Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Décembre 2014

‘Yoká mpe kangá ntina’

‘Yoká mpe kangá ntina’

“Bóyoka ngai, bino nyonso, mpe bókanga ntina.”MRK. 7:14.

1, 2. Mpo na nini bato mingi oyo bayokaki Yesu bakangaki ntina te ya maloba na ye?

EKOKI kozala ete ozali koyoka moto moko azali koloba. Ntango mosusu okoki kutu koyeba ete ezali mongongo ya songolo mpakala. Kasi ekozala na litomba nini mpo na yo soki ozali kokanga ntina te ya makambo oyo moto yango azali koloba? (1 Ko. 14:9) Ndenge moko, bankóto ya bato bayokaki makambo oyo Yesu azalaki koloba. Alobaki na bango kutu na maloba oyo bakokaki kokanga ntina. Kasi, bango nyonso te nde bakangaki ntina ya maloba na ye. Mpo na ntina yango, Yesu ayebisaki bayoki na ye ete: “Bóyoka ngai, bino nyonso, mpe bókanga ntina.”Mrk. 7:14.

2 Mpo na nini bato mosusu bakangaki ntina te ya makambo oyo Yesu azalaki koloba? Basusu balonaki liboso mpenza makanisi mabe na mitema na bango. Yesu alobaki na bango boye: “Na mayele, bozali kotya mobeko ya Nzambe pembeni mpo na kobatela bonkɔkɔ na bino.” (Mrk. 7:9) Bato yango balukaki mpenza te kokanga ntina ya maloba na ye. Balingaki te kobongola banzela mpe makanisi na bango. Ekoki kozala ete matoi na bango efungwamaki, kasi mitema na bango ekangamaki mpenza! (Tángá Matai 13:13-15.) Kasi, ndenge nini tokoki kondimisama ete mitema na biso ezali ntango nyonso ya kofungwama mpo na tózwa litomba na mateya ya Yesu?

 NDENGE YA KOZWA LITOMBA NA MATEYA YA YESU

3. Mpo na nini bayekoli ya Yesu bazalaki na likoki ya kokanga ntina ya maloba na ye?

3 Tosengeli kolanda ndakisa ya bayekoli ya Yesu ya komikitisa. Alobaki na bango boye: “Esengo na miso na bino mpo ezali komona, mpe na matoi na bino mpo ezali koyoka.” (Mat. 13:16) Mpo na nini bango bazalaki kokanga ntina kasi bato mosusu bazalaki kosala yango te? Ya liboso, bazalaki kotuna mituna mpe koluka mpenza kokanga ntina ya maloba ya Yesu. (Mat. 13:36; Mrk. 7:17) Ya mibale, bazalaki kondima kobakisa na mitema na bango makambo mosusu ya sika. (Tángá Matai 13:11, 12.) Ya misato, bazalaki kosuka te kaka kosalela mpe kokanga ntina ya makambo oyo bayoki na bomoi na bango, kasi mpe mpo na milende oyo bazalaki kosala mpo na kosalisa basusu.Mat. 13:51, 52.

4. Mpo na kokanga ntina ya bandakisa oyo Yesu apesaki, makambo nini misato esengeli kosala?

4 Soki tolingi kokanga ntina ya bandakisa ya Yesu, tosengeli kolanda ndakisa ya bayekoli ya Yesu ya sembo. Esengeli mpe kosala makambo misato. Ya liboso, tosengeli kozwa ntango ya koyekola mpe komanyola na oyo Yesu alobaki, kosala bolukiluki oyo esengeli mpe kotuna mituna oyo ebongi. Yango esalisaka moto akóma na boyebi. (Mas. 2:4, 5) Ya mibale, tosengeli koluka koyeba na nini boyebi yango eyokani na makambo oyo toyebi liboso, mpe kososola matomba oyo ekoki komemela biso. Yango ekosalisa biso tókóma na bososoli. (Mas. 2:2, 3) Ya misato, tosengeli kosalela na bomoi na biso makambo oyo toyekoli. Soki tosali bongo, tokomonisa bwanya.Mas. 2:6, 7.

5. Monisá bokeseni oyo ezali kati na boyebi, bososoli mpe bwanya.

5 Bokeseni nini ezali kati na boyebi, bososoli mpe bwanya? Tózwa ndakisa oyo: Kanisá ete otɛlɛmi na katikati ya balabala mpe bisi moko ezali koya epai ozali. Ya liboso, omoni ete ezali bisi, wana osaleli boyebi. Ya mibale, omoni ete soki otikali kaka wana, bisi wana ekotuta yo, wana omonisi bososoli! Na nsuka, olongwe na nzela oyo bisi ezalaki koya, wana osaleli bwanya! Na ntembe te, Biblia emonisaka ntina oyo tosengeli ‘kobatela bwanya.’ Yango elimboli bomoi mpo na biso!Mas. 3:21, 22; 1 Tim. 4:16.

6. Mituna nini minei tokomituna wana tokotalela bandakisa nsambo oyo Yesu apesaki? (Talá  etanda ya lisolo oyo.)

6 Na lisolo oyo mpe oyo ekolanda, tokotalela bandakisa nsambo oyo Yesu asalelaki. Ntango tokotalela yango, tómituna mituna oyo elandi: Ndakisa yango elimboli nini? (Yango esalisaka biso tózwa boyebi.) Mpo na nini Yesu apesi biso ndakisa oyo? (Yango esalisaka biso tókóma na bososoli.) Ndenge nini biso moko tokoki kosalela makambo oyo mpe ndenge nini tokoki kosalela yango mpo na kosalisa basusu? (Yango nde bwanya.) Na nsuka, makambo yango eteyi biso nini na ntina na Yehova mpe Yesu?

MBUMA YA MUTARDE

7. Ndakisa ya mbuma ya mutarde elimboli nini?

7 Tángá Matai 13:31, 32. Ndakisa oyo Yesu apesaki ya mbuma ya mutarde elimboli nini? Mbuma yango elimboli nsango ya Bokonzi mpe litomba oyo eutaka na mosala ya kosakola nsango yango: lisangá ya bokristo. Lokola mbuma ya mutarde oyo ezali “moke mpenza koleka mboto nyonso,” lisangá ya bokristo ebandaki na mwa bato moke na 33 T.B. Kasi, nsima ya mwa bambula, lisangá yango ekolaki nokinoki mpenza. Ekolaki na ndenge oyo moto akokaki kokanisa te. (Kol. 1:23) Bokoli yango ezalaki na litomba mpo Yesu ayebisi biso ete “bandɛkɛ ya likoló” ‘bafandaka na bitape na yango.’ Bandɛkɛ wana ya elilingi, elingi koloba bato ya mitema sembo oyo bazwaka bilei ya elimo, bazalaka na nse ya elili mpe bazwaka libateli na kati ya lisangá ya bokristo.—Talá mpe Ezekiele 17:23.

8. Mpo na nini Yesu asalelaki ndakisa ya mbuma ya mutarde?

 8 Mpo na nini Yesu asalelaki ndakisa yango? Asalelaki lolenge kitoko oyo mbuma ya mutarde ekolaka mpo na kolobela nguya oyo Liloba ya Bokonzi ezali na yango ya kokóma bipai nyonso, kobatela mpe kolonga mikakatano nyonso. Kobanda na mobu 1914, bokoli oyo ezali kosalema na eteni ya ebongiseli ya Nzambe awa na mabele ezali ya koluka te! (Yis. 60:22) Baoyo bazali kosangana na ebongiseli yango bazali mpenza kobatelama na elimo. (Mas. 2:7; Yis. 32:1, 2) Lisusu, moto moko te alongi kopekisa ete matomba ya Bokonzi ekende kaka liboso, mpe ezali kolonga lolenge nyonso ya botɛmɛli.Yis. 54:17.

9. (a) Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya mbuma ya mutarde? (b) Likambo yango eteyi biso nini mpo na Yehova mpe Yesu?

9 Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya mbuma ya mutarde? Ntango mosusu tozali na mboka oyo Batatoli ya Yehova bazali mingi te to tozali komona te ete mosala na biso ya kosakola ezali kobimisa mbala moko matomba. Kasi, kotya na makanisi ete ebongiseli ya Bokonzi ekoki kolonga botɛmɛli ya lolenge nyonso ekopesa biso makasi ya koyika mpiko. Na ndakisa, ntango ndeko Edwin Skinner akómaki na Inde na mobu 1926, Batatoli ya Yehova bazalaki kaka moke na ekólo yango. Na ebandeli, bokoli ezalaki malɛmbɛ, mpe bato bazalaki koloba ete mosala yango ezali “kotambola malɛmbɛ lokola nkoba.” Kasi akobaki kosakola mpe amonaki ndenge nsango ya Bokonzi elongaki botɛmɛli ya ndenge na ndenge ya minene. Lelo oyo, Batatoli ya Yehova ya molende 37000 bazali na Inde, mpe bato koleka 108 000 bayanganaki na Ekaniseli ya mobu eleki. Lisusu talá ndakisa oyo emonisi ndenge nsango ya Bokonzi ekoli na ndenge ya kokamwa mpenza. Kaka na mbula oyo ndeko Skinner akómaki na Inde, mosala ebandaki mpe na Zambie. Na moi ya lelo, basakoli koleka 170 000 bazali na ekólo yango, mpe bato 763 915 bayanganaki na Ekaniseli ya 2013. Yango elingi koloba ete soki ozwi bato 18, okomona ete moto moko na kati na bango ayanganaki na Ekaniseli na Zambie. Oyo nde bokoli mpenza!

LEVIRE

10. Ndakisa ya levire elimboli nini?

10 Tángá Matai 13:33. Ndakisa ya levire elimboli nini? Ndakisa yango elobeli mpe  nsango ya Bokonzi mpe makambo oyo ezali kobimisa. “Pɔtɔpɔtɔ mobimba” ya farini elimboli bikólo nyonso, mpe kovimba ya pɔtɔpɔtɔ ezali elilingi ya ndenge nsango ya Bokonzi ezali kopanzana na nzela ya mosala ya kosakola. Ata soki bokoli ya mbuma ya mutarde emonanaka polele, kasi kovimba ya levire emonanaka te na ebandeli. Kaka na nsima mpenza nde tomonaka ete evimbi.

11. Mpo na nini Yesu asalelaki ndakisa ya levire?

11 Mpo na nini Yesu asalelaki ndakisa yango? Amonisaki ete nsango ya Bokonzi ezali na nguya ya kopanzana bisika nyonso mpe kosalisa bato bábongwana. Nsango ya Bokonzi ekómi “tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.” (Mis. 1:8) Nzokande, bambongwana oyo nsango yango esalaka, emonanaka ntango nyonso polele te; kutu nguya na yango emonanaka te na ebandeli. Ebele ya bato bipai nyonso bazali kondima nsango ya Bokonzi mpe bazali kotika ete nsango yango oyo ezali na nguya ebongola bomoto na bango.Rom. 12:2; Ef. 4:22, 23.

12, 13. Pesá bandakisa oyo emonisi ndenge mosala ya kosakola Bokonzi ekolaki kaka ndenge ndakisa ya levire emonisaki yango.

12 Mbala mingi, matomba ya mosala ya kosakola emonanaka bambula mpenza na nsima ya kosolola na moto mbala ya liboso. Na ndakisa, ndeko Franz ná Margit, oyo bazali kosala sikoyo na biro ya filiale mosusu, basalaki na biro ya filiale ya Brésil na mobu 1982. Bapesaki litatoli na mwa engumba moko. Na kati ya bato oyo babandaki koyekola na bango Biblia, ezalaki na mama moko ná bana na ye minei. Mwana ya mokóló oyo azalaki na mbula 12 na ntango wana, azalaki moto ya nsɔni makasi mpe mbala mingi azalaki komibomba liboso ete boyekoli ebanda. Lokola batindaki bango epai mosusu, bandeko wana bakokaki lisusu te koyekola na ye. Kasi, mbula 25 na nsima bakendeki kotala mwa engumba yango. Bakutaki nini? Lisangá moko ya basakoli 69, mpe babongisi-nzela ya sanza na sanza 13, mpe makita nyonso ezalaki kosalema na Ndako ya Bokonzi ya sika. Bongo elenge wana ya nsɔninsɔni? Ye nde azali lelo mokambi-misala ya bankulutu! Ndenge kaka ndakisa oyo Yesu apesaki ya levire emonisi yango, nsango ya Bokonzi ekolaki mpe ebongolaki ebele ya bato, mpe ndeko Franz ná mwasi na ye Margit basepelaki mpenza ntango bakendaki kuna!

13 Nguya ya nsango ya Bokonzi oyo emonanaka te mpe oyo ebongolaka bato emonanaki mpenza na mikili oyo mosala ya Bokonzi epekisamaki. Ezali mpasi koyeba ntango nini mpenza nsango ya Bokonzi ekɔtaki na bikólo yango, kasi mbala mingi tokamwaki na matomba oyo emonanaki. Tózwa ndakisa ya Cuba. Nsango ya Bokonzi ekɔtaki kuna na mobu 1910, mpe ndeko Russel akendeki na Cuba na 1913. Kasi, na ebandeli bokoli ezalaki malɛmbɛ. Lelo oyo, tozali komona nini na Cuba? Basakoli ya nsango malamu koleka 96 000 bazali kuna, mpe bato 229 726 bayanganaki na Ekaniseli na mobu 2013; yango emonisi ete soki ozwi bato 48 ya mwa ekólo yango, moko na bango ayangaki na Ekaniseli. Ata na bikólo oyo mosala na biso epekisami te, ekoki kozala ete nsango ya Bokonzi ekómaki na bisika oyo Batatoli ya bamboka yango bakanisaki ete mosala ya kosakola ekoki kosalema ata moke. *Mos. 8:7; 11:5.

14, 15. (a) Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya levire? (b) Yango eteyi biso nini na ntina na Yehova mpe Yesu?

14 Litomba nini tokoki kozwa na ndakisa ya levire oyo Yesu ateyi biso? Ntango tozali komanyola na ndimbola ya ndakisa oyo Yesu apesaki, tokomona ete ezali na ntina te tómitungisa mingi mpo na koyeba soki ndenge nini nsango ya  Bokonzi ekokómela bamilio ya bato oyo bayoki naino yango te. Yehova azali na makambo nyonso na mabɔkɔ. Kasi, tokoloba nini mpo na mosala na biso? Liloba ya Nzambe eyanoli ete: “Na ntɔngɔ, loná mboto na yo mpe tii na mpokwa kopemisa lobɔkɔ na yo te; mpo oyebi te epai wapi yango ekolonga, ezala awa to kuna, to soki yango nyonso mibale ekozala malamu.” (Mos. 11:6) Kasi, tosengeli mpe soki moke te kobosana kobondela mpo ete mosala ya kosakola ekende liboso, mingimingi na mikili oyo mosala na biso epekisamá.Ef. 6:18-20.

15 Lisusu, tosengeli te kolɛmba nzoto soki tomoni naino te matomba ya mosala na biso. Tosengeli soki moke te kotyola “mokolo ya makambo ya mike.” (Zek. 4:10) Matomba ekoki komonana ebele mpenza mpe ya kokamwa koleka ndenge kutu tozalaki kokanisa!Nz. 40:5; Zek. 4:7.

MOTO YA MOMBONGO OYO ASALAKA MIBEMBO MPE ELOKO YA MOTUYA OYO EBOMBAMI

16. Ndakisa ya moto ya mombongo oyo asalaka mibembo mpe eloko ya motuya oyo ebombami ezali na ndimbola nini?

16 Tángá Matai 13:44-46. Ndakisa ya moto ya mombongo oyo asalaka mibembo mpe eloko ya motuya oyo ebombami ezali na ndimbola nini? Na mikolo ya Yesu, bato mosusu ya mombongo bazalaki kokende tii na Océan Indien mpo na koluka mayaka oyo elekaki kitoko. Moto ya mombongo ya ndakisa oyo azali elilingi ya bato ya mitema ebongi oyo basalaka nyonso mpo na kokokisa bamposa na bango ya elimo. “Liyaka moko ya motuya monene” ezali elilingi ya nsango kitoko ya Bokonzi. Lokola moto ya mombongo oyo asalaki mibembo ayebaki valɛrɛ ya liyaka yango, andimaki kotɛka “nokinoki” biloko nyonso oyo azalaki na yango mpo asomba liyaka yango. Yesu alobelaki mpe moto moko oyo azalaki kosala na elanga mpe amoni eloko ya motuya oyo “ebombami.” Na bokeseni na moto ya mombongo, moto oyo azalaki te koluka eloko ya motuya. Kasi lokola moto ya mombongo, ye mpe atɛkaki “biloko oyo azali na yango” mpo na kozwa eloko wana ya motuya.

17. Mpo na nini Yesu apesaki bandakisa ya moto ya mombongo oyo asalaka mibembo mpe ya eloko ya motuya oyo ebombami?

17 Mpo na nini Yesu apesaki bandakisa yango? Amonisaki ete moto akoki kozwa solo na balolenge ebele. Bato mosusu bazali koluka yango mpe basali nyonso mpenza mpo na kozwa yango. Nzokande, basusu atako baluki yango te, kasi bazwi yango, ntango mosusu bamemelaki bango yango esika bazali. Ezala moto azwi solo na lolenge boye to boye, moto mokomoko ayebaka valɛrɛ ya eloko oyo azwi mpe andimaka komipimela makambo mosusu ya minene mpo na kozwa yango.

18. (a) Liteya nini tokoki kozwa na bandakisa oyo mibale? (b) Yango eteyi biso nini na ntina na Yehova mpe Yesu?

18 Liteya nini tokoki kozwa na bandakisa oyo mibale? (Mat. 6:19-21) Omituna boye: ‘Nazali na ezaleli oyo bato wana bazalaki na yango? Nazwaka solo na valɛrɛ ndenge wana? Nandimaka komipimela makambo mosusu mpo na kozwa yango, to natikaka ete makambo mosusu, na ndakisa oyo etali bomoi ya mokolo na mokolo, elongola likebi na ngai mpo na kozwa yango?’ (Mat. 6:22-24, 33; Luka 5:27, 28; Flp. 3:8) Soki tozali na esengo mingi mpo ete toyebi solo, tokozala mpe na ekateli makasi ya kotya yango na esika ya liboso na bomoi na biso.

19. Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

19 Tómonisa ete toyoki mpe tokangi mpenza ntina ya bandakisa oyo ya Bokonzi. Tóbosana te, tosengeli kosala yango te kaka mpo na kokanga ntina na yango, kasi tosengeli kosalela mateya oyo tozwi na bandakisa yango. Na lisolo oyo elandi, tokolobela bandakisa misato oyo etikali mpe tokomona mateya oyo tokoki kozwa.

^ par. 13 Makambo ya ndenge wana esalemaki mpe na bikólo lokola Argentine (Annuaire 2001, lokasa 186); Allemagne ya Ɛsti (Annuaire 1999, lokasa 83); Papouasie-Nouvelle-Guinée (Annuaire 2005, lokasa 63); mpe esanga ya Robinson Crusoé (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15/06/2000, lokasa 9).