Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Mars 2015

Likanisi ya kobala “na kati ya nkolo kaka” esilá ngala?

Likanisi ya kobala “na kati ya nkolo kaka” esilá ngala?

“Nazali komona te moto ya kobalana na ye na kati ya lisangá, mpe nazali kobanga naya konuna kaka ngai moko.”

“Mibali mosusu ya mokili bazalaka boboto, na bizaleli kitoko mpe batyelaka basusu likebi. Basepelaka na lingomba na ngai mpe namonaka ete bazali malamu koleka bandeko mibali mosusu ya lisangá.”

Basaleli mosusu ya Nzambe ya minzemba balobá mpe bongo. Bayebi ete Yehova alingi ete basaleli na ye bábala “na kati ya Nkolo kaka,” elingi koloba, kobalana kaka na bakristo ya solo. (1 Bakorinti 7:39) Kasi, mpo na nini bakristo mosusu balobaka makambo oyo?

NTINA OYO BATO MOSUSU BAKÓMAKA NA BANTEMBE

Bakristo oyo balobaka boye bakoki kokanisa ete bandeko basi ya minzemba bazali mingi koleka oyo ya mibali. Na bikólo mingi, likambo yango ezali solo. Na ndakisa, na Corée, bandeko basi mingi (57%) bazali minzemba mpe bandeko mibali (43%) bazali minzemba. Mpe na Colombie, bandeko basi mingi (66%) bazali minzemba mpe bandeko mibali (34%) bazali minzemba.

Na bisika mosusu, baboti oyo bazali Batatoli te bakoki kosɛnga mbongo mingi to biloko mosusu ya ntalo ntango bana na bango ya basi bazali kobala. Mpe bandeko mibali mosusu ya minzemba bakokaka te kosomba biloko yango. Yango wana, bandeko basi misusu bámitungisaka soki bakozwa mpenza mobali oyo azali mokristo. *​—Talá maloba na nse ya lokasa.

KOTYELA YEHOVA MOTEMA EZALI NA NTINA

Soki omonaka mpe bongo, yebá ete Yehova ayebi malamu likambo na yo mpe ayebi mpenza ndenge oyo ozali komiyoka.​—2 Ntango 6:29, 30.

Kasi, na Biblia, Yehova azali kosɛnga biso tóbala na kati ya Nkolo kaka. Mpo na nini? Mpo ayebi nini eleki malamu mpo na biso mpe alingi kobatela biso. Alingi te tózwa bikateli ya mabe oyo ekopesa biso mpasi mpe ekosilisa biso esengo. Na ntango  ya Nehemia, Bayuda mingi babalaki basi oyo bazalaki kosalela Nzambe te. Yango wana, Nehemia alobelaki ndakisa mabe ya Salomo. Alobaki ete, “Nzambe na ye alingaki ye, bongo Nzambe akómisaki ye mokonzi na Yisraele mobimba. Ata ye, basi bapaya basalisaki ye lisumu.” (Nehemia 13:23-26) Yehova ayebi ete makundoli na ye ezalaka mpo na bolamu na biso, mpe mpo na ntina wana apesá bakristo etinda ya kobala na kati ya nkolo kaka. (Nzembo 19:7-10; Yisaya 48:17, 18) Tozali na botɔndi mpenza ete apesaka biso toli ya bolingo mpe oyo ebongi kotyela motema. Ntango totosi Yehova mpo azali Mokonzi na biso, tondimaka ete azali na lotomo ya koyebisa biso oyo tosengeli kosala.​—Masese 1:5.

Na ntembe te, okosepela te ‘kokangana na ekanganeli ya mabe,’ elingi koloba, kobalana na moto oyo alingaka Yehova te. Moto wana akoki kopekisa yo kosalela Yehova. (2 Bakorinti 6:14) Batoli ya Yehova esalisaka kaka, mpe bakristo mingi lelo bazwá ekateli ya kotosa Yehova. Kasi, bamosusu basalaka bongo te.

ZALÁ NA MAKANISI EBONGI

Ndeko mwasi moko na Australie na nkombo Maggy alinganaki na moto moko oyo azali Motatoli te. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Alobi boye: “Nakimaki makita mingi kaka mpo nazala ná ye. Elimo na ngai ebebaki mpenza.” Elenge mwasi mosusu na Inde na nkombo Ratana alinganaki na mwana kelasi na bango oyo abandaki koyekola Biblia. Nzokande, abandaki koyekola Biblia kaka mpo alingana ná ye. Nsukansuka, Ratana atikaki kosambela Yehova mpe akómaki kosambela na lingomba mosusu mpo abalana na ye.

Ndenguè oyo afandaka na Cameroun azalaki na mbula 19 ntango abalanaki na mobali moko oyo azalaki kosalela Yehova te. Liboso ya libala na bango, mobali yango alakaki ete ndeko mwasi wana akoki kokoba kozala Motatoli. Kasi, pɔsɔ mibale nsima ya libala na bango, ayebisaki ye ete ameka lisusu te kotya makolo na lisangá. Ndenguè alobi boye: “Nakómaki lokola mwana etike mpe nazalaki kolela. Namonaki ete nazali lisusu te na bokonzi na bomoi na ngai. Nazalaki ntango nyonso kotungisama.”

Ezali solo ete bakristo mosusu babalá bapakano kasi bazalaka boboto mpe makambo makasimakasi te. Kasi, ata soki molongani na yo wana ya mopakano azali boboto, kasi boyokani na yo ná Yehova ekozala ndenge nini? Okomiyoka ndenge nini koyeba ete olandaki te toli oyo Yehova apesaki yo mpo ozala na esengo? Mpe likambo eleki ntina, Yehova ayokaki ndenge nini mpo na likambo oyo osalaki?​—Masese 1:33.

Bandeko mibali mpe basi na mokili mobimba oyo batosaki toli ya Yehova ya kobala “na kati ya Nkolo kaka” bamonaka mpenza ete yango ezali ekateli oyo eleki malamu. Mpo na komonisa ete bazali na ekateli ya kosepelisa Yehova, bandeko ya minzemba bazalaka na ekateli ya kobalana na moto oyo asambelaka ye. Michiko oyo afandaka na Japon azalaki na ekateli ya kotosa Nzambe atako bandeko na ye ya libota balukaki kondimisa ye ete abalana na moto oyo alingaka Yehova te. Mpe ezalaki kosala ye mpasi ntango azalaki komona ete baninga na ye mosusu babali bakristo ya solo kasi ye azali kaka monzemba. Alobi ete: “Nakobaki koloba na nse ya motema ete lokola Yehova azali ‘Nzambe ya esengo,’ ezali libala te nde esalaka ete moto azala na esengo to te. Nandimaka mpe ete akokisaka bamposa ya motema na biso. Na yango, soki tozwi te moto ya kobalana na ye atako tozali na mposa ya kobala, ezali malamu tótikala minzemba sikoyo.” (1 Timote 1:11) Na nsima, Michiko abalanaki na ndeko moko ya malamu, mpe azali na esengo na ndenge ayokaki toli ya Yehova.

Ezali mpe na bandeko mibali mosusu oyo bazelaki mpo na kozwa moto oyo abongi mpo na kobalana na ye. Na ndakisa, ndeko Bill oyo afandaka na Australie alobi ete na bantango mosusu azalaki kosepela na basi oyo bazalaki Batatoli te. Kasi, aboyaki kosala boninga ata na moko na bango mpo alingaki te kosala boyokani oyo ekosala ete akangana na “ekanganeli ya mabe” ná moto oyo azali mondimi te. Na boumeli ya bambula, azalaki mpe kosepela na mwa bandeko basi mosusu, kasi bazalaki kosepela na ye te. Bill azelaki mbula 30 tii ntango amonaki ndeko mwasi moko oyo azalaki na mikano moko na ye. Alobi ete: “Nayokaka mawa te. Namonaka ete nazwá lipamboli mpo tobimaka mosala ya kosakola elongo, toyekolaka elongo, mpe tosambelaka elongo. Nazalaka na esengo ya  kokutana mpe kozala elongo na baninga ya mwasi na ngai mpo bango nyonso bazali basaleli ya Yehova. Libala na biso etambolaka malamu mpo tosalelaka batoli ya Biblia.”

NTANGO OZALI KOZELA YEHOVA

Okoki kosala nini ntango ondimi toli ya Yehova mpe ozali kozela mobali to mwasi oyo asalelaka ye? Okoki koluka koyeba mpo na nini obali naino te. Soki okanisi ete ezali mpo olingi kotosa mobeko ya Yehova, wana okoki kondimisama ete yango esepelisaka Yehova. (1 Samwele 15:22; Masese 27:11) Lisusu, kobá kobondela Yehova ntango nyonso mpe yebisá ye mpenza ndenge oyo ozali komiyoka. (Nzembo 62:8) Soki ozali kosala nyonso mpo na kolonga komekama mpe kobundisa bamposa mabe, boyokani na yo ná Yehova ekokóma makasi mokolo na mokolo. Okoki kozala na elikya ete Yehova ayebi bamposa na yo mpo ozali na ntina mingi na miso na ye. Alaki moto moko te ete akopesa ye mobali to mwasi. Kasi soki libala ezali mpenza eloko oyo ozali na yango mposa, Yehova ayebi lolenge eleki malamu ya kokokisa bamposa na yo.​—Nzembo 145:16; Matai 6:32.

Na ntango mosusu okoki komiyoka lokola Davidi, oyo alobaki ete: “Ee salá mbangu, yanolá ngai, ee Yehova. Elimo na ngai ekómi na nsuka. Kobombela ngai elongi na yo te.” (Nzembo 143:5-7, 10) Kolɛmba nzoto te. Pesá Yehova ntango ya komonisa yo likambo oyo alingi osala. Yokáká Yehova na nzela ya botángi ya Biblia mpe komanyola na mozindo na makambo oyo otángi. Yango ekosalisa yo oyeba oyo Yehova azali kosɛnga yo mpe ndenge oyo asalisaki basaleli na ye na kala. Soki ozali koyoka ye, okozala na ekateli ya kokoba kotosa ye.

Bakristo ya minzemba bazali na motuya mingi na lisangá; mbala mingi basalisaka mabota mpe bilenge

Okoki kosala lisusu nini mpo ozala na esengo mpe na mingi ya kosala ntango ozali monzemba? Okoki kosala makasi mpo okómisa boyokani na yo ná Yehova makasi mpe okóma na bizaleli malamu. Okoki mpe koyekola ezaleli ya kokaba, koboya kozala gɔigɔi, kofanda malamu ná basusu, mpe kozala sembo epai ya Yehova. Bizaleli oyo ezali na ntina mingi mpo na kozala na libala ya esengo. (Ebandeli 24:16-21; Ruta 1:16, 17; 2:6, 7, 11; Masese 31:10-27) Kobá koluka liboso bokonzi mpe zalá na mingi ya kosala na mosala ya kosakola mpe na lisangá na yo. Makambo wana ekobatela yo mpo ozwa te bikateli ya mabe. Mpo na kolobela bambula oyo azalaki monzemba, Bill alobi boye: “Ekendaki mbangu! Nasalelaki ntango yango na mosala ya Yehova lokola mobongisi-nzela.”

Mobeko oyo Yehova apesá ya kobala “na kati ya Nkolo kaka” esilá ngala te to ekómá ya monyato. Soki tozwi ekateli ya kobala mokristo ya solo, tokokumisa Yehova mpe tokozala na esengo. Biblia elobi ete: “Esengo na moto oyo azali kobanga Yehova, oyo asepeli mingi na mitindo na ye. Biloko ya motuya mpe bomɛngo ezali na ndako na ye; mpe boyengebene na ye ezali mpo na libela.” (Nzembo 112:1, 3) Na yango, zalá na ekateli ya kotosa mobeko ya Nzambe oyo elobeli kobala “na kati ya Nkolo kaka.”

^ par. 7 Na lisolo oyo, tolobeli mingimingi bandeko basi. Kasi, batoli yango ezali na mitinda oyo etaleli mpe bandeko mibali.

^ par. 13 Bankombo mosusu ezali ya bango te.