Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Janvier 2015

Bolingo ya solo ekoki kozala?

Bolingo ya solo ekoki kozala?

“Kopela [ya bolingo] ezali kopela ya mɔtɔ, lolemo ya mɔtɔ ya Yah.”​—LOYEMBO YA SALOMO 8:6.

1, 2. Nani akoki kozwa litomba na Loyembo ya Salomo, mpe mpo na nini? (Talá elilingi ya ebandeli.)

MWASI ná mobali bazali kotalana na elongi mpe bazali komungamunga. Moto nyonso akoki komona ete balingani makasi. Ndeko oyo akosala diskur na bango ya libala amoni ndenge basimbani na bolingo mpenza, mpe azali komituna, ‘Nsima ya bambula, bolingo na bango ekozala kaka makasi? To ekobanda kokita mokemoke?’ Ntango mobali ná mwasi bazali mpenza kolingana, bolingo na bango ekoki kosalisa bango bálonga ata mikakatano oyo eleki makasi. Kasi, likambo ya mawa ezali ete babalani mingi bazangaka esengo mpe babomaka libala. Na yango, okoki mbala mosusu komituna, ‘Bolingo ekoki mpenza koumela?’

2 Ata ntango mokonzi Salomo azalaki na bomoi, bolingo ya solo ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te. Mpo na nini? Salomo alimboli ete: “Na bato nkóto (1 000), namoni mobali moko kasi na bango nyonso, namoni ata mwasi moko te. Talá! namoni kaka likambo oyo: ete Nzambe ya solo asalaki bato sembo, kasi bango moko baluki myango mingi.” (Mosakoli 7:26-29) Basi bapaya ya ezaleli ya mbindo oyo basambelaki Baala, bazalaki na kati ya Bayisraele. Yango esalaki ete  Bayisraele mingi bákóma mpe na ezaleli ya mbindo. * (Talá maloba na nse ya lokasa.) Kasi, bambula soki 20 liboso, mokonzi Salomo akomaki Poɛmi moko ya mobali ná mwasi oyo balinganaki makasi. Ezala tobalá to te, Loyembo ya Salomo ekoki kosalisa biso tóyeba soki bolingo ya solo ezali nini mpe ndenge oyo tokoki komonisa yango.

BOLINGO YA SOLO EKOKI KOZALA!

3. Mpo na nini tokoki koloba ete bolingo ya solo ekoki kozala kati na mwasi mpe mobali?

3 Tángá Loyembo ya Salomo 8:6. Biblia elobeli bolingo lokola “lolemo ya mɔtɔ ya Yah.” Mpo na nini? Mpo ete bolingo ezali ezaleli ya Yehova oyo eleki bizaleli na ye nyonso, mpe akelá biso na likoki ya komekola bolingo na ye. (Ebandeli 1:26, 27) Nsima ya kokela Adama, mobali ya liboso, Yehova apesaki ye mwasi moko kitoko. Ntango Adama amonaki Eva mpo na mbala ya liboso, asepelaki makasi mpe amonisaki esengo oyo azalaki na yango mpo na ye. Eva mpe amiyokaki malamu mpenza pembeni ya mobali na ye. Kutu, Yehova akelaki Eva na mokuwa oyo azwaki epai ya Adama. (Ebandeli 2:21-23) Banda na ebandeli, Yehova asalaki ete mobali ná mwasi bámoniselana bolingo ya solo mpe oyo ekoumela.

4, 5. Lisolo nini ezali na Loyembo ya Salomo?

4 Loyembo ya Salomo elobeli na ndenge ya kitoko mpenza bolingo oyo mobali mpe mwasi bakoki komoniselana. Loyembo yango elobeli bolingo kati na mwana mwasi moko ya mboka Shuneme, to Shuleme ná elenge mobali moko ya mobateli ya bampate. Lisolo na bango yango oyo: Mwana mwasi yango azalaki kosala na bilanga ya vinyo ya bandeko na ye ya mibali oyo ezalaki pene na esika oyo mokonzi Salomo mpe basoda na ye batyaki bahema na bango. Amonaki mwana mwasi yango mpe apesaki mitindo epai ya basaleli na ye mpo bámema ye na kaa. Na nsima, ayebisaki mwana mwasi yango ndenge azali kitoko mpe apesaki ye bakado ebele. Kasi, mwana mwasi yango alinganaki ná mobateli moko ya bampate mpe akobaki komonisa ete asepeli kozala ná mobateli wana ya bampate. (Loyembo ya Salomo 1:4-14) Mobateli ya bampate alukaki ye mpe akendeki na kaa. Ntango amonaki ye, bamoniselanaki bolingo na maloba ya kitoko.​—Loyembo ya Salomo 1:15-17.

5 Ntango Salomo azongaki na Yerusaleme, akendaki ná elenge mwasi wana, mpe mobateli ya bampate alandaki mwana mwasi yango kuna. (Loyembo ya Salomo 4:1-5, 8, 9) Eloko moko te oyo Salomo alobaki to asalaki ekokaki kobongola bolingo oyo mwana mwasi yango azalaki na yango epai ya mobateli ya bampate. (Loyembo ya Salomo 6:4-7; 7:1-10) Yango wana, Salomo atikaki mwana mwasi yango azonga ndako. Na nsuka, mwana mwasi wana ya Shuleme alobaki ete molingami na ye aya mbangu epai na ye “lokola mboloko.”​—Loyembo ya Salomo 8:14.

6. Mpo na nini ekoki kozala mpasi koyeba nani azali koloba na Loyembo ya Salomo?

6 Loyembo ya Salomo ezali loyembo moko kitoko. Kutu, ebengamaka “loyembo oyo eleki nzembo nyonso na kitoko.” (Loyembo ya Salomo 1:1) Kasi, na loyembo yango, Salomo atángaki te bankombo ya bato ntango bazalaki koloba. Alingaki ete loyembo yango ezala lokola poɛmi moko kitoko na esika ya kobakisa makambo ebeleebele. Ata  soki loyembo yango etángi te bankombo, tokoki koyeba moto oyo azali koloba na nzela ya makambo oyo azali koloba.

“NDENGE NA YO YA KOLAKISA LOLANGO EZALI KITOKO KOLEKA VINYO”

7, 8. Ndenge nini mobateli ya bampate ná mwana mwasi bamonisaki bolingo na bango? Pesá bandakisa.

7 Elenge mwasi mpe mobateli ya bampate balobanaki maloba kitoko mpo na komonisa bolingo na bango. ‘Ndenge na bango mosusu ya kolakisa lolango’ ekoki kokamwisa biso mpo maloba wana ekomamaki eleki sikoyo mbula 3 000. (Loyembo ya Salomo 1:2) Atako mimeseno na bango ekesanaki na oyo ya mikolo na biso, tokoki komona ndenge oyo mwasi ná mobali yango bazalaki koyoka. Na ndakisa, mobateli ya bampate alobaki ete miso ya mwana mwasi ezalaki lokola “miso ya bibenga,” elimboli ete azalaki kosepela na lolenge ya miso na ye. (Loyembo ya Salomo 1:15) Mpe mwana mwasi alobaki ete miso ya mobateli ya bampate ezalaki kitoko lokola bibenga. (Tángá Loyembo ya Salomo 5:12.) Mpo na mwana mwasi yango, langi ya miso ya mwana mobali ezalaki mpɛmbɛ, lokola bibenga ya bulɛ mpe mosaka oyo ezali kosukola na kati ya miliki.

8 Mobateli ya bampate ná elenge mwasi yango bakumisanaki mpo na kitoko na bango, kasi esuki kaka wana te. Na ndakisa, mobateli ya bampate azalaki kosepela na ndenge elenge mwasi azalaki kosolola ná bato mosusu na boboto. (Tángá Loyembo ya Salomo 4:7, 11.) Yango wana, ayebisaki ye ete: “Mbɛbu na yo ezali se kotangisa mafuta ya nzoi oyo ezali na ndako na yango, ee mwasi na ngai ya libala. Mafuta ya nzoi mpe miliki ezali na nse ya lolemo na yo.” Mpo na ye, maloba ya mwana mwasi wana ezalaki sukali mpe kitoko lokola miliki mpe mafuta ya nzoi ya kitoko mpenza. Ntango mobateli ya mpate alobaki na mwana mwasi ete, “ozali kitoko nzoto mobimba” mpe “mbeba moko te ezali kati na yo,” azalaki kolobela kaka kitoko na ye ya nzoto te kasi mpe bizaleli na ye ya malamu.

Makambo oyo mobali ná mwasi balobaka mpe basalaka ekondimisa bango ete balinganaka

9. (a) Bolingo ya mwasi ná mobali esɛngi mpe makambo nini? (b) Mpo na nini ezali na ntina ete mwasi ná mobali bámoniselana bolingo?

9 Lelo oyo, mpo na babalani oyo basalelaka Yehova, libala ezali kaka te boyokani moko boye. Balinganaka mpenza mpe bamoniselanaka bolingo. Kasi, bolingo yango esengeli kozala ya ndenge nini? Ezali bolingo oyo elukaka kaka matomba na yango te oyo Biblia eteyaka biso tózala na yango? (1 Yoane 4:8) Ezali bolingo oyo tomoniselaka bato ya libota na biso? Ezali bolingo oyo esangisaka baninga mibale? (Yoane 11:3) To bolingo ya mwasi ná mobali? (Masese 5:15-20) Ya solo, soki bobalaná, bosengeli komoniselanaka bolingo ya solosolo na makambo oyo nyonso. Na makambo oyo bozali koloba mpe kosala, bokomoniselana bolingo mpe bokozala na esengo na libala na bino. Ya solo, ezali mpenza na ntina kosala bongo ata soki bozalaka na makambo mingi ya kosala. Na mikili  oyo baponelaka bato molongani, mbala mosusu mobali ná mwasi bakoki koyebana te liboso bábalana. Na yango, wana mokomoko na bango azali koyeba moninga mpe bolingo na bango ezali kokola, basengeli koyebisanaka ndenge oyo moto na moto azali kolinga moninga. Yango ekosala ete bálingana makasi mpe libala na bango ekokóma makasi.

10. Lolenge nini mosusu ya komoniselana bolingo ekoki kokómisa libala makasi?

10 Ntango babalani bazali komoniselana bolingo, libala na bango ekómaka makasi na lolenge mosusu. Na loyembo na ye, Mokonzi Salomo apesaki elenge mwasi “bansinga ya wolo oyo balíngá, bakisa mpe mwa mbuma mike ya palata.” Akumisaki ye, alobaki ete azali “kitoko lokola sanza oyo ebimi mobimba, pɛto lokola moi oyo ezali kongala.” (Loyembo ya Salomo 1:9-11; 6:10) Kasi, elenge mwasi yango asilaki kokutana na moto oyo ye alingaki mpenza. Nini esalisaki ye atikala sembo epai ya mobateli ya bampate? Makambo nini esalisaki ye ntango bakokaki te kozala esika moko? (Tángá Loyembo ya Salomo 1:2, 3.) Akanisaki ndenge azalaki komiyoka ntango mobateli ya bampate azalaki koyebisa ye maloba ya bolingo. Mpo na ye, maloba wana ya bolingo ezalaki “kitoko koleka vinyo” mpe ezalaki kobɔndisa ye kuna na lopango ya mokonzi lokola “mafuta” na motó. (Nzembo 23:5; 104:15) Ezali na ntina ete babalani bámoniselanaka bolingo mpo yango ekosala ete bolingo na bango ekola. Ntango bazali kokanisa maloba wana ya bolingo, ekosalisa mpo bolingo na bango etikala makasi.

BÓLAMWISA BOLINGO TE “TII NTANGO YANGO MOKO EKOLINGA”

11. Liteya nini tokoki kozwa na maloba oyo mwana mwasi ya Shuleme alobaki epai ya basi oyo bazalaki na lopango ya mokonzi Salomo?

11 Soki olingi kobala, liteya nini okoki kozwa epai ya mwana mwasi ya Shuleme? Aboyaki kolingana na mokonzi Salomo mpe na mpiko mpenza ayebisaki basi oyo bazalaki na lopango ya mokonzi ete: “Bómeka te kolamwisa to kotumola bolingo kati na ngai tii ntango yango moko ekolinga.” (Loyembo ya Salomo 2:7; 3:5) Ekozala mpenza malamu kolingana na moto nyonso? Te, ekozala nde malamu kozela na motema molai mpenza mpe kobalana na moto oyo okolinga mpenza.

Ekozala nde malamu kozela na motema molai mpenza mpe kobalana na moto oyo okolinga mpenza

12. Mpo na nini elenge mwasi ya Shuleme alingaki mobateli ya bampate?

12 Mpo na nini elenge mwasi ya Shuleme alingaki mobateli ya bampate? Alobaki ete azali kitoko lokola “mboloko.” Mabɔkɔ na ye ezalaki makasi lokola “basilɛndrɛ ya wolo,” mpe makolo na ye ezalaki kitoko mpe makasi lokola “makonzí ya libanga ya marbre.” Kasi, azalaki kaka te makasi mpe kitoko. Mwana mwasi yango ayebaki ete mobateli ya bampate azalaki kolinga Yehova mpe azalaki na bizaleli kitoko. Yango wana azalaki na ntina mingi mpo na ye “lokola nzete ya pɔme na kati ya banzete ya zamba.”​—Loyembo ya Salomo 2:3, 9; 5:14, 15.

13. Mpo na nini mobateli ya bampate alingaki mwana mwasi ya Shuleme?

 13 Mwana mwasi ya Shuleme azalaki kitoko mingi. Kutu, mokonzi Salomo asepelaki na ye mingi, atako azalaki na ‘basi ya mokonzi ntuku motoba (60) mpe bamakango ntuku mwambe (80) mpe baseka ya kotánga te.’ Mobateli ya bampate alingaki ye kaka mpo na kitoko wana? Te. Ye mpe azalaki kolinga Yehova mpe azalaki na bizaleli kitoko. Na ndakisa, elenge mwasi yango azalaki na komikitisa mpe amikokanisaki na fololo ya bongobongo, “safra mpamba ya mokili patatalu ya bokula.” Kasi mpo na mobateli ya bampate, mwasi yango azalaki lokola basi nyonso te, azalaki “lokola fololo lísi na kati ya matiti ya nzubɛnzubɛ.”​—Loyembo ya Salomo 2:1, 2; 6:8.

14. Soki tolingi kobala, liteya nini tokoki kozwa epai ya mobateli ya bampate mpe mwana mwasi ya Shuleme?

14 Yehova asɛngi basaleli na ye bábalana “kati ya Nkolo kaka.” (1 Bakorinti 7:39) Yango elingi koloba ete tosengeli kolingana to kobalana kaka na mosaleli ya Yehova oyo azwá batisimo. Ndenge nini likambo yango ekoki kosalisa na libala? Babalani bakokutana na mitungisi mokolo na mokolo. Kasi ntango bazali na boyokani ya makasi ná Yehova, libala na bango ekoki kozala ya kimya mpe ya esengo. Yango wana, soki olingi kobala, landá ndakisa ya mobateli ya bampate ná mwana mwasi ya Shuleme. Luká moto oyo azali mpenza na bizaleli malamu mpe abangaka Yehova.

Mokristo akolinga te kokóma fianse to kobalana na moto oyo azali te mosaleli ya Yehova oyo azwá batisimo (Talá paragrafe 14)

MWASI NA NGAI YA LIBALA “AZALI ELANGA OYO BAKANGI NA KATI YA LOPANGO”

15. Na nini bosembo ya mwana mwasi ya Shuleme ezali ndakisa malamu mpo na bakristo oyo babalani naino te?

15 Tángá Loyembo ya Salomo 4:12. Mpo na nini mobateli ya bampate alobaki ete mwana mwasi wana ya Shuleme azalaki lokola “elanga oyo bakangi na kati ya lopango”? Moto nyonso te akɔtaka na elanga oyo porte na yango ekangami. Mwasi yango azalaki lokola elanga ya ndenge wana mpo alingaki kaka mobateli ya bampate. Lokola akanaki kobalana na ye, aboyaki likebi nyonso oyo mokonzi azalaki kotyela ye. Mpe aboyaki kobongola makanisi na ye. Azalaki lokola “efelo” kasi te lokola “porte” oyo ekokaki kofungwama na pɛtɛɛ nyonso. (Loyembo ya Salomo 8:8-10) Ndenge moko, ndeko mobali ná ndeko mwasi oyo oyo bazali kokana kobalana,  basengeli kozala sembo moko. Basengeli te kozala miso paípaí epai ya moto mosusu.

16. Soki ozali fianse, liteya nini okoki kozwa na Loyembo ya Salomo?

16 Ntango mobateli ya mpate asɛngaki mwana mwasi wana bábima mwa moke, bandeko na ye ya mibali baboyaki. Kasi, batindaki ye nde akende kokɛngɛla bilanga na bango ya vinyo. Bazalaki kotyela ye motema te? Bakanisaki ete ndeko na bango ná mobateli ya bampate balingaki kosala pite? Te. Bandeko na ye ya mibali balingaki kobatela ye na likambo moko oyo ekokaki kotya ye na komekama to kotinda ye asala likambo moko ya mabe. (Loyembo ya Salomo 1:6; 2:10-15) Soki bozali bafianse, ndenge nini okoki koboya likambo nyonso oyo ekoki kotinda bino na pite? Zwá ekateli mpo na koyeba liboso nini osengeli kosala te mpo boyokani na bino ezala pɛto. Bózalaka soki moke te kaka bino mibale na esika oyo ata moto moko te akoki komona bino. Bómoniselana bolingo na bino kaka na ndenge oyo ebongi na basaleli ya Yehova.

17, 18. Boyekoli oyo ya Loyembo ya Salomo esalisi yo na nini?

17 Yehova alingi mabala eumela. Alingi ete mwasi ná mobali bálinganaka. Ezali mabe te bámoniselanaka bolingo ntango babalani. Kasi mpo libala na bango eumela, basengeli kosala ete bolingo na bango ezala makasi, lokola mɔtɔ oyo ekufaka te.​—Marko 10:6-9.

18 Soki olingi kobala, luká moto oyo okolinga ye mpenza. Soki ozwi moto yango, bósala elongo mpo bolingo na bino ezala makasi. Ndenge toyekoli yango na Loyembo ya Salomo, bolingo ya solo mpe oyo ekoumela ekoki kozala, mpo ezali “mɔtɔ ya Yah.”​—Loyembo ya Salomo 8:6.

^ par. 2 Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/01/2007, lokasa 31.