Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Mai 2015

Tómekola ye oyo alaki bomoi ya seko

Tómekola ye oyo alaki bomoi ya seko

“Bókóma bamekoli ya Nzambe, lokola bana ya bolingo.”​—BAEFESE 5:1.

1. Likoki nini ekoki kosalisa biso tómekola Yehova?

YEHOVA akelá biso na likoki ya koyeba ndenge bato bamiyokaka, ata soki tokutaná te na makambo oyo ekómeli bango. (Tángá Baefese 5:1, 2.) Ndenge nini likoki wana esalisaka biso tómekola Yehova? Mpe mpo na nini tosengeli kokeba na lolenge oyo tosalelaka likoki yango?

2. Yehova ayokaka ndenge nini ntango tonyokwamaka?

2 Yehova alaki biso bomoi moko ya malamu oyo ezangi mpasi na mikolo ezali koya. Bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe “bampate mosusu” bakoki kozela na motema esengo bomoi ya seko na likoló to na mabele. (Yoane 10:16; 17:3; 1 Bakorinti 15:53) Kasi Yehova amityaka na esika na biso ntango makambo ya mpasi ekómelaka biso lelo oyo. Na ntango ya kala, Yehova ayokaki mpasi ntango libota na ye ezalaki konyokwama na Ezipito. “Azalaki koyoka mpasi.” (Yisaya 63:9) Na nsima, ntango libota na ye bazalaki kotonga lisusu tempelo na ye mpe bazalaki kobanga banguna na bango, Yehova amityaki na esika na bango. Ayebisaki bango boye: “Moto oyo azali kosimba bino azali  kosimba mbuma ya liso na ngai.” (Zekaria 2:8) Ndenge kaka mama alingaka mwana na ye, Yehova mpe alingaka basaleli na ye mpe azalaka na mposa ya kosalisa bango. (Yisaya 49:15) Tokomekola bolingo ya Yehova soki tozali koluka koyeba mpasi ya basusu mpe tozali komitya na esika na bango.​—Nzembo 103:13, 14.

YESU ALANDAKI NDAKISA YA YEHOVA MPE ALINGAKI BATO

3. Ndenge nini Yesu azalaki komiyoka mpo na bato?

3 Yesu ayebaki ndenge bato bamiyokaka ntango bazali konyokwama, atako bampasi yango ekómelaki ye te. Na ndakisa, ayebaki ete bato mingi bazali na bomoi ya mpasi. Bakonzi ya mangomba bazalaki kokosa bango mpe kotyela bango mibeko ebeleebele oyo eutaki epai ya Nzambe te. Bato bazalaki kobanga bakonzi yango. (Matai 23:4; Marko 7:1-5; Yoane 7:13) Atako Yesu azalaki te kobanga bakonzi ya mangomba mpe azalaki kondima te lokuta na bango, kasi ayebaki ndenge bato yango bazalaki komiyoka. Ezalaki kosala Yesu mpasi mpenza komona makambo mabe oyo bazalaki kosala bato wana. Bazalaki lokola bato bazangi moto ya kosunga bango, lokola “bampate oyo ezangá mobateli.” (Matai 9:36) Yesu ayekolaki ndenge ya kolinga bato mpe komonisela bango ‘motema mawa mpe ngɔlu’ epai ya Tata na ye.​—Nzembo 103:8.

4. Yesu asalaki nini ntango amonaki bato bazali konyokwama?

4 Ntango amonaki bato bazali konyokwama, Yesu asalisaki bango mpo azalaki kolinga bango. Azalaki kaka lokola Tata na ye. Na ndakisa, mokolo moko bantoma ya Yesu basalaki mobembo moko molai mpo na kosakola, balɛmbaki mpenza mpe bazalaki na mposa ya kopema na esika moko ya kimya. Kasi Yesu amonaki ebele ya bato bazali kozela ye. Amonaki ete bazali na mposa ya lisalisi, yango wana, “abandaki koteya bango makambo mingi.”​—Marko 6:30, 31, 34.

LINGÁKÁ BATO NDENGE YEHOVA ALINGAKA BANGO

5, 6. Soki tolingi tómonisa bolingo lokola Yehova, tosengeli kosala nini? Pesá ndakisa. (Talá elilingi ya ebandeli.)

5 Tosengeli kosala nini mpo tólingaka bato ndenge Yehova alingaka bango? Tókanisa naino na likambo oyo. Ndeko mobali moko ya elenge na nkombo Alan, azali kokanisa mpo na ndeko mobali moko ya mokóló oyo atambolaka malamu te mpe amonaka malamu te. Alan akanisi maloba oyo ya Yesu: “Kaka ndenge bino bolingaka bato básalela bino, bósalela bango mpe bongo.” (Luka 6:31) Na yango Alan amitunaki boye, ‘Makambo nini nalingaka bato básalela ngai?’ Abakisaki, ‘Nasepelaka bábɛta bale ná ngai!’ Kasi ndeko wana ya mokóló akokoka te kokima mbangu mpe kobɛta bale. Na yango, Alan asengeli nde komituna boye, ‘Soki nazalaki na esika ya ndeko wana, makambo nini nalingaki kosepela bato básalela ngai?’

6 Atako Alan azali naino elenge, azali kosala makasi amoná na makanisi ndenge alingaki komiyoka soki azalaki mokóló. Alekisaki ntango elongo na ndeko yango ya mokóló mpe ayokaki ye mpenza na likebi ntango azali koloba. Na nsima, amonaki ete ezali mpasi mpo na ndeko yango kotánga Biblia mpe kokende kosakola ndako na ndako. Alan amonaki ndenge akoki kosalisa  ye mpe alingaki kosala oyo akoki mpo na ye. Ntango tozali koyeba ndenge basusu bazali komiyoka mpe tozali komonisela bango bolingo, tokozala lokola Yehova.​—1 Bakorinti 12:26.

Zalá na boboto lokola Yehova (Talá paragrafe 7)

7. Ndenge nini tokoki koyeba mpasi oyo bandeko na biso bazali na yango?

7 Ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te koyeba mpasi oyo basusu bazali koyoka, mingimingi soki tokutaná naino te na likambo oyo ekómeli bango. Na ndakisa, bandeko na biso mingi bazali na mpasi mpo bazali kobɛla, bazoki to mpe bazali kokóma mikóló. Basusu bazali konyokwama makasi mpo motó ezali lisusu kosala malamu te, mitungisi eleki makasi to babebisaki bango na kala. Basusu mpe bazali kobɔkɔla bana bango moko to bato ya libota na bango bazali Batatoli ya Yehova te. Moto nyonso azalaka na mikakatano, mpe mikakatano yango mingi ezali ndenge moko te na oyo ya biso. Kasi tolingaka komonisela basusu bolingo mpe kosalisa bango. Na yango, tokoki kosala nini? Moto na moto azalaka na mposa na ye. Kasi soki tozali koyoka na likebi mpe kosala makasi mpo na koyeba ndenge moto yango azali komiyoka, tokoyeba ndenge malamu mpenza ya kosalisa ye. Mbala mosusu tokoki kosalisa ye abosana te ndenge Yehova azali koyoka mpo na likambo na ye. To tokoki mbala mosusu kosalisa ye na balolenge mosusu. Ntango tosali bongo, tokomekola Yehova.​—Tángá Baroma 12:15; 1 Petro 3:8.

ZALÁ BOBOTO LOKOLA YEHOVA

8. Nini esalisaki Yesu azala na boboto?

8 Yehova azalaka boboto epai ya moto nyonso. (Luka 6:35) Mpe Yesu azali kaka lokola Tata na ye. Nini esalisaki Yesu amonisa boboto epai ya bato ntango azalaki awa na mabele? Azalaki kokanisa ndenge bato bakomiyoka mpo na makambo oyo akoloba to akosala. Na ndakisa, mwasi moko oyo asalaki makambo mingi ya mabe ayaki epai ya Yesu. Azalaki kolela makasi mpenza mpe mai ya miso na ye ekitaki na makolo ya Yesu. Yesu amonaki ete mwasi yango ayokaki mawa mpo na mabe nyonso oyo asalaki mpe abongolaki motema. Ayebaki ete soki amoniseli ye boboto te, akoyoka lisusu mabe mpenza. Na yango, akumisaki ye mpo na likambo ya malamu oyo asalaki mpe alimbisaki ye. Yesu alobaki mpe na boboto epai ya Mofarisai moko oyo asepelaki te na likambo wana oyo asalaki mpo na mwasi yango.​—Luka 7:36-48.

Liboso ya kozwa ekateli moko, tokoki kokanisa ndenge ekoki kosala biso moko mpe basusu

9. Nini ekoki kosalisa biso tózala na boboto lokola Yehova? Pesá ndakisa.

9 Ndenge nini tokoki kozala na boboto lokola Yehova? Tosengeli  kokanisaka liboso ya koloba to kosala likambo mpo tózala malamu ná bato mpe tózokisa bango te. Ntoma Paulo akomaki ete mokristo “asengeli kowelana te, kasi asengeli nde kozala na boboto na bato nyonso.” (2 Timote 2:24) Na ndakisa, kanisá ndenge okoki komonisa boboto na makambo lokola oyo: Okosala nini soki patrɔ na yo azali te kosala mosala na ye malamu? Soki ndeko moko oyo abungá na makita na boumeli ya basanza mingi ayei, okoloba na ye nini? Soki ozali na mosala ya kosakola mpe moto moko alobi ete azali na ngonga te ya kosolola na yo, ndenge nini okoki komonisela ye boboto? Soki mwasi na yo atuni yo mpo na nini oyebisaki ye te makambo okanaki kosala, okosolola na ye na boboto? Tosengeli kokanisa liboso ndenge oyo basusu bayokaka mpe ndenge oyo maloba na biso ekoki kosala bango. Na nsima, tokoyeba makambo tosengeli koloba mpe kosala mpo tózala na boboto lokola Yehova.​—Tángá Masese 15:28.

ZALÁ NA BWANYA LOKOLA YEHOVA

10, 11. Na likambo etali bwanya, liteya nini tokoki kozwa epai ya Yehova? Pesá ndakisa.

10 Yehova azali na bwanya mingi koleka, akoki kopona koyeba makambo oyo esengeli kosalema na mikolo ezali koya. Atako biso toyebaka te makambo oyo ekosalema lobi, kasi tokoki mpe kozala bato ya bwanya. Ndenge nini? Liboso ya kozwa ekateli moko, tokoki kokanisa ndenge ekoki kosala biso moko mpe basusu. Tosengeli te kozala lokola Bayisraele. Bakanisaki te na makambo oyo esengelaki kokómela bango soki baboyi kotosa Yehova. Bakanisaki te na boyokani oyo bazalaki na yango ná ye mpe na nyonso oyo asalá mpo na bango. Lokola Moize asosolaki likambo yango, ayebaki ete Bayisraele bakosala oyo ezali mabe. Alobaki boye: “Bazali ekólo oyo toli esimbaka bango te, Mpe epai na bango, mayele ezali te. Ee soki bazalaka bato ya bwanya! Mbɛlɛ bakanisaki yango malamumalamu. Mbɛlɛ batalelaki nsuka na bango na nsima.”​—Kolimbola Mibeko 31:29, 30; 32:28, 29.

11 Na ndakisa, soki ozali na fianse, yebá ete ntango ozali kosepela mpenza na moto moko, ezalaka mpasi omipekisa to okanga bamposa na yo ya nzoto. Na yango, kosala eloko moko te oyo ekoki kobebisa eloko ya motuya oyo ozali na yango: boyokani na yo elongo na Yehova! Kasi, zalá nde na bwanya mpe kimá likama. Landá toli ya bwanya oyo Yehova apesi ete: “Moto ya ekɛngɛ nde moto oyo amoni likama mpe amibombi, kasi bato oyo bazangi boyebi baleki kaka mpe basengeli kozwa mpasi.”​—Masese 22:3.

BATELÁ MAKANISI NA YO

12. Ndenge nini makambo oyo tokanisaka ekoki kosala biso mabe?

12 Moto ya bwanya abatelaka makanisi na ye. Ndenge kaka mɔtɔ ekoki kosalisa biso to kosala biso mabe, makanisi na biso mpe ekoki kosalisa biso to kosala biso mabe. Soki tozali kosalela mɔtɔ na ekɛngɛ, tokoki kosalela yango mpo na kolamba biloko. Kasi soki tokebi  te, kaka mɔtɔ wana ekoki kozikisa ndako ata mpe koboma biso. Ezali mpe ndenge moko mpo na makambo oyo tokanisaka. Ntango tókanisaka na makambo oyo toyekolaka epai ya Yehova, ezalaka malamu mpo na biso. Kasi soki tokobi kokanisa na makambo etali kosala pite to ekobo mpe tozali komona na makanisi ete tozali kosala makambo mabe, tokokóma na mposa makasi ya makambo yango mpe tokosala yango. Yango ekoki kobebisa boyokani na biso ná Yehova.​—Tángá Yakobo 1:14, 15.

13. Makambo nini Eva akanisaki mpo na bomoi na ye?

13 Tokoki kozwa liteya na likambo oyo ekómelaki Eva, mwasi ya liboso. Yehova apesaki Adama ná Eva mobeko ya kolya te mbuma ya “nzete ya koyeba malamu ná mabe.” (Ebandeli 2:16, 17) Kasi Satana alobaki na Eva boye: “Bokokufa soki moke te. Mpo Nzambe ayebi ete mokolo kaka bokolya yango miso na bino ekofungwama mpenza mpe bokokóma mpenza lokola Nzambe, bokoyeba malamu ná mabe.” Eva akanisaki ndenge bomoi na ye ekokóma malamu koleka soki aponi ye moko oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe. Akobaki kokanisa na likambo yango mpe “amonaki ete nzete yango ezalaki malamu na kolya mpe ete ezalaki eloko oyo miso ekokaki kolula.” Nini esalemaki na nsima? “Akamataki mbuma na yango mpe alyaki. Na nsima apesaki mpe mobali na ye ntango azalaki elongo na ye mpe ye alyaki.” (Ebandeli 3:1-6) Yango wana ‘lisumu ekɔtaki na mokili mpe liwa mpo na lisumu.’ (Baroma 5:12) Eva asengelaki te kokoba kokanisa kosala oyo ezali mabe!

14. Makebisi nini Biblia epesi biso na likambo etali pite mpe ekobo?

14 Ya solo, lisumu oyo Eva asalaki ezalaki te ya pite to ekobo. Kasi Biblia ekebisi biso polele ete tólongola makanisi na biso na eloko nyonso oyo ezali kotinda biso na kosala pite to ekobo. Yesu alobaki boye: “Moto nyonso oyo azali kokoba kotala mwasi tii ayoki ye mposa asali na ye ekobo na motema.” (Matai 5:28) Lisusu, ntoma Paulo apesaki toli oyo: “Bósalaka myango te mpo na bamposa ya nzoto.”​—Baroma 13:14.

15. Biloko nini ya motuya mingi oyo tosengeli kotya makanisi na biso mobimba, mpe mpo na nini?

15 Biblia ezali mpe koyebisa biso ete tosengeli kotya makanisi na biso mobimba mpo na kosepelisa Yehova kasi te na kokoba kokanisa kaka kokóma na bomɛngo. Mpo ata soki moto azali na bozwi mingi, mbongo na ye ezali te libateli ya solosolo mpo na ye. (Masese 18:11) Yesu alobaki ete ezali bolema soki moto amibombeli biloko mingi ya motuya kasi atye Yehova te na esika ya liboso na bomoi na ye. “Azali mozwi te na miso ya Nzambe.” (Luka 12:16-21) Soki tozali komibombela “biloko ya motuya na likoló” mpe tozali kosala makambo oyo ezali kosepelisa Yehova, tokosepelisa Yehova mpe biso moko mpe tokozala na esengo. (Matai 6:20; Masese 27:11) Mpe boyokani malamu ná Yehova ezali na motuya mingi koleka eloko mosusu nyonso.

TIKÁ KOMITUNGISA

16. Nini ekoki kosalisa biso ntango tozali komitungisa?

16 Soki tozali koluka kaka tókóma na bomɛngo na mokili oyo, yango ekomemela biso mitungisi mingi. (Matai 6:19) Yesu alobaki ete baoyo bamitungisaka ntango nyonso mpo na mbongo, bakozala na mokakatano mpo na kokoba kotya Bokonzi ya Nzambe na esika  ya liboso na bomoi na bango. (Matai 13:18, 19, 22) Lisusu, bato mosusu bamitungisaka ntango nyonso mpo na makambo ya mabe oyo ekoki kokómela bango. Kasi soki tozali kaka komitungisa, tokoki kobɛla to kondima na biso epai ya Yehova ekoki kobanda kokita. Na esika ya kosala bongo, tosengeli nde kotya motema ete Yehova akosalisa biso. Biblia elobi ete: “Motungisi na kati ya motema ya moto yango nde etindaka motema na ye egumbama, kasi liloba ya malamu esepelisaka yango.” (Masese 12:25) Na yango, soki ozali komitungisa mpo na likambo moko, sololá na mosaleli moko ya Yehova oyo ayebi yo malamu. Moboti, molongani na yo to moninga moko ya motema akoki kolendisa yo mpo otyela Yehova motema mpe omitungisa mingi te.

Ntango ozali kotungisama, bondelá Yehova, mpe kanisá na lisalisi oyo azali kopesa yo

17. Ndenge nini Yehova akoki kosalisa biso ntango tozali na mitungisi?

17 Yehova ayebaka malamu mpenza ndenge toyokaka koleka moto nyonso mpe akoki kosalisa biso tózala na motema ya kokita ntango tozali komitungisa. Ntoma Paulo akomaki ete: “Bómitungisa ata na likambo moko te, kasi na makambo nyonso na libondeli mpe na lilɔmbɔ ná matɔndi, kosɛnga na bino eyebana epai ya Nzambe; mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino na nzela ya Kristo Yesu.” (Bafilipi 4:6, 7) Na yango soki ozali komitungisa, kanisá na lisalisi oyo Yehova azali kopesa yo mpo boyokani na yo ná ye ezala kaka makasi, na ndakisa lisalisi oyo ezali kouta epai ya bandeko, bankulutu, moombo ya sembo mpe ya mayele, baanzelu mpe Yesu.

18. Ndenge nini likoki na biso ya kokanisa makambo ekoki kosalisa biso?

18 Ndenge tomoni yango, tomekolaka Yehova ntango tozali kosalela likoki na biso ya koyeba ndenge basusu bazali komiyoka. (1 Timote 1:11; 1 Yoane 4:8) Tokozala na esengo soki tozali komonisa bolingo mpe boboto epai ya basusu, ntango tozali kokanisa na matomba ya makambo oyo tosalaka, mpe soki tozali koboya komitungisa ntango nyonso. Tiká ete biso nyonso tókanisa ndenge bomoi na biso ekozala ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mpe tósala nyonso mpo na komekola Yehova.​—Baroma 12:12.