Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Janvier 2015

Bópesa Yehova matɔndi mpe bózwa mapamboli

Bópesa Yehova matɔndi mpe bózwa mapamboli

“Bópesa Yehova matɔndi, mpo azali malamu.”​—NZEMBO 106:1.

1. Mpo na nini topesaka Yehova matɔndi?

YEHOVA apesaka biso “likabo nyonso ya malamu mpe libonza nyonso oyo ekoki mpenza.” (Yakobo 1:17) Azali mobateli ya mpate oyo alingaka biso, mpe na boboto mpenza akokisaka bamposa na biso nyonso. (Nzembo 23:1-3) Ya solo, Yehova abongi mpenza kozwa matɔndi na biso. Azali “ekimelo mpe bokasi na biso,” mingimingi ntango tozali na mpasi. (Nzembo 46:1) Tomiyokaka ndenge mokomi moko ya nzembo ayokaki ntango akomaki ete: “Bópesa Yehova matɔndi, mpo azali malamu; mpo motema boboto na ye ezali seko na seko.”​—Nzembo 106:1.

Mokapo na biso ya mobu 2015: “Bópesa Yehova matɔndi, mpo azali malamu.”​—Nzembo 106:1.

2, 3. (a) Wapi makama ya kozala bato oyo bazangi botɔndi? (b) Mituna nini tokotalela na lisolo oyo?

2 Mpo na nini tosengeli kopesaka Yehova matɔndi? Ndenge esakolamaki, bato ya mikolo oyo ya nsuka bazangi mpenza botɔndi. (2 Timote 3:2) Bato mingi basepelaka te na makambo mingi ya malamu oyo Yehova asalá mpo na bango. Tozali na mokili oyo elingi mingi biloko ya mosuni mpe  elendisaka bamilio ya bato básomba biloko mingi, ata oyo basengeli na yango te. Yango wana, bato mingi bazali kosepela te na oyo bazali na yango. Lokola Bayisraele ya kala, tokoki kokóma bato oyo bazangi botɔndi mpe kosepela te na mapamboli na biso mpe boyokani kitoko oyo tozali na yango elongo na Yehova.​—Nzembo 106:7, 11-13.

3 Kanisá mpe na oyo ekoki kosalema ntango tokutani na mikakatano. Mikakatano na biso ekoki ntango mosusu koleka motó, mpe tokoki kobanda kotyela yango likebi mingi na esika ya komona mapamboli oyo tozali na yango. (Nzembo 116:3) Ndenge nini tokoki kozala ntango nyonso bato ya botɔndi? Ndenge nini tokoki kobatela makanisi malamu ata na ntango ya mikakatano makasi? Tótalela yango.

“YO MOKO OSALI MAKAMBO MINGI, EE YEHOVA”

4. Ndenge nini tokoki kopesaka Yehova matɔndi?

4 Esɛngaka molende mpo na kopesaka Yehova matɔndi. Ya liboso, mokomoko na biso asengeli koluka koyeba mapamboli oyo Yehova apesá ye. Mpe ya mibale, tosengeli kokanisa malamumalamu ndenge mapamboli yango emonisaka ete Nzambe alingaka biso mingi mpenza. Ntango mokomi ya nzembo akanisaki bongo, akamwaki na makambo nyonso kitoko oyo Yehova asalá mpo na ye.​—Tángá Nzembo 40:5; 107:43.

5. Liteya nini tokoki kozwa epai ya ntoma Paulo na likambo etali kopesa matɔndi?

5 Tokoki koyekola ndenge ya kopesaka Yehova matɔndi soki totaleli ndakisa ya ntoma Paulo. Toyebi ete amanyolaki na mapamboli na ye mpo azalaki mbala na mbala kotɔnda Nzambe na mabondeli na ye. Ntoma Paulo andimaki ete azalaki ‘kofinga mpe konyokola mpe azalaki moto ya lofundo.’ Kasi, azalaki na botɔndi mpo ete atako azalaki na bizaleli ya ndenge wana, Nzambe mpe Kristo bamoniselaki ye motema boboto mpe bapesaki ye libaku ya kosakwela basusu. (Tángá 1 Timote 1:12-14.) Ntoma Paulo azalaki mpe na botɔndi makasi epai ya bandeko na ye bakristo mpe azalaki mbala mingi kotɔnda Yehova mpo na bizaleli malamu oyo bazalaki na yango mpe mpo na mosala na bango ya sembo. (Bafilipi 1:3-5, 7; 1 Batesaloniki 1:2, 3)  Ntoma Paulo azalaki ntango nyonso kotɔnda Yehova mpo na oyo nyonso bandeko na ye basalelaki ye ntango azalaki na minyoko. (Misala 28:15; 2 Bakorinti 7:5-7) Ekoki kokamwisa biso te ndenge ntoma Paulo alendisaki bakristo ete: “Bózala na botɔndi . . . , [bóyembela Nzambe nzembo, nzembo ya kosanzola, nzembo na elimo. Botɔndaka na mitema na bino, haut fleuve].”​—Bakolose 3:15-17.

KOMANYOLA MPE KOBONDELA ESALISAKA BISO TOPESAKA MATƆNDI

6. Mpo na nini ozali na botɔndi epai na Yehova?

6 Ndenge nini tokoki komekola ndakisa ya ntoma Paulo? Moto na moto akoki komanyola na oyo Yehova asalá mpo na ye. (Nzembo 116:12) Soki batuni yo ete “okoki kopesa Yehova matɔndi mpo na mapamboli nini oyo apesá yo,” okopesa eyano nini? Okolobela boyokani malamu oyo ozali na yango elongo na Yehova? To bolimbisi ya masumu na yo mpo na mbeka ya lisiko ya Kristo? Okoki kotánga bandeko oyo basalisaki yo na ntango ya mpasi? Okoki komonisa ndenge ozalaka na botɔndi mpo na molongani na yo to bana na yo? Zwá ntango mpo na kokanisa na mozindo na mapamboli ebele oyo Nzambe apesá yo. Yango ekotinda yo opesaka ye matɔndi mikolo nyonso.​—Tángá Nzembo 92:1, 2.

Mekolá ezaleli ya Hana mpe Hizikiya ya kopesa botɔndi, mpe pesáká Yehova matɔndi mpo na oyo asalá mpo na yo

7. (a) Mpo na nini tosengeli kopesaka Yehova matɔndi na mabondeli na biso? (b) Matomba nini okozwa soki ozali kopesa Yehova matɔndi ntango obondelaka?

7 Soki tokanisi malamu mpenza na mapamboli oyo tozali na yango, tokopesa Yehova matɔndi na libondeli. (Nzembo 95:2; 100:4, 5) Bato mingi babondelaka Nzambe kaka mpo na kosɛnga biloko. Kasi, Yehova asepelaka soki na mabondeli na biso tozali kotɔnda ye mpo na oyo asalá mpo na biso. Na Biblia, tokutaka bandakisa ya basaleli ya Nzambe, lokola Hana mpe Hizikiya, oyo bapesaki Yehova matɔndi na mabondeli na bango. (1 Samwele 2:1-10; Yisaya 38:9-20) Na yango, zalá na ezaleli ya kopesaka matɔndi lokola bango, mpe pesá Yehova matɔndi mpo na oyo asalá mpo na yo. (1 Batesaloniki 5:17, 18) Soki osali bongo, okoyoka malamu, bolingo na yo mpo na Nzambe ekokola, okokóma mpe okotikala moninga na ye.​—Yakobo 4:8.

Mapamboli nini ya Yehova ozali na botɔndi mpo na yango? (Talá paragrafe 6, 7)

8. Nini ekoki kosala ete tókóma bato oyo bapesaka matɔndi te?

8 Soki tosali angɛlɛ te, tokoki kozanga botɔndi mpo na makabo kitoko oyo Yehova apesaka biso. Mpo na nini? Mpo tozali bato ya kozanga kokoka mpe tosangolá ezaleli ya kozanga kopesa matɔndi epai ya baboti na biso ya liboso. Yehova apesaki Adama ná Eva paradiso mpo báfanda kuna mpe azwaki bibongiseli mpo bázala na nyonso oyo basengelaki na yango. Bakokaki kofanda libela na libela na kimya. (Ebandeli 1:28) Kasi basepelaki te na mapamboli oyo bazalaki na yango. Bazalaki na lokoso mpe balingaki kozwa mingi. Na nsuka, babungisaki biloko nyonso. (Ebandeli 3:6, 7, 17-19) Tofandi na mokili oyo ezangi botɔndi, mpe tokoki kokóma na ezaleli ya kozanga kopesa Yehova botɔndi mpo na nyonso oyo  asalá mpo na biso. Tokoki mbala mosusu kobosana kopesa Yehova matɔndi mpo na boyokani oyo tozali na yango ná ye to libaku oyo tozali na yango ya kozala na kati ya bandeko ya mokili mobimba. Biloko ya mokili oyo ekoki ntango mosusu kolongola likebi na biso. (1 Yoane 2:15-17) Mpo na kopɛngola motambo wana, tosengeli komanyola na ebele ya mapamboli oyo tozali na yango mpe kopesaka Nzambe matɔndi mbala na mbala mpo na libaku oyo tozali na yango ya kozala basaleli na ye.​—Tángá Nzembo 27:4.

NTANGO TOZALI KOBUNDA NA MINYOKO

9. Ntango tokutani na minyoko makasi, mpo na nini tosengeli komanyola na mapamboli oyo tozali na yango?

9 Kozala na ezaleli ya kopesaka matɔndi ekosalisa biso tóyika mpiko na ntango ya mikakatano makasi. Tokoki mbala mosusu kotungisama makasi na makambo mosusu ya mpasi mpenza oyo ekoki kobongola bomoi na biso na mbalakaka, na ndakisa molongani na biso akoki kosala ekobo, tokoki kobɛla makasi, moto oyo tolingaka akoki kokufa, to mopɛpɛ makasi to mpela ekoki kobebisa esika tozali. Komanyola na mapamboli ya Yehova, ekobɔndisa to ekopesa biso makasi ya koyika mpiko. Tótalela bandakisa oyo elandi.

10. Matomba nini Irina azwi na ndenge akanisaka na mozindo na mapamboli oyo azali na yango?

10 Ndeko Irina, oyo azali mobongisi-nzela na Amerika ya nɔrdi, abalanaki na nkulutu moko, kasi nkulutu yango asalaki ekobo mpe asundolaki ye ná bana. * Nini esalisaka Irina akoba kosalela Yehova na bosembo nyonso? Alobi boye: “Nazalaka na botɔndi mingi na ndenge Yehova amibanzabanzaka mpenza mpo na ngai. Komonisa botɔndi mokolo na mokolo mpo na makambo ya malamu oyo esalemi na bomoi na ngai, esalisaka ngai namona ete ezali libaku malamu ndenge Tata na biso ya likoló mpe mobateli na biso ayebi mpe alingaka ngai. Nayebi ete akosundola ngai te.” Atako Irina akutani na makambo mingi ya mpasi na bomoi na ye, kasi kobatela esengo esalisaka ye alonga mpe alendisaka basusu.

11. Nini esalisaki ndeko Kyung-sook ayikela maladi na ye mpiko?

11 Ndeko Kyung-sook, oyo azalaka na Azia, asalaki mosala ya mobongisi-nzela elongo na mobali na ye na boumeli ya mbula 20. Na mbalakaka, minganga bayebisaki ye ete azali na maladi ya kanser mpe akozala na bomoi kobanda sanza misato kino motoba. Atako ye ná mobali na ye bakutanaki na makambo mingi ya mpasi liboso, kasi bazalaki kaka na nzoto kolɔngɔnɔ. Alobi boye: “Maladi oyo etungisaki ngai mpenza, namonaki ete nabungisi eloko nyonso mpe nazalaki kobanga.” Nini esalisaki ndeko Kyung-sook ayika mpiko? Alobi boye: “Butu nyonso liboso namata na mbeto, namataka na balcon ya ndako na ngai mpe nabondelaka na mongongo makasi mpe napesaka matɔndi mpo na makambo mitano oyo esalemi mpo na  ngai mokolo wana. Nayokaka malamu soki nasali bongo, mpe yango etindaka ngai namonisa bolingo na ngai mpo na Yehova.” Mabondeli wana oyo ndeko Kyung-sook asalaka na butu ememeli ye matomba nini? Alobi boye: “Namoni ete Yehova azali kosunga biso na ntango ya mpasi makasi mpe tozali na mapamboli mingi mpenza koleka bampasi.”

Sheryl, ná ndeko na ye John, oyo abikaki na likama (Talá paragrafe 13)

12. Nini epesaki ndeko Jason makasi nsima ya liwa ya mwasi na ye?

12 Ndeko Jason, oyo asalaka na biro moko ya Batatoli ya Yehova na Afrika, asali mbula koleka 30 na mosala ya ntango nyonso. Alobi boye: “Kobanda mwasi na ngai akufá, eleki sikoyo mbula nsambo, mpe ntango mosusu nayokaka mpenza mpasi mingi na motema. Soki natikaki makanisi na ngai kaka na mpasi oyo amonaki ntango azalaki kobunda na maladi wana ya kanser, yango ekokaki kotungisa ngai mingi koleka.” Nini ekitisaki ndeko Jason mwa motema moke? Alobi boye: “Na ntango mosusu, nakanisaki ntango ya malamu oyo ngai ná mwasi na ngai tolekisá elongo, mpe napesaki Yehova matɔndi mpo na yango. Nayokaki motema ekiti mwa moke mpe na nsima nabandaki kopesa Yehova matɔndi mbala na mbala mpo na bantango wana ya esengo. Ezaleli ya kopesa matɔndi esalisi ngai mingi nazala na makanisi malamu. Nayokaka mpasi ya liwa na ye, kasi kopesa Yehova matɔndi mpo na libala ya malamu oyo tolekisi mpe mpo na libaku ya kosalela Yehova ná moto oyo azalaki mpe kolinga ye mingi, esalisi ngai mpenza nazala na makanisi malamu.”

“Nazali na botɔndi mingi ete Yehova azali Nzambe na ngai.”​—Sheryl

13. Nini esalisaki Sheryl ayika mpiko ntango bato mingi ya libota na ye bakufaki?

13 Ntango Mopɛpɛ moko makasi na nkombo Haiyan ebɛtaki na kati ya ekólo Philippines na katikati ya mobu 2013, Sheryl, oyo azalaki kaka na mbula 13 na ntango wana, abungisaki biloko na ye. Alobi ete: “Nabungisaki ndako mpe bato mingi ya libota na ngai.” Tata, mama mpe bandeko na ye misato ya makila mpenza bakufaki na mopɛpɛ wana makasi. Nini esalisaki Sheryl ayika mpiko na eleko wana ya mpasi kozanga ete asilika? Sheryl akobaka kopesa Yehova  matɔndi mpo akanisaka na mozindo na mapamboli oyo azali na yango. Alobi boye: “Namonaki nyonso oyo bandeko basalaki mpo na kosunga mpe kolendisa baoyo basengelaki na lisalisi. Nayebaki ete bandeko na mokili mobimba bazalaki kobondela mpo na ngai.” Abakisi ete: “Nazali na botɔndi mingi mpo ete Yehova azali Nzambe na ngai. Apesaka biso ntango nyonso biloko oyo tosengeli na yango.” Ya solo, ntango tozali kopesa matɔndi mpo na mapamboli oyo tozali na yango, toboyaka ete mpasi etungisaka biso mingi. Yango ekosalisa biso tóyikela mokakatano ata ya ndenge nini mpiko.​—Baefese 5:20; tángá Bafilipi 4:6, 7.

“NGAI NAKOSEPELA MAKASI NA YEHOVA YE MOKO”

14. Elikya nini kitoko tozali na yango? (Talá elilingi ya ebandeli.)

14 Banda kala, basaleli ya Yehova bapesaka botɔndi mpo na mapamboli oyo bazali na yango. Nsima ya kobikisama liboso ya Farao mpe mampinga na ye na Mbu Motane, Bayisraele bayembaki na esengo nyonso nzembo, mpo na kosanzola Yehova mpe kopesa ye matɔndi. (Kobima 15:1-21) Lelo oyo, moko ya mapamboli na biso ya motuya mingi ezali ya koyeba ete mosika te mpasi ekozala lisusu te. (Nzembo 37:9-11; Yisaya 25:8; 33:24) Kanisá ndenge tokomiyoka ntango Yehova akoboma banguna na ye nyonso mpe akoyamba biso na mokili ya sika ya kimya mpe ya boyengebene. Tokotɔnda mpenza Yehova mokolo wana!​—Emoniseli 20:1-3; 21:3, 4.

Moko ya mapamboli na biso ya motuya mingi ezali ya koyeba ete mosika te mpasi ekozala lisusu te

15. Ozali na ekateli ya kosala nini na boumeli ya mobu 2015?

15 Na boumeli ya mobu 2015, tozali kozela ebele ya mapamboli oyo Yehova akopesa biso. Ekoki kosalema ete tókutana na makambo mosusu ya mpasi. Kasi, ezala likambo nini ekoki kosalema, toyebi ete Yehova akosundola biso soki moke te. (Kolimbola Mibeko 31:8; Nzembo 9:9, 10) Akokoba kopesa biso eloko nyonso oyo tosengeli na yango mpo tósalela ye na bosembo nyonso. Tiká ete tózala na ekateli ya komekola ezaleli ya mosakoli Habakuku, oyo alobaki ete: “Ata soki nzete ya figi ebimisi fololo te, mpe mbuma ezali te na banzete ya vinyo; ata soki mosala ya nzete ya olive eleki se mpamba, mpe mikala ya bilanga ebimisi bilei te; ata soki etonga esili mpenza na lopango, mpe bibwɛlɛ ezali te na bilanga ya lopango; ata bongo, ngai nakosepela makasi na Yehova ye moko, nakozala na esengo na Nzambe ya lobiko na ngai.” (Habakuku 3:17, 18) Na boumeli ya mobu oyo mobimba, tókoba komanyola na mapamboli nyonso oyo tokozwa mpe kolendisama na kolanda toli ya mokapo na biso ya mobu 2015 oyo elobi ete: “Bópesa Yehova matɔndi, mpo azali malamu.”​—Nzembo 106:1.

^ par. 10 Bankombo mosusu ezali ya bango te.