Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Mai 2015

Mpo na nini kobimisa moto na lisangá ezali ebongiseli ya bolingo?

Mpo na nini kobimisa moto na lisangá ezali ebongiseli ya bolingo?

JULIAN amikundolaka ndenge ayokaki ntango liyebisi epesamaki ete mwana na ye ya mobali azali lisusu Motatoli ya Yehova te. Alobi ete: “Namonaki lokola bomoi na ngai esuki.” Abakisi ete: “Azalaki mwana na ngai ya liboso mpe tozalaki mpenza baninga ya motema; tozalaki kosala makambo mingi elongo.” Julian alobi lisusu ete mwana na ye azalaki ntango nyonso na bizaleli malamu, kasi na nsima abongwanaki mpe akómaki kosala makambo ya mabe. Mwasi ya Julian alelaki mbala na mbala, mpe Julian ayebaki te ndenge ya kobɔndisa ye. Julian abakisi ete, “Tokobaki komituna soki tokokisaki te mokumba na biso ya baboti.”

Bantina nini Biblia epesi mpo na kobimisa moto na lisangá? Mpe lokola epesaka biso mpasi mingi, mpo na nini tokoki koloba ete kobimisa moto na lisangá emonisaka bolingo?

MPO NA NINI BABIMISAKA MOTO NA LISANGÁ?

Soki Motatoli ya Yehova asali lisumu moko monene mpe abongoli motema te, akobimisama na lisangá.

Yehova asɛngaka biso te tózala bato ya kokoka, kasi alingaka basaleli na ye bátosa mibeko na ye mpe bázala basantu. Na ndakisa, Yehova asɛngi na basaleli na ye báboya kosala masumu minene lokola pite, losambo ya bikeko, koyiba, kobɔtɔla, koboma bato mpe misala ya bilimo mabe.​—1 Bakorinti 6:9, 10; Emoniseli 21:8.

Makambo oyo Yehova azali kosɛnga biso eleki ndelo te mpe ebatelaka biso. Na ndakisa, biso nyonso tolingaka kofanda na bato ya kimya, ya bizaleli malamu, mpe ya kolongobana; yango nde tomonaka epai ya bandeko na biso ya elimo. Mpo na nini bandeko yango bazalaka bongo? Mpo bamipesá na Yehova mpe balapá ndai ete bakotosa oyo alobi na Biblia.

 Kasi tokoloba nini soki Motatoli moko asali lisumu moko monene mpo na bolɛmbu? Likambo yango ekómelaki basaleli mosusu ya Yehova na ntango ya kala, kasi Yehova abwakaki bango te mpo na libela. Na ndakisa, atako mokonzi Davidi asalaki ekobo mpe abomaki moto, mosakoli Natana ayebisaki Davidi ete Yehova alimbisi masumu na ye.​—2 Samwele 12:13.

Mpo na nini Yehova alimbisaki Davidi? Mpo Yehova amonaki ete Davidi abongolaki mpenza motema. (Nzembo 32:1-5) Lelo oyo mpe, moto oyo asali lisumu akolimbisama soki abongoli mpenza motema mpe atiki kosala mabe. (Misala 3:19; 26:20) Soki bankulutu oyo bazali na komite ya kosambisa bamoni te ete moto yango abongoli mpenza motema, asengeli kobimisama na lisangá.

Soki moto moko ya libota to moninga na yo ya motema abimisami na lisangá, ekoki kozala mpasi mpo ondima ekateli yango mpe okoki kokanisa ete eleki makasi. Kasi, Liloba ya Yehova emonisi biso polele ete kobimisa moto na lisangá emonisaka bolingo.

MATOMBA YA KOBIMISA MOTO NA LISANGÁ

Yesu alobaki ete “bwanya ya moto emonanaka na makambo ya boyengebene oyo asalaka.” (Matai 11:19) Tótalela bantina misato oyo emonisi ete kobimisa na lisangá moto oyo aboyi kobongola motema ezali mpenza likambo ya bwanya.

Kobimisa moto na lisangá ebatelaka mpo nkombo ya Yehova esambwa te. Makambo oyo tosalaka ekoki kokumisa to kosambwisa Yehova mpo, lokola tozali Batatoli na ye, tomemaka nkombo na ye. (Yisaya 43:10) Ndenge kaka makambo oyo mwana asalaka ekoki kokumisa to kosambwisa baboti na ye, makambo oyo basaleli ya Yehova basalaka ekoki kokumisa to kosambwisa ye. Na mikolo ya mosakoli Ezekiele, bato ya bikólo bazalaki kobenga Bayuda na nkombo ya Yehova. (Ezekiele 36:19-23) Ndenge moko mpe lelo oyo bato babengaka Batatoli ya Yehova na nkombo ya Yehova. Na yango, soki tozali kotosa mibeko ya Yehova, tokopesa ye lokumu.

Ntoma Petro apesaki bakristo toli ete: “Lokola bana ya botosi, bótika kolanda bamposa oyo bozalaki na yango kala ntango bozalaki na boyebi te, kasi, na boyokani na Mosantu oyo abengaki bino, bino mpe bókóma basantu na etamboli na bino mobimba, mpo ekomamá ete: ‘Bosengeli kozala basantu, mpamba te ngai nazali mosantu.’” (1 Petro 1:14-16) Na ndakisa, soki tosali pite, tokosambwisa nkombo ya Nzambe. Kasi ntango tobatelaka etamboli na biso pɛto, tokumisaka Yehova.

Soki Motatoli ya Yehova moko akómi na momeseno ya kosala mabe, na ntembe te, bato oyo bayebi ye bakoyeba likambo oyo azali kosala. Na yango ntango bayoki ete ndeko yango azali lisusu Motatoli ya Yehova te, bakoyeba ete basaleli ya Yehova batosaka oyo Biblia elobi mpe babatelaka bopɛto ya lisangá. Na ndakisa, moto moko ayaki na makita na biso na Suisse mpe alobaki ete alingi kokóma mosangani ya lisangá yango. Ndeko na ye abimisamaki na lisangá mpo asalaki pite mpe yango wana moto yango alingaki kokɔta na ebongiseli oyo “ekangaka miso te na mabe.”

Kobimisa moto na lisangá ebatelaka bopɛto ya lisangá. Ntoma Paulo akebisaki bakristo ya Korinti na likama ya kotika na lisangá mosumuki oyo abongoli motema te. Akokanisaki makambo oyo bizaleli mabe ya mosumuki yango ekokaki kobimisa na ndenge levire esalaka mpo na kovimbisa pɔtɔpɔtɔ ya farini. Ntoma Paulo alobaki ete: “Mwa levire moke evimbisaka pɔtɔpɔtɔ mobimba ya farini.” Na nsima apesaki bango toli ete: “Bólongola moto mabe na kati na bino.”​—1 Bakorinti 5:6, 11-13.

“Moto mabe” yango asalaki pite kozanga nsɔni. Bato mosusu na lisangá na ye babandaki  kutu koloba ete moto yango asali mabe te. (1 Bakorinti 5:1, 2) Yango ezalaki likama mpenza mpo bakristo mosusu bakokaki kobanda kosala pite ndenge ezalaki komonana mingi na Korinti. Ndenge moko mpe lelo, soki lisangá ekangi miso ntango lisumu moko monene esalemi, bato mosusu bakoki kobanda komona mibeko ya Yehova ntina te. (Mosakoli 8:11) Ndenge kaka “mabanga [oyo] ebombaná na nse na mai” ekoki kozindisa masuwa, basumuki oyo babongoli motema te bakoki kobebisa kondima ya bandeko mosusu na lisangá.​—Yuda 4, 12.

Kobimisa moto na lisangá ekoki kosalisa mosumuki amona ete asali mabe. Yesu apesaki ndakisa ya elenge mobali moko oyo atikaki ndako ya tata na ye, mpe asilisaki libula na ye nyonso na bomoi ya mbindo. Elenge mobali yango ayaki komona ete kotika ndako ya tata na ye mpe kokende kofanda epai mosusu ezalaki na ntina te. Na yango, abongolaki motema mpe azwaki ekateli ya kozonga lisusu na libota na ye. Tata wana asepelaki makasi ntango amonaki ete mwana na ye abongoli makanisi, mpe ayambaki ye na ndako. (Luka 15:11-24) Ndakisa oyo esalisi biso tóyeba ndenge oyo Yehova ayokaka ntango moto abongoli motema. Alobi boye: “Nasepelaka na liwa ya moto mabe te, nasepelaka nde ete moto mabe abongwana, atika nzela na ye mpe atikala mpenza na bomoi.”​—Ezekiele 33:11.

Lisangá ya bokristo ezali libota na biso ya elimo. Ntango moto abimisami na lisangá, azali lisusu te mosangani ya libota yango. Nsima ya komona mpasi ya etamboli na ye ya mabe, akoki mpe komona libunga oyo asalaki mpe kozongisa na makanisi esengo oyo azalaki na yango ntango azalaki na boyokani malamu ná Yehova mpe lisangá. Yango ekoki kolendisa ye azonga lisusu na libota na ye ya elimo.

Soki tozali kotosa bibongiseli oyo ezwami mpo na moto oyo abimisami na lisangá, tokomonisa ete tolingi ye; mpe na ndenge yango tokosalisa ye azonga na lisangá. Na ndakisa, kanisá ete bato mibale oyo batambolaka na bangomba bazali kozela bayá kobikisa bango na malili makasi. Lokola malili ezali makasi, moko alɛmbi makasi mpe alingi kolala. Soki alali na nɛjɛ, akokufa. Mpo na kosalisa ye alala te, moninga na ye abɛti ye mbata na elongi. Atako esali ye mpasi, kasi ekoki kobikisa ye. Davidi amonisaki likanisi ya ndenge wana ntango alobaki ete: “Soki moyengebene abɛti ngai, ekozala motema boboto.” (Nzembo 141:5) Davidi ayebaki ete atako disiplini esalaka mpasi, kasi ekosalisa ye.

Ndenge moko na mbata wana, kobimisa moto na lisangá ezalaka mbala mingi likambo oyo moto asengeli na yango mpo azongela Yehova. Mwana ya Julian oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo, abongolaki bomoi na ye mpe azongaki na lisangá nsima ya mbula 10. Sikoyo azali nkulutu. Alobi boye: “kobimisama na lisangá esalisaki ngai namona mpenza mbuma mabe ya bizaleli na ngai. Nasengelaki mpenza na disiplini ya ndenge wana.”​—Baebre 12:7-11.

NDENGE OYO TOKOKI KOMONISA ETE TOLINGAKA BATO OYO BABIMISAMÁ NA LISANGÁ

Esalaka mpenza mpasi ntango moto abimisami na lisangá. Kasi yango elingi koloba te ete akozongela lisusu Yehova te. Ezali na ntina mingi ete biso nyonso tótika disiplini esala mosala. Ndenge nini tokoki kosala yango?

Milende esalemaka mpo na kosalisa baoyo babongoli motema bázongela Yehova

Bankulutu basalaka ntango nyonso makasi ya komekola bolingo ya Yehova, mingimingi soki balingi koyebisa moto ete azali lisusu Motatoli ya Yehova te. Na boboto mpenza, bayebisaka ye polele makambo oyo asengeli kosala mpo na kozongela Yehova mpe lisangá. Soki moto oyo abimisamaki na lisangá amonisi ete alingi kozonga na  lisangá, bankulutu bakoki kokende kotala ye mbala na mbala mpo na koyebisa ye lisusu makambo oyo asengeli kosala mpo azongela Yehova. *​—Talá maloba na nse ya lokasa.

Bato ya libota bamonisaka bolingo mpo na lisangá mpe moto oyo abimisami na lisangá ntango batosaka ekateli oyo bankulutu bazwi. Julian alobi ete, “Azalaki kaka mwana na ngai, kasi bizaleli na ye mabe nde ezalaki kokabola biso.”

Bandeko nyonso ya lisangá bamonisaka bolingo ya solosolo epai ya moto oyo abimisami na lisangá na ndenge batosaka disiplini oyo Yehova apesi ye na nzela ya bankulutu. Yango elingi koloba ete basengeli te kolekisa ntango elongo na ye to kosolola na ye. (1 Bakorinti 5:11; 2 Yoane 10, 11) Lisusu, lisangá esengeli mpenza komonisa bolingo makasi mpe kosalisa libota ya moto oyo abimisami na lisangá. Yango ezali ntango moko ya mpasi mpenza mpo na libota. Tosengeli soki moke te kotinda bango bámimona ete bango mpe babimisami na lisangá.​—Baroma 12:13, 15.

Julian asukisi boye: “Kobimisa moto na lisangá ezali ebongiseli oyo tosengeli na yango, oyo ezali kosalisa biso tótosaka mibeko ya Yehova. Atako ezalaka mpasi, nsukansuka ememaka matomba mpenza. Soki nakangaka miso na bizaleli mabe ya mwana na ngai, alingaki abongwana te.”

^ par. 24 Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/04/1991, nkasa 21-23. (Na Lifalanse)