Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Mars 2015

Tósunga na bosembo nyonso bandeko ya Kristo

Tósunga na bosembo nyonso bandeko ya Kristo

“Ntango nyonso oyo bosalelaki yango moko ya bato oyo baleki mike na kati ya bandeko na ngai oyo, bosalelaki ngai.”​—MATAI 25:40.

1, 2. (a) Bandakisa nini Yesu ayebisaki baninga na ye ya motema? (Talá elilingi ya ebandeli.) (b) Likambo nini tosengeli koyeba na ntina etali ndakisa ya bampate ná bantaba?

YESU azalaki koyebisa baninga na ye ya motema Petro, Andre, Yakobo mpe Yoane likambo moko ya ntina mingi. Nsima ya koyebisa bango ndakisa ya moombo ya sembo mpe ya mayele, bangɔndɔ zomi mpe batalanta, Yesu ayebisaki baninga na ye ndakisa mosusu. Na ndakisa yango, alobelaki ntango oyo “Mwana ya moto” akosambisa “bikólo nyonso.” Alobaki ete “Mwana ya moto” akokabola bato na bituluku mibale: abengaki moko bampate mpe oyo mosusu bantaba. Mpe alobelaki etuluku mosusu ya ntina mpenza: etuluku ya misato, “bandeko” ya mokonzi.​—Tángá Matai 25:31-46.

2 Ndenge moko na bantoma, basaleli ya Yehova na mikolo na biso batyelaka mpe ndakisa yango likebi mpo bomoi ya bato etalelami na likambo yango. Yesu alobaki ete  basusu bakozwa bomoi ya seko kasi bamosusu bakobomama. Yango wana ezali mpenza na ntina tóyeba ndimbola ya ndakisa yango mpe oyo tosengeli kosala mpo tózwa bomoi ya seko. Na yango, na lisolo oyo, tokoyanola na mituna oyo: Ndenge nini Yehova asalisi biso tókanga ntina ya ndakisa oyo? Ndenge nini toyebi ete ndakisa yango elobeli mingi mosala ya kosakola? Nani asengeli kosakola? Mpo na nini ezali na ntina ete bato básalisa banda sikoyo “mokonzi” mpe “bandeko” na ye?

NDENGE NINI YEHOVA ASALISI BISO TÓKANGA NTINA YA NDAKISA OYO?

3, 4. (a) Tosengeli koyeba likambo nini mpo tókanga ntina ya ndakisa oyo? (b) Na mobu 1881, ndenge nini Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elimbolaki ndakisa oyo?

3 Mpo na kokanga ntina ya ndakisa ya bampate ná bantaba, tosengeli koyeba (1) nani azali “Mwana ya moto,” to “mokonzi,” bampate mpe bantaba ezali banani, mpe “bandeko” ya mokonzi ezali banani? (2) ntango nini “Mwana ya moto” akokabola, to akosambisa, bampate mpe bantaba? mpe (3) mpo na nini bato mosusu babengami bampate mpe bamosusu bantaba?

4 Na mobu 1881, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki ete “Mwana ya moto,” to “mokonzi,” ezali Yesu. Mpe elimbolaki ete “bandeko” ya mokonzi ezali te kaka baoyo bakoyangela elongo na Yesu na likoló kasi mpe bato nyonso oyo bakozala na bomoi awa na mabele ntango bakokóma bato ya kokoka. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli yango ebakisaki ete bato bakokabolama na boumeli ya boyangeli ya mbula nkóto ya Kristo mpe baoyo bamekolaki bolingo ya Nzambe na makambo nyonso oyo basalaki, bakobengama bampate.

5. Na mobu 1923, boyebi nini basaleli ya Nzambe bazalaki na yango mpo na ndakisa oyo?

5 Na nsima, Yehova asalisaki basaleli na ye bákanga ntina ya ndakisa yango malamumalamu. Na mobu 1923, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/10, elobaki ete “Mwana ya moto” ezali Yesu. Kasi, esalelaki bavɛrsɛ ya Biblia mpo na kolimbola ete “bandeko” oyo balobelami na ndakisa yango elimboli kaka baoyo bakoyangela elongo na Yesu mpe ete bango nyonso bakozala na likoló na boumeli ya boyangeli ya mbula nkóto. Elobaki mpe ete bampate ezali baoyo bakofanda awa na mabele na nse ya boyangeli ya Yesu mpe bandeko na ye. Mpe lokola ndakisa yango elobaka ete bato yango basalisaka bandeko ya mokonzi, kokabolama to kosambisama, esengeli kosalema ntango bakristo oyo batyami mafuta na elimo, elingi koloba bandeko ya Yesu bazali naino awa na mabele, liboso ete boyangeli ya mbula nkóto ebanda. Lisolo yango elobaki mpe ete bampate basengelaki kozala bato oyo bakondimela Yesu mpe oyo bandimaka ete Bokonzi ekomema bomoi ya malamu mpenza.

6. Na mobu 1995, bososoli nini tozalaki na yango na ntina etali ndakisa oyo?

6 Na boumeli ya mbula mingi, tozalaki kokanisa ete bato bazali kosambisama na nzela ya mosala ya kosakola oyo ezali kosalema na ntango oyo ya nsuka. Mpe ete soki bandimi nsango na biso, bazali bampate, mpe soki baboyi yango, bazali bantaba. Kasi na mobu 1995, bososoli na biso na ndakisa yango ebongwanaki. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli esalaki bokokanisi  kati na Matai 24:29-31 (tángá) Matai 25:31, 32 (tángá), mpe elimbolaki ete Yesu akosambisa bato na boumeli ya bolɔzi monene ntango Mwana ya moto “akoya na nkembo na ye.” *​—Talá maloba na nse ya lokasa.

Tozali mpenza na botɔndi ete Yehova asalisi biso tósosola bandakisa oyo Yesu apesaki

7. Ndakisa oyo elimboli nini?

7 Lelo oyo, tokangi ntina ya ndakisa ya bampate ná bantaba malamumalamu. Toyebi ete “Mwana ya moto,” to “mokonzi,” ezali Yesu. “Bandeko” ya mokonzi ezali baoyo batyami mafuta na elimo santu mpe oyo bakoyangela kuna likoló elongo na Yesu. (Baroma 8:16, 17) “Bampate” ná “bantaba” ezali bato ya bikólo nyonso. Bakosambisama pene na nsuka ya bolɔzi monene oyo ekobanda mosika te. Mpe toyebi ete Yesu akosambisa bato na kotalela makambo oyo basalelaki bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazali naino awa na mabele. Tozali mpenza na botɔndi ndenge Yehova asalisi na boumeli ya bambula mpo tókanga ntina ya ndakisa oyo mpe bandakisa mosusu oyo ezali na Matai mokapo 24 mpe 25!

NDAKISA YANGO EZALI KOTEYA BISO ETE MOSALA YA KOSAKOLA EZALI NA NTINA MINGI

8, 9. Mpo na nini Yesu abengaki bampate “bayengebene”?

8 Yesu asalelaki te liloba “kosakola” to “mosala ya kosakola” na ndakisa ya bampate ná bantaba. Kasi ndenge nini toyebi ete ndakisa yango eteyaka biso ete mosala ya kosakola ezali na ntina mingi?

9 Mpo na kozwa eyano, tosengeli liboso kobosana te ete Yesu azalaki kosalela ndakisa mpo na kobimisa liteya moko. Alobelaki te bampate mpe bantaba ya solosolo. Na yango, alingaki koloba te ete moto nyonso oyo akotángama mpate asengeli kopesaka bakristo oyo batyami mafuta na elimo bilei mpe bilamba, kobatela bango ntango babɛli, kokende kotala bango na bolɔkɔ. Te, Yesu alobelaki bampate lokola “bayengebene” mpo bazali komona bakristo oyo batyami mafuta na elimo lokola bandeko na ye mpe bazali sembo epai ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo na mikolo oyo ya nsuka mpe ya mpasi.​—Matai 10:40-42; 25:40, 46; 2 Timote 3:1-5.

10. Ndenge nini bampate bakoki kosalisa bandeko ya Kristo?

10 Ntango Yesu apesaki ndakisa ya bampate ná bantaba, azalaki kolobela oyo esengelaki kosalema na ntango ya nsuka. (Matai 24:3) Na ndakisa, alobaki ete: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi.” (Matai 24:14) Mpe liboso mpenza alobela ndakisa ya bampate ná bantaba, apesaki ndakisa ya batalanta. Yesu apesaki ndakisa wana mpo na koteya bakristo oyo batyami mafuta na elimo ete basengeli kosala makasi na mosala ya kosakola. Kasi, kaka mwa bato moke kati na bango nde bazali naino na  bomoi awa na mabele, mpe mosala ya kosala ezali mingi. Yesu ayebisaki bakristo oyo batyami mafuta na elimo ete básakola na “bikólo nyonso” liboso nsuka eya. Ndenge toyekoli na ndakisa ya bampate ná bantaba, “bampate” bazali kosalisa bandeko ya Yesu. Mpe moko ya makambo ya ntina mingi oyo bakoki kosala yango, ezali kosalisa bandeko ya Yesu na mosala ya kosakola. Kasi, esengeli kosuka kaka na kopesa mbongo mpo na mosala yango to kolendisa bango básakolaka?

BANANI BASENGELI KOSAKOLA?

11. Motuna nini bato mosusu bakoki komituna, mpe mpo na nini?

11 Lelo oyo, bayekoli ya Yesu bazali milio mwambe, mpe mingi na bango bazali te bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Yesu apesaki bango batalanta te. Apesaki batalanta epai ya bandeko na ye oyo batyami mafuta na elimo. (Matai 25:14-18) Na yango, bamosusu bakoki komituna, ‘Lokola Yesu apesá bango batalanta te, basengeli mpenza kosakola?’ Ɛɛ. Tólobela ntina oyo tolobi bongo.

12. Liteya nini tozwi na maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 28:19, 20?

12 Yesu apesaki bayekoli na ye nyonso etinda ya kosakola. Nsima ya lisekwa na ye, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete ‘bákómisa bato bayekoli’ mpe báteya bango “makambo nyonso” oyo apesaki bango mitindo. Na yango, bayekoli yango basengelaki kotosa etinda wana oyo Yesu apesaki ya kosakola. (Tángá Matai 28:19, 20.) Emonani polele ete biso nyonso tosengeli kosakola, ezala tozali na elikya ya bomoi na likoló to awa na mabele.​—Misala 10:42.

Biso nyonso tosengeli kosakola, ezala tozali na elikya ya bomoi na likoló to awa na mabele

13. Liteya nini tozwi na emonaneli oyo Yoane amonaki?

13 Mokanda ya Emoniseli esalisi biso tóyeba ete mosala ya kosakola esengelaki kosalema na bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe na bamosusu. Yesu apesaki ntoma Yoane emonaneli moko ya “mwasi ya libala” oyo azalaki kobenga bato báya mpe bámɛla mai oyo epesaka bomoi. Mwasi yango ya libala ezali bakristo 144 000, oyo batyami mafuta na elimo, oyo bakoyangela elongo na Yesu na likoló. (Emoniseli 14:1, 3; 22:17) Mai ezali mbeka ya lisiko oyo Yesu apesaki, mpe yango ekosalisa bato bázala na bomoi ezangi lisumu mpe liwa. (Matai 20:28; Yoane 3:16; 1 Yoane 4:9, 10) Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bateyaka bato na molende nyonso likambo etali lisiko mpe ndenge oyo bakoki kozwa matomba na yango. (1 Bakorinti 1:23) Kasi, emonaneli yango elobeli etuluku mosusu ya bato oyo bazali bakristo oyo batyami mafuta na elimo te, kasi bazali na elikya ya kozwa bomoi awa na mabele. Bango mpe bazwi etinda ya koyebisa bato ete “yaká!” Mpe bazali kotosa etinda yango ndenge bazali koteya bato nsango malamu. Na yango, emonaneli yango emonisi ete bato nyonso oyo bazali kondima nsango malamu basengeli kosakwela bato mosusu.

14. Ndenge nini totosaka “mobeko ya Kristo”?

14 Baoyo nyonso batosaka “mobeko ya Kristo” basengeli kosakola. (Bagalatia 6:2) Mposa ya Yehova ezali ete baoyo nyonso basambelaka ye bátosa mpe  kaka mibeko yango. Na ntango ya kala, azalaki kolinga ete Bayisraele ná bapaya oyo bazalaki kofanda ná bango, bátosa mibeko na ye. (Kobima 12:49; Balevi 24:22) Na ntembe te, lelo tosengeli te kotosa mibeko nyonso oyo epesamaki epai ya Bayisraele. Kasi, ezala tozali bakristo oyo batyami mafuta na elimo to te, tosengeli kotosa “mobeko ya Kristo.” Moko ya makambo ya ntina mingi oyo Yesu ateyá biso ezali bolingo. (Yoane 13:35; Yakobo 2:8) Tosengeli kolinga Yehova, Yesu mpe bato. Mpe lolenge eleki malamu oyo tomonisaka bolingo yango, ezali ya koyebisa bato nsango malamu ya Bokonzi.​—Yoane 15:10; Misala 1:8.

15. Mpo na nini tokoki koloba ete Yesu apesaki bayekoli na ye nyonso etinda ya kosakola?

15 Oyo Yesu alobaki mpo na mwa ndambo moke ya bayekoli na ye ekoki ntango mosusu mpe kolobelama mpo na bayekoli ebele. Na ndakisa, Yesu asalaki kondimana kaka na bayekoli na ye 11 mpe alakaki bango ete bakoyangela na Bokonzi na ye. Kasi bato 144 000 bakoyangela elongo na ye. (Luka 22:29, 30; Emoniseli 5:10; 7:4-8) Mpe nsima ya lisekwa na ye, kaka mwa ndambo ya bayekoli na ye nde bayokaki ntango apesaki etinda ya kosakola. (Misala 10:40-42; 1 Bakorinti 15:6) Kasi bayekoli nyonso ya Yesu na siɛklɛ ya liboso batosaki etinda yango. (Misala 8:4; 1 Petro 1:8) Lelo oyo mpe, toyebi ete tosengeli kosakola, ata soki toyoká te mongongo ya Yesu ezali koyebisa biso ete tósala mosala yango. Nzokande, tozali bato milio mwambe oyo tozali kosakola. Toyebi ete na  nzela ya mosala ya kosakola, tomonisaka ete tozali mpenza na kondima epai ya Yesu.​—Yakobo 2:18.

OYO NDE NTANGO YA KOSALISA BANGO

16-18. Ndenge nini tokoki kosunga na bosembo nyonso bandeko ya Kristo, mpo na nini tosengeli kosala yango uta sikoyo?

16 Satana azali ntango nyonso kobundisa bandeko ya Kristo oyo batyami mafuta na elimo, oyo bazali naino awa na mabele, mpe ayebi ete azali kaka “na ntango mokuse.” (Emoniseli 12:9, 12, 17) Kasi atako Satana azali kobundisa bango ndenge wana, bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali kokoba kotambwisa mosala ya kosakola mpe ebele bazali koyoka nsango malamu na ndenge oyo esalemá te liboso. Emonani ete Yesu azali elongo na bakristo oyo batyami mafuta na elimo, mpe azali kotambwisa bango.​—Matai 28:20.

Ezali esengo ndenge tosalisaka bandeko ya Kristo

17 Toyokaka mpenza esengo ndenge tosalisaka bandeko ya Kristo na mosala ya kosakola. Tosalisaka mpe na ndenge topesaka mbongo mpe tosalaka makasi mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi, Bandako ya mayangani mpe babiro ya filiale. Ntango tozali kotosa na bosembo nyonso bankulutu mpe bandeko mosusu oyo “moombo ya sembo mpe ya mayele” atye, tozali komonisa ete tolingi kosalisa bandeko ya Kristo.​—Matai 24:45-47; Baebre 13:17.

18 Mosika te, bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazali naino awa na mabele, bakozwa elembo ya nsuka. Na nsima baanzelu bakotika “mipɛpɛ minei ya mabele,” mpe bolɔzi monene ekobanda. (Emoniseli 7:1-3) Liboso Armagedone ebanda, Yesu akosala ete bakristo oyo batyami mafuta na elimo bázala na likoló. (Matai 13:41-43) Soki tolingi tótángama bampate ntango Yesu akoya, oyo nde ntango ya kosunga na bosembo nyonso bandeko ya Kristo.

Tosalisaka bandeko ya Kristo na makambo ndenge na ndenge (Talá paragrafe 17)

^ par. 6 Mpo na koyeba ndakisa yango na mozindo, talá masolo “Okotɛlɛma liboso na kiti ya kosambisama?” mpe “Elikya nini ezali mpo na bampate mpe mpo na bantaba?” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/10/1995.