Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Mai 2015

“Bamonaki” biloko oyo elakamaki

“Bamonaki” biloko oyo elakamaki

“Bazwaki te biloko oyo elakamaki, kasi bamonaki yango na mosika.”​—BAEBRE 11:13.

1. Mpo na nini ezali malamu ete tómonaka na makanisi makambo oyo tomoná naino te? (Talá elilingi ya ebandeli.)

YEHOVA apesá biso likabo moko kitoko mpenza. Likabo yango ezali likoki ya komona na makanisi makambo oyo tomoná naino te. Likoki yango esalisaka biso tózela na esengo makambo kitoko oyo ezali kozela biso lobi, tómibongisa liboso mpe tókima makama. Yehova ayebi makambo oyo ekosalema lobi, mpe ayebisi biso makambo mosusu oyo tokoki kozela yango na motema ya esengo. Atako tokoki komona yango te, tokoki komona yango na makanisi mpe kozala na kondima ete ekosalema.​—2 Bakorinti 4:18.

2, 3. (a) Ndenge nini likoki na biso ya kokanisa esalisaka biso? (b) Mituna nini tokoyanola na lisolo oyo?

2 Na ntembe te, na bantango mosusu tokanisaka makambo oyo ekosalema ata moke te. Na ndakisa, mwana mwasi moko ya moke akoki komona na makanisi lokola amati likoló ya lipekapeka. Kasi yango ekoki kosalema te. Hana, mama ya Samwele asalelaki likoki na ye ya kokanisa na lolenge mosusu. Akobaki kokanisa mokolo oyo akomema mwana na ye na tabernakle mpo asala elongo na banganga-nzambe. Yango ezalaki kaka ndɔtɔ ya mpamba te. Ezalaki  mpenza likambo oyo akanaki kosala. Na yango, kokanisa mokolo yango epesaki Hana makasi ya kobatela elaka oyo apesaki Yehova. (1 Samwele 1:22) Mpe ntango tokanisaka makambo oyo Yehova alaká ete akosala, tomonaka na makanisi makambo oyo ekosalema mpenza.​—2 Petro 1:19-21.

3 Basaleli mingi ya Yehova na ntango ya kala bakokaki komona na makanisi makambo oyo Yehova alakaki. Mpo na nini kosala bongo ezalaki malamu mpo na bango? Mpe mpo na nini ezali malamu tómonaka na makanisi ndenge bomoi na biso ekozala ntango bilaka ya Nzambe ekokokisama?

KONDIMA NA BANGO EKÓMAKI MAKASI NTANGO BAZALAKI KOKANISA MAKAMBO OYO EKOYA

4. Mpo na nini Abele akokaki kokanisa bomoi moko ya malamu na mikolo ezali koya?

4 Abele azalaki moto ya liboso oyo azalaki na kondima na bilaka ya Nzambe. Ayebaki oyo Yehova alobaki na nyoka nsima ya lisumu ya Adama ná Eva; Yehova alobaki boye: “Nakotya bonguna kati na yo ná mwasi mpe kati na momboto na yo ná momboto na ye. Ye akopanza motó na yo mpe yo okozokisa ye na litindi.” (Ebandeli 3:14, 15) Abele ayebaki mpenzampenza te ndenge likambo yango ekosalema. Kasi na ntembe te, akanisaki mingi mpo na likambo wana oyo Nzambe alobaki. Mbala mosusu Abele akanisaki boye, ‘Nani akozala moto oyo nyoka ekozokisa mpe akosalisa bato bákóma lisusu na nzoto ya kokoka?’ Abele azalaki na kondima ete eloko nyonso oyo Yehova alakaki ekokokisama, mpe ntango apesaki mbeka na ye, Yehova asepelaki na yango.​—Tángá Ebandeli 4:3-5; Baebre 11:4.

5. Mpo na nini ezalaki malamu mpo na Enoka amona na makanisi bomoi oyo ezalaki liboso?

5 Moto mosusu oyo azalaki na kondima makasi epai ya Nzambe ezali Enoka. Azalaki na bomoi na eleko oyo bato mabe bazalaki koloba ‘makambo ya kozokisa’ mpo na Nzambe. Kasi Enoka azalaki na mpiko mpe asakolaki nsango ya Nzambe. Ayebisaki bato ete Yehova alingi koboma bato mabe. (Yuda 14, 15) Nini esalisaki ye asala bongo? Ekoki kozala ete Enoka amonaki na makanisi ndenge mokili ekokaki kozala soki moto nyonso asalelaka Yehova.​—Tángá Baebre 11:5, 6.

6. Nsima ya Mpela, ekoki kozala ete Noa akanisaki na likambo nini?

6 Noa azalaki na kondima epai ya Yehova, mpe abomamaki te na Mpela. (Baebre 11:7) Mpe lokola azalaki na kondima, Noa apesaki Yehova mbeka ya banyama. (Ebandeli 8:20) Nsima ya Mpela, mokili ekómaki lisusu mabe. Nimerode abandaki koyangela mpe alingaki ete bato bátombokela Yehova. (Ebandeli 10:8-12) Kasi kondima ya Noa ezalaki kaka makasi. Na ndakisa ya Abele, andimisamaki ete mokolo mosusu Nzambe akolongola lisumu mpe liwa. Ekoki kozala mpe ete Noa amonaki na makanisi ntango oyo bakonzi ya mabe bakozala lisusu te. Biso mpe tokoki komona na makanisi eleko wana kitoko, oyo etikali moke mpenza ebanda!​—Baroma 6:23.

BAKANISAKI NTANGO OYO BILAKA YA NZAMBE EKOKOKISAMA

7. Bomoi nini ezalaki liboso ya Abrahama, Yisaka mpe Yakobo?

7 Ekoki kozala ete Abrahama, Yisaka mpe Yakobo bazalaki kokanisa eleko moko ya malamu mingi. Yehova alakaki bango ete bato ya bikólo nyonso bakopambolama  na nzela ya “momboto” na bango. (Ebandeli 22:18; 26:4; 28:14) Nzambe alakaki mpe bango ete mabota na bango ekokóma ekólo monene mpe ekofanda na mokili kitoko ya ndaka. (Ebandeli 15:5-7) Lokola Abrahama, Yisaka mpe Yakobo bayebaki ete bilaka ya Yehova ekokokisama, bakokaki komona polele na makanisi ete mabota na bango bafandi na mokili yango. Kutu, kobanda lisumu ya Adama ná Eva, Yehova asalisi basaleli na ye ya sembo báyeba ndenge bato bakozonga mokolo mosusu na bomoi ya kokoka.

8. Nini esalisaki Abrahama azala na kondima makasi mpe na botosi?

8 Lokola azalaki na kondima makasi, Abrahama azalaki na botosi epai ya Yehova ata na ntango ya mikakatano makasi. Abrahama ná basaleli mosusu ya sembo bakokaki komona polele na makanisi makambo oyo Yehova alakaki, ata soki makambo yango ekokisamaki te ntango bango bazalaki na bomoi. Biblia elobi ete: “Bamonaki yango na mosika mpe basepelaki na yango.” (Tángá Baebre 11:8-13.) Abrahama ayebaki ete Yehova akokisaki bilaka mosusu oyo apesaki liboso, na yango, andimisamaki ete bilaka nyonso oyo Yehova apesi mpo na mikolo ezali koya, ekokokisama mpe lokola.

Bato oyo Biblia elobeli bazelaki na motema esengo ntango Yehova mpe guvɛrnema na ye ekoyangela mabele mpo na libela

9. Ndenge nini kondima ya Abrahama na bilaka ya Nzambe esalisaki ye?

9 Lokola Abrahama azalaki na kondima na oyo Yehova alakaki ye, akobaki kosala oyo Yehova asɛngaki ye. Na ndakisa, atikaki ndako na ye na engumba Ure mpe na nsima, afandaki ata na engumba moko te mpo na libela. Ayebaki ete bingumba oyo ezalaki zingazinga na ye, ekoumela te mpo na libela mpo bakonzi na yango basalelaki Yehova te. (Yosua 24:2) Kasi, azalaki kozela na motema esengo ntango Yehova mpe guvɛrnema na ye ekoyangela mabele mpo na libela. Guvɛrnema yango ezali “engumba oyo ezali na miboko ya solosolo, engumba oyo Nzambe ye moko atongi mpe asali.” (Baebre 11:10) Abrahama, Abele, Enoka, Noa mpe basusu bazalaki na elikya ya lisekwa. Ntango nyonso oyo bazalaki na makanisi ya kozala na bomoi ya seko na mabele moko kitoko, kondima na bango epai ya Yehova ezalaki kaka kokóma makasi.​—Tángá Baebre 11:15, 16.

10. Mpo na nini ezalaki malamu ete Sara azela mikolo oyo ezalaki liboso na esengo?

10 Sara, mwasi ya Abrahama azalaki na kondima makasi na bilaka ya Yehova. Ata ntango azalaki na mbula 90 mpe abotaki naino te, azalaki kaka kozela na motema esengo ntango akobota. Ekoki kutu kozala ete Sara azalaki komona na makanisi ndenge bana na ye bakokóma ekólo moko monene. (Baebre 11:11, 12) Nini esalisaki ye azala na elikya makasi ndenge wana? Mpo Yehova ayebisaki mobali na ye ete: “Nakopambola ye [Sara] mpe lisusu nakopesa yo mwana mobali na nzela na ye; mpe nakopambola ye mpe akokóma bikólo; bakonzi ya bato ya bikólo bakobima kati na ye.” (Ebandeli 17:16) Ndenge kaka Yehova  alakaki, Sara abotaki mwana mobali na nkombo Yisaka. Likamwisi wana endimisaki ye ete bilaka mosusu ya Yehova ekokokisama. Biso mpe tokoki kokómisa kondima na biso makasi ntango tozali kokanisa makambo nyonso kitoko oyo Yehova alaki biso.

AKOBAKI KOKANISA NA MBANO

11, 12. Nini esalisaki Moize alinga Yehova lisusu mingi koleka?

11 Moize mpe azalaki na kondima na bilaka ya Yehova. Abɔkɔlamaki na Ezipito lokola mwana ya mokonzi. Kasi lokola alingaki Yehova mingi koleka biloko mosusu nyonso, Moize alingaki te bokonzi mpe bomɛngo. Baboti na ye oyo bazalaki Baebre, bayebisaki ye makambo etali Yehova, bateyaki ye ete Yehova alakaki kosikola Baebre na boombo mpe kopesa bango mokili ya ndaka. (Ebandeli 13:14, 15; Kobima 2:5-10) Lokola Moize azalaki ntango nyonso kokanisa bilaka yango, akómaki lisusu kolinga Yehova mingi.

12 Biblia eyebisi biso oyo Moize azalaki kokoba kokanisa na yango: “Na kondima Moize, ntango akolaki, aboyaki kobengama mwana ya mwana mwasi ya Farao, aponaki konyokwama elongo na bato ya Nzambe na esika ya kozwa esengo ya ntango mokuse oyo euti na lisumu, mpo atalelaki nsɔni ya Kristo lokola bomɛngo ya monene koleka biloko ya motuya ya Ezipito; mpo azalaki kotala na likebi mpenza epai mbano ekofutama.”​—Baebre 11:24-26.

13. Mpo na nini ezalaki malamu ete Moize akoba kokanisa na bilaka ya Yehova?

13 Ekoki kozala ete Moize akanisaki mingi na elaka oyo Yehova apesaki ya kosikola Baebre na boombo. Na ndakisa ya basaleli mosusu ya Yehova, Moize ayebaki mpe ete Yehova akosikola bato nyonso na liwa. (Yobo 14:14, 15; Baebre 11:17-19) Na yango, Moize ayebaki ndenge Yehova alingaka bato. Yango esalaki ete Moize alinga Yehova kutu mingi mpe azala na kondima makasi mpenza epai na ye. Esalisaki ye akoba kosalela Yehova bomoi na ye mobimba. (Kolimbola Mibeko 6:4, 5) Ata ntango Farao alingaki koboma ye, Moize abangaki te. Ayebaki ete Yehova akopesa ye mbano na mikolo ezali koya.​—Kobima 10:28, 29.

KANISÁKÁ NA MAKAMBO OYO GUVƐRNEMA YA NZAMBE EKOSALA

Okoki komimona na makanisi ete ozali kosala makambo oyo Yehova alaki biso? (Talá paragrafe 15)

14. Makanisi nini bato mosusu bazalaka na yango mpo na mikolo ezali koya?

14 Bato mingi bakanisaka mpo na bomoi ya lobi mpe balɔtaka makambo oyo ekosalema ata moke te. Na ndakisa, bato mosusu oyo bazali babola makasi balɔtaka ete bakokóma bazwi mpe bakomitungisa ata mpo na eloko te. Kasi Biblia elobi ete bomoi na mokili oyo ya Satana ‘ekotonda ntango nyonso na mawa mpe makambo oyo eyokisaka mpasi.’ (Nzembo 90:10) To bamosusu bakanisaka ete guvɛrnema ya bato ekosilisa mikakatano na mokili. Kasi Biblia elobi ete kaka guvɛrnema ya Nzambe nde ekoki kosala bongo. (Danyele 2:44) Mpe bato mingi bakanisaka ete mokili ekobongwana ata moke te. Kasi Biblia elobi ete Nzambe akoboma mokili oyo mabe. (Sefania 1:18; 1 Yoane 2:15-17) Baoyo bakanisaka makambo oyo eyokani te na oyo Yehova alobaka bakolɛmba nzoto.

15. (a) Mpo na nini ezali malamu mpo na biso ete tókanisaka na makambo oyo Nzambe alaki biso na mikolo ezali koya? (b) Wapi moko ya makambo oyo ozali kozela na motema esengo?

15 Yehova alaki biso bomoi moko kitoko na mikolo ezali koya. Ntango tozali  kokanisa na eleko yango, toyokaka esengo makasi mpe tokoki kozwa mpiko oyo tosengeli na yango mpo tókoba kosalela ye. Okoki komona na makanisi ete ozali kosala makambo oyo Yehova alaki yo, ezala okozala na bomoi na likoló to awa na nse? Soki ozali kozela na esengo makasi kofanda seko awa na mabele, kanisá ndenge okosala ná baninga na yo mosusu mpo na kokómisa mabele elanga moko ya kitoko mpenza. Baoyo bazali kotambwisa mosala yango bamibanzabanzaka mpo na yo. Moto nyonso oyo azali zingazinga na yo alingaka Yehova, ndenge yo mpe olingaka ye. Ozali na nzoto kolɔngɔnɔ mpe na makasi mingi, mpe eloko moko te ezali kotungisa yo. Ozali na esengo mpo okoki kosalela makoki mpe mayele na yo mpo na kosalisa basusu mpo na kokumisa Yehova. Ntango mosusu ozali kutu kosalisa bato oyo basekwi báyeba Yehova. (Yoane 17:3; Misala 24:15) Soki ozali kokanisa na makambo oyo, ozali kolɔta ndɔtɔ ya baba te. Makambo nyonso oyo Biblia elobi mpo na mikolo ezali koya ekokokisama mpenza.​—Yisaya 11:9; 25:8; 33:24; 35:5-7; 65:22.

LOBELÁKÁ MAKAMBO OYO OZALI KOZELA NA MOTEMA ESENGO

16, 17. Mpo na nini ezali malamu kolobelaka makambo kitoko oyo Yehova alaki biso na mikolo ezali koya?

16 Ntango tozali koyebisa bandeko na biso makambo oyo tozali kolinga kosala na mokili ya sika, tozali kosalisana mpo na kokanisa na ndenge ebongi mpe ya polele bomoi wana kitoko oyo ezali liboso na biso. Na ntembe te, toyebi na bosikisiki te oyo mokomoko na biso akosala. Kasi ntango tozali kolobela makambo oyo tozali kozela na motema esengo, tozali komonisa ete tozali na kondima na bilaka ya Yehova. Na ndenge yango, tozali kolendisana mpo na kokoba kosalela Yehova na bileko ya mpasi, ndenge kaka ntoma Paulo mpe  bandeko na ye ya Roma basalaki.​—Baroma 1:11, 12.

17 Soki ozali kokanisa na makambo oyo Yehova alaki na mikolo ezali koya, okokanisa mingi te na mikakatano na yo. Mokolo moko, ntoma Petro amitungisaki mpe alobaki na Yesu boye: “Talá! Biso totiki biloko nyonso mpe tolandi yo; eloko nini mpenza tokozwa?” Yesu alingaki ete ntoma Petro ná bayekoli mosusu oyo bazalaki elongo na ye bákanisa na makambo kitoko oyo bakosala na mikolo oyo ezali koya. Alobaki na bango ete: “Ntango Mwana ya moto akofanda na kiti ya bokonzi na ye ya nkembo, bino baoyo bolandi ngai bokofanda mpe na bakiti ya bokonzi zomi na mibale, bokosambisa mabota zomi na mibale ya Yisraele. Mpe moto nyonso oyo atiki bandako to bandeko ya mibali to bandeko ya basi to tata to mama to bana to bilanga mpo na nkombo na ngai akozwa biloko yango mbala mingi koleka mpe akozwa libula ya bomoi ya seko.” (Matai 19:27-29) Na yango, ntoma Petro mpe bayekoli mosusu bakokaki komona na makanisi ndenge bakoyangela elongo na Yesu na likoló mpe kosalisa bato ya botosi awa na mabele mpo bákóma bato ya kokoka.

18. Mpo na nini ezali malamu mpo na biso tókanisa ntango oyo Nzambe akosala makambo oyo alaki?

18 Tomoni makambo oyo esalisaki basaleli ya Yehova bázala na kondima makasi. Abele azalaki kokanisa na elaka ya Yehova ya bomoi malamu na mikolo ekoya, mpe lokola azalaki na kondima na elaka yango, asepelisaki Yehova. Abrahama akanisaki na ntango oyo bilaka ya Yehova mpo na “momboto” ekokokisama, na yango, atosaki Yehova ata ntango makambo ezalaki mpasi makasi. (Ebandeli 3:15) Moize azalaki kozela na motema esengo mbano oyo Yehova alakaki ye, mpe yango esalisaki ye alinga Yehova mpe atikala sembo. (Baebre 11:26) Wana tozali kokanisa na ntango oyo Yehova akosala makambo nyonso oyo alaki, kondima mpe bolingo na biso epai na ye ekokóma lisusu makasi. Na lisolo oyo elandi, tokomona lolenge mosusu oyo tokoki kosalela likoki na biso ya kokanisa.