Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Décembre 2014

‘Okangi ntina’?

‘Okangi ntina’?

“Bongo afungolaki mayele na bango malamumalamu mpo bákanga ntina ya Makomami.”LUKA 24:45.

1, 2. Ndenge nini Yesu alendisaki bayekoli na ye mokolo oyo asekwaki?

EZALAKI mokolo oyo Yesu asekwaki. Bayekoli na ye mibale bazalaki kotambola na mboka moko oyo ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ 11 na ndambo kobanda na Yerusaleme. Lokola bayebaki te ete Yesu asekwi, bazalaki na mawa makasi mpo na makambo oyo eutaki kosalema. Na mbalakaka, Yesu abimelaki bango mpe abandaki kotambola ná bango. Abɔndisaki bayekoli yango. Ndenge nini? “Alimbwelaki bango makambo na ye na kati ya Makomami nyonso, banda na Moize tii na basakoli nyonso.” (Luka 24:13-15, 27) Na ntango wana, mitema na bango ebandaki kokóma mɔtɔmɔtɔ mpo azalaki “kolimbolela” bango Makomami.Luka 24:32.

2 Kaka na mpokwa wana, bayekoli wana mibale bazongaki na Yerusaleme. Ntango bakutanaki na bantoma, babɛtɛlaki bango lisolo ya likambo oyo bakutanaki na yango. Ntango bazalaki kobɛta lisolo yango, Yesu abimelaki bango nyonso. Kasi, bantoma na ye babangaki makasi. Bakómaki komitungisa na mitema na bango. Ndenge nini Yesu alendisaki bango? Biblia eyebisi biso ete: “Afungolaki mayele na bango malamumalamu mpo bákanga ntina ya Makomami.”Luka 24:45.

3. Mikakatano nini tokoki kokutana na yango, mpe nini ekoki kosalisa biso mpo tózala na makanisi ebongi mpo na mosala na biso ya kosakola?

3 Ndenge moko na bayekoli wana, ekoki kokóma ete  tómitungisa na ntango mosusu. Ntango mosusu tomipesaka na mosala ya Nkolo, kasi tolɛmbaka nzoto mpo tozali komona te matomba. (1 Ko. 15:58) To ekoki kozala ete bato oyo toyekolaka na bango bazali kokola malamu mpenza te. Ekoki mpe kosalema ete bato mosusu oyo tozali kosalisa bápesa Yehova mokɔngɔ. Tokoki kosala nini mpo tózala na makanisi ebongi mpo na mosala na biso ya kosakola? Likambo moko oyo ekoki kosalisa biso ezali kokanga ntina ya bandakisa oyo Yesu apesaki, oyo ezali na Makomami mosantu. Tótalela bandakisa yango misato mpe tómona mateya oyo tokoki kozwa.

MOLONI OYO ALALAKI

4. Ndakisa oyo Yesu apesaki ya moloni oyo alalaki elimboli nini?

4 Tángá Marko 4:26-29. Ndakisa oyo Yesu apesaki ya moloni oyo alalaki elimboli nini? Moto oyo alobelami na ndakisa yango azali elilingi ya basakoli ya Bokonzi. Mboto ezali nsango ya Bokonzi oyo tosakolaka epai ya bato ya mitema ebongi. Ndenge kaka ezalaka, moloni “[alalaki] na butu mpe alamuki na moi.” Bokoli ezwaka ntango, kobanda ntango baloni mboto tii ntango babuki molona ya nsuka. Na ntango wana, “mboto ebimi mpe ekoli.” Bokoli yango esalemi na ndenge na yango, malɛmbɛmalɛmbɛ tii na nsuka. Ndenge moko, bokoli ya elimo esalemaka malɛmbɛmalɛmbɛ. Ntango moto moko akoli tii na kokóma na makanisi ya kosalela Nzambe, abotaka mbuma na boye ete amipesaka epai ya Yehova mpe azwaka batisimo.

5. Mpo na nini Yesu apesaki ndakisa ya moloni oyo alalaki?

5 Mpo na nini Yesu apesaki ndakisa yango? Yesu asalisi biso tóyeba ete Yehova nde akolisaka solo na mitema ya baoyo bazali na “ezaleli oyo ebongi.” (Mis. 13:48; 1 Ko. 3:7) Biso tolonaka mpe tobwakaka mai, kasi toyebaka ndenge bokoli esalemaka te. Tokoki te kokolisa yango na makasi. Ndenge kaka esalemaki mpo na moto oyo Yesu alobeli na ndakisa na ye, biso mpe toyebaka te ndenge bokoli esalemaka. Lokola tozalaka na makambo mingi ya kosala mokolo na mokolo, tokoki kutu te komona ndenge mboto ya Bokonzi ezali kokola epai ya moto moko. Kasi, na nsima, mboto ya Bokonzi ekoki kobota mbuma. Na nsima, moyekoli ya sika asanganaka na biso na mosala ya kobuka mbuma, mpe tosepelaka na lisalisi na ye.Yoa. 4:36-38.

6. Tosengeli kondima likambo nini na oyo etali bokoli ya elimo?

6 Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa yango? Ya liboso, tosengeli kondima ete toyebaka te makambo nyonso oyo esalaka ete moyekoli ya Biblia akola. Komikitisa ekosalisa biso mpo tókwea te na motambo ya kotindika moyekoli ya Biblia na makasi mpo azwa batisimo. Tosengeli kosala nyonso oyo tokoki mpo na kosalisa moto yango, kasi na komikitisa nyonso tosengeli kondima ete na nsuka ekateli ya komipesa na Yehova ezali na mabɔkɔ ya moto yango. Komipesa esengeli kozala likambo oyo euti mpenza na motema ya moto ye moko mpo alingi Nzambe. Soki bongo te, akondimama te epai na Yehova.Nz. 51:12; 54:6; 110:3.

7, 8. (a) Mateya nini mosusu tozwi na ndakisa oyo Yesu apesaki ya moto oyo alalaki? Pesá ndakisa. (b) Yango eteyi biso nini mpo na Yehova mpe Yesu?

7 Ya mibale, kokanga ntina ya ndakisa oyo ekosalisa biso tólɛmba nzoto te soki tomoni na ebandeli ete mosala na biso ezali kobota mbuma te. Tosengeli kozala motema molai. (Yak. 5:7, 8) Ata mboto eboti mbuma te, kasi soki tosali nyonso mpo na kosalisa moyekoli ya Biblia, tokomona ete soki moyekoli yango akoli te, ezali te mpo biso tosali mosala malamu te. Yehova apesaka nzela ete mboto ya solo ekola kaka na motema oyo ezali na komikitisa mpe oyo elingi kosala mbongwana. (Mat. 13:23) Na yango, tokoki te koloba ete mosala na biso ezali kobota mbuma to te mpo bato bazali kondima to  te. Na miso ya Yehova, kobota mbuma malamu na mosala ya kosakola etalelaka te lolenge bato oyo tozali koteya bazali kondima to koboya. Lisusu, azwaka na motuya bosembo mpe milende oyo tomonisaka ata soki tozwi matomba ya malamu to te.Tángá Luka 10:17-20; 1 Bakorinti 3:8.

8 Ya misato, mbala mingi tomonaka te bambongwana oyo moto azali kosala. Na ndakisa, misionɛrɛ moko azalaki koyekola na mobali moko ná mwasi na ye. Mobali yango ná mwasi na ye bakutanaki na ndeko yango mpe bayebisaki ete balingi kokóma basakoli. Ndeko yango ayebisaki bango ete soki balingi kokóma basakoli, basengeli kotika komɛla makaya. Akamwaki makasi ntango bayebisaki ye ete batiká komɛla makaya esili koleka ebele ya bambula. Mpo na nini batikaki komɛla makaya? Basimbaki ete Yehova akoki komona bango bazali komɛla makaya mpe ete ayinaka ezaleli ya bokosi. Na yango, motema na bango etindaki bango bázwa ekateli ya kopona komɛla makaya ezala liboso ya misionɛrɛ wana to kotika yango libela. Lokola bakómaki na bolingo makasi mpo na Yehova, yango esalisaki bango bázwa ekateli ya malamu. Bakolaki na elimo atako misionɛrɛ wana ayebaki te mbongwana oyo basalaki.

MONYAMA

9. Ndakisa ya monyama elimboli nini?

9 Tángá Matai 13:47-50. Ndakisa oyo Yesu apesaki ya monyama elimboli nini? Yesu akokanisaki mosala ya kosakola nsango ya Bokonzi epai ya bato nyonso na kobwaka monyama moko monene na mbu. Ndenge kaka monyama wana ekoki kokanga mbisi ebele to “mbisi ya ndenge nyonso” kozanga kopona, mosala na biso ya kosakola ebendaka bamilio ya bato ya lolenge nyonso. (Yis. 60:5) Ebele ya bato oyo bayanganaka na mayangani na biso mpe Ekaniseli mbula na mbula bamonisaka polele mpenza likambo yango. Mbisi yango mosusu ya elilingi ezalaka ya “malamu” mpe eyanganisamaka na kati ya lisangá ya bokristo. Kasi, mosusu ezalaka ya “mabe.” Bato nyonso te oyo bayanganaka kuna nde bandimamaka na Yehova.

Nsima ya kotánga Matai 13:47-50 . . .

10. Mpo na nini Yesu apesaki ndakisa ya monyama?

10 Mpo na nini Yesu apesaki ndakisa yango? Kokabolama ya mbisi na ndenge ya elilingi elimboli te kosambisama ya nsuka na boumeli ya bolɔzi monene. Kasi, ezali nde kolobela makambo oyo esengelaki kosalema na boumeli ya mikolo ya nsuka ya ebongiseli oyo mabe. Yesu amonisaki ete bato nyonso te oyo babendamaka na solo nde bakosambela Yehova. Mingi bayanganaka elongo na biso na makita. Basusu bayekolaka Biblia ná biso kasi balingaka te kozwa ekateli. (1 Bak. 18:21) Basusu bayanganaka kutu te na makita. Bana mosusu babɔkɔlamaki na baboti oyo bazali Batatoli kasi bakolisaki te bolingo mpo na mitinda ya Yehova. Ezala mpo na likambo boye to boye, Yesu amonisaki ete moto na moto asengeli kozwa ekateli ye moko. Baoyo basalaka yango, ye amonaka bango lokola biloko “kitoko ya bikólo nyonso.”Hag. 2:7.

. . . luká koyeba ndenge okoki kosalela yango lelo

11, 12. (a) Litomba nini tokoki kozwa na ndakisa ya monyama? (b) Yango eteyi biso nini mpo na Yehova mpe Yesu?

11 Litomba nini tokoki kozwa na ndakisa ya monyama? Kokanga ntina ya ndakisa oyo ekosalisa biso tómitungisa mingi te soki moyekoli ya Biblia to mwana na biso moko azwi te ekateli ye moko ya kolanda solo. Likambo ya ndenge wana ekoki kosalema ata soki tosali milende ya ndenge nini. Kondima koyekola Biblia to kokola na kati ya solo ekómisaka moto mbala moko te na boyokani ya solosolo elongo na Yehova. Baoyo baboyaka kotosa boyangeli ya Yehova nsukansuka bakomitangola na basaleli ya Nzambe.

Bato mosusu oyo bayoká solo bakozwa ekateli ya kosalela Yehova (Talá paragrafe 9-12)

12 Yango elingi nde koloba ete baoyo  batiki solo bakoki soki moke te kozonga na lisangá? To soki moto moko aboyi komipesa epai ya Yehova, elingi koloba ete akómi mpo na libela eloko ya “mabe”? Te. Porte ezali naino polele mpo na bato ya lolenge wana liboso ete bolɔzi monene ebanda. Ezali lokola Yehova azali koloba na bango ete: “Bózongela ngai, mpe ngai nakozongela bino.” (Mal. 3:7) Likambo yango elobelami mingi na ndakisa mosusu oyo Yesu apesaki, oyo ya mwana ya mobulu.Tángá Luka 15:11-32.

MWANA YA MOBULU

13. Ndakisa ya mwana ya mobulu elimboli nini?

13 Lisese oyo Yesu apesaki ya mwana ya mobulu elimboli nini? Tata ya motema mawa oyo ndakisa wana emonisi ezali ya Yehova, tata na biso ya bolingo. Mwana oyo asɛngaki libula na ye mpe na nsima alei yango lokola nguba, azali elilingi ya baoyo bamitangwá na lisangá. Ntango bazali komitangola, ezali lokola basali mobembo na “mokili moko mosika,” elingi koloba mokili ya Satana, oyo emitangolá na Yehova. (Ef. 4:18; Kol. 1:21) Kasi, na nsima, basusu bazongisaki makanisi mpe basalaki mobembo moko ya makasi na ndenge ya elilingi mpo na kozonga na ebongiseli ya Yehova. Tata na biso oyo alimbisaka, ayambaka na mabɔkɔ mibale bato wana ya komikitisa mpe oyo babongolaka motema.Yis. 44:22; 1 Pe. 2:25.

14. Mpo na nini Yesu apesaki ndakisa ya mwana ya mobulu?

14 Mpo na nini Yesu apesaki ndakisa yango? Na maloba oyo ebongi mpenza, Yesu apesaki ndakisa yango mpo na komonisa ete Yehova alingi ete baoyo bamitangwá na lisangá bázongela ye. Tata oyo Yesu alobelaki na ndakisa na ye, azalaki kaka na elikya ete mwana na ye akozonga. Ntango amonaki mwana na ye azali koya kozonga, atako “azalaki naino mosika,” tata asalaki noki mpo na koyamba ye. Likambo oyo esengeli mpenza kolendisa baoyo batiká solo ete bázongela Yehova kozanga kozela lisusu. Ekoki kozala ete balɛmbá mpenza na elimo mpe ekoki komonana lokola ete nzela ya kozonga ezali mpasi. Kasi, milende bakosala ekozala ya mpunda te mpo ata na likoló, esengo ekozala ntango bakozonga.Luka 15:7.

15, 16. (a) Mateya nini tokoki kozwa na ndakisa oyo Yesu apesaki ya mwana ya mobulu? Pesá mwa bandakisa. (b) Yango eteyi biso nini mpo na Yehova mpe Yesu?

15 Litomba nini tokoki kozwa na ndakisa ya mwana ya mobulu? Tosengeli kolanda ndakisa ya Yehova. Tokolinga te “kokóma [ba]yengebene koleka ndelo”  mpe ete tóboya kondima basumuki oyo babongoli motema. Tokoki ‘komibebisa’ na elimo soki tosali bongo. (Mos. 7:16) Ezali mpe na liteya mosusu oyo tokoki kozwa na ndakisa oyo. Tosengeli kotalela moto oyo atiká lisangá lokola “mpate oyo ebungi,” kasi te lokola moto oyo akei motako. (Nz. 119:176) Soki tokutani na moto oyo amitangolá na lisangá, tokosalisa ye na bolingo mpo ete azonga? Tokoyebisa bankulutu kozanga kolekisa ntango mpo bápesa lisalisi oyo ebongi? Tokosala yango soki tosaleli na bwanya nyonso liteya oyo tozwi na ndakisa oyo Yesu apesaki ya mwana ya mobulu.

16 Tóyoka ndenge bana mosusu ya mobulu ya mikolo na biso bamonisi botɔndi na bango mpo na motema mawa, bolingo mpe lisalisi mpo na lisangá. Ndeko mobali moko oyo abimisamaki na lisangá na boumeli ya mbula 25 alobi boye: “Esengo na ngai banda nazongisamaki na lisangá ekobaki kobakisama lokola nazwaki ‘bileko ya kopema’ epai ya Yehova. (Mis. 3:19) Moto nyonso asalisaka ngai mpe alingaka ngai! Nazali sikoyo na libota moko kitoko ya bandeko ya elimo.” Ndeko mwasi moko oyo atikaki Yehova mpe aumelaki na libanda ya lisangá na boumeli ya mbula mitano alobi boye ntango azongisamaki: “Nazangi maloba mpo na kolobela ndenge bamoniselaki ngai polele bolingo oyo Yesu alobelaki. Kozala na kati ya ebongiseli ya Yehova ezali mpenza malamu mingi koleka makambo mosusu nyonso!”

17, 18. (a)  Mateya nini ya ntina toyekoli na bandakisa misato oyo totaleli? (b) Ekateli na biso esengeli kozala nini?

17 Mateya nini ya ntina mpenza toyekoli na bandakisa oyo misato? Ya liboso, tosengeli kondima ete toyebaka te ndenge bokoli ya elimo esalemaka. Kaka Yehova nde ayebi. Ya mibale, tokoki soki moke te kokanisa ete bato nyonso oyo bayanganaka na biso to toyekolaka na bango Biblia bakokangama na solo. Ya misato mpe ya nsuka, ata soki bato mosusu bakoki kotika solo mpe bapesi Yehova mokɔngɔ, tókanisa te ete bakei motako. Soki bazongi, tóndima bango na lolenge oyo ekomonisa ete tozali mpenza na makanisi ya Yehova.

18 Tiká ete mokomoko na biso akoba koluka boyebi, bososoli mpe bwanya. Wana tozali kotánga bandakisa oyo Yesu apesaki, tómituna soki ndimbola na yango ezali nini, mpo na nini ekomamaki na Biblia, ndenge nini tokoki kosalela mateya yango mpe nini tokoki koyekola mpo na Yehova mpe Yesu. Kosala bongo, ekomonisa ete tozali kokanga ntina ya maloba ya Yesu.