Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Mars 2015

Zwá liteya na ndakisa ya batalanta

Zwá liteya na ndakisa ya batalanta

“Apesaki moko talanta mitano, mosusu mibale, mosusu mpe moko.”​—MATAI 25:15.

1, 2. Mpo na nini Yesu apesaki ndakisa ya batalanta?

YESU apesaki ndakisa ya batalanta mpo na komonisa polele mokumba oyo bayekoli na ye oyo batyami mafuta na elimo bazali na yango. Kasi ndakisa yango etaleli bayekoli ya Yesu nyonso. Na yango, ezala tozali na elikya ya kozala na bomoi na likoló to awa na mabele, tosengeli koyeba ndimbola ya ndakisa oyo.

2 Ntango nini Yesu apesaki ndakisa yango? Ezalaki na ntango oyo azalaki koyebisa bayekoli na ye elembo oyo ekomonisa ete akómi mokonzi mpe ntango ya nsuka ebandi. (Matai 24:3) Na yango, ndakisa ya batalanta ezali na kati ya elembo yango mpe ezali kokokisama na mikolo na biso.

3. Liteya nini tozwi na bandakisa oyo ezali na Matai mokapo 24 mpe 25?

3 Ntango Yesu apesaki ndakisa ya batalanta, apesaki mpe bandakisa mosusu misato oyo ezalaki mpe na kati ya elembo ya ntango ya nsuka. Bandakisa yango nyonso ezali komonisa bizaleli ndenge na ndenge oyo bayekoli na ye basengeli kozala na yango. Tokoki kotánga bandakisa yango na Matai 24:45 tii na 25:46. Ndakisa ya liboso elobeli moombo ya  sembo, mwa etuluku ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazali na mokumba ya koteya basaleli ya Yehova. Basengeli kozala sembo mpe mayele. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Ndakisa ya oyo elandi elobeli bangɔndɔ zomi. Na ndakisa yango, Yesu akebisaki bakristo nyonso oyo batyami mafuta na elimo ete basengeli komilɛngɛla mpe kosɛnzɛla mpo bayebi te mokolo to ngonga oyo asengelaki koya. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Lisusu, Yesu apesaki ndakisa ya batalanta mpo na koteya bakristo nyonso oyo batyami mafuta na elimo ete basengeli kosala mosala makasi mpo na kokokisa mikumba na bango ya bokristo. Na nsima, Yesu apesaki ndakisa ya bampate ná bantaba, oyo etaleli baoyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabele. Amonisaki ete basengeli kozala sembo mpe kosala nyonso oyo bakoki mpo na kosalisa bandeko na ye bakristo oyo batyami mafuta na elimo. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Lisolo oyo ekopesa ndimbola ya ndakisa ya batalanta.

MOTO MOKO APESI BAOMBO NA YE MBONGO EBELE

4, 5. Moto oyo ndakisa oyo elobeli ezali nani, mpe talanta ezali komonisa nini?

4 Tángá Matai 25:14-30. Na ndakisa ya batalanta, Yesu abɛtaki lisolo ya moto moko oyo akendaki mobembo. Na ndakisa mosusu ya ndenge wana, Yesu abɛtaki lisolo ya moto moko oyo akendaki mobembo mpo na kokóma mokonzi. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) (Luka 19:12) Na boumeli ya mbula mingi, mikanda na biso ezalaki koloba ete moto oyo bandakisa wana nyonso mibale elobeli ezali Yesu, oyo akendaki na likoló na mobu 33. Kasi Yesu akómaki te mbala moko mokonzi ntango akendeki na likoló. Azelaki tii na 1914, ntango banguna na ye ‘batyamaki lokola ebonga ya makolo na ye.’​—Baebre 10:12, 13.

5 Yesu alobaki ete moto oyo ndakisa yango elobeli azalaki na talanta mwambe. Ezalaki mbongo ebele. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Liboso moto yango akende, apesaki baombo na ye mbongo yango. Ayebisaki bango bákolisela ye yango. Kaka ndenge mbongo yango ezalaki na valɛrɛ mingi na miso ya moto yango, ezali na eloko moko oyo ezalaki na valɛrɛ mingi na miso ya Yesu. Ezalaki eloko nini? Ezali mosala oyo asalaki ntango azalaki na mabele.

“Bótombola miso na bino mpe bótala bilanga, ndenge eteli mpo na bobuki mbuma”

6, 7. Batalanta ezali komonisa nini?

6 Mosala ya kosakola ezalaki na ntina mingi mpo na Yesu. Na nzela ya mosala yango oyo azalaki kosala, bato mingi bakómaki bayekoli. (Tángá Luka 4:43.) Ayebaki ete mosala ya kosala ezalaki mingi  mpe bato mingi bakondima nsango malamu. Kutu, ayebisaki bayekoli na ye ete: “Bótombola miso na bino mpe bótala bilanga, ndenge eteli mpo na bobuki mbuma.” (Yoane 4:35-38) Mosali bilanga ya malamu asundolaka te elanga oyo eteli mpo na bobuki mbuma. Makanisi ya Yesu ezalaki mpe bongo. Na yango, liboso mpenza azonga na likoló, Yesu apesaki bayekoli na ye etinda oyo ete: “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso.” (Matai 28:18-20) Na ndenge wana, Yesu apesaki bango eloko moko ya motuya mingi to mokumba moko ya ntina mingi: mosala ya kosakola.​—2 Bakorinti 4:7.

7 Ndenge moko na moto oyo apesaki baombo na ye mbongo, Yesu apesaki bayekoli na ye oyo batyami mafuta na elimo mosala ya kokómisa bato bayekoli. (Matai 25:14) Na yango, batalanta ezali komonisa mokumba ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli.

8. Atako baombo yango bazwaki bango nyonso mbongo ndenge moko te, mposa ya nkolo ezalaki nini?

8 Yesu alobaki ete nkolo wana apesaki moombo ya liboso talanta mitano, talanta mibale epai ya moombo ya mibale, mpe talanta moko epai ya moombo ya misato. (Matai 25:15) Nkolo wana apesaki baombo nyonso mbongo ndenge moko te, kasi alingaki ete bango nyonso básala nyonso mpo na kokolisela ye mbongo. Ndenge moko mpe, Yesu alingaki ete bayekoli na ye oyo batyami mafuta na elimo básala nyonso na mosala ya kosakola. (Matai 22:37; Bakolose 3:23)  Na Pantekote ya mobu 33, bayekoli ya Yesu babandaki kokómisa bato bayekoli na bikólo nyonso. Mpe ntango totángaka mokanda ya Misala, tomonaka polele mosala makasi oyo basalaki. * (Talá maloba na nse ya lokasa.)​—Misala 6:7; 12:24; 19:20.

BAOMBO BASALELI BATALANTA NA NTANGO YA NSUKA

9. (a) Baombo mibale ya sembo basalaki nini na mbongo na bango, mpe yango eteyi biso nini? (b) Baoyo bazali na elikya ya kofanda awa na mabele basengeli kosala nini?

9 Baombo mibale ya liboso, oyo basalelaki mbongo ya nkolo na bango malamu, bazali bakristo ya sembo oyo batyami mafuta na elimo na boumeli ya ntango ya nsuka. Mingimingi kobanda 1919, bazali kosala nyonso na mosala ya kosakola. Na ndakisa yango, baombo wana mibale bazwaki mbongo ndenge moko te, kasi yango elingi koloba te ete bituluku ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo ezali mibale. Baombo yango nyonso mibale basalaki mosala makasi: oyo ya liboso abakisaki talanta mitano likoló na oyo azwaki mpe oyo ya mibale abakisaki mosusu mibale. Kasi, kaka bakristo oyo batyami mafuta na elimo nde basengeli kosala makasi na mosala ya kosakola mpe ya koteya? Te. Ndakisa oyo Yesu apesaki ya bampate ná bantaba eteyi biso ete baoyo bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko awa na mabele basengeli kosalisa bandeko na ye oyo batyami mafuta na elimo na mosala ya kosakola mpe kosala ná bango na bomoko. Bamonaka ete ezali likambo ya esengo kosalisa bango. Ya solo, basaleli ya Yehova bazali “etonga kaka moko,” mpe bango nyonso basalaka mosala makasi mpo na kosakola mpe kokómisa bato bayekoli.​—Yoane 10:16.

10. Wapi eteni ya elembo oyo Yesu apesaki emonisi ete tozali na ntango ya nsuka?

10 Yesu alingaka ete bayekoli na ye nyonso básala mosala makasi mpo na kokómisa bato ebele bayekoli. Yango  nde bayekoli na ye basalaki na siɛklɛ ya liboso. Na ntango oyo ya nsuka, wana ndakisa oyo Yesu apesaki ya batalanta ezali kokokisama, bayekoli na ye bazali kosala mosala yango? Ɛɛ, bato ebele bazali koyoka nsango malamu mpe kokóma bayekoli na ndenge oyo emonana naino te liboso. Na nzela ya mosala makasi oyo bayekoli nyonso ya Yesu bazali kosala, bankóto ya bato bazali kozwa batisimo mbula na mbula. Bango mpe bazali koya kosangana na mosala ya kosakola. Mosala oyo nyonso mpe matomba na yango emonisi polele ete mosala ya kosakola ezali eteni moko ya ntina mingi ya elembo oyo Yesu apesaki mpo na ntango ya nsuka. Na ntembe te, Yesu asepelaka mpenza na basaleli na ye!

Yesu apesi basaleli na ye eloko moko ya motuya, to mokumba ya ntina mingi: mosala ya kosakola (Talá paragrafe 10)

NTANGO NINI NKOLO AKOYA?

11. Ndenge nini toyebi ete Yesu akoya na boumeli ya bolɔzi monene?

11 Yesu alobaki ete: “Nsima ya ntango molai nkolo ya baombo wana ayaki mpe atalelaki na bango makambo ya mbongo na ye.” (Matai 25:19) Nkolo, elingi koloba Yesu, akosala bongo na nsuka ya bolɔzi monene. Ndenge nini toyebi yango? Na esakweli na ye oyo ezali na Matai mokapo 24 mpe 25, Yesu alobaki mbala mingi ete azali koya. Na ndakisa, alobaki ete bato “bakomona Mwana ya moto azali koya na mapata ya likoló.” Yango ezali kolobela bolɔzi monene ntango Yesu akosambisa bato. Akebisaki mpe bayekoli na ye oyo bazali na bomoi na ntango ya nsuka ete básɛnzɛlaka. Alobaki boye: “Boyebi te mokolo Nkolo na bino akoya” mpe, “Mwana ya moto akoya na ngonga oyo bozali kokanisa te.” (Matai 24:30, 42, 44) Na yango, na ndakisa ya batalanta, Yesu azalaki mpe kolobela ntango oyo akoya kosambisa bato mpe kobebisa mokili ya Satana. *​—Talá maloba na nse ya lokasa.

12, 13. (a) Nkolo alobaki na baombo mibale likambo nini, mpe mpo na nini? (b) Ntango nini bakristo oyo batyami mafuta na elimo bakotyama elembo ya nsuka? (Talá etanda “ Na liwa na bango batalelamaka ete babongi.”) (c) Mbano nini baoyo bazali kosalisa bakristo oyo batyami mafuta na elimo bakozwa?

12 Ntango nkolo autaki mobembo na ye, amonaki ete moombo oyo azalaki na talanta mitano abakisaki talanta mitano mosusu mpe oyo azalaki na talanta mibale abakisaki talanta mosusu mibale. Nkolo ayebisaki mokomoko na bango ete: “Longonya, moombo malamu mpe ya sembo! Ozali sembo na mwa  makambo moke. Nakotya yo obatela biloko mingi.” (Matai 25:21, 23) Nkolo, elingi koloba Yesu akosala nini ntango akoya?

13 Liboso kaka bolɔzi monene ebanda, Nzambe akomonisa ete andimi mpo na libela bakristo oyo bakozala naino awa na mabele na ntango wana mpo na mosala na bango ya makasi. Yango nde kotyama elembo na bango ya nsuka. (Emoniseli 7:1-3) Na nsima, liboso Armagedone ebanda, Yesu akopesa bango mbano na ndenge akopesa bango likoki ya kokende na likoló. Kasi tokoloba nini mpo na baoyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabele mpe basalisaki bakristo oyo batyami mafuta na elimo na mosala ya kosakola? Bakotalelama lokola bampate. Mpe bakozwa mbano ya bomoi ya seko awa na mabele oyo bokonzi ya Nzambe ekoyangela.​—Matai 25:34.

MOOMBO MABE MPE YA GƆIGƆI

14, 15. Yesu azalaki nde koloba ete bakristo mingi oyo batyami mafuta na elimo bakokóma mabe mpe gɔigɔi? Limbolá.

14 Ndakisa yango elobeli mpe moombo oyo azalaki na talanta moko. Asalelaki yango te mpo ebotela nkolo na ye mbongo mingi to atyaki yango na banki te mpo ebimisa matabisi. Kasi, akundaki nde mbongo yango. Nkolo alobaki ete moombo yango azalaki mabe mpe gɔigɔi. Abɔtɔlaki moombo mabe yango talanta mpe apesaki yango moombo ya liboso. Mpe abwakaki moombo mabe wana libanda “na molili,” mpe kuna moombo yango azalaki kolela mpo makambo ebebelaki ye.​—Matai 25:24-30; Luka 19:22, 23.

15 Ntango Yesu alobaki ete moko ya baombo misato azalaki mabe mpe gɔigɔi, alingaki koloba te ete bakristo mingi  (1/3) oyo batyami mafuta na elimo, bakozala lokola moombo wana. Toyebi yango nsima ya kokokanisa ndakisa oyo ná bandakisa mibale misusu. Na ndakisa ya moombo ya sembo mpe ya mayele, Yesu alobeli moombo mabe oyo anyokolaki baombo mosusu. Yesu alobaki te ete baoyo bazali na kati ya etuluku ya moombo ya sembo mpe ya mayele bakokóma mabe. Kasi, azalaki nde kokebisa bakristo oyo batyami mafuta na elimo ete basengeli te kokóma lokola moombo mabe. Lisusu, na ndakisa ya bangɔndɔ zomi, Yesu alobeli mpe bangɔndɔ mitano ya zoba. Azalaki te koloba ete ndambo (1/2) ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo bakokóma bazoba. Kasi, Yesu azalaki nde kokebisa bango na oyo ekokóma soki bamilɛngɛli te mpe basɛnzɛli te. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Ndenge moko mpe, na ndakisa ya batalanta, Yesu azalaki te koloba ete bakristo mingi oyo batyami mafuta na elimo bakozala mabe mpe gɔigɔi na boumeli ya mikolo ya nsuka. Azalaki nde kokebisa bakristo oyo batyami mafuta na elimo ete bákóma te lokola moombo wana mabe kasi bákoba nde kosala mosala ya kosakola na molende.​—Matai 25:16.

Yesu akopesa bayekoli nyonso oyo bazali komipesa na mosala ya kosakola mbano

16. (a) Mateya nini mibale tozwi na ndakisa batalanta? (b) Ndakisa ya batalanta esalisi biso tókanga ntina ya makambo nini? (Talá etanda “ Ndenge nini tosengeli kolimbola ndakisa ya batalanta?”)

16 Mateya nini mibale tozwi na ndakisa ya batalanta? Ya liboso, Yesu apesaki bayekoli na ye oyo batyami mafuta na elimo eloko moko ya motuya, mokumba moko ya ntina mingi: kosakola nsango malamu mpe kokómisa bato bayekoli. Ya mibale, Yesu alingi ete biso nyonso tómipesa mpenza na kosakola. Soki toyiki mpiko, mpe tosali mosala yango na bosembo, tokobi komonisa botosi mpe kozala sembo epai ya Yesu, tokoki mpenza kondimisama ete akopesa biso mbano.​—Matai 25:21, 23, 34.

^ par. 3 Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/07/2013, nkasa 21-22, paragrafe 8-10, epesi ndimbola ya moombo ya sembo mpe ya mayele.

^ par. 3 Lisolo oyo eleki epesi ndimbola ya bangɔndɔ zomi.

^ par. 3 Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/10/1995 nkasa 23-28, mpe lisolo oyo elandi na zulunalo oyo elimboli ndakisa ya bampate ná bantaba.

^ par. 5 Na ntango ya Yesu, talanta moko ezalaki mbongo oyo mosali asengelaki kozwa na boumeli ya mbula 20.

^ par. 8 Mwa moke nsima ya liwa ya bantoma, lipɛngwi epalanganaki na masangá nyonso. Na boumeli ya basiɛklɛ mingi, mosala ya kosakola ezalaki kosalema mingi mpenza te. Kasi na eleko ya “bobuki mbuma,” to na ntango ya nsuka, mosala ya kosakola esengelaki kobanda lisusu. (Matai 13:24-30, 36-43) Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/07/2013, nkasa 9-12.

^ par. 11 Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/07/2013, nkasa 7-8, paragrafe 14-18.

^ par. 15 Talá paragrafe 13 ya lisolo “Okokoba ‘kosɛnzɛla’?” na zulunalo oyo.