Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Mars 2015

“Omonaki malamu kosala bongo”

“Omonaki malamu kosala bongo”

“Obombeli bato ya bwanya mpe bato ya mayele makambo oyo malamumalamu, mpe omonisi yango bana mike.”​—LUKA 10:21.

1. Mpo na nini Yesu “atondaki na esengo mpe na elimo santu”? (Talá elilingi ya ebandeli.)

MEKÁ komona na makanisi ntango Yesu “atondaki na esengo mpe na elimo santu.” Ekoki kozala ete esengo makasi mpenza ezalaki komonana na elongi mpe miso na ye. Kasi mpo na nini? Autaki kotinda bayekoli na ye 70 mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Lokola banguna ya makasi ya nsango malamu bazalaki, Yesu azalaki na mposa makasi ya koyeba ndenge bayekoli na ye bakokokisa mokumba na bango. Na kati ya banguna yango, tokoki kotánga Bakomeli mpe Bafarisai, bato oyo batángaki mingi mpe bazalaki na mayele mingi. Balingaki bato bátalela Yesu kaka lokola mosali ya mabaya ya mpamba mpe bátalela bayekoli na ye lokola “bato batángá kelasi mingi te mpe bato mpamba.” (Misala 4:13; Marko 6:3) Atako bongo, ntango bayekoli bautaki na mosala na bango, batondaki na esengo. Basakolaki atako botɛmɛli ezalaki, ezala ya bademo. Nini esalisaki bango bábatela esengo mpe mpiko?​—Tángá Luka 10:1, 17-21.

Basaleli ya Yehova babongisi lolenge na bango ya koteya na ndenge bakómisi yango pɛtɛɛ mpe polele

2. (a) Na ndenge nini bayekoli ya Yesu bazalaki lokola bana mike? (b) Nini esalisaki bayekoli ya Yesu básosola mateya mozindo ya Biblia?

2 Yesu ayebisaki Yehova boye: “Nazali kosanzola yo liboso  ya bato nyonso, Tata, Nkolo ya likoló mpe ya mabele, mpo obombeli bato ya bwanya ná bato ya mayele makambo oyo kasi omonisi yango bana mike. Ya solo, ee Tata, mpo omonaki malamu kosala bongo.” (Matai 11:25, 26) Mpo na nini Yesu abengaki bayekoli na ye bana mike? Mpamba te, na kokesana na bakomeli mpe Bafarisai oyo batángaki mingi mpe bazalaki kokanisa ete bazali na bwanya, bayekoli ya Yesu bazalaki kolinga koteyama lokola bana. Bayekolaki ndenge ya kozala bato ya komikitisa, kasi te bato ya lolendo. (Matai 18:1-4) Lokola bazalaki bato ya komikitisa, Yehova asalelaki elimo santu na ye mpo na kosalisa bango básosola mateya mozindo ya Biblia. Kasi, bakonzi ya mangomba ya Bayuda batikaki ete Satana mpe lolendo na bango ekoba kokanga bango miso.

3. Tokolobela nini na lisolo oyo?

3 Tókamwa te ete Yesu atondaki mpenza na esengo! Azalaki na esengo komona ndenge Yehova asalaki ete bato ya komikitisa báyeba mateya mozindo ya Biblia atako bátánga mingi te. Nzambe asepelaka na lolenge wana ya koteya, mpe abongwaná te. Nini emonisi ete andimaka lolenge wana ya koteya? Na lisolo oyo, tokomona ndenge Yehova azali kosala ete bato ya komikitisa lelo báyeba mateya mozindo ya Biblia.

NDIMBOLA YA MATEYA MOZINDO EPAI YA MOTO NYONSO

4. Na makambo nini Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na elobeli ya pɛtɛɛ ezali mpenza likabo?

4 Na bambula oyo euti koleka, ebongiseli ya Nzambe elobeli mingi ntina ya koteya na lolenge ya pɛtɛɛ mpe polele mpenza. Tólobela makambo misato. Ya liboso, tozali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli * na elobeli ya pɛtɛɛ. (Talá maloba na nse ya lokasa.) Ezali likabo oyo esalisi bato mingi, ata mpe baoyo bazalaki na mokakatano ya kotánga to koloba Lingelesi to Lifalanse. Mabota mingi emonisi ete Linɔ́ngi yango esalisi mpenza bana na bango mpo báyeba malamu Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Bato mingi bakomi mikanda ya botɔndi. Ndeko mwasi moko alobaki ete azalaki kobanga kopesa biyano na boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Kasi sikoyo ezali lisusu bongo te! Nsima ya kosalela Linɔ́ngi yango, akomaki boye: “Nakómi kopesa biyano mbala ebele, mpe kobanga esilá! Natɔndi mpenza Yehova mpe bino.”

5. Kobongisa lisusu Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika ebimisi matomba nini?

5 Ya mibale, tozali na Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika, oyo ebimaki na Lingelesi na likita ya nsuka ya mobu, oyo esalemaki mwa 5/10/2013. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Bavɛrsɛ mingi sikoyo ezali na maloba mingi te, kasi ndimbola na yango ebongwani te mpe ezali pɛtɛɛ mpo na kokanga ntina. Na ndakisa, Yobo mokapo ya 10:1, oyo ezalaki na maloba 27 ekiti na maloba 19 mpe Masese 8:6, oyo ezalaki na maloba 20 ekiti na 13. Bavɛrsɛ yango ezali polele mpenza  na libongoli ya sika. Ndeko moko oyo atyami mafuta na elimo, oyo asaleli Yehova na bosembo nyonso na boumeli ya mbula ebele alobaki ete: “Nauti kotánga mokanda ya Yobo na libongoli ya sika, mpe nazali komona lokola nde nauti koyeba makambo oyo ezali na mokanda yango nde sikoyo!” Bato mingi balobi mpe bongo.

6. Nsima ya kozwa ndimbola ya polele ya Matai 24:45-47, omiyoki ndenge nini?

6 Ya misato, kanisá na bandimbola mosusu oyo touti kozwa oyo elobeli ndenge tozalaki kolimbola liboso bavɛrsɛ mosusu. Na ndakisa, ndimbola ya polele mpenza ya maloba “moombo ya sembo mpe ya mayele” oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/07/2013. (Matai 24:45-47) Lisolo yango elimbolaki ete moombo ya sembo mpe ya mayele azali Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Mpe “basali ya ndako” ezali bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe “bampate mosusu,” oyo moombo ya sembo mpe ya mayele apesaka bilei. (Yoane 10:16) Tosepelaka koyekola mateya yango mpe tozalaka na esengo koteya yango epai ya basusu! Na makambo nini mosusu Yehova amonisi ete andimaka mateya ya pɛtɛɛ mpe polele?

NDIMBOLA YA PƐTƐƐ MPENZA YA MASOLO YA BIBLIA

7, 8. Wapi bandakisa mosusu ya masolo ya Biblia oyo ezalaki elilingi ya eloko moko monene na mikolo ezali koya?

7 Soki osaleli Yehova esili koleka bambula mingi, ekoki kozala ete omoni mbongwana na ndenge mikanda na biso elimbolaka masolo mosusu ya Biblia. Na ntango ya kala, tozalaki koloba ete masolo mosusu ezalaki elilingi ya eloko moko monene na mikolo ezali koya. Lisolo yango moko ezalaki kobengama elilingi. Mpe elilingi ezalaki komonisa kokokisama ya likambo yango. Ezali na bantina oyo esengeli kolimbola masolo ya Biblia lolenge wana? Ɛɛ. Na ndakisa, Yesu alobelaki “elembo ya mosakoli Yona.” (Tángá Matai 12:39, 40.) Yesu alimbolaki ete ntango oyo Yona alekisaki na kati ya libumu ya mbisi ezalaki elilingi ya ntango oyo Yesu akolekisa na nkunda.

Kondima na biso ekómaka makasi ntango toyekolaka masolo ya Biblia mpe elilingi na yango

8 Ezali mpe na masolo mosusu ya Biblia oyo ezalaki elilingi ya eloko moko monene na mikolo oyo ezali koya. Ntoma Paulo alobelaki mingi na yango. Na ndakisa, boyokani ya Abrahama ná Agare mpe Sara ezalaki elilingi ya boyokani ya Yehova ná eteni ya ebongiseli na ye ya likoló. (Bagalatia 4:22-26) Ndenge moko mpe tabernakle, tempelo, mokolo ya kozipa masumu, nganga-nzambe monene, mpe makambo mosusu ya mibeko ezalaki “elili ya makambo malamu oyo ekoya.” (Baebre 9:23-25; 10:1) Kondima na biso ekómaka makasi ntango toyekolaka masolo wana ya Biblia mpe elilingi na yango. Kasi yango elingi nde koloba ete moto nyonso, likambo nyonso, mpe eloko nyonso oyo Biblia elobeli ezali elilingi ya moto moko to eloko moko?

9. Na kala, ndenge nini tozalaki kolimbola lisolo ya Biblia oyo elobeli Nabote?

9 Na kala, mikanda na biso ezalaki kolimbola ete moto nyonso, likambo  nyonso, to eloko nyonso na masolo mosusu ezali elilingi ya moto to eloko. Na ndakisa, Yezabele mwasi mabe ya mokonzi abomisaki Nabote mpo mobali na ye Ahaba azwa elanga ya vinyo ya Nabote. (1 Bakonzi 21:1-16) Na mobu 1932, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elimbolaki ete Ahaba mpe Yezabele bazali elilingi ya Satana mpe ebongiseli na ye, mpe ete Nabote azalaki elilingi ya Yesu, liwa ya Nabote ezalaki elilingi ya kobomama ya Yesu. Kasi, na mobu 1961, buku “Que ton nom soit sanctifié” elobaki ete Nabote azalaki elilingi ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe Yezabele azalaki elilingi ya mangomba ya lokuta. Lisusu, minyoko ya Nabote ezalaki elilingi ya minyoko oyo bakristo oyo batyami mafuta na elimo basengelaki kokutana na yango na mikolo ya nsuka. Na boumeli ya mbula ebele, bandimbola wana elendisaki mpenza kondima ya basaleli ya Nzambe. Kasi, mpo na nini lelo oyo tozali lisusu kopesa bandimbola yango bongo te?

10. (a) Na ndenge nini moombo ya sembo mpe ya mayele amonisaka mayele mingi ntango alimbolaka masolo mosusu ya Biblia? (b) Mikanda na biso ezali kobenda likebi mingi na nini lelo oyo?

10 Na boumeli ya mbula mingi, Yehova asalisi “moombo ya sembo mpe ya mayele” akóma lisusu na mayele mingi. Ndenge nini? Lelo oyo, moombo ya sembo mpe ya mayele azali sikoyo na mayele ya koloba ete lisolo moko ya Biblia ezali elilingi ya eloko moko monene kaka ntango Biblia emonisi polele mpenza  ntina ya koloba bongo. Bandimbola mosusu ya kala ya bililingi mpe kokokisama na yango ezalaki mpasi mpo na kokanga ntina, komikundola mpe kosalela yango. Likambo eleki ntina, ntango likebi ezalaki kotyama mingi kaka na koluka koyeba ndimbola mpenza ya masolo ya Biblia, ndenge ya komona bizaleli ya kolanda to mateya ya kosalela ezalaki kobima te. Kasi, lelo oyo, mikanda na biso ezali kobenda likebi mingi na lolenge ya pɛtɛɛ mpe na mateya oyo etali kondima, koyika mpiko, komipesa na Nzambe mpe bizaleli mosusu ya ntina mingi oyo tokoki koyekola na mosolo ya Biblia. *​—Talá maloba na nse ya lokasa.

Ndakisa ya Nabote epesi biso liteya moko ya ntina mingi (Talá paragrafe 11)

11. (a) Ndenge nini toyebi sikoyo lisolo ya Nabote, mpe ndakisa na ye esalisi biso na nini? (b) Na bambula oyo euti koleka, mpo na nini mikanda na biso elobelaka mpenza te bililingi mpe kokokisama na yango? (Talá “Mituna ya batángi” na nimero oyo.)

11 Sikoyo lisolo ya Nabote ekómi pɛtɛɛ mpe polele na makanisi na biso. Soki Nabote akufaki, ezali te mpo azalaki elilingi ya Yesu to bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Kasi, akufaki nde mpo azalaki na ekateli ya kotikala sembo epai ya Nzambe. Akobaki kotosa mibeko ya Yehova atako akutanaki na minyoko makasi ya mokonzi moko ya nguya. (Mitángo 36:7; 1 Bakonzi 21:3) Ezali mpenza ndakisa malamu mpo na basaleli nyonso ya Nzambe ya mikolo na biso oyo bazali koyika mpiko na mikakatano ya ndenge wana. (Tángá 2 Timote 3:12.) Bakristo nyonso bakoki kokanga ntina, kokanisa, mpe kosalela liteya yango mpo na kolendisa kondima na bango.

12. (a) Tosengeli koloba nini te mpo na oyo etali masolo ya Biblia? (b) Nini esalisi biso tózala na bandimbola ya polele ata ya makambo mozindo? (Talá maloba na nse ya lokasa.)

12 Tosengeli nde koloba ete masolo ya Biblia ezalaka kaka na mateya oyo tokoki kosalela kasi na ndimbola mosusu te? Te. Na esika ya kolimbola masolo mosusu ya Biblia lokola bililingi mpe kokokisama na yango, mikanda na biso ezali sikoyo kotya likebi mingi na ndenge oyo lisolo moko ya Biblia eyokani na mosusu. Na ndakisa, bosembo ya Nabote liboso ya minyoko mpe liwa na ye ezali kokundwela biso bosembo ya Yesu mpe bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Kasi, yango ekundweli biso mpe bosembo ya ebele ya “bampate mosusu.” Tokoki komona mpenza polele ndenge Yehova azali koteya biso na ndenge ya pɛtɛɛ. *​—Talá maloba na nse ya lokasa.

 NDIMBOLA YA PƐTƐƐ YA BANDAKISA YA YESU

13. Bandakisa nini emonisi ete tozali sikoyo kolimbola bandakisa oyo Yesu apesaki na ndenge ya pɛtɛɛ mpe ya polele mpenza?

13 Yesu azali moteyi oyo aleki bateyi nyonso kino lelo. Azalaki kosepela kosalela bandakisa to bililingi mpo na koteya. (Matai 13:34) Bandakisa esalisaka mpo elimbolaka makambo ya mpasi na ndenge ya pɛtɛɛ mpe ekoki kotinda biso tókanisa mpe ekoki kosimba motema na biso. Na boumeli ya bambula, mikanda na biso elimboli bandakisa ya Yesu na ndenge ya pɛtɛɛ mpe ya polele mpenza. Na ndakisa, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/07/2008, esalisi biso tókanga ntina ya bandakisa oyo Yesu apesaki ya levire, mbuma ya mutarde mpe ya monyama. Sikoyo tomoni ete bandakisa wana ezali kolobela Bokonzi ya Nzambe, oyo esalisi ebele ya bato báboya mokili oyo mabe mpe bákóma bayekoli ya Kristo.

Bandakisa esalisaka mpo elimbolaka makambo ya mpasi na ndenge ya pɛtɛɛ mpe ekoki kotinda biso tókanisa mpe ekoki kosimba motema na biso

14. (a) Ndenge nini tozalaki kolimbola ndakisa ya Mosamaria ya motema malamu? (b) Ndenge nini tososoli sikoyo ndakisa yango?

14 Ndenge nini tokoki kokanga ntina ya masolo ya milai, to bandakisa oyo Yesu alobaki? Masolo yango mosusu ezali bililingi to bisakweli. Misusu ezali na mateya oyo tokoki kosalela. Kasi ndenge nini tokoki koyeba ete masolo oyo ezali bililingi to te? Nsima ya bambula, eyano na motuna wana ekómi polele mpenza. Na ndakisa, tókanisa lisusu ndenge oyo tozalaki kolimbola ndakisa oyo Yesu apesaki ya Mosamaria ya motema malamu. (Luka 10:30-37) Na 1924, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki ete Mosamaria azalaki elilingi ya Yesu mpe nzela wana oyo ebandaki na bangomba ya Yerusaleme mpe ekei tii na Yeriko ezalaki komonisa ndenge makambo ezali kobeba se kobeba na mokili kobanda botomboki na Edene. Mpe, miyibi oyo bazalaki na nzela bazalaki elilingi ya ebele ya bato ya mimbongo ya lokoso, mpe nganga-nzambe ná Molevi bazalaki elilingi ya mangomba ya bokristo. Kasi lelo oyo, mikanda na biso esalelaka ndakisa wana mpo na kokundwela bakristo nyonso ete bákaniselaka basusu mabe te. Tosengeli kosalisa baoyo nyonso bazali na bosɛnga, mingimingi kosalisa bango báyeba solo na ntina na Nzambe. Epesaka biso esengo komona ndenge Yehova akómisi solo pɛtɛɛ.

15. Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

15 Na lisolo oyo ekolanda, tokolobela ndakisa oyo Yesu apesaki ya bangɔndɔ zomi. (Matai 25:1-13) Ndimbola nini Yesu alingaki ete bayekoli na ye na mikolo ya nsuka bázala na yango mpo na ndakisa wana ya ntina mingi? Moto, eloko mpe likambo nyonso ya ndakisa yango emonisaka moto to eloko moko monene na mikolo ezali koya? To alingaki ete tóyekola mateya oyo ekosalisa biso na mikolo oyo ya nsuka? Tótalela yango.

^ par. 4 Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na elobeli ya pɛtɛɛ ebimaki liboso na Lingelesi na sanza ya 07/2011. Kobanda wana, Linɔ́ngi yango ezali mpe kobima na mwa minɔkɔ mosusu.

^ par. 5 Libongoli yango ekobima mpe na minɔkɔ mosusu.

^ par. 10 Na ndakisa, buku Mekolá kondima na bango ezali na masolo ya Biblia ya bato 14. Buku yango ebendi likebi na mateya oyo tokoki kozwa, kasi te na bililingi to kokokisama na yango.

^ par. 12 Liloba ya Nzambe ezali na makambo oyo ekoki komonana ‘mpasi mpo moto akanga ntina na yango,’ ata mpe makambo mosusu oyo ntoma Paulo akomaki. Kasi, bato nyonso oyo bakomaki Biblia basalaki yango na litambwisi ya elimo santu. Elimo ya Nzambe esalisaka bakristo ya solo lelo báyeba Biblia, ata mpe “makambo mozindo ya Nzambe.”​—2 Petro 3:16, 17; 1 Bakorinti 2:10.