Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Novembre 2014

‘Sikoyo bozali bato ya Nzambe’

‘Sikoyo bozali bato ya Nzambe’

“Liboso bozalaki bato ya Nzambe te, kasi sikoyo bozali bato na Ye.”​—1 PE. 2:10.

1, 2. Mbongwana nini esalemaki na Pantekote ya mobu 33 T.B., mpe banani bakómaki bato ya ekólo ya Yehova ya sika? (Talá elilingi ya ebandeli.)

PANTEKOTE ya mobu 33 T.B. ezalaki mokolo monene na lisolo ya basaleli ya Yehova awa na mabele. Mbongwana moko monene mpenza esalemaki. Mokolo yango, na lisalisi ya elimo santu na ye, Yehova abimisaki ekólo moko ya sika, Yisraele ya elimo, “Yisraele ya Nzambe.” (Gal. 6:16) Mpo na mbala ya liboso kobanda na mikolo ya Abrahama, ekobanda kosɛnga lisusu te kokata mibali ngenga mpo na koyeba basaleli ya Nzambe. Na esika ya kosala bongo, ntoma Paulo akomaki mpo na mosangani mokomoko ya ekólo wana ya sika boye: “Kokatama ngenga na ye ezali oyo ya motema na elimo.”​—Rom. 2:29.

2 Basangani ya liboso ya ekólo ya sika ya Nzambe ezalaki bantoma mpe bayekoli ya Kristo koleka nkama oyo bayanganaki elongo na shambrɛ moko ya likoló na Yerusaleme. (Mis. 1:12-15) Elimo santu ekitelaki bato yango, mpe esalaki ete bákóma bana ya Nzambe oyo batyami mafuta na elimo. (Rom. 8:15, 16; 2 Ko. 1:21) Yango emonisaki polele ete kondimana ya sika ebandaki mosala, mpe Kristo azalaki moyokanisi na yango mpe esalemaki na nzela ya makila na ye. (Luka 22:20; tángá Baebre 9:15.) Na yango, bayekoli yango bakómaki basangani ya ekólo ya Yehova ya sika, bato na ye ya sika. Elimo santu esalisaki bango básakola na minɔkɔ ndenge na ndenge oyo ezalaki  kolobama na Bayuda mpe baprozelite oyo bautaki na ampire ya Roma mobimba mpe bayaki na Yerusaleme mpo na fɛti ya bapɔsɔ ya Bayuda, to Pantekote. Bato yango bayokaki mpe bakangaki ntina na minɔkɔ na bango “makambo minene ya Nzambe” oyo bakristo to bana wana ya Nzambe oyo batyamaki mafuta na elimo basakolaki.​—Mis. 2:1-11.

BATO YA SIKA YA NZAMBE

3-5. (a) Na mokolo ya Pantekote, ntoma Petro ayebisaki Bayuda nini? (b) Makambo nini oyo elandanaki, oyo esalaki ete ekólo ya sika ya Yehova ekola na bambula na yango ya ebandeli?

3 Yehova asalelaki ntoma Petro mpo afungwela Bayuda ná baprozelite nzela ya kokóma basangani ya ekólo wana oyo ebotamaki, lisangá ya bokristo. Na mokolo ya Pantekote, ntoma Petro ayebisaki na mpiko nyonso Bayuda ete basengeli kondimela Yesu, moto oyo bango “babakaki ye na nzete,” mpo “Nzambe akómisi ye Nkolo mpe Kristo.” Ntango bato batunaki soki basengeli kosala nini, ntoma Petro ayanolaki bango ete: “Bóbongola mitema, mpe mokomoko na bino abatisama na nkombo ya Yesu Kristo mpo masumu na bino elimbisama, mpe bokozwa likabo ya ofele ya elimo santu.” (Mis. 2:22, 23, 36-38) Mokolo wana, bato soki 3 000 babakisamaki na ekólo ya sika ya Yisraele ya elimo. (Mis. 2:41) Na nsima, molende oyo bantoma bamonisaki na mosala ya kosakola ekobaki kobota mbuma mingi. (Mis. 6:7) Ekólo wana ya sika ekobaki kokola.

4 Na nsima, basakwelaki mpe Basamaria, mpe matomba emonanaki. Filipe, mopalanganisi ya nsango malamu abatisaki mingi na bango, kasi bazwaki mbala moko te elimo santu. Lisangani ya mikóló-bakambi na Yerusaleme etindaki ntoma Petro ná Yoane epai ya Basamaria wana oyo babongwanaki, mpe “batyelaki bango mabɔkɔ, mpe babandaki kozwa elimo santu.” (Mis. 8:5, 6, 14-17) Yango wana, Basamaria yango bakómaki mpe bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe basangani ya Yisraele ya elimo.

Ntoma Petro asakwelaki Korneyi mpe bato ya ndako na ye (Talá paragrafe 5)

5 Na mobu 36 T.B., Yehova asalelaki lisusu ntoma Petro mpo na kofungwela basusu porte ya kokɔta na ekólo ya sika ya Yisraele ya elimo. Likambo yango esalemaki ntango asakwelaki Korneyi, mokonzi moko ya basoda Moroma, bandeko na ye mpe baninga na ye. (Mis. 10:22, 24, 34, 35) Biblia elobi ete: ‘Wana Petro azalaki naino koloba, elimo santu ekitelaki baoyo nyonso [oyo bazalaki Bayuda te] bazalaki koyoka liloba yango. Mpe bato ya sembo oyo bayaki elongo na Petro oyo bazalaki bamoko ya baoyo bakatamá ngenga bakamwaki, mpo likabo ya ofele ya elimo santu ezalaki kosopama likoló ya bato ya bikólo.’ (Mis. 10:44, 45) Kobanda na ntango wana, bato oyo bazalaki Bayuda te, oyo bakatamaki ngenga te, bazwaki libaku ya kokɔta na Yisraele ya elimo.

“EKÓLO MOKO MPO NA NKOMBO NA YE”

6, 7. Na makambo nini basangani ya ekólo ya sika basengelaki kosala lokola “ekólo moko mpo na nkombo ya [Yehova,]” mpe kino wapi basalaki yango?

6 Na likita moko ya lisangani ya mikóló-bakambi ya bakristo ya siɛklɛ ya liboso oyo esalemaki na mobu 49 T.B., moyekoli Yakobo alobaki boye: “Simeone [Petro] ayebisi malamumalamu ndenge  Nzambe abalolaki likebi na ye mpo na mbala ya liboso epai ya bikólo mpo na kobimisa uta na yango ekólo moko mpo na nkombo na ye.” (Mis. 15:14) Ekólo wana ya sika oyo ezalaki komema nkombo ya Yehova esangisaki bandimi oyo bazalaki Bayuda mpe oyo bazalaki Bayuda te. (Rom. 11:25, 26a) Na nsima, ntoma Petro akomaki ete: “Liboso bozalaki bato ya Nzambe te, kasi sikoyo bozali bato na ye.” Ntoma Petro alobelaki mokumba na bango na maloba oyo: “Bino bozali ‘libota oyo eponami, bonganga-nzambe ya bokonzi, ekólo moko mosantu, bato oyo basengeli kozala eloko ya Nzambe mpenza, mpo bósakola bizaleli malamu’ ya moto oyo abengaki bino bólongwa na molili bókɔta na pole na ye ya kokamwa.” (1 Pe. 2:9, 10) Basengelaki kosanzola mpenza ye oyo bango bazali komonisa mpe kokumisa nkombo na ye na miso ya bato nyonso. Basengelaki kozala batatoli ya molende mpo na Yehova, Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba.

7 Ndenge kaka ezalaki mpo na Bayisraele ya mosuni, basangani ya Yisraele ya elimo basengelaki kozala baoyo Yehova akobenga “bato oyo nasalá mpo na ngai moko, mpo báyebisa lisanzoli na ngai.” (Yis. 43:21) Lokola batondolaki mpenza mateya ya banzambe ya lokuta oyo bato bazalaki kosambela na ntango wana, bakristo wana ya siɛklɛ ya liboso basakolaki na mpiko nyonso ete Yehova azali Nzambe kaka moko ya solo. (1 Tes. 1:9) Bapesaki litatoli mpo na Yehova mpe Yesu “na Yerusaleme mpe na Yudea mobimba mpe na Samaria mpe tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.”​—Mis. 1:8; Kol. 1:23.

8. Likebisi nini ntoma Paulo apesaki bato ya ekólo ya Nzambe na siɛklɛ ya liboso?

8 Moko ya basangani ya mpiko ya “ekólo moko mpo na nkombo ya [Yehova]” ezalaki ntoma Paulo. Ntango azalaki liboso ya bato ya filozofi, alobelaki na mpiko nyonso boyangeli ya Yehova. Alobaki boye: “Nzambe oyo asalá mokili mpe biloko nyonso oyo ezali na kati na yango, lokola azali​—ndenge Ye oyo azali—​Nkolo ya likoló mpe ya mabele.” (Mis. 17:18, 23-25) Na nsuka ya mobembo na ye ya misato ya misionɛrɛ, ntoma Paulo akebisaki basangani ya ekólo moko mpo na nkombo ya Nzambe boye: “Nayebi ete nsima ya kokende na ngai, bambwa mabe ya zamba bakokɔta na kati na bino mpe bakosalela etonga makambo na boboto te, mpe na kati na bino mpenza, mibali bakobima mpe bakoloba makambo ya mbilingambilinga mpo na kobenda bayekoli bálanda bango.” (Mis. 20:29, 30) Lipɛngwi wana oyo esakolamaki, emonanaki na nsuka ya siɛklɛ ya liboso.​—1 Yoa. 2:18, 19.

9. Na oyo etali “ekólo moko mpo na nkombo ya [Yehova],” likambo nini esalemaki nsima ya liwa ya bantoma?

9 Nsima ya liwa ya bantoma, lipɛngwi yango ekolaki mpe ebimisaki mangomba ya bokristo. Na esika bámimonisa “ekólo moko mpo na nkombo ya [Yehova],” bapɛngwi wana balongolaki kutu nkombo ya Nzambe na ebele ya mabongoli na bango ya Biblia. Bakómaki kosala milulu ya bapakano mpe bakómaki kobebisa lokumu ya Nzambe na mateya oyo euti na Makomami te, na ndakisa oyo babengaki “bitumba mosantu,” mpe etamboli na bango ya mbindo. Atako bongo, na boumeli ya basiɛklɛ, Yehova azalaki kaka na mwa basambeli ya sembo na mabele, kasi babongisamaki te na “ekólo moko mpo na nkombo na ye.”

EKÓLO YA BATO YA NZAMBE EBOTAMI LISUSU

10, 11. (a) Yesu asakolaki nini na ndakisa na ye ya blé mpe matiti mabe? (b) Ndenge nini ndakisa wana ya Yesu ekokisamaki nsima ya mobu 1914, mpe litomba nini emonanaki?

10 Na ndakisa na ye ya blé mpe matiti mabe, Yesu asakolaki eleko moko ya butu ya elimo oyo ekomema na lipɛngwi. Alobaki ete “ntango bato balalaki mpɔngi,” Zabolo alonaki matiti mabe na katikati ya  blé ya elanga oyo mwana ya moto alonaki mboto ya blé. Yango nyonso mibale esengelaki kokola elongo tii na “bosukisi ya makambo ya ntango.” Yesu alimbolaki ete “milona ya malamu” elimboli “bana ya bokonzi” mpe ete “matiti mabe” ezali “bana ya moto mabe.” Na ntango ya nsuka, mwana ya moto akotinda “babuki-mbuma,” elingi koloba baanzelu, mpo na kokabola blé ya elilingi ná matiti mabe. Bana ya Bokonzi bakoyanganisama. (Mat. 13:24-30, 36-43) Ndenge nini likambo yango esalemaki, mpe ndenge nini yango esalaki ete Yehova azala lisusu na etuluku moko oyo ebongisami ya basambeli awa na mabele?

11 “Bosukisi ya makambo ya ntango” ebandaki na mobu 1914. Na boumeli ya etumba oyo endongbanaki na mbula yango, mwa nkóto ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo, “bana ya Bokonzi,” bazalaki naino na boombo ya Babilone Monene na ndenge ya elimo. Na mobu 1919, Yehova asikolaki bango, amonisaki polele bokeseni oyo ezali kati na bango mpe “matiti mabe” to bakristo ya lokuta. Ayanganisaki “bana ya Bokonzi” mpe bakómaki ekólo oyo ebongisami, mpo na kokokisama ya esakweli oyo ya Yisaya ete: “Mokili ekobotama na mpasi ya kobota nde na mokolo moko? To ekólo ekobotama nde na mbala moko? Mpo Siona akómaki na mpasi ya kobota mpe lisusu aboti bana na ye.” (Yis. 66:8) Siona, ebongiseli ya Yehova ya bikelamu ya elimo, ebimisi bana na yango, bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe ebongisi bango na ekólo moko.

12. Ndenge nini bakristo oyo batyami mafuta na elimo bamonisi lelo ete bazali “ekólo moko mpo na nkombo ya [Yehova]”?

12 Ndenge moko na bakristo ya siɛklɛ ya liboso, “bana ya Bokonzi” oyo batyamaki mafuta na elimo basengelaki kozala batatoli ya Yehova. (Tángá Yisaya 43:1, 10, 11.) Mpo na yango, basengelaki kokesana na bato mosusu na nzela ya etamboli na bango ya bokristo mpe na mosala ya kosakola “nsango malamu oyo ya bokonzi . . . mpo ezala litatoli na bikólo nyonso.” (Mat. 24:14; Flp. 2:15) Na ndenge yango, bamemi bato ebele, bamilio mpenza, mpo ete bámonana bayengebene na miso ya Yehova.​—Tángá Danyele 12:3.

 “TOKOKENDE NA BINO”

13, 14. Mpo na kosambela mpe kosalela Yehova na ndenge oyo andimaka, baoyo bazali te Bayisraele ya elimo basengeli kosala nini, mpe ndenge nini Biblia esakolaki yango?

13 Na lisolo oyo eleki, tomoni ete na Yisraele ya kala, bapaya bakokaki kosambela Yehova ndenge andimaka, kasi bapaya yango basengelaki kosangana ná libota oyo Nzambe asalaki na yango kondimana. (1 Bak. 8:41-43) Ndenge moko lelo, baoyo bazali te Bayisraele ya elimo, basengeli kosangana ná ekólo ya Yehova, “bana ya Bokonzi,” to Batatoli ya Yehova oyo batyami mafuta na elimo.

14 Basakoli mibale ya ntango ya kala basakolaki ete ebele ya bato bakosopana mpo na kosambela Yehova elongo na ekólo na ye. Yisaya asakolaki ete: “Bato mingi ya bikólo bakokende mpe bakoloba ete ‘bóya, tómata na ngomba ya Yehova, na ndako ya Nzambe ya Yakobo; mpe akolakisa biso banzela na ye, mpe tokotambola na banzela na ye.’ Mpo mobeko ekobima na Siona, mpe liloba ya Yehova na Yerusaleme.” (Yis. 2:2, 3) Ndenge moko, mosakoli Zekaria asakolaki ete “bato ya bikólo mingi mpe bikólo ya nguya bakoya mpenza koluka Yehova ya mampinga na Yerusaleme mpe kokitisa Yehova motema.” Alobelaki bango lokola “bato zomi ya minɔkɔ nyonso ya bikólo” oyo, na ndenge ya elilingi, basengelaki kosimba elamba ya Moyisraele ya elimo, mpe bakoloba ete: “Tokokende na bino, mpo toyoki ete Nzambe azali na bino.”​—Zek. 8:20-23.

15. Na mosala nini “bampate mosusu” ‘bakendeke ná’ Bayisraele ya elimo?

15 “Bampate mosusu” ‘bakendeke ná’ Bayisraele ya elimo na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi. (Mrk. 13:10) Bakómi eteni moko ya ekólo ya Nzambe, “etonga kaka moko” ná bakristo oyo batyami mafuta na elimo, na nse ya litambwisi ya Kristo Yesu, “mobateli ya mpate oyo aleki malamu.”​—Tángá Yoane 10:14-16.

ZWÁ LIBATELI ELONGO NA EKÓLO YA YEHOVA

16. Ndenge nini Yehova akobandisa eteni ya nsuka ya “bolɔzi monene”?

16 Nsima ya kobomama ya Babilone Monene, makambo ekokómela basaleli ya Yehova yombe. Na ntango yango tokozala na mposa ya libateli ya Yehova mpo na kobika. Na ntango oyo ye moko aponi, Yehova akotambwisa makambo awa na mabele, mpe yango ekosala ete báluka kobundisa basaleli na ye. Matumoli wana nde ekobandisa eteni ya nsuka ya “bolɔzi monene,” to Armagedone. (Mat. 24:21; Ezk. 38:2-4) Na ntango wana, Goge akobundisa “bato oyo bayanganisami uta na bikólo,” elingi koloba basaleli ya Yehova. (Ezk. 38:10-12) Likambo wana ekozala elembo oyo ekomonisa bitumbu oyo Yehova akopesa Goge ná bato na ye. Yehova akomonisa bonene ya boyangeli na ye mpe akosantisa nkombo na ye, mpo alobi ete: “Nakomitombola mpenza . . . nakomiyebisa na miso ya bikólo mingi; mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova.”​—Ezk. 38:18-23.

Na boumeli ya “bolɔzi monene,” ekosengela tóyanganaka ntango nyonso na masangá na biso (Talá paragrafe 16-18)

17, 18. (a) Ntango Goge akoindisela basaleli ya Yehova, malako nini bakozwa? (b) Soki tolingi libateli ya Yehova, tosengeli kosala nini?

17 Ntango Goge akobanda kotumola basaleli ya Nzambe, Yehova akoyebisa basaleli na ye boye: “Kende, yo ekólo ya bato na ngai, kɔtá na bashambrɛ na yo ya kati, mpe kangá baporte na yo. Omibomba kaka mpo na mwa ntango kino makaneli ekoleka.” (Yis. 26:20) Na ntango wana ya yikiyiki, Yehova akopesa biso malako oyo ebongi, mpe ‘bashambrɛ ya kati’ ekoki mbala mosusu kozala masangá na biso.

18 Kasi, soki tolingi kobatelama na bolɔzi monene, tosengeli kondima ete Yehova azali na bato to ekólo awa na mabele mpe abongisi yango na masangá. Tosengeli kokoba kozala na ngambo na bango mpe koyanganaka ntango nyonso na masangá na biso. Na motema na biso mobimba, tósangana na mokomi ya nzembo, mpo na kosakola ete: “Lobiko ezali ya Yehova. Lipamboli na yo ezali likoló ya bato na yo.”​—Nz. 3:8.