Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Ya boyekoli  |  Sanza ya Novembre 2014

Lisekwa ya Yesu—Ndimbola na yango mpo na biso

Lisekwa ya Yesu—Ndimbola na yango mpo na biso

“Alamuki.”MAT. 28:6.

1, 2. (a) Bakonzi mosusu ya mangomba balingaki koyeba likambo nini, ntoma Petro asalaki nini? (Talá elilingi ya ebandeli.) (b) Nini epesaki ntoma Petro mpiko na ntango wana?

MIKOLO moke nsima ya liwa ya Yesu, ntoma Petro akutanaki na etuluku moko ya bato ya mabe mpenza mpe ya nkanza. Ezalaki bakonzi ya mangomba ya Bayuda, baoyo basalaki mwango mabe mpo na koboma Yesu. Bato yango balingaki koyeba likambo moko. Ntoma Petro abikisaki moto moko oyo azalaki motɛngumi banda kobotama na ye, mpe balingaki koyeba soki na nguya to nkombo nini ntoma Petro asali likambo yango. Na mpiko nyonso, ayanolaki bango ete: “Na nkombo ya Yesu Kristo Monazarete, oyo bino bobakaki na nzete kasi oyo Nzambe alamwisaki uta na bakufi, na nzela na ye nde mobali oyo atɛlɛmi awa liboso na bino na nzoto malamu.”Mis. 4:5-10.

2 Liboso, mpo na nsɔmɔ, ntoma Petro awanganaki Yesu mbala misato. (Mrk. 14:66-72) Nini epesaki ye mpiko ntango akómaki liboso ya bakonzi ya mangomba? Elimo santu esalisaki ye mingi, mpe andimisamaki ete Yesu asekwi. Nini endimisaki ntoma Petro ete Yesu azali na bomoi? Mpo na nini biso mpe tokoki kozala na kondima lokola oyo wana?

3, 4. (a) Bato nini basekwaki liboso ete bantoma ya Yesu bábotama? (b) Bato nini Yesu asekwisaki?

3 Likanisi ete bato oyo bakufá bakozonga lisusu na bomoi ezalaki mopaya te epai ya bantoma ya Yesu; bato basekwaki  liboso ete bango bábotama. Bayebaki ete Nzambe apesaki mosakoli Eliya mpe Elisha nguya ya kosala makamwisi ya ndenge wana. (1 Bak. 17:17-24; 2 Bak. 4:32-37) Moto moko kutu azongaki na bomoi ntango kaka batyaki ye na nkunda mpe atutaki mikuwa ya Elisha. (2 Bak. 13:20, 21) Bakristo ya siɛklɛ ya liboso bandimaki masolo wana ya Biblia, ndenge biso mpe tondimaka ete Liloba ya Nzambe ezali solo.

4 Na ntembe te, biso nyonso tosepelaki ntango totángaki masolo ya bato oyo Yesu asekwisaki. Ntango azongisaki na bomoi mwana kaka moko ya mobali ya mwasi moko oyo mobali akufá, emonani mpenza ete mwasi yango atikalaki monɔkɔ polele. (Luka 7:11-15) Mokolo mosusu, Yesu asekwisaki mwana moko ya mwasi ya mbula 12. Baboti ya mwana mwasi yango bazalaki na mawa makasi. Kanisá na esengo oyo baboti wana bazalaki na yango ntango mwana na bango azongaki na bomoi mpe ndenge bazalaki kokamwa! (Luka 8:49-56) Mpe bato oyo bazalaki wana, basepelaki makasi mpenza ntango bamonaki Lazare abimi na nkunda na bomoi mpe azali na nzoto malamu!Yoa. 11:38-44.

NTINA OYO LISEKWA YA YESU EKOKANI NA MOSUSU TE

5. Na nini lisekwa ya Yesu ekeseni na misusu oyo esalemaki liboso?

5 Bantoma bayebaki ete lisekwa ya Yesu ekesanaki na misusu oyo esalemaki liboso. Bato oyo basekwaki liboso, bazongaki na nzoto ya mosuni mpe na nsima, bakufaki lisusu. Yesu asekwaki na nzoto ya elimo, nzoto oyo esengeli kopɔla te. (Tángá Misala 13:34.) Ntoma Petro akomaki ete Yesu “abomamaki na nzoto, kasi azongisamaki na bomoi na elimo.” Kutu, “azali na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe, mpo akendaki na likoló; mpe baanzelu ná bakonzi ná nguya nyonso batyamaki na nse ya bokonzi na ye.” (1 Pe. 3:18-22) Lisekwa ya bato mosusu ezalaki likamwisi, kasi oyo ya Yesu eleki mosika mpenza.

6. Lisekwa ya Yesu esalaki bayekoli na ye nini?

6 Lisekwa ya Yesu ebendaki mpenza likebi ya bayekoli na ye. Atikalaki te na kati ya bakufi ndenge banguna na ye bazalaki kokanisa. Yesu azalaki na bomoi lokola ekelamu ya elimo ya nguya oyo moto akoki kosala mabe te. Lisekwa na ye emonisaki ete azali Mwana ya Nzambe, koyeba likambo yango esalisaki bayekoli ya Yesu mpo bátikala na mawa mingi te kasi bákóma na esengo mingi. Na yango, balongolaki kobanga mpe bakómaki na mpiko. Lisekwa ya Yesu ezalaki likambo ya ntina na mokano ya Yehova mpe na nsango malamu oyo bayekoli yango bazalaki kosakola na molende mpe bipai nyonso.

7. Yesu azali kosala nini sikoyo, mpe yango ebimisi mituna nini?

7 Biso basaleli ya Yehova toyebi malamu mpenza ete Yesu asukaki te kaka kozala moto monene. Kasi toyebi ete lelo oyo azali na bomoi mpe azali kotambwisa mosala oyo etaleli moto nyonso awa na mabele. Lokola azali Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe kuna na likoló, mosika te Yesu Kristo akolongola mabe nyonso na mabele mpe akokómisa yango paradiso epai bato bakozala na bomoi libela na libela. (Luka 23:43) Makambo oyo nyonso ekosalema mpo Yesu asekwaki. Kasi, bilembeteli nini tozali na yango oyo ezali kotinda biso tóndima ete Yesu asekwaki? Lisusu, lisekwa na ye ezali na ndimbola nini mpo na biso?

YEHOVA AMONISI NGUYA NA YE LIKOLÓ NA LIWA

8, 9. (a) Mpo na nini bakonzi ya mangomba ya Bayuda basɛngaki ete lilita ya Yesu ekɛngɛlama? (b) Likambo nini emonanaki ntango basi bakómaki na lilita?

8 Nsima ya kobomama ya Yesu, banganga-nzambe bakonzi mpe Bafarisai bayaki epai ya Pilate mpe balobaki ete: “Tata, tokanisi lisusu ete, ntango mokosi  wana azalaki na bomoi alobaki: ‘Nakosekwa nsima ya mikolo misato.’ Yango wana, pesá mitindo ete bábatela lilita tii na mokolo ya misato, noki bayekoli na ye báya koyiba ye mpe báloba na bato ete: ‘Alamuki uta na bakufi!’ mpe bokosi ya mbala oyo ekozala mabe mingi koleka oyo ya liboso.” Pilate alobaki na bango ete: “Bozali na bakɛngɛli. Bókende kobatela yango ndenge boyebi.” Basalaki mpe kaka bongo.Mat. 27:62-66.

9 Batyaki nzoto ya Yesu na nkunda oyo batimolaki na kati ya libanga moko monene mpe bazipaki yango na libanga mosusu ya monene. Wana nde esika oyo bakonzi ya mangomba ya Bayuda balingaki ete Yesu atikala motako to libela, kozanga bomoi na nkunda yango. Kasi likanisi ya Yehova ekesanaki mpenza na oyo ya bango. Ntango Maria Magadalena mpe Maria mosusu bayaki na nkunda yango mokolo ya misato, bakutaki libanga oyo batyaki na porte ya lilita elongwe, mpe anzelu moko afandi likoló na yango. Anzelu asɛngaki na basi wana ete bátala na kati mpe bámona ete moto azali te na kati ya lilita. Anzelu alobaki ete: “Azali awa te, mpo alamuki.” (Mat. 28:1-6) Yesu asekwaki!

10. Elembeteli nini ntoma Paulo apesaki mpo na komonisa ete Yesu asekwaki?

10 Makambo oyo esalemaki mikolo 40 oyo elandaki, emonisaki polele ete Yesu asekwi. Mpo na komonisa na mokuse ete Yesu asekwaki, ntoma Paulo akomelaki Bakorinti ete: “Moko ya makambo ya libosoliboso oyo napesaki bino ezalaki oyo ngai moko mpe nazwaki: ete Kristo akufaki mpo na masumu na biso na kotalela Makomami; mpe ete akundamaki, ɛɛ, ete alamukaki na mokolo ya misato na kotalela Makomami; mpe ete abimelaki Kefa, mpe na nsima bantoma zomi na mibale. Na nsima na yango, abimelaki bandeko koleka nkama mitano (500) na mbala moko, oyo mingi na bango bazali tii sikoyo, kasi bamosusu balalá na kati ya liwa. Na nsima na yango abimelaki Yakobo, mpe na nsima bantoma nyonso; kasi na nsuka mpenza abimelaki mpe ngai lokola nde epai ya mwana oyo abotami matsombe.”1 Ko. 15:3-8.

NTINA OYO TOYEBI ETE YESU ASEKWAKI

11. Mpo na nini tokoki koloba ete lisekwa ya Yesu esalemaki “na kotalela Makomami”?

11 Ntina ya liboso oyo toyebi ete Yesu asekwaki ezali mpo ete lisekwa na ye esalemaki “na kotalela Makomami.” Liloba ya Nzambe elobelaki lisekwa yango. Na ndakisa, Davidi akomaki ete mokonzi oyo Nzambe aponi to ‘moto na ye ya sembo’ akotikala te na nkunda. (Tángá Nzembo 16:10.) Na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B., ntoma Petro asalelaki vɛrsɛ wana ya esakweli mpo na Yesu, mpe alobaki boye: “[Davidi] amonaki liboso mpe alobaki mpo na lisekwa ya Kristo, ete asundolamaki na kati ya Nkunda te mpe nzoto na ye epɔlaki te.”Mis. 2:23-27, 31.

12. Banani bamonaki Yesu nsima ya lisekwa na ye?

12 Ntina ya mibale oyo toyebi ete Yesu asekwaki ezali ete tozali na litatoli ya bato mingi mpo na likambo yango. Nsima ya mikolo 40, Yesu, oyo asekwaki, amonanaki na bayekoli na ye na elanga, epai nkunda ezalaki, na nzela ya Emause mpe bisika mosusu. (Luka 24:13-15) Na mabaku yango, asololaki na bato, na kati na bango tokoki kotánga ntoma Petro mpe ná bituluku ya bato. Kutu, na libaku moko, Yesu amonanaki na bato koleka 500! Soki bato ebele bapesi litatoli, esengeli kotyela yango motema mpenza.

13. Ndenge nini molende ya bayekoli emonisaki ete bandimisamaki ete Yesu asekwaki?

13 Ntina ya misato oyo toyebi ete Yesu asekwaki ezali molende oyo bayekoli na ye bamonisaki mpo na kosakola yango. Molende oyo bamonisaki mpo na kosakola ete Kristo asekwaki, ememelaki bango minyoko, bampasi mpe liwa. Soki Yesu asekwaka te, mpe soki likambo yango  ezalaka likambo ya lokuta, mpo na nini ntoma Petro akokaki kotya bomoi na ye na likama mpo na kosakwela bakonzi ya mangomba lisekwa ya Kristo, bato oyo bayinaki Yesu mpe basalaki mwango mpo na koboma ye? Ntoma Petro ná bayekoli mosusu basalaki bongo mpo bandimisamaki ete Yesu azalaki na bomoi mpe ete azalaki kotambwisa mosala oyo Nzambe alingaki ete esalema. Lisusu, lisekwa ya Yesu endimisaki bayekoli na ye ete bango mpe bakosekwa. Na ndakisa, Stefano akufaki na elikya ete lisekwa ya bakufi ekozala.Mis. 7:55-60.

14. Mpo na nini ondimaka ete Yesu asekwá?

14 Ntina ya minei oyo toyebi ete Yesu asekwaki ezali ete tozali na elembeteli ete azali sikoyo koyangela lokola mokonzi mpe kosala lokola mokonzi ya lisangá ya bokristo. Mpo na ntina oyo, lisangá ya solo ya bokristo ezali se kokende liboso. Likambo ya boye elingaki mpenza nde kosalema soki Yesu asekwaka te? Lisusu, tolingaki mbala mosusu te koyoka nsango na ye soki asekwaka te. Kasi tozali mpenza na bantina ya kondima ete Yesu asekwá mpe azali sikoyo kokamba to kotambwisa biso wana tozali kosakola nsango malamu tii na esika eleki mosika na mabele.

LISEKWA YA YESU EZALI NA NDIMBOLI NINI MPO NA BISO?

15. Mpo na nini lisekwa ya Yesu epesaka biso mpiko ya kosakola?

15 Lisekwa ya Yesu epesaka biso mpiko ya kosakola. Na boumeli ya mbula 2000, banguna ya Nzambe basaleli lolenge nyonso ya bibundeli lokola lipɛngwi, kotyola, bato ya mobulu, bipekiseli, minyoko mpo mosala ya kosakola nsango malamu esalema te. Kasi, eloko moko te, to ‘ebundeli moko te oyo esalemi mpo na kobunda na biso’ ekati mosala na biso ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli. (Yis. 54:17) Tobangaka te bato oyo Satana asalelaka. Yesu azali elongo na biso, azali kosunga biso, ndenge kaka alakaki. (Mat. 28:20) Tozali mpenza na bantina ebele oyo tosengeli kobanga te, mpe ata soki banguna na biso basali nyonso, bakokanga biso monɔkɔ te!

Lisekwa ya Yesu epesaka biso mpiko ya kosakola (Talá paragrafe 15)

16, 17. (a) Ndenge nini lisekwa elongisaka makambo nyonso oyo Yesu ateyaki? (b) Na kotalela Yoane 11:25, nguya nini Nzambe apesi Yesu?

16 Lisekwa ya Yesu elongisaka makambo nyonso oyo ateyaki. Ntoma Paulo akomaki ete soki Kristo alamukaka te na kati ya bakufi, kondima ya bakristo mpe mosala ya kosakola elingaki kozala na ntina te. Moto moko oyo alimbolaka maloba ya Biblia akomaki boye: “Soki Kristo asekwaka te, . . . bakristo balingaki kokosama mabe mpenza, mpe balingaki komemama na lokuta moko monene.” Soki lisekwa ya Yesu ezalaka te, masolo ya Baevanzile elingaki kokóma kaka lisolo moko ya mawa ya moto moko ya malamu mpe ya bwanya oyo abomamaki na banguna na ye. Kasi Yesu asekwaki, amonisaki bosolo ya makambo nyonso oyo ateyaki, ná mpe oyo alobaki mpo na mikolo ezali koya.Tángá 1 Bakorinti 15:14, 15, 20.

17 Yesu alobaki ete: “Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Moto oyo azali kondimela ngai, ata soki akufi, akozonga na bomoi.” (Yoa. 11:25) Ata ndenge nini, maloba oyo ya Yesu ekokokisama mpenzampenza. Yehova apesi Yesu nguya ya kozongisa na bomoi baoyo bakosekwa mpo na bomoi na likoló mpe bamiliare ya bato oyo bakosekwa mpo na kozala na bomoi libela na libela awa na mabele. Mbeka ya kolongola masumu oyo Yesu apesaki mpe lisekwa na ye emonisi ete liwa ekozala lisusu te. Koyeba likambo yango ezali te kopesa yo makasi ya koyika mpiko na minyoko ya lolenge nyonso ata kutu kondima na mpiko nyonso kokufa?

18. Lisekwa ya Yesu epesi ndanga na likambo nini?

18 Lisekwa ya Yesu ezali kondimisa biso ete bato oyo bakofanda awa na mabele  bakosambisama na kotalela mitinda ya Yehova ya bolingo. Ntango asololaki na etuluku moko ya mibali mpe basi na Atene ya kala, ntoma Paulo alobaki ete: “[Nzambe] atye mokolo moko oyo akani kosambisa na boyengebene mabele oyo bato bafandi na nzela ya moto moko oyo ye aponi, mpe apesi bato nyonso ndanga ndenge asekwisi ye uta na bakufi.” (Mis. 17:31) Ya solo, Yesu azali mosambisi oyo Nzambe atye, mpe tokoki kozala na elikya ete akosambisa na boyengebene mpe na bolingo.Tángá Yisaya 11:2-4.

19. Lisekwa ya Yesu etindaka biso na nini?

19 Kondima lisekwa ya Yesu etindaka biso tósala mokano ya Nzambe. Soki Yesu apesaka bomoi na ye mbeka te mpe asekwaka te, tolingaki kotikala kaka na etumbu ya lisumu mpe liwa. (Rom. 5:12; 6:23) Soki Yesu asekwaka te, tokokaki koloba: “Tólya mpe tómɛla, mpo lobi tokokufa.” (1 Ko. 15:32) Kasi, totyaka makanisi na biso nyonso te na bomoi ya bisengo. Na esika ya kosala bongo, tosepelaka mingi na elikya ya lisekwa mpe tozali mpenza na bantina ya kolanda litambwisi ya Yehova na makambo nyonso.

20. Ndenge nini lisekwa ya Yesu emonisaka bonene ya Nzambe?

20 Lisekwa ya Kristo ezali komonisa polele bonene ya Yehova, oyo “akómaka moto oyo apesaka mbano na baoyo bazali koluka ye na mposa makasi.” (Ebr. 11:6) Yehova asalelaki mpenza nguya mpe bwanya mpo na kosekwisa Yesu mpo na bomoi oyo ekufaka te na likoló! Lisusu, Nzambe amonisaki likoki oyo azali na yango ya kokokisa bilaka na ye nyonso. Na kati ya bilaka yango, tokoki mpe kotánga esakweli oyo elobelaki “momboto” oyo akosala mosala ya ntina mingi mpo na kosilisa ntembe oyo etali boyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Mpo elaka yango ekokisama, esengelaki Yesu akufa mpe asekwa.Eba. 3:15.

21. Elikya ya lisekwa ezali na ndimbola nini mpo na yo?

21 Ozali na botɔndi te epai ya Yehova, oyo apesi biso elikya oyo ya solosolo ya lisekwa? Makomami epesi elikya oyo: “Talá! Hema ya Nzambe ezali esika moko na bato, mpe akofanda na bango mpe bakozala bato na ye. Mpe Nzambe ye moko akozala na bango. Mpe akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala eleki.” Elikya wana kitoko epesamaki mpe epai ya Yoane, ntoma moko ya sembo, mpe Yehova ayebisaki ye ete: “Komá, mpo maloba oyo ezali sembo mpe solo.” Ntoma Yoane azwaki emonaneli yango epai ya nani? Yesu Kristo, oyo asekwaki nde apesaki ye yango.Em. 1:1; 21:3-5.