Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Décembre 2014

Tósala na bomoko mpo tólonga mokili oyo enuni

Tósala na bomoko mpo tólonga mokili oyo enuni

“Tozali binama oyo mokomoko na yango ezali ndeko ya mosusu.”​—EF. 4:25.

1, 2. Mposa ya Nzambe mpo na basambeli na ye, bilenge mpe mikóló ezali nini?

OZALI elenge? Soki ezali bongo, omindimisa ete ozali na kati ya lisangá ya Yehova ya mokili mobimba, mpe tozwaka yo na motuya mpenza. Na mikili mingi, ebele ya bato oyo bazali kozwa batisimo bazali bilenge. Ezali mpenza esengo komona ndenge ebele ya bilenge bazali kokɔta na molɔngɔ ya baoyo bazwá ekateli ya kosalela Yehova!

2 Lokola ozali elenge, osepelaka kozala elongo na bilenge mosusu? Na ntembe te, osepelaka. Tozwaka mwa esengo ntango tozali kolekisa ntango elongo na bato oyo tozali na bango mbula moko. Kasi, tózala elenge to mokóló mpe ata soki tozali bato ya mboka nini, Nzambe alingi ete tósangana na bomoko mpo na kosambela ye. Ntoma Paulo akomaki ete mokano ya Nzambe ezali ete “bato ya ndenge nyonso bábika mpe bázwa boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Tim. 2:3, 4) Na Emoniseli 7:9, tokoki komona ete elobeli basambeli ya Nzambe oyo bauti na “bikólo nyonso mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso.”

3, 4. (a) Elimo nini emonanaka lelo na kati ya bilenge mingi? (b) Ezaleli nini eyokani na Baefese 4:25?

3 Bokeseni ezali mpenza kati na bilenge oyo basalelaka Yehova  mpe oyo ya mokili oyo! Bato mingi oyo basalelaka Yehova te balukaka mingi kaka matomba na bango moko, batyaka likebi mingi kaka na makambo oyo esepelisaka bango. Bato balobaka ete bato ya ndenge wana, balukaka bolamu ya basusu te. Lolenge oyo balobaka mpe balataka, bamonisaka ete mikóló bazali na ntina te, mpe bamonaka bango lokola bato “basilá ngala.”

4 Wana nde elimo oyo emonanaka epai tozali. Na yango, basaleli ya Yehova oyo bazali bilenge bamonaka ete esɛngaka mpenza milende mpo na koboya ezaleli yango mpe kondima likanisi ya Nzambe. Ezala na siɛklɛ ya liboso, ntoma Paulo amonaki malamu kolendisa baninga na ye bandimi ete báboya “elimo oyo ezali sikoyo kosala mosala na kati ya bana ya kozanga botosi” mpe ‘kala bazalaki kotambola na yango.’ (Tángá Baefese 2:1-3.) Bilenge oyo bamonaka ete ezali na ntina koboya elimo yango mpe balingaka kosala na bomoko ná bandeko na bango nyonso babongi mpenza kozwa longonya. Ezaleli yango eyokani malamu na maloba ya ntoma Paulo ete “tozali binama oyo mokomoko na yango ezali ndeko ya mosusu.” (Ef. 4:25) Lokola nsuka ya mokili oyo enuni ezali kobɛlɛma, kosala elongo na bomoko ekozala na ntina lisusu mingi koleka. Tótalela bandakisa mosusu ya Biblia oyo ekosalisa biso tómona ntina ya kozala liboke, to kosala na bomoko.

BAZALAKI LIBOKE

5, 6. Liteya nini na likambo etali kozala liboke emonani polele na lisolo ya Lota ná bana na ye ya basi?

5 Na ntango ya kala, Yehova abatelaki basaleli na ye ntango basalaki na bomoko mpo na kolonga na ntango ya mpasi. Basaleli ya Nzambe ya mikolo na biso, bilenge to mikóló bakoki kozwa liteya na bandakisa ya Biblia. Moko ya bandakisa yango ezali ya Lota.

6 Lota ná libota na ye bazalaki liboso ya likama monene mpo Sodomo, engumba oyo bazalaki kofanda elingaki kobomama. Baanzelu ya Nzambe balendisaki Lota alongwa mpe akima na etúká ya ngombangomba. Balobaki boye: “Kimá mpo na kobikisa molimo na yo!” (Eba. 19:12-22) Lota atosaki, mpe bana na ye mibale ya basi basalaki elongo na ye mpe balongwaki na engumba yango. Likambo ya mawa, bato mosusu oyo bayebanaki na bango malamu basalaki yango te. Lota abimaki lokola “moto oyo azali kosala masɛki” epai ya bilenge mibali oyo balingaki kobala bana na ye ya basi. Bilenge mibali yango babungisaki bomoi na bango mpo na kozwa makambo na lisɛki. (Eba. 19:14) Kaka Lota ná bana na ye ya basi, oyo basalaki elongo na ye, nde babikaki.

7. Ndenge nini Yehova asalisaki baoyo bamonisaki elimo ya bomoko ntango Bayisraele balongwaki na Ezipito?

7 Tózwa ndakisa mosusu. Ntango Bayisraele balongwaki na Ezipito, basalaki yango te bato na bato na ndenge na bango, to etuluku na etuluku na ndenge na yango. Mpe ntango Moize “asembolaki lobɔkɔ na ye likoló ya mbu” mpe Yehova akabolaki mbu, Moize akɔtaki ye moko te to kaka ná mwa ndambo moke ya Bayisraele. Kasi, na libateli ya Yehova, lisangá mobimba ekatisaki. (Kob. 14:21, 22, 29, 30) Basalaki na bomoko, mpe “etuluku monene ya bato ndenge na ndenge,” oyo bazalaki Bayuda te basanganaki na bango mpe bakendeki elongo. (Kob. 12:38) Ekokaki kosalema te ete mwa ndambo ya bato, ntango mosusu etuluku moko ya bilenge, bákende na nzela oyo bamonaki malamu. Omoni te ete elingaki kozala bozoba soki basalaka bongo mpe bázanga libateli ya Yehova?​—1 Ko. 10:1.

8. Na mikolo ya Yehoshafate, ndenge nini basaleli ya Nzambe bamonisaki bomoko?

8 Na mikolo ya mokonzi Yehoshafate, basaleli ya Nzambe bakutanaki na monguna moko ya makasi mpenza, “ebele ya bato” oyo bazalaki zingazinga. (2 Nt. 20:1, 2) Likambo ya esengo, basaleli ya Nzambe balukaki te kolonga monguna yango na makasi na bango moko. Balukaki nde lisalisi ya Yehova. (Tángá 2 Ntango 20:3, 4.) Mpe basalaki yango te ndenge balingi, ndenge moto na moto amonaki malamu to ndenge ezalaki koyela ye na motó. Biblia eyebisi biso ete:  “Bato nyonso ya Yuda batɛlɛmaki liboso ya Yehova, ata bana na bango ya mike, basi na bango mpe bana na bango.” (2 Nt. 20:13) Bázala bilenge to mikóló, basalaki makasi elongo na kati ya kondima mpo na kolanda litambwisi ya Yehova, mpe Yehova abatelaki bango na mabɔkɔ ya monguna na bango. (2 Nt. 20:20-27) Omoni te ete oyo ezali ndakisa moko kitoko oyo emonisi ndenge oyo biso basaleli ya Nzambe tokoki kolonga mikakatano?

9. Liteya nini tokoki koyekola na ntina etali bomoko na makambo mpe na ezaleli oyo bakristo ya liboso bamonisaki?

9 Bakristo ya liboso mpe bamonisaki ndakisa malamu ya kosala na bomoko. Na ndakisa, ntango Bayuda mingi mpe baprozelite bakómaki bakristo, ‘bamipesaki na mateya ya bantoma mpe kosangana bango na bango, kolya mpe na mabondeli.’ (Mis. 2:42) Bomoko yango emonanaki polele mingimingi na ntango ya minyoko, ntango mokomoko azalaki na mposa ya basusu. (Mis. 4:23, 24) Ondimi te ete na ntango ya minyoko, tosengeli mpenza kosala elongo na bomoko?

TÓZALA LIBOKE LOKOLA MOKOLO YA YEHOVA EZALI KOBƐLƐMA

10. Ntango nini tokozala mpenza na mposa ya bomoko?

10 Eleko moko mabe mpenza na kati ya lisolo ya bato ezali kobɛlɛma. Mosakoli Yoele amonisi yango lokola “mokolo ya molili mpe ya kozanga pole.” (Yoe. 2:1, 2; Sef. 1:14) Mpo na basaleli ya Nzambe, ekozala ntango ya kozala na bomoko. Tóbosana te maloba oyo Yesu alobaki ete: “Bokonzi nyonso oyo ekabwani na kati na yango moko ebebaka.”​—Mat. 12:25.

11. Makambo nini ezali na Nzembo 122:3, 4 ekoki kosalelama mpo na basaleli ya Nzambe lelo oyo? (Talá elilingi ya ebandeli.)

11 Ntango, ntango ya yikiyiki ya ebongiseli oyo ezali koya ekobanda, tosengeli mpenza kozala liboke. Bomoko ya elimo oyo tokosengela na yango na kati na biso ekoki kokokanisama na ndenge bandako ya Yerusaleme ya kala ezalaki. Bandako yango etongamaki penepene mpenza, mpe yango wana moko ya bakomi ya nzembo alobelaki Yerusaleme lokola “engumba oyo biteni na yango ekangisami esika moko lokola eloko moko.” Yango ezalaki kopesa nzela na bafandi na yango ete básalisanaka mpe bábatelanaka. Kutu, bomoko wana oyo bazalaki na yango ezalaki mpenza komonisa bomoko ya elimo ya ekólo mobimba ntango “mabota [nyonso] ya Yah” ezalaki koyangana mpo na losambo. (Tángá Nzembo 122:3, 4.) Lelo oyo mpe na mikolo ya yikiyiki oyo ezali koya, biso mpe tosengeli ‘kokangisama esika moko lokola eloko moko.’

12. Nini ekosalisa biso tóbika ntango Goge akotumola basaleli ya Nzambe na mikolo ezali koya?

12 Mpo na nini ‘kokangisama esika moko’ ekozala na ntina mingi mpo na biso na ntango wana? Ezekiele mokapo 38 elobeli na maloba ya esakweli ndenge “Goge ya mokili ya Magoge” ekoluka basaleli ya Nzambe na matumoli. Wana ekozala te ntango ya kotika ata eloko moko ekabola biso. Tokosɛnga soki moke te ete mokili esalisa biso. Kutu, tokolinga nde ete tózala liboke ná bandeko na biso. Kasi, tokobika te kaka mpo tozali na kati ya etuluku moko. Yehova mpe Mwana na ye bakobikisa baoyo bakobelela nkombo ya Yehova na ntango wana ya yikiyiki. (Yoe. 2:32; Mat. 28:20) Kasi, okanisi ete baoyo babatelaki bomoko te oyo esɛngami mpo na kozala na kati ya etonga ya Nzambe, elingi koloba baoyo bakendeki na nzela na bango moko bakobika?​—Mika 2:12.

13. Mateya nini bilenge oyo babangaka Nzambe bakoki kozwa na makambo oyo totaleli?

13 Tomoni polele te ete ekozala bozoba kolanda banzela ya bilenge oyo bamitangoli mpe balandi banzela na bango moko, to banzela ya mokili oyo? Tozali kobɛlɛma na ntango oyo moko na moko na biso akozala na mposa ya mosusu. Mpe likambo yango etali biso nyonso, bilenge ná mikóló. Yango wana, oyo nde ntango ya koyekola kosala na bomoko, kozala liboke mpo yango ekozala na ntina mingi mpo na biso na mikolo oyo ezali koya.

 “BINAMA OYO MOKOMOKO NA YANGO EZALI NDEKO YA MOSUSU”

14, 15. (a) Na mokano nini Yehova azali kopesa bilenge mpe mikóló formasyo lelo oyo? (b) Yehova apesi toli nini mpo na kolendisa biso tózala na bomoko?

14 Yehova azali kosalisa biso mpo ‘tósalela ye na bomoko.’ (Sef. 3:8, 9) Azali kopesa biso formasyo mpo tókɔta mpenza na kati ya mokano na ye ya seko. Mokano yango esangisi mpe nini? Azali na mokano ya “koyanganisa lisusu biloko nyonso esika moko na nse ya bokonzi ya Kristo.” (Tángá Baefese 1:9, 10.) Ya solo, alingi koyanganisa bikelamu nyonso ya molɔ́ngɔ́, mpe akosala yango. Lokola ozali elenge, likambo oyo esalisi yo omona ete ezali na ntina kosala na bomoko ná ebongiseli ya Yehova?

15 Yehova azali koteya biso ete tózala na bomoko uta sikoyo, na mokano ya kozala na bomoko libela na libela. Mbala na mbala, Makomami eyebisaka biso ete ‘tózala na lobanzo ndenge moko mpo na enama mosusu,’ ‘tolinganaka na motema,’ ‘tókoba kobɔndisana’ mpe “kolendisana.” (1 Ko. 12:25; Rom. 12:10; 1 Tes. 4:18; 5:11) Yehova ayebi ete bakristo bazali bato ya kozanga kokoka, mpe yango ekoki kozala mokakatano mpo na kozala na bomoko; na yango, tosengeli ‘kolimbisana na motema moko.’​—Ef. 4:32.

16, 17. (a) Mokano ya makita ya bokristo ezalaka nini? (b) Liteya nini bilenge bakoki kozwa na ndakisa ya Yesu ntango azalaki elenge?

16 Yehova apesi biso mpe makita ya bokristo mpo esalisa biso tóyekola ndenge ya kozala liboke. Totángaka mbala mingi maloba ya kolendisa oyo ezali na Baebre 10:24, 25. Mokano ya makita yango ezali ete “tótyelanaka likebi mpo tólendisana mpo tózala na bolingo mpe tósala misala ya malamu.” Yango wana, ezali na ntina mpenza ete makita esalemaka na lolenge oyo tokoki ‘kolendisanaka, mpe tósalaka bongo mingi koleka awa tozali komona mokolo yango ezali kobɛlɛma.’

17 Ntango azalaki elenge, Yesu apesaki ndakisa moko malamu ya kozwa na motuya bibongiseli yango. Ntango azalaki na mbula 12, ayanganaki ná baboti na ye na liyangani moko ya monene. Na nsima, azalaki komonana te; ezali te mpo akendeki koyengayenga ná bilenge mosusu. Kutu, Yozefe ná Maria bakutaki ye azali kosolola makambo ya Nzambe ná bateyi na tempelo.​—Luka 2:45-47.

18. Ndenge nini mabondeli na biso ekoki kosalisa mpo bomoko ezala?

18 Longola kolingana mpe kosalela makita mpo na kosalisa mpo ete bomoko ezala makasi mpenza, tokoki mpe kobondelaka mpo na basusu, bango mpe babondelaka mpo na biso. Soki tozali koloba makambo  ya sikisiki ntango tozali kobondela Yehova mpo na bandeko na biso, tokomona polele ete tozali na lobanzo na bango. Ezali te kaka bakristo oyo bakómi mikóló nde bakoki to basengeli kosala makambo yango. Soki ozali elenge, osalelaka mabaku wana mpo na kokóma lisusu na bomoko elongo na libota ya bandeko na yo ya elimo? Kosala bongo ekosalisa yo ondimisama ete mokili oyo, oyo ezali kobunda na liwa, ekangi yo nsinga te na nkingo.

Biso nyonso tokoki kobondela mpo na bandeko na biso (Talá paragrafe 18)

TÓMONISA ETE “TOZALI BINAMA OYO MOKOMOKO NA YANGO EZALI NDEKO YA MOSUSU”

19-21. (a) Wapi lolenge eleki monene mpenza oyo tomonisaka ete “tozali binama oyo mokomoko na yango ezali ndeko ya mosusu”? Pesá bandakisa. (b) Liteya nini ozwi na ndenge bandeko mosusu basalaki na ntango makama ebimaki?

19 Basaleli ya Yehova batosaka etinda oyo ezali na Baroma 12:5 oyo elobi ete: “Tozali binama, oyo mokomoko na yango ezali ndeko ya mosusu.” Tokoki komona bosolo ya likambo yango ntango makama ebimaka. Na sanza ya zomi na mibale 2011, mopɛpɛ moko makasi etombokisaki mai na Philippines mpe esanga moko na nkombo Mindanao ezindaki. Na butu, bandako koleka 40 000 ezindaki, mpe ebele ya bandako ya bandeko na biso mpe ezindaki. Kasi, biro ya filiale elobi ete “liboso kutu komite ya kosalisa bandeko oyo bazwi likama etyama, Batatoli ya Yehova ya bisika mosusu bazalaki kotinda lisalisi.”

20 Ndenge moko, ntango mabele eninganaki makasi mpe esalaki ete tsunami ebɛta na Japon, bandeko mingi babungisaki mpenza biloko na bango. Basusu kutu batikalaki mabɔkɔ mpamba. Ndeko mwasi moko na nkombo Yoshiko, oyo ndako na ye ebukanaki azalaki kofanda na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 40 ya Ndako ya Bokonzi. Alobi boye: “Tokamwaki komona nsima ya mokolo oyo mabele eninganaki ete mokɛngɛli ya zongazonga ná ndeko mosusu bayaki koluka biso.” Ná mwa komungamunga, abakisi boye: “Tosepelaki mpenza ndenge bamposa na biso ya elimo ekokisamaki na lisangá. Longola yango, tozwaki bilamba, basapato mpe basakosi.” Ndeko moko oyo azalaki na komite ya kosunga bandeko alobi boye: “Bandeko ya Japon mobimba bazalaki kosala lokola mwana ya tata moko, bazalaki mpenza kosalisana. Bandeko mosusu bautaki kutu na États-Unis mpo na kosalisa. Ntango batunaki bango ntina oyo basali mobembo molai ndenge wana, balobaki, ‘Tozali na bomoko ná bandeko na biso ya Japon, mpe basengeli na lisalisi.’” Ozali koyoka esengo te kozala na kati ya ebongiseli oyo ekokisaka bamposa ya basangani na yango? Okoki mpe kondimisama ete Yehova asepelaka mingi komona ezaleli wana ya bomoko.

21 Soki tozali na elimo yango banda sikoyo, yango ekosalisa biso tólonga na bomoko makambo ya mpasi oyo ezali kozela biso, ata soki tozali esika moko te ná bandeko na biso ya mikili mosusu. Lisusu, elimo yango ezali kopesa biso formasyo mpo na mikakatano oyo ekoki kokómela biso wana mokili oyo enuni ezali kokende na kokufa. Fumiko, ndeko moko oyo mopɛpɛ moko makasi ebebisaki biloko na ye na Japon alobi boye: “Nsuka ekómi mpenza pene. Tosengeli kokoba kosalisa bandeko na biso bakristo wana tozali kozela na esengo ntango oyo bampasi ekozala lisusu te.”

22. Litomba nini ya libela na libela biso bakristo tokoki kozwa soki tobateli bomoko?

22 Bilenge ná mikóló oyo bazali sikoyo koyekola kosala makasi banda sikoyo mpo bomoko ezala, bazali komibongisa mpo na kobika na nsuka ya mokili oyo mabe, oyo bomoko ezali te. Ndenge moko na ntango ya kala, Nzambe na biso akobikisa basaleli na ye. (Yis. 52:9, 10) Kobá kobatela na makanisi ete okoki kozala na kati ya bato oyo bakobika soki osali makasi mpo ozala na kati ya basaleli ya Nzambe oyo bazali na bomoko. Likambo mosusu oyo ekosalisa biso, ezali kokóma na botɔndi mingi mpo na nyonso oyo tozwá. Lisolo na biso oyo elandi, ekolobela likambo yango.