Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Mars 2015

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Na mikolo eleki, mikanda na biso ezalaki kosalela maloba ya elilingi (type) mpe kokokisama na yango (antitype). Kasi, mpo na nini na bambula oyo euti koleka, esaleli yango mingi mpenza te?

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/09/1950 epesaki ndimbola ya maloba “elilingi” (type) mpe “kokokisama na yango” (antitype). Elimbolaki ete elilingi ezali moto, likambo, to eloko oyo ezali komonisa likambo to eloko moko monene na mikolo ezali koya. Mpe kokokisama na yango (antitype) ezali moto, likambo, to eloko oyo elilingi ezali kolobela. Elilingi ezalaki mpe kobengama elili mpe kokokisama na yango ezalaki komonisa ndenge likambo yango esalemi.

Na bambula eleki, mikanda na biso ezalaki koloba ete basi mpe mibali ya sembo lokola Debora, Elihu, Yefeta, Yobo, Rahaba, Rebeka, mpe mingi mosusu, bazalaki elilingi ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo to ya “ebele mpenza ya bato.” (Emoniseli 7:9) Na ndakisa, tobandaki koloba ete Yefeta, Yobo, mpe Rebeka bazalaki komonisa bakristo oyo batyami mafuta na elimo, mpe Debora ná Rahaba bazalaki komonisa ebele mpenza ya bato. Kasi, mpo na nini na bambula oyo euti koleka, tosaleli te maloba ya elilingi ya ndenge wana?

ELILI TO ELILINGI

Elekeli na Yisraele ya kala ezalaki elilingi.​—Mitángo 9:2

KOKOKISAMA NA YANGO

Ntoma Paulo alobaki ete Kristo azali “elekeli na biso.”​—1 Bakorinti 5:7

Makomami eteyaka ete bato mosusu oyo Biblia elobeli, bazali elilingi oyo ezali komonisa moto to eloko moko monene na mikolo ezali koya. Na ndakisa, na Bagalatia 4:21-31, ntoma Paulo alobeli “elilingi” oyo ezali komonisa basi mibale. Mwasi ya liboso ezali Agare, moombo ya Abrahama ya mwasi. Ntoma Paulo alimboli ete mwasi yango azalaki komonisa libota ya Yisraele, oyo esalaki boyokani elongo na Yehova na nzela ya Mibeko ya Moize. Mwasi ya mibale azali “mwasi ya nsomi,” Sara mwasi ya Abrahama. Azalaki komonisa mwasi ya Nzambe, oyo ezali eteni ya ebongiseli ya Nzambe na likoló. Ntoma Paulo alobeli mpe bokokani oyo ezali kati na nganga-nzambe mokonzi Melekisedeke ná Yesu. (Baebre 6:20; 7:1-3) Lisusu, ntoma Paulo akokanisi mosakoli Yisaya mpe bana na ye na Yesu mpe bakristo oyo batyami mafuta na elimo. (Baebre 2:13, 14) Yehova asalisaki ntoma Paulo alobela bokokanisi nyonso wana, yango wana tosengeli kondimisama ete bililingi mpe kokokisama na yango ezali makambo ya solosolo.

 Ata soki Biblia emonisi ete moto moko boye azali elilingi, tosengeli te kokanisa ete makambo nyonso ya mikemike ya bomoi na ye ezali komonisa likambo moko ya monene na mikolo ezali koya. Na ndakisa, ntoma Paulo alobaki ete Melekisedeke azalaki komonisa Yesu. Kasi, alobeli te ntango oyo Melekisedeke amemelaki Abrahama mampa ná vinyo ntango Abrahama alongaki bakonzi minei. Na yango, Makomami epesi te bantina oyo esengeli kotinda biso tóluka koyeba ndimbola ya makambo wana oyo elobelami te.​—Ebandeli 14:1, 18.

Basiɛklɛ mingi nsima ya liwa ya Yesu, bakomi mosusu basalaki libunga moko monene. Bakómisaki masolo mingi ya Biblia bililingi. Buku moko (The International Standard Bible Encyclopaedia) oyo elobeli mateya ya Origène, Ambroise, mpe Jérôme elobi boye: “Balukaki bililingi ya makambo mpe masolo nyonso, ata ya mikemike, oyo Makomami elobeli, mpe na ntembe te bazwaki yango. Bazalaki kokanisa ete ata makambo mikemike oyo bato mingi basalaka ebombi solo . . . , ata motángo ya bambisi 153 oyo bayekoli ya Yesu bakangaki na butu oyo Mobikisi abimelaki bango nsima ya lisekwa na ye, mbala mingi bato mosusu balingaki kopesa yango ndimbola!”

Mokomi mosusu na nkombo Augustin d’Hippone amonisaki ete lisolo ya Biblia oyo Yesu aleisaki bato 5 000 na mampa mitano ya ɔrje mpe mbisi mibale ezalaki na ndimbola moko ya ntina mingi. Alobaki ete mampa mitano ya ɔrje ezalaki komonisa babuku mitano ya liboso ya Biblia. Mpe lokola bazalaki kokanisa ete blé ezalaki na motuya mingi koleka ɔrje, yango elimbolaki ete “Kondimana ya Sika” ezalaki na motuya mingi koleka “Kondimana ya Kala.” Abakisaki lisusu ete mbisi mibale ezalaki komonisa mokonzi mpe nganga-nzambe. Moto mosusu ya mayele amonisaki ete ndenge oyo Yakobo asombaki lotomo ya Esau ya mwana ya liboso na saani ya supu ya motane ezalaki komonisa ndenge Yesu asombelaki bato elikya ya bomoi na likoló na nzela ya makila na ye ya motane!

Soki bandimbola oyo ezali mpasi mpo na kokanga ntina na yango, okoki komona ete ezali pɛtɛɛ te kolimbola maloba ya elilingi. Bato bazali te na likoki ya koyeba lisolo nini ya Biblia ezali elilingi ya eloko moko boye to te. Na yango, likambo nini ya malamu tosengeli kosala? Ntango makomami eteyi ete moto, likambo, to eloko moko ezali komonisa likambo moko monene na mikolo ezali koya, tosengeli kondima yango. Kasi, tosengeli te kopesa ndimbola ya lisolo moko ya Biblia oyo makomami emonisi te ntina ya kosala bongo.

Ndenge nini tokoki kozwa litomba na makambo ya mikemike mpe masolo oyo totángaka na Biblia? Ntoma Paulo akomaki ete: “Makambo nyonso oyo ekomamaki kala ekomamaki mpo eteya biso, mpo, na ezaleli na biso ya koyika mpiko mpe na libɔndisi oyo euti na Makomami, tózala na elikya.” (Baroma 15:4) Ntoma Paulo azalaki kokomela bakristo oyo batyami mafuta na elimo na siɛklɛ ya liboso mpe azalaki koyebisa bango ndenge oyo bakokaki kozwela masolo ya Biblia litomba. Kasi, kobanda ntango wana, bakristo nyonso ata mpe “bampate mosusu” bazwaka matomba na mateya oyo ezali na makomami.​—Yoane 10:16; 2 Timote 3:1.

Masolo mingi ya Biblia etalelaka kaka te bakristo oyo batyami mafuta na elimo, “bampate mosusu,” to bakristo mosusu oyo bazalaki na bomoi na eleko moko boye. Kasi, masolo mingi ya Biblia ezali na matomba mpo na basaleli nyonso ya Nzambe, ezala ya ntango ya kala to ya mikolo na biso. Na ndakisa, minyoko ya Yobo emonisaka kaka te minyoko oyo bakristo oyo batyami mafuta na elimo bakutanaki na yango na Etumba ya liboso ya mokili mobimba. Basaleli mingi ya Nzambe, ezala mibali mpe basi, bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe “bampate mosusu,” banyokwamaki lokola Yobo mpe bazwaki matomba na ndenge bayekolaki lisolo na ye. Bamonaki “ndenge Yehova asukisaki makambo na ye, ete Yehova azali na bolingo mingi ya motema mpe amonisaka motema mawa.”​—Yakobo 5:11.

Lelo na masangá na biso, tozali na bandeko basi mibange ya sembo lokola Debora mpe bankulutu ya bilenge oyo bazali na bwanya lokola Elihu. Tozali mpe na babongisi-nzela ya nsanza na nsanza oyo bazali na molende mpe mpiko lokola oyo ya Yefeta mpe bandeko basi ná bandeko mibali ya sembo oyo bazali na motema molai lokola Yobo. Tozali na botɔndi mpenza ndenge Yehova asali ete “makambo nyonso oyo ekomamaki kala” ezala tii lelo mpo ete na nzela ya “libɔndisi oyo euti na Makomami tózala na elikya”!

Na yango, mpo na bantina oyo, tolukaka te koyeba ndimbola ya masolo nyonso ya Biblia to kokokisama na yango na mikolo ezali koya. Kasi, mikanda na biso ekómi sikoyo kotya likebi mingi na mateya ya ntina oyo tokoki kozwa na Makomami.