Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Janvier 2015

Kómisá libala na yo makasi mpe ya esengo

Kómisá libala na yo makasi mpe ya esengo

“Soki Yehova ye moko atongi ndako te, bato oyo batongi yango basali mosala wana ya makasi kaka mpamba.”​—NZEMBO 127:1a.

1-3. Mikakatano nini babalani bakutanaka na yango? (Talá elilingi ya ebandeli.)

MOBALI moko oyo afandi na libala ya esengo na boumeli ya mbula 38 alobi boye: “Soki ozali mpenza kosala milende mpe ozali komonisa ete ozali na mposa libala na yo elonga, okozwa mapamboli ya Yehova.” Ya solo, mobali ná mwasi bakoki kozala na esengo mpe kopesana mabɔkɔ na ntango ya mikakatano.​—Masese 18:22.

2 Esalemaka mbala mingi ete babalani bákutana na mikakatano mosusu. Biblia ebengaka yango “bolɔzi na kati ya mosuni.” (1 Bakorinti 7:28) Mpo na nini? Mokolo na mokolo, ezali na makambo oyo ekoki kobimisa mitungisi na libala. Lokola bazali bato ya kozanga kokoka, ekoki kosalema ete mobali ná mwasi báloba to básala makambo oyo ekoki kopesa moninga mpasi mpe bákoka te kosolola malamumalamu. (Yakobo 3:2, 5, 8) Babalani mosusu basalaka misala oyo elyaka bango ntango mingi mpe babɔkɔlaka bana. Mitungisi mpe kolɛmba epekisaka bango bázala na ntango mingi ya kobongisa libala na bango. Mokakatano ya mbongo, maladi, to mikakatano mosusu ekoki mokemoke kolɛmbisa  bolingo na bango mpe limemya epai ya moko na moko. Mpe misala ya nzoto lokola pite to ekobo, etamboli ya nsɔni, koyinana, koswana, zuwa, nkanda makasimakasi, kowelana ekoki kobebisa libala oyo ezalaki komonana ete ezali makasi.​—Bagalatia 5:19-21.

3 Likambo ya mabe koleka, bato na ‘mikolo oyo ya nsuka’ mbala mingi balukaka kaka matomba na bango moko mpe bamemyaka Nzambe te, mpe bizaleli yango ekoki kobebisa mpenza libala. (2 Timote 3:1-4) Lisusu, ezali na monguna moko ya mabe mpenza oyo azali na mokano ya kobebisa mabala. Ntoma Petro akebisaki ete: “Monguna na bino, Zabolo, azali kotambola epai na epai lokola nkɔsi oyo ezali koganga mpe koluka kolya moto.”​—1 Petro 5:8; Emoniseli 12:12.

4. Nini ekoki kosalisa mpo na kozala na libala ya makasi mpe ya esengo?

4 Mobali moko na Japon alobi boye: “Kozanga mbongo ezalaki kotungisa ngai makasi mpenza. Mpe lokola nazalaki mpenza te kosolola na mwasi na ngai, ye mpe akómaki komitungisa mingi. Lisusu, na mikolo oyo euti koleka, abɛlaki mingi. Na ntango mosusu, mitungisi yango esalaki ete tóbendana.” Mikakatano ekozanga te na libala, kasi tokoki kolonga yango. Na lisalisi ya Yehova, babalani bakoki kozala na libala ya makasi mpe ya esengo. (Tángá Nzembo 127:1.) Tólobela makambo mitano oyo ekoki kosalisa mpo na kokómisa makasi libala mpe eumela. Tokotalela mpe ntina oyo bolingo ezali na ntina mingi mpo na libala ezala makasi.

BÓPESA YEHOVA ESIKA NA LIBALA NA BINO

5, 6. Mobali ná mwasi bakoki kosala nini mpo bápesa Yehova esika na libala na bango?

5 Soki mobali ná mwasi bazali sembo mpe bazali komemya Yehova, libala na bango ekopikama makasi. (Tángá Mosakoli 4:12.) Soki mibali ná basi bazali kolanda toli ya bolingo oyo Nzambe apesaka, Nzambe akozwa esika na libala  na bango. Biblia elobi ete: “Matoi na yo ekoyoka liloba nsima na yo oyo ezali koloba ete: ‘Nzela yango oyo. Bótambola na yango,’ soki bokokende na lobɔkɔ ya mobali to soki bokokende na lobɔkɔ ya mwasi.” (Yisaya 30:20, 21) Lelo oyo, babalani ‘bayokaka’ liloba ya Yehova ntango bazali kotánga Biblia elongo. (Nzembo 1:1-3) Bakokómisa lisusu libala na bango makasi soki bazali pɔsɔ na pɔsɔ kosala losambo na kati ya libota oyo ezali kosepelisa mpe kotonga. Mpe ntango babalani bazali kobondela mokolo na mokolo elongo, bazali kosala ete libala na bango ekóma makasi mpe elonga masɛnginya ya mokili oyo ya Satana.

Soki babalani bazali kosalela Yehova elongo, bakómaka na boyokani makasi ná Nzambe mpe libala na bango ezalaka na esengo (Talá paragrafe 5, 6)

6 Ndeko moko ya Allemagne na nkombo Gerhard alobi ete: “Ntango nyonso oyo mikakatano to kozanga kokanga ntina ya likambo oyo moko alobi ebebisaki esengo na biso, toli ya Liloba ya Nzambe esalisaki biso tómoniselana motema molai mingi mpe tólimbisana.” Abakisi ete bizaleli wana ezali na ntina mingi mpo libala elonga. Ntango mobali ná mwasi bazali kosala makasi Nzambe azwa esika na libala na bango mpe bazali kosalela ye elongo, bakopusana penepene na Yehova mpe boyokani na bango ná ye ekokóma makasi.

BATATA YA MABOTA YA BOLINGO

7. Mobali asengeli kosalela mwasi na ye makambo ndenge nini?

7 Lolenge oyo mobali azali kotambwisa libota na ye ekoki kosalisa mpo libala ezala makasi mpe na esengo. Biblia elobi ete: “Mokonzi ya mobali nyonso ezali Kristo; mpe mokonzi ya mwasi ezali mobali.” (1 Bakorinti 11:3) Yango elingi koloba nini? Mibali basengeli kosalela basi na bango makambo ndenge Yesu asalelaki bayekoli na ye makambo. Azalaki soki moke te makambo makasimakasi. Azalaki ntango nyonso na bolingo, boboto, komitya na esika na bango mpe komikitisa na motema.​—Matai 11:28-30.

8. Makambo nini mobali asengeli kosala mpo mwasi na ye alingaka mpe amemyaka ye?

8 Mibali bakristo basengeli te kosɛngaka limemya epai ya basi na bango. Kutu, basengeli ‘kokoba kopesaka bango lokumu mpo bazali mbɛki oyo eleki pɛtɛɛ, oyo ya bomwasi.’ (1 Petro 3:7) Ezala esika bato bazali ebele to bazali kaka bango mibale, mibali basengeli kosalela maloba ya limemya mpe komonisa motema mawa. Na makambo oyo basalelaka to balobelaka basi na bango, mibali bamonisaka ete basi na bango bazali na motuya mpo na bango. (Masese 31:28) Ntango mobali azali kosalela mwasi na ye makambo na bolingo, akolinga ye mpe akopesa ye limemya mpe Yehova akopambola libala na bango.

BASI YA KOMIKITISA MPE YA LIMEMYA

9. Ndenge nini mwasi akoki komonisa ete azali na limemya?

9 Bolingo ya solosolo mpo na Yehova oyo esimbami na mitinda na ye, ekosalisa biso tómikitisa “na nse ya lobɔkɔ ya nguya ya Nzambe.” (1 Petro 5:6) Lolenge moko ya ntina mingi oyo mwasi akoki komonisa botosi mpo na bokonzi ya Yehova ezali ya kosala na bomoko elongo na mobali na ye. Biblia elobi ete: “Bino basi, bómikitisa liboso ya mibali na bino, mpo ebongi bongo na kati ya Nkolo.” (Bakolose 3:18) Ezali solo ete mwasi akoki kosepela te na bikateli nyonso ya mobali na ye. Kasi soki bikateli yango ebuki te mibeko ya Nzambe, mwasi ya limemya asengeli kosala na bomoko elongo mobali na ye.​—1 Petro 3:1.

10. Mpo na nini komikitisa oyo euti na bolingo ezali na ntina mingi?

10 Yehova apesi basi mokumba moko ya lokumu na libota. Mwasi azali “moninga” ya mobali na ye. (Malaki 2:14) Ntango mobali ná mwasi bazali kozwa bikateli mpo na libota, mwasi akoki kopesa makanisi na ye na limemya nyonso mpe koloba ndenge azali koyoka, atako bongo, asengeli komonisaka limemya. Mobali ya bwanya asengeli koyoka na likebi makambo oyo mwasi na ye azali koloba. (Masese 31:10-31) Komikitisa oyo ezali kouta na bolingo ekoki komema esengo, kimya mpe boyokani na libota. Na nsuka, mobali ná mwasi bakozala na esengo mpo bayebi ete bazali kosepelisa Nzambe.​—Baefese 5:22.

BÓLIMBISANAKA NA MOTEMA MOKO

11. Mpo na nini kolimbisa ezali mpenza na ntina?

11 Mpo na kozala na libala oyo ekoumela, mobali ná mwasi basengeli kolimbisanaka. Ntango mobali ná mwasi bazali kokoba “kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko,” bakómisaka makasi boyokani na bango. (Bakolose 3:13) Nzokande, libala elɛmbaka ntango mobali ná mwasi bazali koboya kolimbisana mabe oyo basalelaná mpe bazali kozongela yango mpo na kotumolana. Soki ndako esali banzela ekoki kolɛmba, ndenge moko mpe mpasi na motema mpe nkanda esalaka ete babalani bálimbisana te mpe básala te na bomoko. Kasi libala ekómaka makasi ntango mwasi mpe mobali bazali kolimbisana, ndenge kaka Yehova alimbisaka bango.​—Mika 7:18, 19.

12. Ndenge nini bolingo “ezipaka ebele ya masumu”?

12 Bolingo ya solosolo “ebombaka mabe na motema te.” Kutu, “bolingo ezipaka ebele ya masumu.” (1 Bakorinti 13:4, 5; tángá 1 Petro 4:8) Soki tolingaka basusu, tokotya motángo te ya mbala boni tokoki kolimbisa bango. Ntango ntoma Petro atunaki soki mbala boni asengeli kolimbisa moto, Yesu ayebisaki ye boye: “Tii mbala ntuku nsambo na nsambo (77).” (Matai 18:21, 22) Yesu alingaki koloba nini? Alingaki komonisa ete ezali na motángo te oyo bakristo basengeli kolimbisa basusu.​—Masese 10:12. * (Talá maloba na nse ya lokasa.)

13. Ndenge nini tokoki kobunda na ezaleli ya koboya kolimbisa?

13 Ndeko Annette na Allemagne alobi boye: “Soki babalani bazali kolinga kolimbisana te, bakobanda kobomba nkanda na motema, bakotyelana lisusu motema te mpe makambo wana ezali pwazɔ na libala. Kolimbisana ekómisaka libala makasi mpe esalaka ete babalani bázala na boyokani makasi.” Zaláká na botɔndi to sepeláká na oyo moninga azali kosala. Lukáká makambo oyo ekotinda yo opesa molongani na yo longonya. Soki ozali kosala bongo, okobundisa ezaleli ya koboya kolimbisa. (Bakolose 3:15) Na nsuka, okozala na kimya ya makanisi, bomoko mpe Nzambe akondima bino.​—Baroma 14:19.

SALELÁKÁ BASUSU MAKAMBO OYO OLINGAKA BÁSALELA YO

14, 15. Likambo nini Yesu alobaki, mpe ndenge nini kosalela yango ekoki kokómisa libala makasi?

14 Mbala mingi tolingaka básalela biso makambo na boboto mpe na limemya.  Tosepelaka ntango basusu bayokaka biso mpe bamityaka na esika na biso. Kasi, oyoká moto alobi: “Ngai mpe nakosala ye ndenge asali ngai.” Na bantango mosusu maloba wana ekoki komonana lokola ezali malamu. Kasi, Biblia eyebisi biso boye: “Koloba te: ‘Ndenge asalaki ngai, ngai mpe nakosala ye bongo.’” (Masese 24:29) Yesu ateyaki bato lolenge eleki malamu ya kosilisa mikakatano. Alobaki ete: “Kaka ndenge bino bolingaka bato básalela bino, bósalela bango mpe bongo.” (Luka 6:31) Yesu alobaki ete tosengeli kosalela basusu makambo kaka ndenge tolingaka básalela biso, kasi te ndenge basaleli biso. Yango elingi koloba ete tosengeli kosala makambo oyo tomoni ete ekosalisa mpo libala na biso ekende liboso.

Tosengeli kosala makambo oyo tomoni ete ekosalisa mpo libala na biso ekende liboso

15 Babalani bakómisaka boyokani na bango makasi ntango mokomoko na bango azali mpenza kotya likebi na mposa ya mosusu. Ndeko mobali moko na Afrika ya sudi alobi ete: “Tosalaka makasi tósala makambo oyo moninga alingaka básalela ye.” Abakisi boye: “Ezali solo ete na bantango mosusu tosilikaka, kasi tosalaka makasi tósalelana makambo na ndenge oyo moto na moto alingaka básalela ye, elingi koloba na limemya mpe na lokumu.”

16. Makambo nini babalani basengeli soki moke kosalelana?

16 Osengeli te koloba bolɛmbu ya mobalani na yo epai ya basusu to komilelalela mpo na bizaleli mosusu oyo ezali kosilikisa yo, tokosala yango te ata mpo na masɛki. Tosengeli kobosana te ete libala ezali te esika ya koluka kolakisa nani aleki makasi, to nani ayebi koganga makasi, to nani akoki koloba likambo moko oyo ekoki kozokisa mingi na motema. Ya solo, biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka mpe na ntango mosusu tosilikisaka basusu. Kasi ezali ata na ntina moko te ete babalani báyokisana nsɔni, to básalela maloba ya kozokisa to ya mabe mpenza ntango bazali kosolola, to kotindikana to kobɛtana.​—Tángá Masese 17:27; 31:26.

17. Ndenge nini mibali bakoki kosalela basi na bango makambo oyo balingaka ete básalela mpe bango?

17 Na mikili mosusu, mibali banyokolaka to babɛtaka basi na bango mpo na komonisa ete bazali makasi. Nzokande, Biblia elobi ete: “Ye oyo ayokaka nkanda noki te azali malamu koleka moto ya nguya, mpe ye oyo apekisaka elimo na ye azali malamu koleka ye oyo azwi engumba.” (Masese 16:32) Tosengeli mpenza kosala makasi mpo tómipekisa ndenge Yesu Kristo moto oyo aleki bato nyonso kino lelo asalaki. Mobali oyo anyokolaka mpe abɛtaka mwasi na ye azali na bolɛmbu mpe akobebisa boyokani na ye elongo na Yehova. Davidi, moko ya bakomi ya nzembo, oyo azalaki makasi mpe na mpiko, alobaki boye: “Ata soki bosiliki, bósala lisumu te. Bóloba na motema na  bino, na mbeto na bino, mpe bófanda nyɛɛ.”​—Nzembo 4:4.

“BÓLATA BOLINGO”

18. Mpo na nini ezali na ntina ete babalani bákoba komonisa bolingo?

18 Tángá 1 Bakorinti 13:4-7. Bolingo ezali ezaleli eleki ntina na libala. Biblia elobi ete: “Bólata bolingo ya motema oyo euti na mawa, boboto, elimo ya komikitisa, motema pɛtɛɛ mpe motema molai. Kasi, longola makambo nyonso wana, bólata bolingo, mpo ezali ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko.” (Bakolose 3:12, 14) Mobali mpe mwasi basengeli komonisa bolingo ya solosolo mpe komekola Yesu Kristo, oyo andimaki kopesa bomoi na ye mbeka mpo na basusu. Soki libala esimbami na bolingo ya ndenge wana, ekozala kaka makasi ata soki babalani bakutani na bizaleli mabe, maladi, mikakatano ya mbongo mpe mitungisi ya babokilo.

19, 20. (a) Babalani bakoki kosala nini mpo bázala na libala moko ya malamu mpe ya esengo? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo ekolanda?

19 Bolingo, bosembo mpe milende ezali na ntina mpo libala elonga. Ntango mikakatano ebimi na libala, babalani basengeli te kokanga mabɔkɔ. Basengeli kozala na ekateli ya kokolisa boyokani na bango. Babalani oyo balingaka Yehova mpe balinganaka, basengeli kozala na ekateli ya kosilisa mikakatano na bango, mpo “bolingo esilaka soki moke te.”​—1 Bakorinti 13:8; Matai 19:5, 6; Baebre 13:4.

20 Ezali mpenza pɛtɛɛ te kozala na libala ya malamu mpe ya esengo na ‘ntango oyo ya mpasi.’ (2 Timote 3:1) Kasi, na lisalisi ya Yehova ekoki kosalema. Babalani basengeli mpe kobunda na ezaleli mabe oyo mokili ezali na yango na likambo etali kosangisa nzoto. Na lisolo oyo ekolanda, tokomona ndenge nini mobali mpe mwasi bakoki kosala ete libala na bango etikala makasi.

^ par. 12 Atako babalani basalaka makasi mpo bálimbisanaka mpe básalaka na bomoko mpo na kolonga mikakatano, Biblia elobi ete soki mobalani moko asali ekobo, oyo asali likambo te azali na bonsomi ya kolimbisa to koboma libala ná molongani wana. (Matai 19:9) Talá lisolo ya Lamuká! ya 08/08/1995 oyo elobi D’après la Bible... Adultère: faut-il ou non pardonner?