“Yango wana, bósɛnzɛlaka mpamba te boyebi mokolo te mpe ngonga te.”​—MATAI 25:13.

1, 2. (a) Yesu amonisaki nini mpo na mikolo ya nsuka? (b) Tokotalela mituna nini?

MEKÁ komona na makanisi Yesu afandi na Ngomba ya Olive mpe azali kotala tempelo ya Yerusaleme. Azali elongo na bantoma na ye: Petro, Andre, Yakobo mpe Yoane. Bazali kolanda na likebi mpenza ndenge Yesu azali koyebisa bango esakweli moko ya ntina mpo na mikolo ezali koya. Esakweli yango ezali komonisa makambo oyo ekosalema na boumeli ya mikolo ya nsuka ya mokili oyo mabe ntango Yesu akoyangela na Bokonzi ya Nzambe. Yesu ayebisi bango ete na eleko wana, “moombo [na ye] ya sembo mpe ya mayele” akozala momonisi na ye awa na mabele mpe akopesa bayekoli na ye bilei ya elimo na ntango oyo ebongi.​—Matai 24:45-47.

2 Lisusu, kaka na esakweli yango, Yesu alobelaki ndakisa ya bangɔndɔ zomi. (Tángá Matai 25:1-13.) Na lisolo  oyo, tokolobela mituna oyo: (1) Nsango nini ya ntina ezali na ndakisa yango? (2) Ndenge nini bakristo ya sembo oyo batyami mafuta na elimo basaleli toli ya ndakisa yango, mpe yango ebimisi matomba nini? (3) Liteya nini mokomoko na biso akoki lelo oyo kozwa na ndakisa yango?

NDAKISA YANGO EZALI NA NSANGO NINI?

3. Na kala, ndenge nini mikanda na biso ezalaki kolimbola ndakisa ya bangɔndɔ zomi, mpe yango ekokaki kosala nini?

3 Na lisolo oyo eleki, toyekolaki ete na bambula oyo euti koleka, moombo ya sembo abongisaki lolenge ya kolimbola masolo mosusu ya Biblia. Sikoyo moombo ya sembo azali kotya likebi mingi na mateya oyo tokosalela kasi te na bililingi to bandimbola ya bisakweli. Tózwa ndakisa oyo Yesu apesaki ya bangɔndɔ zomi. Mikanda na biso ezalaki koloba ete miinda, mafuta, mpe milangi ezalaki bililingi ya eloko to moto moko. Soki totye likebi mingi na makambo mikemike, ekoki kosalema ete tómona te nsango ya ntina mpe ya polele oyo ezali na ndakisa yango? Eyano na motuna wana ezali na ntina mpenza.

Bangɔndɔ basengelaki komilɛngɛla mpe kopelisa miinda na bango ntango mobali ya libala akoya

4. Na ndakisa oyo, tomoni ete (a) mobali ya libala ezali nani? (b) bangɔndɔ ezali banani?

4 Tótalela sikoyo ndimbola mpenza ya ndakisa wana ya Yesu. Ya liboso, tótalela naino bato oyo ndakisa yango elobeli. Mobali ya libala ezali nani? Ezali Yesu. Toyebi yango mpo liboso, ye moko Yesu alobaki ete azali mobali ya libala. (Luka 5:34, 35) Bangɔndɔ ezali banani? Ezali “etonga moke” ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Ndenge nini toyebi yango? Na ndakisa yango, bangɔndɔ basengelaki komilɛngɛla mpe kopelisa miinda na bango ntango mobali ya libala akoya. Yesu alobaki na bayekoli na ye oyo batyami mafuta na elimo ete: “Bómilɛngɛla mpe miinda na bino epela, mpe bino moko bózala lokola bato oyo bazali kozela nkolo na bango ntango akouta na libala.” (Luka 12:32, 35, 36) Lisusu, ntoma Paulo mpe ntoma Yoane bakokanisaki bayekoli ya Kristo oyo batyami mafuta na elimo na bangɔndɔ ya pɛto. (2 Bakorinti 11:2; Emoniseli 14:4) Na yango, tokoki koloba ete toli mpe likebisi oyo ezali na mokanda ya Matai 25:1-13, etali bayekoli ya Yesu oyo batyami mafuta na elimo.

5. Ndenge nini Yesu amonisaki eleko oyo ndakisa oyo apesaki ekokokisama?

5 Lisusu, toli ya Yesu etaleli eleko nini? Makambo oyo Yesu alobaki na nsuka ya ndakisa yango esalisi biso tóyeba eyano. Alobaki ete: “Mobali ya libala akómaki.” (Matai 25:10) Na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/07/2013, tomonaki ete esakweli ya Yesu oyo ezali na Matai mokapo 24 mpe 25 elobeli “koya” ya Yesu mbala mwambe. Ntango Yesu alobelaki “koya” na ye, alobelaki bolɔzi monene, ntango oyo akoya kosambisa mpe kobebisa mokili oyo mabe. Na yango tokoki koloba ete ndakisa ya Yesu  etaleli mikolo ya nsuka, kasi ‘akoya’ na boumeli ya bolɔzi monene.

6. Nsango nini ya ntina ezali na ndakisa yango?

6 Nsango nini ya ntina toyekoli na ndakisa oyo? Tózongisa na makanisi likambo oyo Yesu alobaki liboso ya lisolo oyo ya Biblia. Na Matai mokapo 24, Yesu alobelaki likambo etali “moombo ya sembo mpe ya mayele.” Moombo yango asengelaki kozala mwa etuluku ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo basengelaki kotambwisa makambo na kati ya bayekoli ya Kristo na mikolo ya nsuka. Yesu akebisaki bandeko yango ete basengeli kotikala sembo. Na mokapo oyo elandi, Yesu asaleli ndakisa ya bangɔndɔ zomi mpo na kopesa toli epai ya bayekoli na ye nyonso na mikolo ya nsuka oyo batyami mafuta na elimo. Nsango yango ezalaki ya ‘kokoba kosɛnzɛla’ mpo ete bábungisa te mbano na bango ya likoló. (Matai 25:13) Tótalela sikoyo ndakisa yango mpe tómona ndenge bakristo oyo batyami mafuta na elimo basaleli toli yango.

NDENGE NINI BAKRISTO OYO BATYAMI MAFUTA NA ELIMO BÁSALELI TOLI YA NDAKISA YANGO?

7, 8. (a) Mpo na nini bangɔndɔ ya mayele babongisaki biloko na bango nyonso malamu? (b) Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bamibongisi ndenge nini?

7 Na ndakisa yango, Yesu amonisaki ete na kokesana na bangɔndɔ ya zoba, bangɔndɔ ya mayele bazalaki na biloko nyonso ntango mobali ya libala akómaki. Mpo na nini? Mpo bamibongisaki mpe basɛnzɛlaki. Bangɔndɔ nyonso zomi basengelaki kokoba kosɛnzɛla mpe kopelisa miinda na bango na butu. Na esika básala lokola bangɔndɔ ya zoba, oyo ya mayele bamibongisaki mpo bamemaki mpe mafuta ya kobakisa ná miinda na bango. Ndenge nini bakristo ya sembo oyo batyami mafuta na elimo bamibongisaki mpo na koya ya Yesu?

8 Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bamibongisi mpo na kokokisa mokumba na bango tii na nsuka. Bayebaka ete mpo básalela Nzambe, esengeli básundola bomɛngo ya mokili oyo ya Satana, mpe balingaka kosala yango. Bazali na ekateli ya kosalela Yehova na bosembo, ezali te mpo nsuka ya mokili oyo ekómi pene, kasi mpo balingaka ye ná mwana na ye. Babatelaka bosembo na bango mpe batikaka te ete biloko ya mokili, makambo ya mbindo mpe ezaleli ya moimi ebebisa bango. Lokola bangɔndɔ ya mayele oyo babongisaki miinda na bango malamu, bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali kokoba kongɛnga makasi, mpe na motema molai, bazali kozela mobali ya libala, ata soki ekoki komonana ete azali koumela.​—Bafilipi 2:15.

Yesu akebisaki bakristo oyo batyami mafuta na elimo ete bátikala sembo

9. (a) Likebisi nini Yesu apesi na likambo etali kolala mpɔngi makasi? (b) Ndenge nini bakristo oyo batyami mafuta na elimo bayanoli na mongongo oyo ete: “Mobali ya libala ayei”? (Talá maloba na nse ya lokasa.)

9 Bangɔndɔ ya mayele bamibongisaki mpe malamu mpo na koya ya mobali ya libala mpo basɛnzɛlaki. Kasi, ndakisa yango emonisi ete “mpɔngi etungisaki bango nyonso [zomi] mpe balalaki”  ntango bazalaki kozela mobali ya libala oyo emonanaki lokola azali koumela. Na yango, ekoki kosalema lelo oyo ete bakristo oyo batyami mafuta na elimo ‘bálala,’ elingi koloba makanisi na bango ekóma koyengayenga wana bazali kozela koya ya Kristo? Ɛɛ. Yesu ayebaki ete ata moto oyo amibongisi malamu akoki kolɛmba mpe makanisi na ye ekoki koyengayenga wana azali kozela koya na ye. Yango wana, bakristo ya sembo oyo batyami mafuta na elimo basali makasi mpenza mpo na kokoba kosɛnzɛla. Ndenge nini? Na ndakisa yango, bangɔndɔ nyonso zomi batɛlɛmaki ntango bayokaki mongongo moko makasi ete: “Mobali ya libala ayei!” Kasi, kaka bangɔndɔ mitano ya mayele nde bakobaki kosɛnzɛla. (Matai 25:5, 6; 26:41) Ndenge moko, na mikolo ya nsuka, bakristo ya sembo oyo batyami mafuta na elimo bayanoli na mongongo makasi “mobali ya libala ayei!” Bandimisami mpenza ete Yesu alingi aya, mpe bamibongisi mpo na koya na ye. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Tótalela sikoyo maloba ya nsuka ya ndakisa oyo Yesu apesaki, mpo ebendi likebi na eleko moko ya sikisiki.

MBANO MPO NA BANGƆNDƆ YA MAYELE MPE ETUMBU MPO NA BAOYO YA ZOBA

10. Motuna nini tokoki kotuna na oyo etali lisolo oyo elekaki kati na bangɔndɔ ya mayele mpe oyo ya zoba?

10 Pene na nsuka ya ndakisa yango, bangɔndɔ ya zoba basɛngaki oyo ya mayele bápesa bango mafuta mpo bátya na miinda na bango. Kasi baoyo ya mayele baboyaki kosalisa bango. (Tángá Matai 25:8, 9.) Kasi ntango nini bakristo ya sembo oyo batyami mafuta na elimo baboyaki kosalisa bato oyo bazalaki na bosɛnga? Tóbosana te eleko oyo ndakisa yango ekokokisama. Yesu, mobali ya libala akoya mpo na kosambisa pene na nsuka ya bolɔzi monene. Na yango, emonani lokola ete lisolo yango elobeli makambo oyo ekosalema liboso ete bolɔzi monene ekóma na nsuka. Mpo na nini tolobi bongo? Mpamba te na ntango wana, bakristo oyo batyami mafuta na elimo bakozwa elembo na bango ya nsuka.

11. (a) Nini ekosalema liboso ete bolɔzi monene ebanda? (b) Bangɔndɔ ya mayele balingaki mpenza koloba nini ntango bayebisaki oyo ya zoba ete bákende kosomba mafuta?

11 Na yango, liboso bolɔzi monene ebanda, bakristo nyonso oyo batyami mafuta na elimo oyo bakozala awa na mabele bakozwa elembo na bango ya nsuka. (Emoniseli 7:1-4) Kobanda na ntango wana, tokoki mpenza kondimisama ete bakokende na likoló. Kasi tómeka komona na makanisi mwa bambula liboso bolɔzi monene ebanda. Nini ekokómela bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bakobaki te kosɛnzɛla mpe batikalaki sembo te? Bakozwa elembo ya nsuka te. Na ntango wana, bakristo mosusu ya sembo bakotyama mafuta na elimo. Ntango bolɔzi monene ekobanda, bazoba bakoyoka mpasi na motema komona Babilone Monene ebebisami. Ekoki kozala na ntango wana bakoyeba ete bamibongisaki te mpo na koya ya Yesu. Na ntango yango, nini ekosalema soki basɛngi básalisa bango? Eyano ezali na ndakisa yango. Bangɔndɔ ya mayele baboyaki kopesa  baoyo ya zoba mafuta na bango mpe bayebisaki bango bákende kosomba yango. Lokola ezalaki “na katikati ya butu,” moto ata moko te azalaki mpo na kotɛkɛla bango mafuta. Eloko mosusu ya kosala ezalaki te!

12. (a) Na bolɔzi monene, nini ekokómela moto nyonso oyo azalaki liboso mokristo oyo atyami mafuta na elimo kasi atikali sembo te liboso ya kotyama elembo ya nsuka? (b) Nini ekokómela baoyo bakozala lokola bangɔndɔ ya zoba?

12 Na bolɔzi monene, bakristo ya sembo oyo batyami mafuta na elimo bakokoka ata moke te kosalisa moto nyonso oyo akozanga bosembo. Likambo ya kosala ekozala lisusu te. Na yango, nini ekokómela bato oyo bakotikala sembo te? Yoká likambo oyo ekómelaki bangɔndɔ ya zoba oyo bakendaki mpo na kosomba mafuta: “Mobali ya libala akómaki, mpe bangɔndɔ oyo bamilɛngɛlaki bakɔtaki na ye na fɛti ya libala; mpe porte ekangamaki.” Ntango Yesu akoya na nkembo na ye pene na nsuka ya bolɔzi monene, akoyanganisa kuna na likoló bakristo ya sembo oyo batyami mafuta na elimo. (Matai 24:31; 25:10; Yoane 14:1-3; 1 Batesaloniki 4:17) Na yango, Yesu akobwaka baoyo bakozala sembo te. Lokola bangɔndɔ ya zoba, bakoloba: “Tata, tata, fungolá biso!” Kasi Yesu akoyanola nini? Likambo ya mawa, akopesa bango kaka eyano oyo akopesa ebele ya bato oyo bakozala lokola bantaba ete: “Nayebisi bino solo: Nayebi bino te.”​—Matai 7:21-23; 25:11, 12.

Mokristo mokomoko oyo atyami mafuta na elimo asengeli kozala na ekateli ya komilɛngɛla mpe kosɛnzɛla

13. (a) Mpo na nini ezali na ntina te koloba ete bayekoli mingi ya Kristo oyo batyami mafuta na elimo bakotikala sembo te? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete ndakisa ya Yesu emonisi ete azalaki kotyela bakristo oyo batyami mafuta na elimo motema? (Talá elilingi ya ebandeli.)

13 Yesu alingaki nde koloba ete bakristo mingi oyo batyami mafuta na elimo bakotikala sembo te mpe ekosengela kotya bamosusu na esika na bango? Te. Na Matai mokapo 24, tozali kotánga ete Yesu akebisaki moombo ya sembo mpe ya mayele ete akóma te moombo mabe. Yango elingi koloba te ete azalaki na makanisi ete moombo ya sembo akóma moombo ya mabe. Ndenge moko, ndakisa ya bangɔndɔ zomi ezali likebisi. Ndenge kaka bangɔndɔ mitano bazalaki bazoba mpe mitano bazalaki mayele, mokristo mokomoko oyo atyami mafuta na elimo asengeli kozala na ekateli ya komilɛngɛla mpe kosɛnzɛla. Soki te, akoki kokóma zoba mpe kotika kozala sembo. Ntoma Paulo apesaki mpe likebisi ya ndenge wana epai ya bandeko na ye bakristo oyo batyami mafuta na elimo. (Tángá Baebre 6:4-9; talá mpe Kolimbola Mibeko 30:19.) Likebisi na ye ezalaki polele, kasi azalaki mpe na elikya ete bandeko na ye bakozwa mbano na bango. Likebisi oyo ezali na ndakisa ya bangɔndɔ zomi emonisi ete Yesu azali mpe na elikya ya ndenge wana mpo na bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Ayebaki ete mosaleli na ye mokomoko oyo atyami mafuta na elimo akoki kotikala sembo mpe akozwa mbano kitoko!

 MATOMBA NINI “BAMPATE MOSUSU” YA KRISTO BAKOKI KOZWA?

14. Mpo na nini “bampate mosusu” bakoki mpe kozwa litomba na ndakisa ya bangɔndɔ zomi?

14 Ndakisa oyo Yesu apesaki, ezalaki mpenzampenza mpo na bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Kasi, “bampate mosusu” bakoki mpe kozwa litomba na ndakisa wana oyo Yesu apesaki? (Yoane 10:16) Ɛɛ! Nsango ya ndakisa yango ezali polele: “Bósɛnzɛlaka.” Mpe mokolo moko Yesu alobaki ete: “Oyo nazali koloba na bino nazali koloba yango na bato nyonso: Bósɛnzɛlaka.” (Marko 13:37) Yesu asɛngaki ete bayekoli na ye nyonso bámibongisa mpe básɛnzɛlaka. Mpe bakristo nyonso basengeli komekola ndakisa malamu ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo, mpo batyaka mosala ya Yehova na esika ya liboso na bomoi na bango. Tóbosana te ete bangɔndɔ ya zoba basɛngaki baoyo ya mayele bápesa bango mwa mafuta. Bapesaki bango te mafuta yango oyo basɛngaki. Yango ekundweli biso ete kotikala sembo epai ya Nzambe, komibongisa mpe kokoba kosɛnzɛla ezali likambo ya moto na moto. Moto moko te akoki kosala yango na esika na biso. Mokomoko na biso akozongisa monɔkɔ epai ya Yesu Kristo, mosambisi ya sembo, oyo etikali moke aya. Yango wana, tosengeli komilɛngɛla!

Moto moko te akoki kotikala sembo to kosɛnzɛla na esika na biso

15. Mpo na nini bakristo nyonso ya solo bazali kozela libala ya Kristo mpe mwasi na ye na motema likoló?

15 Bakristo nyonso bazali kozela na motema likoló libala oyo Yesu alobeli na ndakisa oyo apesaki. Na mikolo ezali koya, nsima ya etumba ya Armagedone, bakristo oyo batyami mafuta na elimo bakokóma mwasi ya libala ya Kristo. (Emoniseli 19:7-9) Moto nyonso awa na mabele akozwa litomba ya libala wana oyo ekosalema kuna na likoló. Mpo na nini? Mpamba te epesi ndanga ya guvɛrnema moko ya kokoka mpo na bato nyonso. Ezala tozali na elikya ya kozala na bomoi ya seko na likoló to na mabele, tózala na ekateli ya komibongisa mpe kokoba kosɛnzɛla. Soki tosali bongo, tokoki kosepela na makambo kitoko mpenza oyo Yehova abongisi mpo na biso na mikolo ezali koya!

^ par. 9 Na ndakisa yango, ezali na eleko moko katikati na ntango bagangaki, “Mobali ya libala ayei!” (vɛrsɛ 6) mpe koya ya mobali ya libala (vɛrsɛ 10). Na boumeli ya mikolo ya nsuka, bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali kosɛnzɛla. Bayebi elembo ya kozala ya Yesu. Bayebi ete azali koyangela lokola Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe. Atako bongo, basengeli kokoba kosɛnzɛla tii akoya.