Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Avril 2015

Bankulutu, ndenge nini botalelaka likambo ya kopesa basusu formasyo?

Bankulutu, ndenge nini botalelaka likambo ya kopesa basusu formasyo?

“Eloko nyonso ezali na ntango na yango.”​—MOSAKOLI 3:1.

1, 2. Likambo nini bakɛngɛli ya zongazonga bamoni na masangá mingi?

MOKƐNGƐLI ya zongazonga azalaki pene ya kosilisa likita elongo na bankulutu. Atali bankulutu yango mpe asepeli na bango mpo na mosala makasi oyo bazali kosala; bankulutu mosusu kutu bakómaki mikóló mpe bakokaki kozala batata na ye. Kasi, ezalaki na likambo moko ya ntina oyo etungisaki ye. Atunaki bankulutu yango ete: “Bandeko, bosali nini mpo na kopesa bandeko mosusu formasyo mpo na kozwa mikumba mosusu na lisangá?” Bankulutu bayebi ete mbala ya nsuka oyo atalaki lisangá na bango, alendisaki bango bálekisa ntango mingi mpo na kopesa basusu formasyo. Na nsuka, nkulutu moko andimaki ete, “Tosali mingi te.” Bankulutu mosusu mpe bandimaki.

2 Soki ozali nkulutu, ntango mosusu okoki kopesa mpe eyano lokola bankulutu wana. Bakɛngɛli ya zongazonga bamoni ete bankulutu mingi basengeli kolekisa ntango mingi mpo na kopesa bandeko mibali ya bilenge mpe mikóló formasyo mpo bápesa mabɔkɔ na kobatela lisangá. Nzokande, kosala yango  ekoki kozala mokakatano mpenza. Mpo na nini?

3. (a) Ndenge nini Biblia emonisi ete ezali na ntina kopesa basusu formasyo, mpe mpo na nini biso nyonso tosengeli kotya likebi na likambo yango? (Talá maloba na nse ya lokasa.) (b) Mpo na nini ekoki kozala mpasi mpo na bankulutu mosusu kopesa basusu formasyo?

3 Lokola ozali nkulutu, oyebi ete ezali na ntina kolekisa ntango mpo na kopesa bandeko mibali formasyo. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Oyebi malamu ete mposa ya ebele ya bandeko mibali ezali makasi mpo básalisa masangá ezala makasi uta sikoyo mpe básunga masangá ya sika na mikolo ezali koya. (Tángá Yisaya 60:22.) Biblia elobi ete osengeli “koteya bato mosusu.” (Tángá 2 Timote 2:2.) Kasi, ekoki kozala mpasi kozala na ntango ya kosala yango. Osengeli kokokisa bamposa ya libota na yo mpe kokende na mosala epai osalaka. Osengeli mpe kokokisa bamposa ya lisangá mpe makambo mosusu oyo esengeli kosalema na lombangu. Lokola makambo mingi ya kosala ezali, tiká tólobela mpo na nini ezali na ntina ete ozwa ntango ya kopesa basusu formasyo.

MPOSA YA KOPESA BANDEKO FORMASYO EKÓMI MAKASI

4. Na ntango mosusu, mpo na nini bankulutu bazongisaka nsima likambo ya kopesa bandeko mibali formasyo?

4 Mpo na nini ekoki kozala mpasi kolekisa ntango mpo na kopesa bandeko mibali ya lisangá formasyo? Bandeko mosusu bakoki kokanisa boye: ‘Esengeli kotalela makambo mosusu ya lisangá na lombangu mpenza mpe kosilisa yango mbala moko. Ata soki napesi basusu formasyo sikoyo te, lisangá ekonyokwama te.’ Likanisi oyo ezali solo? Makambo mosusu ekoki kosɛnga yo otyela yango likebi mbala moko. Kasi, soki olobi ete okopesa basusu formasyo sikoyo te, wana okoboma lisangá.

5, 6. Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya sofɛlɛ mpe lolenge oyo abongisaka motuka na ye? Ndenge nini tokoki kokokanisa likambo yango na kopesa basusu formasyo na lisangá?

5 Tózwa ndakisa moko. Mpo na kobatela motuka, sofɛlɛ ayebi ete asengeli kotyaka mafuta mbala na mbala. Lisusu, akoki komona ete esengeli atya nokinoki esansi na motɛrɛ mpo soki yango ezali te, motuka ekoki kokata mɔtɔ. Akoki mpe kokanisa ete lokola azali na makambo mingi ya kosala, akotya mafuta mosusu nsima. Ata soki asali na lombangu te, motuka ekotambola mpo na mwa ntango. Kasi kosala bongo, ekoki kozala likama. Soki sofɛlɛ atye mafuta te na ntango oyo esengeli, na ntango wana to na nsima, motuka ekoki kobeba. Na nsuka, ekosɛnga alekisa ntango mingi mpe abebisa mbongo mpo na kobongisa motuka yango. Liteya nini tokoki kozwa?

6 Bankulutu basengeli kosilisa makambo mosusu ya ntina nokinoki. Soki basali yango te, lisangá ekonyokwama. Ndenge moko na sofɛlɛ oyo asengeli kotyaka esansi mbala na mbala na motɛrɛ, bankulutu basengeli ‘koluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina.’ (Bafilipi 1:10) Kasi bankulutu mosusu bakoki kokóma na mosala mingi mpo na kotalela makambo oyo eleki ntina mpe bakoki kozanga ntango ya kopesa basusu formasyo. Yango ekoki kozala lokola koboya kotya mafuta na motuka. Soki bankulutu bazali kozongisa nsima likambo ya kopesa basusu formasyo, ata ndele lisangá ekozanga bandeko mingi ya mibali oyo bazwi formasyo mpo na kokokisa bamposa ya lisangá.

7. Ndenge nini tokoki kotalela bankulutu oyo bazwaka ntango mpo na kopesa basusu formasyo?

7 Tókanisaka soki moke te ete kopesa  basusu formasyo ezali te likambo ya kotya na esika ya liboso. Bankulutu oyo bazalaka na mposa ete lisangá ezala malamu lobi to nsima ya lobi mpe oyo bazwaka ntango ya kopesa basusu formasyo, bazalaka basaleli ya bwanya mpe ya motuya na miso ya bandeko. (Tángá 1 Petro 4:10.) Litomba nini lisangá ezwaka?

LOLENGE MALAMU YA KOSALELA NTANGO

8. (a) Mpo na bantina nini bankulutu basengeli kopesa basusu formasyo? (b) Bankulutu oyo bazali kosala epai mposa ezali monene bazali na mokumba nini ya kosala na lombangu? (Talá etanda “ Mosala moko oyo esengeli kosalema na lombangu.”)

8 Ata bankulutu oyo baumeli mingi basengeli kozala na komikitisa mpe koyeba ete lokola bazali kopusana na bambula, bakozala na makasi te ya kosala mingi ndenge bazali kosala sikoyo. (Mika 6:8) Lisusu, bankulutu basengeli koyeba ete “ntango ná makambo oyo ekanami te” ekoki kobima na mbalakaka mpe kopekisa bango bákokisa mikumba na bango. (Mosakoli 9:11, 12; Yakobo 4:13, 14) Na yango, lokola balingaka mpe babatelaka basaleli ya Yehova, bankulutu basalaka makasi mpo na koteya bandeko mibali ya bilenge makambo oyo bango bayekoli na boumeli ya bambula.​—Tángá Nzembo 71:17, 18.

9. Likambo nini oyo ezali liboso, oyo ezali komonisa ete kopesa basusu formasyo ezali na ntina mingi?

9 Bankulutu oyo bapesaka basusu formasyo bazali na motuya mpo milende na bango ekosalisa mpo lisangá ezala makasi. Formasyo yango epesaka nzela na bandeko mingi ya mibali bábongisama mpo na kosalisa lisangá ekoba kozala na bomoko mpe esalela Nzambe na bosembo. Kosala bongo ezali na ntina mingi na boumeli ya mikolo ya nsuka, mpe ekozala na ntina mingi na bolɔzi monene. (Ezekiele 38:10-12; Mika 5:5, 6) Na yango, bandeko na biso ya bolingo bankulutu, bózwaka ntango mbala na mbala mpo na kopesa basusu formasyo kobanda lelo oyo.

10. Mpo na kozala na ntango ya kopesa basusu formasyo, nkulutu akoki kosala nini?

 10 Toyebi malamu ete bozalaka na makambo mingi ya kosala mpo bozali kokokisa misala ya ntina mingi na lisangá. Kasi, ekosɛnga kozwa mwa ntango na oyo olekisaka mpo na mikumba wana mpe osalela yango mpo na kopesa basusu formasyo. (Mosakoli 3:1) Kosala bongo, ekozala lolenge malamu ya kosalela ntango mpe ekomemela lisangá litomba na mikolo ezali koya.

LUKÁ LOLENGE MALAMU YA KOPESA FORMASYO

11. (a) Likambo nini ya kosepelisa na likambo etali kopesa formasyo ebimi na makanisi ya bankulutu ya mikili ndenge na ndenge? (b) Na kotalela Masese 15:22, mpo na nini ezali na ntina kolobela makanisi oyo bankulutu mosusu bapesi?

11 Na mikolo oyo euti koleka, batunaki bankulutu mosusu oyo bapesaka formasyo báyebisa ndenge basalaka mpo na kosalisa bandeko mibali básala mingi na lisangá. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Bankulutu nyonso bapesaki toli ya lolenge moko atako bango nyonso basalaki te ndenge moko. Yango emonisi nini? Formasyo wana oyo euti na Biblia ezali na ntina mingi mpo na baoyo bazali koyekola “epai nyonso na lisangá mokomoko.” (1 Bakorinti 4:17) Na lisolo oyo mpe oyo elandi, tokolobela mwa makanisi oyo bankulutu yango bapesi. (Masese 15:22) Baoyo bazali kopesa formasyo bakobengama balakisi, mpe baoyo bazali kozwa formasyo bayekoli.

12. Molakisi asengeli kosala nini, mpe mpo na nini?

12 Ya liboso, molakisi asengeli kobongisa makambo na ndenge oyo ekosalisa moyekoli azwa formasyo. Mpo na nini likambo yango ezali na ntina? Ndenge kaka mosali bilanga abongisaka mabele liboso alona mboto, molakisi asengeli kobongisa motema ya moyekoli liboso alakisa ye makambo ya sika. Na yango, ndenge nini molakisi akoki kobongisa makambo na ndenge oyo ekosalisa moyekoli azwa formasyo malamu? Akoki kolanda ndakisa ya molakisi moko ya makoki na ntango ya kala, elingi koloba mosakoli Samwele.

13-15. (a) Yehova ayebisaki Samwele asala nini? (b) Ndenge nini Samwele abongisaki Saulo mpo na mokumba na ye ya sika? (Talá elilingi ya ebandeli.) (c) Mpo na nini lisolo oyo ya Biblia oyo elobeli Samwele ezali na ntina mingi mpo na bankulutu lelo oyo?

13 Mokolo moko, esili koleka mbula 3 000, Yehova ayebisaki mosakoli Samwele, oyo akómaki mobange ete: “Lobi, pene na ngonga oyo, nakotindela yo mobali moko oyo akouta na mokili ya Benyamina, mpe osengeli kotya ye mafuta akóma mokambi ya bato na ngai Yisraele.” (1 Samwele 9:15, 16) Samwele ayebaki ete akotambwisa lisusu te ekólo Yisraele mpe Yehova alingaki ete atya mokonzi ya sika mafuta. Na yango, mpo na kobongisa moto yango mpo na mokumba wana ya sika, Samwele azwaki likanisi moko mpe asalaki ebongiseli moko.

14 Mokolo oyo elandaki, Samwele akutanaki na Saulo, mpe Yehova ayebisaki mosakoli ete: “Talá mobali.” Mbala moko, Samwele asalaki kaka ndenge akanaki. Alukaki libaku ya malamu mpo na kosolola na Saulo. Samwele abengaki Saulo mpe mosaleli na ye mpo na kolya mwa eloko mpe apesaki bango bakiti mpe misuni ya nyama ya kitoko mpenza. Samwele alobaki ete: “Lyá, mpamba te babombelaki yo yango mpo na ntango oyo.” Nsima ya kolya, Samwele abengaki Saulo na ndako na ye. Na nzela, mibali wana mibale basololaki likambo moko ya malamu. Ntango bakómaki na ndako ya Samwele, bakendaki  na sambá ya ndako, mpe Samwele “akobaki kosolola na Saulo na likoló ya ndako” tii bakendaki kolala. Na mokolo oyo elandaki, Samwele atyaki Saulo mafuta, ayambaki ye mpe apesaki ye malako mosusu. Na nsima, Saulo atikalaki, mpe amibongisaki mpo na likambo oyo elingaki kosalema na nsima.​—1 Samwele 9:17-27; 10:1.

15 Samwele atyaki Saulo mafuta mpo azala mokonzi ya ekólo. Na ntembe te, likambo oyo ekeseni makasi mpenza na ndenge ya kopesa ndeko mobali formasyo mpo akóma nkulutu to mosaleli na misala na lisangá. Atako bongo, bankulutu bakoki kozwa mateya mingi ya ntina na lolenge oyo Samwele abongisaki motema ya Saulo. Tólobela mibale na yango.

BÓZALA BALAKISI YA BOLINGO MPE BANINGA MALAMU

16. (a) Samwele ayokaki ndenge nini ntango Bayisraele basɛngaki mokonzi? (b) Samwele asalaki nini ntango Yehova ayebisaki ye atya Saulo mafuta mpo akóma mokonzi?

16 Zalá na bolingo, kokakatana te. Ntango Samwele ayokaki ete Bayisraele balingi mokonzi ya moto, alɛmbaki nzoto mpe amiyokaki lokola babwaki ye. (1 Samwele 8:4-8) Lokola Samwele azalaki kolinga te kopesa Bayisraele mokonzi, mbala misato, Yehova ayebisaki ye ayokela bango. (1 Samwele 8:7, 9, 22) Atako Samwele amiyokaki bongo, kasi akómaki te na zuwa to na nkanda ya moto oyo asengelaki kokóma mokonzi na esika na ye. Ntango Yehova ayebisaki ye atya Saulo mafuta, Samwele akakatanaki te. Atosaki te mpo asengelaki kosala yango, kasi mpo alingaki Yehova.

Balakisi, bózwaka mwa ntango na kati ya makambo mingi oyo bozali na yango mpo na kozala ná moyekoli

17. Ndenge nini lelo oyo bankulutu bamekolaka Samwele, mpe kosala bongo epesaka bango nini?

17 Lelo oyo, ezali na ebele ya bankulutu oyo baumeli mingi oyo bamekoli ndakisa ya Samwele mpe na bolingo nyonso bapesi basusu formasyo. (1 Petro 5:2) Bankulutu wana ya boboto basepelaka kolakisa basusu mpe babangaka te kokabola mikumba oyo bazali na yango na lisangá ná baoyo bazali koyekola. Kutu, bamonaka nde ete bandeko yango bazali na motuya mingi mpe bazali “baninga ya mosala” oyo bakosalisa bango mpo na kokokisa bamposa ya lisangá. (2 Bakorinti 1:24; Baebre 13:16) Mpe bankulutu wana ya makanisi malamu basepelaka komona bandeko wana oyo bazali koyekola bazali kosalela makoki na bango mpo na kosalisa basaleli ya Yehova.​—Misala 20:35.

18, 19. Ndenge nini nkulutu akoki kobongisa motema ya moyekoli mpo na formasyo, mpe mpo na nini kosala bongo ezali ntina mingi?

 18 Zalá moninga, kasi kaka moteyi te. Ntango Samwele akutanaki na Saulo, mosakoli Samwele akokaki mbala moko kozwa mafuta mpe kosopela ye yango na motó. Soki asalaka bongo, mokonzi wana ya sika alingaki kotyama mafuta, kasi alingaki kobongisama te mpo na kotambwisa libota ya Nzambe. Kasi, Samwele azwaki ntango ya kobongisa motema ya Saulo mpo na mokumba na ye wana ya sika. Liboso atya Saulo mafuta, balyaki elongo, batambolaki elongo lokola baninga, basololaki ntango molai, bapemaki kutu mwa ndambo. Samwele azelaki ntango oyo ebongi mpo na kotya mokonzi ya sika mafuta.

Mpo na kopesa basusu formasyo, esengeli naino kokóma baninga na bango (Talá paragrafe 18, 19)

19 Ezali mpe bongo lelo oyo. Liboso nkulutu abanda kopesa ndeko mobali moko formasyo, asengeli kosala makasi akóma moninga ya moyekoli yango. Makambo oyo nkulutu akoki kosala mpo moyekoli alanda malamu formasyo ekoki kokesana na kotalela makambo ya mokomoko na bango mpe mimeseno na bango. Atako bongo, ezala ozali wapi, soki ozwi mwa ntango na kati ya makambo mingi oyo ozali na yango mpo ozala ná moyekoli, akoyeba ete azali na ntina mpenza mpo na yo. (Tángá Baroma 12:10.) Na ntembe te, bayekoli bakozala na botɔndi mingi mpo na lisalisi ya bolingo mpe likebi oyo ozali kopesa bango.

20, 21. (a) Molakisi ya malamu azalaka ndenge nini? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

20 Ezali solo ete molakisi ya malamu alingaka kopesa basusu formasyo. Kasi molakisi ya malamu asengeli mpe kolinga moto oyo azali kopesa formasyo. (Talá mpe Yoane 5:20.) Kosala bongo ezali na ntina nini? Mpo soki moyekoli amiyoki ete ozali mpenza komibanzabanza mpo na ye, akosepela mpenza koyekola epai na yo. Na yango, bankulutu basalaka molende kaka te mpo na koteya kasi mpe mpo na kozala baninga malamu.​—Masese 17:17; Yoane 15:15.

21 Nsima ya kobongisa motema ya moyekoli, nkulutu akoki kobanda kopesa ye formasyo. Mayele nini nkulutu akoki kosalela? Tokolobela yango na lisolo oyo elandi.

^ par. 3 Lisolo oyo mpe oyo elandi ebongisami mpenzampenza mpo na bankulutu. Kasi moto nyonso asengeli koluka koyeba makambo yango. Mpo na nini? Ekosalisa bandeko nyonso báyeba ete bazali na mposa ya formasyo mpo básala mingi na lisangá. Soki bandeko mingi bazwi formasyo mpo na kosalisa lisangá, moto nyonso akozwa litomba.

^ par. 11 Bankulutu yango bazali na Afrique du Sud, Australie, Bangladesh, Belgique, Brésil, Corée, États-Unis, France, Guyane, Japon, Mexique, Namibie, Nigéria, Réunion, mpe Russie.