Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Novembre 2014

Ntina oyo tosengeli kozala basantu

Ntina oyo tosengeli kozala basantu

“Bosengeli kozala basantu.”​—LEV. 11:45.

1. Ndenge nini mokanda ya Balevi ekoki kosalisa biso?

MOKANDA ya Balevi elobeli mingi liloba bosantu koleka mikanda mosusu nyonso ya Biblia. Lokola ezaleli yango esɛngami mpenza mpo na basambeli nyonso ya solo ya Yehova, koyeba mpe kosepela na mokanda ya Balevi ekosalisa mpo tózala basantu.

2. Mwa makambo nini ezali na mokanda ya Balevi?

2 Mokanda ya Balevi ekomamaki na mosakoli Moize, mpe ezali na kati ya “Makomami nyonso” oyo ezali na litomba mpo na koteya. (2 Tim. 3:16) Tokoki kokuta nkombo Yehova mbala soki zomi na mokapo mokomoko ya mokanda yango. Kokanga ntina ya mokanda ya Balevi ekopesa biso makasi tóboya kosala eloko nyonso oyo ekobwaka nsɔni na nkombo ya Nzambe. (Lev. 22:32) Ndenge mokanda yango esaleli mingi maloba “Ngai Yehova” esengeli kotinda biso tóbosanaka te kotosa Nzambe. Na lisolo oyo mpe oyo ekolanda, tokomona mwa makambo kitoko oyo ezali na mokanda ya Balevi, likabo oyo Nzambe apesi mpo esalisa biso tózala basantu na losambo na ye.

TOSENGELI MPENZA KOZALA BASANTU

3, 4. Bopɛto ya Arona mpe bana na ye ezali elilingi ya nini? (Talá elilingi ya ebandeli.)

3 Tángá Balevi 8:5, 6. Yehova aponaki Arona mpo azala nganga-nzambe monene na Yisraele, mpe bana na ye bázala banganga-nzambe ya ekólo. Arona azali elilingi ya Yesu Kristo  mpe bana na ye bazali elilingi ya bayekoli ya Yesu oyo batyami mafuta na elimo. Kasi, kopɛtolama ya Arona ezali mpe elilingi ya kopɛtolama ya Yesu? Te, mpo Yesu azalaki mosumuki te mpe “na litɔnɔ te,” na ndenge yango azalaki te na mposa ya kopɛtolama. (Ebr. 7:26; 9:14) Kasi, bopɛto ya Arona ezalaki kolakisa bopɛto mpe boyengebene ya Yesu. Bongo bopɛto ya bana ya Arona ezalaki elilingi ya nini?

4 Bopɛto ya bana ya Arona ezalaki elilingi ya bopɛto ya baoyo baponamaki mpo na kozala banganga-nzambe na likoló. Batisimo ya baoyo batyami mafuta na elimo ezali na boyokani na bopɛto wana ya bana ya Arona? Te, mpo batisimo elongolaka masumu te, kasi emonisaka ete moto amipesi mobimba epai ya Yehova Nzambe. Kopɛtolama ya baoyo batyami mafuta na elimo esalemaka “na nzela ya liloba,” mpe yango esɛngaka ete básalela na motema mobimba mateya ya Kristo na bomoi na bango. (Ef. 5:25-27) Na ndenge yango, basantisami mpe bakómi pɛto. Kasi tokoloba nini mpo na “bampate mosusu”?​—Yoa. 10:16.

5. Mpo na nini tokoki koloba ete bampate mosusu bapɛtolami na nzela ya Liloba ya Nzambe?

5 Bana ya Arona bazalaki te elilingi ya “ebele mpenza ya bato” ya bampate mosusu ya Yesu. (Em. 7:9) Na yango, tokoki koloba ete bato wana oyo babatisami, basantisami mpe bapɛtolami na nzela ya liloba ya Nzambe? Ɛɛ, ezali bongo! Ntango baoyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabele batángaka oyo Biblia elobi mpo na litomba oyo makila oyo Yesu asopaki ekomema, bandimaka maloba yango mpe basalaka “mosala mosantu butu moi.” (Em. 7:13-15) Ndenge baoyo batyami mafuta na elimo mpe bampate mosusu bazali komonisa “etamboli malamu,” yango ezali komonisa polele ete bazali kokoba komipɛtola. (1 Pe. 2:12) Yehova azali mpenza kosepela ntango azali komona ete bopɛto mpe bomoko ezali kati na bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe bampate mosusu, mpo bazali koyoka mpe kolanda na bosembo nyonso Yesu, mobateli na bango ya mpate!

6. Lolenge nini ya komitalela ekoki kosalisa biso?

6 Lisɛngami oyo epesamaki ete banganga-nzambe ya Yisraele bázala pɛto na nzoto ezali na ndimbola monene mpo na basaleli ya Yehova ya mikolo na biso. Bato oyo toyekolaka na bango Biblia bamonaka mbala mingi ete bisika na biso ya losambo mpe bilamba na biso ezalaka pɛto mpe tolataka malamu. Kutu, bopɛto ya banganga-nzambe esalisaka biso tóyeba ete moto nyonso oyo azali komata na ngomba ya Yehova oyo etombwani mpo na kosambela ye asengeli kozala na ‘motema ya pɛto.’ (Tángá Nzembo 24:3, 4; Yis. 2:2, 3.) Mpo na kosalela Nzambe mosala mosantu, tosengeli kozala pɛto na makanisi mpe na motema, ezala mpe na nzoto. Yango esɛngaka ete tomitalelaka mbala na mbala, mpe na nsima bato mosusu bakoki kosala bambongwana oyo esengeli mpenza mpo ete bázala basantu. (2 Ko. 13:5) Na ndakisa, ndeko oyo azwá batisimo mpe amipesi na kotala pornografi asengeli komituna boye, ‘Nazali mpenza komimonisa pɛto?’ Mpe asengeli koluka lisalisi mpo atika ezaleli wana ya mabe.​—Yak. 5:14.

MONISÁKÁ BOTOSI MPO OZALA MOSANTU

7. Na kotalela Balevi 8:22-24, ndakisa nini Yesu atiká?

7 Ntango bonganga-nzambe ya Yisraele etyamaki, batyaki makila ya mpate-mobali na litoi ya mobali, mosapi monene ya lobɔkɔ ya mobali mpe mosapi monene ya lokolo ya mobali ya nganga-nzambe monene Arona mpe bana na ye. (Tángá Balevi 8:22-24.) Kosalela makila ndenge wana emonisaki ete banganga-nzambe bakosala oyo esengeli na botosi nyonso mpo na kokokisa mikumba na bango. Ndenge moko, Nganga-nzambe monene Yesu atikeli bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe bampate mosusu ndakisa moko kitoko ya kolanda. Amesanisaki litoi na ye mpo  na koyoka litambwisi ya Nzambe. Yesu azalaki kosalela mabɔkɔ na ye mpo na kokokisa mokano ya Yehova, mpe ata mbala moko te makolo na ye elongwaki na nzela ya bosantu.​—Yoa. 4:31-34.

8. Basambeli nyonso ya Yehova basengeli kosala nini?

8 Bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe bampate mosusu ya Yesu basengeli kolanda etamboli ya bosembo ya nganga-nzambe na bango monene. Na botosi nyonso, basambeli nyonso ya Yehova basengeli kolanda malako oyo ezali na Liloba ya Nzambe mpe na ndenge yango bakoyokisa elimo santu ya Nzambe mawa te. (Ef. 4:30) Basengeli ‘kosembola banzela ya makolo na bango.’​—Ebr. 12:13.

9. Makambo nini bandeko misato oyo basalaki elongo na bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi balobi, mpe ndenge nini maloba na bango ekoki kosalisa yo okoba kozala mosantu?

9 Tóyoka maloba ya kosimba motema ya bandeko misato oyo bazali na elikya ya bomoi awa na mabele mpe oyo basali esika moko ná bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Ya liboso alobi boye: “Atako ezali libaku moko ya ntina mingi kosala esika moko ná bakristo oyo batyami mafuta na elimo, kasi kozala na bango elongo emonisi na bantango mosusu ete bandeko yango bazali bato ya kozanga kokoka. Nzokande, mokano na ngai na boumeli ya bambula nyonso wana ezalaki ya kotosa baoyo bazali kokamba.” Ndeko ya mibale alobi boye: “Mokapo lokola 2 Bakorinti 10:5, oyo elobeli ‘kotosa Kristo,’ esalisaki ngai natosa mpe nasala na bomoko elongo na baoyo bazali kokamba. Yango elingi koloba kotosa na motema.” Ndeko ya misato alobaki boye: “Kolinga oyo Yehova alingaka mpe koyina oyo ayinaka, kokoba koluka litambwisi na ye mpe kosala oyo esepelisaka ye, elimboli kotosa ebongiseli na ye mpe baoyo azali kosalela mpo mokano na ye mpo na mabele ekende liboso.” Ndeko yango ayekolaki ete ndeko Nathan Knorr, oyo akómaki na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, andimaki mbala moko makanisi ya lisolo “Kobotama ya ekólo,” oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1925 (na Lingelesi), atako bato mosusu batyelaki yango ntembe. Botosi ya ndenge wana ekamwisaki mpenza ndeko oyo. Kokanisa na mozindo na maloba oyo bandeko misato oyo touti kolobela bamonisi, ekosalisa yo otosaka mpo ozala mosantu.

TÓMONISA BOSANTU NA MOBEKO YA NZAMBE OYO ETALI MAKILA

10. Mpo na nini ezali na ntina mingi ete tótosa mobeko ya Nzambe na likambo etali makila?

10 Tángá Balevi 17:10. Yehova apesaki Bayisraele mobeko ete bálya te “lolenge nyonso ya makila.” Koboya makila ya nyama to moto, ezali etinda oyo mokristo mpe asengeli kotosa. (Mis. 15:28, 29) Koyeba ete Nzambe akoki ‘kotɛmɛla mpenza biso’ mpe kolongola biso na lisangá na ye, elɛngisaka biso mpenza. Tolingaka ye mpe tozali na mposa ya kotosa ye. Ata ntango tokutani na likambo moko oyo etye bomoi na biso na likama, tosengeli kozala na ekateli ya kolanda te makambo oyo bato bayebi Yehova te to balingaka te kotosa ye bazali kosɛnga tósala. Ya solo, toyebaka ete soki toboyi makila, bato bakotyola biso, kasi tomonaka malamu tótosa Nzambe. (Yuda 17, 18) Na likambo etali makila, nini ekoki kopesa biso makasi mpo ‘tózwa ekateli makasi’ ya koboya kolya makila to koboya kozongisa makila?​—Mib. 12:23.

11. Mpo na nini tokoki koloba ete mokolo ya kozipa masumu oyo bazalaki kosala mbula na mbula ezalaki te molulu ya masɛki?

11 Ndenge nganga-nzambe monene na Yisraele ya kala azalaki kosalela makila ya nyama mbula na mbula na mokolo ya kozipa masumu, esalisaka biso tóyeba likanisi ya Nzambe na likambo etali makila. Makila ezalaki kosalelama kaka mpo na likambo moko ya ntina mingi. Ezalaki mpo na kozipa masumu ya bato oyo bazalaki koluka bolimbisi epai ya Yehova. Bazalaki komwangisa makila ya ngɔmbɛ-mobali mpe ya ntaba likoló mpe liboso ya sanduku  ya kondimana. (Lev. 16:14, 15, 19) Likambo yango ezalaki kopesa nzela ete Yehova alimbisa masumu ya Bayisraele. Lisusu, Yehova apesaki mobeko ete soki moto abomi nyama mpo na kolya, asengelaki kosopa makila na yango mpe kozipa yango na putulu, “mpo molimo ya lolenge nyonso ya ekelamu ya mosuni ezali makila na yango.” (Lev. 17:11-14) Makambo oyo nyonso ezalaki kaka molulu moko mpo na kosala masɛki? Te. Kosalela makila mokolo ya kozipa masumu mpe mobeko oyo Nzambe apesaki ya kosopa makila na mabele, ezali na boyokani na mobeko oyo Yehova apesaki liboso Noa ná bana na ye na likambo etali makila. (Eba. 9:3-6) Yehova Nzambe apekisaki kolya makila mpo na kobatela bomoi. Yango ezali na ndimbola nini mpo na bakristo?

12. Ndenge nini mokanda oyo ntoma Paulo akomelaki bakristo ya Ebre emonisi boyokani oyo ezali kati na makila ná kolimbisa ya masumu?

12 Ntango ntoma Paulo akomelaki bakristo ya Ebre mpo na nguya oyo makila ezali na yango ya kopɛtola, alobaki boye: “Biloko pene na nyonso epɛtolamaka na makila na kolanda Mibeko, mpe soki makila esopami te bolimbisi ezali te.” (Ebr. 9:22) Ntoma Paulo amonisaki mpe ete atako bambeka ya nyama ezalaki na mwa valɛrɛ na yango, kasi ezalaki kokundwela Bayisraele ete bazali basumuki mpe ete basengeli na eloko moko ya valɛrɛ mingi koleka oyo ekolongola masumu mpo na libela. Ya solo, Mobeko ezalaki “elili ya makambo malamu oyo ekoya, kasi bosolo mpenza ya makambo te.” (Ebr. 10:1-4) Ndenge nini masumu esengelaki kolimbisama?

13. Toyokaka ndenge nini lokola Yesu alakisaki Yehova motuya ya makila na ye?

13 Tángá Baefese 1:7. Mbeka ya lisiko ya Yesu Kristo, oyo andimaki ‘komikaba mpo na biso,’ ezali na ndimbola monene mpo na baoyo nyonso balingaka ye mpe tata na ye. (Gal. 2:20) Kasi, oyo Yesu asalaki nsima ya liwa mpe lisekwa na ye nde esikolaki mpenza biso, epesaki nzela ete masumu na biso elimbisama. Yesu akokisaki elili ya likambo oyo ezalaki na Mobeko ya Moize na likambo oyo ezalaki kosalema mokolo ya kozipa masumu. Mokolo yango, nganga-nzambe monene azalaki komema mwa makila ya banyama ya kopesa mbeka na esika eleki mosantu ya tabernakle, mpe  na nsima na tempelo ya Salomo, mpe azalaki kolakisa yango liboso ya Nzambe, lokola nde azalaki mpenza wana. (Lev. 16:11-15) Ndenge moko, Yesu akɔtaki na likoló mpenza ná motuya ya makila ya nzoto na ye ya bomoto mpe alakisaki yango liboso ya Yehova. (Ebr. 9:6, 7, 11-14, 24-28) Tozali mpenza na botɔndi lokola masumu na biso elimbisami mpe lisosoli na biso epɛtolami ndenge tomonisi kondima na makila ya Yesu!

14, 15. Mpo na nini ezali na ntina koyeba mpe kotosa mobeko ya Yehova na likambo etali makila?

14 Okangi sikoyo ntina mpenza oyo Yehova apesi mobeko ete tólya te “lolenge nyonso ya makila”? (Lev. 17:10) Omoni ntina oyo Nzambe atalelaka makila ete ezali mosantu? Amonaka mpenza ete makila ezali ndenge moko na bomoi. (Eba. 9:4) Ondimi ete tosengeli kondima likanisi ya Nzambe na likambo etali makila mpe kotosa mobeko na ye oyo epekisi kosalela yango? Lolenge kaka moko oyo mokomoko na biso akoki kozala na kimya elongo na Nzambe ezali kondima lisiko ya Yesu mpe komona ete makila ezali na ntina moko monene epai ya Mozalisi na biso.​—Kol. 1:19, 20.

15 Kozanga koyeba, moko na biso akoki kokutana na mokakatano na likambo etali makila. To moto moko ya libota to moninga ya motema akoki kokutana na mokakatano ya kondima to koboya bázongisa ye makila. Na ntango wana, moto asengeli kozwa ekateli na likambo etali kondima to koboya biloko ya mikemike oyo babendaka na makila mpe mayele mosusu ya minganga. Na yango, ezali malamu mingi kosala bolukiluki mpe komibongisa liboso ete likambo ya mbalakaka ebima. Na lisalisi ya libondeli, bikateli yango ekosalisa biso tótɛngatɛnga te mpe tóbuka te mobeko ya Nzambe na likambo etali makila. Na ntembe te, tokolinga te kondima likambo moko oyo Liloba ya Yehova eboyi mpo tóyokisa motema na ye mpasi! Minganga mingi mpe bato mosusu oyo bandimaka likambo ya kozongisa makila basɛngaka na bato ete bápesa makila mpo bábikisa bomoi. Nzokande, lokola basaleli ya Yehova bazali basantu, bayebaka ete Mozalisi azali na lotomo ya koloba lolenge oyo makila esengeli kosalelama. Mpo na ye, “lolenge nyonso ya makila” ezali mosantu. Tosengeli kozala na ekateli ya kotosa mobeko na ye na likambo etali makila. Na etamboli na biso ya mosantu, tosengeli komonisa ye ete tozalaka mpenza na botɔndi na nguya ya kobikisa ya makila ya Yesu, kaka makila na ye nde ezali kolimbisa masumu mpe ekopesa bomoi ya seko.​—Yoa. 3:16.

Ozali na ekateli ya kotosa mobeko ya Yehova na likambo etali makila? (Talá paragrafe 14, 15)

NTINA OYO YEHOVA ALINGAKA TÓZALA BASANTU

16. Mpo na nini basaleli ya Yehova basengeli kozala basantu?

16 Ntango Nzambe alingaki kosikola Bayisraele na boombo na Ezipito, ayebisaki bango boye: “Ngai Yehova moto nazali kobimisa bino na mokili ya Ezipito mpo namonisa ete nazali Nzambe na bino; mpe bosengeli kozala basantu, mpamba te ngai nazali mosantu.” (Lev. 11:45) Bayisraele basengelaki kozala basantu mpo Yehova azali mosantu. Biso Batatoli ya Yehova tosengeli mpe kozala basantu. Na ntembe te, mokanda ya Balevi emonisi likambo yango polele.

17. Ndenge nini okómi sikoyo kotalela mokanda ya Balevi?

17 Mwa biteni ya mokanda ya Balevi oyo totaleli epesi biso mpenza litomba. Na ntembe te, boyekoli oyo esalisi yo okóma kosepela lisusu mingi na mokanda oyo ya Biblia. Kokanisa na mozindo na makambo ya ntina mingi oyo ezali na mokanda ya Balevi esalisi yo oyeba malamumalamu bantina oyo tosengeli kozala basantu. Kasi, wapi makambo mosusu ya kitoko oyo ezali kozela biso na mokanda oyo ya Liloba ya Nzambe? Likambo nini mosusu tokoki koyekola na mokanda yango mpo na oyo etali kosalela Yehova mosala mosantu? Tokotalela makambo yango na lisolo oyo elandi.