Lakisá makambo oyo ezali na kati

kende na sous-menu

Kende na mitó ya makambo

Batatoli ya Yehova

Lingala

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Nimero ya boyekoli  |  Sanza ya Novembre 2014

“Bato oyo Yehova azali Nzambe na bango”

“Bato oyo Yehova azali Nzambe na bango”

“Esengo na bato oyo Yehova azali Nzambe na bango!”​—NZ. 144:15.

1. Na likambo oyo ete Nzambe azali na basaleli na ye awa na mabele, bato mosusu bakanisaka nini?

LELO oyo, bato mingi ya makanisi malamu bandimaka ete mangomba ya minene, ezala ya bokristo to te, esalaka makambo mingi te mpo na bolamu ya bato. Bato mosusu bandimaka ete lolenge mangomba yango etambwisaka makambo efingisaka Nzambe na mateya mpe etamboli na yango mpe na ndenge yango, ekoki soki moke te kondimama na Nzambe. Kasi, bandimaka ete bato ya sembo bazali na mangomba nyonso mpe ete Nzambe amonaka bango mpe andimaka bango lokola basambeli na ye awa na mabele. Bamonaka ete ezali na ntina te ete bato yango bátika mangomba wana ya lokuta mpo bákóma kosambela Nzambe epai mosusu. Kasi, makanisi wana ezali mpenza ya Nzambe? Mpo na kozwa eyano, tótalela ndenge Makomami elobeli lisolo ya basambeli ya solo ya Yehova.

BATO OYO BASALAKI KONDIMANA NÁ NZAMBE

2. Banani bakómaki libota mpenza ya Yehova, mpe nini ekesenisaki bango ná bato mosusu? (Talá elilingi ya ebandeli.)

2 Na ebandeli mpenza ya siɛklɛ ya 20 L.T.B., Yehova azalaki  na bato to libota na ye mpenza awa na mabele. Abrahama, oyo abengamaki “tata ya bato nyonso oyo bazali na kondima,” azalaki tata ya libota moko monene oyo ezalaki na bankama ya basaleli. (Rom. 4:11; Eba. 14:14) Bakonzi ya Kanana bazalaki kotalela ye lokola “nkumu” mpe kopesa ye limemya. (Eba. 21:22; 23:6) Yehova asalaki kondimana elongo na Abrahama ná bakitani na ye. (Eba. 17:1, 2, 19) Nzambe ayebisaki Abrahama boye: “Talá kondimana na ngai oyo bokobatela, kati na ngai ná bino, ɛɛ momboto na yo, oyo ekoya nsima na yo: Mobali nyonso kati na bino asengeli kokatama ngenga. . . . Mpe yango esengeli kozala elembo ya kondimana kati na ngai ná bino.” (Eba. 17:10, 11) Mpo na yango, Abrahama ná bato nyonso ya ndako na ye ya mibali basengelaki kokatama ngenga. (Eba. 17:24-27) Kokatama ngenga ezalaki elembo oyo emonisaki ete kaka bakitani ya Abrahama nde basalaki kondimana ná Yehova mpe bazalaki na boyokani elongo na ye.

3. Ndenge nini bakitani ya Abrahama bakómaki libota to ekólo?

3 Yakobo to Yisraele, nkɔkɔ ya Abrahama, azalaki na bana 12. (Eba. 35:10, 22b-26) Na nsima, bana yango bakómaki batata ya mabota 12 ya Yisraele. (Mis. 7:8) Mpo na nzala, Yakobo ná libota na ye bakimaki na Ezipito, epai Yozefe, moko ya bana ya Yakobo akómaki kapita ya kopesa biloko ya kolya ya Farao mpe moto na ye ya motema. (Eba. 41:39-41; 42:6) Bakitani ya Yakobo bakómaki ebele, “lisangá moko ya bato ya bikólo.”​—Eba. 48:4; tángá Misala 7:17.

BATO OYO BASIKWAMAKI

4. Boyokani nini Baezipito mpe bakitani ya Yakobo bazalaki na yango na ebandeli?

4 Bakitani ya Yakobo bafandaki mwa moke na Ezipito na boumeli ya mbula koleka 200, na etúká moko ya ebale Nile oyo babengi Goshene. (Eba. 45:9, 10) Ekoki kozala ete na boumeli ya mbula soki 100, bafandaki na kimya ná Baezipito, bazalaki kofanda na bingumba ya mike mpe bazalaki kobɔkɔla bibwɛlɛ na bango. Farao asepelaki na bango mpo ayebaki Yozefe mpe azalaki kosepela na ye. (Eba. 47:1-6) Baezipito bazalaki kosepela te na babateli ya mpate. (Eba. 46:31-34) Atako bongo, bakokaki te koboya Bayisraele na kati na bango.

5, 6. (a) Ndenge nini makambo ya basaleli ya Nzambe ebongwanaki na Ezipito? (b) Esalemaki ndenge nini mpo Moize akufa te, mpe Yehova asalaki nini mpo na basaleli na ye nyonso?

5 Kasi, makambo ya bato ya Nzambe ebongwanaki mpenza. “Na nsima, mokonzi moko ya sika abimaki na Ezipito, oyo ayebaki Yozefe te. Mpe abandaki koloba na bato na ye ete: ‘Talá! bato ya ekólo ya bana ya Yisraele bazali mingi mpe makasi koleka biso.’ Na yango, Baezipito basalisaki bana ya Yisraele misala ya boombo mpe banyokolaki bango makasi. Mpe bazalaki kaka kokómisa bomoi na bango bololo na boombo ya makasi na misala ya pɔtɔpɔtɔ ya lima mpe ya briki mpe na misala ya boombo ya lolenge nyonso na bilanga, ɛɛ, misala na bango ya boombo ya lolenge nyonso oyo basalisaki bango lokola baombo na konyokoláká bango makasi.”​—Kob. 1:8, 9, 13, 14.

6 Kutu Farao abimisaki mobeko ete babebe nyonso ya mibali ya Ebre bábomamaka ntango bazali kobotama. (Kob. 1:15, 16) Na ntango wana nde Moize abotamaki. Ntango azalaki na sanza misato, mama na ye abombaki ye na mingendu ya ebale Nile, epai mwana ya Farao ya mwasi amonaki ye. Na nsima, akómisaki ye mwana na ye. Likambo ya kokamwa, Moize abɔkɔlamaki epai ya mama na ye Yokebede, oyo azalaki mosaleli ya sembo ya Yehova mpe Moize akómaki mosaleli ya sembo ya Yehova. (Kob. 2:1-10; Ebr. 11:23-25) Yehova ‘atyaki likebi’ na minyoko ya basaleli na ye mpe azwaki ekateli ete na nse ya litambwisi ya Moize, asikola bango na mabɔkɔ ya bato oyo bazalaki komonisa bango bwale. (Kob. 2:24, 25; 3:9, 10) Basengelaki kokóma bato to libota oyo  Yehova ‘asikoli.’​—Kob. 15:13; tángá Kolimbola Mibeko 15:15.

BATO YA NZAMBE BAKÓMI EKÓLO

7, 8. Ndenge nini basaleli ya Yehova bakómaki ekólo moko mosantu?

7 Atako Yehova abongisaki naino te Bayisraele lokola ekólo, andimaki bango lokola bato na ye. Yango wana, Yehova ayebisaki Moize ná Arona báyebisa Farao ete: “Talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi: ‘Tiká bato na ngai bákende mpo básalela ngai fɛti na esobe.’”​—Kob. 5:1.

8 Esɛngaki malɔzi zomi mpe kobomama ya Farao ná basoda na ye na Mbu Motane mpo na kosikola bana ya Yisraele na minyoko na Ezipito. (Kob. 15:1-4) Sanza soki misato na nsima, Yehova asalaki kondimana elongo na Bayisraele na Ngomba Sinai mpe apesaki bango elaka oyo ya ntina mingi: “Soki bokotosa mpenza mongongo na ngai mpe bokobatela mpenza kondimana na ngai, bokokóma mpenza eloko na ngai moko kati na bato ya bikólo mosusu nyonso, . . . ekólo moko mosantu.”​—Kob. 19:5, 6.

9, 10. (a) Na kotalela Kolimbola Mibeko 4:5-8, ndenge nini Mibeko ekesenisaki Bayisraele ná bato mosusu? (b) Ndenge nini Bayisraele basengelaki komimonisa “ekólo moko mosantu na miso ya Yehova”?

9 Na boumeli ya basiɛklɛ, bato ya Yehova batambwisamaki na batata ya mabota oyo basalaki lokola bakonzi, basambisi mpe banganga-nzambe. Ntango bazalaki na Ezipito, Bayisraele balandaki lolenge wana ya kotambwisa makambo liboso ete bákóma baombo. Na ndakisa ya basaleli ya Yehova oyo bazalaki na bomoi liboso na bango, batata yango ya mabota, basalaki lokola bakonzi, basambisi mpe banganga-nzambe mpo na mabota na bango. (Eba. 8:20; 18:19; Yobo 1:4, 5) Kutu, na nzela ya Moize, Yehova apesaki Bayisraele mibeko oyo ekokaki kokesenisa bango ná bikólo mosusu nyonso. (Tángá Kolimbola Mibeko 4:5-8; Nz. 147:19, 20.) Mibeko emonisaki mosala oyo banganga-nzambe basengelaki kosala mpo na ekólo, lisusu mobeko elobaki ete “mikóló,” oyo bato bazalaki komemya mpo na boyebi mpe bwanya na bango, basengelaki kozala basambisi. (Mib. 25:7, 8) Mibeko emonisaki makambo ya losambo mpe misala mosusu oyo ekólo wana ya sika esengelaki kosala.

10 Liboso mpenza ete Bayisraele bákɔta na Mokili ya ndaka, Yehova azongelaki bango mibeko na ye, mpe Moize ayebisaki bango boye: “Yehova, ye, atindi yo oloba lelo ete okokóma ekólo na ye, eloko na ye moko, kaka ndenge apesi yo elaka, mpe ete okotosa mitindo na ye nyonso, mpe ete akotya yo likoló mpenza ya bikólo mosusu nyonso oyo asalá, mpe yango ekopesa lisanzoli ná lokumu mpe kitoko, wana okomonisa ete ozali ekólo moko mosantu na miso ya Yehova Nzambe na yo.”​—Mib. 26:18, 19.

BAPAYA BANDIMAMI

11-13. (a) Banani basanganaki elongo na bato oyo Nzambe aponaki? (b) Moto oyo azalaki Moyisraele te asengelaki kosala nini soki alingi kosambela Yehova?

11 Atako Yehova azalaki sikoyo na ekólo oyo aponaki awa na mabele, aboyaki te ete bato oyo bazalaki Bayisraele te bázala na kati ya bato na ye. Ntango asikolaki bato na ye na Ezipito, atikaki ete “etuluku monene ya bato ndenge na ndenge,” oyo bazalaki Bayisraele te, ata mpe Baezipito, bákende ná bango. (Kob. 12:38) Na bolɔzi ya nsambo, “basaleli [mosusu] ya Farao” babangaki liloba ya Yehova mpe na ntembe te bazalaki na kati ya bato oyo bakendeki ná Bayisraele ntango balongwaki na Ezipito.​—Kob. 9:20.

12 Liboso mpenza ete Bayisraele bákatisa Yordani mpo bázwa mokili ya Kanana, Moize alobaki na bango ete basengeli “kolinga moto oyo afandi mopaya” na kati na bango. (Mib. 10:17-19) Bato ya Nzambe oyo aponaki basengelaki kondima na kati na bango bapaya nyonso oyo bandimaki kotosa mibeko oyo Moize apesaki.  (Lev. 24:22) Bapaya mosusu bakómaki basambeli ya Yehova, bamonisaki makanisi lokola oyo ya Ruta, mwasi moko ya Moaba, oyo alobaki na Naomi, oyo azalaki Moyisraele ete: “Bato na yo bakozala bato na ngai, mpe Nzambe na yo Nzambe na ngai.” (Ruta 1:16) Bapaya yango bakómaki baprozelite, mpe oyo ya mibali bazalaki kokatama ngenga. (Kob. 12:48, 49) Yehova andimaki bango lokola bato ya libota na ye oyo aponaki.​—Mit. 15:14, 15.

Bayisraele bazalaki kolinga bapaya (Talá paragrafe 11-13)

13 Ntango molulu ya kofungola tempelo ya Salomo esalemaki mpo na kopesa yango epai ya Yehova, ebongiseli moko ezwamaki mpo na basambeli na ye oyo bazalaki Bayisraele te; mpe libondeli ya Salomo emonisi yango boye: “Mopaya mpe, oyo azali te moto ya Yisraele, bato na yo, mpe oyo auti mpenza na mokili moko ya mosika mpo na nkombo na yo monene mpe nguya ya lobɔkɔ na yo mpe lobɔkɔ na yo oyo esembolami, mpe soki bayei mpenza mpe babondeli, wana batali na ngámbo ya ndako oyo, yo yoká kuna na likoló, esika na yo ya kofanda ya libela, mpe salá na kolanda nyonso oyo mopaya yango akobelela yo mpo na yango; mpo bato ya bikólo nyonso ya mabele báyeba nkombo na yo mpe bábanga yo ndenge bato na yo Yisraele babangaka yo, mpe báyeba ete ndako oyo natongi ebengami na nkombo na yo.” (2 Nt. 6:32, 33) Ndenge emonanaki mpe na mikolo ya Yesu, moto nyonso oyo azalaki Moyisraele te mpe alingaki kosambela Yehova asengelaki kosangana ná bato na ye oyo asalaki na bango kondimana.​—Yoa. 12:20; Mis. 8:27.

EKÓLO MOKO YA BATATOLI

14-16. (a) Na lolenge nini Bayisraele basengelaki kozala ekólo ya batatoli mpo na Yehova? (b) Basaleli ya Nzambe ya mikolo na biso bazali na mokumba nini?

14 Bayisraele bazalaki kosambela Nzambe na bango, Yehova, kasi bikólo mosusu ezalaki kosambela banzambe na bango. Na ntango ya mosakoli Yisaya, Yehova akokanisaki makambo ya mokili na oyo ya tribinale. Asɛngaki na banzambe ya bikólo bábimisa bilembeteli oyo ekomonisa bonzambe na bango. Alobaki boye: “Bato ya bikólo báyangana esika moko, mpe bituluku ya bato ya bikólo báyangana. Nani na kati [ya banzambe] na bango akoki koyebisa yango? To bango bakoki nde koyebisa biso makambo ya liboso? Bábimisa batatoli na bango, mpo  bátángama bayengebene, to báyoka mpe báloba ete: ‘Ezali solo!’”​—Yis. 43:9.

15 Banzambe ya bikólo bakokaki te kopesa ata elembeteli moko ya bonzambe na bango. Bazalaki na bango kaka bikeko oyo elobaka te mpe esengelaki kotambwisa yango. (Yis. 46:5-7) Kasi, Yehova alobaki na bato na ye Bayisraele boye: “Bino bozali batatoli na ngai, . . . ɛɛ mosaleli na ngai oyo naponi, mpo bóyeba mpe bóndimela ngai, mpe bókanga ntina ete Ngai nazali kaka ndenge nazalaka. Liboso na ngai Nzambe moko te asalemaki, mpe nsima na ngai mosusu azali te. Ngai​—nazali Yehova, mpe longola ngai mobikisi mosusu azali te. . . . Yango wana, bino bozali batatoli na ngai, . . . mpe ngai nazali Nzambe.”​—Yis. 43:10-12.

16 Ndenge kaka batemwɛ basalaka na tribinale, bato ya Yehova bazali na lokumu ya kotatola ete Yehova azali Nzambe kaka moko ya solo. Abengaki bango “bato oyo nasalá mpo na ngai moko, mpo báyebisa lisanzoli na ngai.” (Yis. 43:21) Bazalaki bato oyo bamemaki nkombo na ye. Lokola Yehova asikolaki bango na Ezipito, bazalaki mpenza na mokumba ya kolongisa boyangeli na ye epai ya bato mosusu ya mabele. Likambo na bango ekokani na oyo mosakoli Mika akomaki mpo na basaleli ya Nzambe ya mikolo na biso ete: “Bato ya bikólo nyonso, ɛɛ bango, bakotambola moto na moto na nkombo ya nzambe na ye; kasi biso, ɛɛ biso, tokotambola na nkombo ya Yehova Nzambe na biso mpo na ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ seko na seko.”​—Mika 4:5.

BATO YA NZAMBE BATOMBOKI

17. Na miso ya Yehova, ndenge nini Yisraele ekómaki ‘nzete ya vinyo ya bopaya oyo ebebaki’?

17 Likambo ya mawa, Yisraele etikalaki sembo te epai ya Nzambe na bango, Yehova. Bamitikaki ete bikólo oyo ezalaki kosambela banzambe ya banzete mpe mabanga etambwisa bango. Na siɛklɛ ya mwambe L.T.B., mosakoli Hosea akomaki boye: “Yisraele azali nzete ya vinyo oyo ezali kobeba . . . Azali mpe kobakisa bitumbelo . . . Motema na bango ekómi na bokosi; sikoyo bakomema ngambo.” (Hos. 10:1, 2) Mbula soki 150 na nsima, Yirimia akomaki maloba oyo ya Yehova epai ya bato wana ya kozanga bosembo ete: “Kasi ngai, nalonaki yo lokola nzete ya vinyo ya motane ya kitoko koleka, yango nyonso ezalaki momboto ya solo. Bongo ndenge nini obongwani epai na ngai mpe okómi bitape oyo ebebi ya nzete ya vinyo ya bopaya? . . . Wapi banzambe na yo oyo omisaleli? Tiká bango bátɛlɛma soki bakoki kobikisa yo ntango okozala na mpasi . . . Bato na ngai​—bango babosani ngai.”​—Yir. 2:21, 28, 32.

18, 19. (a) Ndenge nini Yehova asakolaki ete akobimisa bato mosusu mpo na nkombo na ye? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

18 Na esika ya kobimisa mbuma kitoko na nzela ya kopesa Nzambe losambo ya pɛto mpe kosala lokola batatoli ya Yehova ya sembo, Yisraele ebimisaki mbuma ya kopɔla, to losambo ya bikeko. Na yango, Yesu alobaki na bakonzi ya Bayuda ya mikolo na ye oyo bazalaki kokosa bato ete: “Bakolongola bokonzi ya Nzambe epai na bino mpe bakopesa yango ekólo moko oyo ekobota mbuma na yango.” (Mat. 21:43) Kaka baoyo bazali na kati ya “kondimana ya sika,” oyo Yehova asakolaki na nzela ya mosakoli Yirimia, bakoki kozala kati na ekólo wana ya sika to Yisraele ya elimo. Mpo na Bayisraele wana ya elimo oyo basengelaki kokɔta na kondimana wana ya sika, Yehova asakolaki ete: “Nakokóma Nzambe na bango, mpe bango bakokóma bato na ngai.”​—Yir. 31:31-33.

19 Ntango Yisraele ya mosuni ezangaki bosembo, Yehova akómisaki Yisraele ya elimo bato na ye na siɛklɛ ya liboso ndenge tomonisaki yango. Kasi, banani bazali bato na ye lelo awa na mabele? Ndenge nini bato ya mitema sembo bakoki koyeba basambeli ya Nzambe ya solo? Yango nde likambo tokolobela na lisolo oyo elandi.