Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Avril 2015

Tyeláká Yehova motema ntango nyonso!

Tyeláká Yehova motema ntango nyonso!

“Ee bino bato, bótyela ye motema ntango nyonso.”​—NZEMBO 62:8.

1-3. Mpo na nini ntoma Paulo andimisamaki ete asengeli kotyela Yehova motema? (Talá elilingi ya ebandeli.)

SOKI ozalaka mokristo na Roma na siɛklɛ ya liboso, olingaki kozala na eleko moko ya likama mpenza. Baroma bazalaki konyokola bakristo na ndenge ya mabe. Baroma bakoselaki bango makambo ete batyaki mɔtɔ na Roma mpe bafundaki bango ete bayinaka bato. Ebele ya bandeko na yo bakristo mibali mpe basi bakangamaki. Banyama ekataki bamosusu bitenibiteni. Babakaki bamosusu nsɛtɛ na banzete mpe na nsima bazalaki kotumba bango wana bazali naino na bomoi mpo na kongɛngisa na butu. Mokolo na mokolo osengelaki koyeba ete moko ya minyoko oyo ekokómela yo.

2 Na eleko wana ya mpasi makasi, ntoma Paulo akangamaki na bolɔkɔ. Ekoki kozala ete azalaki komituna soki bandeko na ye bakristo bakosalisa ye mpo akanisaki lisusu na likambo moko oyo esalemaki liboso, mpe moto moko te asalisaki ye. Kasi Yehova asalisaki ntoma Paulo na nzela ya Nkolo Yesu. Ntoma Paulo akomaki boye: “Nkolo atɛlɛmaki pene na ngai mpe atondisaki ngai na nguya.” Yesu apesaki ntoma Paulo nguya oyo asengelaki na yango. Kutu ntoma Paulo akomaki ete  ‘abikaki na monɔkɔ ya nkɔsi.’​—2 Timote 4:16, 17. * (Talá maloba na nse ya lokasa.)

3 Ntoma Paulo amikundolaki ndenge Yehova asalisaki ye na ntango ya kala. Na yango, andimisamaki ete Yehova akopesa ye makasi oyo asengeli na yango mpo na koyika mpiko liboso ya mokakatano oyo azalaki na yango na ntango wana mpe mikakatano nyonso oyo asengelaki kokutana na yango. Andimisamaki mpenza na likambo yango mpe akomaki ete: “Nkolo akobikisa ngai na mosala nyonso ya mabe.” (2 Timote 4:18) Ntoma Paulo ayebaki ete ata na makambo oyo bandeko na ye bakristo bakokaki te kosalisa, asengelaki ntango nyonso kotya motema ete Yehova ná Yesu bakosalisa ye. Azalaki ata na ntembe moke te na makanisi na ye.

MABAKU OYO TOZALI NA YANGO YA KOTYELA YEHOVA MOTEMA

4, 5. (a) Nani akoki kopesa yo ntango nyonso lisalisi oyo ozali koluka? (b) Ndenge nini okoki kokómisa boyokani na yo ná Yehova makasi?

4 Esilá kokómela yo okutana na mokakatano moko ya makasi mpe omimona ete osundolami, mpe ezali na moto moko te ya kosalisa yo? Mbala mosusu balongolá yo na mosala to baninga na yo ya kelasi bazalaki kotya yo mpanzi likoló. Mbala mosusu ozalaki kobɛla makasi to okutanaki na mikakatano mosusu ya makasi. Ekoki kozala ete osɛngaki basusu básalisa yo kasi olɛmbaki nzoto mpo bapesaki yo te lisalisi oyo ozalaki koluka. Ya solo, ezali na makambo mosusu oyo bato bakokoka te kosilisa. Okosala nini? Biblia eyebisi biso ete ‘tótyela Yehova motema.’ (Masese 3:5, 6) Kasi, okoki mpenza kotya motema ete akosalisa yo? Ɛɛ! Tokoki kotánga bandakisa ebele na Biblia oyo ezali kondimisa biso ete Yehova asalisaka mpenza basaleli na ye.

Mikakatano epesaka biso libaku ya kotyela Yehova motema na biso mobimba

5 Kosilika te soki bato bapesi yo te lisalisi oyo ozalaki koluka. Kasi, na ndakisa ya ntoma Paulo, talelá mikakatano lokola libaku ya kotyela Yehova motema na yo mobimba. Ezali mpe libaku oyo ekosalisa yo omona mpenza ndenge oyo Yehova atyelaka yo likebi. Kondima na yo epai ya Yehova mpe boyokani na yo ná ye ekokóma lisusu makasi.

TOSENGELI KOTYELA YEHOVA MOTEMA

6. Mpo na nini ekoki mbala mosusu kozala pɛtɛɛ te kotyela Yehova motema ntango tokutani na mokakatano moko makasi?

6 Okoki kozala na mokakatano moko oyo ezali kotungisa yo. Osali nyonso oyo okoki mpo na kosilisa yango, mpe obondeli Yehova asalisa yo. Okoki sikoyo koyoka kimya na motema mpo ondimisami ete akosalisa yo? Ɛɛ, osengeli mpenza koyoka bongo! (Tángá Nzembo 62:8; 1 Petro 5:7.) Soki olingi kozala na boyokani malamu ná Yehova, osengeli mpenza koyekola kotyela ye motema. Kasi kosala bongo ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Mpo na nini? Moko ya bantina ezali ete ntango mosusu Yehova akoki te koyanola mbala moko na libondeli na yo.​—Nzembo 13:1, 2; 74:10; 89:46; 90:13; Habakuku 1:2.

Yehova, Tata na biso ya likoló, alingaka biso mpe ayebi nini oyo tosengeli na yango

7. Mpo na nini Yehova ayanolaka ntango nyonso te mbala moko na mabondeli na biso?

7 Mpo na nini Yehova ayanolaka ntango nyonso te mbala moko na mabondeli  na biso? Biblia elobi ete Yehova azali tata na biso mpe biso tozali bana na ye. (Nzembo 103:13) Tata apesaka te mwana na ye eloko nyonso oyo asɛngi to apesaka ye yango mbala moko te. Tata ayebi ete mwana akoki mbala mosusu kosepela na eloko moko kaka na loyenge boye mpe na nsima asepeli na yango lisusu te. Tata ayebi mpe oyo ezali mpenza malamu mpo na mwana, mpe ayebi ndenge oyo basusu bakoyoka. Ayebi nini oyo mwana azali na yango mposa mpe ntango nini asengeli kozwa yango. Soki tata apesi mbala moko mwana eloko nyonso oyo asɛngi, tata akokóma mosaleli ya mwana. Yehova Tata na biso ya likoló alingaka biso. Lokola azali Mozalisi na biso ya bwanya, ayebi nini oyo tosengeli na yango mpe aponaka ntango oyo ebongi mpenza mpo na kopesa biso eloko oyo tozali kosɛnga. Ezali mpenza na ntina kozela mpe komona ndenge Yehova akoyanola na mabondeli na biso.​—Talá mpe Yisaya 29:16; 45:9.

8. Yehova alaki biso nini mpo na minyoko oyo tokokoka te koyikela mpiko?

8 Kobosana mpe te ete Yehova ayebi makambo oyo moto mokomoko akoki koyikela mpiko to akokoka te. (Nzembo 103:14) Yango wana, apesaka biso makasi oyo tosengeli na yango. Toboyi te ete na ntango mosusu tokoki komiyoka lokola tosili makasi. Kasi Yehova alaki biso ete soki mikakatano eleki biso motó, ‘akobongisela biso nzela ya kobima.’ (Tángá 1 Bakorinti 10:13.) Koyeba ete tokoki kotyela Yehova motema ete ayebi makambo nini tokoki koyikela yango mpiko, elendisaka mpenza!

9. Tosengeli kosala nini soki tobondeli Yehova asalisa biso kasi apesi biso eyano mbala moko te?

9 Soki tobondeli Yehova mpo asalisa biso kasi ayanoli biso mbala moko te, tózala motema molai. Kobosana te ete Yehova azalaka na mposa makasi ya kosalisa biso, kasi azelaka na motema molai mpenza ntango oyo ebongi mpo apesa biso oyo tosengeli na yango. Biblia eyebisi biso ete: “Yehova akokoba kozela mpo na komonisela bino boboto, mpe yango wana akotɛlɛma mpo na koyokela bino mawa. Mpo Yehova azali Nzambe oyo asambisaka na bosembo. Esengo na baoyo nyonso bazali kokoba kozela ye.”​—Yisaya 30:18.

“MONƆKƆ YA NKOSI”

10-12. (a) Nini ekoki kosala ete ezala mpasi kosalisa moto ya libota oyo azali kobɛla? (b) Soki ozali kotyela Yehova motema na ntango ya mpasi, boyokani na yo ná ye ekokóma ndenge nini? Pesá ndakisa.

10 Mokakatano na yo ekoki kozala makasi mpenza mpe okoki komiyoka lokola ntoma Paulo mpe okoki kokóma na mposa ya kobikisama na “monɔkɔ ya nkosi.” (2 Timote 4:17) Na bantango ya bongo, ezali mpenza na ntina mingi otyela Yehova motema. Na ndakisa, ekoki kozala ete ozali kobatela moto moko ya libota oyo azali maladi. Ekoki kozala ete obondelaki Yehova asalisa yo ozwa bikateli ya malamu mpe ozala na makasi. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Okoki sikoyo  koyoka kimya ntango oyebi ete Yehova azali komona yo mpe azali komitya na esika na yo mpe ayebi malamu mikakatano na yo. Akosalisa yo oyika mpiko mpe otikala sembo epai na ye.​—Nzembo 32:8.

Tyá motema ete Tata na yo ya likoló akopesa yo makasi ya kotosa ye na bosembo mpenza

11 Ekoki komonana ntango mosusu lokola ete Yehova azali kosalisa yo te. Mbala mosusu minganga bandimi te ndenge makambo esengeli kosalema. To okanisaki ete bandeko na yo ya libota bakobɔndisa yo, nzokande emonani ete babebisi lisusu nde makambo. Ntango nyonso, tyelá Yehova motema mpo apesa yo makasi. Kobá kopusana penepene na ye. (Tángá 1 Samwele 30:3, 6.) Na nsima, ntango okomona ndenge Yehova asalisi yo, boyokani na yo ná ye ekokóma lisusu makasi.

12 Ndenge wana nde ndeko Linda * amiyokaki. Azalaki kosalisa baboti na ye oyo bazalaki kobɛla bambula mingi liboso bákufa. Alobi boye: “Ntango tozalaki kosalisa bango, mbala mingi ngai, mobali na ngai mpe ndeko na ngai ya mobali tozalaki koyeba te nini tosengeli kosala. Ntango mosusu tozalaki kosila makasi. Kasi, soki tozongisi makanisi nsima, tomonaka mpenza polele ndenge oyo Yehova azalaki ná biso. Alendisaki biso mpe apesaki biso oyo tosengelaki mpenza na yango, ata na ntango oyo ezalaki komonana lokola tosili mayele.”

13. Ndenge nini kotyela Yehova motema esalisaki ndeko Rhonda ayika mpiko liboso ya ebele ya mikakatano oyo ekómelaki ye?

13 Kotyela Yehova motema mobimba ekosalisa biso tóyikela mikakatano mpiko. Yango nde Rhonda akutanaki na yango. Mobali na ye oyo azali Motatoli ya Yehova te abomaki libala. Kaka na ntango wana, ndeko na ye ya mobali akómaki kobɛla maladi moko oyo ebebisaka elongi (lupus). Mpe nsima ya mwa basanza, mwasi ya ndeko na ye ya mobali akufaki. Ntango Rhonda akómaki kozongela makasi nsima ya makambo nyonso wana ya mpasi, abandaki mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Kasi na nsima mama na ye akufaki. Nini esalisaki ndeko Rhonda ayikela mikakatano wana nyonso mpiko? Alobi boye: “Nazalaki kosolola ná Yehova mikolo nyonso, ata mpo na kozwa bikateli ya mikemike. Kosala bongo esalisaki ngai namona mpenza ete Yehova azali moto ya solo. Eteyaki ngai natyelaka ye motema na esika ya komityela motema to kotyela bato motema. Mpe lisalisi oyo apesaki ngai ezalaki mpenza ya solosolo, akokisaki mpenza bamposa na ngai nyonso. Namonaki mpenza ete nasalaki elongo na Yehova.”

Ata mikakatano ya libota na yo ekoki kotya boyokani na yo ná Yehova na komekama (Talá paragrafe 14-16)

14. Ndenge nini Yehova akoki kosalisa yo soki moto moko ya libota na yo abimisami na lisangá?

14 Tólobela mokakatano mosusu ya makasi. Ekoki kozala ete moto moko ya libota na yo abimisami na lisangá. Oyebi oyo Biblia elobaka na ndenge oyo tokoki kotalela bato oyo babimisami na lisangá. (1 Bakorinti 5:11; 2 Yoane 10) Kasi lokola olingaka moto yango, okoki komona ete ezali mpasi to okokoka te kotosa mobeko wana ya Biblia. Okotya motema ete Tata na yo ya likoló akopesa yo makasi ya kotosa ye na bosembo mpenza? Okomona ete likambo yango ezali libaku oyo  ozwi mpo na kopusana penepene na Yehova?

15. Mpo na nini Adama azangaki kotosa Yehova?

15 Ndenge nini likambo oyo ekokani na oyo ya Adama, moto ya liboso? Andimaki ete akoki kozanga kotosa Yehova mpe atikala na bomoi? Te, Adama “akosamaki te.” (1 Timote 2:14) Kasi mpo na nini atosaki Yehova te? Adama alyaki mbuma oyo mwasi na ye apesaki ye mpo azalaki na bolingo na ye mingi koleka Yehova. Ayokelaki mwasi na ye na esika ya kotosa mobeko ya Yehova.​—Ebandeli 3:6, 17.

16. Nani oyo tosengeli kolinga mingi, mpe mpo na nini?

16 Ekateli oyo Adama azwaki eteyi biso ete tosengeli kolinga Yehova mingi koleka moto nyonso. (Tángá Matai 22:37, 38.) Mpe soki bolingo na biso mpo na Yehova ezali makasi ndenge wana, tokoki kosalisa bandeko na biso malamumalamu ata soki bazali kosalela Yehova to te. Na yango, kobá kolinga Yehova mingi mpe kotyela ye motema. Soki ozali koyoka mpasi mpo na moto moko ya libota oyo abimisami na lisangá, bondelá Yehova mpe yebisá ye ndenge oyo ozali komiyoka. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) (Baroma 12:12; Bafilipi 4:6, 7) Ata soki ozali na mpasi makasi, talelá likambo yango lokola libaku oyo ozwi mpo na kokómisa lisusu boyokani na yo ná Yehova makasi. Na nsuka, okozala na likoki ya kotyela ye motema mpe okoyeba ete kotosa ye ekopesa yo matomba mingi ya malamu.

 NTANGO TOZALI KOZELA

Mipesáká mingi na mosala ya kosakola mpo na komonisa Yehova ete otyelaka ye motema (Talá paragrafe 17)

17. Soki tozali mpenza komipesa na mosala ya kosakola, tokoki kotya motema ete Yehova akosala nini?

17 Mpo na nini Yehova abikisaki ntoma Paulo na “monɔkɔ ya nkɔsi”? Ntoma Paulo alobi ete: “Mpo, na nzela na ngai, mosala ya kosakola esalema malamumalamu.” (2 Timote 4:17) Yehova apesá biso mpe mosala ya kosakola “nsango malamu,” mpe abengaka biso “bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe.” (1 Batesaloniki 2:4; 1 Bakorinti 3:9) Soki tozali mpenza kokoba kosala nyonso oyo tokoki mpo na mosala yango, tokoki kotya motema ete Yehova akopesa biso eloko nyonso oyo tosengeli na yango. (Matai 6:33) Mpe ekozala mpasi te mpo tózela Yehova ayanola na mabondeli na biso.

18. Ndenge nini okoki kosala mpo otyelaka Yehova motema mobimba mpe okóma na boyokani makasi ná ye?

18 Na yango, kómisáká makasi mokolo na mokolo boyokani na yo ná Yehova. Ntango mikakatano eyei mpe okómi kotungisama, talelá yango lokola libaku ya kopusana lisusu penepene na Yehova. Tángáká, yekoláká, mpe manyoláká Liloba ya Nzambe, Biblia. Kobá kobondela Yehova mpe mipesá mingi mpo na kosalela ye. Soki osali makambo oyo, okoki kotya motema ete Yehova akosalisa yo oyikela mikakatano nyonso mpiko uta sikoyo mpe mosusu nyonso oyo ekoki koya lobi to nsima ya lobi.

^ par. 2 Ekoki kozala ete ntoma Paulo abikaki mpenza liboso ya bankɔsi ya solo to na likambo moko ya likama mpenza.

^ par. 10 Masolo ndenge na ndenge ebimá mpo na kosalisa bakristo báyeba oyo bakoki kosala na ntango bazali kobɛla mpe bato oyo basalisaka bango. Talá Lamuká! ya 08/02/1994; 08/02/1997; 22/05/2000; mpe ya 22/01/2001 (nyonso na Lifalanse.)

^ par. 12 Oyo ezali bankombo topesi bango kopesa.

^ par. 16 Masolo ndenge na ndenge ebimisamá mpo na kosalisa biso ntango moto moko ya libota atiki Yehova. Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/09/2006, nkasa 17-21, mpe ya 15/01/2007, nkasa 17-20.