Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Novembre 2014

Tosengeli kozala basantu na etamboli na biso mobimba

Tosengeli kozala basantu na etamboli na biso mobimba

“Bókóma basantu na etamboli na bino mobimba.”​—1 PE. 1:15.

1, 2. (a) Nini esɛngami na basaleli ya Nzambe na likambo etali kozala na etamboli malamu? (b) Lisolo oyo ekoyanola na mituna nini?

NA LISALISI ya elimo santu, Yehova asalisaki ntoma Petro amonisa boyokani makasi oyo ezali kati na bosantu oyo elobelami na mokanda ya Balevi ná ntina oyo biso bakristo tosengeli kozala basantu na etamboli na biso. (Tángá 1 Petro 1:14-16.) Lokola Yehova azali “Mosantu,” alingaka ete bakristo oyo batyami mafuta na elimo ná “bampate mosusu” básala nyonso mpo na kokóma basantu na etamboli na bango mobimba, kasi te kaka mpo na mwa ndambo.​Yoa. 10:16.

2 Kotalela makambo mosusu kitoko oyo ezali na mokanda ya Balevi ekozala mpenza na litomba, mpe kosalela oyo tozali koyekola, ekosalisa biso tómonisa ete tozali basantu na etamboli na biso mobimba. Tokotalela mituna lokola oyo: Ndenge nini tosengeli kotalela likambo etali kobuka mibeko ya Nzambe? Mokanda ya Balevi eteyi biso nini na likambo etali kosimba boyangeli ya Yehova? Liteya nini tokoki kozwa na likambo etali kopesa bambeka?

KEBÁ NA KOBUKA MOBEKO YA NZAMBE

3, 4. (a) Mpo na nini bakristo basengeli koboya kobuka mibeko mpe mitinda ya Biblia? (b) Mpo na nini tosengeli te kozongisa mabe to kobomba nkanda?

3 Soki tolingi kosepelisa Yehova, tosengeli mpenza kokangama na mibeko mpe mitinda na ye, kasi soki moke te kokóma na  etamboli ya bato bazangi bosantu, kobuka mibeko mpe mitinda ya Yehova. Atako tozali te na nse ya Mibeko ya Moize, kasi masɛngami na yango ezali kosalisa biso tóyeba nini Nzambe andimaka to oyo andimaka te. Na ndakisa, mobeko oyo epesamaki epai ya Bayisraele: “Osengeli te kozongisela bana ya bato na yo mabe to kokangela bango nkanda; mpe osengeli kolinga moninga na yo lokola yo moko. Ngai nazali Yehova.”​—Lev. 19:18.

4 Yehova alingaka te ete tózongisaka mabe, mpe alingaka te ete tókangela basusu nkanda. (Rom. 12:19) Soki toboyi kotosa mibeko mpe mitinda ya Nzambe, Zabolo akobɛta mabɔkɔ, mpe tokobwaka nsɔni na nkombo ya Yehova. Ata soki moto moko asilikisi biso, tómikómisa te bambɛki ya kobomba nkanda. Nzambe apesi biso libaku ya kozala “bambɛki ya mabele” oyo ezali na eloko ya motuya ya mosala. (2 Ko. 4:1, 7) Lokola nkanda ezali lokola pwazɔ, ebongi te kozala na bambɛki wana!

5. Liteya nini tokoki kozwa na lisolo ya Arona mpe liwa ya bana na ye? (Talá elilingi ya ebandeli.)

5 Likambo moko ya mawa oyo elekaki na libota ya Arona elobelami na mokanda ya Balevi 10:1-11. Ekoki kozala ete bayokaki mpenza mpasi ntango mɔtɔ eutaki likoló mpe ezikisaki Nadabe mpe Abihu, bana ya Arona na tabernakle. Kondima ya Arona ná libota na ye emekamaki mpenza ntango esɛngamaki ete bálela te bibembe ya bato ya libota na bango! Omimonisaka mosantu na likambo etali koboya kosangana na bato ya libota to bato mosusu oyo babimisamá na lisangá?​—Tángá 1 Bakorinti 5:11.

6, 7. (a) Ntango tozali kozwa ekateli soki tokokende na libala na ndako-nzambe moko to te, makambo nini ya ntina mpenza tosengeli kotalela? (Talá maloba na nse ya lokasa.) (b) Ndenge nini tokoki kosolola ná bato ya libota na biso oyo bazali Batatoli te mpo na komonisa bango ekateli na biso mpo na libala oyo ekosalema na ndako-nzambe moko?

6 Ntango mosusu tokokutana te na komekama makasi lokola oyo Arona ná libota na ye bakutanaki na yango. Kasi, tokosala nini soki babengi biso ete tókende na ndako-nzambe moko mpo na libala ya moto moko ya libota na biso oyo azali Motatoli te mpe basɛngi biso tópesa mabɔkɔ na libala yango? Mobeko moko te ya Biblia epekisi biso polelepolele kokende kuna, kasi ezali na mitinda ya Biblia oyo ekoki kosalisa biso mpo na kozwa ekateli ya ndenge wana? *

7 Ekateli oyo tokomonisa mpo na kozala basantu liboso ya Yehova na makambo lokola oyo tolobeli, ekoki mbala mosusu kosepelisa te bato ya mabota na biso oyo bazali te Batatoli. (1 Pe. 4:3, 4) Na ntembe te, tolukaka koboya koyokisa bango mpasi na motema, atako esengeli tómonisa ekateli na biso polele, kasi ekozala malamu tósolola na bango na boboto. Ntango mosusu ekoki kozala malamu kosala yango liboso ete likambo yango esalema. Tokoki kopesa bango matɔndi mpe koyebisa bango ete tosepeli ndenge babengi biso na fɛti yango. Na nsima, tokoki koloba na bango ete, lokola biso ná bango tozali na bindimeli ndenge moko te, soki tokei na fɛti yango, ekoki kobebisela bango esengo ya mokolo wana ya sipesiale mpe ekoki kosala ete ná bango ná bato mosusu báyoka malamu te. Wana ezali lolenge moko oyo tokoki koboya kosala makambo oyo eyokani te na bindimeli na biso.

SIMBÁ BOYANGELI YA YEHOVA

8. Ndenge nini mokanda ya Balevi elobeli mingi boyangeli ya Yehova?

8 Mokanda ya Balevi elobeli mpenza boyangeli ya Yehova. Mbala koleka 30, tozali kotánga ete mibeko oyo ezali na mokanda ya Balevi euti epai ya Yehova. Moize andimaki yango mpe asalaki oyo Yehova asɛngaki ye asala. (Lev. 8:4, 5) Ndenge moko, biso mpe tosengeli ntango nyonso kosalaka oyo Yehova, mokonzi na biso alingi ete tósala. Mpo na likambo yango, ebongiseli ya Nzambe esungaka biso. Kasi, kondima na biso ekoki komekama ntango tozali biso moko, ndenge esalemaki mpo na Yesu ntango  amekamaki na esobe. (Luka 4:1-13) Soki tozali kotya motema mobimba na boyangeli ya Nzambe mpe tozali kotyela ye motema, moto moko te akoki kotinda biso tóbuka mobeko ya Nzambe mpe tókwea na motambo ya bibangabanga.​—Mas. 29:25.

9. Mpo na nini basaleli ya Nzambe bayinami na bikólo nyonso?

9 Biso bayekoli ya Kristo mpe Batatoli ya Yehova, tokutanaka na mikakatano oyo eutaka na bikólo oyo ezingi biso. Esengeli kozala bongo, mpo Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Bato bakokaba bino na bolɔzi mpe bakoboma bino, mpe bikólo nyonso bakoyina bino mpo na nkombo na ngai.” (Mat. 24:9) Atako tozali kokutana na koyinama ya ndenge wana, toyikaka mpiko na mosala ya kosakola Bokonzi mpe tozali kokoba komonisa ete tozali basantu liboso ya Yehova. Atako tozali bato ya kolongobana, bizaleli malamu mpe bana-mboka oyo batosaka mibeko, mpo na nini toyinamaka ndenge wana? (Rom. 13:1-7) Mpo tosali ete Yehova akóma Nkolo mokonzi na biso! Tósalelaka ‘ye mosala mosantu’ mpe tokobuka soki moke te mibeko mpe mitinda na ye ya boyengebene.​—Mat. 4:10.

10. Mokolo moko, nini ekómelaki ndeko moko oyo atikaki Yehova mpe akómaki soda?

10 Lisusu, ‘tozali bato ya mokili te.’ Yango wana, tokɔtaka te na bitumba ya mokili mpe na makambo ya politiki. (Tángá Yoane 15:18-21; Yisaya 2:4.) Bandeko mosusu oyo bamipesaki epai ya Nzambe bakɔtaki na bitumba to na makambo ya politiki. Ebele ya bandeko yango babongolaki motema mpe bazongisaki boyokani malamu elongo na tata na biso ya likoló, oyo atondi na motema mawa. (Nz. 51:17) Kaka bato moke nde babongolaki motema te. Na ndakisa, na boumeli ya Etumba ya mibale ya mokili mobimba, bakonzi bayanganisaki bandeko na biso 160 oyo bazalaki na mbula na nse ya 45 oyo bakɔtaki babolɔkɔ kaka mpamba na Hongrie mpe bayanganisaki bango na engumba moko. Bapesaki bango mobeko ete básala mosala ya soda. Bandeko ya sembo batikalaki kaka na ekateli na bango ya koboya, kasi bandeko libwa kati na bango balapaki ndai ya mosala ya soda mpe bakómaki basoda. Mbula mibale na nsima, moko na bango azalaki na kati ya basoda oyo batindaki mpo na koboma Batatoli oyo batikalaki sembo. Ndeko na ye mpenza ya makila azalaki na kati na bango! Kasi, mwango wana ya koboma bandeko yango esimbaki te.

PESÁ YEHOVA OYO YA MALAMU OZALI NA YANGO

11, 12. Ndenge nini lolenge oyo Yehova alingaki ete bambeka epesamaka na Yisraele ya kala ezali na ndimbola mpo na bakristo lelo oyo?

11 Na kotalela Mibeko ya Moize, Bayisraele basengelaki kopesa makabo ya sikisiki. (Lev. 9:1-4, 15-21) Makabo yango esengelaki kozala te na litɔnɔ mpo ezalaki elilingi ya mbeka ya kokoka oyo Yesu asengelaki kopesa. Kasi, mpo na likabo mokomoko to mbeka, ezalaki na malako ya sikisiki oyo esengelaki kolanda. Tótala na ndakisa oyo esɛngamaki epai ya mama oyo azalaki na bebe oyo abotami sika. Mokanda ya Balevi 12:6 elobi ete: “Ntango mikolo ya kopɛtolama na ye ekokoka mpo na mwana mobali to mpo na mwana mwasi, akomema mwana-mpate ya mobali oyo ezali na mbula na yango ya liboso mpo ezala likabo ya kotumba mpe mwana ya ebenga to epopo mpo ezala likabo mpo na lisumu, na monɔkɔ ya hema ya kokutana, epai ya nganga-nzambe.” Makambo oyo Nzambe asɛngaki ezalaki sikisiki, kasi bolingo mpe ezaleli na ye ya makambo makasimakasi te emonanaki mpenza na Mobeko yango. Soki mama akokaki kosomba mpate te, akokaki kopesa bana mibale ya bipopo to bibenga mibale. (Lev. 12:8) Nzambe azalaki kolinga mpe kosepela na mosambeli wana ya mobola ndenge kaka azalaki kosepela na oyo amemi likabo ya motuya mingi. Liteya nini tokoki kozwa na likambo yango?

12 Ntoma Paulo alendisaki baninga na ye bakristo ete bápesa Nzambe “mbeka ya lisanzoli.” (Ebr. 13:15) Bibɛbu na biso esengeli kosakola nkombo mosantu ya  Yehova. Bandeko oyo bazali bababa, basalelaka elobeli ya bajɛstɛ mpo na kopesa Nzambe lisanzoli ya ndenge wana. Bandeko oyo bakɔtá ndako mpo na maladi, basanzolaka ye na nzela ya mikanda, bapesaka litatoli na telefone, basakwelaka bato oyo basalisaka bango mpe baoyo bayaka kotala bango. Mbeka ya lisanzoli oyo topesaka Yehova na ndenge toyebisaka nkombo na ye mpe tosakolaka nsango malamu, esengeli koyokana na kolɔngɔnɔ na biso ya nzoto mpe makoki na biso. Esengeli mpenza kozala eloko na biso ya malamu.​—Rom. 12:1; 2 Tim. 2:15.

13. Mpo na nini tosengeli kozongisaka lapolo na biso ya mosala ya kosakola?

13 Bambeka na biso ya lisanzoli ezali makabo ya bolingo malamu oyo topesaka Nzambe mpo tolingaka ye. (Mat. 22:37, 38) Kasi basɛngaka biso ete tozongisaka lapolo na biso ya mosala kosakola. Na yango, ezaleli nini tosengeli kozalaka na yango na ebongiseli wana? Lapolo oyo topesaka sanza na sanza ezali na boyokani na losambo na biso epai ya Nzambe. (2 Pe. 1:7) Kasi, tosengeli kotya moto moko te mosukusuku mpo asala bangonga ebele na mosala ya kosakola mpo kaka lapolo na ye ezala na bangonga mingi. Yango wana, mosakoli oyo azali na ndako ya mibange to oyo alɛmbi mpenza akoki kopesa miniti 15 na esika ya kopesa bangonga ebele. Yehova asepelaka na miniti wana zomi na mitano mpo ezali likabo oyo eleki malamu ya mosakoli yango mpe azwaka na motuya libaku kitoko oyo ndeko wana azali na yango ya kosala lokola Motatoli na ye. Ndenge kaka Bayisraele oyo bazalaki na makoki te ya kopesa makabo ya motuya mingi, basaleli ya Yehova oyo bazali kobɛla maladi boye to boye, bakoki kokoba kopesa lapolo na bango, mpo bazali na motuya na miso na ye. Mpe lapolo na biso ekɔtaka na kati na oyo ya mokili mobimba, mpe yango esalisaka ebongiseli ya Yehova mpo ebongisa makambo liboso ndenge mosala ya kosakola ekosalema. Na yango, tokanisi mpenza ete balekisaka ndelo ndenge basɛngaka biso tózongisa lapolo na biso ya mosala ya kosakola?

MIMESENO NA BISO YA KOYEKOLA MPE BAMBEKA NA BISO YA LISANZOLI

14. Limbolá ntina oyo tosengeli kotalela mimeseno na biso ya koyekola.

14 Nsima ya kotalela mwa makambo kitoko na mokanda ya Balevi, okoki komituna boye, ‘Sikoyo nakangi mpenza ntina oyo mokanda yango ezali na kati ya Liloba ya Nzambe oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo na ye?’ (2 Tim. 3:16) Okoki sikoyo kozala mpenza na ekateli ya kozala mosantu, kaka te mpo Yehova azali kosɛnga yango, kasi mpo abongi mpenza na milende oyo okosala mpo na kosepelisa ye. Ntango mosusu makambo oyo oyekoli mpo na mokanda ya Balevi na masolo oyo mibale ekolisi mposa na yo ya kotimola lisusu mozindo na kati ya Makomami. (Tángá Masese 2:1-5.) Talelá malamumalamu lolenge na yo ya koyekola. Na ntembe te, olingaka ete Yehova andima bambeka na yo ya lisanzoli. Omonaka ete baprogramɛ ya televizyo, masano ya video, masano ya ndembo ya makolo to ya mabɔkɔ, masano mosusu elongolaka likebi na yo mpe epekisaka yo kokende liboso na elimo? Soki ezali bongo, okozwa litomba soki okanisi na mozindo na makambo mosusu ya ntoma Paulo oyo ezali na mokanda ya Baebre.

Koyekola Biblia mpe losambo na kati ya libota ezalaka na esika ya liboso na bomoi na yo? (Talá paragrafe 14)

15, 16. Mpo na nini ntoma Paulo atyaki mai na monɔkɔ te ntango akomelaki bakristo ya Ebre?

15 Ntoma Paulo amonisaki makambo  polele ntango akomelaki bandeko na ye bakristo ya Ebre. (Tángá Baebre 5:7, 11-14.) Ntoma Paulo atyaki mai na monɔkɔ te! Ayebisaki bango ete ‘bakómaki matoi mangbongi.’ Mpo na nini ntoma Paulo alobelaki bango maloba ya makasi ndenge wana? Amonisaki bolingo ya Yehova mpe komibanzabanza mpo na bakristo wana oyo bazalaki koluka kobika kaka na mabɛlɛ, to koyeba kaka mateya ya Biblia ya ebandeli. Koyeba mateya ya ebandeli ya bokristo ezali na ntina. Kasi, “bilei ya makasi” ezali na ntina mpo na kokola na elimo to kokóma mokristo oyo akɔmɛli.

16 Na esika ya kokende liboso mpo na koteya basusu, Baebre basengelaki na moto mosusu mpo ateya bango. Mpo na nini? Mpo baboyaki “bilei ya makasi.” Omituna boye: ‘Natalelaka bilei ya makasi na lolenge ya malamu? Nalyaka yango? To nabondelaka te mpe nayekolaka te na mozindo? Soki ezali bongo, ekoki kozala ete mokakatano ezali nde mimeseno na ngai ya koyekola?’ Tosengeli te kaka kosakwela bato, kasi tosengeli mpe koteya bango mpe kokómisa bango bayekoli.​—Mat. 28:19, 20.

17, 18. (a) Mpo na nini tosengeli ntango nyonso kolyaka bilei ya makasi ya elimo? (b) Na likambo etali makita ya bokristo, ndenge nini tokoki kotalela likambo etali komɛla masangá?

17 Koyekola Biblia ekoki kozala likambo ya pɛtɛɛ te mpo na mingi kati na biso. Ya solo, Yehova asalaka te ete basaleli na ye báyoka lokola bamemi ngambo mpo báyekola. Na yango, ezala tozali basaleli ya Nzambe bambula ebele to kaka mpo na mwa bambula, tosengeli kokoba kozwa bilei ya makasi ya elimo. Kosala bongo ezali na ntina soki tolingi kokoba na etamboli ya bosantu.

18 Mpo na kozala basantu, tosengeli kotalela Makomami malamumalamu mpe kosala oyo Nzambe azali kosɛnga biso. Talelá likambo ya Nadabe mpe Abihu, bana ya Arona oyo babomamaki mpo bapesaki “mɔtɔ oyo endimami na mobeko te,” ntango mosusu mpo bazalaki na kwiti. (Lev. 10:1, 2) Luká komona likambo oyo Nzambe ayebisaki Arona. (Tángá Balevi 10:8-11.) Mokapo oyo emonisi ete tosengeli te komɛla ata lolenge moko ya masanga liboso ya kokende likita moko ya bokristo? Tóbosana te makambo oyo: Tozali te na nse ya mibeko. (Rom. 10:4) Na mikili mosusu, bandeko na biso mosusu bazwaka mwa masanga ntango bazali kolya liboso ya kokende na makita. Na Elekeli, basalelaki bakɔpɔ minei ya vinyo. Ntango abandisaki Ekaniseli, Yesu apesaki bantoma na ye vinyo, oyo ezalaki elembo ya makila na ye mpo bámɛla. (Mat. 26:27) Biblia epekisi komɛla mingi mpe molangwa. (1 Ko. 6:10; 1 Tim. 3:8) Mpe lisosoli ya ebele ya bakristo mosusu ekoki kopekisa bango bámɛla masanga liboso ya kosala mosala nyonso mosantu. Kasi, mboka na mboka ezali na makambo na yango, mpe likambo eleki ntina mpo na mokristo ezali “kokesenisa eloko mosantu ná eloko mpamba” mpo bámitambwisa na bosantu mpo básepelisa Nzambe.

19. (a) Likambo nini tosengeli kobatela na makanisi na oyo etali losambo na kati ya libota mpe boyekoli na biso moko? (b) Ozwi ekateli nini na likambo etali kozala mosantu?

19 Makambo mingi ya kitoko oyo okoki koyeba na Liloba ya Nzambe soki otimoli ezali kozela yo. Saleláká bisaleli ya bolukiluki mpo okómisa kitoko losambo kati na libota mpe boyekoli na yo moko. Luká kokolisa boyebi na yo mpo na Yehova mpe mikano na ye. Pusaná lisusu penepene na ye. (Yak. 4:8) Bondeláká Nzambe ndenge mokomi moko ya nzembo ayembaki ete: “Fungolá miso na ngai, mpo natala makambo ya kokamwa oyo euti na mobeko na yo.” (Nz. 119:18) Kobuka soki moke te mibeko mpe mitinda ya Biblia. Ndimá na motema moko mobeko ya “Mosantu,” Yehova, mpe na molende nyonso sakoláká “mosala mosantu ya nsango malamu ya Nzambe.” (1 Pe. 1:15; Rom. 15:16) Monisá ete ozali mosantu na eleko oyo ya mikolo ya nsuka mpe ya yikiyiki. Tiká ete biso nyonso tózala basantu na etamboli na biso mpe na ndenge yango tósimba boyangeli ya Yehova, Nzambe mosantu.

^ par. 6 Talá “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/05/2002.