Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Décembre 2014

Okoki kobongola makanisi na yo?

Okoki kobongola makanisi na yo?

ETULUKU moko ya bilenge bamoni malamu bákende kotala filme moko. Bayokaki ete baninga na bango mingi ya eteyelo basepelaki na yango. Ntango bakɔti na esika ya filme yango, batali na bifelo mpe bamoni bililingi ya mindoki ya makasimakasi mpe ya basi oyo balati bilamba oyo ezali kolakisa ndenge nzoto na bango ya basi ezali na kati. Bakosala nini? Bakokende kaka na esika wana mpo na kotala filme yango?

Ndakisa oyo emonisi ete tokutanaka na makambo mingi oyo esɛngaka tózwa bikateli oyo ekoki kosala ete tózala na boyokani ya malamu elongo na Yehova to te. Na bantango mosusu okoki kokana kosala likambo moko, kasi nsima ya kotalela yango lisusu, obongoli makanisi na yo. Yango elingi koloba ete ozali bongolabongola to esengelaki kosala bongo?

Ntango oyo kobongola makanisi na yo ezali malamu te

Bolingo na biso mpo na Yehova etindaki biso tópesa ye bomoi na biso mpe tózwa batisimo. Mposa na biso ezali ya kotikala sembo epai ya Nzambe. Kasi, monguna na biso Satana Zabolo azali na ekateli ya kobebisa bosembo na biso. (Em. 12:17) Tozwaki ekateli ya kosalela Yehova mpe kotosa mibeko na ye. Ekozala mpenza mawa soki tozali kotosa te elako oyo tosalaki ntango tomipesaki epai ya Yehova! Tokoki kobungisa bomoi.

Esali sikoyo basiɛklɛ koleka 26, Nebukadenezare, mokonzi ya Babilone asalaki ekeko moko monene ya wolo mpe apesaki mobeko ete bato nyonso bákwea mpe básambela yango. Moto nyonso oyo akoboya kosala bongo asengelaki kobwakama na litumbu ya mɔtɔ makasi. Shadrake, Meshake, mpe Abedenego, basaleli misato ya Yehova oyo bazalaki kobanga ye mingi basalaki yango te. Lokola balingaki te kogumbamela ekeko wana, babwamaki na litumu ya mɔtɔ makasi. Yehova abikisaki bango na ndenge ya likamwisi, kasi bandimaki kotya bomoi na bango na likama na esika ya kobongola ekateli na bango ya kosalela Nzambe.Dan. 3:1-27.

 Na nsima, mosakoli Danyele atingamaki na mabondeli atako esengelaki bábwaka ye na libulu ya bankɔsi. Ya solo, akangamaki na momeseno na ye ya kobondelaka Yehova mbala misato na mokolo. Danyele abongolaki te ekateli na ye ya kosambela Nzambe ya solo. Nsukansuka mosakoli abikisamaki “na lobɔkɔ ya bankɔsi.”Dan. 6:1-27.

Basaleli ya Nzambe ya mikolo na biso mpe batosaka elako oyo basalaki ya komipesa epai na ye. Na eteyelo moko na Afrika, etuluku moko ya bana-kelasi oyo bazali Batatoli ya Yehova baboyaki kosangana na molulu moko ya kosambela elembo moko ya ekólo. Balobaki ete bakolongola bango na eteyelo soki basangani te na molulu yango ná bana-kelasi mosusu. Mwa moke na nsima, ministre oyo atalelaka makambo ya biteyelo akendaki kotala engumba na bango mpe asololaki na bana-kelasi mosusu ya Batatoli. Na limemya nyonso, kasi kozanga kobanga bilenge wana ya Batatoli bamonisaki ntina ya ekateli na bango. Banda wana, mokakatano yango esilá. Bandeko mibali mpe basi bazali kokende eteyelo kozanga ete batyá bango mpanzi likoló ete bábebisa boyokani na bango ná Yehova.

Tótalela mpe ndeko Joseph, oyo mwasi na ye abɛlaki kanser mpe akufaki na mbalakaka. Libota ya Joseph bayebaki bindimeli na ye na likambo etali kokunda ebembe mpe batosaki yango. Kasi, libota ya mwasi na ye bazalaki Batatoli te, mpe balingaki ete milulu ya kokunda ebembe oyo esepelisaka Nzambe te esalema. Joseph alobi ete: “Lokola naboyaki kobongola makanisi na ngai, balukaki kokɔtisa bana na ngai makanisi na bango; kasi bango nyonso baboyaki na motema moko. Bandeko yango bazwaki mpe bibongiseli ete liláká esalema epai na ngai, ndenge momeseno ezalaka, kasi nayebisaki bango ete soki batingami kaka na likanisi wana, bakosala yango epai na ngai te. Bayebaki ete kosala liláká eyokani te na bindimeli na ngai mpe oyo mwasi na ngai azalaki na yango; yango wana, nsima ya kolobela likambo yango mingi, bakendeki kosala liláká yango epai mosusu.”

“Na ntango wana ya mpasi mpe ya mawa, nabondelaki Yehova asalisa mpo libota na biso ebuka mibeko na ye te. Ayokaki mabondeli na ngai mpe asalisaki biso tótikala ngwi atako bazalaki kotya biso mosukusuku.” Mpo na Joseph mpe bana na ye, kobongola makanisi na likambo etali losambo ezalaki te likambo ya kosala to kosala te.

Ntango oyo kobongola makanisi na yo ekoki kozala malamu

Mwa moke nsima ya elekeli ya mobu 32 T.B., mwasi moko oyo azalaki moto ya Fenisia ya Siri akendaki epai ya Yesu Kristo na Sidone. Asɛngaki ye mbala na mbala ete abimisa demo moko epai ya mwana na ye ya mwasi. Na ebandeli, Yesu azongiselaki ye ata liloba moko te. Ayebisaki bayekoli na ye ete: “Natindamaki epai ya bato mosusu te kaka epai ya bampate ya ndako ya Yisraele oyo babungá.” Lokola azalaki kaka kotingama, Yesu alobaki ete: “Ezali malamu te kokamata mampa ya bana mpe kobwakela yango bana ya mbwa.” Amonisaki kondima makasi mpe ayanolaki ete: “Ya solo, Nkolo; kasi bana ya mbwa balyaka pumbulu oyo eutaka na mesa ya bankolo na bango ekwei.” Yesu ayokaki bosɛnga na ye mpe abikisaki mwana na ye.Mat. 15:21-28.

Likambo wana emonisaki ete Yesu amekolaki ezaleli oyo Yehova azalaka na yango ya kondima kobongola makambo mosusu soki esɛngi bongo. Na ndakisa, Nzambe akanaki koboma Bayisraele ntango basalaki mwana-ngɔmbɛ ya wolo, kasi atikaki ete Moize asolola na ye mpo atalela lisusu ekateli yango.Kob. 32:7-14.

Ntoma Paulo amekolaki Yehova ná Yesu. Mokolo moko, ntoma Paulo akanisaki ete ezali malamu te kokende ná Yoane Marko na mibembo na bango ya misionɛrɛ mpo atikaki ntoma Paulo ná Barnabasi na mobembo na bango liboso ya misionɛrɛ. Kasi, na nsima, ntoma Paulo andimaki ete Marko amipesaki ye moko mpe akosalisa ye mingi mpenza. Na yango, ntoma Paulo alobaki na Timote ete: “Kamatá Marko mpe yaká na ye, mpo akosalisa ngai na mosala.”2 Tim. 4:11.

Tokoloba nini mpo na biso? Mpo na komekola Tata na biso ya likoló oyo azalaka motema  mawa, molai mpe bolingo, tokoki komona malamu kobongola makanisi na biso. Na ndakisa, tokoki kobongola lolenge na biso ya kotalela basusu. Biso tozali te lokola Yehova ná Yesu, mpo tozali bato ya kozanga kokoka. Soki bango bandimaki kobongola makanisi, biso mpe tokoki kotalela makambo nini etindaki basusu básala bongo mpe ntango mosusu kobongola makanisi na biso?

Kobongola makanisi na biso ekoki kozala likambo ya malamu ntango tozali kotalela mikano ya elimo. Bayekoli mosusu ya Biblia mpe baoyo bayanganaka na makita ya lisangá bakoki komona ete esengeli bazela naino mpo na kozwa batisimo. To bamosusu bakoki kokakatana mpo na kobanda mosala ya mobongisi-nzela, ata soki bazali na likoki ya kosala yango. Mpe bandeko mibali mosusu bakoki koboya koluka kokokisa masɛngami mpo na kozwa mikumba na lisangá. (1 Tim. 3:1) Ozali na kati ya moko ya makambo oyo touti kotánga? Yehova azali kobenga yo na bolingo nyonso ete omeka mikumba yango. Mpo na nini te kobongola makanisi na yo mpe koyoka esengo oyo eutaka na komipesa epai ya Nzambe mpe kosalela basusu?

Kobongola makanisi ekoki komemela yo mapamboli

Ndeko Ella, alobi mpo na mosala na ye na biro moko ya Batatoli ya Yehova na Afrika boye: “Ntango nakómaki na Betele, nayebaki te soki nakoumela ntango molai. Nazalaki na mposa ya kosalela Yehova na molimo mobimba, kasi nazalaki mpe kolinga libota na ngai mingi koleka ndelo. Na ebandeli, nazalaki komimona lokola mwana etike. Kasi, moninga na ngai ya shambre alendisaki ngai, mpe namonaki malamu natikala. Nsima ya kolekisa mbula zomi na Betele, namoni ete nasengeli kotikala na Betele mpo nakoba kosalela bandeko na ngai mibali mpe basi ntango molai.”

Ntango oyo kobongola makanisi ezali devuare

Ozali koyeba lisusu oyo ekómelaki Kaina ntango akómaki na likunya ya ndeko na ye  mpe akolisaki nkanda? Nzambe ayebisaki moto wana ya nkanda makasi ete akondimama soki kaka azongeli kosala malamu. Nzambe apesaki Kaina toli alonga lisumu oyo “ebatami na monɔkɔ ya ndako” na ye. Kaina akokaki kobongola ezaleli mpe makanisi na ye, kasi aponaki koboya koyoka toli ya Nzambe. Likambo ya mawa, Kaina abomaki ndeko na ye mpe akómaki mobomi bato ya liboso!Eba. 4:2-8.

Makambo elingaki kosuka ndenge nini soki Kaina abongolaki makanisi na ye?

Tótalela mpe ndakisa ya mokonzi Uzia. Na ebandeli, azalaki kosala oyo ezali malamu na miso ya Yehova mpe akobaki koluka Nzambe. Kasi, likambo ya mawa, Uzia akómaki komatisa mapeka mpe yango ebebisaki lokumu na ye. Akɔtaki na tempelo mpo na kotumba mpaka ya malasi, atako azalaki nganga-nzambe te. Abongolaki mpenza makanisi na ye ntango banganga-nzambe bakebisaki ye ete asala te likambo wana mpo apesami te ndingisa? Te. Uzia “atombokaki” mpe aboyaki toli wana. Mpo na yango, Yehova abɛtaki ye na maladi ya maba.2 Nt. 26:3-5, 16-20.

Na ntembe te, na bantango mosusu esɛngaka kaka ete tóbongola makanisi na biso. Tólobela ndakisa moko ya mikolo na biso. Ndeko Joachim azwaki batisimo na mobu 1955, kasi na mobu 1978, abimisamaki na lisangá. Nsima ya mbula 20 na libanda, abongolaki motema mpe azongisamaki na lisangá. Na mikolo oyo euti koleka, nkulutu moko atunaki ye mpo na nini azelaki ntango molai ndenge wana mpo asɛnga kozongisama na lisangá. Ndeko Joachim ayanolaki ete: “Nazalaki na nkanda mpe na lolendo. Nayokaka mawa ndenge nalekisaki bambula ebele. Ntango nabimisamaki na lisangá, nayebaki ete Batatoli ya Yehova bateyaka solo.” Asengelaki kobongola ezaleli na ye mpe kobongola motema.

Tokoki kokutana na likambo moko oyo ekoki kosɛnga ete tóbongola makanisi mpe ezaleli na biso. Tosengeli kondima kosala yango mpo ete tóndimama na miso ya Yehova.Nz. 34:8.