Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Février 2015

Mekolá mpiko mpe bososoli ya Yesu

Mekolá mpiko mpe bososoli ya Yesu

“Atako bomoná ye te, bozali kolinga ye. Atako bozali komona ye te sikoyo, bozali kondimela ye.”​—1 PETRO 1:8.

1, 2. (a) Ndenge nini tokoki kozwa bomoi ya seko? (b) Nini ekoki kosalisa biso tókoba kotya makanisi mobimba na mobembo na biso?

NTANGO tokómaka bakristo, ezalaka lokola tobandi mobembo. Soki totikali sembo epai ya Nzambe, tokolonga na mobembo na biso mpe tokoki kozala na bomoi ya seko. Yesu alobaki ete: “Moto oyo akoyika mpiko tii na nsuka ye nde akobika.” (Matai 24:13) Na ntembe te, mpo tósilisa mobembo na biso, tosengeli kotikala sembo epai ya Nzambe tii “na nsuka,” ezala nsuka ya bomoi to nsuka ya ebongiseli oyo mabe. Kasi, tosengeli kokeba ete tóbendama te na mokili oyo. (1 Yoane 2:15-17) Ndenge nini tokoki kokoba kotya makanisi mobimba na mobembo na biso?

2 Yesu atikelá biso ndakisa ya kokoka mpenza. Soki tozali koyekola oyo Biblia elobi mpo na mobembo oyo Yesu asalaki, to bomoi na ye, tokoki koyeba soki azalaki moto ya lolenge nini. Mpe tokolinga ye mpe tokozala na kondima epai na ye. (Tángá 1 Petro 1:8, 9.) Ntoma Petro alobaki ete Yesu atikelá biso ndakisa mpo tólanda ye malamumalamu.  (1 Petro 2:21) Mpe soki tomekoli mpenza ndakisa ya Yesu, tokoyika mpiko tii na nsuka. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Na lisolo oyo eleki, tomonaki ndenge oyo tokoki komekola ezaleli ya komikitisa mpe ya boboto ya Yesu. Na lisolo oyo, tokomona ndenge tokoki komekola mpiko mpe bososoli na ye.

YESU AZALI NA MPIKO

3. Kozala na mpiko elimboli nini, mpe ndenge nini tokoki kokóma na yango?

3 Mpiko ezali ezaleli oyo ekoki kopesa biso makasi mpe kosalisa biso tólonga mikakatano. Mpiko esalisaka mpe biso tókangama na oyo ezali malamu. Ekoki kosalisa biso tókoba kozala motema ya kokita mpe sembo epai ya Nzambe ntango tokutani na mikakatano. Mpiko ezali na boyokani na kobanga, elikya mpe bolingo. Ndenge nini? Ntango tozali kobanga ete tósala mabe te liboso ya Nzambe, tokopesa nzela te ete kobanga moto ebebisa biso. (1 Samwele 11:7; Masese 29:25) Kozala na elikya epai na Yehova esalisaka biso tótya makanisi na bomoi na biso ya lobi, kasi te na mikakatano na biso. (Nzembo 27:14) Bolingo ya solosolo etindaka biso tózala na mpiko ata ntango tozali na minyoko. (Yoane 15:13) Tokozala na mpiko soki tozali kotyela Nzambe motema mpe tozali komekola mwana na ye.​—Nzembo 28:7.

4. Ndenge nini Yesu amonisaki mpiko na tempelo? (Talá elilingi ya ebandeli.)

4 Ntango azalaki na mbula 12, Yesu amonisaki mpiko ntango azalaki “na tempelo, afandi na katikati ya bateyi.” (Tángá Luka 2:41-47.) Bateyi wana ya mangomba bayebaki malamu mpenza Mibeko ya Moize, kasi bayebaki mpe mimeseno ya Bayuda. Mimeseno yango esalaki ete bato bázala na mokakatano ya kotosa Mibeko. Kasi Yesu atikaki te ete boyebi na bango epekisa ye koloba. Abangaki te. Akobaki “kotuna bango mituna.” Ya solo, Yesu azalaki te kotuna mituna oyo bana mike batunaka. Kasi, tokoki kolikya ete atunaki mituna oyo ebendaki mpenza likebi ya bateyi wana mpe etindaki bango bákanisa. Mpe soki bateyi yango balukaki kotyela Yesu motambo na mituna oyo ekokaki kobimisa ntembe, balongaki te. Bato nyonso oyo bayokaki, ezala bateyi, bakamwaki “na mayele na ye mpe na biyano na ye.” Ya solo, na mpiko nyonso, Yesu akɔtelaki solo oyo ezali na Liloba ya Nzambe!

5. Na makambo nini Yesu amonisaki mpiko na mosala na ye?

5 Na mosala na ye, Yesu amonisaki mpiko na balolenge mingi. Na ndakisa, amonisaki bato ete bakonzi ya mangomba bazali kobungisa bango nzela na mateya ya lokuta. (Matai 23:13-36) Lisusu, Yesu apesaki nzela te ete mokili ebebisa ye. (Yoane 16:33) Akobaki kosakola ata na botɛmɛli. (Yoane 5:15-18; 7:14) Mpe mbala mibale, apɛtolaki tempelo na ndenge abenganaki na mpiko nyonso bato oyo bazalaki kobebisa losambo oyo ezalaki kosalema kuna.​—Matai 21:12, 13; Yoane 2:14-17.

Yesu ayebisaki tribinale monene ya Bayuda na mpiko nyonso ete azali Kristo mpe mwana ya Nzambe

6. Ndenge nini Yesu amonisaki mpiko mokolo ya nsuka ya bomoi na ye awa na mabele?

6 Tólobela sikoyo mpiko oyo Yesu amonisaki mokolo ya nsuka ya bomoi na ye awa na mabele. Yesu ayebaki oyo ekosalema soki Yuda atɛki ye. Kasi,  mokolo balyaki elekeli, Yesu alobaki na Yuda ete: “Oyo ozali kosala, salá yango nokinoki.” (Yoane 13:21-27) Na nsima, na mpiko nyonso, na elanga ya Getesemane, Yesu amilakisaki liboso ya basoda oyo bayaki kokanga ye. Atako bomoi na ye ezalaki na likama, abatelaki bayekoli na ye, mpe ayebisaki basoda boye: “Bótika baoyo bákende.” (Yoane 18:1-8) Lisusu, ntango tribinale monene ya Bayuda etunaki ye, Yesu alobaki na bango na mpiko nyonso ete azali Kristo mpe mwana ya Nzambe. Abangaki te, atako nganga-nzambe monene azalaki koluka motifi mpo na koboma ye. (Marko 14:60-65) Yesu abatelaki bosembo na ye epai ya Nzambe mpe akufaki likoló ya nzete ya mpasi. Liboso akata motema, agangaki ete: “Ekokisami!”​—Yoane 19:28-30.

MEKOLÁ MPIKO YA YESU

7. Bilenge, boyokaka ndenge nini lokola bozali Batatoli ya Yehova, mpe ndenge nini bokoki komonisa ete bozali na mpiko?

7 Ndenge nini tokoki komekola mpiko ya Yesu? Na eteyelo. Bilenge, bozalaka na mpiko ntango boyebisaka baninga na bino ya kelasi mpe bato mosusu ete bozali Batatoli ya Yehova. Na ndenge yango, bozali komonisa ete bosepelaka kobengama na nkombo ya Yehova, ata soki bato mosusu bazali kotyola bino. (Tángá Nzembo 86:12.) Basusu bakoki kolinga bóndima liteya ya evolisyo. Kasi, bokoki kotya motema ete oyo Biblia elobi mpo na bozalisi ezali solo. Bokoki kosalela mwa buku Cinq questions à se poser sur l’origine de la vie mpo na koyanola baoyo balingi koyeba “ntina ya elikya oyo bozali na yango.” (1 Petro 3:15) Na nsima, okosepela mpenza ntango okoyeba ete na mpiko nyonso otatolaki mpo na solo ya Biblia!

8. Mpo na bantina nini tosengeli kosakola na mpiko?

8 Na mosala na biso ya kosakola. Biso bakristo ya solo, tosengeli kokoba “koloba na mpiko na bokonzi oyo euti na Yehova.” (Misala 14:3) Mpo na nini tokoki kosakola na mpiko? Ya liboso, toyebi ete makambo oyo toteyaka eutaka na Biblia mpe ezali solo. (Yoane 17:17) Ya mibale, “tozali bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe,” mpe apesi biso elimo santu na ye mpo esalisa biso. (1 Bakorinti 3:9; Misala 4:31) Ya misato, tolingaka Yehova mpe bato, mpo na yango, tolendisami mpo na kosala oyo tokoki kosala mpo na koyebisa basusu nsango malamu. (Matai 22:37-39) Lokola tozali na mpiko, tokotika te kosakola. Tozali na ekateli ya koteya solo epai ya baoyo bakonzi ya mangomba ‘bazipá’ bango miso to bakosá. (2 Bakorinti 4:4) Mpe tokokoba kosakola nsango malamu ata soki basusu baboyi nsango na biso to banyokoli biso.​—1 Batesaloniki 2:1, 2.

9. Ndenge nini tokoki komonisa mpiko ntango tokutani na mikakatano?

9 Ntango tokutani na mikakatano. Ntango tozali kotyela Nzambe motema, akopesa biso kondima mpe mpiko oyo tosengeli na yango mpo na kolonga mikakatano. Soki moto oyo tolingaka akufi, toyokaka mawa, kasi tobungisaka elikya te. Tozalaka na elikya ete “Nzambe ya kobɔndisama nyonso” akopesa biso makasi. (2 Bakorinti 1:3, 4; 1 Batesaloniki 4:13) Soki tobɛli to tozoki, tokoki koyoka mpasi, kasi toboyaka lisalisi nyonso ya monganga oyo Nzambe alingaka te. (Misala 15:28, 29) Soki totungisami na makanisi, ‘mitema na biso ekoki kokweisa biso,’ kasi totikaka te. Totyelaka Yehova motema, oyo azalaka “pene na  baoyo motema ebukani.” * (Talá maloba na nse ya lokasa.)​—1 Yoane 3:19, 20; Nzembo 34:18.

YESU AZALI NA BOSOSOLI

10. Bososoli elimboli nini, mpe mokristo oyo azali na bososoli alobaka mpe asalaka makambo ndenge nini?

10 Bososoli ezali likoki ya koyeba kokesenisa malamu ná mabe mpe kopona kosala oyo ezali malamu. (Baebre 5:14) Mokristo oyo azali na bososoli azwaka bikateli oyo ekokómisa boyokani na ye ná Nzambe makasi. Akebaka ete ayokisa basusu mpasi na motema te na maloba na ye. Kutu, asepelisaka Yehova mpo aponaka maloba oyo ekosalisa basusu. (Masese 11:12, 13) “Ayokaka nkanda noki te.” (Masese 14:29) “Akendaka se alima,” elingi koloba, azwaka bikateli ya malamu na bomoi na ye mobimba. (Masese 15:21) Ndenge nini tokoki koyekola kokóma na bososoli? Tosengeli koyekola Liloba ya Nzambe mpe kosalela makambo oyo tozali koyekola. (Masese 2:1-5, 10, 11) Yesu amonisaki bososoli na ndenge ya kokoka. Tokoki koyekola mpe komekola ndakisa na ye.

11. Ndenge nini Yesu amonisaki bososoli na maloba na ye?

11 Yesu amonisaki bososoli na makambo nyonso oyo azalaki koloba mpe kosala. Na maloba na ye. Ntango azalaki kosakola nsango malamu, Yesu azalaki kosalela maloba ya boboto oyo ezalaki kokamwisa bayoki na ye. (Matai 7:28; Luka 4:22) Azalaki ntango nyonso kotánga to kolobela Liloba ya Nzambe. Ayebaki malamu bavɛrsɛ oyo esengeli kosalela na likambo nyonso. (Matai 4:4, 7, 10; 12:1-5; Luka 4:16-21) Lisusu, bato oyo bayokaki ndenge Yesu azalaki kolimbola Makomami basepelaki mpenza na motema na maloba na ye. Nsima ya lisekwa na ye, Yesu asololaki na bayekoli mibale ntango bazalaki kokende na Emause. Apesaki ndimbola ya bavɛrsɛ oyo elobeli ye moko. Na nsima, bayekoli balobaki boye: “Mitema na biso ezalaki mɔtɔmɔtɔ ntango azalaki koloba na biso na nzela, ntango azalaki kolimbolela biso Makomami polelepolele, boye te?”​—Luka 24:27, 32.

12, 13. Bandakisa nini emonisi ete Yesu azalaki te koyoka nkanda noki mpe azalaki te makambo makasimakasi?

12 Na mayoki mpe ezaleli na ye. Bososoli esalisaki Yesu azala te moto oyo “ayokaka nkanda noki.” (Masese 16:32) Azalaki komipekisa, mpe azalaki na “ezaleli ya boboto.” (Matai 11:29) Yesu azalaki ntango nyonso na motema molai epai ya bayekoli na ye atako bazalaki kosala bafoti. (Marko 14:34-38; Luka 22:24-27) Mpe azalaki kosala matata te ata ntango basali ye mabe.​—1 Petro 2:23.

13 Bososoli esalisaki mpe Yesu azala te makambo makasimakasi. Azalaki  kosuka te kaka na koyeba oyo Mobeko ya Moize elobi, kasi azalaki koluka koyeba etinda nini esimbi mobeko yango, mpe azalaki kosala oyo ezali malamu. Na ndakisa, tókanisa mpo na mwasi oyo azalaki na “maladi ya kotanga makila.” (Tángá Marko 5:25-34.) Mwasi yango akɔtaki na kati ya ebele ya bato, asimbaki elamba ya Yesu mpe abikisamaki. Ndenge mibeko elobaki, mwasi wana azalaki mbindo, na ndenge yango, asengelaki te kosimba moto. (Balevi 15:25-27) Kasi Yesu abimiselaki ye maloba ya makasimakasi te. Mpo na nini? Mpo ayebaki ete bizaleli lokola “motema mawa ná kondima” ezalaki na ntina mingi na esika ya kotingama kotosa kaka Mobeko. (Matai 23:23) Na boboto nyonso, Yesu alobaki na ye ete: “Mwana na ngai, kondima na yo ebikisi yo. Kende na kimya, mpe biká na maladi na yo ya mpasi.” Oyo ndakisa moko malamu mpenza oyo emonisi ndenge bososoli etindaki Yesu amonisa ezaleli ya boboto!

14. Yesu aponaki kosala nini, mpe ndenge nini atyaki makanisi na ye nyonso na mosala na ye?

14 Na bomoi na ye. Yesu amonisaki bososoli na bomoi na ye. Aponaki kosala mosala ya Nzambe na bomoi na ye mobimba. (Luka 4:43) Lisusu, Yesu azwaki bikateli oyo esalisaki ye atya makanisi na ye mobimba na mosala yango mpe akokisa mokumba na ye. Na ndakisa, azalaki na bomoi oyo ezangi mindɔndɔ mpo ete asalela ntango mpe makasi na ye na mosala ya Nzambe. (Luka 9:58) Ayebaki ete esengeli kopesa basusu formasyo mpo bákoba mosala ya kosakola nsima ya liwa na ye. (Luka 10:1-12; Yoane 14:12) Mpe alakaki bayekoli na ye ete akosalisa bango na mosala yango “tii na bosukisi ya makambo ya ntango oyo.”​—Matai 28:19, 20.

MEKOLÁ BOSOSOLI YA YESU

Bososoli esalisaka biso tóyeba oyo bato basengeli na yango mpe tópona maloba na biso na likebi (Talá paragrafe 15)

15. Ndenge nini tokoki komonisa bososoli na maloba na biso?

15 Ndenge nini tokoki komekola bososoli ya Yesu? Na maloba na biso. Ntango tozali kosolola na bandeko na biso, tosalelaka maloba oyo elendisaka bango na esika ya kolɛmbisa bango. (Baefese 4:29) Ntango tozali kosolola na basusu mpo na Bokonzi ya Nzambe, maloba na biso esengeli kozala “elɛngi na mungwa,” elingi koloba, tosengeli koloba na bango na mayele. (Bakolose 4:6)  Tolukaka koyeba makambo nini bato basengeli na yango mpe nini ezali kosepelisa bango mpe toponaka maloba na biso na likebi. Soki tosaleli maloba ya boboto, bato bakolinga koyoka biso, mpe nsango na biso ekoki kosimba mitema na bango. Lisusu, ntango tozali kolimbola mateya na biso, totángaka na Biblia soki likoki ezali mpo Liloba ya Nzambe ezali na nguya. Toyebi ete nsango ya Biblia ezali na nguya mingi koleka eloko nyonso oyo tokoki koloba.​—Baebre 4:12.

16, 17. (a) Ndenge nini tokoki komonisa ete toyokaka nkanda noki te mpe tozalaka makambo makasimakasi te? (b) Ndenge nini tokoki kokoba kotya makanisi mobimba na mosala na biso?

16 Na mayoki mpe ezaleli na biso. Bososoli esalisaka biso tóbatela mayoki na biso ntango tozali na komekama mpe esalisaka biso ‘tóyokaka nkanda noki te.’ (Yakobo 1:19) Ntango bato bapesi biso mpasi na motema, tolukaka koyeba ntina oyo balobi to basali bongo. Na nsima, ezalaka mpasi te mpo na kolimbisa mpe koboya kosilikela bango. (Masese 19:11) Bososoli esalisaka mpe biso tózala makambo makasimakasi te. Tozelaka mpe te ete bandeko na biso bázala bato ya kokoka. Toyebaka ete bakoki kozala na mikakatano oyo biso toyebi yango malamu te. Tosepelaka koyoka makanisi na bango. Mpe soki tokoki, tondimaka makanisi na bango, elingi koloba ete totingamaka te kaka na oyo ya biso.​—Bafilipi 4:5.

17 Na bomoi na biso. Toyebi ete kosakola nsango malamu ezali lokumu monene koleka nyonso oyo tozali na yango. Na yango, tokolinga kozwa bikateli oyo ekosalisa biso tókoba kotya makanisi mobimba na mosala na biso. Toponaka kotya Yehova na esika ya liboso na bomoi na biso. Tozalaka na bomoi ezangi mindɔndɔ mpo tósalela ntango mpe makasi na biso mpo na kosakola nsango malamu liboso ete nsuka eya.​—Matai 6:33; 24:14.

18. Ndenge nini tokoki kokoba mobembo na biso mpo na bomoi ya seko, mpe ozali na ekateli ya kosala nini?

18 Ezali mpenza esengo ndenge totaleli bizaleli mosusu kitoko ya Yesu! Soki toyekoli bizaleli na ye mosusu mpe tomekoli ye, tokozwa mpenza matomba ebele. Na yango, tózala na ekateli ya komekola Yesu. Soki tosali bongo, tokokoba mobembo na biso mpo na bomoi ya seko mpe tokopusana penepene na Yehova.

^ par. 2 Mokanda ya Petro ya liboso mokapo ya liboso, vɛrsɛ ya mwambe mpe libwa ekomamaki mpo na bakristo oyo bazali na elikya ya kokende likoló. Kasi, maloba wana ya Petro ekoki mpe kosalelama mpo na bakristo oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi ya seko awa na mabele.

^ par. 9 Mpo na koyeba bato oyo bamonisaki mpiko na ntango ya minyoko, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/12/2000, nkasa 24-28; Lamuká! ya 22/04/2003, nkasa 18-21 (na Lifalanse); mpe ya 22/01/1995, nkasa 11-15 (na Lifalanse).