Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Novembre 2014

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Ndenge nini bankulutu mpe basaleli na misala batyamaka na lisangá mokomoko?

Na siɛklɛ ya liboso ya T.B., ntoma Paulo ayebisaki bankulutu ya Efese ete: “Bókeba mpo na bino moko mpe mpo na etonga mobimba, oyo elimo santu etye bino bakɛngɛli na kati na yango, mpo na kobatela lisangá ya Nzambe, oyo ye asombaki na makila ya Mwana na ye moko.” (Mis. 20:28) Mosala nini elimo santu ekokisaka lelo na likambo etali kotyama ya bankulutu mpe basaleli na misala?

Ya liboso, elimo santu etindaki bakomi ya Biblia bákoma masɛngami ya bankulutu mpe basaleli na misala. Mokapo ya 1 Timote 3:1-7 etángi masɛngami 16 ya bankulutu. Masɛngami mosusu ezali na mikapo lokola Tito 1:5-9 mpe Yakobo 3:17, 18. Masɛngami mpo na basaleli na misala ezali na 1 Timote 3:8-10, 12, 13. Ya mibale, baoyo bapesaka bankombo ya bandeko mpo na kozwa mikumba mpe baoyo batyaka bango babondelaka mpo na kosɛnga elimo ya Yehova mpo etambwisa bango ntango bazali kotalela masɛngami mpo na koyeba soki ndeko akokisi masɛngami na ndenge esengeli. Ya misato, ndeko oyo bazali kopesa nkombo mpo na kozwa mikumba, asengeli komonisa mbuma ya elimo santu ya Nzambe na bomoi na ye. (Gal. 5:22, 23) Na yango, elimo santu ya Nzambe esalaka mpenza mosala na makambo nyonso oyo etali kozwa mikumba.

Kasi, nani mpenza atyaka bandeko yango? Kala, bankombo nyonso ya bandeko oyo basengeli kokóma bankulutu to basaleli na misala ezalaki kotindama na biro ya filiale ya mboka wana. Kuna, bandeko oyo Lisangani ya Mikóló-Bakambi etyá bazalaki kotalela lisusu bandeko wana oyo basengeli kozwa mikumba mpo na kondima baoyo bakokisi mpenza masɛngami. Na nsima, biro ya filiale ezalaki kotindela lisangani ya bankulutu formilɛrɛ. Bankulutu na ngala na bango, bakoyebisa bandeko oyo bazwi mikumba ete bandimami mpo na mokumba boye to boye, mpe bakotuna bango soki balingi to bandimi mokumba yango. Na nsuka, liyebisi ezalaki kopesama na lisangá.

Kasi ndenge nini kotyama ya bankulutu mpe basaleli na misala ezalaki kosalema na siɛklɛ ya liboso? Na bantango mosusu, bantoma batyaki mbala moko bato mosusu na mikumba, na ndakisa ntango batyaki mibali nsambo mpo na básala mosala ya kokabolela basi oyo mibali bakufá bilei mokolo na mokolo. (Mis. 6:1-6) Ekoki kozala mbala mosusu ete mibali yango batyamaki liboso lokola bankulutu, liboso ete bábakisela bango mokumba oyo.

Atako Makomami elimboli te makambo nyonso na ndenge koponama ya bankulutu ezalaki kosalema na ntango wana, kasi tomoni mwa likanisi  ndenge ezalaki kosalema. Ntango ntoma Paulo ná Barnabasi bautaki na mobembo na bango ya liboso lokola bamisionɛrɛ mpe bazalaki kozonga, Biblia eyebisi biso ete: “Batyelaki bango bankulutu na lisangá moko na moko mpe, babondelaki mpe bakilaki bilei, bapesaki bango na mabɔkɔ ya Yehova oyo bango bandimelaki.” (Mis. 14:23) Bambula na nsima, ntoma Paulo akomelaki Tito, moninga na ye ya mobembo ete: “Natikaki yo na Krɛtɛ mpo na ntina oyo: osembola makambo oyo ezali kotambola malamu te mpe otya bankulutu na engumba mokomoko, ndenge napesaki yo mitindo.” (Tito 1:5) Ndenge moko, Timote oyo atambolaki mingi ná ntoma Paulo, azwaki mpe mokumba ya ndenge wana. (1 Tim. 5:22) Na yango, emonani polele ete bakɛngɛli batamboli nde bazalaki kotya bandeko yango, kasi te bantoma mpe mikóló ya Yerusaleme.

Na likanisi wana ya Biblia na motó, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova ebongoli lolenge oyo bankulutu mpe basaleli na misala bazali koponama. Kobanda mokolo ya 01/09/2014, bankulutu ná basaleli na misala bakobanda kotyama boye: Mokɛngɛli mokomoko ya zongazonga akobanda kotalela malamumalamu bankombo ya bandeko oyo bapesi ye na zongazonga na ye mpe akoluka koyeba bandeko yango malamu ntango ayei kotala lisangá, kobima ná bango na mosala ya kosakola, soki likoki ezali. Nsima ya kotalela bankombo yango elongo na bankulutu ya lisangá, mokɛngɛli ya zongazonga nde azali na mokumba ya kotya bankulutu mpe basaleli na misala na zongazonga na ye. Na ndenge yango, ebongiseli oyo eyokani mpenza na oyo ya siɛklɛ ya liboso.

Bankulutu bazali kotalela elongo na mokɛngɛli ya zongazonga soki ndeko moko akokisi masɛngami ya Biblia (Malawi)

Kasi, nani akokisaka mikumba ndenge na ndenge na likambo yango? Lokola momeseno, mokumba ya libosoliboso ya “moombo ya sembo mpe ya mayele” ezali ya kopesa bato ya ndako bilei. (Mat. 24:45-47) Yango esangisi mpe kolukaluka na Makomami na lisalisi ya elimo santu, mpo na koyeba ndenge ya kosalela mitinda ya Biblia na bomoi ya mokristo mpe lolenge oyo masangá esengeli kotambwisama na mokili mobimba. Batyaka mpe bakɛngɛli nyonso ya zongazonga mpe bandeko ya Komite ya filiale. Na ngala na yango, biro ya filiale mokomoko esalisaka mpo ete malako yango esalelama. Lisangani mokomoko ya bankulutu ezali na mokumba monene ya kotalela malamumalamu bandeko oyo balingi kopesa bankombo na bango mpo na kozwa mikumba na lisangá na boyokani ya masɛngami oyo ezali na Makomami. Mpe mokɛngɛli mokomoko ya zongazonga azali na mokumba monene ya kotalela malamumalamu mpe na libondeli bankombo ya bandeko oyo bankulutu ya zongazonga na ye bapesi mpe kotya bandeko mibali oyo bakokisi masɛngami.

Soki tokangi mpenza ntina ndenge bandeko oyo bazali kozwa mikumba batyamaka, tokozala na botɔndi mingi na mokumba oyo elimo santu ekokisaka na likambo yango. Na nsuka, tokotyela bandeko oyo batyami bankulutu na masangá na biso motema mpe tokotosa bango.​—Ebr. 13:7, 17.

 Batatoli mibale oyo Emoniseli mokapo ya 11 elobeli ezali banani?

Mokanda ya Emoniseli 11:3 elobeli batatoli mibale oyo basengelaki kosakola mpo na mikolo 1 260. Na nsima, lisolo yango elobi ete nyama mabe mpenza “akolonga mpe akoboma bango.” Kasi, nsima ya “mikolo misato ná ndambo,” batatoli yango mibale basengelaki kozonga lisusu na bomoi, mpe bato nyonso oyo bakotala, basengelaki kobanga makasi.​—Em. 11:7, 11.

Batatoli yango mibale ezali banani? Makambo oyo elobelami na lisolo yango esalisi biso tóyeba bango. Ya liboso, Biblia emonisi biso ete bazali “nzete mibale ya olive mpe bitɛlɛmiselo ya miinda mibale.” (Em. 11:4) Yango esalisi biso tómikundola etɛlɛmiselo ya mwinda mpe nzete mibale ya olive oyo esakweli ya Zekaria elobeli. Biblia emonisi ete banzete yango ya olive ezali elilingi ya “bato mibale oyo batyami mafuta,” elingi koloba, guvɛrnɛrɛ Zerubabele mpe nganga-nzambe monene Yosua, oyo “bazali kotɛlɛma pene na Nkolo ya mabele mobimba.” (Zek. 4:1-3, 14) Ya mibale, Biblia emonisi ete batatoli yango bazali kosala bilembo lokola oyo Moize ná Eliya basalaki.​—Kokanisá Emoniseli 11:5, 6Mitángo 16:1-7, 28-35 mpe 1 Bakonzi 17:1; 18:41-45.

Bokokani nini ezali na kati ya mikapo yango? Mokapo mokomoko ezali kolobela lisolo ya basaleli ya Nzambe oyo batyamaki mafuta na elimo oyo bazalaki kotambwisa makambo na ntango ya mpasi mpenza. Na yango, mpo na kokokisama ya Emoniseli mokapo 11, bandeko oyo batyami mafuta na elimo oyo bazalaki kotambwisa makambo na ntango oyo Bokonzi ya Nzambe etyamaki kuna na likoló na mobu 1914, basakolaki na “ngɔtɔ” mbula misato na ndambo.

Nsima ya kosakola na ngɔtɔ, bakristo wana oyo batyami mafuta na elimo, na ndenge ya elilingi babomamaki ntango batyaki bango na bolɔkɔ mpo na mwa ntango mokuse, elingi koloba mikolo misato ná ndambo ya elilingi. Banguna ya basaleli ya Nzambe bamonaki lokola mosala ya basaleli yango ekufaki, mpe likambo yango esepelisaki bango mingi.​—Em. 11:8-10.

Kasi, maloba ya esakweli ekokisamaki mpo na nsuka ya mikolo misato ná ndambo, batatoli mibale wana bazongaki lisusu na bomoi. Bakristo wana oyo batyami mafuta na elimo babimisamaki na bolɔkɔ mpe na nzela ya Nkolo na bango Yesu Kristo, Nzambe apesaki baoyo batikalaki sembo mokumba moko ya ntina mingi. Na mobu 1919, bazalaki na kati ya baoyo batyamaki mpo na kosala lokola “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpo na kokokisa bamposa ya elimo ya basaleli ya Nzambe na boumeli ya mikolo ya nsuka.​—Mat. 24:45-47; Em. 11:11, 12.

Likambo ya esengo, Emoniseli 11:1, 2 eyokanisi makambo yango na ntango oyo tempelo ya elimo esengelaki kotalelama. Malaki mokapo 3 elobeli mpe eleko yango ya kotalelama ya tempelo ya elimo, mpe nsima esengelaki kozala ntango ya kopɛtolama. (Mal. 3:1-4) Ntango boni kotalelama mpe kopɛtolama yango esalaki? Ebandaki na mobu 1914 tii na katikati ya mobu 1919. Eleko yango esangisi mikolo 1 260 (sanza 42) mpe mikolo misato ná ndambo ya elilingi oyo Emoniseli mokapo 11 elobeli.

Tozali mpenza kosepela ete Yehova azwaki bibongiseli mpo ete mosala ya kopɛtola tempelo yango ya elimo epɛtola bato oyo bazali na misala ya malamu! (Tito 2:14) Lisusu, tozali mpenza na botɔndi mpo na ndakisa oyo bandeko wana ya sembo oyo batyami mafuta na elimo, oyo batambwisaki makambo na ntango wana ya mpasi bamonisaki mpe na ndenge yango basalaki lokola batatoli mibale ya elilingi. *

^ par. 18 Mpo na koyeba makambo mosusu, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/07/2013, na lokasa 23, paragrafe 12.