Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Janvier 2015

Tiká Yehova akómisa libala na bino makasi mpe abatela yango

Tiká Yehova akómisa libala na bino makasi mpe abatela yango

“Soki Yehova ye moko abateli engumba te, mokɛngɛli akɛngɛli kaka mpamba.”​NZEMBO 127:1b.

1, 2. (a) Mpo na nini Bayisraele 24 000 babungisaki mbano na bango ya kitoko? (b) Mpo na nini lisolo yango ezali na ntina mpo na biso?

MWA moke liboso libota ya Yisraele ekɔta na Mokili ya Ndaka, bankóto ya mibali basalaki “pite ná bana basi ya Moabe.” Yango wana, Bayisraele 24 000 bakufaki. Bazelaki ntango molai mpe etikalaki kaka moke bázwa libula na bango! Likambo ya mawa, babungisaki mbano na bango mpo basalaki pite.​—Mitángo 25:1-5, 9.

2 Lisolo wana ya mawa “ekomamaki mpo ezala likebisi mpo na biso baoyo tokómi na bansuka ya bantango oyo.” (1 Bakorinti 10:6-11) Tozali mpenza kobika na nsuka ya “mikolo ya nsuka” mpe tokómi mpenza pene na mokili ya sika. (2 Timote 3:1; 2 Petro 3:13) Kasi, na mawa nyonso, basambeli mosusu ya Yehova batiki kolanda mitinda ya Yehova mpe bakwei na motambo ya kosala pite to ekobo. Sikoyo bazali konyokwama mpo na makambo mabe oyo basalaki, mpe soki babongoli motema te, bakoki ata kobungisa libaku ya kozala na bomoi ya seko na Paradiso awa na mabele.

3. Mpo na nini babalani basengeli na litambwisi mpe libateli ya Yehova? (Talá elilingi ya ebandeli.)

 3 Babalani basengeli na litambwisi mpe libateli ya Yehova mpo bákoba kobatela libala na bango mpamba te mokili oyo emipesi mingi na likambo etali kosangisa nzoto. (Tángá Nzembo 127:1.) Na lisolo oyo, tokolobela ndenge babalani bakoki kobatela libala na bango. Basengeli kobatela mitema na bango, kopusana penepene ya Nzambe, kolata bomoto ya sika, kosololaka malamu mpe kokokisaka bamposa na bango.

BATELÁ MOTEMA NA YO

4. Mpo na nini bakristo mosusu bamekamaki mpo na kosala pite to ekobo?

4 Ndenge nini mokristo akoki komekama mpo na kosala pite to ekobo? Ebandaka mingimingi na miso. Yesu alobaki ete: “Moto nyonso oyo azali kokoba kotala mwasi tii ayoki ye mposa asali na ye ekobo na motema.” (Matai 5:27, 28; 2 Petro 2:14) Bato mingi oyo basalaki pite to ekobo babebisaki bizaleli na bango ya malamu, na ndakisa, bazalaki kotala pornografi, kotánga mikanda oyo elamwisaka bamposa ya kosangisa nzoto, to kotala makambo oyo ebongi te na Internet. Basusu bazalaki kotala bafilme, bateatre to baemisyo na televizyo oyo elakisaka makambo etali kosangisa nzoto polelepolele. Basusu mpe bazalaki kokende na banganda ya butu, na bisika bato bakendaka kotala bato oyo batikalaka bolumbu, to mpe bakendeki na bisika mosusu ya ndenge wana mpo bányɔlisa bango nzoto (massage) ya kolamwisa mposa ya kosangisa nzoto.

5. Mpo na nini tosengeli kobatela motema na biso ya kozanga kokoka?

5 Basusu bakweaka na motambo yango mpo bakómaka kotya likebi mingi epai ya moto oyo azali molongani na bango te. Tozali na mokili oyo bato bamipekisaka mpenza te mpe basepelaka na lolenge nyonso ya kosangisa nzoto. Lisusu, lokola motema na biso ya kozanga kokoka ezali na bokosi mpe mabe, ekoki kosala ete tókóma komonisela moto oyo azali molongani na biso te lolango. (Tángá Yirimia 17:9, 10.) Yesu alobaki ete: “Makanisi mabe, koboma bato, misala ya ekobo, misala ya pite, koyiba, matatoli ya lokuta, maloba ya kofinga, eutaka na motema.”​—Matai 15:19.

6, 7. (a) Makambo nini ekoki kosalema soki mposa mabe ekoli na motema na biso? (b) Ndenge nini tokoki koboya kosalela Yehova lisumu?

6 Ntango makanisi mabe ekoli na mitema ya bato wana mibale oyo bakómi komoniselana lolango, bakoki kobanda kobɛtɛlana masolo oyo basengeli kosala yango kaka ná balongani na bango. Ekoumela te, bakobanda komilongisa ete ata soki bazali elongo, mabe ezali te. Bakómaka kokutana mingi, mpe bamilongisaka ete bayokanaki te ete bákutana. Lokola bolingo na bango ezali kokóma makasi, ekómaka mpasi mpo básala oyo ezali malamu. Wana boyokani na bango ezali kokola, ezalaka mpasi bákata yango, ata soki bayebi ete makambo oyo bazali kosala ezali mabe.​—Masese 7:21, 22.

7 Babosanaka mitinda ya Yehova ntango bamposa mabe mpe masolo ebalukaka mpe ekómaka nde kosimbana na mabɔkɔ, kopesana mapwɛpwɛ, kosimbana na ndenge oyo ekolamwisa bamposa ya nzoto. Na mawa nyonso, basalaka makambo oyo basengeli kosala kaka na balongani na bango. Bamposa na bango ‘ememaka bango mpe ebendaka bango.’ Na nsuka, ntango bamposa wana ekoli, basalaka pite to ekobo. (Yakobo 1:14, 15) Ezali mpenza mpasi mpo bato yango mibale bakokaki koboya kosalela Yehova lisumu wana soki batikaki Yehova asalisa bango bamemya libala na bango. Ndenge nini moto akoki kokolisa limemya ya ndenge wana?

KOBÁ KOPUSANA PENEPENE NA YEHOVA

8. Ndenge nini boninga na biso ná Yehova ebatelaka biso tókwea te na pite to ekobo?

8 Tángá Nzembo 97:10. Boninga elongo na Yehova ekoki kosalisa biso mpo tókwea te na pite to ekobo. Ntango toyekolaka bizaleli na ye ya malamu, tosalaka makasi ‘tókóma bamekoli ya Nzambe, lokola bana ya bolingo, mpe tókoba kotambola na kati ya bolingo.’ Yango ekosalisa biso tóboya “pite mpe mbindo ya ndenge nyonso.” (Baefese 5:1-4) Babalani oyo bayebi ete “Nzambe akosambisa bato ya pite mpe bato ya ekobo” basalaka makasi bátikala sembo moko epai ya mosusu.​—Baebre 13:4.

9. (a) Mpo na nini Yozefe atikalaki sembo atako mwasi ya patrɔ na ye azalaki komeka ye? (b) Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Yozefe?

9 Bakristo mosusu batikaki malɛmbɛmalɛmbɛ mitinda ya Yehova mpo bazalaki kolekisa ntango nsima ya mosala ná baninga ya mosala oyo bazali Batatoli te. Bandeko mosusu bamekamaka na mosala. Likambo yango ekómelaki mpe elenge mobali moko na nkombo Yozefe. Na esika na ye ya mosala, amonaki ete mwasi ya patrɔ na ye akómaki kolula ye mingi. Mokolo na mokolo mwasi yango azalaki kosala nyonso mpo asangisa na ye nzoto. Nsukansuka, “asimbaki ye makasi na elamba na ye, mpe alobaki ete: ‘Lalá na ngai!’” Kasi Yozefe aboyaki mpe akimaki. Nini esalisaki Yozefe azala na makasi ya kotikala sembo? Ezali mpo azalaki na ekateli ya kobatela boyokani na ye elongo na Yehova. Yozefe abungisaki mosala na ye mpe batyaki ye na bolɔko, kasi Yehova apambolaki ye. (Ebandeli 39:1-12; 41:38-43) Ezala tozali na esika ya mosala to epai mosusu, tosengeli koboya makambo oyo etyaka biso na komekama.

LATÁ BOMOTO YA SIKA

10. Ndenge nini bomoto ya sika ekoki kobatela libala?

10 Bomoto ya sika oyo “ezalisamaki na boyokani na mokano ya Nzambe na boyengebene mpe bosembo ya solo” ebatelaka babalani mpo bákwea te na pite to ekobo. (Baefese 4:24) Ntango tolati bomoto ya sika, ‘tobomaka’ binama ya nzoto na biso na ndenge tobundisaka “pite, mbindo, mposa ya kosangisa nzoto, mposa oyo eyokisaka mpasi, mpe bilulela.” (Tángá Bakolose 3:5, 6.) Na bavɛrsɛ oyo, liloba ‘koboma’ elingi koloba ete tosengeli kosala nyonso oyo tokoki mpo tóbundisa bamposa mabe. Tokoboya eloko nyonso oyo ekoki kotinda biso na bamposa mabe ya kosangisa nzoto. (Yobo 31:1) Ntango tozali kotambwisa bomoi na biso nakolanda mitinda ya Nzambe, tokoyekola koyina “oyo ezali mabe” mpe kokangama makasi na “oyo ezali malamu.”​—Baroma 12:2, 9.

Babalani basengeli kobongisa boyokani na bango mpe basengeli kolobanaka na boboto, na bolingo mpe na ndenge ebongi

11. Ndenge nini bomoto ya sika ekoki kokómisa libala makasi?

 11 Ntango tozali kolata bomoto ya sika, tómekolaka bizaleli ya Yehova. (Bakolose 3:10) Ntango babalani bazali koyokelana ‘mawa, komoniselana boboto, elimo ya komikitisa, motema pɛtɛɛ mpe motema molai,’ bakozala na boyokani makasi na libala mpe Yehova akopambola bango. (Bakolose 3:12) Lisusu, bakozala mpenza na bomoko ntango ‘kimya ya Kristo ekotambwisa mitema na bango.’ (Bakolose 3:15) Soki babalani bazali ‘kolingana na motema,’ ‘bakozala bato ya liboso’ ya kotyelana likebi mpe kopesana limemya.​—Baroma 12:10.

12. Bizaleli nini omoni ete ezali na ntina mpo libala ezala na esengo?

12 Ntango batunaki mwasi ná mobali moko bizaleli nini esalisaka bango bázala na libala ya esengo, mobali na nkombo Sid, alobaki boye: “Bolingo ezali ezaleli ya libosoliboso oyo tosalaka makasi tomonisaka. Tómonaka mpe ete motema pɛtɛɛ ezali mpenza na ntina.” Mwasi na ye Sonja, andimi mpe alobi ete: “Boboto ezali mpenza na ntina. Tósalaka mpe makasi tómonisa ezaleli ya komikitisa, atako ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te.”

BÓSOLOLAKA MALAMU

13. Esɛngi nini mpo libala ezala makasi, mpe mpo na nini?

13 Kosololaka na molongani na yo na boboto nyonso, ezali moko ya makambo oyo esalaka ete libala ekoba kozala makasi. Na mawa nyonso, babalani mosusu basololaka kozanga limemya lokola nde bazali kosolola ná mopaya to nyama! Boyokani ya babalani elɛmbaka mokemoke ntango ‘makambo ya bololo oyo eyokisaka mpasi mpe nkanda mpe nkɛlɛ mpe koganga mpe maloba ya kofinga’ ezali na libala. (Baefese 4:31) Maloba ya kotyola mpe ya kozokisa ebebisaka libala. Yango wana, babalani basengeli kobongisa boyokani na bango mpe basengeli kolobanaka na boboto, na bolingo mpe na ndenge ebongi.​—Baefese 4:32.

14. Makambo nini tosengeli koboya kosala?

14 Biblia elobi ete ezali na “ntango ya kofanda nyɛɛ.” (Mosakoli 3:7) Kasi, yango elingi koloba te ete tokoki kotika kosolola na molongani na biso, mpo kosolola ezali na ntina mpo libala ezala malamu. Mwasi moko na Allemagne alobi boye: “Na ntango ya bongo, kofanda kimya ekoki kosala moninga mabe.” Abakisi ete: “Atako ezalaka pɛtɛɛ te kotikala kimya ntango matata ebimi, ezali mpe malamu te kobimisa nkanda mpo kaka tómiyoka malamu. Soki osali bongo, okoki koloba to kosala likambo oyo ekopesa molongani na yo mpasi, mpe kutu yango ekoki nde  kobebisa makambo.” Babalani babongisaka makambo te na koganga to na koboya kosolola. Kasi, bakoki kobongisa libala na bango soki bazali kosilisa matata na bango nokinoki mpe bazali te kokómisa yango tii na koswana.

15. Ndenge nini kosolola malamu ekoki kobongisa libala?

15 Babalani bakoki kokómisa libala na bango makasi soki bazali kozwa ntango ya kopesanaka makanisi mpe ya koyebisanaka ndenge bazali koyoka. Ndenge ozali koloba likambo ezali na ntina ndenge moko na likambo oyo ozali koloba. Na yango, ata makambo eyei yombe, salá nyonso osalelaka maloba ya malamu mpe olobaka na boboto. Soki osali bongo, ekozala mpasi te molongani na yo ayoka yo. (Tángá Bakolose 4:6.) Babalani bakoki kokómisa libala na bango makasi soki bazali kosolola malamu, elingi koloba bazali kosalela maloba ya kolendisa mpe oyo ezali na litomba.​—Baefese 4:29.

Soki mwasi ná mobali bazali kosolola malamu, libala na bango ekozala makasi (Talá paragrafe 15)

MOTO NA MOTO AKOKISAKA BAMPOSA YA MOLONGANI NA YE

16, 17. Mpo na nini ezali na ntina ete babalani bátyaka likebi na bamposa ya molongani na bango, ata mpe oyo ya kosangisa nzoto?

16 Mobali to mwasi akoki mpe kobongisa libala soki azali kotya bamposa ya molongani na ye na esika ya liboso. (Bafilipi 2:3, 4) Mwasi ná mobali basengeli komitya na esika ya moninga mpe kokokisaka bamposa na bango ya kosangisa nzoto.​—Tángá 1 Bakorinti 7:3, 4.

17 Likambo ya mawa, babalani mosusu bamoniselanaka te bolingo to basangisaka nzoto te. Mibali mosusu bakanisaka ete bakoki kobima bayuma soki bazali kosalela basi na bango makambo na boboto. Kasi Biblia elobi ete: “Bino mibali, bólukaka koyeba malamu basi oyo bofandi na bango.” (1 Petro 3:7, Libongoli ya Phillips) Mobali asengeli koyeba ete kokokisa bamposa ya molongani esuki te kaka na kosangisa nzoto. Asengeli ntango nyonso  komonisaka bolingo. Soki azali kosala bongo, mwasi na ye akoki kosepela na kosangisa nzoto. Soki mwasi ná mobali bazali komoniselana bolingo, ekozala mpasi te mpo bakokisaka bamposa na bango ya nzoto.

18. Ndenge nini babalani bakoki kokómisa boyokani na bango makasi?

18 Atako ezali na likambo moko te oyo ekoki kotinda biso tózala sembo te epai ya molongani na biso, kasi soki bolingo ezali te, yango ekoki kozala moko ya makambo oyo ekoki kotinda mobali to mwasi aluka bolingo epai mosusu to moto ya kosangisa na ye nzoto. (Masese 5:18; Mosakoli 9:9) Yango wana, Biblia epesi babalani toli ete ‘bápimelanaka’ te to báboyaka te kokokisa bamposa na bango ya nzoto, longola kaka soki bango mibale bayokani mpo na mwa ntango. Mpo na nini? ‘Mpo Satana akoba te komeka bango mpo na kozanga komipekisa na bango.’ (1 Bakorinti 7:5) Ekozala mpenza mabe soki mobali ná mwasi batikeli Satana nzela asalela ezaleli na bango ya “kozanga komipekisa” mpo na komeka mobali to mwasi asala ekobo! Ntango mobali ná mwasi bazali kokokisa bamposa na bango, mokomoko na bango alukaka “litomba na ye moko te, kasi oyo ya moto mosusu.” Basalaka bongo mpo balinganaka, kasi te kaka mpo esɛngami. Maloba mpe bajɛstɛ ya bolingo esalaka ete babalani bákóma na boyokani ya solosolo.​—1 Bakorinti 10:24.

KOBÁ KOKÓMISA LIBALA NA YO MAKASI

19. Tosengeli kozala na ekateli ya kosala nini, mpe mpo na nini?

19 Tokómi pene ya kokɔta na mokili ya sika! Ekozala mpenza likama kobendama na bamposa mabe, ndenge Bayisraele 24 000 basalaki na mokili ya patatalu ya Moabe. Nsima ya kolobela likambo wana, Biblia epesi toli oyo: “Moto oyo akanisi ete atɛlɛmi akeba ete akwea te.” (1 Bakorinti 10:12) Mpo libala na biso etikala makasi, tosengeli kotikala sembo epai ya Yehova mpe molongani na biso. (Matai 19:5, 6) Sikoyo nde mpenza ntango oyo tosengeli ‘kosala nyonso oyo ekoki na biso mpo nsukansuka akuta biso na litɔnɔ te mpe na mbeba te mpe na kimya.’​—2 Petro 3:13, 14.