Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Avril 2015

 LISOLO YA BOMOI

Mapamboli na ‘eleko ya malamu mpe na eleko ya mpasi’

Mapamboli na ‘eleko ya malamu mpe na eleko ya mpasi’

NABOTAMÁ na sanza ya 03/1930, na engumba Namkumba na Malawi na libota oyo ezalaki kosalela Nzambe na bosembo mpenza. Na mobu 1942, namipesaki epai ya Yehova mpe nazwaki batisimo na moko ya bibale kitoko ya mboka na biso. Eleki sikoyo mbula 70, nasalaka makasi mpo nasala ndenge ntoma Paulo alendisaki Timote ete, “sakolá liloba, salá yango na molende na eleko ya malamu, na eleko ya mpasi.”​—2 Timote 4:2.

Na mobu 1948, ndeko Nathan Knorr mpe ndeko Milton Henschel bayaki na Malawi mpe koya na bango elendisaki ngai nasalela Yehova na mosala ya ntango nyonso. Mwa moke na nsima, nakutanaki na Lidasi, ndeko mwasi moko ya kitoko mpe azalaki na mokano ya kosalela Yehova na mosala ya ntango nyonso. Tobalanaki na mobu 1950 mpe na 1953 tokómaki na bana mibale. Atako tozalaki na mikumba mingi ya libota, tozwaki mokano nabanda mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Mbula mibale na nsima, nakómaki mobongisi-nzela monene.

Mayangani elendisaki biso mpo na mikakatano oyo ezalaki kozela biso

Na nsima, eumelaki te nazwaki libaku ya kotalaka masangá lokola Mokɛngɛli ya zongazonga. Lokola Lidasi azalaki kosalisa ngai mingi, nazalaki na likoki ya kokokisa bamposa ya libota na biso mpe kotikala na mosala ya ntango nyonso. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Biso mibale tokómaki na mposa ya kosala mosala ya ntango nyonso. Tomibongisaki malamumalamu, mpe na lisalisi ya bana na biso, Lidasi abandaki mosala ya ntango nyonso na mobu 1960.

Na 1962 toyanganaki na liyangani ya etúká oyo ezalaki na motó ya likambo ete: “Basakoli ya molende.” Mpe mbula moko na nsima, Ndeko Henschel ayaki na Malawi mpo na liyangani moko ya ntina mingi oyo esalemaki pene ya engumba Blantyre. Bato koleka 10 000 bayanganaki na liyangani yango. Ntango nakanisaka baprogramɛ wana ya ntina mingi, namonaka mpenza ete ebongisaki mpe elendisaki biso nyonso na Malawi mpo na eleko ya mpasi oyo elingaki kobanda mosika te.

 ELEKO YA MPASI EBANDI

Guvɛrnema epekisaki mosala na biso mpe ekangaki biro ya filiale

Na mobu 1964 bazalaki konyokola Batatoli ya Yehova mpo baboyaki kokɔta na makambo ya politiki. Yango esalaki ete bábebisa bandako ya Bokonzi koleka 100 mpe bandako ya bandeko koleka 1 000. Ngai ná Lidasi tokobaki na mosala ya zongazonga tii ntango guvɛrnema epekisaki mosala ya Batatoli na mobu 1967. Guvɛrnema ekangaki biro ya filiale, babenganaki bamisionɛrɛ, mpe batyaki Batatoli mingi na bolɔkɔ, ata mpe ngai ná Lidasi. Ntango babimisaki biso na bolɔkɔ, tokobaki kosala mosala ya zongazonga na kobatama.

Mokolo moko na sanza ya 10/1972, bato ya parti politiki moko ya monene na nkombo (Ligue des jeunes malawites) bazalaki koya mbangu na ndako na biso. Kasi, moko na bango akimaki mbangu mpe ayebisaki ngai namibomba mpo balingaki koboma ngai. Nayebisaki mwasi na ngai ná bana bámibomba na kati ya banzete ya bitabe oyo ezalaki mosika te na biso. Na nsima, ngai nakendeki mpe namataki na nzete moko monene ya manga. Kuna likoló, nazalaki komona ndenge bazalaki kobebisa ndako na biso mpe biloko na biso nyonso.

Lokola bandeko na biso bakɔtaki na makambo ya politiki te, batumbaki bandako ya bango

Lokola monyoko ekómaki makasi, bankóto ya Batatoli balongwaki na Malawi. Tofandaki na kaa moko ya bato bakimá bitumba na Mozambique tii na sanza ya 06/1974. Na ntango wana, basɛngaki ngai ná Lidasi tósala lokola babongisi-nzela monene na Dómue, na Mozambique. Tokobaki kosala mosala na biso ya mobongi-nzela tii na mobu 1975 ntango babenganaki biso na Mozambique mpe tozongaki na Malawi, epai bazalaki kaka konyokola Batatoli ya Yehova.

Ntango tozongaki, bayebisaki ngai natala masangá oyo ezalaki na mboka-mokonzi, Lilongwe. Atako minyoko mpe bampasi ezalaki makasi, masangá ezalaki se kobakisama na bazongazonga oyo tozalaki kotala.

LISALISI YA YEHOVA

Mokolo moko, tokómaki na mwa mboka moko epai bato ya politiki bazalaki kosala likita. Bato mosusu bayebaki ete tozali Batatoli ya Yehova mpe basɛngaki biso tófanda esika moko ná etuluku moko ya politiki oyo babengi (Jeunes Pionniers du Malawi). Tobondelaki Yehova asalisa biso mpe apesa biso mayele. Ntango likita yango esilaki, babandaki konyonga biso. Mbala moko, mama moko ya mokóló ayaki mbangu mpe agangaki ete: “Nabondeli bino, bótika bango! Moto oyo azali mwana ya ndeko na ngai ya mobali. Bótika ye akoba mobembo na ye!” Moto oyo azalaki kokamba likita yango alobaki: “Bótika bango bákende!” Toyebaki te mpo na nini mama wana alobaki bongo,  mpo azali ndeko na biso te. Tondimaki ete Yehova ayokaki mpenza libondeli na biso.

Karte ya parti politiki

Na 1981, Tokutanaki lisusu na etuluku yango (Jeunes Pionniers du Malawi). Mbala oyo, bazwaki bavelo, biloko, mpe babuku na biso, ata mpe mikanda mosusu ya ntina mpo na bandeko ya zongazonga. Tokimaki mpe tokendeki na ndako ya nkulutu moko. Kasi, tozalaki kotungisama mpo na makambo oyo ezalaki na mikanda yango. Ntango etuluku yango (Jeunes Pionniers du Malawi) batalaki mikanda yango, bamonaki makambo oyo bandeko ya Malawi mobimba batindelá ngai. Likambo yango ebangisaki bango mpo bakanisaki ete nazalaki mokonzi moko monene ya guvɛrnema. Na yango, bazongisaki mbala moko mikanda yango epai ya bankulutu ya mboka wana.

Mokolo mosusu, tozalaki kokatisa ebale na masuwa. Nkolo masuwa yango azalaki mokonzi moko ya politiki, mpe alingaki komona bakarte ya parti politiki ya moto nyonso oyo azalaki na masuwa. Ntango akómaki penepene na biso, amonaki moyibi moko oyo bapolisi bazalaki koluka. Yango ebendaki likebi ya moto nyonso, mpe nkolo masuwa yango atikaki koluka bakarte ya parti politiki. Na mbala oyo mpe, tomonaki lisalisi ya Yehova.

BAKANGI BISO MPE BATYE BISO NA BOLƆKƆ

Na sanza ya 02/1984, nakendaki na Lilongwe mpo na kotika lapolo na biro ya filiale ya Zambie. Polisi moko atɛlɛmisaki ngai mpe abandaki kotalatala na saki na ngai. Amonaki mikanda na biso, amemaki ngai na biro ya bapolisi mpe abandaki kobɛta ngai. Na nsima, akangaki ngai bansinga mpe atyaki ngai na bolɔkɔ esika moko ná miyibi.

Mokolo oyo elandaki, mokonzi ya bapolisi amemaki ngai na mwa biro moko mpe alingaki natya sinyatire na mokanda moko oyo elobaki: “Ngai, Trophim Nsomba, natiki kozala Motatoli ya Yehova mpo nabima na bolɔkɔ.” Naboyaki kotya sinyatire na mokanda yango mpe nayebisaki ye ete: “Nakosepela kaka te kotikala na bolɔkɔ kasi mpe kokufa. Nakozala kaka Motatoli ya Yehova.” Likambo yango epesaki mokonzi yango nkanda, abɛtaki lobɔkɔ na ye makasi na mesa mpe polisi oyo azalaki na mwa biro mosusu ya pembeni wana ayaki mbangu mpo na koyeba soki nini ezalaki koleka. Mokonzi ayebisaki ye ete: “Mobali oyo azali koboya kotya sinyatire mpo na komonisa ete azali lisusu Motatoli te. Tiká atya sinyatire ete azali Motatoli ya Yehova mpe tokotinda ye na bolɔkɔ ya Lilongwe.” Na ntango wana nyonso, mwasi na ngai ayebaki te esika nazalaki. Nsima ya mikolo minei, bandeko mibali mosusu bayebisaki ye makambo oyo ekómelaki ngai.

Bapolisi ya Lilongwe bamoniselaki ngai boboto. Mokonzi na bango alobaki boye: “Saani ya loso yango oyo mpo okangami mpo na Liloba ya Nzambe. Bato mosusu oyo bazali awa mpo bayibaki.”  Na nsima atindaki ngai na bolɔkɔ ya Kachere, esika nasalaki sanza mitano.

Mokɛngɛli ya bolɔkɔ kuna asepelaki ndenge batindaki ngai mpo alingaki nakóma “pastɛrɛ” ya bolɔkɔ. Alongolaki pastɛrɛ oyo azalaki wana, ayebisaki ye ete: “Nalingi oteya lisusu Liloba ya Nzambe awa te, mpo okangami mpo oyibaki na lingomba na bino!” Yango wana nakómaki koteya Biblia na makita ya bato ya bolɔkɔ.

Na nsima, makambo ebebaki mpenza mpo na ngai. Bakonzi ya bolɔkɔ balingaki nayebisa bango soki Batatoli bazali motángo boni na Malawi. Napesaki bango te eyano oyo bazalaki na yango mposa, na yango babɛtaki ngai tii nazalaki lisusu te koyeba makambo. Nsima ya mwa ntango, bayaki lisusu kotuna ngai soki biro monene na biso ezalaka wapi. Nalobaki boye: “Botuni ngai motuna ya mpasi te, mpe nakoyanola bino.” Nayebisaki bango ete Biblia elobeli biro monene na biso. Bakamwaki mpe batunaki ngai, “Esika nini na Biblia?”

Nayebisaki bango ete na “Yisaya 43:12.” Batalaki yango mwa ntango molai mpe batángaki malamumalamu boye: “‘Bozali batatoli na ngai,’ yango nde liloba ya Yehova, ‘mpe ngai nazali Nzambe.’” Batángaki vɛrsɛ yango mbala misato. Na nsima batunaki ngai boye: “Ndenge nini biro monene ya Batatoli ya Yehova ezala awa na Biblia kasi na Amerika te?” Nayebisaki bango ete: “Batatoli ya Yehova ya Amerika bamonaka ete vɛrsɛ oyo elobeli mpe biro monene na bango.” Lokola nayebisaki bango te likambo oyo balingaki koyoka, batindaki ngai na bolɔkɔ na Dzaleka na nɔrdi ya Lilongwe.

MAPAMBOLI ATA NA ELEKO YA MPASI

Ntango nakómaki na bolɔkɔ ya Dzaleka na sanza ya 07/1984, Batatoli 81 bazalaki kuna. Bolɔkɔ yango etondaki na bato, mpe bakangami 300 bazalaki kolala na pavema mpe esika kutu ya kotya lokolo ezalaki te. Biso Batatoli nyonso tozalaki kokutana na mwa bituluku mpo na kolobela vɛrsɛ moko ya Biblia mokolo na mokolo, mpe yango elendisaki biso mingi.

Bazali komema bandeko na bolɔkɔ nsima ya kosambisa bango

Na sanza ya 10/1984, biso nyonso tokendeki na tribinale mpe bakatelaki biso etumbu ya mbula mibale na bolɔkɔ. Batyaki biso lisusu na bolɔkɔ ná bato oyo bazalaki Batatoli te. Kasi, mokɛngɛli ya bolɔkɔ ayebisaki moto nyonso boye: “Batatoli ya Yehova bamɛlaka makaya te. Yango wana, bino bakɛngɛli, bótya bango mobulu te mpe bósɛngaka bango makaya te mpe bótindaka bango te bálɔkɔtela bino makala mpo bópelisa makaya na bino. Bazali basaleli ya Nzambe! Bosengeli kopesa Batatoli ya Yehova nyonso biloko ya kolya mbala mibale na mokolo, mpo soki bazali awa, ezali te mpo basalaki makambo ya mabe kasi nde mpo na makambo ya Nzambe na bango.”

 Etamboli na biso ya malamu ememelaki biso matomba mingi. Na butu to ntango mbula ezalaki kobɛta, bakɛngɛli bazalaki kopekisa bakangami bábima libanda. Kasi bazalaki kopesa biso nzela ya kobima libándá mpo bazalaki kotyela biso motema mpe bayebaki ete tokokima te. Na ndakisa, mokolo moko, tozalaki kosala na bilanga mpe mokɛngɛli moko akweaki maladi. Tomemaki ye na bolɔkɔ. Lokola tozalaki na bizaleli malamu, tomonaki ndenge mibali oyo bazalaki kokɛngɛla biso bakumisaki nkombo ya Yehova.​—1 Petro 2:12. * (Talá maloba na nse ya lokasa.)

TOKÓMI LISUSU NA ELEKO YA MALAMU

Mokolo ya 11/05/1985, babimisaki ngai na bolɔkɔ ya Dzaleka mpe nazalaki na esengo ya kokutana lisusu ná libota na ngai! Tokumisaki Yehova na ndenge asalisaki biso tóbatela bosembo na biso na ntango wana ya mpasi. Toyokaki lokola ntoma Paulo ntango akomaki ete: “Bandeko, tolingi bóyeba makambo oyo etali bolɔzi oyo ekómelaki biso . . . tozalaki mpenza kobanga ata mpo na bomoi na biso. Ya solo, tokanisaki na motema na biso ete tosilaki kozwa etumbu ya liwa. Ezalaki bongo mpo biso tótya motema, epai na biso moko te, kasi epai ya Nzambe oyo alamwisaka bakufi. Na eloko monene oyo, liwa, nde abikisaki biso mpe akobikisa biso.”​—2 Bakorinti 1:8-10.

Ndeko Nsomba ná mwasi na ye Lidasi, liboso ya Ndako ya Bokonzi na 2004

Na ntango mosusu emonanaki lokola ete tokobika te. Kasi tozalaki ntango nyonso kosɛnga Yehova apesa biso mpiko, bwanya, mpe ezaleli ya komikitisa mpo tókoba kopesa nkombo na ye monene nkembo.

Yehova apambolaki mosala oyo tosalelaki ye na ‘eleko ya malamu mpe na eleko ya mpasi.’ Lelo oyo, ezalaka mpenza esengo komona biro na biso ya filiale ya kitoko na Lilongwe mpe Bandako ya Bokonzi ya sika koleka 1 000! Mapamboli oyo ya Yehova esepelisaka ngai ná Lidasi mingi, mpe tomonaka yango lokola ndɔtɔ! *​—Talá maloba na nse ya lokasa.

^ par. 6 Basɛngaka lisusu te na bandeko mibali oyo bazali na bana mike na ndako mpo básala mosala ya bakɛngɛli ya zongazonga.

^ par. 27 Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali minyoko na Malawi, talá Buku ya mobu 1999 ya Batatoli ya Yehova (na Lifalanse), nkasa 171-223.

^ par. 31 Ntango tozalaki kobongisa lisolo oyo, ndeko Nsomba akufaki na mbula 83.