“Prokonsule . . . akómaki mondimi, mpo akamwaki na mateya ya Yehova.”​—MISALA 13:12.

1-3. Mpo na nini ezalaki pɛtɛɛ te mpo ete bayekoli ya Yesu básakola nsango malamu na “bikólo nyonso”?

YESU KRISTO apesaki bayekoli na ye mosala monene ya kosala. Apesaki bango etinda ya ‘kokómisa bato bayekoli na bikólo nyonso.’ Basengelaki kosakola ‘nsango malamu ya Bokonzi na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso.’​—Matai 24:14; 28:19.

2 Bayekoli bazalaki kolinga Yesu mpe nsango malamu. Kasi, ekoki kozala ete bamitunaki, ‘Ndenge nini tokoki kokokisa etinda oyo Yesu apesi biso?’ Ya liboso, bazalaki bato mingi te. Ya mibale, bazalaki koteya bato ete Yesu azali mwana ya Nzambe, kasi bato bayebaki ete Yesu abomamaki. Ya misato, bato mingi bakanisaki ete bayekoli yango ‘batángá kelasi mingi te mpe bazalaki bato mpamba.’ (Misala 4:13) Bakonzi ya mangomba ya Bayuda batángaki na biteyelo oyo ezalaki kolakisa makambo ya Nzambe, kasi bayekoli batángaki kuna te. Mpe nsango oyo bazalaki kosakola eyokanaki te na makambo oyo bakonzi ya mangomba bateyaki na boumeli ya bankama ya bambula. Lokola  bato bazalaki kozwa bayekoli yango na valɛrɛ te na Yisraele, ekoki kozala ete bazalaki komituna soki ata moto moko monene ya ampire ya Roma akokaki koyoka bango.

3 Yesu akebisaki bayekoli na ye ete bakoyinama, bakonyokolama mpe ete bamosusu bakobomama. (Luka 21:16, 17) Baninga mpe mabota na bango bakotɛka bango. Lisusu, bato mosusu oyo bakomibenga bayekoli ya Kristo bakoteya makambo ya lokuta. Mpe bayekoli basengelaki kosakola na bisika oyo etondi na mobulu mpe makambo mosusu ya mabe. (Matai 24:10-12) Na yango, ndenge nini basengelaki kosakola tii “na esika eleki mpenza mosika na mabele”? (Misala 1:8) Ekoki kozala ete bayekoli yango bamitunaki soki ndenge nini bakosala mosala yango atako mikakatano wana nyonso ezalaki.

4. Mosala ya kosakola ebimisaki matomba nini?

4 Atako bayekoli bayebaki ete mosala yango ekozala pɛtɛɛ te, batosaki etinda ya Yesu mpe basakolaki na Yerusaleme, na Samaria mpe ata na bikólo mosusu. Nsima ya mbula soki 30, batambolaki na bisika ebele mpe ntoma Paulo alobaki ete basakolaki epai ya “bato ya bikólo nyonso oyo ezali na nse ya lola.” Mpe bato ya bikólo ndenge na ndenge bakómaki bayekoli. (Bakolose 1:6, 23) Na ndakisa, ntango ntoma Paulo asakolaki na esanga Shipre, ata mokonzi ya Roma, to prokonsule, akómaki moyekoli mpo “akamwaki na mateya ya Yehova.”​—Tángá Misala 13:6-12.

Yesu alakaki ete akozala elongo na bayekoli na ye mpe ete elimo santu ekosalisa bango básakola

5. (a) Yesu alakaki bayekoli na ye nini? (b) Buku moko elobi nini mpo na siɛklɛ ya liboso?

5 Bayekoli bayebaki ete bakokoka te kosakola na mabele mobimba na makasi na bango moko. Kasi, bayebaki mpe ete Yesu alakaki ete akozala ná bango mpe ete elimo santu ekosalisa bango. (Matai 28:20) Mbala mosusu ezalaki mpe na makambo mosusu na ntango wana oyo esalisaki bayekoli. Kutu, buku moko elobi ete ekoki kozala ete siɛklɛ ya liboso ezalaki eleko moko ya malamu mingi mpo bakristo bábanda kosakola mpe ete na nsima bakristo bamonaki ete Nzambe abongiselaki bango nzela.

6. (a) Tokolobela nini na lisolo oyo? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo ekolanda?

6 Yehova abongolaki makambo na siɛklɛ ya liboso mpo bakristo básakola? Biblia elobi yango te. Kasi toyebi ete Yehova alingaki basaleli na ye básakola nsango malamu mpe ete Satana azalaki na likoki te ya kopekisa bango. Na lisolo oyo, tokolobela makambo mosusu oyo na siɛklɛ ya liboso esalisaki bayekoli mpo básakola malamu. Na lisolo oyo elandi, tokolobela makambo oyo esalisi biso na mikolo oyo mpo na kosakola nsango malamu na mokili mobimba.

 KIMYA NA ROMA

7. Kimya na Roma ezalaki nini, mpe na nini eleko yango ekeseni na misusu?

7 Na siɛklɛ ya liboso, eleko ya kimya oyo ampire ya Roma ezalaki na yango, esalisaki mpo ete bayekoli básakola malamu. Eleko yango ebengamaki Kimya na Roma, to na Latin Pax Romana. Na ntango wana, guvɛrnema ya Roma epekisaki ata mwa botomboki ya moke. Ezali solo ete mwa bitumba ezalaki kaka ndenge Yesu asakolaki yango. (Matai 24:6) Baroma babebisaki Yerusaleme na mobu 70, mpe babundaki mwa bitumba mosika te na bandelo ya ampire. Kasi, kimya ezalaki na bisika mingi na ampire, mpe bayekoli bakokaki kotambola na kimya mpe kosakola. Eleko wana ya kimya eumelaki mbula soki 200. Buku moko elobi ete na lisolo ya bato, naino bato bazwá eleko ya kimya molai bongo te, oyo ememelaki ebele ya bato matomba.

8. Ndenge nini kimya na Roma esalisaki bayekoli?

8 Mbula soki 250 nsima ya Kristo, moto moko ya mayele na nkombo Origène akomaki na ntina ya eleko wana ya kimya. Alobaki ete lokola Baroma bazalaki koyangela bikólo mingi, ezalaki mpasi te mpo bayekoli básakola na bikólo yango nyonso. Bato bazalaki kobunda te mpo na kobatela ekólo na bango, kasi bazalaki kofanda na kimya na bamboka na bango. Na yango Origène alobi ete mpo na ntina wana, bato mingi bazalaki na libaku ya koyoka ndenge bayekoli bazalaki kosakola na ntina na bolingo mpe kimya. Atako bayekoli bazalaki konyokwama, basalelaki eleko wana ya kimya na ndenge ebongi mpenza mpe basakolaki nsango malamu bisika nyonso.​—Tángá Baroma 12:18-21.

KOSALA MIBEMBO EKÓMAKI PƐTƐƐ

9, 10. Wapi mwa makambo oyo ekómisaki mibembo ya bayekoli pɛtɛɛ?

9 Baroma basalaki banzela ya bolai ya kilomɛtrɛ 80 000 mpe banzela yango ekendeki na bamboka mingi ya ampire. Basoda ya ampire wana ya nguya bakokaki koleka nokinoki bisika nyonso na babalabala wana mpo na kobatela mboka na bango mpe kokɛngɛla bato. Bakristo basalelaki banzela yango mpo na kotambola na bazamba, koleka na bisobe mpe na bangomba mpo na kosakola na bisika mingi.

Banzela oyo Baroma basalaki, esalisaki mpenza mpo bayekoli básakola na bisika mingi

10 Longola kotambola na banzela, Baroma bazalaki mpe kosala mibembo na masuwa. Bazalaki kotambola na bibale, mingala to na mbu mpe kosɛma na ebele ya mabongo oyo ezalaki na ampire yango. Tokoki koloba ete Baroma basalelaki banzela ya mai koleka 900. Na yango, bakristo bakokaki kosala mobembo na masuwa mpo na kokende bisika ebele. Basengelaki te na mikanda mosusu ya Leta, lokola passeport mpo na kokɔta na bikólo mosusu. Lisusu, miyibi bazalaki mingi te na babalabala mpo bayebaki ete Baroma bazalaki  kopesa bato ya ndenge wana etumbu ya makasi. Mpe lokola bamasuwa mingi ya Baroma ezalaki kotambola na mbu, bato ya mibembo bazalaki kobanga te miyibi. Atako Biblia elobi ete ntoma Paulo asalaki mibembo na bamasuwa oyo ezindaki mpe ete akutanaki na makama ntango mosusu na mbu, kasi Biblia elobi te ete miyibi basalaki ye mabe. Kotambola na balabala mpe masuwa ezalaki mbala mingi na makama te.​—2 Bakorinti 11:25, 26.

MONƆKƆ YA GRƐKI

Ezalaki pɛtɛɛ mpenza kozwa vɛrsɛ na buku moko (Talá paragrafe 12)

11. Mpo na nini bayekoli basalelaki monɔkɔ ya Grɛki?

11 Bisika mingi oyo Baroma bazalaki koyangela, ezalaki bisika oyo Alezandre Monene, mokonzi ya Grɛsi abɔtɔlaki mbula mingi liboso. Na yango, bato mingi na bisika yango bayekolaki koloba lolenge moko ya Grɛki oyo babengi Grɛki koinè. Yango esalaki ete bayekoli básakwela bango na monɔkɔ yango. Mpe bakokaki kutu kotángela bango Makomami ya Ebre mpe kobongola yango na Grɛki. Bato mingi bayebaki libongoli wana, oyo ebengamaki libongoli ya Septante, oyo ebongolamaki na Bayuda oyo bazalaki na Ezipito. Bakomi ya Biblia basalelaki mpe monɔkɔ ya Grɛki mpo na kokoma eteni mosusu ya Biblia. Grɛki ezalaki na maloba mingi, yango wana ezalaki monɔkɔ moko malamu mpo na kolimbola mateya mozindo ya Biblia. Mpe monɔkɔ ya Grɛki esalisaki masangá mpo esololaka mpe ezala na bomoko.

12. (a) Codex ezali nini, mpe mpo na nini kosalela yango ezalaki pɛtɛɛ koleka rulo? (b) Ntango nini bakristo mingi babandaki kosalela babuku?

12 Bakristo ya siɛklɛ ya liboso basalelaki nini mpo na koteya Biblia? Ya liboso, basalelaki barulo. Kasi, barulo ezalaki mpasi mpo na kosalela to komema yango. Ntango nyonso oyo bakristo bazalaki na mposa ya kozwa vɛrsɛ moko, basengelaki kofungola rulo mpe na nsima kokanga yango lisusu. Mbala mingi makomi ya barulo ebandaki kozala kaka ngambo moko. Evanzile ya Matai etondisaki rulo mobimba. Ya mibale, bato babandaki kosalela codex, mpe yango ezalaki lolenge ya buku ya liboso. Motángi akokaki kofungola buku moko mpe kobalusa nkasa mpo na kozwa vɛrsɛ. Bato ya istware balobi ete bakristo babandaki mbala moko kosalela babuku mpe nsima ya mbula 100, mingi na bango bazalaki kosalela babuku.

 MIBEKO YA BAROMA

13, 14. (a) Libateli nini Ntoma Paulo azalaki na yango lokola azalaki Moroma? (b) Mibeko ya Baroma esalisaki bakristo na nini?

13 Mibeko ya Baroma ememelaki bakristo ya siɛklɛ ya liboso matomba mingi. Na ndakisa, ntoma Paulo azalaki Moroma, mpe mobeko ezalaki kobatela ye mbala mingi oyo azalaki kosala mibembo. Ntango basoda ya Roma bakangaki ntoma Paulo na Yerusaleme mpe balingaki kobɛta ye, ayebisaki bango ete azali Moroma. Akundwelaki komanda ete Moroma asengeli kobɛtama te kozanga ete asambisama na ndenge esengeli. Na yango, “bato oyo balingaki kobɛta ye fimbo mpo aloba balongwaki pembeni na ye; mpe komanda ya basoda akómaki kobanga ntango ayebaki malamu ete [Paulo] azali Moroma mpe na ndenge akangaki ye minyɔlɔlɔ.”​—Misala 22:25-29.

Bakristo basalelaki mibeko ya Baroma mpo na “kokɔtela mpe kofandisa na nzela ya mibeko” lotomo na bango ya kosakola

14 Lokola Ntoma Paulo azalaki Moroma yango esalaki ete bato oyo bakangaki ye na Filipi bábongola makanisi na bango. (Misala 16:35-40) Mpe ntango etuluku moko ya bato oyo basilikaki makasi balingaki kosala bakristo mosusu mabe na Efese, mokonzi moko ya Leta afandisaki bango nyɛɛ mpe akebisaki bango ete bazali kobuka mobeko ya Baroma. (Misala 19:35-41) Na nsima, ntango azalaki na Kaisaria, ntoma Paulo asɛngaki asalela lotomo na ye mpo akende kosamba liboso ya amperɛrɛ na Roma. Kuna, asakolaki nsango malamu. (Misala 25:8-12) Na yango, bakristo basalelaki mibeko ya Baroma mpo na “kokɔtela mpe kofandisa na nzela ya mibeko” lotomo na bango ya kosakola.​—Bafilipi 1:7.

BAYUDA BAZALAKI NA BIKÓLO NDENGE NA NDENGE

15. Na siɛklɛ ya liboso, Bayuda mingi bazalaki wapi?

15 Ekoki kozala na eloko mosusu oyo esalisaki bakristo ya siɛklɛ ya liboso básakola na mabele mobimba. Na ntango wana, Bayuda bazalaki na bikólo ndenge na ndenge, kaka na Yisraele te. Mpo na nini? Bankama ya bambula liboso, Bayuda bamemamaki na boombo na Asiri, mpe bambula na nsima, basusu bamemamaki na Babilone. Na nsima, ntango Baperse bakómaki koyangela Babilone, Bayuda bazalaki na ampire ya Perse mobimba. (Estere 9:30) Na siɛklɛ ya liboso, ntango Yesu azalaki awa na mabele, Bayuda bazalaki na ampire ya Roma mobimba, na ndakisa na Ezipito, mpe na bamboka mosusu ya Nɔrdi ya Afrika, na Grɛsi, na Asie Mineure (Turquie), mpe na Mezopotamia (Irak). Balobaka ete na bato milio 60 oyo bazalaki kofanda na ampire yango, bato koleka milio 4 na kati na bango bazalaki Bayuda. Atako bapanzanaki na bisika mingi, Bayuda bakobaki kaka na lingomba na bango.​—Matai 23:15.

16, 17. (a) Lokola Bayuda bazalaki kati na bikólo mingi, yango ememelaki bato oyo bazalaki Bayuda te matomba nini? (b) Na makambo nini bakristo balandaka ndakisa ya Bayuda?

16 Lokola Bayuda bazalaki na kati ya bikólo mingi, bato mingi oyo bazalaki Bayuda te bayebaki Makomami ya Ebre mpe bayekolaki bindimeli ya Bayuda. Na ndakisa, bayekolaki ete Nzambe ya solo azali kaka moko mpe ete baoyo bazali kosalela ye basengeli kotosa mibeko na ye. Bayebaki ete Makomami ya Ebre eutaki na Nzambe mpe ezalaki na bisakweli ebele oyo etali Masiya. (Luka 24:44) Na yango, ntango bakristo  bazalaki kosakola nsango malamu, Bayuda ná bato oyo bazalaki Bayuda te bayebaki mateya mosusu oyo bakristo bazalaki kosakola. Ntoma Paulo azalaki na mposa ya kozwa bato oyo bakosepela koyoka nsango malamu. Azalaki mbala mingi kokende na basinagoga, epai Bayuda bazalaki kosambela, mpe azalaki kosalela Makomami mpo na kokanisa ná bango.​—Tángá Misala 17:1, 2.

17 Bayuda bazalaki kokutana mbala na mbala mpo na kosambela, ezala na basinagoga to na bisika ya libanda. Bazalaki koyemba nzembo, kobondela mpe kolobela Makomami. Bakristo balandaki ndakisa na bango, mpe lelo oyo tosalaka mpe bongo na masangá na biso.

YEHOVA ASALISAKI BANGO BÁSAKOLA

18, 19. (a) Makambo oyo elekaki na siɛklɛ ya liboso etindaki bakristo básala nini? (b) Lisolo oyo esalisi yo okóma kotalela Yehova ndenge nini?

18 Siɛklɛ ya liboso ezalaki siɛklɛ moko ya ntina mingi na lisolo ya bato. Na ampire ya Roma, kimya ezalaki, bato mingi bazalaki koloba monɔkɔ moko, mpe mobeko ezalaki kobatela bato. Ezalaki mpasi te kosala mibembo, mpe bato na bikólo mingi bayebaki Bayuda mpe Makomami ya Ebre. Makambo wana nyonso esalisaki bakristo bákoba kosala mosala oyo Nzambe apesaki bango.

19 Bambula soki 400 liboso Yesu aya awa na mabele, Platon, moto moko ya filozofi ya Bagrɛki akomaki ete ezali mpasi mpenza mpo bato báyeba Mozalisi mpe ekoki kosalema te ete bálobela ye epai ya moto nyonso na mokili. Kasi, Yesu alobaki ete: “Makambo oyo ekoki kosalema te mpo na bato ekoki kosalema mpo na Nzambe.” (Luka 18:27) Emonani polele ete mosala ya kosakola esalemaki mpo Yehova asalisaki. Alingi ete ‘bato ya bikólo nyonso’ báyoka nsango malamu mpe báyeba ye. (Matai 28:19) Lisolo oyo elandi ekolimbola ndenge nsango malamu ezali kosakolama na mokili mobimba lelo oyo.