Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Décembre 2014

Ozalaka na botɔndi na oyo ozwá?

Ozalaka na botɔndi na oyo ozwá?

“Biso tozwaki . . . elimo oyo euti na Nzambe, mpo tóyeba makambo oyo Nzambe apesi biso na boboto.”​—1 KO. 2:12.

1. Ekoki kozala ete bato mingi balobaka likambo nini?

BATO mingi bayoká makanisi lokola oyo: ‘Bato bayaka koyeba valɛrɛ ya eloko soki ezali lisusu te.’ Ekómelá yo mbala mosusu okanisá bongo? Soki moto abandá kosimba biloko banda bomwana, akómaka na likanisi ya komona lisusu valɛrɛ na yango mingi te. Na ndakisa, moto oyo akolá na libota ya bomɛngo, akoki komona lokola abongi kozala na biloko wana. Ekoki kozala bongo mpo na bilenge oyo mpo na kozanga koyeba makambo bakoki mbala mosusu kokanga ntina malamu te biloko nini mpenza ezali na valɛrɛ na bomoi.

2, 3. (a) Bilenge bakristo basengeli kozala ekɛngɛ mpo na koboya likambo nini? (b) Nini ekoki kosalisa biso tózwa na motuya oyo tozali na yango?

2 Soki ozali elenge, ntango mosusu ya mbula 19 to 20, likambo nini ezali na ntina mingi mpo na yo? Mpo na bato mingi na mokili, bomoi esimbami na biloko ya mosuni lokola lifuta to salɛrɛ ya malamu, ndako ya kitoko, batelefone mpe baaparɛyi mosusu oyo ebimi sika. Kasi, soki kaka biloko oyo nde ezali lobanzo na biso, wana eloko moko ya ntina mingi ezali kozanga: biloko ya elimo. Likambo ya mawa, bamilio ya bato lelo oyo babandi naino te koluka yango. Bino bilenge oyo  bobɔkɔlamá na baboti oyo bazali bakristo bosengeli kozala ekɛngɛ ete bóbosana te valɛrɛ ya eloko oyo bozwá, elingi koloba libula ya elimo. (Mat. 5:3) Kozanga botɔndi ekoki komemela yo makama oyo ekoki kopesa yo mpasi bomoi mobimba.

3 Kasi, yo okoki koboya ete likambo ya ndenge wana esalema. Nini ekosalisa yo ozwa na motuya libula na yo ya elimo? Tótalela mwa bandakisa mosusu ya Biblia oyo ekoki kosalisa biso tómona ntina oyo tosengeli kozwa na motuya libula na biso ya elimo. Bandakisa oyo tokotalela, ekoki kosalisa kaka bilenge te, kasi mpe mokristo nyonso mpo azwa na motuya biloko to libula ya elimo oyo azali na yango.

BAZANGAKI BOTƆNDI

4. Mokanda ya 1 Samwele 8:1-5 emonisi nini na ntina na bana ya Samwele?

4 Tokoki kozwa masolo ya Biblia ya bato mosusu oyo bazwaki libula ya elimo kasi bazwaki yango na motuya te. Yango nde emonanaki na libota ya Samwele, mosakoli oyo asalelaki Yehova banda bolenge na ye mpe azalaki na lokumu na miso ya Nzambe. (1 Sa. 12:1-5) Samwele atikaki ndakisa malamu oyo bana na ye Yoele ná Abiya basengelaki komekola. Nzokande, bazwaki yango na motuya te, mpe bakómaki kosala mabe. Biblia elobi ete na esika ya kolanda ndakisa ya tata na bango, ‘bapɛngwisaki lisambisi.’​—Tángá 1 Samwele 8:1-5.

5, 6. Makambo esukelaki bana ya Yosiya mpe nkɔkɔ na ye ndenge nini?

5 Ezalaki mpe bongo mpo na bana ya mokonzi Yosiya. Yosiya atikaki ndakisa moko malamu mpenza na likambo etali kosambela Yehova. Ntango buku ya mobeko ezwamaki mpe batángelaki yango Yosiya, asalaki makasi mpenza asalela malako ya Yehova. Asalaki nyonso alongola losambo ya bikeko mpe bikelakela to misala ya bilimo mabe na ekólo, mpe alendisaki bato bátosa Yehova. (2 Bak. 22:8; 23:2, 3, 12-15, 24, 25) Bana na ye bazwaki mpenza libula moko kitoko ya elimo! Bana na ye misato ya mibali mpe nkɔkɔ na ye moko bakómaki bakonzi na nsima, kasi ata moko te azwaki na motuya libula oyo atikelaki bango.

6 Yehoahaze, mwana ya Yosiya akómaki mokonzi na esika ya tata na ye, kasi ‘asalaki oyo ezali mabe na miso ya Yehova.’ Ayangelaki kaka sanza misato mpe Farao, mokonzi ya Ezipito akangaki ye, mpe Yehoahaze akufaki kuna. (2 Bak. 23:31-34) Na nsima, ndeko na ye Yehoyakime ayangelaki na boumeli ya mbula 11. Ye mpe azwaki na motuya te libula oyo tata na ye atikelaki ye. Mpo na ezaleli mabe ya Yehoyakime, Yirimia asakoli ete: “Akokundama ndenge mpunda ya mobali ekundamaka.” (Yir. 22:17-19) Bakitani mosusu ya Yosiya ezalaki mwana na ye Zidikiya mpe nkɔkɔ na ye Yehoyakine. Bango mpe basalaki te oyo ezali malamu na miso ya Yehova, kutu balandaki te banzela ya bosembo oyo Yosiya alandaki.​—2 Bak. 24:8, 9, 18, 19.

7, 8. (a) Na ndenge nini Salomo abwakaki libula na ye ya elimo na mai? (b) Liteya nini tokoki kozwa na bandakisa oyo Biblia elobeli ya bato oyo babwakaki libula na bango ya elimo na mai?

7 Salomo azalaki mokonzi oyo tata na ye Davidi atikelaki ye libula ya mingi. Atako Salomo autaki na libota moko oyo makambo ya Nzambe efandaki malamumalamu mpenza mpe ye moko abandaki malamu, kasi na nsima alandaki te nzela ya bosembo. “Ntango Salomo akómaki mobange, basi na ye babendaki motema na ye mpo na kolanda banzambe mosusu; mpe motema na ye ezalaki mobimba te epai ya Yehova Nzambe na ye lokola motema ya tata na ye Davidi.” (1 Bak. 11:4) Yango esalaki ete Yehova atika kondima Salomo.

8 Ezali mpenza mawa komona ete bato oyo bautaki na libota moko ya malamu mpe bazalaki na libaku ya kosala oyo ezali sembo, babwakaki yango kaka boye na  mai! Kasi, bilenge nyonso te nde babebisaki makambo ndenge wana na ntango ya kala, ezali mpe bongo na mikolo na biso. Tótalela mwa bandakisa ya malamu ya bilenge oyo bilenge bakristo bakoki komekola.

BAZWAKI NA MOTUYA LIBULA NA BANGO

9. Na nini bana ya Noa batiká ndakisa moko kitoko? (Talá elilingi ya ebandeli.)

9 Bana ya Noa bazali ndakisa moko kitoko mpenza. Tata na bango azwaki etinda ya kotonga masuwa mpe kokɔtisa libota na ye mobimba na kati. Bana ya Noa basepelaki kosala mokano ya Yehova. Basalaki elongo na tata na bango. Basalisaki ye na kotonga masuwa yango, mpe na nsima, bakɔtaki na kati. (Eba. 7:1, 7) Basalaki yango na mokano nini? Mokanda ya Ebandeli 7:3 elobi ete bakɔtisaki banyama na masuwa “mpo na kobatela motindo na yango na bomoi na mabele mobimba.” Bato mpe babikaki. Lokola bana ya Noa bazwaki na motuya oyo tata na bango apesaki bango, bazwaki libaku ya kosalisa mpo ete bato bábatelama mpe losambo ya solo ezongisama na mabele oyo epɛtolami.​—Eba. 8:20; 9:18, 19.

10. Ndenge nini bilenge minei ya Ebre oyo bazalaki na Babilone bazwaki na motuya solo oyo bayekolaki?

10 Basiɛklɛ na nsima, bilenge mibali minei ya Ebre bamonisaki ete bayebi oyo ezali mpenza ntina. Hanania, Mishaele, Azaria mpe Danyele bamemamaki na Babilone na mobu 617 L.T.B. Bazalaki mibali kitoko, ya mayele mpe oyo bakokaki kobendama mbala moko na bomoi ya Babilone. Kasi basalaki yango te. Emonani na misala na bango ete babosanaki te libula na bango, to makambo oyo bateyaki bango. Bilenge yango minei bapambolamaki mingi mpo bakangamaki makasi na mateya ya Nzambe oyo bazwaki ntango bazalaki bana.​—Tángá Danyele 1:8, 11-15, 20.

11. Ndenge nini basusu bazwaki litomba na makambo oyo Yesu azwaki epai ya Tata na ye?

11 Soki tosukisi bandakisa ya malamu kozanga kolobela oyo ya Yesu, Mwana ya Nzambe, ekozala mabe mingi. Azwaki makambo mingi epai ya Tata na ye mpe azwaki yango mpenza na motuya. Amonisaki yango ntango ateyaki ete: “Kaka ndenge Tata ateyaki ngai, ndenge mpe nazali koloba makambo oyo.” (Yoa. 8:28) Mpe mposa na ye ezalaki ete basusu bázwa litomba ya makambo oyo azwaki. Ayebisaki ebele ya bato ete: “Nasengeli mpe kosakola nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe na bingumba mosusu, mpamba te natindamaki mpo na yango.” (Luka 4:18, 43) Asalisaki bayoki na ye ete ‘bázala te bato ya mokili,’ oyo bato mingi bazwaka na motuya te makambo ya elimo.​—Yoa. 15:19.

ZWÁKÁ NA MOTUYA LIBULA NA YO

12. (a) Ndenge nini makanisi ya 2 Timote 3:14-17 ebongi mpe mpo na bilenge lelo oyo? (b) Bilenge bakristo basengeli kotalela mituna nini?

12 Na ndakisa ya bilenge oyo tolobeli, ekoki kozala ete yo mpe obɔkɔlamá na baboti oyo bamipesá epai na Yehova Nzambe. Soki ezali bongo, oyo Makomami elobi mpo na Timote ebongi mpenza mpo na yo. (Tángá 2 Timote 3:14-17.) “Oyekolaki” makambo wana oyo etali Nzambe ya solo mpe ndenge ya kosepelisa ye epai ya baboti na yo. Ekoki kozala ete baboti na yo babandaki koteya yo banda bomwana. Na ntembe te, yango esalisaki yo okóma “na bwanya mpo na lobiko na nzela ya kondima oyo ezali na boyokani na Kristo Yesu” mpe ‘ozala na nyonso oyo esengeli’ mpo na mosala ya Nzambe. Motuna ya ntina yango oyo: Okozwa na motuya libula na yo? Yango ekoki kosɛnga yo mbala mosusu omitalela. Talelá mituna lokola: ‘Namiyokaka ndenge nini awa nayebi ete nazali na kati ya molɔngɔ molai ya batatoli ya sembo? Namiyokaka ndenge nini lokola nazali na kati ya mwa ndambo ya bato oyo Nzambe ayebi bango  lelo awa na mabele? Nazwaka na motuya libaku kaka moko mpe ya ntina mingi oyo nazali na yango ya koyeba solo?’

Ozali komiyoka ndenge nini lokola ozali na kati ya ebele ya batatoli ya sembo? (Talá paragrafe 9, 10, 12)

13, 14. Bilenge mosusu bakutanaka na komekama nini, kasi mpo na nini kokwea na yango ezali kozanga bwanya? Pesá ndakisa.

13 Bilenge mosusu oyo babɔkɔlamá na baboti oyo bazali bakristo, bakoki mbala mosusu te komona bokeseni monene oyo ezali kati ya paradiso na biso ya elimo mpe mokili oyo ya Satana oyo etondi na molili tuu. Basusu balukaki kutu koyeba soki bomoi na mokili ezali ndenge nini. Kasi, okosepela kokima mbangu liboso ya motuka moko oyo ezali kotambola kaka mpo omona soki ekosala yo mabe to soki okokufa? Okosala yango te! Ndenge moko, tosengeli te kolanda “bomoi ya mbindo” na mokili oyo mpe na nsima tóya kosimba motó.​—1 Pe. 4:4.

14 Ndeko Gener, oyo afandaka na Azia, abɔkɔlamaki na libota ya bakristo. Azwaki batisimo ntango azalaki na mbula 12. Lokola azalaki elenge, banzela ya mokili oyo ebendaki ye. Alobi boye: “Nalingaki namona ‘bonsomi’ oyo mokili epesaka.” Ndeko Gener akómaki kosala makambo ya mabe na nkuku. Ntango akómaki na mbula 15, abandaki kosala makambo mingi oyo baninga na ye bazalaki kosala. Azalaki komɛla masanga mpe koloba maloba mabe. Ndeko yango akómaki kozonga ndako mbala mingi na retare, nsima ya kobɛta masano ndenge na ndenge, ata mpe ya mobulu ná baninga na ye. Kasi, wana ntango ezalaki koleka, abandaki komona ete kobendama na makambo ya mokili oyo ezalaki kopesa ye esengo te. Ezalaki bomoi ya mpambampamba. Ntango azongelaki lisangá, alobi boye: “Ezali na makambo mingi oyo etungisaka ngai, kasi mapamboli ya Yehova ezali lokola zɛlo ya mai.”

15. Ata bilenge oyo babɔkɔlami na baboti oyo bazali Batatoli te basengeli kokanisa na nini?

15 Kasi, ezali na bilenge mosusu oyo bayanganaka na lisangá oyo babɔkɔlamá na baboti oyo bazali Batatoli te. Soki ozali moko na bango, kanisá na libaku moko kitoko oyo ozali na yango sikoyo mpo oyebi Mozalisi mpe ozali kosalela ye! Na mabele, bato bazali bamiliare. Na yango, ezali mpenza lipamboli kozala na kati ya baoyo Yehova abengi na boboto na ye mpo bápusana penepene na ye mpe oyo amonisi solo ya Biblia. (Yoa. 6:44, 45) Kaka bato moke (1/1000) nde oyo bazali na bomoi lelo nde bazali na boyebi ya sikisiki, mpe yo ozali moko na bango. Likambo yango esengeli te kopesa biso nyonso esengo, ezala toyekoli solo na lolenge nini? (Tángá 1 Bakorinti 2:12.)  Ndeko Gener alobi ete: “Natikalaka monɔkɔ polele soki nakanisi likambo yango. Ngai mpenza nani mpo Yehova, Nkolo-mokonzi-ya-molɔ́ngɔ́ ayeba ngai?” (Nz. 8:4) Ndeko mwasi moko ya mboka yango mpe alobaki boye: “Bana-kelasi bamiyokaka malamu kaka mpo molakisi ayebi bango. Ezali mpenza libaku moko kitoko koyebana na Yehova, Molakisi monene!”

OKOSALA NINI?

16. Ekateli nini ya bwanya bilenge bakristo bakoki kozwa lelo?

16 Soki otaleli libaku malamu oyo ozali na yango, mpo na nini okoki kokóma te na ekateli makasi ya kozala na kati ya bato moke oyo basali likambo malamu na bomoi na bango? Na lolenge yango, okoki kozala na kati ya ebele ya basaleli ya sembo ya Nzambe. Kosala bongo ezali likambo ya bwanya, na esika ya kolanda ebele ya bilenge oyo, bazali komitambwisa lokola bato balangwi bangi to masanga, mpe bazali kotambola elongo na mokili oyo ezali kokende na libebi.​—2 Ko. 4:3, 4.

17-19. Nini ekoki kosalisa yo ozala na bokatikati wana ozali koluka kokesana na mokili?

17 Kasi, yango elingi koloba te ete kokesana na mokili ekozala ntango nyonso likambo ya pɛtɛɛ. Kasi, soki okanisi na likambo yango, okomona ete kokesana na mokili ezali likambo ya bwanya. Tózwa ndakisa ya moto oyo asalaka masano ya kopota mbangu. Na ntembe te, ayebi malamu ete asengeli kokesana na bato mosusu mpo akóma mosani ya malamu. Asengeli mpe komipimela makambo mingi oyo ekoki kolyela ye ntango mpe kolongola likebi na ye, makambo oyo ekotikela ye kaka ntango moke ya kosalaka ngalasisi. Lisusu, kondima kokesana na baninga na ye, ekosalisa ye asalaka ngalasisi mingi mpo akokisa mokano na ye.

18 Likanisi ya mokili mpo na bomoi etɛngamá. Soki ozali kotalela avenire na ndenge ebongi, ozali kokesana na mokili oyo mpe koboya bizaleli mpe misala mabe na yango, ‘okosimba makasi bomoi ya solosolo.’ (1 Tim. 6:19) Ndeko oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Soki okangami na bindimeli na yo, okoyoka mpenza esengo na nsuka ya mokolo. Yango ekomonisa ete ozwi makasi ya kolonga mokili mabe oyo ya Satana. Na koleka, ezali lokola omoni ndenge Yehova Nzambe azali kosepela mpe mwa komungamunga liboso na yo!”

19 Bomoi ezali na ntina te soki makanisi ya moto ezali kaka likoló ya eloko oyo alingi kozwa sikoyo. (Mos. 9:2, 10) Soki ozali elenge mpe okanisi mpenza na ntina ya bomoi na yo mpe mwa bambula oyo okoki koumela, ekozala malamu te ete oboya ‘kotambola ndenge bikólo etambolaka,’ kasi ozala nde na bomoi oyo ezali mpenza na ntina?​—Ef. 4:17; Mal. 3:18.

20, 21. Soki tozwi bikateli ya malamu, tokozala na likoki ya nini, kasi nini esɛngami epai na biso?

20 Soki tozwi bikateli ya malamu, tokoki kozala na bomoi ya malamu banda sikoyo mpe tokozala na likoki ya kozwa “libula ya mabele” to kozala na bomoi ya seko. Mapamboli beboo ya kitoko ezali kozela biso. (Mat. 5:5; 19:29; 25:34) Kasi, lelo oyo Nzambe apesaka biso biloko te na ndenge ya likamwisi. Asɛngaka biso tókanga mabɔkɔ te. (Tángá 1 Yoane 5:3, 4.) Kasi kosalela ye na bosembo uta lelo ezali mosala ya mpunda te!

21 Ezali mpenza libaku moko monene mpe kitoko ndenge Nzambe apesi biso biloko mingi! Tozali na boyebi ya sikisiki ya Liloba na ye mpe tososoli solo na ntina na ye mpe mikano na ye. Tozali na libaku malamu ya komema nkombo na ye mpe kozala Batatoli na ye. Nzambe alaki ete azali na biso elongo. (Nz. 118:7) Biso nyonso, bilenge to mikóló tokomonisa botɔndi na biso soki tozali kotambwisa bomoi na biso na ndenge oyo ezali komonisa ete tozali na mposa ya kopesa Yehova “nkembo libela na libela.”​—Rom. 11:33-36; Nz. 33:12.