Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Février 2015

Yehova azali kotambwisa mosala na biso ya koteya na mokili mobimba

Yehova azali kotambwisa mosala na biso ya koteya na mokili mobimba

“Ngai Yehova nazali Nzambe na yo, Moto oyo azali koteya yo mpo na litomba na yo moko, Moto oyo azali kotambwisa yo na nzela oyo osengeli kotambola.”​—YISAYA 48:17.

1. Nini esalaki ete mosala ya kosakola esalema na mpasi?

NTANGO basaleli ya Yehova babandaki kosakola nsango malamu esili koleka sikoyo mbula 130, bakutanaki na mikakatano ebele. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Ndenge moko na bakristo ya siɛklɛ ya liboso, bango mpe bazalaki kaka mwa etuluku moke mpe basakolaki nsango oyo bato mingi basepelaki na yango te. Bato mosusu bakanisaki ete batángá mingi te. Na nsima, ntango Satana abwakamaki awa na mabele, banyokwamaki. (Emoniseli 12:12) Mpe kobanda na ntango wana, bazali kosakola na ‘mikolo oyo ya nsuka’ oyo ezali “ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano.”​—2 Timote 3:1.

2. Yehova asali nini mpo na kosalisa biso tósakola?

 2 Kasi Yehova asalisaka basaleli na ye. Alingi ete básakola nsango malamu na mabele mobimba, mpe akopesa nzela te ete ata eloko moko epekisa mosala yango. Asalisi bato na ye básambela ye na lolenge oyo andimaka mpe akaboli bango na lingomba ya lokuta. Asalaki mpe bongo na ntango ya kala ntango asikolaki Bayisraele na Babilone. (Emoniseli 18:1-4) Mpe makambo oyo Yehova ateyaka biso ememelaka mokomoko na biso matomba. Asalisaka biso tózala na kimya ná basusu, mpe apesaka biso formasyo mpo tóteya basusu makambo etali ye. (Tángá Yisaya 48:16-18.) Atako Yehova atambwisaka mosala na biso, yango elingi koloba te ete abongolaka ntango nyonso makambo oyo ezali koleka na mokili mpo na kosalisa biso tósakola. Ya solo, makambo mosusu oyo esalemi na mokili esali ete mosala na biso ya kosakola esalema malamu mpenza. Kasi, atako bongo tozali konyokwama mpe kokutana na mikakatano mosusu oyo eutaka na mokili oyo ya Satana. Kaka na lisalisi ya Yehova nde tozali kosakola.​—Yisaya 41:13; 1 Yoane 5:19.

3. Ndenge nini esakweli ya Danyele ekokisami?

3 Danyele asakolaki ete na ntango ya nsuka, bato mingi bakososola solo ya Biblia. (Tángá Danyele 12:4.) Mwa moke liboso, “ntango ya nsuka” ebanda, Yehova asalisaki bato na ye báyeba malamu mateya kitoko ya Biblia mpe bábwaka mateya ya mangomba ya lokuta. Lelo oyo, basaleli na ye bazali koteya Biblia na mokili mobimba. Emonani polele ete esakweli ya Danyele ekokisami. Bato pene na milio 8 bayekoli solo mpe bazali koteya yango epai ya basusu. Na yango, wapi biloko mosusu oyo esalisi basaleli ya Yehova básakola mokili mobimba?

KOBONGOLA BIBLIA

4. Na mobu 1900, Biblia ebongolamaki na minɔkɔ boni?

4 Lelo oyo, bato mingi bazali na Biblia, mpe yango ezali kosalisa biso tósakwela bango nsango malamu. Kasi liboso ezalaki pɛtɛɛ te. Na boumeli ya bankama ya bambula, bakonzi ya mangomba balingaki te ete bato bátánga Biblia. Kutu banyokolaki baoyo batángaki yango mpe babomaki bato mosusu oyo babongolaki yango. Kasi, na bambula 1800, bibongiseli mosusu ebongolaki to ebimisaki Biblia to ndambo na yango na minɔkɔ soki 400. Na mobu 1900, bato mingi bakómaki na Babiblia. Atako bongo, bazalaki koyeba te makambo oyo ezali koteya.

5. Mosala nini Batatoli ya Yehova basali mpo na kobongola Biblia?

5 Basaleli ya Yehova bayebaki ete esengeli báyebisa basusu oyo Biblia eteyaka, mpe yango nde basalaki. Na ebandeli, basalelaki mabongoli oyo ezalaki, bazalaki kopesa yango epai ya bato. Kobanda na mobu 1950, babimisaki Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Mosantu to ndambo na yango na minɔkɔ koleka 120. Na mobu 2013, babimisaki na Lingelesi Libongoli ya Mokili ya Sika, oyo ebongisami lisusu. Libongoli yango ezali pɛtɛɛ mpo na kokanga ntina mpe lisusu mpo na kobongola. Mpe ntango tozali kosalela Biblia oyo bato bakoki kokanga ntina, ezalaka pɛtɛɛ mpo na koteya bango solo.

ELEKO YA KIMYA

6, 7. (a) Bitumba nini esalemi na boumeli ya mbula 100 oyo eleki? (b) Ndenge nini bileko ya kimya na mikili mosusu esalisi biso tósakola?

6 Na boumeli ya mbula 100 oyo eleki,  bitumba mingi esalemi, ata mpe bitumba mibale ya mokili mobimba. Bamilio ya bato bakufaki. Kasi, na lolenge nini kimya ezalaki mpe ndenge nini esalisaki basaleli ya Yehova básakola? Na ntango ya etumba ya mibale ya mokili mobimba, ndeko Nathan Knorr nde azalaki kokamba mosala ya Batatoli ya Yehova. Na liyangani moko oyo esalemaki na mobu 1942, asalaki diskur moko ya kafukafu oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Kimya ekoki koumela?” Ndeko Knorr alimbolaki esakweli ya Emoniseli mokapo 17 mpe amonisaki ete Armagedone eyaki naino te. Nsima ya etumba eleko ya kimya ekozala.​—Emoniseli 17:3, 11.

7 Yango elingi koloba te ete nsima ya etumba, kimya ezalaki bipai nyonso. Kobanda na etumba ya mibale ya mokili mobimba, bamilio ya bato bakufi na bitumba mosusu. Kasi na mikili mingi, ezalaki na eleko ya kimya oyo esalisaki mpenza ete basaleli ya Yehova básakola. Matomba nini emonanaki? Na etumba ya mibale ya mokili mobimba, Batatoli ya Yehova bazalaki kaka 110 000. Kasi lelo oyo bazali soki milio 8! (Tángá Yisaya 60:22.) Ya solo, na bileko ya kimya, tokoki kosakola nsango malamu epai ya ebele ya bato.

BAMBONGWANA NA LOLENGE TOSALAKA MIBEMBO

8, 9. Makambo nini ekómisi kosala mibembo pɛtɛɛ, mpe na nini esalisi na mosala na biso?

8 Ntango basaleli ya Yehova babandaki kosakola na États-Unis, ezalaki pɛtɛɛ te mpo na bango kosala mibembo. Na mobu 1900, mbula soki 21 nsima ya kobanda kobimisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, mituka ezalaki kaka soki 8 000 mpe kaka mwa banzela moke nde na ekólo yango ezalaki kitoko. Kasi lelo oyo, mituka na mokili mobimba ezali koleka miliare moko na ndambo mpe banzela ya malamu ezali na bisika mingi. Na yango, tokoki kosalela mituka mpe banzela wana mpo na kokende kosakwela bato na bisika oyo ezali mosika na bingumba mpe ezali mpasi mpo na kokóma kuna. Ata soki tozali epai kosala mobembo ezali pɛtɛɛ te mpe esengeli kotambola ntaka molai, tosalaka nyonso oyo tokoki mpo tókende mpe tósakwela bato bisika nyonso oyo bazali.​—Matai 28:19, 20.

Tosalaka nyonso oyo tokoki mpo tókende mpe tósakwela bato bisika nyonso oyo bazali

9 Mpo na mibembo, tosalelaka mpe biloko mosusu. Totindaka Babiblia mpe mikanda mosusu na mituka, masuwa mpe bingbunduka. Yango emonisi ete nsima kaka ya mwa bapɔsɔ, tokoki kotindela bandeko mikanda na bisika oyo ezali mosika mpenza. Bakɛngɛli ya zongazonga, bandeko ya Komite ya filiale, bamisionɛrɛ mpe bamosusu basalaka mibembo na mpɛpɔ mpo na kosala badiskur ya mayangani mpe kosalisa masangá. Bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi mpe bandeko mosusu oyo bautaka na biro monene ya Batatoli basalaka mpe mibembo na mpɛpɔ na mikili ndenge na ndenge mpo na kolendisa bandeko mpe kopesa bango formasyo. Makambo oyo nyonso esalisaka mpo ete libota ya Yehova ezala na bomoko.​—Nzembo 133:1-3.

 LOKƆTA MPE KOBONGOLA

10. Na mokili mobimba, lokɔta ya Lingelesi elobamaka bisika nini?

10 Na siɛklɛ ya liboso, bato mingi ya ampire Roma bazalaki koloba Grɛki. Lelo oyo, bato mingi ya bikólo ndenge na ndenge na mokili balobaka Lingelesi. Kutu, buku moko (English as a Global Language) elobi ete bato mingi ya mokili mobimba (1/4) balobaka to bayokaka Lingelesi. Bato mingi bayekolaka Lingelesi mpo yango nde monɔkɔ oyo elobamaka mingi na bisika ya mombongo, na politiki, na makambo ya siansi mpe teknoloji.

11. Ndenge nini monɔkɔ ya Lingelesi esalisi mosala ya Basaleli ya Yehova?

11 Lokola Lingelesi ezali kolobama bisika mingi na mokili, yango esalisi mpo solo epalangana. Kala, mikanda na biso ezalaki liboso na Lingelesi. Bato mingi bakokaki kotánga yango mpo Lingelesi ezalaki kolobama na mokili mobimba. Monɔkɔ ya Lingelesi esalelamaka mpe na biro monene ya biso Batatoli. Mpe bandeko mibali mpe basi oyo bautaka na bikólo ndenge na ndenge mpe oyo bayebi Lingelesi, bazwaka formasyo na biteyelo na biso oyo ezali na Patterson, New York.

Batatoli ya Yehova na mokili mobimba bayebaka “monɔkɔ ya pɛto” ya solo ya Biblia mpe bazali na bomoko

12. Tozali kobongola mikanda na minɔkɔ boni, mpe ndenge nini baprogramɛ ya ordinatɛrɛ esalisi?

12 Kasi tozali na mokumba ya kosakola nsango malamu epai ya bato ya mokili mobimba. Yango wana tozali kobongola mikanda na biso na minɔkɔ koleka 700. Nini esalisaka? Baordinatɛrɛ mpe baprogramɛ ya ordinatɛrɛ lokola MEPS, esalisi na mosala ya kobongola. Matomba oyo emonani ezali ete Batatoli ya Yehova na mokili mobimba bakoki kokanga ntina ya ‘monɔkɔ ya pɛto’ ya solo ya Biblia mpe bakoki kozala na bomoko.​—Tángá Sefania 3:9.

MIBEKO MPE BIKATELI YA TRIBINALE

13, 14. Ndenge nini mibeko mpe bikateli ya batribinale esalisi biso?

13 Na balolenge mingi, mibeko ya Baroma esalisaki bakristo ya siɛklɛ ya liboso mpo na kosakola. Lelo oyo mpe, mibeko ya bikólo mingi esalisaka biso mpo tósala mosala ya kosakola. Na ndakisa, mibeko ya États-Unis epesaka bato lotomo ya kopona lingomba na bango, ya kolobela bindimeli na bango mpe ya koyangana.  Yango emonisi ete tozali na bonsomi ya kosala makita na biso mpe ya kosakola na ekólo yango. Biro na biso monene oyo ezali kuna na États-Unis, ezali mpe na bonsomi ya kobongisa mosala ya kosakola na mokili mobimba. Kasi, na ntango mosusu esɛngaki tókende na tribinale kosamba mpo na kokɔtela bonsomi oyo tozali na yango ya kosakola nsango malamu. (Bafilipi 1:7) Mpe ntango bazuzi ya batribinale yango balukaki kolongola lotomo na biso ya kosakola, tokendaki na batribinale ya minene, mpe mbala mingi tolongaki.

14 Na mikili mosusu mpe, tokendaki na tribinale mpo na kokɔtela lotomo na biso ya kosambela Yehova mpe kosakola. Ntango tolongaki te, tokendaki na batribinale oyo etalelaka makambo ya mikili mingi. Na ndakisa, mbala mingi tokendaki na tribinale ya Mpoto mpo na ntomo ya bato. Na sanza ya 06/2014, tribinale yango elongisaki biso na makambo 57 mpe bikólo mingi ya Mpoto esengeli kotosa bikateli ya tribinale yango. Atako ‘bikólo nyonso eyinaka’ biso, mibeko ya bikólo mingi epesi biso nzela ya kosambela Yehova na bonsomi.​—Matai 24:9.

MAKAMBO OYO ESALISI BISO

Tokabolaka mikanda na biso na minɔkɔ mingi

15. Ndenge nini mayele ya kobimisa mikanda ebongisamaki lisusu, mpe mayele yango esalisi biso na nini?

15 Mayele ndenge na ndenge ya sika ya kobimisa mikanda esalisi biso tósakola nsango malamu epai ya ebele mpenza ya bato. Na boumeli ya bankama ya bambula, bato basalelaki mayele ya kobimisa mikanda oyo Johannes Gutenberg abimisaki na mobu soki 1450. Kasi na bambula 200 oyo eleki, bamasini ya kobimisa mikanda ebongisami lisusu mingi. Na nsima, babimisaki masini ebengami Offset; mpe kobimisa mikanda ekómaki mbangu mpe  kitoko mingi. Lisusu, kosala bapapye mpe kogumba mikanda ezalaki kolya mbongo mingi te. Bambongwana wana ememaki litomba nini na mikanda na biso? Na mobu 1879, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya liboso ebimisamaki kaka na Lingelesi. Ezalaki na bililingi te, mpe ebimisamaki na motángo ya 6 000. Lelo oyo, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezali kobimisama na minɔkɔ koleka 200. Ezali na bililingi ya kitoko mpenza mpe ya langilangi, mpe zulunalo mokomoko ezali kobimisama koleka milio 50.

16. Biloko nini oyo ebimisamá esalisi biso mpo na kosakola na mokili mobimba? (Talá elilingi ya ebandeli.)

16 Mayele ndenge na ndenge oyo ebimisami na boumeli ya mbula 200 oyo eleki, esalisi basaleli ya Yehova mpo na kosakola nsango malamu. Tolobelaki liboso bingbunduka, mituka mpe bampɛpɔ. Kasi tokoki kotánga mpe bavelo, bamasini ya kobɛta na misapi, bisaleli mpo na bato oyo bamonaka te, telegrafe, batelefone, bakamera, baaparɛyi ya kokɔtisa mingongo mpe bililingi, radio, televizyo, bafilme, baordinatɛrɛ mpe Internet. Atako basaleli ya Yehova babimisá te biloko oyo, kasi basalelaka yango mpo na kobimisa Biblia mpe mikanda mosusu na minɔkɔ ebele mpe mpo na kosakola na mokili mobimba. Na ndenge yango, ‘bámɛlaka miliki ya bikólo,’ ndenge kaka Biblia esakolaki yango.​—Tángá Yisaya 60:16.

Yehova alingaka biso mpe azalaka na mposa ete tósala elongo na ye

17. (a) Likambo nini etali mosala ya kosakola emonani polele? (b) Mpo na nini Yehova alingi ete tósala elongo na ye?

17 Emonani polele ete Yehova azali kotambwisa mosala na biso ya kosakola. Soki Yehova apesi biso mosala yango, ezali te mpo akokoka te kosala yango ye moko, kasi ezali nde mpo alingaka biso mpe azalaka na mposa ete tósala elongo na ye. Na mosala na biso ya kosakola, tomonisaka ete tolingaka ye mpe bato mosusu. (Marko 12:28-31; 1 Bakorinti 3:9) Tozali mpenza na botɔndi epai na Yehova ndenge azali kosalisa biso tósakola na mabele mobimba. Na yango, tiká ete tósalela libaku nyonso oyo tozali na yango mpo na kosakola na ntina na Yehova mpe Bokonzi na ye!

^ par. 1 Kobanda na bambula 1870, basaleli ya Yehova bayebanaki lokola Bayekoli ya Biblia. Na mobu 1931, babandaki kosalela nkombo ya Batatoli ya Yehova.​—Yisaya 43:10.