Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Mai 2015

Kebá​—Satana alingi kolya yo!

Kebá​—Satana alingi kolya yo!

“Bókebaka. Monguna na bino, Zabolo, azali kotambola epai na epai lokola nkɔsi oyo ezali koganga mpe koluka kolya moto.”​—1 PETRO 5:8.

1. Limbolá ndenge anzelu moko akómaki Satana.

LIBOSO, azalaki na boyokani malamu ná Yehova. Kasi na nsima, ekelamu wana ya elimo, to anzelu, alingaki ete bato básambelaka ye. Na esika abengana nokinoki mposa wana mabe, atikaki yango ekola tii etindaki ye asala lisumu. (Yakobo 1:14, 15) Toyebi te nkombo na ye ya ebandeli, kasi lelo tobengaka ye Satana. “Akangamaki makasi te na solo.” Atombokelaki Yehova mpe akómaki “tata ya lokuta.”​—Yoane 8:44.

2, 3. Maloba “Satana,” “Zabolo,” “nyoka,” mpe “Dragɔ” emonisi nini na ntina na monguna monene ya Yehova?

2 Kobanda botomboki na ye, Satana akómá monguna monene ya Yehova mpe monguna ya bato nyonso. Soki totali ndenge Biblia elobeli Satana, tokoki komona ete azali mpenza mabe. Satana elimboli “Motɛmɛli,” yango emonisi ete anzelu yango mabe ayinaka boyangeli ya Nzambe mpe abundisaka yango na nguya na ye nyonso. Mposa ya Satana ezali  ya komona ete boyangeli ya Yehova esuki.

3 Na mokanda ya Emoniseli 12:9, Satana abengami Zabolo, oyo elimboli “Mokosi.” Satana abebisaki lokumu ya Nzambe na ndenge abengaki ye mobuki lokuta. Maloba “nyoka ya ebandeli” ekundoli biso ndenge Satana asalelaki nyoka mpo na kokosa Eva. Maloba ‘Dragɔ ya monene’ ezali mpe lolenge malamu ya kolobela Satana. Azali nkanza mpe mabe mpenza. Alingaka kopekisa mokano ya Yehova mpo ekokisama te mpe koboma basaleli ya Nzambe.

4. Tokolobela nini na lisolo oyo?

4 Emonani polele ete Satana azali mpenza likama mpo na bosembo na biso. Yango wana Biblia ekebisi biso ete: “Bóbatela makanisi na bino, bókebaka. Monguna na bino, Zabolo, azali kotambola epai na epai lokola nkɔsi oyo ezali koganga mpe koluka kolya moto.” (1 Petro 5:8) Mpo na yango, lisolo oyo ekolobela bizaleli misato ya Satana oyo emonisi ntina oyo tosengeli komibatela na monguna wana mabe ya Yehova mpe ya basaleli na ye.

SATANA AZALI NA NGUYA

5, 6. (a) Pesá bandakisa oyo emonisi ete baanzelu bazali “makasi na kati ya nguya.” (b) Na ndenge nini Satana azali na ‘likoki ya kopesa liwa’?

5 Baanzelu bazali “makasi na kati ya nguya.” (Nzembo 103:20) Bazali na mayele mpe makasi mingi koleka bato. Ya solo, baanzelu ya sembo basalelaka nguya na bango mpo na makambo ya malamu. Na ndakisa, anzelu moko ya Yehova abomaki basoda 185000 ya Asiri oyo bazalaki banguna ya Nzambe. Ekokaki kozala mpasi mpo na moto mpe limpinga mobimba ya basoda kosala yango. (2 Bakonzi 19:35) Na libaku mosusu, anzelu moko asalelaki makoki mpe nguya na ye mpo na kobimisa bantoma ya Yesu na bolɔkɔ. Atako bakɛngɛli bazalaki wana, bayebaki te ete anzelu afungolaki baporte, abimisaki bantoma, mpe na nsima akangaki yango!​—Misala 5:18-23.

6 Baanzelu ya sembo basalelaka nguya na bango mpo na makambo ya malamu, kasi Satana asalelaka nguya na ye mpo na makambo mabe. Mpe Satana azali mpenza na nguya mingi mpe atindaka bato básala makambo mabe. Biblia ebengaka ye “mokonzi ya mokili oyo” mpe “nzambe ya makambo ya ntango oyo.” (Yoane 12:31; 2 Bakorinti 4:4) Kutu, Satana azali na ‘likoki ya kopesa liwa.’ (Baebre 2:14) Yango elingi koloba te ete abomaka bato nyonso mbala moko. Kasi, yango elimboli nini? Ya liboso, mokili oyo etondi na bizaleli mabe ya Satana lokola koyinana mpe mobulu. Ya mibale, lokola Eva andimaki lokuta ya Satana mpe Adama aboyaki kotosa Nzambe, bato nyonso basalaka masumu mpe bakufaka. (Baroma 5:12) Ndenge kaka Yesu abengaki ye, Satana azali mpenza “mobomi-bato.” (Yoane 8:44) Azali mpenza monguna moko ya nguya.

Soki Yehova asalisi biso te, tokokoka ata moke te kolonga etumba na biso na Satana

7. Ndenge nini bademo bamonisi ete bazali na nguya?

7 Ntango tozali kotɛmɛla Satana, totɛmɛlaka mpe baoyo nyonso bapesaka ye mabɔkɔ mpe baoyo batombokelaka boyangeli ya Nzambe. Yango esangisi etuluku moko monene ya baanzelu mosusu  ya batomboki, oyo babengami bademo. (Emoniseli 12:3, 4) Bamonisi mbala ebele ete bazali makasi mingi koleka bato mpe banyokolaka bango mingi. (Matai 8:28-32; Marko 5:1-5) Kobosana soki moke te ete bademo ná mokonzi na bango bazali mpenza na nguya. (Matai 9:34) Soki Yehova asalisi biso te, tokokoka ata moke te kolonga etumba na biso na Satana.

SATANA AZALI MABE MPENZA

8. (a) Mokano ya Satana ezali nini? (Talá elilingi ya ebandeli.) (b) Nini emonisi yo ete mokili oyo ezali mabe lokola Satana?

8 Ntoma Petro akokanisaki Satana na “nkɔsi oyo ezali koganga.” Buku moko elimboli ete liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “koganga” elakisi “koganga ya nyama oyo ezali na nzala makasi mpenza.” Yango emonisi mpenza ezaleli mabe ya Satana! Mokili mobimba ezalaka na mabɔkɔ na ye, kasi mpo na ye, yango ezali kaka moke. Satana azali lokola nkɔsi oyo ezali na nzala mpe alingi kolya bato ebele. (1 Yoane 5:19) Bato ya libosoliboso oyo alukaka ezali bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazali naino awa na mabele, oyo “bampate mosusu” basalaka elongo na bango. (Yoane 10:16; Emoniseli 12:17) Mokano ya Satana ezali ya koboma basaleli ya Yehova. Monyoko oyo bakristo ya solo bakutanaka na yango kobanda na siɛklɛ ya liboso tii lelo oyo emonisaka ete Satana azali mabe mpenza.

9, 10. (a) Ndenge nini Satana abundisaki ekólo Yisraele? (Pesá bandakisa.) (b) Mpo na ntina nini mpenza Satana atyelaki Yisraele miso? (c) Okanisi ete Zabolo ayokaka ndenge nini ntango mosaleli moko ya Yehova asali lisumu moko monene lelo oyo?

9 Satana amonisaka motema mabe na  ye na lolenge mosusu. Nkɔsi oyo ezali na nzala eyokelaka eloko oyo ekangi mawa te. Eyokaka mawa te liboso ya koboma, mpe eyokaka ata mpasi na motema te nsima ya koboma yango. Ndenge moko mpe, Satana ayokaka mawa ata moke te mpo na bato oyo ye abundisaka. Na ndakisa, okanisi ete Satana ayokaki ndenge nini ntango azalaki komona Bayisraele bazali kokwea na masumu lokola pite mpe lokoso? Ozali mpenza komona na makanisi ndenge Satana abɛtaki mabɔkɔ ntango amonaki Zimiri abomami mpo na pite na ye mpe Gehazi abɛli maba mpo na lokoso na ye?​—Mitángo 25:6-8, 14, 15; 2 Bakonzi 5:20-27.

Satana abɛtaka mpenza mabɔkɔ ntango mosaleli moko ya Yehova asali lisumu (Talá paragrafe 10)

10 Satana ayebaki mpenza mpo na nini azalaki kotyela Yisraele miso. Kobosana te ete Masiya asengelaki kouta na ekólo yango, mpe kokóma moto oyo akopanza Satana mpe akomonisa ete Yehova azali na lotomo ya koyangela. (Ebandeli 3:15) Satana alingaki te ete Bayisraele bándimama na Nzambe, yango wana asalaki nyonso mpo atinda bango básala masumu. Kokanisa te ete Satana ayokaki mawa ntango Davidi asalaki ekobo. Kokanisa mpe te ete ayokelaki Moize mawa ntango abungisaki libaku ya kokɔta na mokili ya ndaka. Satana asepelaka mpenza makasi komona mosaleli moko ya Yehova asali lisumu moko monene. Na ntembe te, Zabolo azwaka makasi ya kotumola Yehova ntango amonaka basaleli ya Yehova bazali kokwea ndenge wana.​—Masese 27:11.

11. Ekoki kozala ete Satana atyelaki Sara miso mpo na nini?

11 Satana ayinaki mpenza molɔngɔ ya mabota oyo esengelaki kobimisa Masiya. Na ndakisa, kanisá makambo oyo esalemaki na nsima ntango Yehova ayebisaki Abrahama ete akokóma “ekólo moko monene.” (Ebandeli 12:1-3) Ntango Abrahama ná Sara bazalaki na Ezipito, Farao asɛngaki bámemela ye Sara na ndako na ye mpe alingaki akóma mwasi na ye. Kasi, Yehova abatelaki Sara mpe abikisaki ye na mokakatano wana. (Tángá Ebandeli 12:14-20.) Likambo ya ndenge wana esalemaki mpe na engumba Gerare liboso Yisaka abotama. (Ebandeli 20:1-7) Ekoki kozala ete Satana nde abimisaki mikakatano wana? Kobosana te ete Sara atikaki Ure, engumba moko ya bozwi mpo na kofanda na bahema. Na yango, Satana akanisaki ete akomeka ye na bandako minene ya Farao ya kitoko mpe ya Abimeleke? Satana akanisaki ete akokosa mobali na ye ata mpe Yehova mpo na kobala moko ya bakonzi yango? Biblia elobeli yango te, kasi ekoki mpenza kozala ete Zabolo alingaki kosepela soki Sara abungisaka libaku ya kozala na kati ya libota oyo ememaki tii na Masiya. Satana alingaki koyoka ata mawa te soki libala kitoko ya mwasi wana, lokumu mpe boyokani na ye ná Yehova ebebaka. Satana azali mabe mpenza!

Kosala malamu to mabe elobelaka Satana eloko te

12, 13. (a) Ndenge nini Satana amonisaki mpenza motema mabe na ye nsima ya kobotama ya Yesu? (b) Okanisi ete Satana ayokaka ndenge nini mpo na bilenge oyo balingaka Yehova mpe basalaka makasi mpo na kosalela ye lelo oyo?

12 Yesu abotamaki bankama ya bambula nsima ya Abrahama. Kokanisa te ete Satana amonaki bebe yango ete azali kitoko. Satana ayebaki ete bebe yango akokola mpe akokóma Masiya oyo alakamaki.  Yesu azali eteni ya liboso ya momboto ya Abrahama, mpe na nsima ‘akobukabuka misala ya Zabolo.’ (1 Yoane 3:8) Satana akokaki nde kokanisa ete koboma mwana wana ezali mpenza mabe? Te. Kosala malamu to mabe elobelaka ye eloko te. Asalaki makambo na lombangu mpo na koluka koboma Yesu ntango azalaki mwana. Ndenge nini?

13 Ntango Mokonzi Erode ayokaki epai ya banganga-minzoto ete “mokonzi ya Bayuda” abotami, ayokaki nkanda makasi mpe alukaki koboma bebe yango. (Matai 2:1-3, 13) Na yango apesaki mitindo ete báboma bana mibali nyonso oyo bazalaki na mbula mibale to na nse na Beteleme mpe na bitúká na yango. (Tángá Matai 2:13-18.) Yesu abikaki na kobomama wana ya nsɔmɔ, kasi yango eteyi biso nini mpo na monguna na biso Satana? Zabolo azwaka bomoi ya bato na valɛrɛ te. Amibanzabanzaka kutu te mpo na bana. Satana azali mpenza “nkɔsi oyo ezali koganga.” Kobosana soki moke te ete Satana azali mabe mpenza!

SATANA AZALI MOKOSI

14, 15. Ndenge nini Satana ‘azipaka makanisi ya bato oyo bazangi kondima’?

14 Lolenge kaka moko oyo Satana akoki kotinda bato báboya Yehova, Nzambe na biso ya bolingo ezali ya kokosa. (1 Yoane 4:8) Satana akosaka bato mpo ‘báyeba te bobola na bango ya elimo,’ elingi koloba, báyeba te ete basengeli kozala na boyokani malamu ná Nzambe. (Matai 5:3) Zabolo ‘azipaka makanisi ya bato oyo bazangi kondima’ mpo báyeba te solo na ntina na Yehova.​—2 Bakorinti 4:4.

15 Moko ya mayele oyo eleki monene oyo Satana asalelaka mpo na kokosa bato ezali mangomba ya lokuta. Ayebi ete Yehova “asɛngaka kokangama kaka na ye.” (Kobima 20:5) Na yango, kanisá naino esengo oyo Satana ayokaka ntango amonaka bato bazali kosambela bankɔkɔ na bango, biloko mosusu oyo Nzambe asalá to banyama, elingi koloba, moto to eloko mosusu nyonso na esika ya Yehova. Likambo ya mawa, ezala bato mingi oyo bakanisaka ete Nzambe andimaka losambo na bango bandimaka mpenza mateya ya lokuta mpe milulu oyo ezangá ntina. Bayisraele na mikolo ya Yisaya bazalaki mpe bongo. Yehova atunaki bango ete: “Mpo na nini bozali kaka kobimisa mbongo mpo na eloko oyo ezali limpa te, mpe mpo na nini bozali koboma nzoto mpo na eloko oyo ezali kotondisa te? Bóyoka ngai na likebi, mpe bólya eloko oyo ezali malamu, mpe molimo na bino esepela mpenza na biloko ya mafuta.”​—Yisaya 55:2.

Satana akoki kokosa ata basaleli ya Yehova ya molende

16, 17. (a) Mpo na nini Yesu ayebisaki ntoma Petro ete: “Leká nsima na ngai, Satana”? (b) Ndenge nini Satana akoki kokosa biso mpo tótika kozala ekɛngɛ?

16 Satana akoki kokosa ata basaleli ya Yehova ya molende. Na ndakisa, kanisá na oyo esalemaki ntango Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete etikali moke akobomama. Ntoma Petro, oyo azalaki kolinga Yesu, alobaki boye: “Komitungisa te, Nkolo; likambo wana ekokómela yo te.” Yesu alobaki na Petro ete: “Leká nsima na ngai, Satana!” (Matai 16:22, 23) Mpo na nini Yesu abengaki Petro  “Satana”? Mpo Yesu ayebaki likambo oyo elingaki kosalema. Mosika te, Yesu asengelaki kokufa lokola mbeka ya lisiko mpe komonisa ete Zabolo azali mokosi. Ezalaki mpenza ntango moko ya mpasi mpo na bato mpe ezalaki te ntango oyo Yesu asengelaki “komitungisa te.” Satana alingaki kosepela soki Yesu atikaka kozala ekɛngɛ.

17 Nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo ekómi pene, na yango biso mpe tozali na ntango moko ya mpasi. Satana alingi ete ‘tómitungisa te’ mpe tótya likebi na biso na koluka kokóma bato minene na mokili oyo. Alingi ete tóbosana ete tozali na mikolo ya nsuka mpe tótika kozala ekɛngɛ. Kotika te ete likambo ya boye ekómela yo! Kutu, tosengeli nde ‘kosɛnzɛlaka.’ (Matai 24:42) Kondima soki moke te lokuta ya Satana oyo ete nsuka ezali naino mosika to ekoya na yango kutu te.

18, 19. (a) Ndenge nini Satana alukaka kokosa mpe kotinda biso tókanisa ete tobongi te ete Yehova alinga biso? (b) Ndenge nini Yehova asalisaka biso tótikala ekɛngɛ?

18 Satana alukaka kokosa biso mpe na lolenge mosusu. Alingaka tóndima ete ebongi te Yehova alinga biso mpe ete Nzambe akolimbisa soki moke te masumu na biso. Kasi wana ezali lokuta ya Satana. Kanisá naino, nani mpenza ebongi te ete Yehova alinga ye? Ezali Satana. Nani oyo Nzambe akoki kolimbisa ye ata moke te? Ezali Satana. Kasi mpo na biso, Biblia elobi ete: “Nzambe azangi boyengebene te mpo abosana mosala na bino mpe bolingo oyo bomoniselaki nkombo na ye.” (Baebre 6:10) Yehova asepelaka na makambo nyonso oyo tosalaka mpo na kosepelisa ye, mpe mosala oyo tosalelaka ye ezalaka ya mpunda soki moke te. (Tángá 1 Bakorinti 15:58.) Yango wana, kotika te Satana akosa yo.

19 Ndenge tomoni yango, Satana azali na nguya, azali mabe mpenza mpe azali mokosi. Ndenge nini tokoki kolonga etumba liboso ya monguna ya boye? Yehova asalisaka biso. Liloba na ye eyebisaka biso myango mabe oyo Satana asalelaka mpo “toyebi malamu mayele na ye.” (2 Bakorinti 2:11) Soki toyebi mayele ndenge na ndenge oyo Satana asalelaka mpo na kolukela biso makambo, ekozala mpasi te mpo tózalaka ntango nyonso ekɛngɛ. Kasi tosengeli kosuka kaka te na koyeba mayele ya satana. Biblia elobi ete: “Bótɛmɛla Zabolo, mpe akokima bino.” (Yakobo 4:7) Lisolo oyo elandi ekolobela makambo misato oyo tokoki kosalela mpo na kobunda na Satana mpe kolonga ye.