Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Janvier 2015

Ntina oyo tokanisaka liwa ya Nkolo

Ntina oyo tokanisaka liwa ya Nkolo

“Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.”​—1 BAKORINTI 11:24.

1, 2. Yesu asalaki nini na mpokwa ya 14 Nisana, mobu 33 T.B.? (Talá elilingi ya ebandeli.)

NA Yerusaleme, na butu ya 14 Nisana, ya mobu 33 T.B., sanza ezalaki na mobimba na yango. Yesu ná bantoma na ye basalaki Elekeli, oyo ekundwelaki bato ndenge Yehova abikisaki Yisraele na Ezipito mibu 1 500 liboso. Yesu abandisaki molulu moko ya ntina mingi elongo na bantoma na ye 11 ya sembo, ezalaki molulu oyo bayekoli na ye basengelaki kosalaka mbula na mbula mpo na kokanisa liwa na ye.​—Matai 26:1, 2.

2 Yesu abondelaki, apesaki bantoma na ye limpa ezangi levire, mpe alobaki boye: ‘Bókamata, bólya. Lisusu, akamataki kɔpɔ mpe, apesaki matɔndi, mpe alobi: Bómɛla yango, bino nyonso.’ (Matai 26:26, 27) Limpa ná vinyo ezalaki na ndimbola ya ntina mpenza. Bantoma ya Yesu ya sembo bayekolaki makambo mingi na butu wana ya ntina mingi.

3. Mituna nini tokotalela na lisolo oyo?

3 Yesu alingaki ete bayekoli na ye bákanisaka liwa na ye  mbala moko na mbula. Na nsima, bakómaki kobenga yango “bilei ya mpokwa ya Nkolo,” to Ekaniseli. (1 Bakorinti 11:20) Mituna mosusu oyo ebimi yango oyo: Mpo na nini tosengeli kokanisaka liwa ya Yesu? Limpa ná vinyo ezali na ndimbola nini? Ndenge nini tokoki komibongisa mpo na Ekaniseli? Nani akoki kolya limpa mpe komɛla vinyo? Mpe ndenge nini bakristo bamonisaka ete bazwaka elikya na bango na motuya?

MPO NA NINI TOSENGELI KOKANISAKA LIWA YA YESU?

4. Liwa ya Yesu epesi biso nzela na likambo nini?

4 Lokola Adama asalaki lisumu, biso tosangolaki lisumu mpe liwa. (Baroma 5:12) Moto moko te ya kozanga kokoka akoki kopesa Nzambe lisiko mpo na bomoi na ye to mpo na bomoi ya basusu. (Nzembo 49:6-9) Kasi, Yesu apesaki bomoi na ye ya kokoka mpo na biso mpe alakisaki Nzambe motuya ya lisiko yango. Lokola asalaki bongo, Yesu apesi biso nzela ya kozala na elikya ya bomoi libela na libela, oyo ezangi lisumu mpe liwa.​—Baroma 6:23; 1 Bakorinti 15:21, 22.

Tosepelaka mingi na oyo Nzambe mpe Yesu basalá mpo na biso!

5. (a) Ndenge nini toyebi ete Nzambe ná Yesu balingaka biso? (b) Mpo na nini tosengeli koyanganaka na Ekaniseli?

5 Nzambe amonisi ete alingaka bato na ndenge azwaki ebongiseli ya lisekwa. (Yoane 3:16) Yesu mpe amonisaki bolingo na ye na ndenge apesaki bomoi na ye mpo na biso. Ata liboso aya awa na mabele, Yesu ‘azalaki kolinga mingi bana ya bato.’ (Masese 8:30, 31) Tosepelaka mingi na oyo Yehova mpe Yesu basalá mpo na biso! Yango wana, totosaka etinda oyo Yesu apesaki ete “bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai” na ndenge toyanganaka na Ekaniseli.​—1 Bakorinti 11:23-25.

LIMPA NÁ VINYO EZALI NA NDIMBOLA NINI?

6. Ndimbola nini tokangi mpo na limpa mpe vinyo ya Ekaniseli?

6 Na bolei ya nsuka oyo asalaki elongo na bantoma na ye, Yesu asalaki likamwisi te mpo na kobongola limpa na nzoto na ye to vinyo na makila na ye. Mpo na limpa, alobaki ete: “Oyo elakisi nzoto na ngai.” Alobaki mpo na vinyo ete: “Oyo elakisi ‘makila ya kondimana’ na ngai, oyo ekosopama mpo na bato mingi.” (Marko 14:22-24) Emonani polele ete limpa ná vinyo ezali ya elilingi, to kaka biloko oyo esalelamaka.

7. Limpa oyo ezangi levire ezali elilingi ya nini?

7 Na butu wana ya ntina mingi, Yesu asalelaki limpa ezangi levire oyo bazalaki kosalela na Elekeli. (Kobima 12:8) Biblia esalelaka ntango mosusu levire mpo na komonisa lisumu. (Matai 16:6, 11, 12; Luka 12:1) Limpa ezangi levire oyo Yesu asalelaki ezalaki elilingi ya nzoto na ye oyo ezangi lisumu. (Baebre 7:26) Mpo na ntina wana nde tosalelaka limpa oyo ezangi levire na Ekaniseli.

8. Vinyo ezali elilingi ya nini?

8 Vinyo oyo Yesu asalelaki ezali elilingi ya makila na ye to bomoi na ye, ndenge moko mpe vinyo oyo tosalelaka na Ekaniseli. Na Yerusaleme, na esika babengi Golgota, akufaki mpo na biso  mpe apesaki bomoi na ye “mpo na kolimbisa masumu.” (Matai 26:28; 27:33) Soki tozali kozwa na motuya likabo wana ya ntina mingi, moto na moto akomibongisa mbula na mbula mpo na molulu wana ya sipesiale. Ndenge nini tokoki kosala yango?

BALOLENGE OYO TOKOKI KOMIBONGISA

9. (a) Mpo na nini tosengeli kosalela programɛ ya botángi ya Biblia mpo na eleko ya Ekaniseli? (b) Ndenge nini otalelaka lisiko?

9 Lolenge moko oyo tokoki komibongisa mpo na Ekaniseli, ezali ya kosalela programɛ ya kotánga Biblia na eleko ya Ekaniseli oyo ezalaka na mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo. Kotánga masolo ya Biblia ekosalisa biso tómanyola na oyo Yesu asalaki liboso akufa. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Ndeko mwasi moko akomaki ete: “Tozelaka Ekaniseli na motema esengo mpenza. Ekómi likambo moko ya sipesiale mingi mbula na mbula. Nazali komona na makanisi natɛlɛmi pembeni ya esika oyo balelaka bibembe . . . , nazali kotala tata na ngai mpe nabandi komona ntina ya kozala na botɔndi mpo na lisiko. . . . Nayebaki bavɛrsɛ nyonso mpe ndenge ya kolimbola yango! Kasi ntango nayebaki mpasi oyo liwa epesaka, motema na ngai etondaki na esengo mpo na matomba oyo tokozwa na nzela ya lisiko.” Kokanisa na mozindo na ndenge oyo mbeka ya Yesu ekosalisa mokomoko na biso, ezali likambo ya ntina mingi mpo na komibongisa mpo na Ekaniseli.

Soki tolandi programɛ ya botángi ya Biblia mpo na eleko ya Ekaniseli, tokomibongisa mpo na Ekaniseli (Talá paragrafe 9)

10. Tokoki lisusu kosala nini mpo tómibongisa mpo na Ekaniseli?

10 Lolenge mosusu oyo tokoki komibongisa ezali ya kobakisa ntango oyo tolekisaka na mosala ya kosakola, mpo tóbenga ebele ya bato na Ekaniseli. Ntango mosusu tokoki kozala babongisi-nzela basungi. Ntango tozali koyebisa basusu makambo etali Nzambe, mwana na ye mpe elikya ya bomoi ya seko,  tosepelaka mpo ete tosali oyo Nzambe alingaka tósala.​—Nzembo 148:12, 13.

11. Mpo na nini ntoma Paulo alobaki ete Bakorinti mosusu balyaki mpe bamɛlaki na ndenge ebongi te na Ekaniseli?

11 Ntango ozali komibongisa mpo na Ekaniseli, kanisá na mozindo na oyo ntoma Paulo akomaki mpo na bakristo ya Korinti. (Tángá 1 Bakorinti 11:27-34.) Alobaki ete soki moto oyo alei limpa mpe amɛli vinyo asali yango na lolenge ebongi te, to azangi limemya, akomema ngambo mpo na “nzoto mpe makila ya Nkolo.” Na yango, soki mokristo oyo atyami mafuta na elimo akómi na etamboli mabe mpe alei limpa mpe amɛli vinyo, “azali kolya mpe komɛla lisambisi mpo na ye moko.” Na ntango ya ntoma Paulo, Bakorinti mingi bakómaki na etamboli mabe. Ekoki kozala ete bamosusu kati na bango bazalaki kolya mpe komɛla mingi liboso to na ntango ya Ekaniseli mpe ekoki kozala ete bazalaki kolɛmba to kolala mpɔngi. Bazalaki komonisa limemya te na molulu yango; mpo na yango, ntango bazalaki kolya limpa mpe komɛla vinyo, Nzambe azalaki kondima bango te.

12. (a) Ntoma Paulo akokanisaki Ekaniseli na nini? Likebisi nini apesaki baoyo bazali kolya limpa mpe komɛla vinyo? (b) Moto oyo alyaka limpa mpe amɛlaka vinyo akosala nini soki asali lisumu monene?

12 Lokola akokanisaki Ekaniseli na bilei, ntoma Paulo akebisaki baoyo bazalaki kolya mpe komɛla boye: “Bokoki te komɛla kɔpɔ ya Yehova mpe kɔpɔ ya bademo; bokoki te kolya na “mesa ya Yehova” mpe na mesa ya bademo.” (1 Bakorinti 10:16-21) Soki moto oyo alyaka limpa mpe amɛlaka vinyo akwei na lisumu ya monene, asengeli koluka kokende epai ya bankulutu mpo básalisa ye. (Tángá Yakobo 5:14-16.) Soki na misala na ye amonisi ete abongoli mpenza motema, akomonisa te ete azangi limemya na mbeka ya Yesu soki alei limpa mpe amɛli vinyo na Ekaniseli.​—Luka 3:8.

Tokolinga soki moke te kozanga limemya na mbeka oyo Yesu apesaki

13. Mpo na nini tosengeli kobondela mpo na elikya oyo Nzambe apesi biso?

13 Tokoki mpe komibongisa mpo na Ekaniseli soki tozali kobondela mpe kokanisa na mozindo na elikya oyo Nzambe apesi biso. Tokolinga soki moke te kozanga limemya na mbeka oyo Yesu apesaki. Mpo na yango, tokoki te kolya limpa mpe komɛla vinyo soki tozali na bilembeteli te ete tozali bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Sikoyo, nani asengeli kolya limpa mpe komɛla vinyo?

NANI ASENGELI KOLYA LIMPA MPE KOMƐLA VINYO?

14. Lokola bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali na kondimana ya sika, basalaka nini na Ekaniseli?

14 Baoyo balyaka limpa mpe bamɛlaka vinyo na Ekaniseli, bandimisamaka mpenza ete bazali na kati ya kondimana ya sika. Mpo na vinyo, Yesu alobaki ete: “Kɔpɔ oyo elakisi kondimana ya sika na nzela ya makila na ngai.” (1 Bakorinti 11:25) Yehova asalaki kondimana ya mibeko ná Bayisraele, kasi na nsima alobaki ete akosala kondimana ya sika na esika na yango. (Tángá Yirimia 31:31-34.) Nzambe asalaki kondimana yango ya sika, to boyokani ná bakristo oyo batyami mafuta na elimo. (Bagalatia 6:15, 16) Liwa ya Yesu esalaki ete kondimana to boyokani yango esalema. (Luka 22:20) Yesu azali moyokanisi ya kondimana ya sika. Bakristo ya sembo oyo batyami mafuta na elimo oyo bazali na kati ya kondimana ya sika bakozala elongo na Yesu na likoló.​—Baebre 8:6; 9:15.

15. Banani bazali na kati ya kondimana ya Bokonzi? Soki bazali sembo, libaku nini bakozala na yango?

15 Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bayebi mpe ete bazali na kati ya kondimana ya Bokonzi. (Tángá Luka 12:32.) Kondimana yango esalemaki kati na Yesu ná bayekoli na ye ya sembo, oyo bamonaki “bampasi oyo ye amonaki.” (Bafilipi 3:10) Bakristo oyo batyami mafuta na elimo ya lelo, oyo bazali sembo bazali mpe na kati ya kondimana wana. Bakoyangela lokola bakonzi elongo na Kristo kuna na likoló mpo na libela. (Emoniseli 22:5) Bakokisi masɛngami ya kolya limpa mpe komɛla vinyo na bilei ya mpokwa ya Nkolo.

16. Limbolá na mokuse Baroma 8:15-17.

16 Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bandimisamaka mpenza ete bazali bana na Nzambe mpe bakoki kolya limpa mpe komɛla vinyo. (Tángá Baroma 8:15-17.) Ntoma Paulo alobaki ete bazali koganga: “Aba, Tata!” Liloba ya Aramɛyɛ “Aba” elimboli bolingo oyo mwana azalaka na yango epai ya “papa na ye,” mpe limemya, oyo azalaka na yango epai ya “tata” na ye. Ezali komonisa boyokani ya ntina mingi mpenza oyo bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali na yango elongo na Yehova ntango ‘Nzambe akamataka bango mpe akómisaka bango bana na ye.’ Elimo ya Nzambe ‘etatolaka’ elongo na bango, mpo báyeba kozanga ntembe ete bazali bana na ye oyo batyami mafuta na elimo. Elingi koloba te ete baboyi kofanda awa na mabele. Bayebi ete soki batikali sembo tii na liwa na bango, bakozala banganga-nzambe kuna na likoló elongo na Yesu. Mpe bayebi ete ‘batyami mafuta na mosantu,’ elingi koloba Yehova. Lelo oyo kaka mwa ndambo kati na bana yango ya Nzambe 144 000 nde batikali awa na mabele. (1 Yoane 2:20; Emoniseli 14:1) Bamiyokaka ete bazali na boyokani mpenza elongo na Yehova mpe babengaka ye “Aba, Tata!”

ZWÁKÁ NA MOTUYA ELIKYA OYO BIBLIA EPESI YO

17. Elikya nini bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali na yango? Ndenge nini bayebaka ete bazali bakristo oyo batyami mafuta na elimo?

17 Soki ozali mokristo oyo atyami mafuta na elimo, na ntembe te, olobelaka mbala mingi elikya na yo ya bomoi na likoló na mabondeli oyo osalaka. Mpe Makomami ezalaka na ntina mingi mpo na yo. Na ndakisa, ntango Biblia elobeli libala na likoló kati na Yesu mpe ‘mwasi na ye ya libala,’ oyebaka ete maloba yango esalelami mpo na yo mpe ozali kozela yango na motema esengo. (Yoane 3:27-29; 2 Bakorinti 11:2; Emoniseli 21:2, 9-14) To ntango Biblia emonisi bolingo oyo Nzambe azali na yango mpo na bakristo oyo batyami mafuta na elimo, oyebaka ete ezali kolobela yo. Mpe ntango ozali kotánga na kati ya Liloba ya Nzambe malako oyo elobeli mpenzampenza bakristo oyo batyami mafuta na elimo, elimo santu ekotinda yo otosa yango. Elimo santu “etatolaka” elongo na yo ete elikya na yo ezali ya kokende likoló.

18. “Bampate mosusu” bazali na elikya nini? Ndenge nini otalelaka elikya yango?

 18 Soki ozali moko ya “ebele mpenza ya bato” ya “bampate mosusu,” Nzambe apesi yo libaku ya kozala na bomoi ya seko na Paradiso awa na mabele. (Emoniseli 7:9; Yoane 10:16) Ndenge nini otalelaka bomoi na yo ya mikolo ezali koya? Osepelaka makasi ntango okanisaka na mozindo na oyo Biblia elobaka mpo na ndenge bomoi ekozala na Paradiso. Ozelaka na esengo kofanda na mokili ya kimya elongo na libota mpe baninga na yo. Ozalaka na mposa ya komona ndenge nzala, bobola, minyoko, maladi mpe liwa ekosila. (Nzembo 37:10, 11, 29; 67:6; 72:7, 16; Yisaya 33:24) Osepelaka kozela komona ndenge bato oyo ozalaki kolinga bakosekwa. (Yoane 5:28, 29) Ozali na botɔndi mpenza epai ya Yehova mpo na elikya wana kitoko! Ata soki olyaka limpa te mpe omɛlaka vinyo te, oyanganaka na Ekaniseli mpo ozalaka na botɔndi mpo na mbeka ya lisiko ya Yesu.

OKOZALA WANA?

19, 20. (a) Nini epesi yo libaku ya kozala na bomoi ya seko? (b) Mpo na nini okozala na Ekaniseli?

19 Okoki kozala na bomoi ya seko, ezala na mabele to na likoló, kaka soki omonisi kondima epai ya Yehova Nzambe, Yesu Kristo mpe na lisiko. Ntango okei na Ekaniseli, manyolá na elikya oyo ozali na yango mpe na ntina mpenza ya liwa ya Yesu. Nsima ya kolala ya moi na mokolo ya mitano, 03/04/2015, bamilio ya bato na mokili mobimba bakoyangana mpo na Ekaniseli na Bandako ya Bokonzi mpe bisika mosusu.

20 Soki tomibongisi mpo na kozala na Ekaniseli na makanisi oyo ebongi, tokozala na botɔndi mingi mpo na mbeka ya lisiko ya Yesu. Soki olandi diskur ya Ekaniseli na likebi mpenza, yango ekotinda yo omonisela basusu bolingo mpe oyebisa bango bolingo ya Yehova mpe mokano na ye mpo na biso nyonso. (Matai 22:34-40) Zalá na ekateli ya kozala wana.

^ par. 9 Talá Mwa buku mpo na koyekola Liloba ya Nzambe, eteni 16.