Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Avril 2015

Ndenge oyo bankulutu basalisaka basusu mpo bákóma na makoki mingi

Ndenge oyo bankulutu basalisaka basusu mpo bákóma na makoki mingi

“Makambo oyo oyokaki epai na ngai . . . , pesá bato ya sembo makambo yango.”​—2 TIMOTE 2:2.

1. (a) Likambo nini basaleli ya Nzambe bayebi na oyo etali formasyo, mpe ndenge nini yango etali biso lelo oyo? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?

BASALELI ya Nzambe bayebaka ntango nyonso ete formasyo ebimisaka matomba. Na ndakisa, Abrama ayanganisaki “mibali na ye oyo babongisamá,” oyo babundaki etumba mpe babikisaki Lota. (Ebandeli 14:14-16) Na ntango ya mokonzi Davidi, ‘balakisaki’ bayembi ndenge ya koyemba nzembo mpo na kokumisa Yehova. (1 Ntango 25:7, Biblia haut fleuve) Lelo oyo, tosengeli kobunda na Satana mpe mokili na ye. (Baefese 6:11-13) Biso mpe tosalaka makasi mpo na kokumisa Yehova na ndenge toyebisaka basusu nkombo na ye. (Baebre 13:15, 16) Ndenge moko na basaleli ya Nzambe na ntango ya kala, mpo na kolonga, tosengeli kozwa formasyo to kolakisama. Na lisangá, Yehova apesá bankulutu mokumba ya kopesa basusu formasyo. (2 Timote 2:2) Mayele nini bankulutu mosusu basalelaki mpo na kopesa bandeko mibali formasyo mpo na kobatela basaleli ya Yehova?

SALISÁ MOYEKOLI ALINGA LISUSU YEHOVA MINGI

2. Liboso ya koteya moyekoli moko makambo ya sika, likambo nini nkulutu asengeli kosala, mpe mpo na nini?

2 Nkulutu azali lokola mosali bilanga. Liboso ya kolona  mboto, mosali bilanga akoki kozala na mposa ya kotya biloko mosusu na mabele oyo ekobakisa bavitamini mpo banzete ekola malamu mpe epikama makasi. Ndenge moko mpe, liboso nkulutu ateya moyekoli makambo mosusu ya sika, akoki kolakisa ye mitinda mosusu ya Biblia oyo ekosalisa moyekoli yango andima kosalela makambo oyo azali koyekola.​—1 Timote 4:6.

3. (a) Ndenge nini okoki kosalela maloba ya Yesu oyo ezali na Marko 12:29, 30 ntango ozali kosolola ná moyekoli? (b) Libondeli ya nkulutu ekoki kosala nini epai ya moyekoli?

3 Ezali na ntina koyeba ndenge solo ezali kosimba makanisi mpe mayoki ya moyekoli. Mpo na kosala bongo, okoki kotuna ye ndenge nini komipesa na ye epai ya Yehova ebongolá mikano na ye ya bomoi. Motuna oyo ekoki kotinda bino bólobela ndenge oyo tokoki kosalela Yehova na motema na biso mobimba. (Tángá Marko 12:29, 30.) Okoki kutu kobondela ná ndeko yango mpe kosɛnga Yehova apesa ye elimo santu mpo na formasyo oyo akozwa. Ntango ndeko ayoki ndenge oyo ozali kobondela mpo na ye, na ntembe te ekosalisa ye asala mingi koleka!

4. (a) Pesá bandakisa ya Biblia oyo ekoki kosalisa moyekoli akola. (b) Mokano nini bankulutu basengeli kozala na yango ntango bazali kopesa basusu formasyo?

4 Ntango obandi kopesa formasyo, ezali malamu kolobela masolo ya Biblia oyo ekosalisa moyekoli amona ntina ya kozala moto oyo asalisaka basusu, oyo bakoki kotyela motema, mpe moto ya komikitisa. (1 Bakonzi 19:19-21; Nehemia 7:2; 13:13; Misala 18:24-26) Bizaleli yango ezali na ntina epai ya moyekoli ndenge kaka mabele ezalaka na mposa bábakisa biloko mosusu lokola bavitamini. Ekosalisa moyekoli akola nokinoki. Nkulutu moko na France na nkombo Jean-Claude, alobi ete mokano na ye ntango azali kopesa formasyo ezalaka ya kosalisa moyekoli azwa bikateli ya malamu oyo esimbami na mitinda ya Biblia. Abakisi boye: “Nalukaka mabaku oyo tokoki kotánga vɛrsɛ moko elongo mpo na ‘kofungola miso’ ya moyekoli yango mpo amona ‘makambo ya kokamwa’ oyo ezali na Liloba ya Nzambe.” (Nzembo 119:18) Wapi makambo mosusu ya kosala mpo na kolendisa moyekoli?

MONISÁ YE MIKANO MPE BANTINA NA YANGO

5. (a) Mpo na nini ezali na ntina kosolola na moyekoli makambo etali komityela mikano na mosala ya Yehova? (b) Mpo na nini bankulutu basengeli kopesa baoyo bazali naino bilenge formasyo? (Talá maloba na nse ya lokasa.)

5 Tuná moyekoli mikano nini azalaka na yango na mosala ya Yehova. Soki azali na yango te, salisá ye amityela mokano moko oyo akokoka kokokisa. Zalá na esengo  ntango ozali koyebisa ye mokano moko oyo ozalaki na yango mpe ndenge osepelaki ntango okokisaki yango. Lolenge wana ya kosala ezali pɛtɛɛ kasi esimbaka. Nkulutu moko na nkombo Victor, oyo azali mpe mobongisi-nzela na Afrika, alobi ete: “Ntango nazalaki elenge, nkulutu moko atunaki ngai mwa mituna na ntina etali mikano na ngai. Mituna wana esalisaki ngai nabanda kokanisa malamumalamu mpo na mosala na ngai ya kosakola.” Bankulutu oyo bakɔmɛli balobaki ete ezali na ntina kopesa bandeko formasyo ntango bazali naino bilenge, mbala mosusu ntango bazali naino na mbula zomi to koleka mwa moke. Bokoki kopesa bango mwa misala mosusu na lisangá na kotalela mbula na bango. Soki bandeko bazali kozwa formasyo ntango bazali naino bilenge, ekoki kosalisa bango bátya makanisi na bango nyonso na mikano na bango ata soki bakómi mikóló mpe bazali na makambo mingi oyo ekoki kolongola likebi na bango.​—Tángá Nzembo 71:5, 17. * (Talá maloba na nse ya lokasa.)

Monisá ntina oyo ndeko asengeli kosala mosala oyo opesi ye, mpe pesá ye matɔndi mpo na milende na ye (Talá paragrafe 5-8)

6. Mayele nini ya ntina Yesu asalelaki mpo na kopesa basusu formasyo?

6 Mpo na kopesa moyekoli mposa ya kosalela basusu, osengeli kosuka te kaka na koyebisa ye likambo oyo asengeli  kosala. Osengeli mpe koyebisa ye mpo na nini kosala yango ezali na ntina. Yesu, moteyi monene ayebisaki bantoma na ye básakola. Kasi, ayebisaki bango liboso mpo na nini basengelaki kotosa. Alobaki boye: “Bapesi ngai bokonzi nyonso na likoló mpe na mabele. Yango wana, bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso.” (Matai 28:18, 19) Ndenge nini okoki komekola lolenge ya Yesu ya kopesa formasyo?

7, 8. (a) Ndenge nini bankulutu bakoki lelo oyo komekola lolenge oyo Yesu azalaki kopesa formasyo? (b) Mpo na nini kopesa moyekoli longonya ezali na ntina? (c) Makanisi nini ekoki kosalisa bankulutu mpo na kopesa basusu formasyo? (Talá etanda “ Ndenge ya kopesa basusu formasyo.”)

7 Ntango osɛngi ndeko moko asala mosala moko boye, monisá ye na Biblia mpo na nini mosala yango ezali na ntina. Soki osali bongo, ozali koteya ye asalaka makambo mpo Biblia elobi kasi te kaka mpo bayebisi ye asala bongo. Na ndakisa, soki osɛngi ndeko moko atya bopɛto na porte to na mwa nzela oyo ezali komema na Ndako ya Bokonzi mpo bandeko bátambola kozanga likama, okoki kolakisa ye Tito 2:10. Monisá ye ndenge oyo mosala na ye ekotinda bato básepela na nsango ya Bokonzi. Lisusu, sɛngá moyekoli akanisa mibange ya lisangá mpe ndenge oyo kosala mosala yango ekosalisa bango. Kosolola ndenge wana ekopesa ye formasyo oyo ekosalisa ye akanisa ndenge ya kosala mingi mpo na bandeko kasi te kaka mpo batindi ye asala. Ntango akomona ndenge mosala oyo azali kosala ezali komemela bandeko litomba, akomiyoka malamu mpo azali kosalela basusu.

8 Lisusu, kobosana te kopesa moyekoli longonya ntango asaleli makanisi oyo opesaki ye. Mpo na nini ezali na ntina kosala bongo? Ndenge kaka mai esalisaka nzete ekola mpe ezala na sante kitoko, kopesa moyekoli longonya, esalisaka ye akende liboso na mosala na ye mpo na Yehova.​—Talá mpe Matai 3:17.

MOKAKATANO MOSUSU

9. (a) Mpo na nini ekoki kozala mpasi mpo bankulutu ya mikili mosusu ya bozwi bápesa bandeko mosusu formasyo? (b) Mpo na nini bandeko mosusu ya bilenge batyaka mosala ya Nzambe na esika ya liboso te?

9 Bankulutu oyo bazali na mikili ya bozwi bakoki komona ete ezali mpasi kolendisa bandeko oyo bazwá batisimo oyo bazali na mbula koleka 20 to 30 básala mingi na lisangá. Bankulutu ya mikili soki 20 oyo baumeli mingi na mosala yango, bayebisaki biso ntina oyo balobaka ete bandeko mibali mosusu ya bilenge basalaka mingi te mpo na lisangá. Mingi na bango balobi ete ntango bandeko mosusu bazalaki bilenge, baboti na bango balendisaki bango te bámityela mikano mpo na mosala ya Yehova. Mpe ntango bilenge mosusu balingaki kosala mingi, baboti na bango balendisaki bango bámityela mikano ya kotánga bakelasi milaimilai to báluka kokóma bato minene ya mokili! Na yango, mosala ya Nzambe ezalaka soki moke te na esika ya liboso na bomoi na bango.​—Matai 10:24.

10, 11. (a) Ndenge nini nkulutu akoki kosalisa malɛmbɛmalɛmbɛ ndeko moko abongola lolenge na ye ya kokanisa? (b) Bavɛrsɛ nini nkulutu akoki kosalela mpo na kolendisa ndeko moko, mpe mpo na nini? (Talá maloba na nse ya lokasa.)

10 Soki emonani lokola ete ndeko moko asepelaka te kosala mingi na lisangá, ekosɛnga kosala mingi mpe kozala motema molai mpo na kobongola lolenge na ye ya kokanisa, kasi bokoki kolonga. Mosali bilanga akoki kosala ete nzete ekola semba soki azali kobongisa malɛmbɛmalɛmbɛ mobimbi (tronc) na yango. Ndenge moko mpe, okoki malɛmbɛmalɛmbɛ kosalisa ndeko mobali moko amona ete asengeli kobongola makanisi na ye  mpo andima mikumba mingi na lisangá. Kasi ndenge nini?

11 Zwá ntango ya kokóma moninga ya ndeko yango. Monisá ye ete lisangá ezali na mposa na ye. Na nsima, wana ntango ezali koleka, fandá mpe sololá na ye na mikapo oyo ekosalisa ye akanisa na ntina na komipesa na ye epai ya Yehova. (Mosakoli 5:4; Yisaya 6:8; Matai 6:24, 33; Luka 9:57-62; 1 Bakorinti 15:58; 2 Bakorinti 5:15; 13:5) Luká kosimba motema na ye na mituna lokola: ‘Likambo nini olakaki Yehova ntango opesaki bomoi na yo epai na ye? Okanisi ete Yehova ayokaki ndenge nini ntango ozwaki batisimo?’ (Masese 27:11) ‘Satana ayokaki ndenge nini?’ (1 Petro 5:8) Bavɛrsɛ oyo ekoki kozala na nguya mingi mpe kosimba mpenza motema ya ndeko yango.​—Tángá Baebre 4:12. * (Talá maloba na nse ya lokasa.)

BAYEKOLI, BÓZALA SEMBO

12, 13. (a) Ezaleli nini Elisha amonisaki ntango azalaki koyekola? (b) Ndenge nini Yehova apambolaki Elisha lokola azalaki sembo?

12 Bandeko mibali ya bilenge, lisangá ezali na mposa na bino! Ezaleli nini ekosalisa yo olonga na mosala na yo mpo na Yehova? Mpo na kozwa eyano, tótalela mwa makambo mosusu na bomoi ya moyekoli moko ya kala na nkombo, Elisha.

13 Eleki sikoyo mbula soki 3 000, mosakoli Eliya asɛngaki elenge Elisha akóma mosungi na ye. Mbala moko Elisha andimaki mpe na bosembo nyonso asalelaki Eliya ata misala oyo bato bamonaki ete ezali na ntina te. (2 Bakonzi 3:11) Eliya apesaki Elisha formasyo na boumeli ya mbula soki motoba. Na nsima, ntango mosala ya mosakoli Eliya na Yisraele ekómaki pene na nsuka, ayebisaki mosungi na ye ete akoki kotika kosalela ye. Kasi Elisha ayebisaki ye mbala misato ete: “Nakotika yo te.” Azalaki na ekateli ya kotikala ná moteyi na ye ntango nyonso likoki ekozala. Mpe Yehova apambolaki Elisha mpo na bosembo na ye na ndenge apesaki ye likoki ya komona ndenge Eliya amataki na kati ya mopɛpɛ makasi.​—2 Bakonzi 2:1-12.

14. (a) Ndenge nini bandeko mibali oyo bazali koyekola bakoki lelo oyo komekola mosakoli Elisha? (b) Mpo na nini ezali mpenza na ntina mingi ete ndeko oyo azali koyekola azala sembo?

14 Ntango ozali koyekola, ndenge nini okoki komekola mosakoli Elisha? Ndimáká na lombangu mikumba, ata oyo bato mingi bamonaka ete ezangi ntina. Kobosana te ete moto oyo azali kolakisa yo azali moninga na yo. Yebisá ye ete osepelaka na oyo azali kosala mpo na yo, mpe monisá ye ete ozali na mposa ya kokoba koyekola epai na ye. Likambo eleki ntina, kokisáká mikumba na yo na bosembo. Mpo na nini? Ntango ekomonana ete ozali sembo mpe bakoki kotyela yo motema, bankulutu bakoki kondimisama ete Yehova alingi okóma na mikumba mingi na lisangá.​—Nzembo 101:6; Tángá 2 Timote 2:2.

ZALÁ NA LIMEMYA EPAI YA BANKULUTU OYO BASALÁ MINGI

15, 16. (a) Na lolenge nini Elisha amonisaki limemya epai ya moto oyo ateyaki ye? (Talá elilingi ya ebandeli.) (b) Nini esalaki ete basakoli mosusu bátyela Elisha motema?

15 Lisolo ya mosakoli Elisha emonisi mpe ete ezali na ntina mingi lelo oyo ete bandeko bámonisa limemya epai ya bankulutu oyo basalá mingi. Nsima ya kotala etuluku ya basakoli oyo bazalaki na Yeriko, Eliya ná Elisha bayaki na Ebale ya Yordani. Na nsima, “Eliya azwaki elamba na ye ya mosala mpe alíngaki yango mpe abɛtaki mai, mpe nsukansuka  mai ekabwanaki.” Mibali yango bakatisaki Ebale ya Yordani na mabele oyo ekauki, mpe bazalaki “kosolola nzelanzela.” Mosakoli Elisha azalaki koyoka na likebi mpenza makambo nyonso oyo moteyi na ye azalaki koloba mpe akobaki koyekola epai na ye. Elisha akanisaki soki moke te ete ayebi makambo nyonso. Na nsima Eliya amataki na kati ya mopɛpɛ makasi, mpe Elisha azongaki na Ebale Yordani. Kuna, abɛtaki elamba ya mosala ya Eliya na mai mpe alobaki ete: “Wapi Yehova Nzambe ya Eliya, wapi Ye?” Mai ya ebale ekabwanaki lisusu.​—2 Bakonzi 2:8-14.

16 Omoni ete likamwisi ya liboso ya Elisha ekokani na likamwisi ya nsuka oyo Eliya asalaki? Yango eteyi biso nini? Elisha akanisaki te ete lokola akómi sikoyo mosakoli, asengelaki kosala makambo oyo ekeseni mosika mpenza na oyo Eliya asalaki. Kutu, lokola alandaki mayele ya kosala ya Eliya, Elisha amonisaki ete azalaki na limemya epai ya moto oyo ateyaki ye, mpe yango esalaki ete basakoli mosusu bátyela Elisha motema. (2 Bakonzi 2:15) Elisha asalaki mosala ya mosakoli na boumeli ya mbula 60, mpe Yehova apesaki ye nguya ya kosala makamwisi mingi koleka oyo Eliya azalaki na yango. Liteya nini bato oyo bazali lelo oyo koyekola bakoki kozwa?

17. (a) Ndenge nini bandeko oyo bazali lelo oyo koyekola bakoki komekola ezaleli ya Elisha? (b) Ndenge nini Yehova akoki na nsima kosalela bayekoli oyo bazali sembo?

17 Ntango ozwi mikumba mingi na lisangá, kokanisa te ete osengeli kosala makambo na lolenge oyo ekeseni mosika mpenza na ndenge oyo ezalaki kosalema liboso. Kobosana te, makambo esengeli kobongwana kaka soki ezali mpenza mposa ya lisangá to mpo malako euti na ebongiseli ya Yehova. Osengeli te kobongola makambo kaka mpo yo osepeli. Lokola akobaki kosalela mayele ya Eliya, Elisha asalisaki basakoli mosusu mpo bátyela ye motema mpe ye moko amonisaki limemya epai ya moto oyo ateyaki ye. Ndenge moko mpe, soki okobi kosalela mayele ya Biblia oyo bateyi na yo basalelaki, okomonisa limemya mpo na bankulutu oyo basalá mingi, mpe bandeko na yo ya basi mpe mibali bakotyela yo motema. (Tángá 1 Bakorinti 4:17.) Wana mayele na yo ezali kokola, okosalela makambo ya sika oyo ekoki kosalisa lisangá elanda ebongiseli ya Yehova, oyo ezali ntango nyonso kokende liboso. Mpe na nsima, Yehova akoki kosalisa yo osala makambo mingi koleka bateyi na yo, ndenge kaka asalisaki Elisha.​—Yoane 14:12.

18. Mpo na nini ezali na ntina mingi kopesa bandeko mibali na masangá formasyo?

18 Tozali kolikya ete makanisi ya lisolo oyo mpe oyo eleki ekolendisa bankulutu mingi bázwa ntango ya kopesa bandeko mibali formasyo. Tozali mpe kolikya ete bandeko mibali mingi bakosepela kozwa formasyo mpe bakosalela makambo oyo bakoyekola mpo na kosalisa basaleli ya Yehova. Yango ekosala ete masangá nyonso ya mokili mobimba ezala makasi mpe ekosalisa mokomoko na biso atikala sembo na makambo minene oyo ezali koya.

^ par. 5 Soki emonani ete ndeko mobali oyo azali elenge akɔmɛli, azali na komikitisa mpe na bizaleli mosusu oyo esengeli mpo na kosalisa lisangá, bankulutu bakoki kopesa nkombo na ye mpo akóma mosaleli na misala ata soki akokisi naino mbula 20 te.​—1 Timote 3:8-10, 12; talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/07/1989, lokasa 29 (na Lifalanse.)

^ par. 11 Okoki kolobela makambo mosusu oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/04/2012, nkasa 14-16, paragrafe 8-13; mpe buku “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe,” mokapo 16, paragrafe 1-3.