Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Février 2015

Monisáká molende na mosala ya kosakola

Monisáká molende na mosala ya kosakola

KOSAKOLA nsango malamu ezali mosala eleki kitoko mingi koleka misala nyonso oyo ezali kosalema lelo na mabele. Ezali lokumu kozala bamonisi ya Yehova na mosala wana ya koteya. Kasi, na ntango mosusu ekoki kozala mokakatano mpo ete babongisi-nzela mpe basakoli mosusu bákoba komonisa molende na mosala ya kosakola. Mpo na nini?

Nini ekoki kosalisa yo okoba komonisa molende na mosala ya kosakola?

Basakoli mosusu bamonaka ete basololaka na bato mingi te na mosala ya kosakola ndako na ndako mpo ebele ya bato bazalaka na bandako te. Mpe ntango bato bazali na bandako, ekoki kozala ete basepeli te na nsango ya Bokonzi mpe bakoki kutu mbala mosusu kosilikela biso. Basakoli mosusu bazali na teritware monene mpenza mpe bato bayokaka malamu, kasi babangaka ete bakozala soki moke te na likoki ya kosakwela moto nyonso na teritware yango. Kutu bandeko mosusu bazali basakoli esili koleka mbula mingi mpe balɛmbá nzoto mpo nsuka ezali kaka koya te.

Tokokutana na mikakatano na mosala na biso ya kosakola oyo ekoki kokitisa molende na biso. Tozali na mokili oyo ezali kotambwisama na “moto mabe,” elingi koloba Satana Zabolo; na yango tozali na elikya ete ekozala mpasi mpo na biso kosakola nsango malamu.​—1 Yoane 5:19.

Ezala ozali kokutana na mikakatano nini na mosala na yo ya kosakola, okoki kozala mpenza na elikya ete Yehova akosalisa yo olonga yango. Kasi okoki kosala nini mpo obakisa molende na yo na mosala ya kosakola? Tólobela mwa makanisi mosusu.

KOSALISA BASAKOLI YA SIKA

Mbula na mbula, bankóto ya bato bazali kozwa batisimo mpe kokóma Batatoli ya Yehova. Soki ozwi batisimo sika, okoki koyekola makambo mingi epai ya bandeko oyo basakolaka banda mbula ebele. Mpe soki ozali mosakoli esili koleka mbula ebele, okoki kosalisa basakoli ya sika? Kosala bongo, ekoki kosalisa mingi.

Yesu ayebaki ete bayekoli na ye bazalaki na mposa ya lisalisi mpo na kokóma bateyi oyo babongi, mpe alakisaki bango ndenge ya kosakola.  (Luka 8:1) Lelo oyo, basakoli ya sika basengeli na formasyo ya ndenge wana mpo na kokóma basakoli oyo babongi.

Tosengeli kokanisa te ete mpo kaka mosakoli ya sika azali kobima na mosala ya kosakola, azali koyekola ndenge ya koteya. Azali na mposa ya molakisi moko ya boboto mpe bolingo alakisaka ye makambo. Mosakoli oyo ameseni asengeli koteya ye ndenge ya (1) kobongisa mpe komekameka nini aloba liboso ya moto, (2) kosolola ná bato, (3) kokabola mikanda, (4) kozonga kotala bato oyo basepelaki, mpe (5) kobanda boyekoli ya Biblia. Mosakoli ya sika akoki kokóma na makoki mpenza soki azali kotala na likebi ndenge mosakoli oyo ameseni azali koteya mpe azali komekola ye. (Luka 6:40) Mpe mosakoli ya sika akozala motema ya kokita mpenza ntango ayebi ete moto moko azali wana mpo na kosalisa ye soki esengeli. Kopesa longonya mpe makanisi ekoki mpe kosalisa mosakoli ya sika.​—Mosakoli 4:9, 10.

SOLOLÁKÁ NÁ NDEKO OYO OBIMI NÁ YE

Atako okoki kosala milende ya kosolola na bato, kasi yebá ete mikolo mosusu, lisolo ya malamu koleka oyo okoki kozala na yango, ezali kosolola ná ndeko oyo obimi ná ye na mosala ya kosakola. Kobosana te ete Yesu atindaki bayekoli na ye básakola “mibalemibale.” (Luka 10:1) Lokola basalaki elongo, balendisanaki. Tozalaka na libaku malamu ya ‘kolendisana’ ntango tobimaka ná bandeko na biso na mosala ya kosakola.​—Baroma 1:12.

Wapi mwa makambo oyo bokoki kolobela? Moko na biso auti kokutana na likambo moko oyo elendisaki ye? Oyekoli likambo moko ya kolendisa na boyekoli na yo moko to boyekoli ya libota? Likambo moko oyo oyokaki na makita elendisaki yo? Ntango mosusu ozali kosakola ná mosakoli moko oyo oyebi malamu te. Mbala mosusu okoki kotuna ye aloba ndenge nini ayebaki solo. Nini endimisaki ye ete oyo ezali ebongiseli ya Yehova? Mikumba nini azalaki na yango to makambo nini akutanaki na yango? Ntango mosusu okoki koyebisa ye makambo oyo yo moko okutanaki na yango. Ata soki teritware na bino ezali ndenge nini, ntango ozali kosakola ná ndeko moko, ozali na libaku moko malamu ya kokoba “kolendisana.”​—1 Batesaloniki 5:11.

BONGISÁ LOLENGE NA YO YA KOYEKOLA

Mpo na kobatela molende na biso na mosala ya kosakola, tosengeli kobongisa lolenge na biso ya koyekola. “Moombo ya sembo mpe ya mayele” abimisaka masolo ya ndenge na ndenge oyo tokoki koyekola. (Matai 24:45) Tólobela moko ya makambo kitoko yango oyo tokoki koyekola biso moko: Mpo na nini mosala ya kosakola ezali na ntina mingi? Etanda “ Mpo na nini kobatela molende na mosala ya kosakola?” epesi mwa bantina.

 Kotalela makambo oyo ezali na etanda yango ekoki kopesa yo makasi ya kokoba kosakola na molende. Okoki komityela mokano ya kosala liste ya bavɛrsɛ oyo emonisi bantina oyo tosengeli kosakola na molende. Na nsima, kanisá na mozindo na bantina yango. Soki osali bongo, molende na yo mpo na mosala ya kosakola ekobakisama.

SALELÁKÁ MBALA MOKO MAYELE YA SIKA

Ebongiseli ya Yehova elakisaka mbala na mbala mayele ndenge na ndenge oyo ekoki kosalisa biso tóbongisa lolenge na biso ya kosakola. Na ndakisa, longola kosakola ndako na ndako, tokoki mpe komeka kosakola na nzela ya kokoma mikanda, kopesa litatoli na telefone, kosakola na balabala to na bisika bato bazalaka mingi, kopesa litatoli ya libaku malamu to ntango bato bazali na bisika na bango ya mosala. Ntango mosusu, tokoki mpe kozwa bibongiseli mpo na kosakola na bisika oyo Batatoli bazali kaka moke to bazali te.

Osepeli komeka mayele moko ya sika? Bandeko mingi oyo bamekaki mayele yango bamonaki ete esimbaki. Tótalela ndakisa misato.

Ndeko mwasi moko na nkombo Junette amonaki malamu ameka likanisi moko ya masolo ya Mosala ya Bokonzi oyo elobeli ndenge ya kobanda boyekoli ya Biblia. Asɛngaki ayekola na bato misato oyo azalaki kosala ná bango. Ndeko Junette akamwaki mpe asepelaki makasi ntango bango nyonso misato bandimaki koyekola mpe lisusu babandaki koyangana na makita ya lisangá.

Balendisaka mpe biso ete tólukaka bato oyo bakoki kosepela na masolo ya sikisiki na bazulunalo na biso. Mokɛngɛli ya zongazonga moko na États-Unis amonaki malamu alakisa lisolo moko ya Lamuká! oyo elobelaki bapine epai ya bapatrɔ nyonso oyo bazali na bamagazini ya bapine na esika moko boye. Ye ná mwasi na ye balakisaki mpe masolo oyo elobelaki “Yebá monganga na yo malamu”  (na Lifalanse) na babiro ya badoktɛrɛ koleka 100. Alobi ete kokende kotala bango ndenge wana, esalisaki bato bámesana ná mosala na biso ya kosakola mpe mikanda na biso. Nsima ya koyeba malamu bato ya teritware, mokɛngɛli ya zongazonga ná mwasi na ye bakómaki na likoki ya kozongela bato ebele.

Ndeko mwasi moko na nkombo Judy atindaki mokanda na biro monene ya Batatoli mpo na kopesa matɔndi mpo na ndenge balendisaki basakoli bápesa litatoli na telefone. Alobaki ete mama na ye, oyo azali na mbula 86 mpe nzoto etungisaka ye, asakwelaki ebele ya bato na telefone. Azwaki litomba mpo abandaki koyekola Biblia ná mwasi moko oyo azalaki na mbula 92!

Makanisi oyo epesamaka na mikanda na biso esalisaka mpenza. Meká yango! Ekoki kosalisa yo obatela esengo mpe molende na yo na mosala ya kosakola.

MITYELÁ MIKANO OYO OKOKOKA

Nini esalisaka biso tólonga na mosala na biso ya kosakola? Likambo eleki ntina ezali te motángo nini ya mikanda tokabolaka, bato boni toyekolaka na bango Biblia, to bato boni tozali kosalisa mpo bákóma Batatoli ya Yehova. Tókanisa naino mpo na Noa. Longola libota na ye, bato boni Noa asalisaki mpo bákóma basambeli ya Yehova? Kasi, azalaki mosakoli oyo abongi mpenza. Likambo eleki ntina ezali ete tozali kosalela Yehova na bosembo nyonso.​—1 Bakorinti 4:2.

Basakoli mingi bayebaka ete mpo na kosepela mingi na mosala ya kosakola, basengeli komityela mikano oyo bakokoka. Mwa mikano yango ekoki kozala nini? Mwa makanisi na yango ezali na etanda “ Mityelá mikano oyo okokoka.”

Sɛngá Yehova asalisa yo mpo mosala na yo ebota mbuma mpe ezala na ntina. Ntango okokisi mikano na yo, okosepela mpo oyebi ete ozali kosala nyonso oyo okoki mpo na kosakola nsango malamu.

Ezali solo ete kosakola nsango malamu ekoki kozala mokakatano. Kasi ezali na makambo oyo okoki kosala mpo ozala na molende na mosala ya kosakola. Sololáká masolo ya kolendisa ná ndeko oyo obimi ná ye na mosala ya kosakola, Yekoláká mbala na mbala mpe salá ete ezala kitoko, meká kosalela makanisi ya moombo ya sembo mpe ya mayele, mpe mityelá mikano oyo okokoka. Likambo eleki ntina na nyonso, kobosana te ete lokola ozali Motatoli ya Yehova, Nzambe apesi yo lokumu ya kosakola nsango malamu. (Yisaya 43:10) Ya solo, okoyoka mpenza esengo monene wana ozali kokoba komonisa molende na mosala ya kosakola!