kozala na bwanya ya kozwa bikateli  ya malamu na makambo etali kolɔngɔnɔ ya nzoto na biso. Kasi ezali kutu na eloko moko ya ntina mingi oyo tosengeli kobondela mpo na yango.

8. Maloba oyo Yesu alobaki mpo na bilei na biso ya mokolo na mokolo ekundweli biso nini? (Talá elilingi ya ebandeli.)

8 Maloba oyo Yesu alobaki mpo na bilei na biso ya mokolo na mokolo, ezali kokundwela biso eloko mosusu oyo alobaki ete: “Moto asengeli kobika, kaka na mampa te, kasi na liloba nyonso oyo ezali kobima na monɔkɔ ya Yehova.” (Matai 4:4) Na yango, tosengeli kobondelaka ete Yehova akoba koteya biso mpe kopesa biso oyo tosengeli na yango mpo tótikala penepene na ye.

“LIMBISÁ BISO BANYONGO NA BISO”

9. Mpo na nini masumu na biso ezali lokola banyongo?

9 Yesu alobaki ete: “Limbisá biso banyongo.” Mokolo moko alobaki ete: “Limbisá biso masumu na biso.” (Matai 6:12; Luka 11:4) Alobaki bongo mpo masumu na biso ezali banyongo. Na mobu 1951, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli moko elimbolaki ete ntango tosali lisumu, ezali lokola todefi eloko epai ya Yehova. Tosengeli mpenza kolinga Yehova mpe kotosa ye. Kasi ntango tosali lisumu liboso na ye, wana topesi ye te eloko oyo abongi na yango. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki ete soki Yehova alingi, akoki kokata boyokani ná biso. Ebakisaki ete: “Lisumu ezali kozanga bolingo epai ya Nzambe.”​—1 Yoane 5:3.

Pesáká Yehova ntango nyonso matɔndi mpo na likabo ya lisiko

10. Mpo na nini Yehova akoki kolimbisa masumu na biso, mpe yango ekoki kotinda biso tómiyoka ndenge nini?

 10 Oyo nde botɔndi tozali na yango ndenge Yehova azwaki ebongiseli ya mbeka ya lisiko ya Yesu mpo na kolimbisa masumu na biso! Tozalaka na mposa ete Yehova alimbisa biso mokolo na mokolo. Yesu akufá mpo na biso esili koleka mbula soki 2 000, atako bongo tozwaka litomba ya lisiko yango tii lelo. Tosengeli ntango nyonso kotɔndaka Yehova mpo na likabo wana ya motuya mingi. Moto ata moko te kati na biso akokaki kofuta lisiko oyo esengelaki mpo na kosikola biso na lisumu mpe liwa. (Tángá Nzembo 49:7-9; 1 Petro 1:18, 19.) Maloba ya libondeli ya ndakisa “limbisá biso masumu na biso” ekundwelaka biso ete tosengeli mpenza na lisiko, bandeko na biso mibali mpe basi, basengeli mpe na yango. Yehova alingaka mpe ete tókanisaka bango mpe boyokani na bango elongo na ye. Yango esɛngi mpe kolimbisaka bango mbala moko ntango basali biso mabe. Mbala mingi ezalaka kaka mabunga ya mike, kasi ntango tolimbisi bandeko na biso, tokomonisa ete tolingaka bango. Tomonisaka mpe ete tozali na botɔndi ndenge Yehova alimbisaka biso.​—Bakolose 3:13.

11. Mpo na nini ezali na ntina tólimbisaka basusu?

11 Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, ekoki kozala ntango mosusu mpasi mpo na kolimbisa baoyo basali biso mabe. (Balevi 19:18) Soki tobandi kolobela makambo oyo basali biso, bandeko mosusu na lisangá bakoki komikɔtisa na likambo yango mpe yango ekoki kobebisa bomoko ya lisangá. Soki totiki ezaleli yango ezwa misisa, tokomonisa ete tozali kozwa na motuya te likabo ya lisiko oyo Nzambe apesá mpe tokozwa matomba na yango te. (Matai 18:35) Soki tozali kolimbisa basusu te, Yehova mpe akolimbisa biso te. (Tángá Matai 6:14, 15.) Lisusu, soki tolingi Yehova alimbisa biso, tosengeli te kokoba kosala likambo nyonso oyo ayinaka.​—1 Yoane 3:4, 6.

Soki olingi ete Nzambe alimbisa masumu na yo, osengeli mpe kolimbisa basusu (Talá paragrafe 11)

“SALISÁ BISO TÓKWEA NA KOMEKAMA TE”

12, 13. (a) Nini ekómelaki Yesu nsima ya batisimo na ye? (b) Mpo na nini tosengeli kopesa basusu foti te soki tolongi te komekama moko? (c) Yesu amonisaki nini ntango atikalaki sembo tii na liwa?

12 Maloba ya libondeli ya ndakisa “salisá biso tókwea na komekama te” ezali kokundwela biso likambo oyo ekómelaki Yesu mwa moke nsima ya batisimo na ye. Elimo ya Nzambe ekambaki ye na esobe mpe “Zabolo amekaki ye.” (Matai 4:1; 6:13) Mpo na nini Yehova apesaki nzela ete likambo yango esalema? Yehova atindaki Yesu awa na mabele mpo na kosilisa ntembe oyo ebimaki ntango Adama ná Eva baboyaki boyangeli ya Yehova. Botomboki na bango ebimisaki mituna oyo esɛngaki ntango mpo na kozwa biyano na yango. Na ndakisa, ezali na likambo moko ya mabe na lolenge oyo Yehova akelaki bato? Moto ya kokoka akokaki kotikala sembo epai ya Yehova ntango amekami na “moto mabe”? Mpe makambo elingaki kozala malamu mingi mpo na bato soki bámiyangelaka? (Ebandeli 3:4, 5) Na mikolo ezali koya, ntango bantembe yango nyonso ekosila ndenge Yehova alingaki, ekelamu nyonso  ezala na likoló mpe awa na mabele akoyeba ete lolenge ya Yehova ya koyangela nde eleki malamu.

Tokoki kotikala sembo epai ya Yehova ata liboso ya mikakatano ya makasi mpenza

13 Yehova azali mosantu, na yango amekaka ata moto moko te na makambo ya mabe. Satana nde azali “Momeki.” (Matai 4:3) Satana alukaka komeka biso na balolenge mingi. Kasi tosengeli kopona. Mokomoko na biso akoki kozwa ekateli ya kolonga komekama to te. (Tángá Yakobo 1:13-15.) Ntango Satana amekaki Yesu, mbala moko aboyaki makanisi na ye na ndenge atángaki maloba ya Liloba ya Nzambe. Yesu azalaki sembo epai ya Nzambe. Kasi, Satana alɛmbaki te. Atikaki “tii na ntango mosusu ya malamu” mpo na komeka Yesu. (Luka 4:13) Kasi ezala Satana asalaki nini, Yesu akobaki ntango nyonso kotosa Nzambe lokola mokonzi na ye. Amonisaki ete moto ya kokoka akoki kotikala sembo epai ya Yehova ata liboso ya mikakatano ya makasi mpenza. Satana amekaka mpe bayekoli ya Yesu, ezala yo mpe mpo ozanga botosi epai ya Yehova.

Yehova atyaka motema ete tokoki kotikala sembo epai na ye, mpe alingaka kosalisa biso

14. Tosengeli kosala nini mpo tólonga komekama?

14 Bantembe mosusu oyo ebimaki na ntina etali boyangeli ya Yehova ekatami naino te. Kasi mpo na sikoyo, Yehova atiki Satana ameka biso. Yehova atyaka biso na “komekama te.” Na ntembe te, atyaka motema ete tokoki kotikala sembo epai na ye, mpe alingaka kosalisa biso. Kasi atindaka biso soki moke te na makasi tósala oyo ezali malamu. Atikelaka biso bonsomi ya kopona. Na yango, atikelaka biso tópona soki tokotikala sembo epai na ye to te. Mpo tókwea te na komekama, tosengeli kosala makambo  mibale oyo: kotikala penepene na Yehova mpe kokoba kobondela mpo na kosɛnga ye lisalisi. Ndenge nini Yehova ayanolaka na mabondeli oyo tosɛngaka ye mpo tólonga komekama?

Tikalá penepene na Yehova mpe zalá na molende na mosala ya kosakola (Talá paragrafe 15)

15, 16. (a) Wapi mitambo to komekama mosusu tosengeli kotɛmɛla? (b) Soki tokwei na komekama moko, tokoki kopesa nani foti?

15 Yehova apesaka biso nguya na ye, elingi koloba elimo santu mpo na kosalisa biso tóbunda na komekama ya Satana. Yehova apesi biso mpe Biblia ná lisangá mpo ekebisaka biso na makama. Na ndakisa, akebisaka biso ete tósalela mingi te ntango, mbongo mpe makasi na biso na makambo oyo tozali mpenza te na mposa na yango. Ndeko Espen ná Janne bafandaka na ekólo moko ya bozwi na Mpoto. Na boumeli ya bambula mingi, bazalaki babongisi-nzela ya sanza na sanza na ekólo moko oyo ezalaki na mposa ya basakoli. Ntango bakómaki na mwana, batikaki mosala ya mobongisi-nzela, mpe lelo oyo, bazali na bana mibale. Ndeko Espen alobi ete: “Tobondelaka Yehova ete asalisa biso tókwea te na komekama sikoyo lokola tozali te na likoki ya kolekisa ntango mingi na misala ya teokrasi ndenge tosalaki liboso. Tobondelaka Yehova asalisa biso tóbatela boyokani malamu ná ye mpe tózala na molende na mosala ya kosakola.”

16 Komekama mosusu oyo tosengeli kotɛmɛla yango ezali kotala pornografi. Soki tokwei na motambo ya pornografi, tokoki soki moke te kopesa Satana foti. Mpo na nini? Mpo Satana ná mokili na ye bakoki soki moke te kotinda biso na makasi tósala oyo ezali mabe. Bato mosusu batalaka pornografi mpo babenganaka te makanisi mabe. Kasi bandeko na biso mingi balongá komekama yango, biso mpe tokoki kolonga.​—1 Bakorinti 10:12, 13.

“BIKISÁ BISO NA MOTO MABE”

17. (a) Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingi Yehova ‘abikisa biso na moto mabe’? (b) Likambo nini ekokitisa biso motema mosika te?

17 Ndenge nini tokoki komonisa ete tolingi Yehova ‘abikisa biso na moto mabe’? Tosengeli te ‘kozala bato ya mokili’ mpe tosengeli te kolinga ‘mokili ná biloko oyo ezali na mokili.’ (Yoane 15:19; 1 Yoane 2:15-17) Motema na biso ekokita mpenza ntango Yehova akolongola Satana mpe akobebisa mokili oyo mabe! Kasi liboso ntango yango ekoka, tosengeli kobosana te ete Satana azali na “nkanda makasi, mpo ayebi ete azali na ntango mokuse.” Akosala nyonso oyo akoki mpo apekisa biso kosalela Yehova. Na yango, tosengeli kokoba kobondela ete Yehova abatela biso ete tókwea te liboso ya Satana.​—Emoniseli 12:12, 17.

18. Soki tolingi kobika na nsuka ya mokili oyo ya Satana, tosengeli kosala nini?

18 Olingi kozala na bomoi na mokili oyo Satana akozala te? Soki ezali bongo, kobá kobondela mpo Bokonzi ya Nzambe eya, nkombo na ye esantisama mpe mokano na ye esalema awa na mabele. Ntango nyonso, tyeláká Yehova motema ete akosunga yo mpe akopesa yo nyonso oyo osengeli na yango mpo otikala sembo epai na ye. Ya solo, salá nyonso oyo okoki mpo osala na boyokani ná libondeli ya ndakisa.