Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Juin 2015

“Bosengeli kozala na ezaleli ya koyika mpiko”

“Bosengeli kozala na ezaleli ya koyika mpiko”

NTANGO Anita akómaki Motatoli ya Yehova, mobali na ye alɛmbaki nzoto makasi. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Alukaki kopekisa ye kokende na makita mpe apesaki ye mitindo ete ameka ata moke te kotánga nkombo ya Nzambe. Soki kaka ayoki ye atángi nkombo ya Yehova, akosilikela ye mabe mpenza.

Lisusu, mobali ya Anita alingaki te ete Anita ateyaka bana na bango makambo etali Yehova to amemaka bango na makita. Likambo yango ezalaki mokakatano mpo na ye, mpo asengelaki koteya bana kozanga ete mobali na ye ayeba.

Ndenge likambo oyo ya Anita emonisi yango, moto moko na libota na yo akoki koluka kopekisa yo kosalela Yehova. To okoki kozala na mokakatano mosusu. Ntango mosusu obɛli ntango molai. Mbala mosusu, mwana, mobali to mwasi na yo akufá. To mbala mosusu moto moko ya libota oyo olingaka apesi Yehova mokɔngɔ. Na makambo oyo nyonso, okoki kosala nini mpo otikala sembo epai ya Yehova?

Ntoma Paulo alobaki ete: “Bosengeli kozala na ezaleli ya koyika mpiko.” (Baebre 10:36) Kasi, nini ekoki kosalisa yo oyika mpiko?

BONDELÁ YEHOVA MPO NA KOSƐNGA LISALISI

Ntango oyo ozali na mpasi, kobosana te ete osengeli kotyela Yehova motema mpo asalisa yo oyika mpiko. Bondelá mpo na kosɛnga ye lisalisi. Yango nde Ana asalaki ntango mobali na ye akufaki na mbalakaka. Baumelaki na libala mbula 30. Ana alobi ete: “Banda akendaki na mosala, azongaki lisusu te. Azalaki kaka na mbula 52.”

Mosala ya Ana ezwaki ye ntango mingi, kasi esilisaki mpasi na ye te. Asalaki nini? Alobi ete: “Nafungwelaki Yehova motema na ngai mpe nabondelaki ye mpo asalisa ngai.” Amoni ete Yehova asalisaki ye mpo nsima ya kobondela, ayokaki kimya ya motema. Mpe alobi ete: “Nazali mpenza na elikya ete Yehova akosekwisa mobali na ngai.”​—Bafilipi 4:6, 7.

Yehova alaki basaleli na ye ete akoyoka mabondeli na bango. (Nzembo 65:2) Mpe akopesa bango eloko nyonso oyo basengeli na yango mpo bákoba kosalela  ye. Yehova akosalisa yo otikala sembo epai na ye ata na ntango ya mikakatano.

ZALÁ PENE NA BANDEKO NA YO

Ezali na lolenge mosusu oyo Yehova asalisaka biso mpo tóyika mpiko. Apesi biso bandeko na kati ya lisangá. Tokoki kozwa liteya na lolenge oyo bandeko ya Tesaloniki basalisanaki na ntango bakutanaki na monyoko ya mabe mpenza. Na ntango wana, basengelaki mpenza kolendisana. (1 Batesaloniki 2:14; 5:11) Basalisaki bandeko na bango bátikala sembo epai ya Yehova na ndenge bazalaki koyangana elongo mpe kobatela boninga. Tosengeli kosala nini mpo tótikala sembo lokola bandeko wana ya Tesaloniki?

Tosengeli kozala mpenza pene ya bandeko ya lisangá mpe kolendisanaka, mingimingi na ntango ya mpasi. (Baroma 14:19) Ntoma Paulo akutanaki na mikakatano mpe minyoko mosusu, kasi Yehova apesaki ye makasi ya koyika mpiko. Na ndakisa, Yehova asalelaki bandeko mpo na kolendisa ye. Ntoma Paulo alobaki mpo na baninga na ye wana ete: “Bakómi lisalisi oyo ezali kopesa ngai makasi.” (Bakolose 4:10, 11) Bandeko yango balingaki ntoma Paulo. Na yango, ntango azalaki na mposa ya lisalisi, babɔndisaki ye mpe balendisaki ye. Ntango mosusu, okoki kokanisa na ntango oyo bandeko ya lisangá na bino balobaki to basalaki likambo moko oyo elendisaki yo.

 SƐNGÁ BANKULUTU BÁSALISA YO

Yehova apesi yo mpe bankulutu ya lisangá. Mibali yango bakoki kolendisa yo mpe kopesa yo batoli ya Biblia. Bazali “lokola esika ya komibomba mpo na kokima mopɛpɛ mpe esika ya kobombana mpo na kokima mbula ya mopɛpɛ makasi, lokola mikɛli ya mai na mokili oyo ezangá mai, lokola elili ya libanga monene na mokili oyo ekauká.” (Yisaya 32:2) Ezali kobɔndisa biso koyeba ete bandeko yango bazalaka pene mpo na kosalisa biso. Yango wana, ntango ozali na mikakatano, kende epai ya bankulutu. Bakoki kosalisa yo okoba kosalela Yehova.

Kasi, bankulutu bakoki te kosilisa mikakatano na yo nyonso. Mpe bazali bato ya kozanga kokoka lokola yo. (Misala 14:15) Kasi okoki koyoka malamu soki okei epai ya nkulutu mpe abondeli Yehova mpo na likambo oyo ozali na yango. (Yakobo 5:14, 15) Na ndakisa, bankulutu balendisaki ndeko mobali moko na Italie oyo abɛlaki maladi moko na boumeli ya mbula mingi. Kasi, alobaki ete: “Bolingo ya bandeko mpe kotala ngai mbala na mbala esalisaki ngai nayika mpiko.” Soki ozali kobɛla, Yehova alingi osɛnga bankulutu básalisa yo.

TYÁ MAKANISI MOBIMBA MPO NA KOSALELA YEHOVA

Ntango tozali kotya makanisi mobimba mpo na kosalela Yehova, tokomona ndenge akosalisa biso. Yango nde ndeko John asalaki. Ntango azalaki na mbula 39, emonanaki ete abɛlaki maladi ya kanser. Amonaki ete ezali malamu te kobɛla ndenge wana, mingimingi ntango azalaki naino elenge. Mpe azalaki komitungisa mpo na mwasi mpe mwana na ye; mwana yango azalaki kaka na mbula misato. Alobi ete: “Mwasi na ngai asengelaki kobatela mwana na biso wana ya moke mpe ngai, mpe kosalisa ngai nakutana na minganga mikolo oyo bazalaki kobenga ngai.” Lokola azalaki kozwa bankisi, yango elɛmbisaki ye mpe akómaki kobɛla estoma. Akutanaki mpe na mikakatano mosusu. Ndeko John amonaki ete tata na ye alingaki kokufa mpe azalaki na mposa ya moto oyo akobatela ye.

Nini esalisaki ndeko John ná libota na ye na ntango wana ya mpasi? Atako ndeko John azalaki mbala mingi komiyoka ete alɛmbi, kasi azalaki koluka koyeba ete libota na ye ezali kotya makanisi mobimba na kosalela Yehova. Alobi ete: “Tozalaki koyangana na makita nyonso, kosakola pɔsɔ na pɔsɔ, mpe kosalaka losambo na kati ya libota ata na ntango ya mikakatano.” Ndeko John amonaki mpenza ete kobatela boyokani malamu ná Yehova ezali na ntina. Atako na ebandeli atungisamaki to ayokaki mpasi, kasi mosika te, ayokaki kimya na motema. Ayebaki ete Yehova alingaki ye mpe apesaki ye makasi oyo asengelaki na yango. Yehova akoki mpe kosalisa yo ndenge wana ntango ozali komitungisa to kobanga. Ndeko John alobi ete: “Yehova akoki kokómisa yo makasi; ndenge kaka asalaki mpo na ngai.”

Ntango ozali na mpasi, kobosana te maloba oyo ya ntoma Paulo: “Bosengeli kozala na ezaleli ya koyika mpiko.” Tobondelaka Yehova mpo na komonisa ete totyelaka ye motema. Zaláká pene na bandeko ya lisangá, sɛngáká lisalisi epai ya bankulutu mpe tyáká makanisi mobimba na kosambela Yehova. Akosalisa yo na mokakatano nyonso oyo okoki kozala na yango sikoyo to oyo ekoki kokómela yo na mikolo ezali koya.

^ par. 2 Bankombo mosusu ezali ya bango te.